Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/10 nk. 1-4
  • Massada Mpo na nini bongo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Massada Mpo na nini bongo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ba Sicaires ya Massada
  • Massada Elembeteli ete Masiya ayaki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mikanda kitoko ya Josèphe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Okobika na ntango Nzambe akokokisa bikateli na ye?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Elikya kitoko mpo na molimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/10 nk. 1-4

Massada Mpo na nini bongo?

‘Uta kala tozwaki ekateli, biso basoda ya mpiko, ete tozala baombo ata ya Baromé te to mpe ya moto mosusu te bobele ya Nzambe: . . . lokola maboko oyo mazali naino na bonsomi mpe masimbi mopanga, . . . tokufa kozanga ete tozala baombo ya monguna mpe, lokola tozali bato na bonsomi, biso banso totika bomoi oyo elongo na bana mpe basi na biso.”

Ezali boye nde Yosefe, mokomi na lisolo na bato na ekeke ya liboso, azali koyebisa kati na mokanda na ye La guerre des Juifs toli ezangi elonga oyo Eléazar, mwana na Yailo (to Ben Ya’ir), apesaki epai na babondeli ya Massada. Mpo na nini mokonzi moyuda wana abendaki baninga na ye na liwa mpe na komiboma bango nyonso, na kobukáká mobeko ya Nzambe? (Exode 20:13) Likambo ya ntina lisusu koleka ezali oyo ete, na nini boyebi ya likambo yango ekoki kosalisa yo na kobika kati na mokili ya mobulu ya lelo?

Ba Sicaires ya Massada

Liboso ete botomboki na bayuda esalema na mobu 66 ya ntango na biso, limpinga na baromé epikamaki na Massada, ngomba elendisami penepene na la mer Morte. Atako Massada ezalaki kati na esika moko oyo etangwaki, Hérode le Grand amitongelaki ndako mpo na kofanda na ntango ya elanga. Abongisaki nkutu esika moko mpo na kopesa nzela na kosukola mai ya móto. Kasi likambo monene ezalaki oyo ete, esika yango ezalaki ebombelo ya ebele na bibundeli, mpo na baromé. Lokola likunya ezalaki kobakisama mpo na Baromé oyo bazwaki Palestine, likama ya komona ete bibundeli bikwe na maboko na bayuda batomboki ezalaki se koya monene. Moko na bituluku ezalaki oyo ya ba Sicaires, nkombo oyo elimboli “mibali na mipanga.” Biblia ezali kolobela nkombo yango na boyokani na botomboki.​—Misala 21:38.

Na mobu 66 ya ntango na biso, “mibali na mipanga” yango babotolaki Massada. Lokola bazalaki na bibundeli na bango oyo bautaki kozwa sika, batambolaki kati na Yelusaleme mpo na kolendisa botomboki liboso na bokonzi ya baromé. Koboma oyo bayuda batomboki babomaki mampinga ya basoda na baromé ya Massada mpe ya Yelusaleme, ebendelaki baninga na bango nkanda ya Rome. Liboso na nsuka ya mobu 66, limpinga ya zomi na mibale, oyo etambwisamaki na cestius Gallus, ekotaki na Yudea mpe etambolaki zingazinga na Yelusaleme. Baromé babundisaki mboka bipai binso kino kobebisa miboko (fondations) epai na nord ya temple. Na pwasa, Gallus azwaki basoda na ye mpe alongwaki na Yudea, ntina eyebanaki te. Yosefe, temwe oyo amonaki makambo yango, ayebisi ete: “Soki atyaki lisusu mwa molende moke, mbele akokaki kozwa engumba mobimba.”

Kasi Baromé basengelaki kosuka bobele wana te. Mbula minei na nsima, Titus mokonzi moromé ya basoda atambolaki kati na Yelusaleme elongo na mampinga minei.a Ya mbala oyo, engumba nyonso ebomami mpe Yudea ezwamaki lisusu na boyangeli ya Rome. Yudea mobimba, longola bobele Massada.

Lokola bazalaki na ekateli ya koboma esika wana ya nguya, Baromé batongaki bifelo ya mabanga zingazinga na lopango mpe zingazinga na ba camps mwambe na bango. Na nsuka na yango, bango moko basalaki ngomba na mabelé oyo emataki mpenza na likoló, kobakisama ya mabelé oyo ezalaki na molai ya 197 metele mpe bolai ya 55 metele, oyo likoló na yango batongaki ndako moko mpe batyaki masini ya etumba oyo esalamaki mpo na kotobola bifelo ya Massada. Ezalaki bobele likambo ya mwa ntango moke liboso ete mampinga na baromé batonga mpe bakamata esika makasi oyo ya Yudea.

Lelo oyo, bilembo ya sikisiki ya kotambola na baromé, efelo ya zingazinga na esika oyo basoda bafandaki mpe ngomba monene emonisi nsuka ya botomboki na bayuda. Bolukiluki makasi na nse ya mabelé bosalemaki na Massada na 1965. Mpo na bokundoli oyo bosalemaki, Nouvelle Encyclopédie britannique (1987, angl.) elobi ete: “Bandimbola ya Yosefe mokomi na Lisolo ya bayuda mpe baromé, oyo ezali kino lelo, liziba bobele moko ya sikisiki na lisolo ya Massada, emonanaki mpenza ete ezali.”

Kasi ndenge nini “mibali na mipanga” basalaki mpo na toli ya komiboma oyo epesamaki na Eléazar, mwana ya Yailo, nzokande Baromé bakomaki pene ya kotobola bifelo? Yosefe ayebisi ete: “(Babomaki) basi mpe bana na bango na maboko na bango moko mpenza . . . Na nsima, wana esilaki bango kopona na nzela na mbese bato zomi kati na bango baoyo bakozala na mokumba ya koboma baninga nyonso mosusu, balalaki, moto na moto penepene na mwasi mpe na bana na ye bakufaki mpe, kosimbaka makasi na maboko na bango, batandaki nkingo na bango liboso na mopanga ya baoyo bazalaki kokokisa mosala wana mabe.b Ntango bato yango basilisaki koboma bango nyonso, kozanga koboya, bamisalelaki mobeko bobele moko wana ya kopona na nzela na mbese bamoko mpo na bamosusu . . .; kasi mobange mwasi moko mpe mwasi mosusu . . . babombanaki . . . . Soki totangi basi mpe bana, motuya na bakufi ezalaki nkama libwa na ntuku motoba.”

Mpo na nini botomboki ya Bayuda esukaki na lolenge ya mabe? Yango ezalaki nde na boyokani elongo na bomoi mpe na liwa na Yesu ya Nazarete?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na Massada, ba archeologues (bato oyo bakotimolaka mabelé mpo na koluka koyeba makambo maleka kala na bisika bamboka ezalaká), bamonaki ebele na bapalata oyo ezali na makomi na liebele lokola “Mpo na bonsomi na Siona” mpe “Yelusaleme mosantu” oyo ezalaki kokumisa botomboki Kati na mokanda na ye Massada (angl.), Yigael Yadin alobi ete: “Takutaki bapalata elobelaki mobu nyonso ya botomboki, kobanda na oyo ya liboso kino botomboki ya mitano, oyo mpo na yango bapalata ezali komonana mingi te, mpamba te ezali mobu ya nsuka oyo yango ebebisamaki. yango ekokani na 70, mobu oyo temple ya Yelusaleme ebomamaki.” Tala palata oyo ezali awa na likoló.

b Na esika basoda bazalaki koyanga etumba pene na ekotelo ya Massada, bakutaki bitike 11 ya mbeki esalami na mabelé motane; mokomoko na yango ezali na nkombo mokuse ya liebele. Ebele na bato na mayele bazali kokanisa ete ekoki kozala makambo oyo Yosefe alobeli yango. Likoló na moko na yango, tozali kotanga ete: “Ben Ya’ir,” nkombo oyo elimboli “mwana na Yailo.” Kati no mokanda Joseph et le savoir contemporain (angl.) Louis Feldman alobi ete, “bokundoli ya makambo yango epai na Yadin, oyo moko na yango ezali na nkombo Ben Yailo, ezali kondimisa maloba na mpasi oyo Yosefe akomaki.”

[Elilingi na lokasa ya liboso]

Massada​—Emonisi ete Masiya ayaki?

[Elilingi na lokasa 4]

Palata ya bayuda na 67 ya ntango na biso, oyo azali kolobela “mobu ya mibale”ya etumba na Rome

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto