Mosala makasi: ekopesa bolamu?
MOSALA ezali likambo eleki monene mpo na moto”. Wana ezali maloba ya moto moko ya mosolo, ye Mojaponé na nkombo Bunpei Otsuki. Azalaki kolimbola mpo na nini aboyaki kokenda kopema. Maloba na ye makokani na oyo ya Bajaponé batongaki lisusu mboka na bango nsima na etumba. Uta kapitene ya masuwa Perry, ye moto na Amerike atyaki Japon na boyokani na mikili misusu, bafandi na yango basili kokoma basali makasi mpenza. Mpe bazali kosepela na yango.
Nzokande, lelo oyo bazali koloba ete Bajaponé bazali kosala mingi koleka bamboka nyonso ya minene mpamba te bazali na esika ya liboso mpo na oyo etali ngonga ya mosala. Boyangeli ezali komeka kolongola likanisi yango epai na Bajaponé oyo bamipesi mingi na mosala. Na yango zulunalo moko ekomaki: “Bakonzi bakotalaka makambo ya mosala basengi bino ‘Botika kosala motindo boye’”. Bobele bakonzi yango balobaki lisusu boye: “Kopema ekolakisa ete oyebi mosala.” Na maloba mosusu, boyangeli ya Bajaponé etuni motuna oyo: “Mpo na nini kosala makasi boye?”
Ya solo, Bajaponé nyonso bazali basali ya molende boye te. Ankete moko esalamaki epai na basali ya sika 7 000 emonisaki ete bobele 7% kati na bango bazalaki kotya mosala na esika ya liboso kati na bomoi na bango. Ezalela yango ezali komonana mpe na bamboka mosusu. Na Alemanye, Allensbacher lnstitut für Demoskopie eyaki komona ete bobele 19% ya Baalema bazali longwa na mibu 18 kino 29 bazali komipesa na mosala ata lifuti ezali moke.
Na Japon, bapaya bazali kosala mingi koleka bilenge Bajaponé oyo bazangi komibanzabanza. Kokumisaka mosali na ye moko azali moto na Algérie mpe akosalaka mosala ya maboko, patron moko ya Tokyo alobaki boye: “Bajaponé balukaka mosala motindo wana te, mpe ata bakosala yango, ekozala se mpo na mwa mikolo.” Te, ata basali ya molende na Japon babotamaki na yango te. Mpo na kosala makasi, esengeli kozala na mokano oyo ekopusa yo ete osala bongo.
Mpo na nini kosala makasi
“Bozwi, bomoi malamu, biloko ya mosuni mpe kolonga” tala likambo Baalema oyo bazali kosala makasi bazali koluka. Yango ekomamaki na zulunalo Der Spiegel. Ya solo, mingi bazali kosala makasi mpo na kozala na bozwi oyo ekoki kosalisa bango na kozala na bomoi malamu. Bamosusu bazali na mokano ya ‘kolonga’, elingi koloba komata bagrade. Mingi lisusu, bazali koluka mikano yango mpo bakelasi mineneminene ezali kolendisa kowelana, bazali kozwama na motambo ya mokili oyo ezali kolinga se bokoli mpe bazali kolemba liboso ete balonga.
Nzokande, bato bazali kosala molende bobele te mpo bazwa mosolo mpe bomoi malamu. Bamoko bazali kosala mpo balingi mosala. Mpo na bango, mosala ezali eloko ya liboso. Bamosusu bazali na mosala oyo ezali kosepelisa bango. Na ndakisa, Haruo andimi ete: “Namipesaki mpenza na mosala na ngai ya laboratoire na boye ete nazalaki kobosana makambo ya elimo.” Ezali mpe na baoyo bazali komipesa na mosala mpo na bantina malamu mpe mpo na kosalisa bazalani na bango. Bazali komipesa mpo na kobikisa bomoi ya bato. Na ndakisa, pompier (mozimisi móto) akosala makasi mokolo na mokolo mpo na kobatela biloko na ye ya mosala.
Kasi wana nyonso ezali bantina malamu mpo na kosala makasi? Bolamu bokozwama na ndenge yango? Mpo na koloba polele, mosala nini ekoki mpenza kopesa yo esengo?