Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwfq lisolo 26
  • Batatoli ya Yehova mpe basalaka mosala ya misionɛrɛ?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova mpe basalaka mosala ya misionɛrɛ?
  • Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Loboko na Jehovah ezalaki elongo na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Biteyelo nini ebongisami mpo na babongisi-nzela?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Baklisto nyonso ya solo basengeli kozala bapalanganisi ya nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
ijwfq lisolo 26

Batatoli ya Yehova mpe basalaka mosala ya misionɛrɛ?

. Ata soki tofandi wapi, biso nyonso Batatoli ya Yehova tosalaka makasi tózala lokola bamisionɛrɛ: tolobelaka mateya na biso mbala na mbala epai ya bato oyo tokutanaka na bango.​—Matai 28:19, 20.

Longola yango, Batatoli ya Yehova mosusu bakendaka mwa ntango to mpe libela mpo na kosakola na bamboka mosusu ya ekólo na bango epai bato mingi bayoki naino te nsango malamu oyo ezali na Biblia. Batatoli ya Yehova mosusu bakendaka na mikili mosusu mpo na komipesa na kosakola. Bazalaka na esengo mpo bazali kosalisa na kokokisama ya esakweli ya Yesu oyo ete: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”​—Misala 1:8.

Na 1943, tofungolaki eteyelo moko mpo na koteya bamisionɛrɛ na biso mosusu. Banda wana, Batatoli soki 8 000 bakɔtá eteyelo yango, oyo tobengaka Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto