Osengeli kondima Trinité?
Yesu Klisto azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso?
Mofandi moko na mboka Hayward (Etats-Unis) akomaki boye: ‘Nazali kokamwa mpe kosepela na brochure oyo etangami likoló. Mokanda yango kitoko etondi na makanisi mauti na mikanda ya mangomba makeseni mpe na mitango mimonisi ete liteya ya Trinité lizali solo te, lizali ya bokosi mpe lizwi moboko na Biblia te, oyo ezali Liloba na Nzambe.”
Ebele na bato basepelaki na brochure yango ezali na makanisi mingi oyo ezali kotalela na bozindo nini ezali mpenza mateya na moboko ya mangomba mingi ya boklisto ya lokuta. Soki olingi kozwa moko, tuna na ba Témoins de Jehovah ya mboka na yo.