Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/6 nk. 19-22
  • Bato ya Venezuela batii elikya epai na Jehovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato ya Venezuela batii elikya epai na Jehovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Milona ya liboso ya solo mibimi
  • Elanga ya bato ndenge na ndenge, kasi ezali kobota mbuma mingi.
  • Ba assemblées mpo na kokumisa Jéhovah
  • Komibongisa mpo na bokoli na ntango ezali koya
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/6 nk. 19-22

Bato ya Venezuela batii elikya epai na Jehovah

MIBU ya bozwi. Mingi kati na bato ya Venezuela bazali naino kokanisa eleko wana ezalaki nsima na mobu 1976. Mobu yango, Leta abotolaki ba sociétés nyonso ya bapaya oyo etimolaka pétrole na Venezuela, mpe yango etombolaki nkita ya ekolo yango. Elembo ya kobakama ya bozwi wana ya sika, bandako mingi ya sika ebandaki kotongama na bisika nyonso kati na mboka, oyo elekaki molai ezalaki Ndako molai ya Parque Central na Caracas, Kapitale na bango. Lokola yango ezali komonana, bazalaki na bantina mingi ya kotia elikya na bango na bozwi wana ezalaki kobakisama.

Nzokande, lelo, avenire ezali komonisa elikya moke. Atako bozwi ezali naino, Venezuela ezwami mpe kati na mikakatano ya nkita. Bato nyonso bazali awa bazali koyeba date ya le 28 février 1983, ‘vendredi noir’ oyo bakitisaki motuya ya bolívar (mosolo ya Venezuela). Na yango, mosolo wana ebungisaki nguya na yango mpe nyongo ya Venezuela epai ya mikili misusu ebakisamaki Mbala moko, “mibu ya bozwi” mitikaki esika na “mibu ya mpasi”. Bato mingi bayokaki mpenza mawa, mpamba te elikya na bango etongamaki na esika malamu te. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah ya Venezuela bayekolaki kotia elikya epai na Jéhovah, Nzambe na solo mpe mobu na mobu bazwaki kobakisama to bokoli ya mingi.

Milona ya liboso ya solo mibimi

Ezali na 1936 nde milona ya liboso ya nsango malamu na Bokonzi milonamaki na Venezuela na ba pionniers mibale, oyo bautaki na Texas, na Etats-Unis. (Matai 24:14) Mibu zomi na nsima, bamisionere mibale bayaki, bango bazalaki badiplomés ya kelasi ya mitano ya Galaad, kelasi oyo ebimisaka bamisionere ya la Société Watch Tower. Na Septembre ya mobu moko wana, Société Watch Tower afungolaki filiale moko na Venezuela. Rapport ya mobu yango ezalaki koyebisa ete mboka mobimba ezalaki na basakoli 19.

Na Novembre 1953, président ya la Société, Nathan Knorr, mpe sekretere na ye, Milton Henschel, batelamaki na Venezuela na ntango ya mobembo moko na Amerike du Sud. Assemblée moko oyo esalemaki na Caracas esangisaki bato 942. Na 1977, motuya ya basakoli na Venezuela elekaki ntalo ya 13 800. Na bongo esengelaki bandako ya sika mpo na filiale, mpe ezali na mboka Victoria, oyo ezali mosika na ba kilomètres 85 longwa na Caracas, nde batongaki bandako ya sika. Bandako mosusu oyo babakisaki efungolamaki na 1985. Lelo, Venezuela ezali na basakoli koleka 42,900, bango bakabolami na mwa masangá to bituluku 500. Mpe bato na Venezuela oyo bazali koyekola kotia elikya epai na Jéhovah bazali mingi, lokola emonisi yango motuya kitoko ya bayangani na Ekaniseli ya liwa na Nkolo na 1988: bato 154 881.

Elanga ya bato ndenge na ndenge, kasi ezali kobota mbuma mingi.

Venezuela ezali mboka ya bokeseni, bokeseni oyo ezali komonana mpe epai na bato oyo bazali kotya elikya epai na Jéhovah. Mboka yango, esila koyebana mpo na ebele na bapaya. Yango wana, ata kati na ba Témoins de Jéhovah, mingi bauti na ltalie, na Portugal, na Allemagne, na Espagne, na France, na Haïti, na Trinité, na Cuba, na République dominicaine, na Equateur mpe na bisika mosusu mpe. Atako bongo, bazali na bomoko elongo na baninga na bango ya Venezuela na nzela na elikya na bango kati na Jéhovah, Nzambe ya solo, mpe na mosala oyo bazali kosalela ye.

Bokeseni ya barégió ezali mpe mingi. Mobomi mbisi oyo afandi na Est akokani mpenzampenza te na Ilanero, mobokoli na bibwele na esobe kuna na Sud. Bokesene monene ezali kokabola Caraqueño moko (mofandi na kapitale) oyo azali ntango nyonso likolólikoló, to mosali kati na kompanyi ya pétrole oyo azali moto ya Maracaibo, engumba ya mibale ya mboka, na moloni na bilanga andino oyo azali kosala makambo nyonso malembe, afandi kati na Sud-Ouest na ngomba Andes. Moto na moto azali na bizaleli ya mboka na ye mpe elobeli na ye. Bapaya oyo bauta bamboka mosusu, bazali mpe kobakisa makambo to bizaleli ya bisika na bango oyo bauta, bokeseni nyonso oyo ebimisi libota na bato ndenge na ndenge.

Atako ebele na bokeseni oyo, bato bauti na mabota ya motindo nyonso bazali koyoka masolo na ntina ya ba Témoins de Jéhovah. Tokamata ndakisa ya María Luisa. Kobanda na mbula nsambo, azalaki koyokana na bilimu mabe. Ntango akolaki akomaki molangwi monene ya masanga mpe momeli bangi, nsima azindaki na makambo na pite. Alingaki mpe mingi losambo ya nzambe mwasi María Lionza oyo bazali kosambela na Venezuelaa. Na kozanga ntina ya bomoi oyo alandaki, alingaki kosala na mission katolike ya ba lndiens, oyo bazali kofanda na ouest ya mokili yango. Aumelaki te kozua likatami ete mosala na ye oyo ekomemela ye bolamu moko te, bobele bongo epai na ba lndiens oyo ye akosalela. Abandaki kosepela lisusu na mateya ya bilimu mabe oyo etali koyeba mozindo ya makambo (métaphysique) mpe mateya ya mbongwana soko moto akufi (réincarnation), kasi yango mpe ememaki ye esika moko te. Ezali na ntango yango nde ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na ye. Na yango azwaki boyebi ya Biblia oyo epesaki ye nguya mpo na kobunda na bilimu mabe. Lelo oyo, azali moko ya baoyo bazali kotia konfianse na Jéhovah mpe azali kosakola na molende nsango malamu ya Bokonzi.

Ata bato oyo bazali na bokono bazali koyekola kotia konfianse na bango na Jéhovah. Lokola bandeko oyo mibale Juan mpe Carlos. Na mbula libwa, Carlos azwaki maladi ya méningite oyo ebomaki ye miso. Na nsima, wana ezalaki ye mosambeli na etuluku ya karismatike katolike, abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Azuaki batisimo na 1982 mpe, kobanda 1983, azali ministre moklisto ya ntango nyonso to pionnier. Atako azali komona te, azali kotambola na teritware na ye mobimba na makolo, ye moko soko esengeli, na kosakolaka na kati na yango na ebandeli kino nsuka. Mpo na ndeko na ye Juan, lisolo na ye ekeseni mingi na oyo.

Na molai koleka 1m 80, Juan azalaki ntango nyonso kobunda na balabala. Mokolo moko, babetaki ye masasi mibale na mokongo. Abikaki, kasi azalaki paralizé kobanda na ntolo mpe esengaki ete atikala na pozisio ya kolala na bomoi na ye mobimba. Ntango ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na ye, andimaki na mitema mibale likanisi na bango ya kosalisa ye mpo na koyekola Biblia. Ata bongo, mokemoke limemya na ye mpo na Biblia ekolisamaki. Elikya ya bomoi ya kokoka kati na Paradis esimbaki motema na ye. Ntango atikaki komela likaya, komela masanga mpe kofinga, baninga na ye nyonso batikaki ye mpo ete, akomi “mosantu“, ndenge bazalaki koloba. Atako bongo, Juan abatelaki elikya na ye epai na Jéhovah, na nsuka azwaki batisimo.

Alobi, “kofanda esika moko ezali kopekisa ngai te kosala mokano ya Jéhovah, mpo ete maboko na ngai mpe boongó na ngai ezali ntango nyonso kosala malamu.” Ndenge nini azali kosala mpo na kosalela Jéhovah? “Nazali kosalela manyetofone na ngai mpo na kokokisa mikumba na ngai, na ndakisa na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, mikumba na ngai na likita mpo na mosala ya kosakola, mpe botangi ya boyekoli ya poso na poso ya Mosenzeli. Nazwaki libaku to mokumba ya kotambwisa boyekoli ya mokanda na lisangá, oyo ezali kosalema epai na ngai. Lisusu, nazili pionnier permanent.” Mayoki na ye ezali nini? “Nazali na botondi mingi epai na libota na ngai mpe bandeko na ngai na elimo ya mibali mpe ya basi, baoyo bazali lisalisi ya solo mpo na ngai. Nazali kosenga mpo ete, biso nyonso, tolandela kotia elikya na Jéhovah, mpe tokoka kozala wana mokolo oyo ‘motengumi akopombwa lokola mboloko.’”​—Yisaya 35:6.

Ba assemblées mpo na kokumisa Jéhovah

Mpo na kolandela mosala oyo ezali kosalisa bato mingi kotia konfianse na bango kati na Jéhovah, ba Témoins ya Venezuela batongi ba salles d’assemblées mibale ya minene. Moko ezali na Campo Elias (Etat de Yaracuy), na centre-ouest ya mboka. Mosusu, ezali mosika ya koleka 60 km na sud ya Caracas, ezali na pisine mpo na batisimo, bamasini ya kopesa malili, kikuku mpe cafétéria.

Bandako yango ekamwisaki mingi bato oyo bayebi malamu te mosala na biso to baoyo bazali kosepela na yango. Ezali yango emonisami na likambo ya motambwisi moko ya bus oyo Batemwe bazwaki mpo na komema bango na assemblée ya circonscription. Ntango bakomaki na esika yango mpe amonaki parking monene mpe libanda kitoko, alingaki mpe komona na kati. “Oyo namonaki na kati ya Salle oyo ya assemblée, elobaki ye nsima, epesaki ngai likanisi ya mokili mosusu, likambo ya ntina mosusu.” Ordre mpe bomoko ekamwisaki ye kino alandaki na likebi nyonso programme mobimba. Nsima, asengaki koyekola Biblia mpe, lelo asili kobatisama.

Batemwe basengelaki kosala assemblée ya circonscription na El Tigre, ville na sud-est ya mboka. Lokola Salle mpo na ba assemblées ezalaki te na esika yango, bafutaki mbongo mpo na kosalela terrain moko. Kasi bayebaki te ete programme mosusu ya masano etiamaki na date bobele wana. Mpo na yango, ntango bamonaki basali ya leta babandi kotonga kiosque mpo na miziki bobele pembeni ya esika ya assemblée, babondelaki bankolo ebongiseli ete balongola yango, kasi bayokaki bango te. Na nsuka, moko na batemwe alobaki: “Boyeba malamu ete bozali koluka makambo na Jéhovah.” Na maloba yango, moko na bato yango azongisaki: “Te! te! nalingi te kozala na matata na Jéhovah!” Balongolaki biloko na bango mpe ebongiseli yango esalamaki epai mosusu, mosika na esika oyo assamblée ya circonscription ebongisamaki.

Na libaku mosusu, moklisto moko ya mwasi akendaki na assemblée, mobali na ye, moto ya politike, akendeki na ye mpo na kotala soko azali te kokende mpo na kokutana na mobali mosusu te. Akamwaki mingi na badiskur ya kitoko kino alobaki na mwasi na ye: “Soki nayebaki koloba lokola mobali wana mbele, nakokoma moto ya lokumu na mosala na ngai ya politike.” Nsima ya programme, asololaki na nkulutu moko, asengaki epai na ye alakisa ye ndenge ya kokoma molobi ya malamu liboso na bato, bobele yango. “Kotia motema te ete nakokende ndako na ndako na sacoche”, akebisaki ye. Abandaki koyekola, mpe aumelaki te kobongola makanisi: alingaki kokende ndako na ndako na sacoche mpo na kosakola nsango malamu! Atikaki mosala ya politike, nsima azwaki batisimo, mpe lelo oyo ye na libota na ye batye elikya na bango epai na Jéhovah.

Komibongisa mpo na bokoli na ntango ezali koya

Na ntango ya boleki ya Lyman Swingle, mosangani ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah, bato 63 580 basanganaki na ndako monene ebengami Plaza Monumental na mboka Valencia. Mingi basalaki mobembo na butu na bus. Ezalaki solo elendiseli mpo na baoyo nyonso bazalaki wana ntango ndeko Swingle ayebisaki bango ete: “Sikawa, filiale na bino ezali lisusu filiale moke te, kasi ekoli. Mpe, na ndenge ezali komonana, mboka na bino ezali kopesa elikya ya kokoma mosika te kati na molongo ya bamboka oyo motuya ya basakoli eleki 100 000!

Bibongiseli bizali kosalema mpo na koyeisa monene bandako ya filiale na mboka Victoria, mpo na kokoka kotalela bokoli oyo na kokamwisa. Ya solo, bato na Venezuela bazali ebele baoyo bazali kotia elikya epai na Jéhovah.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala Réveillez-vous! ya le 8 novembre 1967, nkasa 9 kino 11.

[Karte/​Elilingi na lokasa 21]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

MER DES ANTILLES

VENEZUELA

Maracaibo

LES ANDES

Campo Elias

Valencia

La Victoria

Caracas

El Tigre

COLOMBIE

BRÉZIL

GUYANA

600 Km

400 mi

[Bililingi na lokasa 22]

Libanda mpe kati ya Salle ya assemblée na mboka Cúa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto