Tomonisa elikya na biso epai na Jehovah na kosalelaka makambo oyo tozali koyekola
‘Tya elikya epai na Jéhovah mpe sala malamu; fanda na mabelé mpe sala na bosembo.”—NZEMBO 37:3, M.N.
1, 2. (a) Na mokano nini moto na moto asengeli koyekola Biblia? (b) Elilingi nini Yakobo apesaki? Azali kolobela kobwaka liso mbangumbangu?
BOYEKOLI ya Liloba na Nzambe ezali bobele mosala ya esengo te. Esengeli kosalisa moto oyo azali komipesa na yango ‘na kokolisa elikya na ye epai na Jéhovah. (Masese 3:1-5) Ndenge emonisi yango maloba ya mokomi na nzembo oyo totangi awa na likoló, elikya epai na Nzambe, ekotinda na ‘kosala malamu’.
2 Yakobo apesi toli oyo na baklisto: “Bozalaka nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te, komizimbisaka bino mpenza na makanisi ya libunga. Na bongo, ye oyo azali moyoki ya liloba kasi motosi na yango te azali lokola moto oyo amitali elongi na ye mpenza na talatala. Mpamba te amitali, akei mpe abosani noki soki azali moto ya motindo nini.” (Yakobo 1:22-24, M.N.) Komitalela oyo Yakobo alobeli awa ezali kotala ya mbangumbangu te. Na bongo liloba ya greke oyo ebongolami na ‘kotala’ elakisi mpenzampenza “kokanga na makanisi makambo matali pwé moko oyo ezali kotalelama.” Dictionnaire interprétatif des mots du Nouveau Testament (Angl.) de W. Vine: tala Misala 7:31, Traduction interlinéaire du Royaume (Angl.).
3. Ndenge nini moto oyo amitali na talatala akoki kobosana noki “soki azali moto na motindo nini”?
3 Na bongo tokanisa ete moto moko azali komitala elongi na talatala mpe amoni bilembo oyo ekoki kosepelisa te: mbanga evimbá mpo na lokoso ya kolya mpe ya komela, miso ekota na kati mpo na bozangi ya mpongi mpe elongi ekangamá mpo na basusi ya ntango nyonso. Ezali ye komimona, azwi ekateli ya kosala mabongwani na mimeseno na ye mpe na lolenge na ye ya bomoi, likambo oyo asengelaki kosala yango uta kala. Na nsima “akei”. Wana ekabwani ye na elilingi mabe ya elongi na ye, “abosani noki”, mingimingi lolenge ya nzoto na ye te, kasi “soki azali moto na motindo nini.” Makatami na ye ya malamu mabungi.
4. Na motindo nini elilingi ya Yakobo ekokani na boyekoli na biso ya Makomami?
4 Na motindo moko, mbala mosusu oyekolaka Biblia ntango nyonso; nzokande, osalaka nini na komitalaka na talatala oyo ezali bongo Liloba na Nzambe? Soki na kati na yango omoni ete ozali na matono mpe mabunga ya elimo, yango etungisaka yo bobele na ntango ozali komitala to mpe ozwaka likatami makasi ya kobongisa mabunga yango? Yakobo abakisi: “Nde ye oyo azali kotalatala na Mobeko mobongi, Mobeko ya bonsomi, mpe aumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo akobosana te kasi akosalaka misala; wana akozala na esengo kati na mosala na ye.” (Yakobo 1:25) Yango wana tozali na libondeli oyo ya mokomi na nzembo: “Teya ngai na nzela ya mibeko na yo, e Jéhovah; ete nabila yango kino nsuka.”—Nzembo 119:33.
Misala na biso mimonisaka bomoto na biso
5. (a) Misala na biso mizali komonisa nini? (b) Nini ekoyela baoyo “bazali kosala oyo ezali mabe”?
5 Na bongo, misala na biso to lolenge na biso ya kosala makambo emonisaka bomoto na biso ya kati mpenza. Ata ndele, moto na moto amonisaka polele ‘sekele ya motema na ye’ na kosalaka malamu to mabe. (Nzembo 51:6) Salomo alobaki: “Ata mwana ayebani na misala na ye, soko mosala na ye ezali na mpeto mpe soko ezali sembo.” (Masese 20:11) Bosolo ya motinda yango emonanaki na likambo ya Yakobo mpe ya Esau, wana ezalaki bango bilenge. Na boumeli ya ntango, Esau amonisaki na misala na ye ete azalaki kosepela na makambo ya elimo te. (Genese 25:27-34; Baebele 12:16) Bosolo ya motinda yango emonanaki lisusu na likambo ya bankoto na bato oyo bazalaki komikumisa ete batyaki elikya na bango epai na Jéhovah, kasi bamimonisaki, engebene maloba ya Biblia, “bato oyo bazali kosala oyo ezali mabe”. (Yobo 34:8) Mokomi na nzembo akomaki: “Ata bato mabe bakoli lokola matiti; ata baoyo nyonso bakosalaka mabe balongi malamu, ezali mpo ete babomama seko.”—Nzembo 92:7.
6. Mpo na nini tosengeli mpenza komonisa uta sikawa elikya na biso epai na Jéhovah?
6 Bato mabe bazali se kobakisama, mpe nsuka ebelemi. Nzambe akotika bato ya masumu libela te. (Masese 10:29) Na bongo tosengeli mpenza komonisa elikya na biso epai na Jéhovah na kosalelaka makambo oyo tozali koyekola. Petelo apesi biso toli ete ‘tozalaka ntango nyonso na etamboli malamu kati na bapakano.’ (1 Petelo 2:12, M.N.) Totalela sikawa mwa makambo kati na yango tosengeli mbala mosusu kosala mabongwani.
Boyokani na biso elongo na bamosusu
7. Mpo na nini tosengeli kozala na likebi kati na boyokani na biso elongo na “bato na libanda”?
7 Toloba libosoliboso mpo na boyokani na biso elongo na bamosusu. Na Masese 13:20 (M.N) tozali kokuta likebisi oyo: “Mawa ekokomela ye oyo azali kotambola elongo na bazoba”. Kobwakaka toli yango oyo epemami, bamosusu bazali na boyokani makasi elongo na baninga na bango ya mosala to ya kelasi. Yango wana Temwe moko abálá asalaki pite elongo na moninga na ye ya mosala ya mwasi. Akendaki mpe elongo na baninga na ye mosusu kati na bisika ya komela masanga mpe alangwaki. Ezali wana likambo esengeli kopusa biso na ‘kolanda kotambola na mayele liboso na bato na libanda.’—Bakolose 4:5, M.N.
8. Mabongwani nini bamosusu bakoki kosala kati na boyokani na bango elongo na baninga na bango baklisto?
8 Tóloba nini mpo na boyokani na biso elongo na baninga na biso baklisto? Na ndakisa, ozali na nyongo ya ndeko moko. Ozali na ndingisa ya koumela mpo na kozongisela ndeko yango mosolo na ye, na komilobaka ete ye azali na bozwi mpe ete yo nde moto ozali na mposa mingi ya mosolo yango koleka ye? “Moto mabe akodefa, nde akozongisa te”, ndenge tozali kotanga yango na Nzembo 37:21. Soki ozali nkolo ya kompanyi, ozali komemya motinda engebene yango “mosali abongi kozwa lifuti na ye” soki ekomi ntango ya kofuta basali ba Témoins de Jéhovah? (1 Timote 5:18) Mpo na boyokani oyo azalaki na yango elongo na baninga na ye, Paulo alobaki: “Totamboli kati na mokili, mpe mpenzampenza epai na bino, na ezaleli na bulee mpe na bosembo kati na mokano na Nzambe.”—2 Bakolinti 1:12, M.N.
Bokatikati na molato mpe kokata nsuki
9. Bizaleli nini bankulutu bamonaki mpo na oyo etali molato mpe kokata nsuki?
9 Na Alemanye, mokengeli moko ya zonga-zonga alobaki mpo na baklisto mosusu na kobengaka bango “libota na bato bakolataka lokola babeti na basket“, mpo na molato na bango ya bongo na bongo na makita. Biro ya filiale ebakisaki ete bayangani na makita “bazali na molato ya malonga te”, atako “mingi na bandeko na biso balataka na motindo mobongi.” Filiale ya mokili mosusu eyebisi ete “kozanga bopeto ya nzoto ezali mokakatano. . . . Bandeko mosusu bazali kolata na bopeto te mpe bazali na nsuki esanolami te mpe ezali na bosoto ntango bazali kokende na makita to kosakola.” Ezali likambo eleki ntina mpenza ete basaleli ya Jéhovah bazala na molato ekoki mpe ya mpeto na makambo manso.—2 Bakolinti 7:1.
10. (a) Motinda nini esengeli kotambwisa biso mpo na lolenge na biso ya kolata mpe ya kokata nsuki? (b) Ntango nini ekoki komonana malamu na kopesa batoli mpo na likambo yango, mpe ndenge nini tosengeli kondima batoli yango?
10 Tosengeli ‘komilatisa na motindo mobongi, kozanga komilakisa mpe kozanga mindondo’, mingimingi wana ezali biso kosangana na misala ya elimo. (1 Timote 2:9, Parole vivante) Ezali te likambo ya koyeba soki lolenge moko ya kolata to ya kokata nsuki epalangani, kasi nde koyeba soki yango ebongi na moto oyo amilobi ete azali mosaleli ya Nzambe. (Baloma 12:2; 2 Bakolinti 6:3) Molato ya bongo na bongo to bilamba oyo ekangisaka nzoto ekoki kobebisa lokumu ya nsango na biso. Bamode oyo emonani ete ezali na mokano ya kokomisa mibali lokola basi mpe kokomisa basi lokola mibali, ebongi soki moke te na moklisto. (Tala Deteronome 22:5) Na ntembe te, mimeseno ya bato mikoki kokesena engebene bileko ya moi to ya malili, misala mizali kosalama na esika yango, bongo na bongo. Yango wana lisangá ya boklisto epesi liboke ya mibeko te oyo mikobongwana te mpo na libota na bandeko ya mokili mobimba. Bankulutu basengeli mpe te kondimisa na makasi bamposa na bango moko epai na etonga ya Nzambe. Nzokande, soki mosakoli moko ya Bokonzi azali kolata na lolenge oyo ezali kotungisa lisangá mobimba to ezali kokitisa lokumu ya mosala ya Nzambe ebongi kopesa ye toli na boboto. Okondima toli yango na komikitisa, nakomonisaka bongo elikya na yo epai na Jéhovah?—Baebele 12:7.
Totya motema na lisungi oyo Nzambe apesaka na baoyo balukaka Bokonzi
11. Ndenge nini bamosusu bazali komipesa mingi na koluka biloko ya mosuni, mpe mpo na nini ezali likambo na mayele te?
11 “Na bongo bolukaka liboso Bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko mosusu nyonso wana bikobakisamela bino.” (Matai 6:33, M.N.) Oyo nde likambo ya mawa na komona ete bamosusu bazali koyoka toli oyo te! Kolandaka kimya ya lokuta oyo mosolo ezali kopesa, bazali koluka na makasi bozwi, bakelasi mineneminene mpe misala ya lokumu, ‘kotyaka elikya na bango na biloko na bango.’ (Nzembo 49:6) Salomó apesi biso likebisi oyo: “Kominyokola te mpo na kozwa bozwi . . . . Ozali kotya miso na yo na yango, nzokande ezali bobele mpamba? Mpo ete ekomisalela solo mapapu lokola ya mpongo mpe kopumbwa na likolo”—Masese 23:4, 5, M.N.
12. Nini emonisi ete bato oyo balukaka kokoma bazwi ‘bazali komitobola na bolozi mingi’?
12 Ntoma Paulo na ngambo na ye, apesi likebisi oyo: “Mpamba te bolingo na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopengwa mosika na kondima mpe bamitoboli bango mpenza na bolozi mingi.” (1 Timote 6:10) Kati na lisolo moko ebimisami na zulunalo (U.S. News World Report), Douglas LaBier alobaki ete mibali mingi mpe basi oyo bazali koluka bozwi “bazali komimona ete bazangi bosepeli, batungisami, bazali na basusi mingi, bazangi ntina, bazali na bizaleli ya kokanisa bobele mpo na bango moko mpe bazali komilela mpo na bampasi mingi ya nzoto: mpasi na motó, mpasi na mokongo, mitungisi na estomá, kozanga mpongi mpe kobungisa mposa ya kolya.”
13. Mpo na nini eleki malamu kosepela ‘na bilei mpe bilamba’?
13 Baoyo batye motema na lisungi ya Jéhovah bazali kopengola bampasi mpe mitungisi mingi. Ya solo, kosepela na ‘biloko ya kolya mpe na bilamba ya kolata’ elimboli mbala mosusu kozala na bomoi ya bokatikati mpenza. (1 Timote 6:8) Kasi “bozwi ekozala ata na litomba moko te na mokolo ya nkanda.” (Masese 11:4) Lisusu, na kosalelaka Nzambe na biso mingi koleka, tozali komimonisa bato babongi kozwa ‘mapamboli ya Jéhovah oyo makoyeisaka bozwi, mpe oyo abakisaka mpasi elongo na yango te’.—Masese 10:22.
‘Luka kimya mpe landa yango’
14, 15. (a) Makambo ya motindo nini mabulunganisaki kimya ya masangá mosusu? (b) Ndenge nini tokoki koluka kimya ntango ntembe ebimi?
14 Tokoki mpe komonisa elikya na biso epai na Jéhovah na ‘kolukaka kimya mpe na kolandaka yango’ kati na boyokani na biso elongo na baninga na biso baklisto. (1 Petelo 3:10-12) Bamoko baswanaka mbala mosusu mpo na makambo mazangi ntina: kobongisa Salle du Royaume, kokabola ba teritware ya lisangá, kotya bisika ya boyekoli ya mokanda, kokabola bazulunalo (Misenzeli mpe ba Réveillez-vous) mpe mikanda mosusu. Na makambo mosusu, na esika ete babongisa mikakatano etali bomoi na bango to mosolo engebene likanisi elimbolami na Matai 18:15-17, baklisto bazwaki ekateli ya kolobana lisusu te to babulunganisaki lisangá mpo na kozanga boyokani na bango.
15 Yakobo alobi: “Mbuma na boyengebene ekokonama na kimya.” (Yakobo 3:18) Mpo na kobatela kimya, zala pene mpo na kondima bamposa to makanisi ya bamosusu, na kotikaka lotomo na yo pembeni. (Tala Genese 13:5-12) Na ndakisa, soki masangá mibale mazali koyangana na Salle du Royaume moko, lisangá moko te esengeli kokanisa ete Salle “ezali mpo na bango moko” mpe ete ekoki kotyela lisangá mosusu makanisi na yango mpo na oyo etali bantango ya makita to makambo mosusu. Limemya ya moko epai na mosusu mpe boyokani esengeli kozala na esika ya liboso.
16. Mpo na nini ezali ntina na kondima ebongiseli ya Nzambe kati na libota mpe na lisangá?
16 Tokoki kopengola koswana mingi na kondimaka molongo ya ebongiseli ya Nzambe mpe na kotikalaka na esika na biso. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:22-27) Wana mwasi azali komemya mokano ya mobali na ye, bana bazali kotosa baboti na bango mpe basaleli ya misala bazali komikitisa na nse ya etambwiseli ya bankulutu, ezaleli na bango “ezali kokolisa [lisangá] mpo na kolendisama [na yango moko] kati na bolingo”. (Baefese 4:16, M.N.) Ya solo, ekomaka ete mibali, baboti mpe bankulutu básala mabunga. (Baloma 3:23) Kasi tokobongisa likambo yango na kotombokaka, na komilelaka to na koboyaka kolanda mitinda mizali na moboko malamu? Eleki malamu mingi mpenza ete totikala na esika oyo Nzambe apesaki biso mpe toluka kimya.
Tobunda makasi kati na mosala ya Nzambe
17. (a) Bantina nini bamosusu bapesaka mpo na kolongisa bosangani na bango ya bongo na bongo na mosala ya kosakola? (b) Na motindo nini Yesu alendisi baklisto mpo na koyika mpiko liboso na mikakatano ya lelo?
17 Nzokande, mpo na baklisto mingi, likambo eleki mpasi ezali kotosa etinda ya kosakola nsango malamu. (Matai 24:14; 28:19, 20) Bamosusu bazali kosala moke, na kolobaka mbala mosusu ete ezali mpasi mpo na bango kosala mingi na ntina na mosala na bango ya mosuni mpe mokumba na bango ya mabota. Ntembe ezali te ete “mikolo ya nsuka” mizali komemisa moko moko kilo ya monene. (2 Timote 3:1) Kasi Yesu akebisi biso ete tomipesa te ‘kilo mpo na mitungisi ya bomoi’. Awa mikakatano mizali se kobakisama, baklisto basengeli ‘kotombola mitó na bango’. (Luka 21:28, 34.) Moko na mitindo mileki malamu ya ‘kotelema ngwi’ liboso na mimekamo ya Satana ezali ya “koselingwa na kolataka na makolo sapato ya nsango malamu”, na kosanganaka ntango nyonso na mosala ya kosakola.—Baefese 6:14, 15.
18. Mpo na ntina nini bamosusu bazangaka kosangana na motindo mokoki na mosala ya kosakola?
18 Na mikolo ya Paulo, baklisto mingi (kati na masangá mosusu) ‘bazalaki koluka matomba na bango moko, kasi oyo ya Klisto Yesu te’. (Bafilipi 2:21, M.N.) Ekoki kozala ete bamoko kati na biso bazali kosala bongo lelo? Mbala mosusu bazali komona te Bokonzi lokola moto oyo ya lisese azalaki komona “pauni ya motuya monene” oyo azwaki, mpe oyo na ntina na yango akendeki koteka biloko binso bizalaki na ye. (Matai 13:45, 46) Komibanzabanzaka mpo na matomba na bango moko, bazali kosala moke mpenza kati na Bokonzi mpe bazali kosalela Nzambe bobele mosala ya bongo na bongo. Nzokande, tobosana te ete ezali bolingo mpo na Jéhovah mpe mpo na bamosusu nde etindaka moklisto ya solo asakola, ata soki amesani te kobanda lisolo elongo na bato oyo ayebi te.—Matai 22:37-39.
19. Mpo na nini Jéhovah asepelaka te na milende mizangi móto, mpe ndenge nini tokoki kotalela mosala oyo tozali kosalela ye?
19 Soki tozalaka na mposa ya kosakola te, wana emonisi ete bolingo na biso mpo na Jéhovah mpe elikya na biso epai na ye ezali monene te. Davidi apesaki Salomo toli na maloba oyo: “Yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela ye na motema mobimba . . . , mpamba te Jéhovah akotalatala mitema minso mpe akososola makanisi mpe mikano nyonso.” (1 Ntango 28:9) Tokoki te kokosa Jéhovah na milende mizangi móto. Ata kosangana ntango nyonso na mosala ya kosakola ekosepelisa ye te soki tozali kopesa ye bobele ndambo moko ya oyo tokokaki kosala na ‘kobundaka ’makasi’. (Luka 13:24) Na bongo moklisto mokomoko asengeli kotalela na bosembo bosangani na ye na mosala ya Nzambe mpe komituna soki azali mpenza kosala nyonso oyo akoki kosala. Mbala mosusu akomona ete esengeli na ye atalela lisusu makambo oyo azali kotya na esika ya liboso kati na bomoi na ye.
Ndakisa ya bamosusu ezali kopusa biso na ‘kosala malamu’
20. Mpo na nini ezali malamu na kotalela ndakisa malamu ya baninga na biso baklisto?
20 Tozali kosalela Nzambe na komikokanisaka na moto mosusu te. (Bagalatia 6:4) Kasi ndakisa malamu ya baninga na biso ekoki kopusa biso tosala mingi koleka. Ntoma Paulo ye moko alobaki: “Bozala bamekoli na ngai, lokola ngai mpe nazali momekoli na Klisto.” (1 Bakolinti 11:1) Na bongo totalela motuya ya bangonga oyo bandeko bazali kolekisa na mosala ya kosakola sanza na sanza. Na ndakisa, kobanda na 1979 kino na 1987, na Etats-Unis mwayene ya bangonga oyo basakoli balekisaki sanza na sanza na mosala ya Nzambe elongwaki na 8,3 mpe ekomaki na 9,7. Bandeko na biso baklisto bakolisaki ntango nyonso bosangani na bango na mosala ya kosakola. Ezali mpe bongo mpo na yo?
21. Nini etindaka baklisto mingi ete basala mosala ya pionnier? Pesa ndakisa moko.
21 Awa balendisami na ndakisa ya molende ya baninga na bango, motuya monene ya Batemwe bazali kokota na mosala ya pionnier permanent. Mokolo moko, na California (Etats-Unis), elenge mwasi moko moklisto na nkombo Angela azwaki mosala moko kitoko mpenza, azwaki mpe mosolo mpo na kopesa ye nzela ya kolanda bakelasi na ye na université oyo ye moko akolinga. Kasi Angela aponaki mosala ya pionnier. Mpo na ntina nini? “Na kozalaka elongo na bapionniers mingi, namonaki ete bazalaki kozwa esengo mingi, bobele mpo na mosala na bango te, kasi lisusu mpo na boyokani na bango elongo na Jéhovah. Nalingaki mpe kozwa esengo yango ya mozindo.”
22. Matomba nini tokozwa soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola?
22 Olingi, yo mpe kozwa “esengo ya mozindo”? Na bongo ‘tya elikya epai na Jéhovah mpe sala malamu!’ Tika ete boyebi na yo etinda yo na kosala mingi kati na mosala ya Jéhovah! Soki osaleli makambo oyo ozali koyekola, bokoli na yo ya elimo ekomonana polele epai na bato banso mpe okobikisa bomoi na bato. (1 Timote 4:15, 16) Tika ete biso banso tolanda bongo toli ekomami na Bafilipi 4:9: “Yango eyekoli bino, eyambi bino mpe emoni bino epai na ngai, bosalelaka yango; mpe Nzambe na kimya akozala elongo na bino.”
Bozongeli
◻ Tosengeli kosala nini nsima wana esili biso kotya miso na talatala oyo ezali Liloba ya Nzambe?
◻ Ndenge nini tokoki kosala bokoli kati na boyokani na biso elongo na bamosusu?
◻ Mpo na nini ezali bozoba na koluka na makasi biloko ya mosuni?
◻ Na lolenge nini tokoki koluka kimya kati na lisangá?
◻ Nini esengeli kopusa biso tosangana na ndenge ekoki na mosala ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 10]
Ekoki bobele te komona matano mpe mabunga na yo ya elimo. Osengeli kolongola yango!
[Elilingi na lokasa 10]
Mbala mingi, baoyo balukaka kokoma bazwi bamitobolaka bango mpenza na “bolozi mingi.”