Loboko na Jehovah ezalaki elongo na bango
Na motindo boye Liloba na Jéhovah ekolaki mpe elendisami na nguya.—MISALA 19:20
1. (a) Koimaima nini banguna ya losambo na boklisto baimaimaki na ekeke ya liboso? (b) Makambo nini mazalaki koleka ezala na esika nini oyo Paulo azalaki kokende mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, mpe nini oyo, na mabaku nyonso, ezalaki elongo na baklisto?
EKOKI sikawa bikeke koleka zomi na libwa, banguna na nsango ya boklisto oyo bazalaki kotemela mosala ya ntoma Paulo balobaki likambo oyo: “Bato wana, baoyo basili kobalola mokili, bakomi awa lokola. . . . Bango wana nyonso bakosopaka mibeko na Kaisala, mpe bakolobaka ete mokonzi mosusu Yesu azali.” (Misala 17:6, 7) Ata na esika nini oyo azalaki kokende mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Jéhovah, Paulo azalaki kokamwisa, mpe mbala mingi misionere yango moklisto azalaki kozwa minyoko mingi. Baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bazalaki kokutana na mikakatano, kasi, na bisika nyonso, “loboko na Jéhovah ezalaki elongo na bango”.—Misala 11:21.
2. Nani azali mobandisi ya mosala ya misionere ya boklisto, mpe ndenge nini alongaki?
2 Nani azalaki mobandisi ya mosala wana ya ntina ya misionere? Moto oyo akeseni na bato nyonso mosusu Yesu, oyo apalanganisaki nsango ya esengo na motindo oyo bato mingi bakoki kosala yango te. Tokanisa lisusu ete, momemi wana ya maloba kitoko oyo matali Bokonzi na makóló Yesu, Mwana na Nzambe, akendaki koluka libota na Bayuda. Nzokande, libota yango emonisaki ete lobanzo na bango ya liboso ezalaki ya koluka lobiko na bango na nzela na misala ya Mibeko.—Matai 4:17; Luka 8:1; 11:45, 46.
“Mabota nyonso”
3. Esakweli nini ekokaki kokamwisa bayekoli na Yesu oyo bazakaki Bayuda, mpe mpo na nini?
3 Na yango, tokoki kokanisa mayoki ya bayekoli na Yesu oyo bazalaki Bayuda ntango, mikolo misato liboso ya liwa na ye, alobaki na bango: “Mpe nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” Bayekoli na ye bamitunaki ndenge nini bakosala mpo na kosakola nsango malamu na “mabota nyonso”. Ee, ndenge nini mwa bato moke boye basengelaki kokokisa mokumba monene oyo?—Matai 24:14; Malako 13:10.
4. Nsima na kosekwisama, etinda nini Yesu apesaki epai na bayekoli na ye?
4 Na nsima, ntango asekwaki, Yesu abakisaki etinda oyo: “Bokonzi nyonso esili kopesama na ngai na likoló mpe na nse. Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.” Na bongo bayekoli na Yesu bazwaki mokumba ya komema nsango ya Nkolo na bango epai na “bato ya mabota nyonso”.—Matai 28:18-20.
5, 6. (a) Ndenge nini nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe ekomaki epai na Bapakano, mpe litomba ezalaki nini? (b) Ndenge nini bankulutu ya Yelusaleme basalaki ntango Petelo ayebisaki bango makambo matali Mopakano Korneye?
5 Koleka mibu misato na nsima, baklisto basengelaki kosakola nsango malamu epai na Bapakano, lokola ezalela na Petelo emonisaki yango, ezalaki lokola ntembe ya solo mpenza. Kati na emonaneli moko, ntoma azwaki etinda ya kolya banyama na mbindo, Nzambe ayebisaki ye ete biloko oyo bitalelamaki kala lokola mbindo bisengelaki sikawa kotalelama lokola peto. Petelo akamwaki. Kokambamaka na elimo ya Nzambe, akendaki epai na Mopakano moko, mokonzi na basoda moromé Korneye. Kino wana, azalaki kokanisa ete azalaki na ndingisa te mpo na kozala na boyokani elongo na bato ya bikólo to ya loposo mosusu, kasi sikawa ayebaki ete mokano na Nzambe ezalaki ete asakola epai na Korneye. Petelo azalaki naino koloba wana elimo santu ekweaki likoló na libota wana ya Bapakano, likambo oyo emonisaki ete kobanda ntango yango mosala ya bamisionere baklisto esengelaki kopalangana kino na mikili oyo mizalaki ya Bayuda te.—Misala 10:9-16, 28, 34, 35, 44.
6 Ntango Petelo alimbolaki makambo yango epai na bankulutu ya Yelusaleme, “bandimaki, mpe bakumisaki Nzambe na kolobaka ete: ‘Na boye Nzambe asili kopesa bapakano kobongwana na motema kino bomoi.”’ (Misala 11:18) Eloko moko ezalaki lisusu kopekisa te ete mikili na bapakano bayamba nsango malamu oyo etali Klisto mpe Bokonzi na ye.
Bamisionere epai na mabota
7. Ndenge nini mosala ya misionere ya baklisto ya yambo ebandaki kopalangana kati na mikili zongazonga na mai monene Méditerranée, mpe nini emonisi ete Nzambe andimaki mosala yango?
7 Mosala ya kosakola, oyo esilaki kobanda kokola nsima na liwa ya Etienne, ebandaki sikawa kozwa bokoli mosusu ya sika. Lisangá ya Yelusaleme, longola bobele bantoma, epalanganaki. Na ebandeli, Bayuda yango oyo banyokolamaki mpo na bindimeli na bango basakolaki bobele epai na bandeko na bango ya Fenisia, ya Chipre mpe ya Antiokia. “Mibali mosusu . . . bato na Kupulu (Chypre) na Kulene (Cyrène) . . . basololi mpe na Baela (Bagreke), kosakola nsango na Nkolo Yesu.” Nzambe andimaki mosala na misionere ya mibali yango epai na mabota? Solo mpenza, mpamba te “loboko na Jéhovah ezalaki na bango, mpe ntalo monene na bato, oyo bakomaki bandimi, babongwi epai na Nkolo”. Mpo na molende mpe mosala malamu ya baklisto wana ya yambo, mosala ya misionere ebandaki kopalangana kati na mikili zongazonga na mai monene ebengami Méditerranée. Kasi, bokoli esengelaki kosuka bobele wana te.—Misala 4:31; 8:1; 11:19-21.
8. Ndenge nini Nzambe apesaki ebandeli ya sika na mosala ya misionere?
8 Penepene na 47-48, Nzambe, na nzela na elimo santu, apesaki ebandeli mosusu ya sika mpe ya nguya na mosala ya misionere. Tala oyo ekoki kotangama mpo na ntina yango kati na Misala 13:2-4: “Elimo santu elobi: ‘Bopesa ngai Balanaba na Saulo mpo na mosala mosili ngai kobyanga bango mpo na yango.’ . . . Na bongo esilaki bango kotindama na elimo santu, balongwi kokende na Selukia [libongo ya Antiokia na Sulia], mpe longwa wana batamboli na masuwa kino na Kupulu (Chypre).” Paulo mpe Barnabas bakotaki na masuwa mpo na mobembo na bango ya liboso na mokili mosusu. Oyo eleko nini ya kitoko! Ntoma Paulo akomaki bongo misionere ya liboso kati na baklisto. Azalaki kopika miboko ya mosala oyo esengelaki kosuka na eleko na biso.
9. Mosala nini ntoma Paulo akokisaki na mibembo na ye ya misionere?
9 Biblia ezali kolobela mibembo misato oyo Paulo asalaki, kozanga kotanga mobembo na ye na Rome, wana ezalaki ye mokangami. Na ntango ya mibembo na ye, azalaki kopesa ebandeli na mosala kati na bingumba mingi ya Eropa to Mpoto mpe azalaki kosakola nsango ya Bokonzi kati na mikili mpe na bisanga oyo lelo ebengami Syrie, Chypre, Crète, Turquie, Grèce, Malte mpe Sicile. Mbala mosusu akendaki kino na Espanye. Apesaki maboko na kobotama ya masangá kati na bingumba mingi. Kolonga ya mosala yango ya misionere ezalaki mpenza na sekele, kasi ezali nini?
Mateya na nguya
10. Mpo na nini mosala na misionere ya Paulo ebimisaki matomba?
10 Kati na lolenge na ye ya koteya, Paulo azalaki komekola Klisto. Mpe ayebaki motindo oyo asengeli kosolola elongo na bato. Azalaki mbala moko na mayele ya koteya mpe ya kobongisa bateyi. Azalaki kotonga mateya na ye likoló ya Liloba na Nzambe. Na esika ya koluka kokamwisa bato mpo na mayele na ye, azalaki kosolola na nzela na Makomami. (Misala 17:2, 3) Paulo ayebaki mpe koloba makambo oyo mataleli bobele bato oyo azali koloba liboso na bango mpe kosalela esika oyo azalaki mpo na kobanda lisolo na ye. Ye moko alobi: “Epai na Bayuda nayei moyuda . . . Epai na bango bazangi Mibeko, nayei lokola moto oyo azangi Mibeko . . . Epai na bato na bolembu nayei lokola moto na bolembu ete nazwa bato na bolembu. Nayei ndenge nyonso epai na bato nyonso ete na nzela nyonso nabikisa bamosusu.”—1 Bakolinti 9:19-23; Misala 17:22, 23.
11. Nini emonisi ete Paulo mpe baninga na ye bazalaki bamisionere ya nguya, mpe kino wapi mosala ya misionere na boklisto ekomi?
11 Paulo mpe baninga na ye bazalaki bamisionere ya nguya. Na molende na bango mpe na kolendendela, bakokaki kosala masangá ya boklisto mpe kolendisa yango, bisika nyonso oyo bazalaki koleka. (Misala 13:14, 43, 48, 49; 14:19-28) Mosala ya baklisto ya yambo ekolaki mpenza kino Paulo akomaki: “Boyokaki mpo na yango liboso na liloba na solo na nsango malamu, oyo ekomi epai na bino lokola ezali yango kobota mbuma mpe kopalangana kati na mokili mobimba. . . . Nsango yango esili kosakolama epai na bato nyonso na nse na likoló.” Solo, mosala ya misionere ya baklisto ya yambo ezangaki matomba te.—Bakolose 1:5, 6, 23.
12. Mpo na nini mosala ya solo ya misionere elimwaki na boumeli ya mwa eleko?
12 Nzokande, na ebandeli ya ekeke ya mibale, lipengwi esilaki kobanda kokota kati na lisangá ya boklisto, lokola Yesu mpe bantoma basakolaki yango. (Matai 7:15, 21-23; Misala 20:29, 30; 1 Yoane 2:18, 19) Na boumeli ya bikeke oyo bilandaki, teoloji mpe mateya ya bapakano enyataki nsango ya Bokonzi na Nzambe. Boklisto ya mokili etindaki bamisionere, mpo na koteya Bokonzi ya solo te, Bokonzi ya Nzambe, kasi mpo na kondimisa bato na makasi bokonzi ya bankolo na bango ya politike, na lisalisi ya mosolo oyo euti epai na mikonzi yango. Lokola bazalaki kosakola epai na bafandi ya mboka baoyo bazangaki biloko ya komibatela na yango, bamisionere yango mbala mingi bazalaki kosalela mopanga. Mosala ya solo ya misionere ya boklisto elimwaki, kasi ezalaki mpo na libela te.
13. Na ezalela motindo nini mosala monene ya kopesa litatoli ebandisamaki, mpe likambo nini bato bakokaki koloba mpo na matomba emonanaki na 1916?
13 Penepene na ekeke ya zomi na libwa, Charles Russel, président ya liboso ya la Société Watch Tower, ayebaki ete mosala ya misionere esengelaki kozongelama. Yango wana abandisaki kampanye to mosala monene ya kotatola, kati na yango ye moko asanganaki na kotambolaka kati na bingumba mingi ya Etats-Unis; kotambolaka na masuwa, akendaki mpe na mikili mingi. Mikanda na ye oyo mizalaki kolimbola Biblia mibimaki na minoko 35. Bazali koloba ete liboso ya liwa na ye, oyo ezalaki na 1916, asilaki kotambola bakilometre koleka 1 600 000 mpe asalaki badiskur piblike koleka 30 000.
14. Joseph Rutherford asalaki nini mpo na kokolisa mosala ya misionere?
14 Mokitani na ye, Joseph Rutherford, ye mpe andimaki ete mokili ezali na mposa monene ya bamisionere. Na ebandeli ya mibu 1920, atindaki mibali ya mpiko kati na mikili ndenge na ndenge mpo ete, na lisalisi na bango, mosala ya kosakola ekoka kobanda. Yango wana na Espanye, na Amerike du sud mpe na Afrike ya ngele to ya sud, bamisionere bapikaki miboko ya mosala ya Bokonzi. Na 1931, basengaki bavolontere mpo na kopesa maboko na mosala oyo esalamaki na Espanye. Bilenge misato ya mibali batikaki Angleterre mpo na koyanola na libyangi wana; na boumeli ya mibu minei, kino na ntango oyo etumba ebimaki na Espanye (1936), basalaki mosala kati na mpasi mingi mpenza. Na nsima, lokola bomoi na bango ezalaki na likama, bakimaki mboka yango.
15. Likambo nini, na mibu 1940, epesaki nzela na kokolisa mingi mosala ya misionere?
15 Kati na 1940 mpe 1950, mbongwana esengelaki kosalama kati na mosala ya misionere. Président ya misato ya la Société Watch Tower, Nathan Knorr, azalaki na liboke ya bato na molende elongo na ye. Na 1942, na ntembe te lokola etambwisamaki ye na elimo santu, amonaki mposa ya eteyelo oyo etali kobongisa bamisionere mpo na kolonga ntembe oyo esengelaki kobima nsima na etumba. Azwaki likanisi katikati na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpamba te na 1943 Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, efungwamaki kati na Etat ya New York. Sanza motoba nyonso, mibali mpe basi koleka nkama, bango nyonso ba pionniers ya molende, basengelaki kozwa epai na balakisi minei formation ya Biblia ebongisamaki mpo na mosala ya misionere. Mosala oyo bana na kelasi wana bakokisaki na nsima ebimisaki matomba?
16. (a) Batemwe boni bazalaki kosakola na 1943, mpe lelo bazali boni? (b) Mosala nini bamisionere basalaki kati na bokoli yango? Limbola mpo na nini.
16 Na 1943, ezalaki bobele na Batemwe 126 329 oyo bazalaki kosakola kati na mikili 54. Lelo, mibu 45 na nsima, tokoki koyikisa ntalo yango na 28, mpamba te baministre koleka 3 500 000 bazali kosala kati na mikili 210 mpe bisanga. Eteni monene ya kobakisama oyo ezwami na nzela na moboko malamu etyamaki na bamisionere koleka 6 000 baoyo bakotaki Kelasi ya Galaad. Bana wana ya kelasi bautaki na mikili 59 mpe batindamaki, na boumeli ya mibu, kati na mikili 148. Esili koleka mibu 45 mokili mobimba ezalaki bobele na mwa 100 000 ya Batemwe, nzokande na lisalisi ya bamisionere yango, lelo ezali nde mikili zomi ya etando oyo mizali na baministre koleka 100 000, baoyo bazali kosakola mpe koteya nsango malamu. Kati na mingi ya mikili yango, bamisionere oyo bautaki na Galaad bazalaki liboso kati na mosala ya kopalanganisa nsango malamu.
17. Wapi bantina misato ya minene oyo, na ntango ya baklisto ya yambo lokola mpe na eleko na biso, epesi nzela na bokoli ya mosala ya misionere?
17 Mosala ya misionere, ezala oyo ekokisamaki na baklisto ya yambo to oyo ezali kosalama na eleko na biso, ebimisi matomba, mpe ntina ezali mpo na yango. Moko na bantina yango ezali bokutani mpenzampenza elongo na bato, bokutani oyo ezali kopesa nzela na mosala ya ndako na ndako, na litatoli ya mbalakaka mpe boyekoli ya Biblia na bandako. (Yoane 4:7-26; Misala 20:20) Ntina mosusu euti na polele ya nsango oyo etongami likoló na Biblia mpe ezali komonisa Bokonzi na Nzambe lokola elikya se moko mpo na kosilisa mikakatano ya bato. (Misala 19:8; 28:16, 23, 30, 31) Mingi kati na bamisionere na biso bazali kosala kati na mikili oyo mikoli naino te epai kuna mposa ya boyangeli ya sembo ya Nzambe eyokani makasi mpenza. Ntina mosusu ya misato ya matomba mazwami ezali kati na bolingo oyo Klisto ateyaki mpe oyo bamisionere na biso bazali komonisa kati na boyokani na bango ya mokolo na mokolo elongo na bato ya biutelo nyonso mpe ya mitindo nyonso. Kozanga ntembe, na boumeli ya mibu 45 oyo eleki, bamisionere batindamaki na la Société Watch Tower basali mingi mpo na bokoli ya lisangá ya Jéhovah kati na mokili mobimba.—Baloma 1:14-17; 1 Bakolinti 3:5, 6.
Elimo ya pionnier ebandi kokola
18. Banani bazali na elimo ya misionere motindo moko lokola badiplômé ya Galaad?
18 Ntembe ezali te ete molende ya ba diplômés ya Galaad epesaki epai na baklisto mosusu mposa ya kozala ba pionniers. Lelo, bibele mingi ya Batemwe ya Jéhovah bazali bango mpe na elimo ya misionere oyo ezali kopela. Bazali mpenza ba pionniers mpo na koloba malamu, mpamba te bazali kolanda matambe na Yesu, “Pionnier ya lobiko na bango”.—Baebele 2:10; 12:2, Moffatt.
19. Batemwe mingi oyo bazalaki na elimo ya pionnier basalaki nini, mpe litomba na bango ezalaki nini?
19 Kobanda na mibu 1960, ekomaki mpasi mingi mpo na kotinda bamisionere kati na mikili mwa mingi. Atako bongo, Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower ezali kokoba, na meko ekoki, na kotinda bamisionere - engebene mikili oyo bazali na mposa na bango. Batemwe oyo bazali solo na elimo ya pionnier basengeli koyeba ete elanga kati na mokili ezali monene. Mingi mpenza kati na bango, basili komibongisa mpo na kokende na mikili epai kuna mposa ezali monene. Okoki kolanda ndakisa na bango? Baoyo basali yango bazali mbala mingi koloba ete mimekamo mpe sakrifise oyo moto asali ezali kofutama mbala mingi na esengo monene oyo moto azali kooka mpo na koyebisa solo ya Bokonzi epai na bato oyo bakokani na bampate baoyo bazali kofanda kati na mikili ya bobola. Baklisto yango bazali kozwa lifuti mingi koleka, mpamba te bazali komona “bandeko mibali, mpe bandeko basi, mpe bamama, mpe bana” ya sika, epai na bango bazali koyebisa elikya kitoko ya bomoi na seko kati na “ebongiseli ya biloko ya sika oyo ezali koya”.—Malako 10:28-30.
20. (a) Banani, kati na mikili mingi, bazali kokokisa eteni monene ya mosala ya kosakola? (b) Mpo na nini Japon ezali mbula nyonso kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola koleka mikili misusu? (c) Motuna nini tokoki komituna?
20 Lisusu, sanza nyonso tozali kotanga kati na molongo na basaleli ya Jéhovah bibele mingi ya ba pionniers permanents to auxiliaires. Mingi kati na ba pionniers yango bazali kosakola nsango malamu na motema moko kati na mikili na bango. Na bisika mingi, ezali bango nde bazali kokokisa eteni monene ya mosala ya kosakola; mbala mingi bazali kozongela kotala bobele bandako se moko poso na poso. Esengo mpe mayoki malamu, bilembo ya elikya oyo bazali kotya kati na Bokonzi, ezali likoló na bilongi na bango mpe ezali komonana na motindo na bango; yango wana bazali kolonga na kozala na baninga mpe kokolisa mposa ya nsango malamu oyo emonani epai na bato mingi. Kobakisama na motuya ya ba pionniers ezali kobenda kobakisama ya motuya ya bangonga oyo elekisami mpo na kosanzola Nzambe. Uta koleka mibu zomi, Japon, epai kuna ba Témoins de Jéhovah mingi kala bazalaki babudiste, bazali kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola mobu nyonso koleka mokili nyonso mosusu, longola Etats-Unis. Ntina ezali ete ndambo monene ya basakoli bajaponé bazali ba pionniers. Yo moko, okoki kobongisa bomoi na yo mpo na kosangana na mosala kitoko wana, elingi koloba mosala ya pionnier?
21. (a) Ndenge nini Batemwe mosusu, oyo ezalela na bango epekisi bango na kozala ba pionniers permanents, bakoki komonisa ete bango mpe bazali na elimo ya pionnier? (b) Ndenge nini bilenge bakoki komonisa ete bazali na elimo ya pionnier?
21 Batemwe mosusu bango mpe bazali na ‘molende mpo na misala malamu’. (Tito 2:14) Na ndakisa mibange baklisto, baoyo bazali na nzoto kolongono te, mingi na baoyo bazali na mikumba ya libota mpe bilenge oyo, bazali naino na kelasi, mbala mosusu bakokoka te kobanda mosala ya pionnier permanent. Baklisto nyonso oyo bazali mpe na likoki ya komonisa ete bazali na elimo ya pionnier na kolendisaka ba pionniers, na kosakolaka mbala na mbala elongo na bango mpe na kosalelaka mabaku nyonso ya kopesa litatoli. Bilenge bakoki komityela mokano ya kosalela Bokonzi ntango nyonso mpe, soki bazwi batisimo, babanda kosala mbala na mbala mosala ya pionnier auxiliaire. Lokola Timote, bakoki kokanisa likolo na makambo yango, mpo ete bokoli na bango na elimo ezala lokola oyo ya basaleli nyonso ya Nzambe.—1 Timote 4:15, 16.
22. Ata ezalela na biso ezali ndenge nini, ekateli na biso esengeli kozala nini, mpe ekateli yango esengeli kobimisa mbuma nini?
22 Tika ete biso banso, ata ezalela na biso ezali ndenge nini, topusama na elimo ya Jéhovah mpo na kosangana mingi kati na mosala na ye! Tika “loboko na Jéhovah” elanda kozala elongo na mokomoko na biso mpo ete, kotalelaka milende mike na biso, bakoka koloba mokolo moko: Na motindo boye, Liloba na Jéhovah ekolaki mpe elendisamaki na nguya.”—Misala 11:21; 19:20.
Bozongeli
◻ Ndenge nini mosala ya misionere ya boklisto ebandaki mpe esengelaki kopalangana kino wapi?
◻ Mosala nini ntoma Paulo asalaki mpo na kokolisa mosala ya misionere?
◻ Ndenge nini, na eleko na biso, mosala ya misionere ezongisamaki lisusu?
◻ Mpo na nini mosala mokokisami na bamisionere mpe ba pionniers eboti matomba?
◻ Eloko nini tosengeli kosala lelo mpo na kozala na elimo ya pionnier?
[Etanda na lokasa 13]
Mosala ya Bokonzi kati na mikili zomi na 1988
(Mikili oyo nyonso ezali na basakoli koleka 100 000)
Mokili, Basakoli, Bapionniers, Ngonga, Assistance na emoniseli
Etats-Unis 797 104, 96 947, 161 478 732, 1 822 607
Mexique 248 32 117, 58 061 457, 1 004 062
Brésil 245 610, 22 725, 44 218 022, 718 414
Italie 160 584, 25 477, 43 345 687, 330 461
Nigéria 134 543, 14 022, 27 800 623, 398 555
Japon 128 817, 52 183, 60 626 840, 297 171
Allemagne 125 068, 8416, 22 029 942, 215 385
Grande-Bretagne 113 412, 11927, 22 103 713, 211 060
Philippines 107 679, 21 320, 26 337 621, 305 087
France 103 734, 9189, 21 598 308, 205 256
[Elilingi na lokasa 10]
Kokende ya Paulo mpe Barnabas ezalaki ebandeli ya mosala ya misionere.