Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/7 lok. 28
  • ‘Liteya ya moboko etali bizaleli malamu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Liteya ya moboko etali bizaleli malamu’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/7 lok. 28

‘Liteya ya moboko etali bizaleli malamu’

Elenge mwasi moko ya mibu 14 afandi na Nigéria, na Afrique occidentale, azali na botondi ya kozua liteya na bizaleli malamu na nzela na mokanda Votre jeunesse-Comment en tirer le meilleur parti. Akomaki:

‘’Mokanda oyo ezali moko na misala na mayele na ntina mingi mpe na solo. Ekozala solo lisalisi monene mpo na baoyo nyonso bandimi komitika kotambwisama kati na mokili oyo na moimi mpe esili kobeba.

’Nalakisaki yango na baninga na ngai mpe bato oyo bafandaka zongazonga na ngai. Baoyo nyonso bazali kotanga yango bazali kokumisa bililingi na bino oyo bizali koteya mpe masolo oyo malobelami na kati. Tondimi ete makambo malobelami kati na mokanda oyo mazali na makoki ya kongengisa batangi, kopesa bango mayele mpe kolakisa bango mitinda na etamboli malamu. Tokanisi ete makoki lisusu kopesa mitinda oyo mizali na matomba epai na bilenge mpe mikolo baoyo bazali koluka kimya ya elimo mpe kolongono ya solo, baoyo balingi kozala na komipekisa mpe kokangama na oyo ezali sembo. . . .

‘Mpe lisusu, mokanda oyo ekoki solo. Etondi na batoli ya moboko mpo na etamboli etali mibali na basi, batoli oyo ezali mbala mosusu mpasi kozua yango epai na baboti mingi to balakisi . . . Nakolinga solo ete mokanda oyo eyekolama mokolo na mokolo na biteyelo, mpo ete bilenge bazala na bomoi na kimya, oyo ezali na bolingo mingi, mpe ezali solo na ntina.’‘

Tala mwa mituna oyo mokanda Votre jeunesse-Comment en tirer le meilleur parti ezali koyanola: Mpo na nini kokota na eteyelo? Ndenge nini ozali kotalela baboti na yo? Kosangisa nzoto liboso ya libala, ezali malamu? Komela masanga ya makasi ezali malamu? [Mpo na kozua mokanda oyo, osengeli kotuna epai na temwe oyo apesaki yo zulunalo oyo].

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto