Tolona bizaleli na boklisto kati na mokili oyo ezangi limemya
‘’Tala! Lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko bakofanda esika moko mpe na motema moko!”—NZEMBO 133:1, M.N.
1. Tokoki koloba boni lelo mpo na oyo etali bizaleli ya limemya?
Bizaleli na limemya bisili kotiama pembeni na mibu 25 oyo mileki, ekomaki Ann Landers mokomi mwasi moko na masolo na bato. Ezali bobele te ete mibali bazali lisusu kofongola baportes ya vuatire te mpo na basi to kotikela bango esika ya kofanda te kati na train to na bus. Te, ezali likambo monene koleka oyo.” Ya solo, ezala epai nini tobaloli miso na biso, tozali komona ete tozali kobika kati na mokili oyo ezali ntango nyonso kobungisa bizaleli ya limemya. Na ndakisa, bato bazali kotindikana kati na molongo, bazali komela likaya kati na ba bus oyo bato batondi, mpe bazali kobeta miziki makasi koleka kati na bisika oyo bizali mpo na bato banso. Mokolo moko na moko ezali kopesa biso elonga koleka ete, atako kobongisama ya mateya mpe lolenge na bomoi, bato mingi na ntango na biso bayebi lisusu koloba “merci” te ata “s’il vous plâit” te mpe basili kobosana mitinda ya moboko ya limemya.
2. Mpo na nini tokoki kokamwa te na komona ete lelo oyo bato bazali na limemya te?
2 Ezalela oyo ekoki kokamwisa biso? Mpenza te. Ezali bobele kokundwela biso likambo oyo ntoma Paulo alobaki na kopemama na Nzambe mpo na ezaleli oyo bato bakozala na yango na “mikolo na nsuka”, wana ‘ntango na mpasi ekoya’. Kati na makambo mosusu Paulo asakolaki ete bato bakozala “bamikumisi na bango mpenza, . . . bato na lolendo, bato na ngambo, . . . bazangi matondi, . . . bato bazangi bolingo, . . . batomboki [bazangi komipekisa]”. (2 Timote 3:1-3) Ebongi kotala zongazonga na yo mpo na koyeba ete na mikolo na biso bizaleli yango bizali komonana epai na bato ya mibu nyonso, ya lolenge nyonso ya bomoi mpe ya bamposo nyonso. Mpo na nini yango ezali boye? Likambo nini epesi nzela na kozanga ya bizaleli na limemya, lokola ezali komonana mingi na eleko na biso?
Bantina ya kozanga bizaleli na limemya
3. Ndenge nini “mopepe“ ya mokili ezali kolongola limemya epai na bato.
3 “Bamikumisi na bango mpenza.” Bazali solo komikumisa, “bato oyo bazali koluka liboso matomba na bango moko”, oyo bakoli kati na mokili oyo ezali komibanzabanza liboso mpo na lotomo, lipanda mpe bonsomi ya koloba ya moto na moto. Elimo oyo, ekoteli “mopepe” oyo ezingi biso, ezali mpenza kotemela toli na Biblia oyo epesami epai na baklisto: ‘Moto na moto atala bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na bamosusu lokola.’ (Baefese 2:2, 3; Bafilipi 2:4) Nini ezali komonana? Osengeli komizela te ete bato ya libota oyo ekolaki kati na likanisi ya ‘kosala oyo esepelisi bango’ bamitungisa mpo na makambo etamboli na bango ekoki kozala na yango likoló na baninga mosusu.
4. Ndenge nini baoyo bazali kotyola mitinda ya bizaleli malamu ya kala batalelami na mikolo na biso oyo, mpe moklisto asengeli kokanisa nini mpo na yango?
4 Kalakala, ezalela ya komitungisa soko bato bakoloba nini epesaki nzela mingi na botosi ya mitinda na limemya. Ezali mpenza kala nde bato bamitungisaki mpo na makanisi ya bamosusu. Kasi, na mikolo na biso, ntango ezaleli ya moto ekomi mabe koleka, ezali nde ntango wana ezaleli yango ezali kosepelisa bato mosusu. Baoyo bazali kotiola bizaleli na bonkoko bazali kotalelama te lokola ba impolis, kasi lokola bato ya gá, ba “jo”, bato ya ya kolula (bato bazali sophistiqués). Osengeli koyeba ete liloba ya lifalansé “sophistiqué” elakisi “likambo to eloko oyo ezali mpenza ndenge yango esengelaki kozala te, to ndenge yango esalama te.” Liloba yango euti esika moko kati na lokota ya greke na liloba oyo ebongolamaki kati na 2 Petelo 1:16 ete “makambo makanisami na mayele ya bato” (ingénieusement imaginées). Na ntembe te, baklisto ya solo bakosala malamu na kobwaka elimo motindo wana.
5. Likambo nini mosusu ezali kobungisa bizaleli malamu?
5 “Mitema na bana na bato ekomi makasi kosalaka mabe, mpamba te etumbu mpo na kosala mabe epesami noki te,” ndenge tozali kotanga kati na Mosakoli 8:11. Maloba oyo mamonisi ntina mosusu ya kolimwa na bizaleli na limemya. Ezali mpenza mpasi te na komona ete bato oyo bazingi biso bazali mbala na mbala komona malamu kobuka mitinda oyo mindimami epai na bato nyonso. Yango wana lisolo moko ya zulunalo New York Times elobaki boye: “Ba citoyens oyo bakosilika ete batanga bango polele ete bazali bato na mobulu bazali mpe kobuka liboso na bato mibeko ya lolenge nyonso: Na ndakisa, mibeko mitali nzela, drogue, kobwaka bosoto na nzela.” Na yango, tondima to te, “mobulu, botomboki mpe kokoma maloba mabe na mur” ezali komonana kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Bizaleli malamu mpe botosi ya lotomo na moto na moto, ya biloko mpe ya bomoto ya moninga ezali kobunga mokemoke.
6. Likambo nini yikiyiki ya bomoi ezali na yango likoló na bizaleli ya limemya, mpe ezalela nini ya kokesena Yesu amonisaki kati na likambo yango?
6 Lokola mbala mingi bakotyaka bizaleli na limemya kati na makambo mike ya bomoi, bato bakobosanaka yango noki ntango bazali na makambo ya kosala mbangombango. Nzokande, bato mingi bazali na bomoi moko ya yikiyiki na eleko na biso. Bazali kolekana kozanga kolobana, lokola mpenza bayebani te. Bazali kosukuma mpe kotindikana kati na milongo, na vuatire, bazali mbala na mbala kokatakata banzela mpo na kokoma nokinoki epai ezali bango kokende. Mbala mingi, bazali mpenza kotalela bobele makambo na bango moko, to programme na bango ezali mpenza na makambo mingi koleka, na boye ete makambo nyonso to mpe mopaya oyo akanamaki te azali kotungisa bango mingi. Oyo bokeseni nini elongo na motindo oyo Yesu ayambaki bato oyo bazalaki koya epai na ye, ata na bantango oyo ebongaki te!—Malako 7:24-30; Luka 9:10, 11; 18:15, 16; Yoane 4:5-26.
7. Baklisto ya solo basengeli komibatela na nini mpo na oyo etali bizaleli ya limemya?
7 Ya solo, tozali kobika kati na mokili oyo makambo nyonso mazali kotambola mbango mpe mokili oyo misala mizali kosenga biso ntango nyonso ngonga mingi mpe milende mingi. Kasi tokobongola mpenza makambo te, soki mpo na yango, tomekoli bizaleli mabe. Ezali nde kopesa nzela na misala ya mobulu oyo tozali koyoka bato koloba zongazonga na biso-kowelana, bitumba, mpe ata kobomana-oyo ezali komonana lokola bato bazali kozongisa mafinga mpo na mafinga. Ezalela wana ezali komonisa elimo ya mokili oyo baklisto ya solo basengeli kozala kati na yango te.—Yoane 17:14; Yakobo 3:14-16.
Bandakisa ya bato bazalaki na bizaleli na limemya
8. Atako baklisto bazali na bomoi kati na mokili oyo bato bazangi limemya, balendisami na kosala eloko nini?
8 Tokoki kopusama noki na bato bazangi limemya oyo bazingi biso mpe kobungisa bizaleli na biso malamu. Nzokande, na boyokani na toli na Biblia oyo epekisi biso ‘kobilaka makambo na ntango oyo te’, totalela ebele na bandakisa kitoko oyo elobelami kati na Biblia mpe totya molende mpo na kobatela nivo etombwani ya bizaleli ya baklisto kati na mokili oyo etondi na bizaleli mabe oyo ezingi biso. (Baloma 12:2, 21; Matai 5:16) Tomonisa na nzela na misala na biso ete tondimi na motema moko maloba oyo ya mokomi na Nzembo: Tala! Lokola ezali malamu mpe esengo soko bandeko bakofanda esika moko mpe na motema moko!—Nzembo 133:1, M.N.
9. Makomami mamonisi nini mpo na motindo oyo Jéhovah azali koloba epai na bikelamu na ye?
9 Ndakisa na bizaleli na limemya oyo eleki nyonso ezali oyo ya Mozalisi na biso mpe Tata na bato nyonso, Jéhovah Nzambe ye moko. Emonanaka mbala mingi ete bato oyo bazali na bokonzi bazali ‘kotinda bato na makasi’ mpe bazali kosenga ete mokano na bango etosama. Nzokande, Moto aleki monene kati na molongo mobimba, Jéhovah Nzambe, mbala nyonso amemyaka lotomo ya bato bazali na nse na ye. Ntango apambolaki moninga na ye Abrahame, alobaki na ye: “Tombola miso na esika ezali yo.” Mpe lisusu: “Tala likoló, mpe tanga motuya na myoto na likoló.” (Genese 13:14; 15:5; tala Traduction du monde nouveau esika yango asalelaki liloba ‘s’il te plaît na français). Ntango apesaki Moïse elembo oyo emonisaki nguya na Ye, Nzambe asengaki na ye: “Tia loboko na yo na ntolo.” (Asalelaki lisusu liloba s’il te plaît) (Exode 4:6) Mibu mingi na nsima, na nzela na mosakoli Mika, Jéhovah alobaki na libota na ye, oyo bazalaki batomboki: “Nalombi bino ete boyoka, e bankolo na Yakobo mpe mikolo na ndako na Yisraele! . . . Boyoka naino oyo, bino mikolo.” (Asalelaki mpe liloba s’il vous plaît) (Mika 3:1, 9) Na likambo oyo, tozali bamekoli na Nzambe na kolobaka “s’il vous plaît” ntango tozali koloba na moto mosusu?-Baefese 5:1.
10, 11. (a) Tokoki koloba boni mpo na motindo oyo Yesu azalaki kosala epai ya bazalani? (b) Na ndakisa na Yesu, ndenge nini tokoki kozala na bizaleli na limemya epai na bato banso?
10 Yesu Klisto, “oyo azali na ntolo na Tata”, azali ndakisa mosusu ya ntina oyo abongi mpo na komekolama. (Yoane 1:18) Kati na boyokani na ye elongo na bato, azalaki komonisa bopolo mpe mawa epai moko, nguya mpe kozala ngwi epai mosusu; nzokande azalaki moto na maloba ya kofinga te to kozala na makambo makasi te ata epai na nani. Kati na mokanda Moto ya Nazerete (Angl.), tala oyo tozali kotanga na ntina na “ezalela na ye kitoko ya kofanda na bato ya motindo nyonso kozanga ete azokisa bango.”: “Ezala liboso na bato mingi to esika na ye moko, azalaki kotalela bato nyonso bazali kozinga ye, ezala basi to mibali lokola ete bazali ndenge moko elongo na ye. Azalaki malamu elongo na bana mike kati na ezaleli na bango ya kozanga motema mabe, kasi mpe, oyo ekokaki kokamwisa, azalaki mpe elongo na bato minene oyo bazalaki mabe koleka oyo lisosoli etungisamaki lokola Zakai. Basi na lokumu lokola Marie mpe Malata bakokaki koloba na ye na bosolo nyonso, kasi basi na pite bazalaki mpe koya epai na ye lokola soki bayebaki ete akomitia na esika na bango mpe kosalela bango na bolingo . . . Moko na bizaleli yango oyo bizali kosimba motema koleka ezali oyo ete azalaki kotalela te bandelo oyo etiamaki zongazonga ya bato mpamba to ya bato mike.”
11 Tokomonisa ete tozali na bizaleli malamu ntango tozali kopesa epai ya moto na moto limemya mpe lokumu oyo esengeli na ye. Tokosala malamu na komekola Yesu Klisto kati na likambo oyo. Na yango, bato mingi bazali komonisa limemya epai na bato minene, mingimingi baoyo bazali na mikumba minene koleka bango. Kasi mbala mingi bazali koboya mpe kofinga baoyo bazali kotalela lokola bazali na nse na bango, to mpe bakokani na bango, likambo oyo ezali komeka kopesa bango liyoki ya kozala na bokonzi mpe na nguya. Kasi, lokola moto moko asilaki koloba yango, “kofinga ezali ebundeli ya moto azali na bolembu”. Biblia ezali kopesa biso toli oyo: “Mpo na lokumu, bokumisanaka.” (Baloma 12:10) Soki tosali makasi mpo na kolanda toli oyo, ekozala mpasi te mpo na biso na kozala na limemya to politesse liboso na bato banso, lokola Yesu.
12. Liloba nini ya ntina mingi Yesu alobaki mpo na oyo etali boyokani kati na bato?
12 Ezaleli wana na Yesu oyo ezalaki kopusa ye na kosalisa bazalani ezali mpe komonana na mateya na ye, mingimingi kati na oyo babengaka la règle d’or: “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Kati na Masolo, moko na Mikanda Minei oyo ezali komonisa mateya ya Confucius, oyo atalelamaki uta kala lokola moteyi na bizaleli malamu mpe na limemya oyo aleki na Azia to Orient, ezali kotangama ete mokolo mosusu moko na bayekoli ya molakisi yango atunaki ye soki liloba moko ekokaki yango moko kosalelama lokola ekateli ya yambo mpo na bomoi mobimba. “Ntango mosusu liloba shu (français altruisme, elimboli komibanzabanza liboso mpo na baninga), ndenge molakisi ayanolaki ye.” Mpe abakisaki: “Kosala baninga te likambo olingi basala yo te.” Tomoni na esengo nyonso ete mateya na Yesu eleki mpamba te tokoki kozala na boyokani ya malamu, ya kosepelisa mpe ya bondeko bobele soki tozwi likanisi ya ‘kosala malamu epai na bamosusu’.
Bizaleli na boklisto bizali kouta na bolingo ya boklisto
13, 14. (a) Mpo na oyo etali bizaleli ya limemya, mposa nini ebandi komonana epai ya bato? (b) Nini ezali kotinda bato mingi na koyekola mwinda ya limemya mpe ndenge ya kozala liboso ya bato (étiquette)?
13 Na mikolo na biso, maloba ya nsoni mapalangani mpenza na boye ete bato mosusu bazali kosenga ete tozongela bizaleli malamu. “Tomimonisaki batomboki liboso na bizaleli malamu ya limemya na bambula 1960, elobaki Marjabelle Stewart, oyo ayebani mpo na mikanda na ye mpe mateya na ye likoló na likambo oyo, kasi mbongwana ya sika ezali kolamusa yango. Bato bazali koyeba ntina ya bizaleli ya limemya mpe bazali na mposa ya koyeba nini ezali mitinda ya bizaleli malamu.” Mposa wana ya sika ya bizaleli malamu ezali komonana na kobakama ya mikanda, masolo mpe ba émissions ya télévision oyo nyonso ezali koloba na ntina na bizaleli ya limemya -kobanda na nkanya oyo tosengeli kosalela na ntango ya bolei moko monene kino na ndenge ya koloba na moninga kati na boyokani na biso elongo na bato nyonso to na libota, oyo lelo ezali ndenge na ndenge mpe ezali kobongwana noki.
14 Kasi nini ezali kotambwisa liyoki makasi oyo mpo na bizaleli na limemya? “Kati na libota na bato ya lelo epai kowelana ezali kongala, Marjabelle Stewart, alobi ete, bizaleli na limemya bisengeli mpo na kokoka kobika.” Na maloba mosusu, bazali kotalela yango lokola likambo ya ntina mpo na kolonga. Na bongo bato bazali kotanga mikanda mpe bazali kolanda mateya mabongisami oyo matali étiquette mpo na koyekola kopona molato oyo mobongi, mpo na kosepelisa bato, mpo na kozala malamu liboso na mikonzi, bongo na bongoa. Eloko ezali kosala ete likambo yango esimba te, ezali ete bizaleli na limemya ekomi likambo moko ya kozwela matomba, ekomi lokola maske oyo moto akoki kolata na ntango ya teatre. Na bongo ntina ya kokamwa ezali te ntango tozali koyoka mbala na mbala mobulu makasi esalami na bato oyo “bayekoli malamu” to baoyo “bazali bato minene”.
15, 16. (a) Moto moko oyo azali na boyebi mingi na ntina etali bizaleli ya limemya alobaki nini mpo na “mitinda malamu ya etamboli”? (b) Boyokani nini 1 Bakolinti 13:4-7 ezali na yango elongo na bizaleli malamu ya boklisto?
15 Nzokande bizaleli na limemya bisengeli kozala bongo te. Amy Vanderbilt, oyo ayebi makambo yango malamumalamu, akomaki kati na Mokanda ya sika mpo na étiquette (Angl.): “Tozali kokuta mitinda malamu mingi mpo na bomoi kati na mokapo 13 ya mokanda ya yambo epai na Bakolinti, maloba kitoko ya santu Paulo na ntina na bolingo. Mitinda yango mitaleli konika monzele te to bizaleli ya likolólikoló te. Yango etaleli mayoki mpe bizaleli, bolingo mpe komemya bazalani.”
16 Ezali polele ete Amy Vanderbilt azali kolobela eteni ya 1 Bakolinti 13:4-7, epai Paulo azali komonisa, na lolenge ya sikisiki mitindo mikeseni ya bolingo ya boklisto. Totalela bambuma ya bamoko kati na yango. Na ndakisa, ye oyo azali na “motema petee mpe boboto, akozala na motema molai mpe na limemya kati na boyokani na ye elongo na bazalani. “Akosalaka na nsoni te”, to na maloba mosusu ‘azali komitambwisa na limemya’. Nzokande, bazali kolimbola “limemya” lokola “koyeba kolanda mitinda malamu, mitinda mibongi mpe mitinda mindimami”. Yango wana la Parole vivante (libongoli ya Kuen) ezali kobongola maloba yango boye: “Bolingo ezalaka na limemya mpe ezokisaka te mpe esalaka makambo na mobulu te.” Ezali mpenza mpasi na kokanisa ete moto oyo azali komonisa bolingo motindo oyo akoka kotalelama lokola moto azangi limemya.
17. Bizaleli na biso bizali komonisa nini mpo na biso?
17 Ezali bongo polele ete bizaleli malamu ya boklisto biuti mpenza na bolingo ya boklisto. Ezali mpenza te mwango mpo na kolonga kati na likambo moko to maske oyo balataka mpo na kozwa litomba moko. Te, bizaleli na biso, elingi koloba ezalela na biso liboso na bamosusu, molato na biso mpe etamboli na biso ya mokolo na mokolo, ezali komonisa na meko nini tozali komibanzabanza mpo na bazalani na biso mpe ezali komonisa bozindo ya bolingo oyo tozali komonisa bango. Bilenge mpe mikoló basengeli kosala molende na kolanda toli oyo ya Biblia: “Tika te ete moto aluka bobele malamu na ye moko kasi yango na mozalani na ye.” (1 Bakolinti 10:24) Na yango, lokola ezali moko na mitindo ya bolingo na boklisto, bizaleli malamu na boklisto ezali elembo moko ezali kokesenisa bayekoli ya solo ya Yesu Klisto.—Yoane 13:35.
Tozala na bizaleli ya limemya na bisika nyonso
18. Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini ata bato oyo bazingi biso bazali na limemya te?
18 Kolobaka na ntina na libota oyo, Yesu alobaki: “Mpe mpo ete mobulu ekoyikana mingi, bolingo na mingi ekozwa mpio.” (Matai 24:12) Kolemba wana ya bolingo ezali komonana polele kati na kozanga ya limemya mpe na moimi oyo bato mingi bazali komonisa lelo. Kasi na esika ete biso mpe tobanda kosalela bato makambo na kozanga limemya, tosengeli nde kobatela toli oyo ya Paulo kati na makanisi na biso: “Bozongisaka mabe mpo na mabe te; [bosalaka] yango emonani sembo na miso na bato nyonso. Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bozala na bato nyonso kimya.” (Baloma 12:17, 18) Tosengeli kozwa ekateli ya kozala na bizaleli ya limemya na bisika nyonso, ata bato basepeli na yango to basepeli na yango te.—Matai 5:43-47.
19. Na nini bizaleli na biso bizali kotalela makambo nyonso ya bomoi na biso?
19 Ee, bizaleli malamu ya boklisto ezali komonisa bolingo mpe komibanzabanza mpo na bazalani na biso. Lokola maloba na biso mazali komonisa moto ya motindo nini tozali mpenza na kati na motema, bobele bongo bizaleli na biso bizali komonisa soki tozali komibanzabanza to te mpo na baninga, mpe na meko nini. (Matai 12:34, 35) Na bongo bizaleli na limemya bisengeli kozala na bopusi likoló na makambo nyonso ya bomoi na biso. Na makambo nini esengeli komonana mpenza polele koleka? Ndenge nini tokoki kokolisa mingi bizaleli ya boklisto? Ezali yango nde tokotalela na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tobosana te ete na ndenge yango eyebani mpenza liloba étiquette elakisi elembo moko to lokasa babambi likoló na eloko moko mpo na koyebisa nkombo na eloko wana to mosala na yango. Nzokande, mokanda Ebandeli ya maloba mpe masolo na yango ya bolingo (Angl.), ya Wilfred Funk, ezali kopesa ndimbola oyo: “Mitinda ya liboso ya étiquette ekomamaki polele na bisika ya ba militere. Liste ezalaki koyebisa mitinda ya mokolo . . . Bakokaki koloba ete étiquette ezali ‘tiké’ oyo ezali kopesa nzela mpo na kokota na mokili kitoko.”
Bozongeli
◻ Mpo na nini ezali likambo na kokamwa te na komona ete bato bazali lisusu na limemya te?
◻ Nini ezali bantina mpo na yango bato na mokili bazali lisusu na limemya te?
◻ Na nini bizaleli na boklisto bikeseni na bizaleli bibongi mpe na oyo ebengamaka étiquette lokola mokili ezali kolakisa yango?
◻ Mpo na nini tosengeli kotya milende na kozala na bizaleli ya limemya na bisika nyonso?