Mwasi na pite mpe mikonzi na mokili
LISOLO ya boklisto na mokili etondi na bandakisa ya bokoti na yango kati na makambo ya politike mpe bopusi oyo yango ekotisaki. Tala mwa bamoko. Charlemagne (742-814) azalaki mokonzi oyo amonaki ete ezalaki litomba monene na kosala boyokani elongo na lingomba mpe kozwa lisalisi ya bakonzi na Lingomba ya katolike.
Nouvelle Encyclopédie britannique ezali kolimbola ete pape alatisaki ye ekoti to motolé ya bokonzi, elongo na tata na ye mpe leki na ye, kosalaka bongo bokonzi ya sika nsima na “kolongola” oyo ya liboso. Ebakisi: “Boyokani ya politike kati na ba Francs [bato to libota ya Charlemagne] mpe pape elongo na ba Lombards eyeisamaki lisusu makasi na libaku moko wana. . . Charles [oyo akomaki Charlemagne] andimaki uta ebandeli ya boyangeli na ye boyokani ya penepene oyo ezali kati na boyangeli ya ntango moke elongo na Lingomba ya katolike.”
Na mobu 800, pape Léon III, “oyo azalaki na ekateli ya kokomisa Charles empereur” ya Empire romain ya Mpoto, alatisaki ye ekoti ya bokonzi na ntango ya molulu moko monene ya losambo oyo esalemaki na mokolo ya Noël, na Saint-Pierre ya Rome.
Ndumba oyo azali na lokoso ya mosolo
Kasi ndumba asengaka lifuti. Lifuti nini Rome azwaki, ntoma to momonisi oyo ya Babilone, epai na Charlemagne? “Charles . . . azongelaki koloba, kati na basiliq ue Saint-Pierre ya Rome, elaka ya tata na ye ya kotinda to kokaba baregio minene ya ltalie na maboko ya bapapes mpo na kotambwisa yango.” Bobele mokanda moko oyo ebakisi ete: “Elongo na liyoki na ye ya losambo oyo etambwisami na botaleli ya politike, empire eyaki kosala elongo na Lingomba ya katolike bomoko mpo na bokonzi mpe elimo.”
Likambo ya cardinal Wolsey ya Angleterre (1475-1530) ezali ndakisa mosusu ya bopusi makasi oyo mangomba bazalaki na yango kala likoló na makambo ya politike. Encyclopédie britannique ezali komonisa ye lokola “cardinal mpe mokonzi moko ya Leta oyo atambwisaki to ayangelaki bokonzi ya mokonzi ya Angleterre Henri VIII. . . . Na Décembre 1515, Wolsey akomaki Lord-chancelier ya Angleterre. . . . Asalelaki nguya na ye monene ya politike mpe ya lingomba mpo na konduka bozwi oyo bobele bozwi ya mokonzi nde ekokaki koleka yango.” Mpo na kozongela maloba ya elilingi ya Emoniseli, bondumba ya lokumu esengaka lifuti ya lokumu.
Ndakisa mosusu oyo eyebani mingi mpo na bopusi ya mangomba likoló na makambo ya Leta ezali oyo ya cardinal mpe duc ya Richelieu (1585-1642), oyo azalaki na nguya monene na France mpe, lokola Encyclopédie britannique emonisi yango, ye mpe andukaki bozwi “oyo ezangi ndelo, ata liboso na ezalela ya eleko wana”.
Cardinal mosusu akitanaki ye, Jules Mazarin (1602-1661); azalaki (premier ministre) kati na boyangeli ya mokonzi Louis XIV. Kozanga ete aleka sango liboso, baponaki ye cardinal na 1641 epai ya pape Urbain VIII. Ye mpe azalaki na lokoso ya bozwi. Encyclopédie ezali koloba: “Banguna ya Mazarin bapamelaki ye mpo na lokoso na ye ya bozwi. Amipesaki misala mingi, abakisaki ba bénéfice ya bakonzi na lingomba mpe mbala mosusu asangisaki bozwi oyo esengeli na mokonzi elongo na oyo ya ye.”
Na mikolo na biso, mangomba na lokuta bazali kokoba konduka bozwi mpe bazali koluka ntango nyonso kokotisa bopusi na bango, mpe soki likoki ezali, kotambwisa bakonzi na politike. L’Opus Deia (na latin, mosala na Nzambe), lisanga na katolike ya nkuku, ezali ndakisa moko ya kokamwisa. Lokola lelo oyo lisanga yango endimami na pape, engebene mokomi Lawrence Lader, “emikotisi mobimba mpo na kobundisa communisme mpe kati na mosala ya politike oyo ekeseni na communisme, babengi yango la droite”. Politike na yango ezali ya kobongisa to kopesa formation epai na bilenge katolike mpo na kozala na mayele mingi koleka kati na biteyelo na bango mpe na ba universités na bango, mpe na nsima kotia bango na bisika minene mpo na kokotisa bopusi mpe kotambwisa biyangeli, finance mpe banzela ya bopanzi nsango. Elongaki na Espanye na nse na boyangeli ya mokonzi mabe ya katolike Franco, ntango na eleko moko, basangani 10 kati na 19 ya guvernema bazalaki basangani na lisanga yango oyo bato babongisami malamumalamu oyo ezali bongo l’Opus Dei.
Na Etats-Unis, bato oyo basakolaka nsango na nzela ya télévizio bayebani mingi mpo na bozwi na bango oyo balakisaka mpe mpo na motindo ya bomoi na bango ya lokumu. Bakonzi mosusu ya Lingomba na protestá bamikotisaki na esengo nyonso kati na bowelani ya makambo na politike mpo na kobundela esika ya président. Kozanga ata ntembe moke, atako azali na ezaleli ya kobeba, ndumba ya kalakala, na lolenge moko to mosusu, azali naino kongenga, na lokoso ya bokonzi mpe azali komeka ntango nyonso kokamba bato.—Emoniseli 17:4.
Kasi tokoloba boni mpo na nkombo ndumba, Babilone Monene? Ndenge nini ezali kosalisa biso na kokanga malamu ndimbola ya mwasi yango ya elilingi oyo ayebisami kati na Emoniseli?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bandimbola mosusu oyo etali Opus Dei mpe kokota ya Mangomba na lokuta kati na makambo ya politike, taIa mikanda Mosolo oyo ezali kotumba mpe bapolitike ya banyongo (angl.) ya Naylor mpe Politike, bokonzi mpe Lingomba na katolike (angl.) ya L. Lader.
[Bililingi na lokasa 4]
Ba cardinaux Wolsey, Richelieu mpe Mazarin basalelaki bokonzi na bango mpo na konduka bozwi ya mingi koleka.