Babilone monene kokwea na ye mpe kobomama na ye
EKWEI! Babilone monene ekwei! oyo asili komelisa mabota nyonso vinyo na kongala na pite na ye!” “Ekwei! Babilone monene ekwei! Esili kokoma efandelo na bilimu mabe, ebombamelo na bilimu nyonso na mbindo mpe ebombamelo na bandeke nyonso na mbindo bayinami.”—Emoniseli 14:8; 18:2.
Oyo nde esakweli! ‘Babilone Monene ekwei!’ Elilingi oyo ezali kokamwisa bayekoli ya Biblia uta bikeke mingi. Mpo na nini osengeli koluka koyeba ndimbola na yango? Mpamba te, engebene esakweli ezwami na Biblia, kufa ya Babilone Monene ekobongola makambo mingi na mokili mobimba. Lokola elimbolaki yango Mosenzeli ya le 1er mpe ya le 15 Avril, mwasi na pite elimboli lisanga ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta etambwisami na Satanaa.
Kasi kokwea ya Babilone Monene elimboli nini, mpe ekweaki ntango nini?
Babilone: Ekweaki kasi ebomamaki naino te
Mpo na kosimba ntina malamumalamu oyo elimboli kokwea ya Babilone Monene, tosengeli kotalela makambo ndenge malekaki ntango engumba ya kala ya Babilone ekweaki na mobu 539 liboso ya ntango na biso. Na eleko yango, Bayisraele, libota ya Nzambe, bazalaki na boombo, mbula 70 elingaki kokoka. Bazalaki kozela ete basikwama, engebene maloba ya basakoli na bango. (Yilimia 25:11, 12; 29:10) Kanisa esengo ezalaki na bango ntango Siruse mokonzi ya Perse akweisaki Babilone mpe abimisaki Bayisraele mpo ete basimba nzela molai ya bozongi na Yelusaleme, mboka mosantu!—Yisaya 45:1-4.
Nzokande, atako Bayuda balongwaki na nse ya boombo ya Babilone, elimbolaki te ete Babilone ya kala esukaki wana. Kati na mokanda na ye Babylone (na Anglais), Joan Oates, mokomi na makambo na kala, akomaki: “Siruse akotaki na bolongi nyonso na Babilone. Apekisaki ete babebisa mboka te mpe aponaki moperse moko ete azala guvernere; abongolaki eloko moko te na makambo matali losambo mpe eyangeli ya mboka. Ya solo, bomoi ya bato ya Babilone emonani ete ebongwanaki mpenza te na nse na bokonzi ya baperse. Babatelaki mitindo ya kosambela ndenge na ndenge. Mombongo mpe ezalaki kotambola malamu.” Na yango, atako ekweaki, Babilone ezalaki naino wana, kasi libongwani monene esalemaki: Bayisraele, libota ya Nzambe, bazalaki lisusu baombo kuna te. Bazongaki na Yelusaleme mpo na kobandela losambo ya peto.
Ntango Alexandre le Grand, général mpe mokonzi ya bagreke akotaki na Babilone, pene na mobu 331 liboso ya ntango na biso, bato bayambaki ye malamu. Azwaki ekateli ete ezala kapitale na ye to mboka-mokonzi kuna na ebimelo na moi, kasi akufaki liboso ete akokisa mokano na ye wana. Na yango, Babilone ezalaki naino na lokumu kino na mikolo wana.
Kokwea ya Babilone na mobu 539 liboso ya ntango na biso, elimbolaki nsuka na yango te. Eumelaki lisusu bikeke mingi. Yango ekokani na nini lelo, awa bisakweli na ntina na Babilone Monene bizali kokokana?
Kokwea ya Babilone Monene
Makambo oyo makokani na kokwea ya Babilone ya elilingi, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. Na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale, liboso na 1919, Bayekoli ya Biblia, nkombo ya kala ya ba Témoins de Jéhovah, basengelaki kosikwama na boombo ya elimo. Mpamba te bazalaki baombo na makanisi mpe na mitindo ya losambo ya lokuta. Atako basilaki kobwaka mateya ya lokuta, lokola la Trinité mpe kozanga kokufa ya molimo, nzokande bazalaki naino komibebisa na mitindo miutaki na Babilone. Mingi bazalaki kopesa motuya monene na kokolisa bizaleli na bango moko mpe bamonaki bongo ete bamikoki. Bamoko bazalaki kokumisa ekelamu: Charles Russell, président ya liboso ya la Société Watch Tower azalaki eloko ya kosambela mpo na bango. Kozanga ntina ezwami na Biblia, bazalaki kokumisa Noele mpe bilambo ya mbotama. Ekulusu ezalaki naino na esika ya ntina kati na makanisi na bango. Bamoko bazalaki kolata elamba ezali na elembo ya ekulusu mpe elembo mosusu couronne, bamosusu bazalaki koluka lokumu engebene mitindo ya boklisto ya mokili oyo. Nzokande, na 1917, mwa moke nsima na liwa ya Russell, libongwani monene esalemaki.
Na mbula wana, la Société Watch Tower abimisaki mokanda Le mystère accompli, kati na yango bazalaki kolimbola Emoniseli. Mokanda wana emonisaki polele mabe ya bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo, ndakisa ndenge bamikotisaki na Etumba Monene ya mokili mobimba, oyo ezalaki naino kongala kati na mikili ya Mpoto. Bakonzi na mangomba ya misioni, moko na bituluku ya Babilone Monene na Kanada, bakendaki koyebisa makambo yango epai na baninga na bango bakonzi ya politike na boyangeli ya Kanada mpe bafundaki Bayekoli ya Biblia ete bazali batombokisi. Yango wana na le 12 Février 1918, misala ya la Société Watch Tower mipekisamaki na Kanada.
Na Etats-Unis, bakonzi na mangomba balandaki noki ndakisa ya bandeko na bango ya Kanada: na mikolo milandaki, mikanda ya la Société Watch Tower mikangisamaki na Los Angeles (Californie). Na nsima, na sanza ya mitano ya 1918, batindaki bato mpo na kokanga Joseph Rutherford, président ya la Société Watch Tower, oyo autaki koponama kala mingi te, elongo na bandeko mosusu nsambo oyo bazalaki batambwisi na misala ya la Société. Na sanza ya motoba, mpe na mbangu nyonso, baklisto oyo basambisamaki mpe bakatelaki bango bitumbu. Nsambo kati na bango bazwaki etumbu ya mbula 20 ya boloko, mpe moko etumbu ya mbula 10. Bakonzi na mangomba basalaki nini? Kati na mokanda na ye La religion américaine moderne: l’ironie totale (na Anglais), Martin Marty alobi boye: “Bakonzi na mangomba babalukelaki ba Russellistes [oyo na nsima bayebanaki na nkombo Témoins de Jéhovah] mpe basepelaki na koyokaka ete batambwisi ya ba Témoins de Jéhovah bazwaki etumbu ya mbula 20 ya boloko.” Bakonzi na Babilone Monene bazalaki koseka biso, kasi babosanaki liloba oyo: koseka moninga te lobi ekozala ngala na yo. Na motindo yango, na 1918, kokangama na maboko na Babilone ebongwanaki mpe kokangama mpenza na boloko mpo na basaleli mosusu ya Jéhovah. Monyokoli engalaki na Etats-Unis, na Kanada mpe na mikili misusu likoló na Bayekoli ya Biblia. Na bamboka mosusu, bakonzi na mangomba oyo bamipesaki na makambo ya kolinga ekolo babimisaki mobulu mpo na kobengana baklisto yango. Bayekoli mosusu ya Biblia bapakolamaki gudro mpe bazipaki bango na nsala. Bamosusu babetamaki na biteni na nzete minene. Basalaki mabe mingi epai na etuluku oyo moke ya baklisto ya sembobc.
Na nsima, na 1919, libongwani moko ezelamaki te esalemaki. Etumba Monene esukaki na novembre 1918. Bandeko basengaki lisambisi mosusu likoló na bitumbu oyo bakatelaki batambwisi ya la Société Watch Tower; bamonisaki ete lisambisi wana ezalaki libunga. Rutherford na baninga na ye babimisamaki na boloko, mpe banguna na bango bakonzi na mangomba bayokaki nsoni. Lokola elobaki yango Martin Marty, “na kati na mangomba minene mpe ya kala moto moko te asepelaki mpo na yango”. Na nsuka na likambo yango bandeko oyo nyonso balongisamaki. Zuzi Martin Manton, katolike, oyo pape Pie Xi apesaka ye medaye ya “Chevalier de l’Ordre de Saint Grégoire le Grand”, aboyaki kobimisa na boloko Batemwe oyo mwambe atako balingaki kosimbisa mbongo (caution), yango wana bandeko batyamaki na boloko na lolenge ezangi sembo, kino sanza libwa. Na 1939, zuzi oyo mabe mpe ya kopona bilongi atyamaki na boloko; na motindo yango ezaleli na ye ya mabe emonanaki polele: azalaki koluka kanyaka! Ebimaki bango na boloko, na 1919, Rutherford mpe bandeko bakangamaki na ye elongo bazongaki na siège ya la Société Watch Tower, na Brooklyn. Bamibongisaki mpo na koyokisa lokito ya mosala ya kosakola Bokonzi kati na mokili mobimba lokola emonanaki naino liboso te. Bayekoli ya Biblia batikaki kobanga bato, mpe uta ntango yango bamonaki polele etelemelo na bango ezali nini liboso na mangomba nyonso ya lokuta. Babilone Monene azali moyini na bango makasi; kokwea na ye esengelaki kosakolama mpe losambo ya solo esengelaki kozongisama kati na mabota.
Baklisto oyo bakobangaka te babakisaki molende kati na mosala ya ndako na ndako. Batambolaki mpe na ba balabala, komonisaka mabe ya mangomba ya lokuta; basalelaki mabaya likoló na yango bakomaki: “Mangomba ezali motambo mpe moyibi”; “Bosalela Nzambe mpe Klisto, Mokonzi”. Lokola ezalaki bongo mpo na mboka ya kala ya Babilone, losambo ya lokuta elimwaki naino te, kasi mpo na ba Témoins de Jéhovah, Babilone Monene ekweaki na 1919. Batemwe bazalaki lisusu na boombo na maboko na Babilone te!
Bopusi ya Babilone ekiti
Lelo oyo, nsima na mibu 70, emonani polele ete bopusi ya Babilone Monene ekiti na bamboka mingi. Ezali solo ete Mangomba mazali naino makasi na Etats-Unis, epai kuna bateyi na nzela na télévizio mpe bateyi mosusu oyo bazali kobenda mayoki ya bato mpo na losambo bazali na nguya likoló na mwa ndambo na bato, baoyo mayoki na bango mazali kopusama noki. Nzokande, bamoko kati na bateyi yango basili komonana ete bazali bateyi ya lokuta mpe baluki na mosolo; ezalaki nsoni mingi mpo na bango. Mangomba mazali naino makasi na République de Corée, epai kuna Mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali komikotisa makasi kati na politike. Ya solo, ata esili “kokwea”, Babilone Monene ezali naino.
Nzokande, nsima na bitumba na mokili mobimba, kati na mikili lokola Alemanye, Danemark, Suède mpe Grande-Bretagne, mangomba minene mpe ya kala mazali lisusu na nguya te lokola na kala. Ata na mikili ya katolike lokola ltalie, Espanye mpe France, bato mingi te bazali kokende lisusu na messe mpe na ntubela, nzokande yango ezali mimeseno mibale ya ntina epai ya bakatolike. Motuya na bayekoli na séminaire ekiti mingi, mpe mibembo ya pape kati na mokili koleka bapape oyo bazalaki liboso na ye emonisi ete Lingomba ya katolike ezali na krize. Epai mosusu, uta 1917, ntalo monene ya mikili ya socialistes bazali kopesa lisusu motuya mingi te na mangomba mpe bazali kotikela yango lisusu nzela te ete ezala na bopusi likoló na makambo ya politike lokola ezalaka na yango liboso. Na mokili mobimba, mangomba minene mpe ya kala ebimisi koyina mpe esopi makila mingi, kino ete bato mingi baboyi mitindo nyonso ya losambo, ezala oyo euti epai na ebimelo na moi to oyo euti epai na elalelo ya moi. Mai ya elilingi likoló na yango Babilone Monene afandi, elingi koloba bibele na bato oyo ye azalaki na bokonzi likoló na bango, mai wana mazali solo kokauka. Babilone Monene azali kosambisama, mpe etikali moke akobomama.—Emoniseli 16:12; 17:1, 15.
Babilone azali kosambisama-Mpo na nini?
Mpo na bantina nini Jéhovah azali kosambisa lisanga ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta? Bamoko bakoloba mbala mosusu ete ebongi malamu Nzambe asepela na balopitalo mpe biteyelo oyo mangomba ndenge na ndenge basili kotónga, mpe misala misusu bazali kosala mpo na kosalisa babola. Kasi nyonso oyo ekoki solo kozipa mabe monene oyo bazali kosala, mpo na yango Jéhovah alingi kosambisa bango? Totalela na mokuse makambo nini bafundami mpo na yango, mpe totalela etamboli na bangod.
“Namonaki mwasi yango alangwi makila na babulami mpe makila na batatoli na Yesu.” “Epai na ye makila na basakoli na babulami mazwami na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.” (Emoniseli 17:6; 18:24) Na boumeli ya bikeke, Babilone Monene asopi makila mingi na konyokolaka baklisto ya solo, bakisa bato oyo bazalaki na molende ya kobongola Biblia mpo ete bato nyonso bakoka kotanga yango, bakisa lisusu bato oyo basombaki yango mpe batangaki yango. Babilone Monene azali mpe na ngambo mpo na makila ya baklisto ya solo oyo babomami na mikolo na biso kati na ba boloko mpe ba camps de concentration, na nse ya bokonzi ya nazi to fasciste, mpe na nse ya biyangeli mosusu ya yauli. Efundeli elobi lisusu mpo na “baoyo nyonso babomamaki na mokili”, elimboli ete tosengeli mpe kotanga bankama na bamilió na bato babomamaki na mokili mobimba na boumeli ya bitumba mpe matata kati na mangomba ndenge na ndenge na kati na lisolo mobimba ya bato. Tala Matai 23:34-36; 2 Timote 3:5.
Ngambo mosusu ya Babilone Monene eyebisami kati na ekateli oyo Nzambe azweli ye: “Na ndoki na yo bato na mabota nyonso bazimbisami.” (Emoniseli 18:23) Liloba ya greke ebongolami na “ndoki” (pratiques spirites) ezali pharmakia; “na ebandeli elimbolaki kosalela nkisi, drogues, maloba ya maji; na nsima elimbolaki kotyela pwazó; na nsima lisusu ndoki”. Na elobeli ya elimo, mangomba ya lokuta masili komelisa bato pwazó: ezimbisi mabota na kolakisaka bango mateya ya lokuta mpe na kolakisaka bango ete bandima banzambe ya lokuta; na motindo yango, balongoli likebi ya bato epai ya Jéhovah mpe epai ya likambo ya boyangeli ya molongo mobimba. Na kolakisaka liteya ya lokuta ya kozanga kokufa ya molimo, mangomba ya lokuta ebimisi kobanga bakufi mpe kosambela bankoko, kotyaka bongo moboko mpo na misala nyonso ya ndoki mpe koluka koyokana na bilimu mabe. Nzambe azali bongo na elonga ya kokweisa Babilone Monene. Lokola ekomaki yango ntoma Yoane, “libondo na masumu na ye likomi kino na likoló, mpe Nzambe asili kokanisa misala na ye ya mabe”.—Emoniseli 18:5.
Tosengeli kosala nini?
Na kotalela kokwea ya Babilone Monene mpe ekateli ezwami likoló na ye, bato balingi solo basengeli kosala nini? Esakweli ya Yisaya na ntina na Babilone ya kala etali mpenzampenza mangomba ya lokuta na eleko na biso: “Bolongwa! Bolongwa! Bokima na esika yango, bosimba eloko na mbindo te; bobima na kati na ye, bomipetola bino mpenza, bino baoyo bokokumbaka biloko na Jéhovah!” (Yisaya 52:11) Mbela oyo ya noki ekokani na oyo epesami na Emoniseli 18:4: “Nayokaki mongongo mosusu kobima na likoló koloba ete, Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.”
Ee, ntango ekoki ya kokata boyokani nyonso na losambo ya lokuta. Kasi soki moto abimi na Babilone Monene akokenda wapi? Epai na losambo ya solo, oyo ya Jéhovah, Nzambe oyo tosengeli kosambela na kosanganaka na batemwe na Ye. Bamilió ya bato bauti na mikili nyonso ya nse bazali kosopana epai na “ngomba na Jéhovah” na elilingi. Tozali kobenga yo mpe ete oyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah mpe osangana elongo na bango mpo na kosalela losambo ya solo.—Yisaya 2:2-4; 43:10-12.
Motuna oyo mozwi naino eyano te: Soki Babilone Monene esili kokwea mpe kosambisama, nini tokoki kozela sikawa kati na manaka ya Nzambe? Nini ekokomela lisanga ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta oyo etambwisami na Satana? Nimero ya Mosenzeli ya mbala ekoya, oyo ya le 15 Mai, ekotalela motuna oyo na boyokani na bisakweli ya Biblia.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Babilone Monene ekoki komonisa ebongiseli ya politike mpe ya mombongo monene te mpamba te masangá nyonso mibale wana mamonisami ete bazali komilelalela mpo na kokwea na ye. (Emoniseli 18:9-11) Eteni mosusu bobele moko ya liboso ya ebongiseli ya Satana ezali ebongiseli na losambo. Boyokani oyo ezali kati na Babilone Monene mpe misala ya bilimu mabe (spiritisme) endimisi ete yango ezali mpenza eteni ya losambo.-Emoniseli 18:23.
b Mpo na bandimbola mosusu ya sikisiki na ntina na monyokoli yango, tala Annuaire ya ba Témoins de Jéhovah 1975, pages 94 kino na 119.
c Mpo na kotalelama ya mozindo ya likambo oyo, tala mokanda La Révélation: le grand dénouement est proche! ebimisamaki na 1988 na la Société Watch Tower, pages 235 kino 271.
d Dictionnaire interprétatif des mots du Nouveau Testament (angl.), ya W. Vine, volume IV, pages 51, 52.
[Elilingi na lokasa 5]
Atako ekweaki na 539 liboso ya ntango na biso, Babilone eumelaki lokola engumba na boumeli ya bikeke mingi.