Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/7 nk. 8-9
  • Liteya na likambo etali koboma libala mpe bolingo ya bana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya na likambo etali koboma libala mpe bolingo ya bana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Mateya likolo na koboma libala mpe kolinga bana
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mateya etali koboma libala mpe kolinga bana
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Biblia elobi mpenza nini mpo na koboma libala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Kumisá libala, ebongiseli oyo Nzambe atyá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/7 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Liteya na likambo etali koboma libala mpe bolingo ya bana

YESU mpe bayekoli na ye bakei na Yelusaleme mpo na koyangana na Pake ya mobu 33. Eleki bango ebale Yordani, balandi nzela oyo ekatisi na distrike ya Perea. Yesu asilaki kokoma na région yango mwa baposo na liboso, kasi basengaki ye na ntango yango ete akoma na Yudea, mpo ete moninga na ye Lazare azalaki mpenza na maladi makasi. Wana ekomaki ye na Perea, Yesu asololaki na Bafalisai na ntina na koboma libala. Sikawa bazongeli lisusu lisolo yango.

Kati na Bafalisai, ezali na bituluku na makanisi makeseni na likambo etali koboma libala. Moïse alobaki ete mobali akoki koboma libala na mwasi na ye soko amoni “likambo mabe epai na ye”. Bamoko bazali kokanisa ete ezali bobele soko mwasi amitambwisi mabe. Nzokande, bamosusu bamoni ete “likambo mabe” yango etali mpe ata bafoti mikemike. Yango wana, mpo na komeka Yesu, Bafalisai batuni ye: “Ebongi nde kolongola mwasi na ntina nyonso?” Bamoni ete ata eyano ya Yesu ekozala boni, akozala na mindondo epai na bamoko kati na bango baoyo bazali na likanisi ekeseni.

Yesu ayanoli na motuna yango, na bokonzi nyonso. Ezali mpo na kobondela bamoko kati na bango te, kasi alobeli ntina ya liboso ya libala. Atuni boye: “Botangi te ete ye oyo asalaki bango longwa, na ebandeli, asalaki bango mobali mpe mwasi? Alobi mpe ete, Mpo na ntina oyo, moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye mpe bango mibale bakozala nzoto moko. Bongo bazali lisusu mibale te kasi nzoto moko. Oyo nde Nzambe asili kotonga, tika te ete moto akangola yango.”

Yesu alimboli ete mokano na ebandeli na Nzambe ezalaki ete babalani mibale bazala eloko moko, kasi bakabwana te. Kasi Bafalisai bazongisi ete soko ezali bongo “mpo na nini Moïse alakaki mpo na kopesa ye mokanda na koboma libala mpe kolongola ye?”

Yesu ayanoli: “Moïse atikaki bino kolongola basi na bino mpo na makasi na mitema na bino, nde longwa na ebandeli ezalaki bongo te.” Ya solo, ntango Nzambe azalisaki libala ya liboso kati na elanga na Edene, akanaki te ete libala esengeli kokufa.

Kolobaka epai na Bafalisai, Yesu abakisi: “Nazali koloba na bino ete ye nani akolongola mwasi na ye, soko mpo na pite [na greke, pornéïa] te, mpe akobala mosusu, azali kosala ekobo.” Amonisi na ndenge yango ete pornéïa, liloba oyo elimboli etamboli ya nsoni, ezali ntina bobele moko ya koboma libala oyo Nzambe azali kondima.

Wana ekangi bango ntina ete libala esengeli koumela libela mpe ekobomama bobele mpo na ntina oyo Yesu alobi, bayekoli bapusami na koloba: “Soko bongo mpo na mobali mpe mwasi, ebongi kobalana te!” Na ntembe te, moto nyonso oyo alingi kobala asengeli koyeba malamu ete boyokani ya libala ezali mpo na libela!

Na nsima, Yesu alobeli mpo na bomoi ya monzemba. Alimboli ete bana mibali misusu babotami mikube: bakoki kobala te mpo ete binama na bango ya mobali bizali na mbeba. Bamosusu bazalisami mikube epai na bato, mpo ete bato yango babebisaki bango nzoto. Bamosusu mpe bazali kokanga mposa na bango ya kobala mpe ya kosangana na mwasi mpo na

komipesa mobimba na makambo matali Bokonzi ya makoló. Bongo Yesu asukisi na maloba oyo: “Tika ete oyo ayebi koyamba oyo, ayamba yango!”

Babandi koya na bana mike epai na ye. Kasi, bayekoli bapameli bango mpe balingi kozongisa bango, mpamba te baboi ete Yesu atungisama mpamba. Kasi Yesu alobi: “Tika bana mike koya epai na ngai mpe pekisa bango te, mpo ete Bokonzi na Nzambe ezali na bato na motindo yango. Nalobi na bino solo ete, soko moto nani akoyamba Bokonzi na Nzambe lokola mwana moke te, akokota wana te.”

Oyo nde mateya kitoko Yesu apesi awa! Mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe, esengeli na biso komonisa bosokemi mpe kozala pene na koyekola lokola bana mike. Kasi ndakisa na Yesu emonisi lisusu ntina monene mpo na yango baboti basengeli kolekisa ngonga mingi elongo na bana na bango. Yesu amonisi bongo bolingo na ye epai na bana mike mpo ete akumbi bango na maboko na ye mpe apamboli bango. Matai 19:1-15; Deteronome 24:1; Luka 16:18; Malako 10:1-16; Luka 18:15-17.

◆ Makanisi nini makeseni mazali epai na Bafalisai mpo na oyo etali koboma libala mpe mpo na yango ndenge nini bameki Yesu?

◆ Ndenge nini Yesu ayanoli epai na Bafalisai oyo bazali koluka komeka ye mpe ntina nini ya koboma libala ye apesi?

◆ Mpo na nini bayekoli ya Yesu balobi ete ebongi na mobali kobalana na mwasi te, mpe etinda nini Yesu apesi?

◆ Liteya nini Yesu apesi biso na ndenge ayambaki bana mike?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto