Yesu Klisto: Mwana-molingami na Nzambe
“Mpe mongongo uta na likoló elobi ete: ‘Oyo azali mwana na ngai, molingami, nandimi ye’—MATAI 3:17.
1, 2. (a) Solo nini ya petee mpenza Biblia ezali koteya mpo na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe mpe na Yesu Klisto? (b) Mangomba na boklisto ya mokili bazali koteya nini?
YESU Klisto abatisamaki na kozindisamaka mobimba na mai wana ezalaki ye na mbula 30. Ntango abimaki na mai, mongongo moko longwa na likoló eyokanaki: “Oyo azali mwana na ngai, molingami, nandimi ye”. (Matai 3:17) Mongongo yango ezalaki ya Nzambe. Na libaku mosusu, wana ezalaki ye kobondela, Yesu alobaki: “Tata, kumisa nkombo na yo.” Nsima na yango, ‘mongongo na Nzambe eutaki likoló: “Nakumisi yango mpe nakokumisa yango lisusu.”’—Yoane 12:28.
2 Na kotangaka masolo yango, ata mwana moke akoki kokanga ntina ete boyokani oyo ekangisi Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Yesu Klisto ezali ya tata elongo na mwana-molingami na ye, ete bazali bato mibale bakeseni. Nzokande, mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali koboya kondima solo yango ya petee mpenza. Bazali koloba ete Yesu Klisto azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, moto ya mibale ya bosato, mpe elimo santu nde ezali moto ya misato kati na bosato yango.
3. Nini emonisi ete liteya ya Bosato ezali kobimisa mobulungano?
3 Liteya yango etye basambeli ya boklisto ya mokili na mobulungano monene; yango wana Nouvelle Encyclopédie catholique (Angl.) ebengi bosato ete ezali libombami. Ata bakonzi ya lingomba bango moko bazali kobulungana. Tala oyo tokoki kotanga mpo na yango kati na encyclopédie yango: “Kati na ba séminaires ya bakatolike, ebele na balakisi ya liteya ya bosato bazali mbala mosusu kotungisama na motuna elandi: ‘Kasi ndenge nini bosato ezali koteyama?’ Mpe soki yango ezali polele te kati na makanisi na bayekoli, mbala mosusu ezali mpe ndenge moko mpo na bateyi na yango.”
4. Liteya eyebani ya mangomba mpo na Bosato ezali nini?
4 Liteya yango oyo ezali kobulunganisa ezali liteya ya moboko mpo na mangomba ya katolike mpe ya protestant. Encyclopédie catholique (Angl.) elobi boye: “Bosato ezali liloba ezali komonisa liteya ya moboko ya lingomba ya boklisto . . . . Na bongo, engebene maloba ya elembo ya Athanase, ‘Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo santu ezali Nzambe, kasi bazali banzambe misato te bobele Nzambe moko’.” Bobele bongo, ntango Batemwe bafundamaki na Grèce, Lingomba ya orthodoxe elobaki: “Liteya ya moboko ya boklisto, mpe oyo endimami na baklisto banso, ata bazali kati na lingomba nini, ezali . . . Bosato, elingi koloba endimeli oyo ete Nzambe azali moko kati na bato misato.” Elobaki lisusu ete: “Baklisto bazali baoyo bandimaka ete Klisto azali Nzambe.” Mpe ebakisaki ete baoyo bazali kondima Bosato te bazali baklisto te, kasi bazali bapengwi.
5, 6. Mpo na nini ezali ntina na koyeba solo mpo na oyo etali Bosato?
5 Nzokande, soki liteya yango ‘ya moboko’ ya boklisto ya mokili ezali lokuta, baoyo bazali koboya yango, na esika ete bazala bapengwi, bazali nde baklisto ya solo. Baoyo bazali kondima yango, bango nde bazali koangana boklisto ya solo. Na bongo nini ekoyela bango? Bakozwa bomoi ya seko kati na Bokonzi ya Nzambe te. Ezali yango emonisami na “Emoniseli na Yesu Klisto, oyo Nzambe apesaki ye”. Totangi boye: “Na libanda bambwa bazali, na bato na soloka, na bato na pite, na babomi na bato, na basambeli na bikeko, na bango nyonso bakolingaka mpe bakosalelaka lokuta.”—Emoniseli 1:1; 22:15.
6 Na kotalelaka bonene ya liteya ya bosato, tosengeli koyeba ebandeli na yango mpe mpo na nini esalamaki; nani azali mpenza tata na yango; mpe batéolojié ya lelo bazali kokanisa nini mpo na yango. Kasi liboso tokenda mosika koleka totala oyo liloba na Nzambe elobi mpo na likambo yango.—2 Tim. 3:16, 17.
‘Nzambe-Mwana’ te kasi “Mwana ya Nzambe”
7. Botangi na Biblia kozanga koponapona ezali komonisa nini mpo na Yesu?
7 Botangi ya Biblia kozanga koponapona mpe kozanga kotalela makanisi ya Bosato, emonisi ete Yesu amikumisaki ata moke te ete azali Nzambe na Nguya-Nyonso. Na ndakisa, kati na Yoane 3:16, alobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye te apesi Mwana na ye bobele moko.” Bobele verset mibale na nsima, Yesu alobi lisusu ete azali: “Mwana bobele moko na Nzambe.” (Yoane 3:18) Ntango Bayuda bafundaki ye ete azali kotuka Nzambe, ayanolaki bango: “Bozali nde koloba na ye oyo Tata abulisi mpe atindi kati na mokili ete: ‘Ozali kotuka Nzambe’, mpo nalobi ete ngai nazali Mwana na Nzambe?” (Yoane 10:36) Na bongo, Yesu alobaki soki moke te ete azalaki ‘Nzambe-Mwana’, kasi “Mwana na Nzambe”.
8. Litatoli nini Kapitene ya basoda mpe baoyo bazalaki kotambola elongo na ye bapesaki?
8 Ntango Yesu akufaki, ata basoda Baromé oyo bazalaki wana bayebaki ete azalaki Nzambe te: “Kapitene na basoda mpe baoyo bazalaki esika moko na ye mpo na kokengela Yesu, emonaki bango koningana na mabelé mpe makambo mazalaki kobima, babangaki na nsomo monene mpe balobaki: ‘Na solo, oyo azalaki Mwana na Nzambe.’” (Matai 27:54) Balobaki te ete: “Oyo azalaki Nzambe”, to: “Oyo azalaki Nzambe-Mwana”, mpamba te Yesu mpe bayekoli na ye bateyaki ete azalaki Mwana na Nzambe, kasi Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso te oyo alataki nzoto ya moto.
9, 10. Litatoli nini ya nguya ba Evanzile ezali kopesa mpo na boyokani oyo ezali kati na Nzambe mpe Yesu?
9 Engebene lisolo ya Matai, moko na bakomi ya ba Evanzile, ntango Yesu abatisamaki, Nzambe ye moko ayambolaki ete Oyo azali Mwana na ye molingami. (Matai 3:17) Bakomi mosusu ya Biblia basalaki ndenge moko. Na yango Malako akomaki: “Mongongo moko eutaki na makoló: ‘Ozali Mwana na ngai, molingami, nandimi yo”’ (Malako 1:11) Ndenge moko, tokoki kotanga kati na Evanzile ya Luka: “Mongongo moko elongwaki na likoló: ‘Ozali mwana na ngai, molingami, nandimi yo.’” (Luka 3:22) Yoane mpe, ye oyo abatisaki Yesu, alobaki: “Nayamboli ete oyo [Yesu] azali Mwana na Nzambe”. (Yoane 1:34) Na bongo, Nzambe ye moko, bakomi minei ya ba Evanzile mpe Yoane mobatisi balobaki polele ete Yesu azali Mwana ya Nzambe. Lisusu, mwa ntango moke na nsima, na ntango ya kobongwana na Yesu, likambo ya motindo moko esalamaki: “Mongongo [oyo ya Nzambe] ebimaki kati na lipata ete: ‘Oyo azali Mwana na ngai, Moponami. Boyoka ye.’”—Luka 9:35.
10 Kati na mikapo nyonso oyo, Nzambe alobi ete ye azali mwana na ye moko, ete amitindaki, amindimaki ye moko? Te, Nzambe Tata, Mozalisi, alobi ete atindaki Mwana na ye, Yesu, oyo akeseni na ye moko, mpo na kokokisa mosala na Ye (oyo ya Nzambe). Yango wana, kati na Makomi na greke ya boklisto mobimba, liloba oyo esalelami mpo na kolakisa Yesu ezali “Mwana na Nzambe”. Nzokande, tokoki ata mbala moko te kokuta liloba ‘Nzambe-Mwana’, mpo ete Yesu azali Nzambe ya Nguya-Nyonso te, kasi Mwana na Nzambe. Bazali bato mibale bakeseni, mpe ata “libombami” moko te ya teoloji ekoki kokweisa solo yango.
Tata aleki Mwana
11. Ndenge nini Yesu amonisaki ete Nzambe aleki ye?
11 Yesu ayebaki ete akokanaki na Tata na ye te, kasi azalaki na nse na ye na makambo nyonso. Ayebaki ete azalaki Mwana molingami oyo azalaki na bolingo mozindo mpo na Tata na ye. Tala mpo na nini, mbala mingi, Yesu alobaki maloba lokola oyo: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi akosalaka bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala.” (Yoane 5:19) “Nakiti longwa na likoló mpo ete nasala mokano na ngai moko te kasi mokano na Ye Oyo atindi ngai”. (Yoane 6:38) Yoane 7:16: “Nayebi ye [elingi koloba Nzambe], mpamba te nazali momonisi na Ye, mpe Ye atindi ngai”. (Yoane 7:29) Ye oyo azali kotinda aleki ye oyo atindami, mpo motindami azali mosali. Nzambe azali Ye Oyo azalaki kotinda, Yesu azalaki motindami; bazali bato mibale bakeseni. Lokola elobaki yango Yesu, “moombo aleki nkolo na ye te, motindami mpe aleki ye oyo atindi ye te.”—Yoane 13:16
12. Lisese nini elakisi ete Yesu azali na nse na bokonzi ya Tata na ye?
12 Yesu amonisi polele ete azali na nse ya bokonzi ya Tata kati na lisese moko epai azali kokokisa Jéhovah Nzambe na Nkolo ya elanga ya miwiti. Liboso ya kokende mobembo na mboka mopaya, moto yango apesaki elanga na ye na basali, baoyo bazalaki komonisa na polele bakonzi ya mangomba ya Bayuda. Na nsima, elingaki ye ete basali bapesa ye ndambo moko ya bambuma ya elanga, atindelaki bango moombo moko: kasi basali babetaki moombo mpe bazongisaki ye maboko mpamba. Atindelaki bango moombo ya mibale, mpe basalaki ye bobele bongo. Moombo ya misato akutanaki na likambo motindo moko. Sikawa nkolo na elanga (Nzambe) alobaki: “Nakotinda mwana na ngai [Yesu], molingami. Esengeli kolikya ete, oyo, bakomemya ye.” Nzokande basali mabe oyo balobi: “Tala motuki na libula; toboma ye, mpo libula ekoma ya biso.” ‘Babwakaki ye na libanda ya elanga mpe babomaki ye’. (Luka 20:9-16) Lisese yango emonisi malamu ete Yesu azali na nse ya Tata, ete atindamaki na Tata mpo na kosala mokano ya Tata.
13. Maloba nini ya Biblia mandimisi polele ete Nzambe aleki Yesu?
13 Yesu ye moko alobaki: “Tata aleki ngai na monene”. (Yoane 14:28) Tosengeli kondimela Yesu, mpamba te ayebaki malamu lolenge ya boyokani oyo azalaki na yango elongo na Tata na ye. Ntoma Paulo, ye mpe, ayebaki ete Nzambe aleki Yesu: yango wana alobaki: “Mwana [Yesu] mpe akokita na nse na . . . Nzambe.” (1 Bakolinti 15:28) Liboso, na 1 Bakolinti 11:3, akomaki: “Mokonzi na Klisto, Nzambe”. Yesu andimaki ete azalaki na nse ya bokonzi ya Nzambe oyo aleki ye ntango alobaki na bayekoli na ye: “Nazali kobuta epai na Tata na ngai mpe Tata na bino, epai na Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.”—Yoane 20:17.
14. Biteni nini mosusu ya Biblia bimonisi ete Yesu azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso te?
14 Yesu amonisaki ete Nzambe aleki ye ntango mama ya bayekoli na ye mibale asengaki ye ete bana na ye bakoka kofanda moko na loboko na ye ya mobali mpe mosusu na loboko na ye ya mwasi ntango akoya kati na Bokonzi na ye, Mpo na yango ayanolaki bango: “Kofanda na loboko na ngai ya mobali mpe ya mwasi, ezali ngai te nde nakopesa yango”. (Matai 20:23) Soki Yesu azalaki Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mbele ‘ye nde alingaki kozala na likoki ya kopesa’ libaku malamu yango. Kasi ‘yango ezalaki bongo te’: Tata na ye nde azalaki na likoki ya kopesa yango. Ndenge moko, ntango ayebisaki esakweli oyo etali nsuka ya biloko, alobaki: “Mpo na mokolo yango to mpe ntango, moto te ayebi, ata baanze na likoló te, ata Mwana te, moto te bobele Tata.” (Malako 13:32, M.N.) Soki Yesu azalaki Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mbele ayebaki mokolo yango mpe ngonga yango. Nzokande, ayebaki yango te, mpamba te azali Nzambe te oyo akoki koyeba makambo manso, kasi azali Mwana na Nzambe. Ayebaki te nyonso oyo Tata na ye ayebaki.
15. Wana ekomaki ye penepene na liwa, ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki na nse ya Nzambe?
15 Wana ekomaki ye penepene na liwa, Yesu amonisaki ete azalaki na nse ya Tata na ye na kobondelaka ye boye: “Tata, soki olingi longola kopo oyo pene na ngai. Mokano na ngai esalama te, kasi bobele mokano na yo.” (Luka 22:42) Yesu azalaki kosambela nani? Ye moko? Te, azalaki kosambela Tata na ye ya makoló. Ezali yango emonisami polele na maloba na ye oyo malandi: “Mokano na ngai esalama te, kasi bobele mokano na yo!” Mpe na liwa na ye, angangaki: “Nzambe na ngai! Nzambe na ngai! mpo na nini otiki ngai?” (Malako 15:34) Yesu azalaki koloba na nani? Na ye moko? Te, kasi na Tata na ye na likoló.
16. Ndenge nini liwa mpe lisekwa na Yesu emonisi ete akoki kozala Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso te?
16 Nsima na liwa na ye, Yesu atikalaki na nkunda pene na mikolo misato. Nani moto asekwisaki ye? Akokaki komisekwisa te, mpo akufaki. Mpe soki akufaki te, mbele akokaki te kofuta lisiko mpo na lisumu ya Adam; kasi akufaki mpenza, mpe na boumeli ya mikolo misato azalaki na bomoi te. Ntoma Petelo alobi na biso nani asekwisaki Yesu: “Nzambe asekwisi ye na kokangolaka ye na mpasi ya liwa.” (Misala 2:24) Ezali ye oyo aleki, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, nde asekwisaki na bakufi ye oyo azali na nse, Mwana molingami na ye Yesu. Tokamata ndakisa: ntango Yesu asekwisaki Lazare, nani alekaki na bonene? Yesu, mpamba te azalaki na likoki ya kosekwisa Lazare kati na bakufi. (Yoane 11:41-44) Ezali mpe ndenge moko ntango Nzambe asekwisaki Yesu. Lokola asekwisaki Yesu, yango elakisi ete aleki ye na monene.
17. Elembeteli nini mosusu endimisi ete Yesu azali Nzambe te?
17 Lokola azalisamaki na Nzambe, Yesu akoki te kozala Nzambe. Tala ndenge Benjamin Wilson, kati na Emphatic Diaglott na ye, akomi Emoniseli mokapo 3, verset 14: “Tala yango ezali koloba ye, Bobele bongo, motatoli na sembo mpe na solo [Yesu], ebandeli ya bozalisi na Nzambe.” Na lolenge moko, Bakolose 1:15, 16 (M.N.) elobi mpo na Yesu: “Azali elilingi na Nzambe oyo akomonanaka te, mobotami ya liboso na biloko binso bizalisamaki. Mpamba te na nzela na ye, biloko binso bizalisamaki, biloko na likoló mpe biloko na nse. . . . Biloko binso bizalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye.” Na bongo, Nzambe ya Nguya Nyonso azalisaki Mwana na ye ya likoló ye moko, Na nsima, asalaki biloko mosusu nyonso “na nzela na ye” to “nsima na ye”, lokola mosali moko ya mayele oyo azwi na mosala na ye moto moko oyo ayebi kosala malamu. Yesu azalaki te kati na biloko oyo bizalisamaki na nzela na ye, mpamba te Nzambe asilaki kozalisa ye. Yango wana abengami “mobotami ya liboso”, “Mwana bobele moko.” Soki balobi ete mwana moko azali mobotami ya liboso, mwana bobele moko, yango elakisi ata moke te ete azali Tata na ye, kasi tozali wana na bato mibale bakeseni, tata mpe mwana.
Elimo santu: moto to bokasi oyo esalaka?
18. Biblia eteyi nini mpo na elimo santu?
18 Tokoloba nini sikawa mpo na elimo santu, oyo emonisami lokola moto ya misato ya Bosato, akokani na Tata mpe na Mwana na oyo etali nguya, nzoto mpe bomoi ya seko? Ata esika moko te kati na Biblia batye elimo santu lokola Nzambe mpe lokola Klisto, na komonisaka yango lokola ete ekokani na bango. Yango wana kolimbolaka libatisi na Yesu, Malako 1:10 emonisi ete elimo santu ekitaki likoló na Yesu “lokola ebenga”: elobi te ete ezwaki lolenge ya moto. Elimo santu oyo ekitaki likoló na Yesu ezalaki moto te, kasi bokasi ya Nzambe oyo esalaka. Na nzela ya bokasi yango oyo eutaki na Nzambe, Yesu akokaki kobikisa bato ya mpasi mpe kokweisa bakufi. Tozali kotanga kati na Luka 5:17: “Bokasi monene ya Nkolo (Nzambe) ezalaki likoló na ye (Yesu) mpo na kobikisa”. (Diaglott) Na nsima, na ntango ya pantekote, bantoma bazwaki mpe bokasi ya Nzambe mpo na kobikisa babeli mpe kosekwisa bakufi. Mpo na yango, bakomaki basangani ya “bonzambe” moko? Te, kasi bazwaki epai na Nzambe, na nzela ya Klisto, mwa bokasi oyo esalisaki bango mpo na kokokisa makambo oyo bato bakoki kosala bango moko te.
19. Mpo na nini elimo santu ekoki te kozala moto na misato ya bosato?
19 Na Baefese 5:18, Paulo alobeli bokasi yango oyo esalaka. Apesi toli oyo: “Botondaka na elimo;” Na motindo moko, tozali kotanga na Misala 7:55 ete Setefano “atondaki na elimo santu.” Mpe na ntango ya pantekote, bayekoli nyonso ya Yesu “batondaki na elimo santu”. (Misala 2:4) Moto akoki kotonda na moto? Te, kasi akoki kotonda na nguya oyo euti na Nzambe. Elimo santu yango ezali bokasi oyo Nzambe asalelaki mpo na kozalisa molongo. Engebene Genese 1:2, “Bokasi ya Nzambe ezalaki kotambola likoló na mai”.
20. Emononeli nini Setefano azwaki epesi biso endimiseli mosusu ete Bosato ezali liteya ya lokuta?
20 Nsima na lisekwa ya Yesu, Setefano azwaki emononeli ya likoló: “amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelemi na loboko na mobali ya Nzambe.” (Misala 7:55) Na bongo amonaki na likoló bato mibale bakeseni: 1) Nzambe mpe 2) Yesu oyo asekwisamaki. Balobeli elimo santu kati na emononeli oyo te, mpamba te elimo santu ezali moto ya misato te oyo asangani na bosato. Lokola yango ezali bokasi ya Nzambe oyo esalaka, elimo santu euti na Nzambe, kasi ezali lokola moto te oyo akeseni na Nzambe. Tala mpo na nini Setefano amonaki bobele bato mibale.
21, 22. (a) Encyclopédie moko ya lingomba elobi nini mpo na elimo santu? (b) Makambo nini tokotalela na lisolo oyo elandi?
21 Tala oyo Encyclopédie ya sika ya katolike endimi mpo na elimo santu: “Ezali polele ete Kondimana ya Kala etaleli elimo na Nzambe lokola moto te, ezala na ndimbola ya filozofi, to na ndimbola ya liloba yango engebene eutelo na yango. Elimo na Nzambe ezali nguya na ye. Soki mbala mosusu bamonisi yango lokola ete ekabwani na Nzambe, ezali mpo ete mpema na bomoi ya Yaweh esalaka mosala na libanda na nzoto na ye.” Mokanda yango ebakisi: “Motuya monene na mikapo ya Kondimana na Sika elimbolaka elimo ya Nzambe lokola eloko, kasi lokola moto te; yango endimisami mpenza na bokokanisi oyo esalami kati na elimo mpe bokasi ya Nzambe.”
22 Makambo manso touti kotalela mamonisi ete Bosato, liteya “ya moboko” ya boklisto ya mokili, ezali liteya ya lokuta. Liloba na Nzambe ezali polele mpo na likambo yango. Emonisi ete Jéhovah Nzambe azali Tata ya bolingo mpe ete Yesu Klisto azali Mwana na ye molingami, Mwana oyo alingaka mpenza Tata na ye boye ete andimaki kotosa ye kino liwa. Nzokande, bato mosusu bazali kokanisa ete mikapo mosusu ya makomi’ ezali kolongisa Bosato; na yango, na boyekoli oyo elandi, tokotalela bamoko na mikapo yango. Tokomona lisusu mpo na nini liteya yango ekomi na ntina monene mpo na boklisto ya mokili mpe euti wapi.
Bozongeli
◻ Biblia eteyi nini mpo na Nzambe mpe mpo na Yesu?
◻ Engebene Makomami, boyokani nini ezali kati na Tata mpe wana?
◻ Tanga mwa mikapo ya Biblia oyo ezali komonisa ete Nzambe aleki Yesu.
◻ Mpo na nini elimo santu ekoki kozala eteni moko ya Bosato te?
[Elilingi na lokasa 21]
Yesu alobaki: Tata aleki ngai na monene.