Massada Elembeteli ete Masiya ayaki?
NA BOUMELI nyonso ya Lisolo na bato, makila oyo masopanaki na nkombo na lingomba mazalaki mingi mpenza. Massada emilongolaki te, mpamba te babundeli na yango bazalaki na mposa makasi ya kosambela. Ntango bato bazali kokende kotala bitika ya esika wana ya nguya, bakoki komona bitika ya sinagoge epai kuna “mibali na mipanga” (ba Sicaires) bazalaki koyangana mpo na kosambela mpe kosukola mai masengisamaki mpo na milulu ya komipetola.
Bakutaki mpe lisusu ndambo na Biblia na Massada. Ozali mbala mosusu komituna ete, nsango nini ya Biblia oyo ba Sicaires bazalaki na yango, na kotalela oyo tozali kotanga lelo kati na Biblia. Kati na mokanda na ye Massada (angl.), Yigael Yadin akomaki na ntina na ndambo ya liboso oyo ekundolamaki:
“Botaleli ya mokuse na ndambo yango emonisaki ete ezalaki eteni moko ya Mokanda na Nzembo oyo tokoki nkutu koyeba mikapo: kobanda na Nzembo 81 kino na Nzembo 85. . . . Bakokaki koyebisa ba dates na yango kozanga ata mwa nkaka. Ekokaki kozala liboso na mobu 73 nsima na Yesu Klisto, mbula oyo Massada ekweaki. . . . Eteni wana ya mokanda na Nzembo, lokola mpe barulo nyonso mosusu ya Biblia oyo tokutaki na nsima, ezali pene na lolenge moko . . . na texte ya mikanda na Biblia oyo tozali kosalela lelo.”
Na ndenge yango emonani, ba Sicaires bakanisaki ete Nzambe mokomisi na Makomami na liebele asengelaki kopambola botomboki na bango liboso na Rome. Lokola Encyclopédie juive universelle (angl.) elimboli yango, “komipesa kozanga kososola ya Bayuda mpo na etumba elongo na Rome (66-73 ya ntango na biso) elendisamaki na endimeli na bango oyo engebene yango ete eleko ya masiya ekomaki penepene. Kolimwa ya temple ebakisaki bobele bilikya ya mpamba mpo na koya ya Masiya.”
Koya ya Masiya
Encyclopédie de la religion (angl.) elobi ete, “Bayuda oyo bamipesaki kozanga kososola na koya ya Masiya mbala mingi bazalaki kotalela mitango na bango na kosaleláká mokanda na Danyele.” Ezali solo ete mosakoli moebele Danyele ayebisaki koya na “Masiya Mokambi.” (Danyele 9:25) Na mabaku mibale mosusu, alobaki ete Masiya asengelaki kokóma Mokonzi na mokili mpe ete Bokonzi na ye ekoboma biyangeli nyonso ya bato oyo bikotemela ye.—Danyele 2:44; 7:13, 14.
Batomboki bayuda ya ekeke na liboso bakanisaki ete ntango oyo bimonaneli wana ya esakweli esengelaki kokokana ekómáki. Yosefe alobi ete, “likambo oyo ezalaki kotinda bango na etumba koleka makambo nyonso mosusu, ezalaki (endimeli) oyo ete, na eleko wana, moko na bana-mboka na bango akokóma mokonzi ya mokili.” Kasi Danyele ayebisaki ete liboso, Masiya Mokambi “akobomama” mpe nsima ya liwa na ye, Yelusaleme mpe temple na yango ekobomama na ‘libota ya mokambi mosusu oyo akoya.’—Danyele 9:25, 26.
Likambo oyo Bayuda bazalaki kokanisa mpo na boyangeli ya bapakano
Na ekeke ya liboso, Yudea ezalaki na mwa ndambo na bazwi mpe ntalo monene ya babola. Bayuda na bozwi, mingi mpenza kati na Basadukai mpe Bafalisai, balingaki mingi mpenza bokonzi oyo Rome atikelaki bango kati na mboka mpe bazalaki kotyola bato nyonso mosusu ya ekolo. Yango wana bazalaki kotemela likanisi nyonso ya botomboki mpe bazalaki nde kosala milende mpo na kobatela boyokani na bango ya kimya elongo na Rome.—Luka 16:14; 19:45, 46; Yoane 2:14; 7:47-49; 11:47, 48.
Nzokande, Bayuda oyo na bozwi te bazalaki konyokwama na mokumba ya kofuta mpako na baromé mpe na minyoko miuti na banamboka bango moko mpenza. Bazalaki kozwa ata litomba moko te mpo na botosi na bango epai na oyo bazalaki kobenga Pax Romana (Kimya ya rome); bazalaki nde kolinga mbongwana. Matata wana etali matomba ememaki na etumba monene ya bana-mboka. Yosefe akomi ete, “moko na bituluku ezalaki kolinga bobele bokonzi, mosusu ezalaki bobele koluka bitumba mpe koyiba bazwi.”
Na ndakisa, ba Sicaires, bazalaki kobundisa mpe koboma Bayuda mosusu, kolongisáká koboma na bango wana na kolobaka ete, ezalaki bitumbu epai na bato oyo bafundamaki ete bazalaki koyokana na Rome. Johanan ben Torta, mokonzi ya lingomba ya Bayuda, na ekeke ya mibale, alimbolaki ntina ya mpasi makasi oyo ezwaki Bayuda na ekeke ya liboso: “Bazalaki na lokoso ya mosolo mpe bazalaki koyinana bamoko mpe bamosusu.”
Likambo ya kokamwa ezali te ete Bayuda oyo bazalaki kobanga Nzambe mpenza balingaki na motema likoló ete Masiya aya, ye oyo, engebene bilikya na bango, akokweisa bokonzi na rome mpe akotya Bokonzi ya sembo na Nzambe. Kasi bato mabe basalelaki mpe elikya yango.
Bamasiya ya lokuta
Pene na mobu 33 ya ntango na biso, mokonzi moyuda moko na nkombo Gamaliele akundolaki likambo oyo epai na bakonzi mosusu ya Yelusaleme: “Mpo ete mwa kalakala . . . Yuda na Galilai abimi, mpe abendi bato nsima na ye. Ye mpe akufi, mpe bango nyonso balandaki ye bapalangani.”—Misala 5:36, 37.
“Kokomisa nkombo” oyo ememaki na botomboki ya Yudasi esalemaki na mobu 6 ya ntango na biso mpo ete babakisaki mpako oyo ezalaki kofutama na Rome. Yosefe alobi ete, engebene makambo oyo Yudasi azalaki kosakola, Bayuda “oyo bazalaki kotosa na kofutaka mpako na Rome bazalaki bagoigoi.” Nkombo Yudasi euti na liloba Yuda, oyo epesi nzela na kokanisa ete azalaki na libota epai kuna bazalaki kozela Masiya. (Genese 49:10) Mokanda Cyclopoedia ya Mcclintock mpe Strong elobi ete, “molende na ye mpo na koloba mpe koyebana ya mateya na ye epai na bato mingi ebendaki bato mingi na kolanda ye, kati na bango mingi bazalaki komona ete ye nde azalaki Masiya.”
Tokomona ete, engebene Misala 5:37, bayekoli na Yudasi yango bakufaki elongo moko na ye te. Engebene moyuda moko ya mayele mingi na nkombo Gaalya Cornfeld, lingomba na ye “ezwaki mpenza misisa makasi mpe ezalaki kopesa bilikya ya masiya.” Na yango, mikonzi mibale ya ba Sicaires, Ménahem mpe Eléazar, bazalaki bakitani na Yudasi na Galilai. Na ebandeli ya botomboki na bayuda na mobu 66 ya ntango na biso, Ménahem apesaki epai na bato na ye bibundeli oyo ebombamaki na Massada. Na nsima “azongaki na Yelusaleme lokola soki nde azalaki mokonzi” mpe “akomaki mokambi ya botomboki.” Encyclopédie judaïque (angl.) ebakisi ete: “Ekoki mpenza kozala solo ete Ménahem (mwana ya) Yudasi atalelamaki lokola Masiya.”
Nzokande, Ménahem abomamaki mbula wana na basangani ya etuluku moko ya batomboki mosusu na bayuda. Bato na ye bakimaki na Massada epai oyo Eléazar akomaki mokambi ya ba Sicaires kino na mobu 73. Etinda na ye na komiboma ezalaki kopalanganisa mateya mabe ya nkoko na ye Yudasi: “Uta kala, tozwaki ekateli biso basoda na mpiko, ya kozala baombo ata ya Baromé te to mpe ya moto mosusu te, bobele Nzambe.”
Baklisto na Yudea bamikotisaki te na makambo ya mokili
Liboso na botomboki ya bayuda na mobu 66, masangá na boklisto masalamaki kati na Yudea, bakisa mpe lisangá ya Yelusaleme. (Misala 9:31) Esalemaki na Bayuda oyo bazalaki kondima ete Yesu ya Nazarete azalaki Masiya oyo liwa mpe lisekwa esilaki kosakolama kala. (Misala 2:22-36) Baklisto bayuda wana bazalaki kosakola na molende bindimeli na bango, kozeláká na kimya nyonso koya ya mibale ya Masiya, lokola mokonzi ya mokili. Yesu ayebisaki ete akozonga “nsima na ntango molai.”—Matai 25:19, 31; 28:19, 20; Misala 1:8-11.
Kasi ntango botomboki na bayuda esalemaki na mobu 66, likambo nini epekisaki baklisto na Yudea na kosepela na bolongi ya liboso ya botomboki yango? Na ntembe te, bamikundola likebisi ya Nkolo na bango ete: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Yesu apesaki bango mpe likanisi moko ya mayele mpo na oyo etali bokonzi ya biyangeli na bapakano, na kolobáká ete: “Bopesa na Kaisala biloko na Kaisala mpe na Nzambe biloko na Nzambe.” (Malako 12:17) Lisusu, Yesu ayebisaki ete Bamasiya na lokuta bakoya, kolobaka ete: “‘Ngai nazali ye,’ mpe: ‘Elaka elingi kokoka,’” kasi akebisaki bango boye: “Bolanda bango te.”—Luka 21:8.
Yesu alobaki nkutu mpo na nsuka ya botomboki na bayuda: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, boyeba na ntango yango ete libebi na yango esili kobelema. Na ntango yango, bango na kati na Yuda bakima kuna na ngomba, mpe bango na kati na mboka balongwa wana, mpe bango na bilanga bakota na mboka te . . .! Mpo ete mpasi monene ekozala na mokili oyo, na nkanda epai na libota oyo. Bakokwea liboso na mpia na mopanga, mpe bakokambama baombo na kati na mabota nyonso.”—Luka 21:20-24.
Koboma monene oyo elandaki botomboki na Bayuda emonanaki ete ezali kokokisama ya nsomo ya esakweli na Yesu. Nzokande, baklisto bayuda babikaki na yango na kotosáká, ‘na kokimáká epai na ngomba.’ Encyclopédie judaïque elobi ete: “Liboso ete Titus azinga Yelusaleme (na mobu 70 ya ntango na biso), etuluku na baklisto emifandelaki na Pella.” Ezali likambo ya esengo na koyeba ete Pella ezwami na nord, katikati na ebele ya bangomba ya ngambo mosusu na Yordani; ekabwanaki mpenza na Yudea na lobwaku ya Yordani. G. Williamson alobi kati na maloba ya ebandeli ya mokanda Joseph—La guerre des Juifs (angl.) ete, “ezali mpasi na kolimbola kokima wana soki esakweli (na Yesu) ekomamaki nsima na kosalema ya makambo oyo.”
Na yango, kokima malamu ya baklisto na Yudea ezali elembo monene ete bazalaki bayekoli na solo ya Masiya. Yango ezali kobimisa mituna ya ntina. Ntina na koya ya liboso ya Masiya ezali nini? Mpe likebisi nini botomboki na bayuda ezali bongo kopesa biso lelo, mingi mpenza kati na bato oyo babengami “baklisto”? Mituna oyo mikotalelama kati na masolo mosusu mabimi kati na nimero oyo.