Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/4 nk. 11-15
  • Ntina oyo mangomba ya mokili makobomama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo mangomba ya mokili makobomama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na ndimbola nini Babilone monene ekwei?
  • Osengeli kopona
  • Lingomba ya lokuta lifundami
  • Elimo ya Kaina oyo ezali kati na mangomba ya lokuta
  • “Likambo ya kokamwa”
  • Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!
    Nsuka ya mangomba ya lokuta ekomi pene!
  • Nzambe andimaka mangomba nyonso?
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Ndenge oyo mangomba ya lokuta ekoselaka Nzambe makambo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mangomba nyonso mazali malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/4 nk. 11-15

Ntina oyo mangomba ya mokili makobomama

“Bino bato na ngai bóbima na ye, ete bósangana na masumu na ye te, ete bózwa moko na malɔ́zi na ye mpe te.”​—EMONISELI 18:4.

1. (a) Na ndimbola nini Babilone monene ekwei? (b) Likambo yango ezali na bopusi nini epai na Batatoli ya Yehova?

“BABILONE MONENE ekwei!” Ee, na miso ya Yehova lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta ekwei. Kokwea yango emonanaki polele kobanda na 1919, na ntango batikali ya bandeko ya Klisto balongwaki na nsé ya bopusi ya boklisto ya nkombo mpamba, eteni eleki monene ya Babilone, lingomba ya molili. Mpo na yango, bazwaki bonsomi ya kotɔndɔla mabe ya mangomba ya lokuta mpe ya kosakola boyangeli ya sembo ya Nzambe na nzela ya Bokonzi ya Masiya. Na boumeli ya ekeke oyo, Batatoli ya sembo ya Yehova basili kotɔndɔla lisangá mobimba ya mangomba ndenge na ndenge ya Satana, oyo azali kosalela mpo na kozimbisa “mokili mobimba.”​—Emoniseli 12:9; 14:8; 18:2.

Na ndimbola nini Babilone monene ekwei?

2. Mangomba ya mokili lelo oyo mazali kati na ezalela nini?

2 Nzokande, moto moko akoki kotuna ete, ‘Mpo na nini bokoki koloba ete Babilone ekwei, wana emonani ete mangomba mazali koyikana na mikili mingi?’ Lingomba ya Katolike mpe lingomba ya Mizilmá balobi ete mokomoko na yango ezali na basangani koleka miliare moko. Lingomba ya Protestá ezali kokóla mingi na mikili ya Amerika, epai kuna bandakonzambe mpe batempelo ya sika ezali ntango nyonso kotongama. Bankámá ya bamilió ya bato basalaka milulu ya lingomba ya Bouddha mpe ya Hindou. Nzokande, tokoki koloba ete mangomba oyo nyonso mazali kosala bopusi ya malamu likoló na etamboli ya bamiliare ya bato wana? Yango epekisaki Bakatolike mpe Baprotestá ete bábomana te na Irlande du Nord? Esili komema kimya ya solo kati na Bayuda mpe Bamizilmá na Moyen-Orient? Esili kokamba bato ya lingomba ya Hindou mpe ya Mizilmá ete báfanda na boyokani nyonso kati na Inde? Mpe, na mikolo oyo miuti koleka kala mingi te, epekisaki bato ya lingomba ya Ortodoksi na Serbie, bato ya Katolike na Croatie, mpe Bamizilmá na Bosnie ete bátika bitumba ya “kopɛtola ekólo,” bátika kopunza, kobebisa basi, mpe kobomana moko na mosusu? Lingomba ezali bobele nkombo, bobele mwa lángi epakolami oyo, na mwa kokulutama moke, ekoki kolongwa kozanga nkaka mpenza.​—Bagalatia 5:19-21; kokanisá na Yakobo 2:10, 11.

3. Mpo na nini mangomba mazali kosambisama liboso na Nzambe?

3 Engebene Nzambe, kosimbama ya mangomba na ebele ya bato ebongoli soko moke te likambo oyo likoki kopɛngolama te, ete​—mangomba nyonso mazali kosambisama liboso na Nzambe. Babilone monene, lokola lisoló ya makambo na yango emonisi yango, ebongi kozwa etumbu mpo ete “libondo na masumu na ye likómi kino na likoló, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye.” (Emoniseli 18:5) Kati na esakweli moko, Hosea akomaki maloba oyo ete: “Zambi bakóni mopɛpɛ mpe bakobuka [ekumbaki, NW].” Mangomba nyonso ya lokuta ya Satana na mokili mobimba makozwa mbano na bango ya nsuka mpo ete basundoli Nzambe, bolingo na ye, nkombo na ye, mpe Mwana na ye.​—Hosea 8:7; Bagalatia 6:7; 1 Yoane 2:22, 23.

Osengeli kopona

4, 5. (a) Makambo nini tozali kobika kati na yango lelo oyo? (b) Tosengeli koyanola na mituna nini?

4 Tozali kobika na eteni ya nsuka ya “mikolo na nsuka,” mpe lokola tozali baklisto ya solo tozali kosala makasi mpo na kobika na ‘ntango oyo ya mpasi.’ (2 Timoté 3:1-5) Baklisto ya solo bazali bobele bapaya kati na mokili ya Satana, oyo ezali komonisa mpenza bomoto na ye oyo esilá kobeba, ye mobomi, mokosi, mpe motɔ́ngi. (Yoane 8:44; 1 Petelo 2:11, 12; Emoniseli 12:10) Tozingelami na mobulu, lokuta, kobuba, libebi, mpe ezaleli ya mbindo oyo ezali komonana mpenza polele. Bato batalelaka lisusu mibeko te. Komipesa na kolukaluka bisengo mpe moimi nde ezali komonisa mpenza ezalela yango. Mpe kati na makambo mingi bakonzi ya mangomba bazali kopesa nzela na kobebisama ya bizaleli na kolɛmbisáká mibeko ya Biblia oyo ezali kopekisa kosangisa nzoto mibali na mibali, pite, mpe ekobo. Na yango, motuna motunami ete, Ozali kosimba mpe kondima losambo ya lokuta, to ozali nde kosangana na molende nyonso na losambo ya solo?​—Levitike 18:22; 20:13; Baloma 1:26, 27; 1 Bakolinti 6:9-11.

5 Sikawa ezali ntango ya kokesenisa. Na yango, tozali na ntina monene ya koyeba kokesenisa losambo ya lokuta mpe losambo ya solo. Makambo nini mosusu mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba masili kosala oyo mazali kopesa bango ekweli monene?​—Malaki 3:18; Yoane 4:23, 24.

Lingomba ya lokuta lifundami

6. Lolenge nini boklisto ya nkombo mpamba esili kosundola Bokonzi ya Nzambe?

6 Atako bamilió ya bato kati na boklisto ya nkombo mpamba bazongelaka mbala na mbala losambo ya Tata wa biso, oyo kati na yango babondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya, kasi, na etingya nyonso, bazali kopesa mabɔkɔ na lolenge nyonso ya biyangeli ya politiki, kasi na boyangeli ya Teokrasi te. Esili koleka bikeke mingi “bankumu” ya lingomba ya Katolike, na ndakisa baepískɔpɔ Richelieu, Mazarin, mpe Wolsey, bazalaki mpe bakonzi ya Leta, baministre kati na boyangeli ya mboka.

7. Lolenge nini Batatoli ya Yehova batɔndɔlaki boklisto ya nkombo mpamba uta koleka mibu 50?

7 Esili koleka mbula 50, kati na mwa búku oyo ezali na motó ya likambo La religion moissonne la tempête, Batatoli ya Yehova batɔndɔlaki bokɔti ya boklisto ya nkombo mpamba kati na makambo ya politiki.a Makambo oyo malobamaki na eleko wana mazali mpe kosalelama na nguya motindo moko lelo oyo: “Bolukiluki ya sembo na ntina na bakonzi ya mangomba nyonso bokomonisa ete bakambi ya mangomba nyonso ya ‘boklisto ya nkombo mpamba’ bazali kosangana na mposa nyonso mpenza na politiki ‘ya mokili oyo mabe’ mpe bazali komikɔtisa na makambo ya mokili.” Na ntango wana Batatoli ya Yehova bakweisaki makasi Pápa Pie XII mpo na boyokani oyo asalaki elongo na Hitler mokonzi ya Nazi (1933) mpe na Franco mokonzi ya Fasciste (1941), mpe mpo na lolenge pápa asombitinyaki ba ambassadeurs na Mársi 1942 elongo na ekólo ya Japon oyo ebundisaki bikólo mosusu, bobele mwa basanza nsima wana Japon ebwakaki bɔ́mbi na Pearl Harbor. Pápa alandaki te likebisi oyo Yakobo apesaki ete: “Bino [basi na ekobo, NW], boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe? Moto nani akani ete azala moninga na mokili amizalisi moyini na Nzambe.”​—Yakobo 4:4.

8. Lolenge nini Lingomba ya Katolike ya Loma ezali kosangana na makambo ya politiki lelo oyo?

8 Makambo mazali ndenge nini lelo oyo? Pápa azali kino lelo kokɔta na makambo ya politiki, ezala na nzela ya bakonzi ya lingomba na ye to na nzela ya bamonisi na ye oyo mosusu bazali balaiki. Bapápa ya eleko oyo bandimi O.N.U. na kosaláká masukúlu kati na ebongiseli wana esalemi na bato mpo na kotya kimya ya lokuta. Nimero moko ya sika ya zulunalo L’Osservatore Romano, zulunalo ya boyangeli ya Vatican, esakolaki ete batindami nsambo ya sika ya bikólo mosusu, “ba ambassadeurs epai na Esika Mosantu,” bayaki epai na “Tata Mosantu” mpo na kolakisa ye mikanda oyo mipesi bango lotómo ya kosala mosala. Tokoki komona kati na makanisi na biso Yesu mpe Petelo bazali komikɔtisa kati na makambo matali boyokani ya politiki elongo na bikólo ndenge na ndenge? Yesu aboyaki ete Bayuda bátya ye mokonzi mpe alobaki ete Bokonzi na ye ezalaki ya mokili oyo te.​—Yoane 6:15; 18:36.

9. Mpo na nini tokoki koloba ete mangomba ya Protestá mazali malamu te koleka baninga na bango Katolike?

9 Bakonzi ya Protestá bazali nde mwa malamu koleka baninga na bango Bakatolike? Na États-Unis, mangomba mingi ya Protestá oyo mabatelaka makambo na yango ya kala, mpe bato ya lingomba ya Mormon, bayebani malamu mpo na lolenge ya politiki oyo bango balandaka. Etuluku moko ebéngami Lisangani ya baklisto emikɔtisaka mingi na makambo ya politiki ya États-Unis. Bakonzi mosusu ya Protestá bayebani malamu mpo na lolenge mosusu ya politiki oyo bango mpe balandaka. Mbala mosusu na États-Unis bato babosanaka ete balobeli mosusu ya politiki lokola Pat Robertson mpe Jesse Jackson bazali to bazalaki mpe ba “Révérends,” lokola Ian Paisley, moto moko ya parlemá ya Irlande du Nord. Lolenge nini balukaka kolóngisa bitɛlɛmɛlo na bango?​—Misala 10:34, 35; Bagalatia 2:6.

10. Likambo nini ya polele lilobamaki na 1944?

10 Lokola mwa búku La religion moissonne la tempête etunaki yango na 1944, biso mpe tozali kotuna bongo lelo oyo ete: “Ebongiseli moko oyo ezali kosala boyokani na banguya ya mokili mpe ezali komilukela etɛlɛmɛlo kati na makambo ya politiki ya mokili oyo, kolukáká litomba kati na yango mpe kolukáká libateli kati na mokili oyo . . . ekoki kozala lingomba ya Nzambe to ekoki komonisa Klisto awa na mabelé? . . . Na ntembe te, bato nyonso ya mangomba oyo bazali koluka kokokisa mikano motindo moko elongo na bikonzi ya mokili oyo bakoki te komonisa bokonzi ya Nzambe na nzela ya Klisto Yesu.”

Elimo ya Kaina oyo ezali kati na mangomba ya lokuta

11. Lolenge nini mangomba ya lokuta mazali kolanda ndakisa ya Kaina?

11 Na boumeli ya lisoló ya bato, mangomba ya lokuta mamonisi elimo mabe ya Kaina, oyo abomaki ndeko na ye Abele. “Bana na Nzambe mpe bana na Satana bakomonana polele na likambo oyo. Moto na moto oyo azangi kosalaka boyengebene auti na Nzambe te; na oyo azangi kolinga ndeko na ye lokola. Yango wana nsango eyoki bino longwa na ebandeli ete tólingana. Pelamoko Kaina te, oyo autaki na oyo mabe mpe abomaki ndeko na ye. Abomi ye na ntina nini? Mpo ete misala na ye izalaki mabe, nde yango na ndeko na ye izalaki na boyengebene.” Lokola asepelaki te na losambo ya pɛto oyo ndeko na ye azalaki kosambela mpe oyo endimamaki na Nzambe, Kaina asalelaki koboma​—bato oyo bakokaka te kopesa eyano ya kolongobana basalelaka koboma mpo na kosukisa likambo.​—1 Yoane 3:10-12.

12. Elembeteli nini emonisi ete mangomba mazali komikɔtisa kati na bitumba mpe mobulu?

12 Makambo mamonisi ete bifundeli wana likoló na mangomba ya lokuta bizali solo? Kati na búku Preachers Present Arms (Bateyi balakisi mandoki), mokomi alobaki ete: “Kati na lisoló ya bamboka ndenge na ndenge, . . . banguya mibale esanganaka ntango nyonso esika moko kati na boyokani makasi. Ezali bongo etumba mpe lingomba. Mpe, kati na mangomba nyonso minene ya mokili, . . . [boklisto ya nkombo mpamba] esili komipesa na [bitumba] koleka mangomba mosusu nyonso.” Esili koleka mwa bambula, zulunalo The Sun ya Vancouver, na Canada, elobaki ete: “Mbala mosusu ezali bolɛmbu ya bibongiseli nyonso ya losambo ete mangomba malandaka bendele ya ekólo . . . Etumba nini oyo esilá kobundama kozanga ete ngámbo moko mpe mosusu eloba ete Nzambe azali elongo na bango?” Ekoki kozala ete osilá komona bosolo ya likambo yango kati na ndakonzambe na esika ofandi. Mbala mingi babendele ya bikólo etyamaka na bisika na bango ya bulɛɛ. Okanisi ete Yesu alingaki kotambola na nsé ya bendele nini? Maloba na ye masili kozongelama mbala na mbala na boumeli ya bikeke: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te”!​—Yoane 18:36.

13. (a) Na ndimbola nini mangomba ya lokuta malóngi te na Afrika? (b) Elembo nini oyo Yesu apesaki esengeli kokesenisa baklisto?

13 Mangomba ya boklisto mateyi bato na bango solo te na ntina na bolingo ya bondeko ya solosolo. Na esika ya kosala bongo, batiki nde nzela na bolingi-ekólo, bolingi-etúlúká, mpe bokesenisi bikólo ete ekabola bituluku na bango. Balapólo emonisi ete bakonzi ya mangomba ya Katolike mpe ya Anglikane basanganaki na bokabwani oyo ememaki na kobomana ya ebele ya bato na Rwanda. Zulunalo The New York Times eyebisaki ete: “Kobomana ya bato na Rwanda epusaki bato mingi ya Katolike ya Loma na komiyoka ete bakonzi ya lingomba batekisaki bango. Mbala mingi lingomba ezalaki komitya na ngambo moko to na ngambo mosusu na bokabwani ya ekólo, kati na Bahutu mpe Batutsi.” Zulunalo yango ezongelaki mpe maloba ya sángó moko ya Maryknoll, oyo alobaki ete: “Lingomba elóngaki soko moke te na Rwanda na 1994. Na lolenge moko to mosusu bato mingi ya Rwanda bamilongolaki na lingomba. Bato bakoki kotyela yango lisusu motema te.” Yango ekeseni mpenza na maloba oyo ya Yesu: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”​—Yoane 13:35.

14. Mangomba minene oyo mazali ya boklisto te masili komonisa etamboli nini?

14 Mangomba mosusu ya minene ya Babilone monene mamonisaki mpe ndakisa malamu te. Kobomama ya nsɔ́mɔ ya ebele ya bato na 1947, na ntango Inde ekabwanaki, emonisi ete mangomba minene ya mboka yango mamonisaki boboto te. Mobulu oyo ezali sé kokóba kati na bituluku bikeseni na Inde emonisi ete ebele ya bato babongoli bizaleli na bango te. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete zulunalo India Today elobaki: “Lingomba ezali nkombo mpamba oyo na nsima na yango mabe ya nsɔ́mɔ mpenza mazali kosalema . . . Ezali kobimisa makambo minene ya mobulu mpe ezali mobomi monene.”

“Likambo ya kokamwa”

15. Ezalela ya mangomba ezali nini kati na mikili ya Mpótó?

15 Ata bato oyo bamipesi na mangomba te basili komona ete mangomba malóngi te kondimisa, kokɔtisa bizaleli malamu, mpe kotɛmɛla bokɔti ya makambo ya mokili kati na yango. Kati na búku Out of Control (Babulungani) kapita ya kala makambo matali libateli na États-Unis, Zbigniew Brzezinski akomaki ete: “Ezali likambo ya kokamwa na komona ete bolóngi monene ya liloba oyo ete ‘Nzambe asilá kokufa’ ebimaki te kati na mikili oyo etambwisami na politiki ya Marxisme . . . kasi ebimaki nde kati na mikili ya Mpótó etambwisami na demokrasi, oyo esili kokólisa ezaleli ya motema makasi kati na bato. Likambo oyo ezali komonana kati na mikili yango ya Mpótó ezali oyo ete mangomba mazali lisusu na bopusi monene te epai na bato.” Alobaki lisusu ete: “Bopusi ya mangomba likoló na mimeseno ya bato ya Mpótó esili kokita mingi mpenza, mpe lelo oyo kati na mikili ya Mpótó​—mingi mpenza koleka na Amerika​—bato bamipesi mingi mpenza na losambo te.”

16, 17. (a) Toli nini Yesu apesaki na ntina na bakonzi ya mangomba na eleko na ye? (b) Lilako nini malamu Yesu abimisaki na ntina na mbuma?

16 Yesu alobaki nini na ntina na bakonzi ya lingomba ya Bayuda na eleko na ye? “Bakomeli mpe Bafalisai bazali kofanda na kiti na Mose [mpo na koteya Tora, to Mibeko]. Bongo makambo nyonso makolobaka bango na bino, bósala yango mpe bótosa yango; nde bósala mosala mokosalaka bango te. Zambi bakolobaka nde bakosalaka te.” Ee, bokosi na makambo ya losambo ebandi lelo te.​—Matai 23:2, 3.

17 Mangomba ya lokuta makweisami mpenza na mbuma oyo yango moko ezali kobimisa. Lilako oyo Yesu apesaki ekokani na bango mpenza: “Bongo, nzeté malamu na nzeté malamu ekobotaka mbuma malamu nde nzeté mabe na nzeté mabe ekobota mbuma mabe. Nzeté malamu ekoki kobota mbuma mabe te mpe nzeté mabe ekoki kobota mbuma malamu te. Nzeté na nzeté oyo ekobota mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama na mɔ́tɔ. Bongo bokososola yango na mbuma na yango.”​—Matai 7:17-20.

18. Na lolenge nini boklisto ya nkombo mpamba ekokaki komibatela pɛto?

18 Soki mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba basalelaki na bosembo nyonso motindá ya boklisto ya kobimisa, to kobengana na lingomba bato oyo bazali komitánga ete bazali basangani na yango kasi bazangi kotosa mibeko, mbɛlɛ likambo nini elingaki komonana? Nini elingaki kokómela bato nyonso oyo baboyi kobongola motema: babúki na lokuta, basáli na pite, basáli na ekobo, bato oyo basanganaka mibali na mibali, babúbi, babomi, batekisi mpe bameli bilangwiseli, mpe bituluku ya bato ya mafia? Na ntembe te, mbuma oyo esilá kopola ya boklisto ya nkombo mpamba emonisi ete ebongi bobele kobebisama na Nzambe.​—1 Bakolinti 5:9-13; 2 Yoane 10, 11.

19. Makambo nini malobamaki na ntina na bakonzi ya mangomba?

19 Likita monene ya Lingomba ya Presbytérien na États-Unis endimaki ete: “Tozali na mokakatano ya nsɔ́mɔ ezala na bonene na yango mpe na mbuma mabe oyo yango ezali kobimisa. . . . Kati na 10 % mpe 23 % ya bakonzi ya lingomba na mboka mobimba basili kolɛngola to kosangisa nzoto na bandimi, na bakiliyá, na bato ya mosala, mpe bongo na bongo.” Moto moko ya mombongo na États-Unis alobelaki malamu mpenza likambo yango na mokuse: “Mangomba malóngi te koteya bizaleli malamu na yango ya kala, mpe kati na makambo mingi, bango basili kobimisa mokakatano.”

20, 21. (a) Lolenge nini Yesu mpe Paulo batɔndɔlaki bokosi? (b) Tokoyanola na mituna nini?

20 Kokweisa oyo Yesu akweisaki bokosi ya mangomba ekokani lelo na oyo ezalaki na eleko na ye: “Bakosi! Yisaya alobaki malamu mpo na bino ete, Bato oyo bakotosaka ngai na monoko, kasi mitema na bango izali mosika na ngai. Bakosanzolaka ngai mpamba, bakolakisa malako mazali mibeko na bato.” (Matai 15:7-9) Maloba oyo Paulo atindaki epai na Tito mazali mpe komonisa makambo oyo mazali koleka na mikolo na biso: “Balobi ete bayebi Nzambe nde na misala na bango bazali koangana ye. Bazali bato na bosɔtɔ mpe na nkanza; babongi mpo na mosala moko malamu te.”​—Tito 1:16.

21 Yesu alobaki ete soki mokufi miso azali kokamba mokufi miso, bango nyonso mibale bakokwea kati na libulu. (Matai 15:14) Olingi kokufa elongo na Babilone monene? To, olingi kotambola kati nzela ya sembo na miso mafungwani mpe kozwa mapamboli ya Yehova? Mituna oyo mitaleli biso sikawa mizali oyo: Lingomba nini mpenza ezali kobimisa mbuma engebene mokano ya Nzambe? Lolenge nini tokoki koyeba losambo ya solo oyo endimami na Nzambe?​—Nzembo 119:105.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., na 1944; sikawa enyatamaka lisusu te.

Ozali komikundola?

◻ Etɛlɛmɛlo nini Babilone monene ezali na yango lelo liboso na Nzambe?

◻ Mpo na ekweli nini mangomba ya lokuta mazali kofundama?

◻ Lolenge nini mangomba ya lokuta masili komonisa elimo ya Kaina?

◻ Lilako nini Yesu apesaki mpo na kosambisa mangomba nyonso?

[Elilingi na lokasa 13]

Na boumeli ya lisoló ya bato, bakonzi ya mangomba basilaki komikɔtisa kati na makambo ya politiki

[Bililingi na lokasa 15]

Bakonzi oyo ya mangomba bazalaki mpe bakonzi minene ya Leta

Cardinal Mazarin

Cardinal Richelieu

Cardinal Wolsey

[Picture Credit Line]

Epískopo Mazarin mpe Epískopo Richelieu: Uta na búku Ridpath’s History of the World (Vol. VI mpe Vol. V engebene nkombo elandani). Epískopo Wolsey: uta na búku The History of Protestantism (Vol. I).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto