“Bomitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu”
“Tika bobele ete etambweli na bino ebonga na nsango malamu na KIisto.”—BAFILIPI 1:27.
1. Maloba nini ya lokumu guvernere ya mboka New York alobaki yango kala mingi te? (Baloma 13:3)
BA Témoins koleka 1 000” bayanganaki liboso ya Hôtel de Ville, na kartyé Manhattan (na mboka New York), na le 29 Septembre 1988, ndenge eyebisamaki na zulunalo New York Times. Bapesaki bongo maboko na lisengi moko ya botongi ndako oyo bakotisaki mikanda mpo na yango na Biro ya Leta oyo ekotalaka makambo ya kotonga bandako. Atako ndingisa ya botongi ndako moko ya sika mpo na kolalisa basali na biro monene ya ba Témoins de Jéhovah eboyamaki, guvernere “akumisaki ba Témoins mpe alobaki ete ‘bakeseni mpenza’ mpe ‘babongi solo na kozwa longonya’”.
2. Na nini etambweli ya ba Témoins ekeseni na oyo ya bato mosusu, mpe mpo na nini?
2 Mingimingi, ntango bato koleka nkoto moko bayangani mpo na kopesa maboko na bango na likambo moko oyo endimami te epai na mikonzi, likambo nini esalemaka? Mbala mingi emonanaka kotindikana, makelele, to mpe mobulu monene. Mpo na nini ba Témoins bazali komitambwisa lolenge mosusu? Mpo bayebi ete na bisika nyonso etamboli na bango ezali na bopusi likoló ya losambo na bango. Babosanaka toli oyo ya Biblia te: “Bozala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bakumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.”—1 Petelo 2:12.
Bizaleli malamu bikumisaka Jéhovah
3. Etambweli na biso ya limemya ezali na bopusi nini likoló na nkombo ya Jéhovah?
3 Biso baoyo tozali baklisto, na ntembe te tozali na mokumba ya kokumisa Jéhovah Nzambe na kozalaka na etambweli kitoko. (Matai 5:16) Ya solo, etambweli kitoko esangisi bizaleli mingi ya malamu, lokola kolongobana, molende na mosala mpe komitambwisa malamu na makambo matali basi mpe mibali. Nzokande, bobele bato oyo bayebi biso malamu to oyo tozali kokutana na bango mbala na mbala, bango nde bayebi ete tozali na bizaleli wana-na ndakisa baninga na biso, basangani ya libota na biso, patron na biso, baninga na biso ya mosala, mpe balakisi na biso. Kasi ezali boni mpo na ntalo monene na bato oyo tokutanaka na bango mingi te? Ezali wana nde bizaleli na biso bizali na ntina mingi, mpamba te, motindo moko lokola ekangeli kitoko ebakisa kitoko ya likabo moko ya motuya, motindo moko mpe bizaleli malamu bizali kokomisa kitoko mingi mpenza eloko oyo tozali na yango mpo na kokaba. Ata nini ezali bizaleli na biso ya boklisto mpe atako mikano na biso mizali ya malamu koleka, ekozala mpenza na litomba moko te soki tozangi limemya epai ya baninga. Na bongo ndenge nini limemya na biso ekoki kopesa nkembo na Jéhovah?
4. Na makambo nini tosengeli kokeba mpo na bizaleli na biso ya limemya?
4 “Tika bobele ete etambweli na bino ebonga na nsango malamu na Klisto”, elobi Paulo. (Bafilipi 1:27) Maloba oyo matali mpenza mosala na biso ya kosakola liboso na bato. Kasi etambweli na biso mpe bizaleli na biso ya limemya na esika na biso ya losambo, kati na kartye na biso, na mosala, na kelasi, ee, kati na makambo nyonso ya bomoi na biso, ezali mpe na bopusi mpenza likoló na bokasi ya mosala na biso ya kosakola. “Tokotiaka libaku na nzela na moto te ete mosala na biso etiolama te,” ekomaki yango Paulo. (2 Bakolinti 6:3, M.N.) Ndenge nini tokoki kondimisama ete tozali solo kosala bongo? Tokoki kosala nini mpo na kosalisa baninga na biso, mingimingi bilenge, na kozala na etambweli ya boklisto na bisika nyonso?
Na Salle du Royaume
5. Nini tosengeli koyeba ntango tozali na Salle du Royaume?
5 Salle du Royaume ezali esika na biso ya losambo. Tozali kokenda kuna na libiangami ya Jéhovah mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Na bongo tozali babiangami na ndako na Jéhovah. (Nzembo 15:1; Matai 18:20) Ozali mobiangami malamu ntango ozali kokende na Salle du Royaume? Mpo tokoka kozala babiangami malamu, tosengeli kopesa epai na Mobiangi na biso, kasi mpe epai na babiangami mosusu, lokumu mpe limemya oyo ebongi na bango. Yango elimboli nini?
6. (a) Momeseno ya kokomaka na retard na makita ezali komonisa nini? (b) Tosengeli kosala nini mpo na kosilisa mokakatano yango?
6 Ya liboso, ebongi kokoma na ngonga malamu. Ya solo ezalaka ntango nyonso likambo ya petee te. Bamoko bafandaka mosika; bamosusu bazali na bana ya kolengela. Milende oyo bazali kosala mpo na koyangana mbala na mbala na makita ya boklisto misengeli mpenza kokumisama. Nzokande, emonani ete mwa bamoko bazwi momeseno ya kokoma na retard na makita. Basengeli kosala nini mpo na kosilisa mbeba wana? Ya liboso esengeli koyeba ete ezali mpenza te mpo bazangi koyeba motuya ya makita ya boklisto nde bamoko bazali na momeseno ya kokoma na retard ntango nyonso. Bazali kosepela na yango lokola bayangani nyonso-soki basili kokoma. Mokakatano ezali nde na kozanga ebongiseli ya malamu mpe kozanga limemya mpo na baklisto mosusu. Soki topesameli toli ete ‘totika koyangana elongo te’, ntina ya liboso kati na mosusu ezali ya ‘kopesana simbisi moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu’. (Baebele 10:24, 25) Nzokande, tokokoka kosala yango ndenge nini soki tozali kokoma ntango nyonso na retard, kopengwisaka bongo likebi ya bayangani mosusu? Engebene bato na mayele, mpo na kokoma na ntango malamu, esengeli komitiela mokano ya kokoma liboso mpenza, kasi kozela te ete okoma na ngonga oyo ebongiseli elingi kobanda. Bokoki kobanda kosalela toli oyo?
7. Limbola boyokani ezali kati na likebi oyo tozali kopesa na makita mpe limemya?
7 Limemya esengaka ete toyoka bato na likebi nyonso ntango bazali koloba na biso. (Masese 4:1, 20) Etinda oyo ezali mpe kotalela makita ya boklisto, epai kuna baministres na Nzambe bazali koloba mpo na kolendisa biso na nzela na mwa makabo ya elimo. Ekozala mpenza lokola bakolobaka ete impoli to kozanga limemya mpenza soki tobandi kolala, koloba na mongongo moke elongo na moto afandi penepene na biso, soki tobandi kolia bazooka to kolia ba bonbons, kotanga eloko mosusu, to kotalela makambo mosusu na boumeli ya likita. Elenge Elihu afandaki mpamba te na boumeli na masolo milai ya Yobo mpe baninga na ye misato, kasi “asembolaki litoyi” na makambo oyo bazalaki koloba mpe ‘atiaki likebi na ye’ epai na bango. (Yobo 32:11, 12) Etambweli malamu ya boklisto ekopusa biso na komonisa limemya oyo ebongi na molobi mpe na mateya na ye matongami likoló na Biblia na kotiaka likebi na biso nyonso epai na ye mpe na makambo azali koloba.
8. Ndenge nini tomonisaka ete tozali biso banso bayekoli na Yesu Klisto?
8 Liboso mpe nsima ya makita, soki tozali na bizaleli malamu ya boklisto, tokosepela mpe na bato mosusu oyo bazali wana kati na Salle du Royaume. Paulo amonisaki ete baklisto bapakolami oyo bazali na lisangá ya boklisto bazali bapaya lisusu te, kasi basangani ya ndako na Nzambe. (Baefese 2:19) Osalaka epai na ba Témoins mosusu lokola epai na bapaya, to lokola epai na basangani ya ndako moko? Mbote ya bolingo, kopesana loboko na esengo, mwa koseka ya bolingo ezali wana makambo mike, solo, kasi mamonisaka ete tozali biso nyonso bayekoli na Yesu Klisto. Soki tozali kopesa mbote ya boye na bapaya, tosengeli te kosala motindo moko “koleka epai na baoyo tozali na bango kondima moko”?—-Bagalatia 6:10.
9. Motindo nini tokoki koteya bana na kosepela na bato oyo baleki bango na mbula?
9 Tokoki koteya na bana na biso na komonisa bosepeli motindo boye epai na bato oyo bazali na mibu mingi koleka bango? Mikóló mosusu bakanisaka ete bana bazali na mposa ya kominanola mpe kosakana elongo na baninga na bango ya mike nsima na kofanda na boumeli ya ngonga moko to mibale na kolanda makita. Kasi ebongi te kosakana na Salle du Royaume. (Mosakoli 3:1, 17) Molakisi moko atunaki na elenge mobali moko ya mibu minei na ndambo soki azalaki na bandeko mibali boni mpe bandeko basi boni, mwana apesaki eyano ete: “Nazali na bango ebele, nakoki kotanga motuya na bango te.”’ Na nsima, ntango baboti na ye batunaki ye mpo na likambo yango, alimbolaki ete: “Nayebi te soki nazali na bango boni. Bazali mingi mpenza ntango nazali kokende na Salle du Royaume!“ Mpo na ye bayangani nyonso bazali bandeko na ye ya mibali mpe ya basi.
Kati na mosala na biso ya kosakola na bato nyonso
10. Lilako nini Yesu apesaki ekoki kosalisa biso na ’komitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu’ kati na mosala na biso ya kosakola?
10 Eyebani ete, tosengeli ‘komitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu’ kati na mosala na biso ya kosakola na bato nyonso. Tobosana te ete tozali komema nsango kimya, mpe yango esengeli komonana kati na bizaleli na biso. (Baefese 6:15) Yesu apesaki toli oyo: “Ekoingela bino na ndako, bopesa mbote wana; soko mpe ndako ezali na malamu, tika ete kimya na bino efanda na yango.” Kozalaka na esengo, na bolingo mpe na limemya, tozali komonisa epai na molobani na biso ete tozali mpenza kotalela na motema mobimba matomba na ye. Mbala mosusu ekomaka ete tokokutana na moto oyo azali na bolingo te, to mpe alingi komona biso te. Tosengeli biso mpe kotomboka mpe kobanda komitambwisa lokola ye? Tala oyo Yesu abakisaki: “Nde soko [ndako] ezali na malamu te, tika ete kimya na bino ezonga epai na bino!” (Matai 10:12, 13) Ntango tozali kokenda ndako na ndako, bizaleli na biso bisengeli ntango nyonso kokokana na “mosala ya kozongisa boyokani”.—2 Bakolinti 5:18.
11. Bopusi nini molato na biso ezali na yango likoló na motindo na biso ya basali na Nzambe?
11 Bizaleli na biso bizali mpe komonisa moto ya motindo nini biso tozali na makambo mosusu. Na ndakisa, molato na biso mobongi mpenza na lolenge na biso ya ba ministres ya Liloba na Nzambe? Tokoloba boni mpo na biloko na biso-sacoche, Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia? Mokomi moko na masolo na bato apesaki toli oyo epai na bato oyo bakosalaka mimbongo: “Bolata na lolenge ebongi mpo na kobongisa makambo na mombongo, kasi na lolenge ya kokende na feti te, na esika moko ebongisami mpo na kominanola na mpokwa to na likambo moko ya lisano.” Mpo na nini? Mpo ete molato na bino “ezali kopesa nokinoki na bato ya zongazonga na bino elembo likoló na mosala na bino, lolenge na bino mpe esika na bino kati na ebongiseli ya biloko”. Na ntina yango, ntango tozali kokokisa “mikumba” na biso mpo na Nzambe, molato na biso mosengeli te kozala ya bongo na bongo to oyo ezali kobenda likebi ya bato, kasi ntango nyonso molato “mobongi mpo na nsango malamu.”—Tala 1 Timote 2:9, 10.
12. Soki tozali na etambweli malamu, ndenge nini tokomonisa limemya mpo na lotomo mpe biloko ya bato oyo tozali kokende kotala?
12 Tosengeli ntango nyonso kozala “pene mpo na kopesa eyano” na ntina na nsango malamu; nzokande, bizaleli malamu ya boklisto bizali kosenga ete tosala yango “na bopolo mpe na limemya mozindo”. (1 Petelo 3:15) Kati na makambo mosusu yango ezali kosenga ete totosa lotomo mpe tomemya biloko ya bazalani. Tomibongisaka na motindo boye ete tomimonisa epai na bato na ngonga moko malamu? Tozalaka pene ya kososola nokinoki soki tozali kokata bango nzokande bazali na mosala to kobongisa likambo moko ya ntina monene? Tosalelaka mpenzampenza maloba lokola “Excusez”, “S’il vous plaît”, mpe “Merci”? Tosalaka nyonso mpo na kokotisa moto kati na lisolo, to mpe tolobaka bobele biso moko, kokanisaka ete tokobosana makambo mosusu oyo tobongisaki?
13. Monisa na lisalisi ya ndakisa moko ete etambweli ya limemya ekobotaka mbala mingi matomba malamu kati na mosala ya kosakola?
13 Bizaleli na limemya, soki bisangisami na bolingo ya solo mpo na mozalani, mbala mingi bisalisaka na kopesa litatoli ya malamu mingi. Yango wana bana oyo babokwami malamu mbala mingi babendaka likebi mpe mposa ya bato oyo mbala mosusu basepelaka te na makambo oyo mikóló bazali koyebisa bango. Yango wana, na Mekzike, Témoin moko ya mibu 13 akutanaki na elenge mwasi moko oyo azalaki na mposa ya koyekola Biblia, kasi akanisaki ete esengeli te koloba yango na tata na ye. Elenge mosakoli mwasi yango azwaki ata bongo likanisi ete, na likambo yango, mpo na limemya epai na tata, ebongaki asenga ye nzela. Akendaki bongo koloba na papa, kolimbolaka na ye ete makambo oyo balingaki koyekola ezalaki na ntina mingi. Komonaka limemya na ye mpe na ndenge ayaki kosenga ye nzela, tata yango alobaki: “Soki makambo oyo bokoyekola mazali mpenza na ntina mingi koleka, boye libota na ngai mobimba esengeli mpe koyekola yango.” Litomba nini emonanaki? Elenge mosakoli mwasi wana ya mibu 13 abandaki koyekola Biblia elongo na libota wana mobimba, bakisa mwana mobali moko abala, mwasi na ye mpe bana mosusu ya mikóló.
Bizaleli malamu bibandaka na ndako
14. Epai wapi tosengeli liboso mpenza kozala na bizaleli malamu, mpe mpo na yango, likambo nini ezali na ntina monene.
14 Bizaleli ya limemya ya bilenge ba Témoins bizali mbala mingi komonisa kobokwama malamu oyo babokwamaki na kati na libota na bango. Bizaleli na biso bizali mpenza komonisa motindo na bomoi na biso. Yango wana, ata bato mosusu bakanisi ndenge nini, biso toyebi ete ezali likambo ya ntina na kozala na bizaleli ya limemya na ndako. Na yango, lokola kati na makambo mosusu ya bomoi na libota, ndakisa ya baboti ezali na ntina monene. (2 Timote 1:5) Koloba na bana ete “Bosala oyo nalobi, kasi bolanda oyo ngai nazali kosala te”, ezali ndenge yango te tokoteya bango bizaleli ya limemya. Mwana azali koyekola makambo mingi ya mikemike, oyo mazali kopesa bizaleli malamu, ezali bobele na mateya oyo azali koyoka te kasi na makambo oyo azali komona mpe na komekolaka. “Baboti bazali bobele balakisi ya liboso ya bana te; bazali mpe ndakisa na bango, mpamba te bana bayekolaka na komekolaka baboti”, emonisi yango Beverley Feldman, mokomi ya mokanda Bana oyo bazali kolonga (angl.). Bizaleli nini bana na bino bazali komona ntango bazali kotala bino?
15. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango na kolona bizaleli ya limemya mpo na bomoi na bango mobimba?
15 Biblia ezali kopesa toli ete, “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te”. (Baefese 6:4) Epesaka nkanda mpe mawa na bana na koyoka ete basengeli kozala na bolingo mpe limemya nzokande bazali komona baboti na bango kobunda, kofinga to kotonga baninga, kobimisa maloba ya nsoni to kotomboka nokinoki. Tokoki kopamela bango soki bazali komitambwisa motindo moko oyo? Makomami mabakisi maloba oyo: “Kasi bobokola bango na mateya mpe na mpamela na Jéhovah.” Kobokola yango esangisi kolakisa bango mitinda ya moboko mpo na oyo etali bizaleli malamu, na ndakisa ntina ya koloba “Bonjour”, “S’il vous plaît”, “Merci”, “Excusez”, bakisa mpe kozala na limemya epai na mibange mpe kokabola biloko elongo na bazalani. (Levitike 19:32; Baloma 16:3-7) Soki bizaleli wana bipesameli mwana na ndako, ekozala na motuya mingi mpo na ye kati na bomoi na ye mobimba.—Masese 22:6.
16. Milende nini baboti bakoki kosala, mpe matomba nini makobima?
16 Baboti mpe bana basengeli bongo kozala na bizaleli ya limemya mokolo na mokolo, kasi te bobele na bantango oyo ebongi na bango mpenza. Baboti, bozala na motema molai mpe na boboto epai ya bana na bino oyo na ntembe te bakozanga te kosala mabunga. Boyebisa bango ntina monene oyo bozali kopesa na etamboli na bango, mpe bozala pene ya kokumisa bango nokinoki mpo na bokoli na bango. Ya solo, yango ezali kosenga milende mingi epai na bino. Kasi Makomami mapesi bino mosala ya kokotisa mitinda na Nzambe kati na bana na bino ‘ntango bofandi na ndako na bino, mpe ntango bozali kotambola na nzela, mpe ntango bolali, mpe ntango bolamuki’. (Deteronome 6:7) Baboti oyo bazali kolanda toli oyo bazali kokotisa elimo ya kitoko mpe ya peto kati na ndako na bango, mpe yango ezali kosalisa mingi na boye ete bana na bango bakoma mikoló oyo bazali kosalisa baninga, bato ya mayele mpe bateyami malamu. Bakosala ete baboti na bango mpe Mozalisi na bango, Jéhovah Nzambe, bakumisama na nzela na etambweli na bango.
Libota oyo ezali na etambweli ya limemya
17. Makambo nini bato bazali komona kati na ba Salles du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah?
17 “Ba Témoins koleka 1 000” oyo bayanganaki liboso ya Hôtel de Ville ya New York na nsima ya midi na sanza ya Septembre bamonisaki se na eteni moke motindo oyo ba Témoins de Jéhovah bazali komitambwisa mokolo na mokolo. Na esika mosusu, tala oyo moto moko alobaki nsima ya kokende mpo na mbala ya liboso kati na Salle du Royaume: “Namoni kati na bato wana makambo oyo namona naino te, ebele na bato batambwisami na bolingo ya solo oyo namona naino te kati na Lingomba oyo nabokwamaki kati na yango.” Litomba nini emonanaki? “Ntembe ata moke ezalaki te: Namonaki solo”, elobaki ye. Mobali yango abongolaki bomoi na ye, mpe sanza nsambo na nsima, amipesaki na Jéhovah mpe azwaki batisimo.—Tala 1 Bakolinti 14:25.
18. Bato mosusu balobaki nini na ntina na etambweli malamu ya ba Témoins de Jéhovah?
18 Bizaleli malamu ya ba Témoins na ntango ya ba assemblées na bango nationales mpe internationales ebimisaka bakomantere mingi ya lokumu. Kala mingi te, na ntango ya moko na makita yango oyo ebongisamaki na Japon, motambwisi moko alobaki boye: “Ntango bokitaki na bus, bino nyonso, bakisa mpe bana mike, bolobaki na ngai: ‘Merci mingi.’ Ezali mpenza esengo!” Na assemblée mosusu, mosali moko na gare ya train alobaki na Témoin moko ete: “Mbala ya nsuka oyo bato 12 000 bayanganaki na ndako ya makita na mboka Osaka, ezalaki na mobulu moko ya koloba te.” Mpe abakisaki: “Kasi bino bozali na mobulu te, ntina wana tozali na mosala mingi te. Nayebi babongisi ya likita na bino te, kasi bopesa bango mbote mingi.”
19. Ekateli nini moko na moko kati na biso asengeli kobatela na likambo etali bizaleli ya limemya?
19 Maloba oyo mamonisi nini? Ete, kati na lisangá na bango, ba Témoins de Jéhovah ‘bazali komitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu’. Ezali boni mpo na moko na moko na biso? Lokola bana oyo bazali komibalola epai na tata na bango oyo atondi na bolingo, tika ete biso banso, bilenge mpe mikoló, tomibalola epai na Tata na biso ya likoló, Jéhovah, mpo ateya biso na kozala na bizaleli ya limemya, ata kati na mokili oyo ezingi biso, epai bato bazali na limemya te.—Deteronome 8:5; Masese 3:11, 12.
Bozongeli
◻ Mpo na nini limemya ezali elembo ya ntina mingi na etamboli malamu?
◻ Bizaleli nini ya limemya tobongi kozala na yango na esika na biso ya losambo?
◻ Ntango tozali kosakola, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na limemya?
◻ Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango na kolona bizaleli ya limemya?
◻ Nivo nini etombwami tosengeli kosala molende na kozwa mpo na oyo etali bizaleli ya limemya?