Ndumba monene amonisami polele
BILOKO mabe na ntango oyo eyangelami na Satana, “nzambe na mokili oyo”, ezali na biteni misato ya minene: boyangeli na politike, nguya mpe bopusi ya mombongo monene, mpe mangomba na losambo ya lokuta. Na boumeli ya ebele na mibu, biteni misato wana bizalaki miboko ya boyangeli na motindo nyonso. Kati na nguya oyo misato, wapi oyo “mama na basi ya pite” azali komonisa?—2 Bakolinti 4:3, 4, Bible de Jérusalem; Emoniseli 12:9; 17:5.
Engebene emonaneli ya Yoane oyo tozali kotalela awa, bayangeli “bakonzi na mokili”, bakendeki bango moko epai na mbeto na ye ya pite. (Emoniseli 18:3) (Bankasa oyo elandi ekomonisa yango na bandakisa ya masolo na bato oyo maleka.) Na bongo Babilone Monene akoki kozala te eteni ya politike ya biloko mabe na ntango oyo.
Tokoloba boni mpo na mombongo monene oyo ezali na esika monene kati na libota ya bato lelo? Ntembe ezali te, ezali na bopusi makasi likoló na mikili mingi; na bongo, ezali yango nde ezali kozwa ekateli mpo na bozwi ya bamoko mpe na bobola ya bamosusu. Anzelu moko ayebisaki na Yoane elembo moko ya ntina monene oyo epesi biso eyano. Ayebisaki likambo moko ya kokamwisa: Babilone ekweyi! Abungisi bamakango na ye oyo mbala moko bamoni ye mabe. Longola bobele “mikonzi na mokili”, nani amonani kati na bakiliya na ye ya ntango nyonso? Anzelu azali koloba: Mpo ete mabota nyonso basili komela vinyo na kongala na pite na ye, mpe bakonzi na mokili basali na ye pite, mpe bato na mombongo na mokili bazwi mosolo mingi mpo na koyikana na mosolo na ye.” Ee, bato na mombongo ya mokili mobimba bazwi mosolo mingi na kozalaka na ye ntango nyonso, na kosalaka mombongo elongo na ye mpe na kopesaka nzela ete “koyikana na mosolo na ye” ekoma lisusu mingi koleka. Na ntina yango, akoki kozala te elilingi ya mombongo monene kati na mokili mobimba.—Emoniseli 18:3.
Awa elongoli biso biteni mibale oyo, tozali kopengola likanisi ya koloba ete mwasi na pite ezali nde boyangeli na politike mpe na nguya mpe bopusi ya mombongo monene. Eloko nini etikali na biso? Eteni oyo etalelami na efundeli oyo: “Mpe na soloka na yo bato na mabota nyonso bazimbisami.” Eteni yango, oyo kala ezalaki na nguya, nzokande lelo esila kokwea, etambwisaki ntango nyonso makanisi mpe misala ya mabota uta mikolo na Babilone ya kala. Ezali bongo ye oyo “azali na bokonzi likolo na bakonzi nyonso na mokili”, elingi koloba mangomba na lokuta!—Emoniseli 17:18; 18:23.
Ee, ata ekoki kopesa mpasi epai na bandimi ya motema malamu, Babilone Monene, mama na basi ya pite, azali elilingi ya nguya na mokili mobimba ya mangomba ya lokuta eyangelami na Satana. Ezali komonisa mangomba ya mokili oyo, na lolenge moko to mosusu, basalaki boyokani na boumeli nyonso ya lisolo ya mokili oyo elongo na banguya ya politike mpe ya mimbongo.
Babilone: lisanga elingá bitumba
Na boyokani na emonaneli ya esakweli, Babilone Monene azali ndumba Monene oyo apusaki mikili, mabota mpe bikolo na komikotisa kati na bitumba, ba croisades mpe botomboki oyo esopaki makila, kopambolaka bango na nzela na maloba ya maji, ya mai mapambolami, ya mabondeli to ya badiskur makasimakasi mpo na bolingo ya ekolo.a—Emoniseli 18:24.
Bakonzi ya mangomba, mingimingi ba omonyé na yango, bayokanaki na bolingo na bango moko elongo na mikonzi mpo na kokamba bato na liwa na ntango ya bitumba mibale mpe ya matata mosusu ya minene koleka. Bakatolike babomaki bakatolike, mpe baprotestá babomaki baprotestá, kobomaka bongo bato 50 kino 60 milió, bobele na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba.
Na ekeke oyo ya ntuku mibale, ekeke ya bongengi to pole, libula ya mangomba ezali ntango nyonso kobota likunya mpe liwa, bobele te kati na mikili oyo miyangelami na boklisto ya mokili epai bakatolike bazali na matata elongo na baprotestá, kasi lisusu kati na mikili oyo mizali ya boklisto te: musulmans elongo na bayuda, bahindous elongo na bamusulmans, babudiste elongo na bahindous, sikhs elongo na bahindous, bongo na bongo.
Lisusu, mangomba balukaki ntango nyonso kokotisa bopusi monene likoló ya “mikonzi na mokili”, komekaka kotambwisa mikano na bango to kopona bakitani na bango. Tomonisa yango na mokuse na mwa bandakisa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ba croisades “mosanto” (1096-1270), etumba ya mibu Ntuku Misato na Eropa (1618-1648), bitumba mibale ya mokili mobimba mpe kobomama ya bahindous mpe bamusulmans pene na 200 000 na ntango ya bokaboli lnde (1948) ezali bobele mwa ndambo na bilakiseli ya makila oyo mangomba bakumbi ngámbo na yango.
[Elilingi na lokasa 2]
Kati na biteni misato oyo-politique, mombongo monene to mangomba na lokuta - wapi oyo “Babilone Monene” azali komonisa?