Etumba ezali ya Jehovah
Ngai nayeli yo na nkombo ya Jéhovah na bibele, Nzambe ya milongo na basoda ya Yisraele, oyo yo otumoli.”—1 SAMWELE 17:45, MN.
1, 2. (a) Limpinga ya Yisraele oyo etambwisami na mokonzi Saulo, ekutanaki na ntembe nini? (b) Basoda na limpinga ya Yisraele basalaki nini liboso na Goliata, mpe nani akotaki na molongo?
LOBWAKU ya Elah katikati na bango, na epai moko na ngele ya Yelusaleme, mampinga na nguya mibale makutani. Na ngambo moko, limpinga ya Yisraele etambwisami na mokonzi Saulo oyo autaki kokoma mokonzi. Na ngambo mosusu, limpinga ya Bafilistia, elongo na elombe na bango, Goliata (nkombo oyo elakisi mbala mosusu “amonani polele”). Na molai na ye ya bamètre 2,70, moto yango ya mbinga, na bibundeli nzoto mobimba, atye ntembe na Yisraele na maloba ya kotuka.—1 Samwele 17:1-11.
2 Nani moto akosilisa ntembe ya Goliata? Lisolo ya Biblia elobi ete: “Emonaki bato na Yisraele mobali yango, bakimaki liboso na ye mpe babangaki mingi.” Nzokande, tala elenge mobali moko akoti na molongo. Nkombo na ye Davidi, nkombo oyo elimboli “molingami”. Bokangami na ye ya molende na boyengebene ekomisaki ye mpe “molingami” na Jéhovah. Samwele asilaki kopakola ye mpo ete azala mokonzi na sika ya Yisraele, mpe elimo na Jéhovah ezali kosala makasi likoló na ye.—1 Samwele 16:12, 13, 18-21; 17:24; Nzembo 11:7; 108:6.
3. Na motindo nini Davidi mpe Goliata balatisamaki moto na moto mpo na etumba?
3 Eyoki ye Goliata kotumola “milongo ya basoda na Nzambe ya bomoi”, Davidi amipesi mpo na kobunda na moto yango ya mbinga. Na ndingisa ya Saulo, apusani epai na monguna. Nzokande, azali na molato na etumba te, azali mpe na bibundeli ya basoda ya eleko na ye te oyo Saulo apesaki ye: bibundeli na ye ezali nzete moke, ebwakeli na mabanga mpe mabanga mitano ya kitoko. Kasi Goliata, ye, asimbi na loboko likonga oyo ebende na yango ezali na kilo 7 mpe alati elamba na ebende ya cuivre ya kilo 57. Na kopusanaka, elongo na momemi ya nguba na ye na liboso na ye, elombe ‘Mofilistia alakelaki Davidi mabe, na nkombo ya banzambe na ye’.—1 Samwele 17:12-44.
4. Ndenge nini Davidi ayanolaki na matumoli ya moto yango ya mbinga?
4 Na eyano, Davidi azongiseli moto yango ya mbinga matumoli na ye mpe angangi epai na ye: “Yo oyeli ngai na mopanga, na likonga monene mpe na likonga moke, kasi ngai, nayeli yo na nkombo ya Jéhovah na bibele, Nzambe ya milongo na basoda ya Yisraele, oyo yo otumoli. Lelo oyo Jéhovah akokaba yo na loboko na ngai, mpe solosolo, nakoboma yo mpe nakolongola motó na yo ; mpe solosolo, nakopesa lelo bibembe ya etuluku ya Bafilistia epai na bandeke na likoló mpe epai na banyama ya zamba; mpe bato na mabelé mobimba bakoyeba ete Yisraele azali na Nzambe. Mpe koyangana oyo nyonso bakoyeba ete Jéhovah abikisaka na mopanga to na likonga te, mpamba te ETUMBA EZALI YA JEHOVAH, mpe ye akokaba bino na maboko na biso”.—1 Samwele 17:45-47, MN.
5. Nsuka ya etumba ezalaki nini, mpe lokumu na yango ezalaki ya nani?
5 Davidi atamboli na molende kati na etumba. Libanga ekei kokokisa mokano na yango, mpe moto na mbinga akwei. Jéhovah apesi mbano na kondima mpe na molende ya Davidi na kokendisaka na bosikisiki libanga moke yango na elongi ya Mofilistia. Na nsima Davidi apoti mbangu, asimbi mopanga ya Goliata kati na libenga na yango mpe akati motó na ye. Sikawa mobulu ekoti kati na etuluku yango ya banguna: Bafilistia bakimi. Solo mpenza, Davidi akokaki koloba: “ETUMBA EZALI YA JEHOVAH.”—1 Samwele 17:47-51.
6. (a) Mpo na nini Jéhovah asalaki na boye ete lisolo molai ya etumba yango ebatelama? (b) Kondimisama nini basaleli ya Nzambe, oyo banyokolami na banguna bakokani na Goliata, basengeli na yango?
6 Mpo na nini Jéhovah asalaki na boye ete, lisolo molai ya etumba oyo esalamaki esili koleka mbula 3 000, ebatelama kati na Liloba na ye? Mpamba te, lokola elobeli biso yango ntoma Paulo, “nyonso oyo ekomamaki kalakala, ekomamaki mpo na kolakisa biso mpo ete tozala na elikya na nzela ya mpiko na biso mpe na nzela ya kolendisama na Makomami.” (Baloma 15:4) Na eleko na biso, ebele ya basaleli na sembo ya Nzambe bazali koyika mpiko na matyoli mpe banyokwami ntango nyonso na banguna oyo bakokani na Goliata. Na meko oyo mimekamo mizali kobakisama, mokomoko na biso azali mpe na mposa ya kobondisama oyo ezali kozwama na elendiseli oyo: “ETUMBA EZALI YA JEHOVAH”.
Likambo etali bokonzi ya molongo mobimba
7. Kati na mabota nyonso, likambo nini ezali kotalela libota mobimba ya Nzambe, mpe mpo na nini?
7 Na eleko na ye, Goliata apusamaki na lolendo mpo na kotumola Nzambe ya Yisraele. Na motindo moko, na ekeke ya 20, mitindo ya bikonzi oyo eyangelaka bato na makasi emityaki na liboso na kotumolaka Jéhovah na bokonzi na ye ya molongo mobimba mpe na komekaka kobangisa basaleli na ye mpo bapesa losambo na Leta. Kati na mabota nyonso, likambo yango ezali kotalela libota ya Nzambe. Mpo na ntina nini? Mpamba te ntango ya Bapakano to “ntango etyamaki mpo na mabota” oyo Biblia ezali kolobela esukaki na mobu 1914. Wana ezalaki ebandeli ya eleko na “mpasi ya mabota, batungisami.” (Luka 21:24-26; MN, Osty) Ntango ya Bapakano ebandaki na eleko oyo mabota babandaki konyata Yelusaleme ya mabelé na nse na makolo, na mobu 607 liboso ya ntango na biso, mpe eumelaki bambula 2520; na nsima, na 1914, Jéhovah afandisaki Yesu na kiti ya Bokonzi, kokomisaka ye Mokonzi Masiya na Yelusaleme ya likoló.—Baebele 12:22, 28; Emoniseli 11:15, 17a.
8. (a) Bakonzi ya mabelé batosaki etinda ya esakweli oyo esengaki bango ‘basalela Jéhovah na kobanga’? (b) Bilombe nini ya politike bazali kotiola Jéhovah lelo mpe komeka konyata batemwe na ye?
8 Na mobu 1914, libongwani monene esalemaki. Mabota bapakano basengeli uta wana kozongisa monoko epai na Nzambe. Nzokande, “bakonzi” oyo bazalaki koyangela na eleko wana, batosaki etinda ya esakweli oyo esengaki bango ‘basalela Jéhovah na kobanga?’ Bandimaki Mokonzi oyo Nzambe autaki kofandisa na kiti ya Bokonzi? Te, nkutu “bayangaki myango elongo kotemela Jéhovah mpe mopakolami na ye”, Yesu, kolukaka kokokisa bamposa na bango ya lofundu, bakotaki “na botomboki” na kosanganaka na Etumba Monene ya 1914 kino 1918. (Nzembo 2:1-6, 10-12) Kino lelo oyo, mposa ya koyangela ezali kobimisa bitumba kati na bato. Na ndenge yango, mokili ya Satana ezali kolanda kobimisa bilombe ya politike bakokani na bato na libota ya Goliata, Barefaime. Bikonzi ya mibeko makasi to ba dictatures ezali kotiola Jéhovah mpe ezali komeka konyata batemwe na ye. Kasi, etumba ezali ntango nyonso ya Jéhovah.—2 Samwele 21:15-22.
Saulo ya lelo
9. Na eleko na biso, nani azali komitambwisa lokola mokonzi Saulo, mpe nini endimisi biso yango?
9 Na bokokanisi oyo touti kosala, mokonzi Saulo akokani na nani? Tobosana te ete mwa ntango moke na liboso, Jéhovah azwaki likatami ya ‘kobotola ye bokonzi ya Yisraele’, mpo na elimo na ye ya botomboki (1 Samwele 15:22, 28) Na nsima, liboso na matumoli ya Goliata, Saulo alongisaki bokonzi ya Jéhovah ya molongo mobimba te. Nsima na yango, anyokolaki moto oyo alongaki Goliata, Davidi, oyo Jéhovah apakolaki mpo akitana ye na kiti na bokonzi ya Yisraele. Tala etamboli ekokani mpenza na oyo ya bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo. Lokola batombokeli solo ya Biblia, bazali na ekweli monene ya lipengwi; na bongo, ‘bazangi kotosa nsango malamu’ ya Nkolo na biso mpe ya Bokonzi na ye. Na esika ete balongisa bokonzi ya Jéhovah ya molongo mobimba, bazali konyokola makasi batemwe bapakolami na elimo mpe baninga na bango, ebele monene. ‘Na nkanda na ye’, Jéhovah akolimwisa bapengwi yango.—2 Batesaloniki 1:6-9; 2:3; Hosea 13:11.
10. (a) Mokanda nini ebimisamaki na Londres na 1918 na bakonzi minene ya mangomba? (b) Na esika ete basala engebene mokanda yango, etamboli nini bazalaki na yango?
10 Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, komibebisa ya bakonzi ya mangomba ya boklisto ya mokili emonanaki polele. Ezalaki polele ete esakweli ya Yesu, oyo ekomami na Matai mikapo 24 mpe 25 bakisa mpe Luka mokapo 21, ezalaki kokokisama. Na yango, na mobu 1918, bakonzi minene ya mangomba ya Protesta to Misioni bayanganaki na Londres mpe babimisaki mokanda moko kati na yango maloba oyo mazalaki: “Mpasi ya sikawa ezali kotya nsuka na ntango ya Bapakano.” Nzokande, bakonzi yango ya mangomba basalaki engebene maloba na bango te. Nkutu, na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili bapesaki lisungi monene na bituluku mibale ya banguna. Mpe, na esika bandima ete Yesu asili koya kati na nguya ya Bokonzi, bandimaki nde makanisi ya mabota; engebene makanisi yango, oyo ezali mpenza ya mokili, ezali malamu mpo na bato ete bayangelama na banguya ya politike oyo ezali kokabola bango, mpe ata na bato mabe lokola Goliata, na esika ete bayanganisama na nzela ya Bokonzi na Nzambe.—Matai 25:31-33.
Baoyo baboi kosala boyokani mabe
11. Banani bandimi te kosala boyokani elongo na mokili mpo na oyo etali likambo ya bokonzi ya molongo mobimba? Bato yango balandi ndakisa ya nani?
11 Mpo na likambo ya bokonzi ya molongo mobimba, basaleli oyo bamipesi na Nzambe bandimi kosala boyokani mabe? Soki moke te, lokola emonisi yango lisolo ya Biblia. (Danyele 3:28; 6:25-27; Baebele 11:32-38; Emoniseli 2:2, 3, 13, 19) Na eleko na biso baklisto ya sembo bazali kolongisa bokonzi ya molongo mobimba mpe Bokonzi ya Jéhovah ata bifundeli mpe minyoko makasi bazali kozwa epai na moto mabe ‘Goliata’. Bazali bongo kolanda matambe ya Yesu, “Mwana na Davidi”, oyo asanganaki na molende kati na etumba ya elimo mpo na bokonzi ya Jéhovah ya molongo mobimba, na koboyaka kokota na bitumba mpe na politike ya mokili. Ezalaki ye kosambela Tata na ye, Yesu alobaki ete, lokola ye, bayekoli na ye baklisto ya solo, “bazali bato na mokili te”.—Matai 4:8-10, 17; 21:9; Yoane 6:15; 17:14, 16; 18:36, 37; 1 Petelo 2:21.
12. (a) Nani akweisaki ‘Goliata’ ya lelo, mpe ndenge nini yango esalemaki? (b) Lokola, engebene bango, ‘Goliata’ akweisamaki, basaleli ya Jéhovah basalaki nini?
12 Batikali ya baklisto bapakolami na elimo, Davidi ya lelo, bakweisi ‘Goliata’ ya eleko na bango. Ndenge nini? Na kosakolaka polelepolele ete bazali na ngambo ya Jéhovah mpo na ntembe oyo etali boyangeli ya mokili mobimba. LIKATAMI moko (endimamaki na Lisangá ya Mokili mobimba ya Bayekoli na Biblia kati na likita na bango ya Cedar Point [Ohio] dimanche le 10 Septembre 1922)” etyaki ndakisa ya kolanda. Tala mwa biteni na yango:
“10) Tozali kondimisa lisusu, mpe tondimi ete tozali kobika na mikolo ya kobukanisa ya Nzambe likoló na lisangá ya Satana oyo emonanaka mpe oyo ezangi komonana;
“11)Ete kobongisama ya mokili ya kala to ya ezaleli ya kala ya biloko ekoki kosalama soki moke te; ete tokomi na eleko oyo Bokonzi ya Nzambe esengeli kosalema na nzela ya Klisto Yesu; mpe ete banguya nyonso mpe masangá nyonso oyo ekotosa na bolingo te boyangeli ya sembo ya Nkolo, bakobomama nyee.”
Ntembe ezali te ete “Mwana na Davidi”, oyo azali motó na lisangá ya boklisto ya solo, akengelaki ete “libanga” yango, Solo ya Bokonzi, ebwakama epai ya monguna. (Matai 12:23; Yoane 16:33; Bakolose 1:18) Na boumeli ya makita ya mbula na mbula oyo esalamaki uta mobu 1922 kino mobu 1928, makatami mandimamaki mpo na kondimisa etemeli yango oyo ezwamaki. Mpo na libota na Jéhovah, ‘Goliata’ abomamaki solo, akatamaki motó. Biyangeli na bato ya mibeko makasi bikokaki te kopusa na makasi basaleli ya molende, oyo bazali kolongisa bokonzi ya Jéhovah ya molongo mobimba, ete bandima kosala boyokani mabe.—Tala Emoniseli 20:4.
13. (a) Na nse na monyokoli ya Alemanye ya Hitler, boyokani nini ya mabe bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili basalaki? (b) Tokoki kotanga nini mpo na bosembo ya Batemwe kati na mokanda moko ya Lingelesi?
13 Alemanye ya Hitler epesi biso ndakisa monene ya mobulu ya biyangeli mosusu, ba ‘Goliata’ mpenza ya lelo. Mangomba minene mibale ya mokili yango, Katolike mpe Protesta to misioni, basalaki boyokani mabe mpenza na kotosaka nazisme, na kosambelaka Hitler, na kopesaka losako na bendele oyo ezalaki na ekulusu mpe na kopambolaka basoda oyo bazalaki kokende koboma bandeko na bango ya lingomba moko na mikili ya pembeni. Na mobimba na yango, boklisto ya mokili emonisaki bolingo makasi ya ekólo. Kasi ba Témoins de Jéhovah babatelaki bokabwani na bango. Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda moko ya Lingelisi (Mothers in the Fatherland): “[Ba Témoins de Jéhovah batindamaki] kati na baboloko ya mpasi, pene na nkoto moko bakatamaki motó mpe pene na nkoto moko bakufaki kobanda mobu 1933 kino mobu 1945. . . . Bakatolike mpe Baprotesta bayokaki bilendiseli ya bakonzi ya mangomba na bango mpo na kosala elongo na Hitler. Soki bamosusu baboyaki, bazangaki nde botosi na mibeko ya Lingomba mpe ya Leta.” Ezala Lingomba to Leta, bamemaki nyongo monene ya makila.—Yilimia 2:34b.
14. Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali konyokwama mbala mingi?
14 Lelo lisusu, lokola esakolaki yango Yesu, ba Témoins de Jéhovah na mikili mingi, bazali konyokwama makasi. Kasi, ata ezaleli ya bomoi na bango ezali motindo nini, baklisto yango bazali kolanda kosakola na molende “nsango malamu ya Bokonzi”. (Matai 24:9, 13, 14) Batemwe batalelami bipai binso lokola bato na bosembo, oyo bazali na bomoi ya mpeto, mpe bazali kopesa ndakisa malamu na oyo etali kotosa mibeko mpe mitindo. (Baloma 13:1-7) Ata bongo, mbala mingi bazali konyokwama. Mpo na nini? Mpamba te, lokola losambo na bango ezali ya Jéhovah na mobimba na yango, bandimaka te kopesa losako to kongumbama liboso na bilembo oyo elakisaka Leta. (Deteronome 4:23, 24; 5:8-10; 6:13-15) Lokola baboi kobebisama nyonso, bazali kosambela Jéhovah, “ye moko”, mpe bazali komona ye lokola Nkolo Moyangeli ya bomoi na bango. (Matai 4:8-10; Nzembo 71:5; 73:28) Awa ezali bango “bato na mokili te”, bazali kobatela mpenza bokatikati ya boklisto liboso na bitumba mpe masangá ya politike ya mokili.—Yoane 15:18-21; 16:33.
15, 16. (a) Ndakisa nini Batemwe bilenge to mikolo bakoki kolanda ntango ‘Goliata’ ya lelo azali kokanela bango, mpe ndenge nini elenge mwasi moko ya mibu motoba monisaki yango? (b) Baklisto balingi ete bana na bango ya mike bakokana na nani?
15 Mbala mingi, ‘Goliata’ ya lelo azali kotungisa baklisto yango ya sembo, baoyo bazali kosambela Jéhovah mpe kobwaka misala ya losambo ya bikeko. (Tala Emoniseli 13:16, 17) Kasi, ata bambula na bango ezali boni, Batemwe bakoki kolanda ndakisa ya Davidi mpe kosilisa na molende ntembe yango. Kati na mboka moko ya Amerique latine, ezalaki na elenge mwasi moko ya mibu motoba oyo azwaki mateya ya boklisto uta bomwana na ye. (Tala Baefese 6:4; 2 Timote 3:14, 15) Yango ekomisaki ye moyekoli aleki mayele na kelasi na ye. Nzokande, lisosoli na ye oyo eteyami na Makomami etindaki ye aboya kosangana na milulu misusu oyo esalamaki kati na eteyelo na ye, mpamba te milulu yango ezalaki na losambo ya bikeko. Molakisi na ye ya mwasi, epai na ye alimbolaki etemeli na ye, ayanolaki ye ete mwana moke ya bambula na ye akoki kozala na lisosoli te mpo aleki moke mingi. Mwana moke yango ya mwasi amonisaki ye ete azalaki komikosa, mpe apesaki ye litatoli ya kokamwa.
16 Tokoki kolikya ete baboti baklisto banso bazali kolakisa bana na bango ya mike mpo ete balanda ndakisa ya elenge Davidi mpe batelema ngwi liboso na matumoli ya ‘Goliata‘ ya lelo. Tika ete bana yango bamitambwisa na bosembo lokola bilenge Baebele misato, Danyele mpe bato mosusu mingi ya molende oyo Makomami elobeli biso mpo na bango ete ‘babatelaki lisosoli malamu‘ mpe batosaki mitinda ya Biblia!—1 Petelo 2:19; 3:16; Danyele 3:16-18.
Etaleli ya Lisolo ya bomoi na bato
17. (a) Mokomi ya lisolo ya bomoi na bato Arnold Toynbee, ye moto na Angleterre alobaki nini mpo na eleko na biso? (b) Ndenge nini ‘Goliata’ ya lelo azali komeka bosembo ya basaleli na Nzambe?
17 Mokomi na makambo ya bomoi na bato Arnold Toynbee, ye moto na Angleterre akomaki ete na eleko na biso “lolenge ya losambo moko ya mabe ya bopakano oyo epesami epai na mikili ya bonsomi” ezali komonana; abengaki losambo yango “mfulu ya ngai ya masanga na sika ya boyangeli oyo nguya na yango euti na bafandi nyonso ya mboka (to démocratie) etyami kati na bambeki ya kala ya ezaleli ya bokaboli bikólo (to tribalisme)”. Baoyo bazali kokumisa ete ekólo na bango eleki mosusu nyonso mpe bazali kino kopesa losambo na Leta, bakosami. Ee, bato oyo bazali koyangela bango bakotisi bango na molongo mpo na kokomisa bango bisaleli ya politike na bango, ya malamu to ya mabe. Mpo na yango, lisangá ya ‘Goliata’ ebimi mpe etye bosembo ya basaleli na Nzambe na komekama, baoyo balingaka mokili na bango, kasi baboyaka kosambela Leta mpe bilembo na yango.
18. Mituna minene nini mizali kotunama lelo kati na lisosoli ya moklisto?
18 Lokola ezalaki kala mpo na Alemanye nazie, mituna minene mizali kotunama lelo kati na lisosoli ya moklisto: Mokili na ngai ezwi ngolu ya Nzambe koleka mikili misusu? Mingimingi na eleko na biso oyo eleki likama kati na lisolo ya bomoi na bato, ezali malamu to mayele na kotalela eteni moke moko ya mabelé ete eleki mosusu nyonso etikali, to eteni moko ya libota na bato ete eleki oyo mosusu nyonso?
19. Ndenge nini mokomi ya lisolo ya bomoi na bato, Oyo-Aleki-Likoló, Jéhovah, azali kotalela mokili oyo ekanisi mpe ezali kosala lokola ete eleki mikili misusu nyonso?
19 Totalela likanisi ya mokomi na lisolo ya bomoi ya bato Oyo-Aleki-Likoló, Jéhovah Nzambe, Mobandisi na Biblia. Tala oyo ntoma Petelo ayebisi biso mpo na yango: “Na solo, namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, ye oyo akobangaka ye mpe akosalelaka boyengebene andimami na ye.” Lisusu, tosengeli kobika ntango nyonso na boyokani na maloba oyo Mozalisi apemisaki na ntoma Paulo: “Na nkoko moko [Nzambe] abotisi mabota nyonso ya bato mpo na kofanda na mikili nyonso ya nse”, boye te? Mpo na nini libota moko ekokanisa mpe ekosala lokola ete eleki oyo mosusu nyonso? Komitangaka kati na bato nyonso, Paulo alobaki: “Tozali libota na Nzambe”.—Misala 10:34, 35; 17:26, 29.
20. Kati na mokili ya sika elakami na Jéhovah, banani bakozala wana te mpo na kokanela basaleli na Nzambe, mpe boyekoli oyo elandi elobeli nini?
20 Kati na mokili ya sika elakami na Jéhovah, baoyo balingaka boyengene bakozala lisusu te na nse na matumoli ya masangá ya politike oyo eyangelaka bato na makasi lokola Goliata, mpamba te koyina mpe lolendo ya koponapona ekosila. (Nzembo 11:5-7) Ezala epai wapi bazali kobika na mabelé, basaleli ya Nzambe basilaki kotika mayoki ya kokabola bikólo: bazali kotosa mobeko ya Yesu oyo esengi bango ‘balingana bamoko mpe bamosusu lokola ye moko alingaki bango’. (Yoane 13:34, 35; Yisaya 2:4) Boyekoli oyo elandi emonisi soki ezali lolenge nini ya bolingo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mingi ya eteni yango ya mitango na Biblia, tosengi na yo otala na page ya 129 kino 138 ya mokanda “Que ton royaume vienne!” ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.
b Ba Témoins de Jéhovah, bilenge mpe mikolo, basukisaki ntembe ya ‘Goliata’ ya nazi mpe batikalaki sembo. Annuaire ya ba Témoins de Jéhovah 1974, pages 117 kino 121, 163 kino 168, elobeli bomoi ya bamoko kati na bango lokola lisolo oyo ezali kolendisa biso.
Bozongeli
◻ Moto mabe mpe mbinga Goliata azali elilingi ya nani?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete basaleli ya Nzambe bandimaka kosala boyokani te na mokili mpo na likambo etali bokonzi ya molongo mobimba?
◻ Mpo na nini basaleli na Nzambe bakoki koloba ete ‘Goliata’ ya lelo akweisamaki?
◻ Nani azali komitambwisa lokola mokonzi Saulo, mpe nini endimisi biso yango?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete basaleli na Jehovah basalaki lokola Davidi liboso na minyoko ya ‘Goliata’ ya lelo?