Mosika te, mabota nyonso bakozala na boyengebene
“Okobila boyengebene mpe bobele boyengebene ete okoka kobika mpe kotuka libula na mokili oyo Jéhovah Nzambe na yo apesi na yo.”—DETERONOME 16:20.
1. Na ebandeli mokano na Nzambe ezalaki nini mpo na moto, mpe mpo na kokokisa yango asengelaki kosala nini?
NTANGO azalisaki mobali mpe mwasi, Jéhovah Nzambe azalaki na mokano ya kotondisa mabelé na bikelamu ya kokoka, baoyo bakokumisa ye bango nyonso mpe bakokokisa mokumba na bango oyo etali kotya mokili na nse na bango. (Genese 1:26-28) Lokola asalemaki na elilingi mpe na lolenge na Nzambe, moto apesameli bizaleli malamu lokola mayele, boyengebene, bolingo mpe nguya. Mpo na kokokisa mokano oyo Mozalisi na ye atyaki mpo na ye, asengelaki komonisa bizaleli malamu yango na lolenge ya bokatikati.
2. Ezalaki na ntina ete bana na Yisraele balanda boyengebene?
2 Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, moto atombokelaki bibongiseli na Nzambe mpe azwaki etumbu ya liwa. Mpo na kozanga kokoka na ye, uta ntango wana azalaki lisusu na likoki te ya kokokisa mokano ya ebandeli oyo Nzambe akanaki yango mpo na bato. Kokwea na bango emonisami mingi na ndenge bazali kokoka te komonisa boyengebene oyo ekoki. Na bongo, tokoki kokamwa te ndenge Moïse akundolelaki bana na Yisraele maloba oyo: ‘Okobila boyengebene mpe bobele boyengebene’. Bakokaki koumela na bomoi mpe kozwa Mabelé ya ndaka bobele soki bakolanda boyengebene.—Deteronome 16:20.
Elilingi ya makambo kitoko makoya
3. Kotalela boyokani na Jéhovah elongo na Yisraele ezali na litomba nini mpo na biso?
3 Boyokani oyo Jéhovah azalaki na yango elongo na Yisraele endimisi biso ete akozanga te kolimbola polele boyengebene na ye epai na mabota nyonso na nzela na Mosali oyo aponi Yesu Klisto. Ntoma Paulo alimboli yango na maloba oyo: “Nyonso oyo ekomamaki kalakala ekomamaki mpo na kolakisa biso ete tozala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na nzela na kobondisama na Makomami.” (Baloma 15:4) Lokola Nzambe “alingi boyengebene mpe sembo”, asengaki na Bayisraele ete bamekola ye kati na boyokani na bango na bango. (Nzembo 33:5) Ezali yango tokomona polele na kotalelaka mibeko mosusu kati na mibeko 600 oyo apesaki bango.
4. Ndenge nini Mibeko na Moïse mizalaki kobatela lotomo na bato?
4 Ntango Mibeko na Moïse ezalaki naino kotosama, lotomo ya moto moko te ebebisamaki. Mpo na moto oyo azalaki Moyisraele te kasi ayaki kofanda kati na mboka, tala oyo totangi na Levitike 19:34: “Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza.” Wana ezalaki ebongiseli ya boyengebene mpe etondi bolingo. Mpe lisusu, toli oyo elandi epesamaki epai na basambisi mpe epai na batatoli: “Okobila ebele mpo na kosala mabe te, mpe ntango na kosamba likambo okotatola lokola elingi ebele te soki yango ezali sembo te. Okolongisa mobola na ntina na mawa na ye te.” (Exode 23:2, 3) Kanisa mwa moke, boyengebene esalelamaki na motindo moko, epai na bazwi mpe epai na babola lokola!
5. Na makambo matali kosambisa, kokanisa Mibeko na Moïse na mibeko ya lelo.
5 Na makambo matali kosambisa, mibeko na Moïse eleki na mosika mibeko nyonso ya mabota na eleko na biso. Na ndakisa, moyibi atyamaki na boloko te, na ndenge yango azalaki mokumba te mpo na bato na mosala oyo bazalaki kotosa Mibeko. Asengelaki nde kosala mosala mpe kofuta biloko oyo ayibaki, mbala mibale to koleka. Moto oyo bayibeli ye biloko azalaki bonao kobungisa eloko moko te. Soki moyibi aboi kosala mosala mpe kofuta biloko oyo ayibaki, atekamaki lokola moombo, kino akofuta yango. Soki aumeli na kominisa motó makasi, abomamaki. Bibongiseli yango ezalaki bobele kosalela boyengebene epai na moto oyo bayibeli ye biloko te, kasi ezalaki lisusu na nguya ya kopekisa baoyo bazalaki na momeseno ya koyiba. (Exode 22:1, 3, 4, 7; Deteronome 17:12) Na yango, lokola bomoi ezali bulee na miso na Nzambe, mobomi nyonso na moto abomamaki, yango ebatelaki libota na bato na likama ya bato mabe mpe babomi na bato. Nzokande, bazalaki komonisa mawa epai na baoyo babomi na nko te.—Mituya 35:9-15, 22-29, 33.
6. Kotalela mibeko oyo mipesamaki na Yisraele ekomisi biso na esukiseli nini?
6 Tokoki kotya ntembe na boyengebene ya mibeko nyonso oyo Jéhovah apesaki na libota na Yisraele? Oyo nde elendiseli nini, oyo nde elikya nini na koyeba bongo ete elaka na Nzambe oyo ezali na Yisaya 42:1 ekokokisama na nzela na Yesu Klisto! Epesi biso kondimisama oyo ete: “Akosambisa mabota na boyengebene.”
Boyengebene mpe mawa ezali koyokana
7. Ndenge nini Jéhovah amonisaki mawa epai na Yisraele?
7 Boyengebene na Nzambe ezali koyokana na mawa na ye. Ezali yango emonisamaki polele ntango Bayisraele babandaki kopengwa na banzela ya boyengebene na Nzambe. Na boumeli ya mibu 40, Jéhovah amonisaki mawa mpe boboto epai na libota na ye, ndenge Moïse ayebisi yango na maloba oyo: “Azwaki ye na mokili mokauki, mpe na lisobe mpe na kolela na banyama; azingaki ye mpe abatelaki ye, akengelaki ye pelamoko na mbuma na liso na ye. Lokola mpongo oyo apumbwisi libota na ye, oyo aumeli na likoló na bana na ye, asemboli mapapu na ye mpe akamati bango, mpe amemi bango na nsala na ye, Jéhovah mpe ye moko akambaki ye.” (Deteronome 32:10-12) Mwa mosika na nsima, ntango Bayisraele bakweaki na lipengwi, Jéhovah alobelaki bango maloba oyo na móto ete: “Bobutwa longwa na nzela na bino mabe mpe na misala na bino mabe.”—Zakaria 1:4a.
8, 9. (a) Na meko nini Nzambe amonisaki boyengebene na ye ya mawa epai na Bayuda? (b) Na nsuka mpasi nini ekwelaki bango, kasi tokoki koloba nini na lolenge oyo Nzambe asalaki epai na bango?
8 Bayisraele baboyaki koyoka mabiangami yango ya mawa ya Jéhovah mpe ye apusaki mosakoli Zakaria akoma ete: “Kasi bayokaki te mpe bayokamelaki ngai te.” (Zakaria 1:4b) Epusamaki ye na boyengebene na ye mpe na mawa na ye, Nzambe atindelaki bango Mwana na ye bobele moko mpo ete asalisa bango na kozonga epai na Ye. Yoane mobatisi alakisaki Mwana na Nzambe na maloba oyo: “Tala Mwana-na-mpate na Nzambe, molongoli na masumu na mokili”. (Yoane 1:29) Mbula misato na ndambo Yesu alakisaki kozanga kotika banzela ya boyengebene na Nzambe epai na Bayuda mpe amonisaki ete azali Mosikoli oyo alakamaki na kosalaka bikamwiseli mingi. (Luka 24:27; Yoane 5:36) Kasi lokola libota yango eboyaki koyoka ye mpe kondima, alobaki na mongongo makasi ete: “E Yelusaleme, Yelusaleme! Ye oyo azali koboma basakoli mpe kobwaka mabanga epai na bango batindami epai na ye, mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo lokola nsoso akoyanganisaka bana na ye na nse na mapapu na ye, nde bolingaki te. Tala, ndako na bino etikali mpamba.”—Matai 23:37, 38.
9 Nzambe alekisaki lisusu mibu 37 liboso ya koyeisa etumbu na ye mpe na nsuka, na mobu 70 apesaki nzela na Baloma ete báboma Yelusaleme mpe bámema bankoto na Bayuda na boombo. Soki tokanisi na motema molai mpe na motema petee oyo Jéhovah amonisaki na boumeli na bikeke, tokoki koboya kondima ete amonisaki ntango nyonso boyengebene kati na boyokani na ye elongo na libota na Yisraele?
Boyengebene mpo na mabota nyonso
10. Ndenge nini boyengebene na Nzambe ekomaki epai na mabota nyonso?
10 Nsima wana Yisraele ebwakaki Yesu, Yakobo alobaki: “Nzambe ayei mpo na mbala ya liboso kotala bapakano ete akamata libota mpo na nkombo na ye kati na bango.” (Misala 15:14) “Libota” yango, oyo esangisi mwa Bayuda oyo bandimaki Yesu lokola Masiya, ezali na mobimba na yango “Yisraele [ya elimo] na Nzambe” mpe ezali na bayekoli na Yesu 144 000 bapakolami na elimo. (Bagalatia 6:16; Emoniseli 7:1-8; 14:1-5) Mopakano ya liboso oyo akomaki mondimi ezalaki Korneye. Ntango andimaki elongo na libota na ye nzela ya lobiko oyo ebongisamaki na Nzambe, Petelo alobaki: “Na solo, namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalelaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Paulo na ngambo na ye abendaki likebi likoló na boyengebene oyo Jéhovah azali komonisa na kozanga koponapona. Akomaki ete: “Moyuda azali te soki Mogreke te, moombo azali te soki nsomi te, mobali azali te soki mwasi te. Nde bino nyonso bozali moko kati na Klisto Yesu. Soki bozali bato na Klisto, bozali libota na Abrahame, bozali basangoli na libula na elaka.”—Bagalatia 3:28, 29.
11. Elaka nini epesamelaki Abrahame, mpe ndenge nini yango ekokokisama?
11 Maloba wana mazali kokundolela biso elaka kitoko oyo Jéhovah apesaki na Abrahame. Lokola nkoko yango ya mabota andimaki kopesa Yisaka, mwana na ye molingami lokola mbeka, Jéhovah alobaki na ye ete: “Mpo ete osili kosala likambo oyo mpe oboyi kopesa ngai mwana na yo te, mwana na yo bobele moko, nakopambola yo solo . . . Mpe mabota nyonso na nse bakopambolama mpo na bana na yo.” (Genese 22:16-18) Ndenge nini elaka yango ekokokisama? Longwa na makoló, ‘libota na Abrahame’ (oyo esangisi Yesu Klisto mpe bapakolami 144 000 oyo batikalaki sembo kino na liwa) ekoyangela bato mbula nkoto. (Emoniseli 2:10, 26; 20:6) Na ntina na eleko yango oyo epambolami, Jéhovah apesi biso endimiseli oyo: “Kofuluka na bokonzi na ye mpe kimya ekosuka te.” Mpo na ntina nini? Mpamba te “nguya” oyo esalelami na Bokonzi ya Masiya ‘esimbami na bosembo mpe na boyengebene, mpo na libela.’—Yisaya 9:7.
12. Bolamu nini tokoki kozwa uta sikawa na kondimana na Abrahame?
12 Kasi ntina ezali te ya kozela ebandeli na Boyangeli ya mbula nkoto na Yesu Klisto mpo na kosepela na bolamu oyo euti na kondimana na Abrahame. Ezali yango ezali kosalaka “ebele monene“ na bato bauti na “mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikolo nyonso mpe na minoko nyonso.” Mpamba te, na maloba ya elilingi, ‘basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpembe na makila na Mwana na Mpate’ Yesu Klisto, batalelami na Jéhovah lokola bayengebene. Bakomi baninga na Nzambe lokola Abrahame. Yango wana nzela na lobiko oyo Jéhovah apesi mpo na bamilió na bato na mabota nyonso efandi likoló na moboko makasi ya boyengebene.—Emoniseli 7:9, 14.
Ozali na mayoki mpo na banzela ya boyengebene ya Nzambe?
13, 14. (a) Biso nyonso tosengeli kokanisa na nini? (b) Ndenge nini tokoki komonisa botondi na biso epai na Jéhovah?
13 Ozali na botondi mozindo epai na Nzambe wana ezali yo kokanisa na boyengebene mpe na bolingo oyo amonisaki na kopesaka Mwana na ye bobele moko lokola mbeka mpo na kobikisa biso? Kanisa mayoki nini Abrahame azalaki na yango ntango Nzambe asengaki ye ete apesa lokola mbeka mwana na ye bobele moko oyo alingaki mingi! Nzokande, Jéhovah ayokaki mpasi makasi lisusu koleka. Kanisa na mayoki oyo azalaki na yango ntango Mwana na ye molingami abundisamaki, asekamaki epai na baleki-nzela, ayokaki mpasi makasi mpenza likoló na nzete. Kanisa ndenge azalaki wana eyokaki ye konganga: “E Nzambe na ngai, E Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?” (Matai 27:39, 46) Atako bongo, boyengebene esengaki ete Jéhovah atika Yesu ákufa mpo na komonisa ete azali molongisi na sembo ya boyengebene na Nzambe. Mpe lisusu, na kondimaka ete Mwana na ye abomama, Jéhovah afungolelaki biso nzela ya lobiko.
14 Botondi na biso epai na Jéhovah mpe epai na Mwana na ye esengeli solo kotinda biso na koyambola liboso na bato nyonso ete: “Lobiko, euti na Nzambe na biso . . . mpe na Mwana na Mpate!” (Emoniseli 7:10) Na komonisaka na ndenge yango botondi na biso, tozali komonisa ete tokamati maloba oyo ya Moïse mpo na biso mpenza: ‘Banzela nyonso na Jéhovah ezali boyengebene’. (Deteronome 32:4) Oyo nde esengo nini tokopesa na Jéhovah mpe na Mwana na ye na kondimaka nzela na lobiko oyo Nzambe abongisaki na boyengebene mpo na bato!
15. Maloba oyo Yesu alobaki na Nikodeme mazali na litomba nini mpo na biso?
15 Tosepeli lokola baninga na biso baklisto batelemaki ngwi na mibu kobanda 1870 mpo na likambo etali mbeka na lisiko, boye te? Tozali na esengo ya kozala basangani na lisangá oyo ezali mpe lelo na likatami ya kokangama na nzela ya lobiko oyo Nzambe abongisaki na boyengebene mpe na bolingo, boye te? Soki ee, tosengeli kotya likebi monene na maloba oyo Yesu alobaki na Nikodeme: “Nzambe atindi Mwana na ye kati na mokili ete asambisa mokili te kasi ete mokili ebika mpo na ye. Ye oyo azali kondima ye akosambisama te, . . . Ye oyo akosalaka oyo ezali sembo akoyaka epai na moi, ete misala na ye mimonisama ete mindimami na Nzambe.” Soki tolingi kozwa etumbu na Nzambe te, tosengeli komonisa ete tondimi Mwana na ye na kosalaka ‘misala oyo mindimami na Nzambe.’—Yoane 3:17, 18, 21.
16. Ndenge nini bayekoli na Yesu bakoki kosanzola Tata na bango ya likoló?
16 Yesu alobaki: “Tata na ngai akokumisama na likambo oyo ete bóbotaka mbuma mingi mpe ete bomimonisaka ete bozali bayekoli na ngai. Soki bokotosa malako na ngai, bokoumela kati na bolingo na ngai lokola ngai natosi malako na Tata na ngai mpe naumeli na bolingo na ye.” (Yoane 15:8, 10) Bamoko na malako yango ezali nini? Moko na yango ekomami na Yoane 13:34, 35, epai Yesu alobi na bayekoli na ye ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete: Bolinganaka. . . . Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozalani na bolingo.” Nzokande, bolingo ezali bongo komonana kati na ba Témoins de Jéhovah. Yesu apesaki lisusu mobeko oyo: “Boye bokende kozalisa bato na mabota nyonso bayekoli, kobatisaka bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisaka bango ete batosa makambo nyonso masili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Mpo na yo, ozali kokokisa ‘misala yango na motindo endimami na Nzambe’?
17. Mbano nini emonisi ete mosala ya kosakola mpe ya kolakisa ezali komonisa boyengebene na Jéhovah?
17 Jéhovah amonisi boyengebene na kopesaka na bayekoli na Yesu nzela ete bákokisa mosala yango ya kosakola mpe ya kolakisa. Ezali yango emonisami na matomba oyo ba Témoins de Jéhovah bazwi na boumeli bobele ya mbula oyo eleki. Mpamba te, bayekoli na sika 239 268 babatisamaki na 1988. Ezali likambo ya esengo, boye te?
Mosika te, Nzambe na boyengebene akosala likambo
18. Minyoko ya libota na Jéhovah ekoki kobimisa mituna nini?
18 Mosala ya kotatola ezangi te kokutana na botemeli na bamosusu. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Soki basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola.” (Yoane 15:20) Lisolo ya bomoi na ba Témoins de Jéhovah ya eleko na biso endimisi bosolo ya maloba yango. Kati na mikili mingi, ba Témoins de Jéhovah bazwaki bipekiseli, batyamaki na boloko, babetamaki mpe banyokolamaki. Minyoko ya ndenge yango mizali kokundolela biso maloba oyo ya esakweli ya Habakuku: “Mobeko elembi mpe boyengebene ekobimaka te.” Basaleli na Jéhovah bakoki mpe komituna mituna oyo: ‘Mpo na nini Jéhovah akotalaka bato na misala mabe? Mpo na nini akofanda nyee wana moto mabe akomela ye oyo aleki ye na boyengebene?—Habakuku 1:4, 13.
19. Lisese nini na Yesu ezali kosalisa biso na kotalela makambo ndenge Nzambe azali kotalela yango?
19 Yesu apesaki lisese oyo ezali kosalisa biso na koyanola na mituna yango mpe na kotalela makambo ndenge Nzambe azali kotalela yango. Na Luka 17:22-37, alimboli mobulu oyo esengeli komonana na nsuka na biloko mabe ya ntango oyo. Alobaki ete eleko yango ekozala lokola oyo na mpela na mikolo na Noa mpe lokola oyo na kobomama na Sodome mpe Gomore na ntango na Lota. Mpe engebene Luka 18:1-5, Yesu abongwanaki epai na bayekoli na ye mpe “alobaki na bango lisese moko na ntina ete ebongi na bango kobondela ntango nyonso mpe kolemba te.” Alobelaki bango mpo na mwasi moko mobola oyo akufelaki mobali mpe “Mosambisi” oyo akokaki kosalisa ye. Mwasi-mokufeli mobali alembaki te na koloba na mosambisi ete: “Longisa ngai na ntina na monguna na ngai.” Na nsuka, na ntina na motungisi ya mwasi yango, Mosambisi ‘alongisaki ye’.
20. Liteya nini tokoki kozwa na lisese yango?
20 Liteya nini tokoki kozwa na lisese yango? Komonisaka kokesena ezali kati na mosambisi yango oyo azangi kokoka, mpe Jéhovah, Yesu alobaki ete: “Boyoka yango elobi mosambisi mabe. Nzambe akolongisa baponami na ye te, baoyo bazali kobianga ye butu na moi ata azali na motema molai epai na bango? Nalobi na bino ete akolongisa bango nokinoki.”—Luka 18:6-8a, M.N.
21. Ndenge nini tosengeli kotalela mpe kolonga mikakatano na biso mpenza?
21 Wana ezali biso na mikakatano na biso mpenza, tomikundolaka ntango nyonso likambo oyo: Soki tozali komona ete Nzambe azali koumela mpo na koyanola na malombo na biso, ezali te mpo ete aboi kosalisa biso. (2 Petelo 3:9) Soki toyoki mpasi mpo na lolenge moko ya minyoko to ya bokesene, lokola mwasi-mokufeli mobali oyo Yesu alobelaki, tokoki kozala na kondima ete Nzambe akolanda likambo yango na boye ete boyengebene esalema. Ndenge nini tokoki komonisa kondima yango? Na kobondela ntango nyonso mpe na kobakisaka etamboli ya sembo likoló na mabondeli na biso. (Matai 10:22; 1 Batesalonike 5:17) Na bosembo na biso, tokomonisa ete kondima ezali awa na mabelé, ete bato mosusu bazali mpenza na mposa na boyengebene mpe ete tozali kati na motuya na bato yango.—Luka 18:8b.
“Bosepela, bino mabota, elongo na bato na ye”
22. Na maloba nini ya bolongi Moïse asukisaki loyembo na ye?
22 Esili koleka bikeke mingi, Moïse asukisaki loyembo na ye na maloba oyo ya bolongi: “Bosepela, bino mabota, elongo na bato na ye, mpamba te akozongisaka mpo na makila na baombo na ye, mpe akobukanisa batemeli na ye, mpe ye akosalaka mbondi mpo na mokili na bato na ye.” (Deteronome 32:43) Mokolo na kobukanisa na Jéhovah ezali kobelema noki. Tozali kotonda ye mingi ndenge azali kolanda komonisa motema molai na ye mpe boyengebene na ye.
23. Elikya nini ya esengo ezali kozela baoyo bazali kosepela elongo na libota na Nzambe?
23 Solo, likoki ezali naino mpo ete bato na mabota nyonso ‘bakoma na kobongwana ya motema’, kasi basengeli kosala yango noki. Mpamba te Petelo apesaki likebisi oyo: “Mokolo na Jéhovah ekoya lokola moyibi.” (2 Petelo 3:9, 10) Boyengebene na Nzambe esengi ete biloko mabe ya lelo ebomama na mikolo mizali koya. Na yango tika ete tozala kati na baoyo bakoyanola na libiangami oyo ya esengo: “Bosepela, bino mabota, elongo na bato na ye.” Ee, tozala kati na motuya na bato oyo basosoli ete banzela nyonso na Nzambe ezali boyengebene!
Bozongeli
◻ Mpo na nini Mibeko na Moïse mizali kolendisa kondima na biso epai na boyengebene na Nzambe?
◻ Nini ekoki kotinda biso tozala na mayoki mpo na banzela ya boyengebene na Nzambe?
◻ Ndenge nini tokoki kosanzola Jéhovah?
◻ Na mikolo na biso, bobele epai wapi tokoki kozwa bolamu ya solosolo?
[Elilingi na lokasa 7]
Na solo, namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, ye oyo akobangaka ye mpe akosalaka na boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:34, 35.
[Elilingi na lokasa 10]
Nzambe akosenzela ete boyengebene esalema mpo na baponami na ye baoyo bazali kobelela epai na ye.