Toyina banzela ya nsoni ya mokili
“Awa ezali bino lisusu kotambola elongo na bango te kati na potopoto yango etondi na mbindo bazali kokamwa mpe bazali kotuka bino.”—1 Petelo 4:4.
1. Na nini Biblia ekokanisi banzela ya nsoni kati na yango baklisto ya ekeke na liboso bazalaki kotambola kala?
POTOPOTO etondi na mbindo”. Ezali wana lolenge oyo ntoma Petelo akokanisi mokili kati na yango ebele na bato ya ekeke ya liboso bazalaki, liboso ete bandima boklisto ya solo. Mabongoli mosusu masalelaka maloba “ebale ya kobungana” (Jérusalem); “mbonge ya etamboli mabe”. (Osty) Potopoto yango etondi na mbindo ezalaki nini? Ntoma alimboli yango na kolobaka mpo na etamboli mabe, bilulela, milangwa ya masanga lokoso mpe losambo ya bikeko.—1 Petelo 4:3, 4.
2. Mpo na nini baklisto oyo bazali kobika na eleko na biso babongi kozwa longonya?
2 Oyo nde bokeseni kati na mokili mpe basangani ya lisangá ya boklisto! Petelo akumisi bango na esengo ndenge bazali lisusu kopota mbango te elongo na baninga na bango ya kala ya mokili, kati na potopoto to mbonge yango ya makambo ya nsoni. Lokola makambo tozali kobika kati na yango mazali mabe koleka oyo ya ekeke ya liboso, lelo tozali na esengo ya kopesa longonya na baklisto. Batemwe ya Jéhovah bazali kosala milende mpo na kosalela losambo ya mpeto mpe ezangi mbindo oyo endimami na Nzambe na bango mpe Tata, mpe oyo ezali kosenga “komibatela na mbindo nyonso na mokili”. (Yakobo 1:27) Bazali kokumisa nkombo ya Jéhovah na bizaleli na bango ya malamu mingi.
3. Ezaleli nini eyokisaki Paulo mawa mpe ezali koyokisa biso mawa lokola?
3 Mpo na kobatela bopeto na bango mpe bizaleli na bango ya malamu mingi koleka, libota ya Nzambe esengeli mbala mosusu kopamela to ata kobimisa bato na lisangá, - motuya na bango ezali mingi te, baoyo bazali komitika kobendama na banzela ya nsoni ya mokili. Likambo yango ya mawa ezali kopesa biso liyoki ekokani na oyo Paulo azalaki na yango mpo na ezaleli ya motindo moko. Akomaki: “Nazalaki koloba mpo na bango mbala mingi kasi sikawa nazali koloba mpo na bango na mpisoli, mingi bazali kotemela nzete na mpasi ya Klisto, mpe nsuka na bango bobele libebi, nzambe na bango bobele libumu mpe lokumu na bango bobele makambo na bango ya nsoni, makanisi na bango bobele makambo na mokili”. (Bafilipi 3:18, 19) Tosengeli kosala nini mpo tomekola bato yango te? Na kolandaka bongo ndakisa ya Yesu, tosengeli koyekola kolinga boyengebene eleki monene ya Jéhovah mpe koyina mbindo ya mokili.—Baebele 1:9.
Totala nsima te
4. (a) Mpo na nini misala ya nsoni ya mokili mikoki kobenda biso? (b) Nini ezali kosalisa biso na kotika te ete bamposa mabe ebotama kati na motema na biso?
4 Totya ntembe te na nguya ya lisumu. Mokili ezali na mitambo mingi; Diable azali na bokosi mpe mabe; motema na moto ezali na bokosi. (1 Yoane 2:15-17; 1 Petelo 5:8; Yilimia 17:9) Mbala mingi, ntango mposa moko ebotami na motema na biso, tozali koboya koyoka likanisi malamu. Tala ntina oyo Liloba ya Nzambe ezali kokebisa biso mingi, mpo ete motema na biso ezala mobimba na Jéhovah mpe na kokokisama ya mokano na ye. Ezali na ntina mingi ete totika te bamposa mabe ekola kati na motema na biso. (Yakobo 1:14, 15; Matai 5:27-30) Mpo na yango tosengeli kolendisa yango ntango nyonso na kokundolelaka yango bantina mpo na yango tosengeli kolinga makambo na sembo, mpe koyina mpenzampenza mpe kobwaka banzela ya nsoni ya mokili. Ntoma Paulo alobeli na mokuse lisengami yango: “Tika ete bolingo na bino ezala na bokosi te; boyinaka makambo mabe, bokangamaka na oyo ezali malamu.”—Baloma 12:9.
5. Mpo na nini tokoki koloba ete ezali likambo na mayele mpo na biso kososola malamumalamu makanisi na biso mpe bamposa na biso?
5 Lokola tozali na likama ya kotika lolenge ya bomoi ya boklisto, ezali likambo na mayele mpo na biso banso ete totaleka ntango nyonso makanisi na biso, bamposa na biso mpe mikano na biso. Tokokani na baklisto oyo Petelo akumisaki bango mpo bazongaki lisusu te kati na “potopoto etondi na mbindo”? To mpe ekomelaka biso mbala mosusu kotambola lokola mwasi na Lota, oyo atalaki nsima na liso moko etondi na bamposa na biloko oyo autaki kosikolama na yango?—Genese 19:26; Luka 17:31-33.
Na “mikolo ya nsuka”, mabe ekomi mingi
6, 7. (a) Engebene Biblia, “mikolo ya nsuka” esengelaki kozala na ezaleli nini mpo na bisengo? (b) Biloko nini bato ya mokili bazali kosalela mpo na kopalanganisa makanisi mpe misala na bango ya mbindo?
6 Tokanisa mwa moke na mokili oyo kati na yango tozali kobika na nsuka oyo ya ekeke ya ntuku mibale. Mabe ezali mingi te? Lokola ntoma Paulo asakolaki yango, bato bazali “baninga ya bisengo na esika ete bazala baninga ya Nzambe”. Ee, tokoki koloba ete ‘bato mabe mpe bakosi bazali ntango nyonso kokolisa mabe, kozimbisaka mpe kozimbisamaka.’—2 Timote 3:1, 4, 13.
7 Ekobo, pite, kosangana mobali na mobali, kosopa zemi . . . Maloba oyo mapalangani lelo; mpe misala oyo yango ezali komonisa mizali kolobama kati na masolo ya esengo ezala na radio mpe na televizio to na bisika ya mangomba to ya biteyelo. Makambo matali pite mpe ekobo, oyo etyami polele na miso ya bato, ezali kokolisa mombongo moko monene. Na motuya ya bafilime, bilakiseli ya théâtre mpe bililingi ya televizio oyo eyebani mingi, mosusu ezali kolakisa lolenge moko to mosusu ya mbindo. Oyo nde esengo tozali na yango ya kosangana ata moke te na biloko yango! Kasi, tosengeli kobunda makasi mpo ete bopusi mabe oyo mokili ezali kopanza ekoma na motema na biso te.
8. Mpo na oyo etali misala ya mbindo ya mokili, Biblia elobi na biso nini mpo na oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kosala te?
8 Baklisto oyo batondi na bwanya to mayele bayokaka likebisi oyo ya Paulo: “Tika ete pite, mbindo ya lolenge nyonso mpe lokoso etangama ata kotangama te kati na bino, ndenge ebongi na babulami . . . Bokeba mpo na etamboli na bino, bozalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza.” Lisusu, ntoma Paulo alobi na biso ete tosengeli kokanisa na oyo ezali solo, sembo, mpeto, boboto mpe malamu.—Baefese 5:3-16; Bafilipi 4:8.
9. Soki na masano na biso mabe mazangi te, nini ekoki kosalama kozanga mpasi?
9 Masano oyo tozali kopona mazali komonisa ete tozali komibanzabanza mpenza mpo na toli yango ya mayele? Tobosana te ete soki tozali mbala mingi esika moko na biloko ya nsoni ya mokili, lolenge ya bomoi ya mokili mpe ekokoma komonana lokola eloko malamu mpo na biso. Ekoki mpe kozala ete na nkuku tobandi kosepela na bato na lokumu ya masano to mosusu baoyo bazali kosala makambo yango, to komekola bango. Na bongo toumelaka te mpo na kososola ebandeli ya ezaleli nyonso ya lolenge yango oyo ekoki komonana epai na biso.
Tomikosa te na makanisi ya mokili
10. Makanisi nini ba épicuriens bazalaki na yango mpo na bomoi?
10 Na eleko ya Paulo, ebele na bato bazalaki kondima makanisi ya ba épicuriens, baoyo bazalaki kobika bobele mpo na bisengo, mpo na kosepelisa mayoki. Bazalaki koloba ete soki liwa eyei, nyonso esili. Bongo, mpo na nini kosala nyonso te mpo na kosepela na bomoi awa ntango ezali? Nani ayebi soki tokokufa lobi te?
11. Ndenge nini ebele na bato ya mokili na eleko na biso bazali komekola makanisi mpe misala ya ba épicuriens?
11 Na eleko na biso, mingi bazali kokanisa mpe bongo. Bazali komibwaka na lolenge ya nsoni kati na mitindo nyonso ya bisengo, kozanga kokanisa mpenza na makambo oyo etamboli na bango ekoki komemela bazalani na bango. Na makanisi na bango, Nzambe azali te, to mpe soki azali, azali komonisa ata moke te ete azali kotya likebi na bomoi ya bato. Bazali koloba ete lokola moto azalisamaki te, bazali na makambo ya kozongisa bobele epai na bango moko mpe epai na bato mosusu. Bakomi kino komizwela bantina ya komitambwisa lokola banyama. Na bongo, lokola misala ya mbindo mizali kopesa esengo, ezali na mabe moko te. Bazali lisusu koloba ete, mpo na nini kozala na bomoi ya komipekisa mpe ya komitungisa, wana ezali biso nyonso kokende na esika bobele moko, nkunda?
12, 13. (a) Bopusi ya makanisi ya mokili ezali kotya baklisto liboso na likama nini? (b) Kozimbisama ya Bakolinti ezalaki kouta na nini? (c) Tosengeli kosala nini soki toboyi komitika kotambwisama na makanisi ya moimi kati na bomoi?
12 Emonani ete baklisto mosusu ya Kolinti bamitikaki kobendama na lolenge yango ya makanisi. Ezalaki ye kokomela lisangá ya mboka yango, Paulo andimaki ete “soki bakufi bakosekwa te”, liloba oyo eyebanaki mingi na eleko wana: “tolya mpe tomela, mpamba te lobi tokokufa”, ezangaki ntina nyonso te. Kasi, mosika te na nsima, alimboli lokuta ya makambo yango: “Bozimbisama te. Kotambola na baninga mabe ebebisaka bizaleli malamu. Bozonga na makanisi na sembo mpe bosala masumu lisusu te. Mpo ete bamosusu bayebi Nzambe te. Nazali koloba boye mpo na koyokisa bino nsoni.”—1 Bakolinti 15:32-34.
13 Totala ndenge Paulo azali kobundisa mabe longwa na mosisá: alobi ete makanisi ya libunga ya baklisto ya Kolinti mauti na kotambola na bango elongo na baninga mabe. Tala liteya mpo na biso. Na yango, soki tokebi na yango te, tokoki kokanisa ete esengeli na biso kosepela na bisengo mosusu oyo epekisami, liboso ete bompaka to liwa eya kopekisa biso yango. Soki mbala mosusu tozali kozwa makanisi yango, tosengeli kosala noki mpo na kobengana yango. Ndenge nini? Na kobosanaka te ete makanisi yango ya moimi matalelaka mitinda ya sembo ya Jéhovah te; kasi mazali nde kouta na bozangi ya kondima bandaka yango ya solo, lokola oyo etali lisekwa. Ata kati na bomoi ya lelo, bato oyo bazali kobika kati na mbindo bazali komibendela bampasi mpe mikakatano mingi. Mpo na kozwa ezaleli ya elimo oyo ebongi, basengeli ‘kozonga na makanisi na sembo’. Lisusu, soki “boyebi ya Nzambe” ezali te, bakoki kozala na makanisi malamu te.
14. Banani bakozwa te mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe? Paulo alobaki nini mpo na bomoi ya kala ya baklisto mosusu?
14 Mosika na liboso, kati na mokanda na ye epai na Bakolinti, ntoma Paulo alobaki polele ete bato na pite, bato na ekobo, basambeli na bikeko, mibali oyo basanganaka na mibali, miyibi, bato na lokoso, balangwi na masanga, bafingi mpe babotoli, baoyo batondaki na Kolinti, mbele bazwi esika te na Bokonzi ya Nzambe. Kasi abakisaki: “Bamosusu kati na bino bozalaki mpe bongo. Kasi bosili kosukolama mpe bosili kobulisama.” Kobulisama na bango ezalaki komonisa nguya ya Liloba na Nzambe mpe ya mbeka ya lisiko ya Klisto. (1 Bakolinti 6:9-11) Na ndenge yango, bobele moto na zoba nde akoki kolinga kozongela lisusu mbindo ya mokili oyo ekweisami.
15. Elobeli nini ya elilingi Petelo asalelaki mpo na kolimbola ezaleli ya bato oyo bazali kozongela misala ya mbindo ya mokili?
15 Paulo alobaki: “Mpo ete, ata basili kokima makambo na bosoto ya mokili na nzela ya boyebi ya solo ya Nkolo mpe Mobikisi Yesu Klisto, bamitii lisusu kati na yango. Ezaleli na bango ya nsuka ezali mabe koleka oyo ya liboso. Ekomeli bango lokola lisese na solo elobi: ‘Mbwa azongi kolia biloko bisili ye kosanza, mpe ngulu oyo amisukolaki akei lisusu kolala na potopoto.’” (2 Petelo 2:20, 22) Oyo maloba nini ya nguya! Kasi mbala mosusu esengeli na biso koyoka maloba ya nguya mpo ete tososola bonene ya toli moko; mpe toli wana, oyo epesamaki epai na baklisto ya ekeke ya liboso, ebongi lisusu koleka mpo na eleko na biso.
Tozali kobuka oyo tokonaki
16. Na ndimbola nini bato oyo bazali na bomoi ya mbindo ‘bazali kobuka oyo bakonaki’?
16 Na makambo mazali koleka zongazonga na bango, baklisto bazali komona makambo mabe mpe oyo makoki koboma. (Baloma 1:18-32) Na kolobelaka bobele ezaleli mabe ya bato mpo na likambo etali kosangisa nzoto, tokanisa bampasi oyo ekobimaka mpo na kozanga botosi na mibeko ya Nzambe mpo na likambo yango: mabota makabwani, bazemi ezanga batata, kosopa zemi, kosangana na mwasi na makasi, konyokola bana mike, bamaladi euti na kosangisa nzoto mpe bampasi mosusu mingi lisusu. Mpe lisusu, bato oyo batungisaka nzoto na bango na kolyaka to komelaka na lolenge eleki ndelo, to mpe na kokotisaka drogue na nzoto bobele mpo na kooka bisengo makasi, bato yango bazali komibendela mitungisi mingi na kolongono na bango ya nzoto. Epai mosusu, oyo azali na bilulela akomaka koyiba to kobuka lokuta. Ee, esalemaka mingi te, ete moto azali kobuka mibeko ya Nzambe azanga kozwa ata mwa mpasi na nzoto to na makanisi. Makambo masalamaka lokola ntoma Paulo alobaki yango na baklisto: “Bozimbisama te: basekaka Nzambe te. Mpo ete, soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto; nde ye oyo akokona kati na elimo, akobuka bomoi na seko na nzela ya elimo.”—Bagalatia 6:7, 8.
17. Nini esengeli kopusa moklisto ete atosa mibeko ya sembo ya Nzambe?
17 Na ngambo mosusu, Makomami mazali kopesa biso bantina makasi ya kotosa mibeko ya Nzambe. Oyo nde bosolo ezali na likanisi oyo euti na Liloba ya Nzambe: “Moto na misala ya bosembo akozwa mapamboli ebele” (Masese 28:20) Bato oyo bayinaka banzela ya nsoni ya mokili bazali komibatela na bampasi oyo ezali kozwama na bomoi ya mbindo. Bazali na boyokani ya mpeto elongo na bandeko na bango mibali mpe basi, mpe lisusu elongo na Nzambe na bango, Jéhovah. Na koleka lisusu, bazali na elikya kitoko ya kozwa mbano: bomoi na seko kati na mokili ya sika elakami na Nzambe. Lokola tokomi mosika na eleko ya nsuka ya biloko ya ntango oyo, “bampate mosusu” bazali mpe na elikya malamu ya kobika na “bolozi monene”, mpe bongo kozanga kokufa. Soki ata basali nyonso kasi liwa ekomeli bango kaka, bazali kondima mpenza ndaka na Nzambe ya kosekwisa baoyo banso bazali kati na mayita. (Yoane 5:28, 29; 10:16; Emoniseli 7:14) Na yango, mpo na nini kokanisa ata moke kosangana na misala mabe ya mokili?—Baloma 6:19-23; 1 Petelo 4:1-3.
18. (a) Ndenge nini, na ntango na bolozi monene, Jéhovah akoyeisa kosambisa likoló na batyoli? (b) Kati na maloba ya nsuka oyo akomisaki na Biblia, ndenge nini Jéhovah azali koloba mpo na lolenge oyo akoyeisa kosambisa na ye?
18 Biblia emonisi polele ete tozali kobika na mikolo ya “nsuka ya biloko mabe na ntango oyo.” (Matai 24:3) Petelo alobaki: Makolo mpe mabelé ya lelo mabombami mpo na kozika mpe mabatelami mpo na mokolo na kosambisa mpe koboma bato batyolaka Nzambe”. (2 Petelo 3:7) Ntango mokolo yango ya kosambisa oyo ezilami uta kala ekoya, makambo bato bazali komikumisa na yango makolimwa lokola molinga; ekozala endimiseli ete moto azali na likoki te ya kosala makambo kozanga kotalela Nzambe mpe ete etamboli na ye ya mbindo mpe ya mobulu euti na “évolution” te, ebimaki yango moko te. (Bakolose 3:5, 6) Kati na maloba na ye ya nsuka oyo akomisaki kati na Biblia, Nzambe ye moko azali kosakola mbano ya baoyo bazali kosalela ye, mpe nsuka ya baoyo bazali kosalela ye te: “Tala, nazali koya noki, mpe libonza nazali kopesa ezali na ngai, mpo na kopesa na moto na moto lokola ekoki na mosala na ye . . . . Esengo na bango bakosukola bilamba na bango ete bazwa lotomo ya kokende na banzete ya bomoi mpe kokota na bikuke na mboka. Na libanda, bambwa bazali, na bato na misala ya bilimu mabe, na bato na pite, na babomi na bato, na basambeli na bikeko, mpe baoyo nyonso bakolingaka mpe bakobukaka lokuta.”—Emoniseli 22:12-15.
19. Lokola mikolo mikoya mizali mpasi, tosengeli kozwa likatami ya kosala nini?
19 Awa ezaleli ya mokili ezali se kobeba koleka, tozwa likatami ya kosepelisa Jéhovah na kosalaka oyo ezali mpeto, na lokumu mpe sembo. Tolembisa milende na biso te mpo na kozwa mbano: bomoi. Toboya komizindisa kati na “potopoto etondi na mbindo” ya mokili, oyo ezali esika ya liwa. Tokoki kolonga makanisi ya mbindo soki tozali koyina banzela ya nsoni ya mokili.
Bozongeli
◻ Mpo na nini tozali na likama ya kosala misala ya nsoni ya mokili?
◻ Mpo na nini tosengeli kozala na ekenge mpenza mpo na masano oyo tozali kopona?
◻ Likanisi nini ya mabe ekoki kosala bopusi likolo na biso soko tozali kotambola na ba épicuriens ya lelo?
◻ Ndenge nini Jéhovah azali kotalela bato oyo bazali komekola banzela ya nsoni ya mokili kozanga kotika?
◻ Mapamboli nini mazali kozela bato oyo bamekolaka ezaleli mabe ya mokili te?
[Elilingi na lokasa 24]
Soko bazali koyina banzela ya nsoni ya mokili oyo, basaleli na Nzambe bakozala na mikakatano te mpo na kokota na mokili ya boyengebene oyo ezali koya.
[Elilingi na lokasa 26]
Moklisto oyo ayebi komibatela te akoki kokosama na kominanola ya nsoni oyo ezali na mokili.