Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/7 nk. 5-7
  • Mosala oyo ekoki kopesa yo esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala oyo ekoki kopesa yo esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bantina malamu ya komipesa na mosala?
  • Moto azalisamaki mpo na mosala
  • ‘Yoka esengo’ na kokokisa mokano ya Nzambe
  • Ndenge ya kosepela na mosala ya makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Sepelá na mosala na yo
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Moná bolamu mpo na mosala na yo ya makasi
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Basali ndenge balobaki!
    Lamuká!—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/7 nk. 5-7

Mosala oyo ekoki kopesa yo esengo

ANTONIO, mofandi ya Gênes (ltalie) alobi boye: “Nazalaki kolinga mpenza mosala na ngai ya monyati mikanda. Nazalaki na lifuti malamu mpe yango ezalaki kotinda ngai na kobakisa bangonga na mosala. Atako nazalaki elenge, nsima ya mwa bambula patron na ngai azalaki kolinga ngai mingi.” Emonanaki ete Antonio akokisaki mikano mpo na yango bato mingi bazali kosala makasi. Azalaki na mbongo, bomoi malamu mpe mosala malamu oyo ezalaki kosepelisa ye.

Kasi Antonio ‘azalaki koyoka malamu mpo na mosala na ye’? (Mosakoli 3:13) Epai mosusu, mosala yango ezalaki kopesa ye esengo? Abakisi boye: “Lokola tomipesaki mingi na mosala yango ebimisaki mikakatano na libala na biso, mpe epesaki biso mawa.” Atako bazalaki na mosala ya malamu, Antonio mpe mwasi na ye bazalaki na esengo te. Bongo yo, ‘oyokaka esengo mpo na mosala na yo’? Mosala na yo epesaka yo mpenza esengo?

Bantina malamu ya komipesa na mosala?

Kozwa mwayé ya kobikela: ezali ntina malamu ya komipesa na mosala. Na mikili misusu, esengeli kolekisa ngonga mingi na mosala mpo na kolonga. Bato bazali komona mpasi butu mpe moi mpo na kobongisa bomoi ya bana na bango. Bamosusu bazali kosala mingi mpo na kozala na bozwi.

Na Filipine, Leonida azalaki na misala mibale. Na moi azalaki kosala na banke mpe na butu azalaki kotangisa na eteyelo moko na boumeli ya ngonga misato to minei. Mosolo oyo ebakamaki na likoló ezalaki kosalisa ye? Leonida ayanoli boye: “Nazalaki ntango nyonso kowela ntango. Mosala yango ezalaki kotungisa ngai. Ezalaki kosepelisa ngai soko moke te.”

Te, kosala mpo na kozwa bobele mbongo ekopesa esengo soko moke te mpe ezali kopesa bolamu te. Mokonzi Salomon apesi toli oyo: “Sala makasi te mpo na kozala mozwi, mpo ete ekomibimisela mapapu solo, ekopumbwa mosika lokola mpongo kati na lola.” (Masese 23:4, 5) Mpongo (aigle) ezali kopumbwaka na vitesse ya 130 kilometres na ngonga moko. Yango emonisi malamu mbangu oyo bozwi ezwami na mpasi ekoki kokima. Ata moto akomi na bozwi, na kufa na ye, akoki komema eloko te.​—Mosakoli 5:15; Luka 12:13-21.

Makama makoki lisusu kozala mingi soko moto azali se kokanisa mpo na bomoi na ye. Yango ekoki kopusa yo na kolinga mosolo. Na ekeke ya liboso, basangani ya lingomba moko, Bafalisai, bayebanaki mpo na bolingo na bango ya mosolo. (Luka 16:14) Lokola azalaki Mofalisai, ntoma moklisto Paulo ayebaki malamu mpenza lolenge na bomoi na bango. (Bafilipi 3:5) Yango wana apesaki toli oyo: “Baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ekoyokisa mpasi. Mposa yango ekozindisa bato na liwa mpe libebi nyee. Mpamba te mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopengwa longwa na kondima mpe bamitoboli bango mpenza na bolozi mingi.” (1 Timote 6:9, 10) Ee, ye oyo azali ‘kolinga mosolo’ ye oyo akosala nyonso mpo na kozwa mosolo, akoki kobebisa bomoi na ye, Nzela yango ekomema na bolamu te.

Bamoko bazali kominyokola, mpo bazali na mposa ya komata grade na mosala. Bato motindo yango bazali kokutana na mikakatano. Mokanda Fortune elimboli boye: “Bilenge oyo bamipesaki mpo na kozwa bisika malamu ya mosala ntango bazalaki na mibu longwa 20 kino 35 bayei komona na mawa nyonso ete bato nyonso oyo bamipesi na mosala bazali kolonga te. Yango ezali kolembisa bango mpe bazali komituna mpo na nini molende nyonso wana. Mpo na nini koboma nzoto boye? Nyonso wana ezali mpenza na ntina?”

Mizumori azalaki kati na baoyo bazali komipesa na mosala na bomoi na bango mobimba mpo na koluka esika malamu na mokili. Lokola azalaki Directeur na banke moko monene ya Japon, azangaki ntango mpo na kofanda elongo na libota na ye. Nsima na mbula 30 ya mosala makasi, abebisaki kolongono na ye ya nzoto mpe azalaki na esengo te. Alobi boye: “Nayaki koyeba ete kowelana bisika minene na bato mosusu ‘ezali mpamba mpe koluka kozwa mopepe.’”​—Mosakoli 4:4.

Kasi ezali boni mpo na bato oyo lokola Antonio, bazali kolinga mosala na bango? Emipesaki ye na mosala na ye, Antonio abebisaki bomoi na ye ya libota bobele mpo na kotia liboso mosala na ye ya mosuni. Bamosusu bazali komibebisela kolongono ya nzoto na ndenge yango mpe ata bomoi na bango lokola emonisi yango liwa ya pwasa ya basali minene ya Japon oyo bazwaki kizunguzungu mpo na mosala. Biro oyo ekopesaka toli na mabota ya bawei yango bakamwaki mpo ete mokolo bobele moko batelefonaki bango mbala 135.

Ezali na baoyo bazali komipesa na bomoi na bango mpo na kosalisa bato mosusu. Ezali likanisi oyo Yesu alendisaki. (Matai 7:12; Yoane 15:13) Okozwa bolamu soko omipesi mpo na kosalisa mozalani na yo, ezali mosala oyo ezali malamu.​—Masese 11:25.

Nzokande, molende yango ata ezali malamu ezali mpe na makama. Tozwa ndakisa ya mokonzi moyuda Ozias. Abandisaki mosala monene mpo na bolamu ya libota na kosalaka mabulu ya mai kati na esobe. Ozias alukaki solo ete libota esepela, mpamba te na eleko wana ‘azalaki koluka Jéhovah’ mpe azalaki kotosa mobeko ya Nzambe oyo ezalaki kosenga mikonzi ete basalisa libota. (2 Ntango 26:5, 10; Deteronome 17:14-20) Yango ebakisaki bolongi na ye na bitumba, mpe ‘lokumu na ye ekendaki mosika’. Kasi ekomaki ye makasi, amitombolaki, mpe yango ekweisaki ye. (2 Ntango 26:15-20; Masese 16:18) Ye oyo akomipesa mpo na kosalisa bamosusu, kasi azali kosala yango mpo na komisepelisa mpe mpo na lokumu na ye moko, akoki kokenda na likama. Na bongo, mpo na nini kolinga kosala makasi?

Moto azalisamaki mpo na mosala

Tokoki kozwa liteya na mosala ya moto moko oyo asalaki malamu mingi koleka moto nyonso oyo asili kofanda awa na mabelé. Ezali bongo Yesu Klisto. (Matai 20:28; Yoane 21:25) Ekomaki ye pene na liwa likoló na nzete na mpasi, alobaki: “Yango esili kokokana!” (Yoane 19:30) Bomoi na ye ya mibu 33 na ndambo etondaki mpenza na makambo mingi.

Bomoi ya Yesu ekosalisa biso mpo na koyanola na motuna oyo: “Mosala nini ekoki kopesa yo esengo?” Ezali na kosalaka mokano ya Tata na ye ya makoló nde azwaki bolamu oyo eleki monene. Ndenge moko mpo na biso, kokokisama ya mokano ya Mozalisi ekoki kosepelisa biso mpe kopesa biso bolamu. Mpo na nini? Mpamba te Ye ayebi ndenge nini tozalisami mpe ayebi bamposa na biso malamu koleka biso moko.

Ntango Nzambe azalisaki moto ya liboso, Adam, apesaki ye mosala ya maboko mpe mosala oyo ezali kosenga mayele. (Genese 2:15, 19) Mpo ete ‘azalaki na bokonzi’ likoló na bikelamu nyonso na mabelé, Adam azalaki mpe na mosala ya kokokisa mpo na kobongisa makambo. (Genese 1:28) Wana amikitisaki na nse na ebongiseli yango, mosala na ye ezalaki na ntina mpe ezalaki kosepelisa ye. Mosala nyonso ata ya moke oyo ezalaki kopesamela ye ezalaki libaku mosusu mpo na kosepelisa Oyo-Aleki-Likoló.

Kasi makambo mabongwanaki mpo na Adam, mpamba te aponaki komilongola na ebongiseli oyo Nzambe atyelaki ye. Atikaki kosepela mpo na kosala mokano ya Nzambe, mpe alingaki kosala ndenge motema na ye elingaki. Asalaki lisumu epai ya Mozalisi. Mpo na yango Adam, mwasi na ye mpe bakitani na bango nyonso ‘bakomaki biloko mpamba’. (Baloma 5:12; 8:20) Na esika ete mosala na ye epesa ye esengo, ekomaki nde etumbu. Ekateli oyo Nzambe azwaki mpo na ye ezalaki boye: “Mabelé elakami mabe na ntina na yo. Okolya mbuma na yango na mawa mikolo nyonso na bomoi na yo. Ekobimisela yo nzete mpe nkamba na nzube, mpe okolya ndunda na mokili. Na motoki na elongi na yo okolya kwanga, kino ntango ekozonga yo kati na mabelé.” (Genese 3:17-19) Mosala, oyo ekokaki kokumisama mpo mokano na yango ya liboso ezali ya kosepelisa Mozalisi na moto, ekomaki se mokumba ya mpamba oyo ntina na yango ezalaki se mpo ya komilukela bilei.

Nyonso oyo tolobi elingi kolakisa nini? Elingi koloba ete mosala makasi ekosepelisa biso mpe ekopesa biso bolamu ya solo bobele soko tosaleli bomoi na biso mpo na kokokisa mokano ya Nzambe.

‘Yoka esengo’ na kokokisa mokano ya Nzambe

Kosala mokano ya Nzambe ezalaki lokola bilei mpo na Yesu Klisto azalaki kolinga mosala yango mpe ezalaki kobatela bomoi na ye ya elimo. (Yoane 4:34) Ndenge nini okoki kozwa esengo ya motindo yango na mosala?

Esengeli na yo koyeba “wapi mokano ya Jéhovah” mpo na yo. (Baefese 5:17) Mokano na ye ezali boye ete bato bakoma na “lisiko na nkembo na bana na Nzambe”. (Baloma 8:21; 2 Petelo 3:9) Mosala moko ya koyanganisa bato ezali kosalema sikawa mpo na mokano yango. Yo mpe okoki kosangana na mosala yango oyo ezali mpenza kosepelisa. Ekopesa yo esengo solo.

Antonio, ye oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo, ayaki kosepela na nsima mpe azwaki bolamu. Ntango mwasi na ye mpe ye batyaki mosala na bango ya “mpamba” na esika ya liboso kati na bomoi na bango mpe bamipesaki na yango, bomoi na bango ya elimo ebebaki. Ezali ntango yango nde babandaki kokutana na mikakatano kati na libala na bango. Ekangaki ye ntina ya likambo, mwasi ya Antonio azwaki ekateli ya kotika mosala na ye mpe abandaki ‘komeka na makasi’ mpo na kosakola ntango nyonso Bokonzi ya Nzambe.​—Luka 13:24.

Antonio alobi boye: “Toumelaki te mpo na komona mbongwana. Koswana esilaki. Kimya ezongaki kati na libota.” Mwasi na ye azwaki esengo ya kosalisa bato mosusu na kozwa mayele oyo elimboli “bomoi ya seko”. (Yoane 17:3) Bolamu na ye etindaki Antonio na kososola lisusu ntina ya makambo. Mposa na ye ya kosalela Nzambe na molimo na ye mobimba ekomaki na esika ya liboso. Antonio aboyaki esika eleki monene na mosala mpe atikaki mosala na ye. Atako mbongwana yango etindaki ye na kondima mosala mosusu ya moke, na ndakisa ya mwasi na ye, Antonio azali na esengo ya kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola mpe kosala mokano ya Nzambe.

Ya solo, bato banso bakoki kosala mbongwana minene boye te. Mizumori, mosali na banke oyo totangaki na ebandeli, azali kosala na esengo nyonso mosala na ye ya nkulutu kati na lisangá ya boklisto mpe azali kokokisa bamposa ya libota na ye na lisalisi ya mosala na ye. Nzokande, mosala yango ezali lisusu ntina ya liboso ya bomoi na ye te, kasi ntina ya liboso ezali nde kokokisa mokano ya Nzambe. Mosala na ye ezali mpo na ye mwango ya kozwa mwayé ya kobikela mpe kosalisa ye na kokokisa mokano ya Nzambe. Sikawa, mosala na ye ezali mpe kosepelisa ye.

Na kokolisaka ezalela motindo boye mpo na mosala na yo, na ntembe te okosala makasi “bobele te mpo bazali kokengela bino, lokola mpo na kosepelisa bato, kasi na sembo na motema mpo bozali kobanga Jéhovah”. (Bakolose 3:22) Bosembo yango ekoki kozanga litomba kati na bato oyo bazali kowelana makasi, kasi lokola Mizumori andimi yango, na kosalelaka mitinda oyo, bato mosusu bakotyela yo motema mpe bakosepela na yo. Ata atikaki kosala na mokano ya komata bagrade, ata bongo Mizumori amatisamaki grade.​—Masese 22:29.

Ee, kopesa bomoi na yo mpo na kokokisa mokano ya Nzambe, ezali nzela ya kozwa bolamu kati na mosala makasi. Ezali na ntina yango ete mokonzi Salomon asukisaki maloba na ye boye: “Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete basepela mpe ete basala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alya mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso. Yango ezali likabo na Nzambe.”​—Mosakoli 3:12, 13.

[Elilingi na lokasa 7]

Mpo na kosepela na mbuma ya mosala na yo, bongisa bomoi na yo ya libota likoló na boyekoli ya Biblia mpe likoló ya kokokisama ya mokano na Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto