Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/12 nk. 10-15
  • Nzambe azali na koponapona te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali na koponapona te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mozalisi na biso azali na koponapona?
  • Yesu azalaki na koponapona?
  • Libongwani monene
  • “Uta na mabota nyonso”
  • Tokoki kolinga bazalani na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Yehova “aponaka bilongi te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tózala na bomoko ndenge Yehova ná Yesu bazali na bomoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • “Nzambe aponaka bilongi te”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/12 nk. 10-15

Nzambe azali na koponapona te

“Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”​—MISALA 10:34, 35.

1. Maloba nini ya ntina mingi Paulo alobaki yango na ntina na ebandeli ya mabota nyonso, wana ezalaki ye na mboka Athene?

“NZAMBE, oyo asalaki mokili, na biloko nyonso na kati na yango, ye wana azali Nkolo na Likolo mpe na nse, mpe akofandaka na bisambelo bisalami na maboko na bato te . . . Na nkoko moko abotisi mabota nyonso na bato kofanda na mikili nyonso na nse.” (Misala 17:24-26) Nani alobaki maloba oyo? Ntoma Paulo, na diskur na ye monene oyo asalaki na ngomba na Ale (Mars), na mboka Atene.

2. Eloko nini tozalaka na esengo ya komona, mpe eloko nini esepelisaki makasi Mojaponé moko na mobembo oyo esalaki na Afrique du Sud?

2 Ekoki kozala ete maloba yango matindi biso na kokanisa na biloko mingi bikeseni oyo tozali komona awa na mabelé. Na yango, kati na biloko bizalisamaki na Jéhovah, tozali kokuta ebele na bato, na banyama, bandeke, banyama mikemike mpe banzete ekeseni. Bomoi elingaki kozanga solo elengi soko biloko binso bizalaki ndenge moko! Nzokande bokeseni na yango ezali kopesa elengi mpe ezali kosepelisa. Na bongo, moto moko ya Japon akendaki assemblée to likita monene ya ba Témoins de Jéhovah na Afrika ya sudi akamwaki na mposo ndenge na ndenge ekeseni oyo ye amonaki kuna. Alobaki ete yango ezali bongo te na Japon, epai bato mingi bakokani.

3. Ndenge nini bamoko batalelaka bato ya mposo mosusu mpe yango ebimisaka mayoki nini.

3 Kokesena na mposo ezali liziba na mikakatano mingi. Bato mingi bazali komona ete baleki na mosika mpenza bato oyo bazali na mposo ekeseni na oyo ya bango. Makanisi motindo yango mazali kobimisa nkanda, mbala mosusu koyina mpe elimo mabe mpo na mposo mosusu. Ezali yango Nzambe alingaki? Epai na ye, mposo mosusu eleki? Jéhovah azali na koponapona?

Mozalisi na biso azali na koponapona?

4-6. (a) Mpo na oyo etali koponapona, mokonzi Yozafata alobaki nini na ntina na Jéhovah? (b) Moïse mpe Paulo bandimaki likanisi ya Yozafata? (c) Bamosusu bakoki komituna mituna nini?

4 Lisolo na bato epesi biso mwa likanisi mpo na ndenge Mozalisi akotalelaka bato. Mokonzi Yosafata, oyo ayangelaki na Yuda na 936 kino 911 liboso na ntango na biso, abongolaki makambo mingi kati na mboka; azwaki mpe bibongiseli mpo ete bisambiselo bilanda mibeko ya Nzambe mpe bitambola malamu. Apesaki epai na basambisi toli oyo ya kitoko: “Banga likambo lizali bino kosala, mpamba te bokosambisa mpo na moto te nde mpo na Jéhovah . . . ! Keba na yango ekosalaka bino, mpamba te kobebisa lisambisi ekoki epai na Jéhovah Nzambe na biso te, koponapona bato ezali epai na ye te.”​—2 Ntango 19:6, 7.

5 Bikeke mingi liboso, mosakoli Moïse alobaki epai na Yisraele: “Jéhovah, Nzambe na bino . . . akoponaponaka bato te.” (Deteronome 10:17) Paulo mpe alobaki kati na mokanda na ye epai na Baloma: “Minyoko mpe bolozi ekokwea na moto na moto oyo akosalaka mabe, na Moyuda liboso mpe na Moela lokola . . . , mpamba te Nzambe akotalaka bilongi te.”​—Baloma 2:9-11.

6 Ata bongo, bamoko bakoki komituna boye: ‘Bongo Bayisraele? Bazalaki libota liponami te? Nzambe akabolaki te awa eponaki ye libota yango? Moïse alobaki epai na libota na Yisraele te ete: “Mpo ete yo ozali libota na bulee mpo na Jéhovah Nzambe na yo, Jéhovah Nzambe na yo aponaki yo ete ozala libota na ye mpenza kati na mabota nyonso mazali na nse”?’​—Deteronome 7:6.

7. (a) Nini esalamaki ntango Bayuda baboyaki kondima Masiya? (b) Nani lelo akoki kosepela na mapamboli kitoko ya bonzambe, mpe mpo na nini?

7 Te, Nzambe akabolaki te na kopesaka epai na Yisraele esika monene kati na mokano na ye. Akanisaki se na libota moko na nzela na yango akobimisa Masiya, yango aponaki libota oyo ezalaki na bakitani na batata na mabota na Baebele na sembo. Nzokande, ntango Bayuda baboyaki Masiya, Yesu Klisto, mpe babomaki ye, Nzambe aboyaki mpe bango. Lelo oyo, bato na mposo nyonso mpe na ekolo nyonso oyo bazali kondima Yesu bakoki kosepela na mapamboli kitoko mpe kozala na elikya ya bomoi na seko. (Yoane 3:16; 17:3) Na solo mpenza, Nzambe akabolaka te. Mpe lisusu, Jéhovah asengaki epai na Bayisraele “balinga mopaya” ata azali na mposo nini to moto ya mboka nini, ‘banyokola ye te’. (Deteronome 10:19; Levitike 19:33, 34) Ya solo, Tata na biso ya makolo, oyo azali bolingo, akokabolaka bato te.

8. (a) Nini emonisi ete Jéhovah azalaki kosalela Bayisraele faveur te? (b) Ndenge nini Jéhovah asalelaki Yisraele?

8 Ya solo, Bayisraele bazalaki na libaku malamu, kasi bazalaki mpe na mokumba monene ya kokokisa: basengelaki kotosa mibeko ya Jéhovah, mpe baoyo bazalaki kobuka mibeko yango bazalaki kolakelama mabe. (Deteronome 27:26) Emonani ete Bayisraele bazwaki etumbu mbala mingi mpo baboyaki kotosa Mibeko ya Nzambe; Jéhovah akabolaki bango te; asalelaki nde bango mpo na komonisa bilakiseli na bisakweli mpe kopesa bango bandakisa ekozala makebisi. Na esengo, mpe bobele na nzela na Yisraele, Nzambe abimisaki Mosikoli Yesu Klisto, mpo ete bato banso bapambolama.​—Bagalatia 3:14; tala Genese 22:15-18.

Yesu azalaki na koponapona?

9. (a) Na nini Jéhovah mpe Yesu Klisto bazali ndenge moko? (b) Mituna nini tokoki komituna na ntina na Yesu?

9 Lokola Jéhovah aponaponaka te, Yesu akoki koponapona? Tala likambo Yesu alobaki mokolo mosusu: “Nakolukaka mokano na ngai moko te kasi mokano na ye oyo atindi ngai.” (Yoane 5:30) Jéhovah mpe Mwana na ye molingami bazali na boyokani makasi, mpe Yesu akokokisaka na makambo nyonso mokano ya Tata na ye. Makanisi na bango mpe mikano na bango ekokani na likambo yango na boye ete Yesu akokaki koloba: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.” (Yoane 14:9) Pene na mibu 33 Yesu afandaki awa na mabelé lokola moto, mpe Biblia eyebisi ndenge nini ye azalaki kotalela bato. Azalaki na ezaleli motindo nini epai na bato ya mposo mosusu? Azalaki koponapona? Azalaki kokabola bikolo?

10. (a) Yesu ayanolaki nini epai na mwasi moko Mokanane oyo asengaki ye lisungi? (b) Awa Yesu akokisaki Bapakano na “bana na mbwa, elakisi ete ayinaki bango? (c) Mwasi mokanane azongisaki nini epai na Yesu, mpe nsuka na yango ezalaki nini?

10 Yesu alekisaki eteni monene ya bomoi na ye elongo na Bayuda; nzokande, mokolo mosusu; mwasi moko Mokanané, elingi koloba moto na libota ya bapakano, ayaki epai na ye mpe abondelaki ye ete abikisa mwana na ye ya mwasi. Yesu ayanolaki ye boye: “Natindami bobele epai na bampate na ndako na Yisraele baoyo babungani.” Bongo, mwasi abondelaki ye lisusu boye: “Nkolo, sunga ngai!” Mpe Yesu abakisaki: “Ezali malamu te kokamata bilei na bana mpe kopesa yango epai na bana na mbwa.” Na miso na Bayuda, bambwa bazalaki banyama na mbindo; kasi tokoki koloba ete Yesu azalaki kokabola mpo ete akokisaki Bapakano na “bana na mbwa”? Te, mpamba te, autaki koloba yango, Nzambe atindaki ye mosala ya sikisiki, oyo ya koleisa ‘bampate na ndako na Yisraele baoyo babungaki’; mpe lisusu alembisaki elakiseli na ye na kolobelaka mpo na “bana na mbwa”, na esika ya bambwa mabe. Maloba oyo mazalaki momekamo mpo na mwasi Mokanané; kasi ata azwaki ekateli ya koloba mpo na kotemela yango, ayanolaki na mayele mpe na komikitisa nyonso: “Ee, Nkolo, kasi ata bana na mbwa bakolyaka mua mike oyo ekokwea longwa na mesa na nkolo na bango.” Yesu akamwe na kondima ya mwasi yango mpe abikisi mbala moko mwana na ye ya mwasi.​—Matai 15:22-28.

11. Lokola emonisami na likambo moko elekaki kati na Yesu mpe bayekoli na ye, ndenge nini Basamaria bazalaki kotalela Bayuda?

11 Yesu akutanaki mpe na Basamaria oyo koyinana ezalaki kati na bango mpe Bayuda. Mokolo mosusu, atindaki bato na mboka moko ya Basamaria, mpo ete bibongiseli bisalama mpo na ye; kasi bafandi na mboka yango ‘bayambaki ye te mpo ete azalaki kotala nzela na Yelusaleme’. Yakobo mpe Yoane bamonaki mabe na likambo yango, ntina wana balingaki kobenga móto ekita mpo na koboma Basamaria. Nzokande, Yesu apamelaki bayekoli oyo mibale, mpe bango nyonso elongo bakendaki na mboka mosusu.​—Luka 9:51-56.

12. Mpo na nini mwasi Mosamaria akamwaki ntango Yesu asengaki ye mai?

12 Yesu ayinaki Basamaria? Totala eloko nini elekaki na libaku mosusu. Yesu elongo na bayekoli na ye balongwaki na Yudea mpo na kokende na Galilai; nzokande basengelaki naino koleka na Samaria. Elembaki ye mpo na mobembo, Yesu afandaki pene na liziba na mai na Yakobo, ntina ete apema naino kozelaka bayekoli na ye bakendaki kosomba bilei na Sikare, mboka moko penepene wana. Ezalaki ye kopema, mwasi moko Mosamaria ayaki kotoka mai. Atako mokolo mosusu, kati na mosala na ye, alobaki mpo na Basamaria ete bazali “bapaya” (Luka 17:16-18), nzokande na mokolo wana Yesu alobaki epai na mwasi Mosamaria: “Pesa ngai mai na komela.” Lokola Bayuda bazalaki kosolola na Basamaria te, mwasi azongisaki ete: “Boni yo Moyuda ozali kolomba mai na komela epai na ngai mwasi Mosamaria?”​—Yoane 4:1-9.

13. (a) Yesu abimisaki ntembe na maloba na mwasi Mosamaria? Na nsima mwasi asalaki nini? (b) Litomba nini ezwamaki na litatoli oyo Yesu apesaki?

13 Yesu abimisaki ntembe te na liloba oyo ya mwasi Mosamaria; asalelaki nde libaku yango mpo na kopesa ye litatoli, kino mwasi yango andimaki ete Yesu azali Masiya. (Yoane 4:10-26) Mwasi akamwaki makasi, atikaki eloko na ye penepene na liziba mpe akendaki mbango na mboka, kuna asololaki na bato makambo ye akutanaki na yango. Atako azalaki mwasi na ezaleli mabe ya kokamata mibali mingi, alobaki boye mpo na komonisa ete asepelaki na makambo ya elimo: “Ekoki kozala ete ye nde Klisto?” Mpo na yango, bafandi mingi na mboka yango bandimelaki Yesu na ntina na litatoli malamu mingi oyo mwasi Mosamaria apesaki. (Yoane 4:27-42) Kati na mokanda na ye Ndenge Biblia ezali kotalela likambo ya mposo (na anglais), Thomas Figart, molakisi na makambo na Théologie alobaki boye: “Nkolo na biso amonaki ete ezali likambo ya ntina na kosala boboto na esika ya kolanda motindo mabe ya kokabola mposo; biso tosengeli komekola ye, toboya makambo nyonso ya kokabola mposo.”

14. Ndenge nini kosakola ya Filipe emonisaki et Jéhovah azali na koponapona te?

14 Mpo ete Jéhovah azali na koponapona te, yango epesaki nzela na bato ya bikolo mosusu mpe bamposo mosusu ete bayamba losambo ya Bayuda; kasi totala likambo nini esalemaki esili koleka bikeke 19, na nzela ya esobe longwa na Yelusaleme kino na Gaza. Moindo moko, mosali epai na mokonzi-mwasi ya Etiopi, azalaki kotanga esakweli ya Yisaya, wana efandaki ye likolo na likalo na ye. Mosali monene wana azalaki moto oyo asilaki kondima losambo ya Bayuda, akatamaki ngenga, mpo elobami ete “asilaki kokenda na Yelusaleme mpo na kosambela.” Anzelu ya Jéhovah abimelaki Filipe Moyuda mpe mopalanganisi na nsango malamu, mpe alobaki na ye ete: “Kenda kokota na likalo wana.” Filipe aboyaki te, atako moto yango azalaki moto ya ekolo mosusu. Andimaki nde na esengo nyonso libiangami ya Moetiopia oyo abiangaki ye ete amata kofanda esika moko na ye kati na likalo, mpe Filipe alimbolaki epai na moto yango esakweli ya Yisaya na ntina na Yesu Klisto. Ekomaki bango na mai moko, Moetiopia atunaka na Filipe ete: “Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?” Lokola likambo moko ekokaki kopekisa ye te, Filipe azalaki na esengo ya kobatisa Moetiopia wana. Na motindo yango, Jéhovah ayambaki mobali wana, oyo na esengo nyonso, apakolamaki na elimo mpe akomaki moyekoli na Mwana na Ye Yesu Klisto, oyo azali na koponapona te. (Misala 8:26-39) Na nsima Nzambe apesaki bilembo mosusu mpo na komonisa ete azali na koponapona te.

Libongwani monene

15. Kufa na Yesu ememaki libongwani nini, mpe ndenge nini Paulo alobelaki libongwani yango?

15 Kufa ya Yesu lokola mbeka esukisaki te makambo ya koponapona bikólo kati na mokili. Nzokande, epesaki nzela ete Nzambe alongola epai na bayekoli na Yesu kokabwana oyo ezalaki kati na Bayuda mpe bato ya Mabota mosusu. Paulo alobeli libongwani yango kati na mokanda oyo akomelaki Baefese, Bapakano oyo bakomaki baklisto: “Boye, bokanisa ete bino bozalaki liboso bapakano mpo na nzoto; . . . na ntango yango bozangaki Klisto, bokabwanaki na koyangana na Yisraele mpe bozalaki bapaya na kondimana na bilaka, bozalaki na elikya te. Bozangaki Nzambe kati na mokili. Nde sikawa bino bozali kati na Klisto Yesu; bozalaki mosika liboso, nde bosili kobelema mpo na makila na Klisto. Mpamba te ye azali kimya na biso, oyo asali biso mibale eloko moko, mpe abuki lopango na koyinana na katikati.” “Lopango” yango, elembo na bokabwani, elakisi kondimana na Mibeko, oyo etiaki Bayuda na ngambo moko mpe Bapakano na ngambo mosusu. Na nzela na kufa na Klisto, kondimana yango elongolamaki mpo ete na nsima na ye, Bapakano lokola Bayuda, bakoka “koyambama epai na Tata na nzela na elimo moko”.​—Baefese 2:11-18.

16. (a) Mpo na nini Petelo azwaki mafungola ya Bokonzi? (b) Fungola yango ezalaki boni mpe asalelaki yango mpo na banani mpe banani?

16 Epai mosusu, ntoma Petelo azwaki “mafungola na bokonzi na likolo” mpo ete bato na bikólo nyonso bakoka koyeba mikano na Nzambe, ‘kobotama lisusu’ na nzela na elimo santu mpe kokoma bazwi na libula elongo na Klisto. (Matai 16:19; Yoane 3:1-8) Mpo na yango Petelo asalelaki mafungola misato ya elilingi: ya liboso mpo na Bayuda, ya mibale mpo na Basamaria mpe ya misato mpo na Bapakano to ba Gentils. (Misala 2:14-42; 8:14-17; 10:24-28, 42-48) Na motindo yango, Jéhovah, Nzambe oyo azali na koponapona te apesaki epai na baponami na bikólo nyonso libaku malamu ya kozala bandeko na Yesu na elimo mpe bazwi na libula na Bokonzi esika moko na ye.​—Baloma 8:16, 17; 1 Petelo 2:9, 10.

17. (a) Emonaneli nini ya kokamwa Petelo azwaki, mpe mpo na nini? (b) Bakendaki na Petelo epai ya nani, mpe nani azalaki kozela ye kuna? (c) Petelo akundolaki nini epai na Bapakano yango, kasi Jéhovah Nzambe ayebisaki ye nini?

17 Mpo na kobongisa Petelo ete asalela fungola ya misato, oyo ezalaki mpo na Bapakano, Jéhovah atalisaki ye emonaneli moko ya kokamwa, oyo ya banyama ya mbindo, mpe alobaki na ye: “Petelo! Telema, boma mpe lia!” Tala ndimbola ya emonaneli yango: “Mpo na biloko bipetoli Nzambe, yo tanga yango biloko na mbindo te.” (Misala 10:9-16) Petelo amitunaki soki emonaneli yango ezalaki na ndimbola nini: ayebaki eloko akosala te. Mosika te bato misato bayaki koluka ye mpo na kokenda na ye epai ya Korneye, mokonzi ya mboka Kaisalia. Lokola mboka yango ezalaki esika efandaki bakonzi ya basoda Baloma oyo bazalaki kokengela Yudea, ezali mpo na yango Korneye afandaki wana. Ezali bongo kati na mboka wana ya Bapakano nde Korneye, libota na ye mpe baninga na ye ya motema bazalaki kozela Petelo. Ntoma oyo alobaki na bango: “Bino boyebi ete ekoki na mobali Moyuda kosangana soko kobelema na bato na libota mosusu te. Nzambe nde asili kotalisa ngai ete nabianga moto mosusu moto mpamba te, soko moto na mbindo te yango wana, esili ngai kobiangama nayei koya na ntembe te.”​—Misala 10:17-29.

18. (a) Liloba nini ya ntina mingi Petelo alobaki liboso ya Korneye mpe ya bato bayanganaki epai na ye? (b) Likambo nini ya kokamwa esalemaki nsima wana Petelo apesaki litatoli na ntina na Yesu? (c) Ebongiseli nini ezwamaki mpo na Bapakano oyo bakomaki bandimi?

18 Nsima wana Korneye alimbolaki ndenge nini Nzambe atambwisaki makambo, Petelo alobaki: “Na solo, namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:30-35) Na nsima, wana ntoma azalaki naino kopesa litatoli na ntina na Yesu Klisto, likambo ya kokamwa esalamaki: “Naino ezalaki Petelo koloba maloba oyo, elimo santu ekwei likolo na bango nyonso bazalaki koyoka liloba.” Bayuda oyo bazalaki na Petelo elongo “bakamwi ete likabo na elimo santu esopameli bapakano mpe. Mpo ete bayoki bango kosolola na minoko mosusu, mpe kokumisa Nzambe”. Mpo na kobatisa baoyo bazwi elimo santu lokola biso?” Nani akokaki koboya, mpamba te elimo santu ya Nzambe na makolo, Nzambe oyo akokabolaka bato te, esopamaki likolo na Bapakano oyo bandimaki? Na yango, Petelo apesaki etinda ete “babatisama na nkombo na Yesu Klisto”.​—Misala 10:36-48.

“Uta na mabota nyonso”

19. Mpo na nini koyinana kati na bamposo ekomi mingi, mpe epalangani kino wapi?

19 Tozali kobika na “mikolo na nsuka” ya biloko mabe ya ntango oyo; ee, tozali na “ntango na mpasi”. Bato bazali ‘bamikumisi na bango mpenza, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, bato bazangi komipekisa, bato na nko, bato na motó makasi mpe bato bavimbi na lolendo. (2 Timote 3:1-5) Yango wana tozali komona koyinana mpe bitumba mingi kati na bamposo mpe bikolo ndenge na ndenge na mokili. Na mikili mingi, bato ya mposo ndenge na ndenge bazali kotiolana, bazali koyinana, kobunda mpe kobomana. Ata na mikili oyo balobaka ete bango bakoli, nzokande bato mingi bazali naino na mikakatano mpo na kosilisa makanisi na bango ya mabe epai ya bamposo mosusu. Epai mosusu, mabe yango ezali kopalangana ata na bisanga, epai kuna kala kimya monene ezalaká.

20. (a) Yoane amonaki nini na kopemama na Nzambe? (b) Motindo nini esakweli yango ezali kokokisama? (c) Mikakatano nini bamoko balongi naino te mpo na kosilisa yango, mpe epai wapi basengeli koluka lisalisi mpo na kosilisa yango?

20 Atako na mikili mingi kimya ezali te kati na mposo ndenge na ndenge, Jéhovah, Nzambe oyo azali na koponapona te, asakolaki ete akobimisa libota moko ya bato ya sembo, bato bauti na mposo nyonso mpe na mikili nyonso, baoyo bakozala na bomoko na mokili mobimba. Na kopemama na Nzambe, ntoma Yoane amonaki “ebele monene, oyo moto te akoki kotanga motuya na bango; bauti na mikili nyonso, na mposo nyonso, na mabota nyonso mpe na minoko nyonso; batelemi liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na Mpate”, mpe bazali kokumisa Jéhovah. (Emoniseli 7:9, Jérusalem) Esakweli yango ezali kokokana. Lelo oyo, na mikili 210, ba Témoins de Jéhovah koleka 3 300 000 bauti na mabota nyonso mpe na mposo nyonso bazali na bomoko mpe na kimya. Kasi, bazali naino bato bazangi kokoka, mpe ekoki kozala ete bamosusu kati na bango, ata bazali koyeba yango te, bazali kokoka te kosilisa makanisi na bango mabe mpo na bamposo mosusu. Ndenge nini bakoki kolonga bolembu yango? Tokotalela motuna oyo na lisolo oyo ezali kolanda, oyo moboko na yango ezali likolo na batoli ya litomba epesami na Liloba na Jéhovah, Nzambe oyo azali na koponapona te.

Bozongeli

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete Jéhovah azalaki na koponapona te lokola asalelaki Bayisraele?

◻ Nini emonisi ete Yesu Klisto azalaki koponapona te mpe azalaki na makanisi mabe te mpo na bamposo mosusu?

◻ Nini esalisaki Petelo na koyeba ete “Nzambe akabolaka bato te”?

◻ Atako kimya kati na bamposo ezali te kati na mokili, esakweli nini etali bomoko ezali kokokana?

[Elilingi na lokasa 10]

Ntoma Paulo alobaki epai na bato na Atene: ‘Nzambe asalaki bato na mabota nyonso mpe atindaki bango kofanda na mokili mobimba.’

[Elilingi na lokasa 12]

Lokola azalaki na koponapona te, Yesu apesaki litatoli epai na mwasi Mosamaria na libulu ya mai ya Yakobo, penepene na Sikare

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto