Eloko nini ezali kopekisa yo na kozwa libatisi?
Tala mai; eloko nini ezali kopekisa ngai nabatisama?—MISALA 8:36.
1. Likambo nini esalemaki na nzela oyo ekangisi Yelusaleme mpe Gaza?
MPO na liloba na anzelu ya Jéhovah, likambo ya kokamwa esalamaki na nzela ya esobe oyo ekangisi Yelusaleme mpe Gaza. Moetiopia moko azalaki kotanga Makomami likoló na likalo na ye, na ntango yango moto moko akimaki mbango pene na motuka. Atunaki ye: “Ozali kososola makambo mazali yo kotanga?” Moetiopia ayanolaki: “Soki moto akolimbwela ngai te, nakokoka koyeba yango ndenge nini?” Na bongo, Filipo mopalanganisi na nsango malamu, oyo atindamaki na anzelu, apesaki ye lisungi oyo asengelaki na yango. Nsima na kobuta likoló na likalo mpe na kobandaka na esakweli ekomamaki na Yisaya, asakolaki ye “nsango malamu na Yesu”.
2, 3. (a) Boyambi nini Moetiopia amonisaki mpo na nsango malamu? (b) Lisolo yango ebimisi mituna nini?
2 Na esika moko na nzela, Moetiopia alobaki: “Tala mai: eloko nini ezali kopekisa ngai nabatisama?” Na yango, atelemisaki likalo. Filipo akitaki na mai elongo na ye, mpe abatisaki ye. Na nsima, mosakoli na nsango malamu atambwisamaki epai mosusu na elimo ya Jéhovah, nzokande Moetiopia alandaki nzela na ye na esengo.—Misala 8:26-39.
3 Soki oyanganaka elongo na ba Témoins de Jéhovah, kasi ozwi naino batisimo te, mbala mosusu lisolo oyo etindi yo omituna mituna oyo: Mpo na nini Moetiopia abatisamaki nokinoki boye? Ndenge nini libatisi esengeli kosalema? Yango ezali elembo ya nini? Mpe eloko nini ezali kopekisa ngai nabatisama?
Awelaki kozwa libatisi te
4. Moetiopia azalaki nani?
4 Lokola Moetiopia “akendaki na Yelusaleme mpo na kosambela”, tokoki kozwa na yango esukiseli ete akotaki na lingomba ya Bayuda mpe akatamaki ngenga. Azalaki “mokube”, kasi na ndimbola ya solo mpenza te, mpamba te mibali oyo babebisamaki na binama na bango ya kosangisa nzoto bakokaki kondimama kati na koyangana na Yisraele te. (Deteronome 23:1) Na ndenge yango, liloba “mokube” elakisi kapitene. Na bongo, ‘moto yango azalaki na bokonzi na nse ya Kandase, mokonzi mwasi ya Baetiopia, mpe azalaki mokengeli na mosolo na ye nyonso.’—Misala 8:27.
5. Mpo na nini mokube moetiopia abatisamaki noki ye.
5 Moetiopia yango azalaki mopakano, kasi lokola abongwanaki mpe akotaki na lingomba ya Bayuda, abatisamaki lokola moyekoli na Klisto liboso ete nsango ya Bokonzi elakisama epai na bapakano bazangaki kokatama ngenga, lokola Korneye, na mobu 36. Lokola akotaki na lingomba ya Bayuda, Moetiopia yango azalaki na mwa boyebi ya Nzambe mpe ya Liloba na ye. Nzokande, azalaki na mposa na kosalisama na elimo. Na bongo Filipo atambwisamaki epai na moto yango mpo na koyebisa ye nsango malamu, mpe abatisaki ye liboso ete nsango yango esakolama epai na Bapakano.
Libatisi ya baklisto ya liboso
6. Moetiopia abatisamaki ndenge nini? Limbola eyano na yo.
6 Moetiopia abatisamaki ndenge nini? Liloba “kobatisa” euti na liloba ya greke baptizô, oyo elimboli “kozindisa, kokotisa mobimba”. Libongoli na greke ya Septante esaleli lolenge moko ya liloba yango na 2 Mikonzi 5:14. Toyeba mpe ete Moetiopia asengaki ete abatisama ntango Filipo mpe ye bakomaki na “mai”. Mpo na kozwa libatisi yango, “bakitaki bango mibale na mai”, nsima na yango ‘babimaki’ na mai. (Misala 8:36-39) Na bongo Mokube ya Etiopia abatisamaki na kozindisama na mai.
7. Masolo nini kati na Makomami malongisi libatisi na kozindisama mobimba na mai?
7 Yesu mpe abatisamaki na kozindisama na mai. Mpo na yango totangi ete nsima na libatisi na ye kati na Yordani, ‘abimaki na mai.’ (Matai 3:13, 16) Na yango, mpo na kobatisa bato, Yoane mobatisi aponaki esika moko oyo ezalaki kati na lobwako na Yordani penepene na Salime. Mpo na ntina nini? “Mpamba te mai mingi mazalaki wana”. (Yoane 3:23) Na bongo libatisi na kozindisama na mai ezali na boyokani na Makomami.
8. Mimeseno ya Bafalisai mpe ya Bayuda mosusu emonisi biso makambo nini mpo na libatisi?
8 Mimeseno na Bafalisai mpe Bayuda mosusu mimonisi biso makambo ya ntina mpo na libatisi. Mokomi na nsango malamu Malako akomi ete: “Ekoutaka bango na zando, bakoliaka te kozanga komipetola na komisopela mwa mai [greke, rantizô]; mpe bazwaki mibeko mingi misusu mpo na kotosa yango: libatisi [baptismous] ya bakopo, ya bambeki, mpe ya banzungu.” (Malako 7:3, 4, MN) Bato yango bazalaki kosala lokola molulu ya losambo na komisopela mwa mai liboso na kolia wana ezalaki bango kouta na zando, kasi bazalaki kobatisa to kozindisa na mai biloko ndenge na ndenge oyo bazalaki kosalela na ntango ya bilei.
9. Tertullien alobaki nini mpo na libatisi?
9 Ata nsima wana lipengwi ekolaki, Tertullien (penepene na mibu 160-230), moko na Batata na Lingomba, alobaki boye mpo na libatisi: “Likambo oyo eleki kotungisa makanisi na bato ezali bokeseni kati na kozanga mindondo oyo emonani ya misala na Nzambe mpe bonene ya makambo makobima na yango. Ezali motindo yango mpo na likambo oyo: nyonso ezali kosalema na lolenge mpenza ya kozanga mindondo, kozanga kosala lokola teatre, kozanga kosala molulu monene. Na mokuse, kozanga mindondo mosusu, moto akokita na mai, mpe akozindisama mobimba kati na yango wana bazali koloba mwa maloba. Akoumela te kobima na yango, na bopeto koleka to na bopeto te. Yango wana ezali kondimama te ete mpo na bongo moto akoka kozwa bomoi na seko.” Tertullien, Traité du baptême (mokanda mpo na batisimo) II, p. 65. Toyeba ete Tertullien alobi ‘moto akozindisama na mai, mpe abimi na yango’.
10. Engebene balimboli na Biblia, lolenge na kala mpenza ya libatisi ya baklisto ezalaki nini?
10 Balimboli na Biblia balobi mpe ete na ebandeli baklisto bazalaki kopesa libatisi na kozindisama mobimba na mai. Encyclopédie moko ya lifalansé elobi: “Baklisto ya liboso bazalaki kobatisama na kozindisama na mai bipai binso oyo mai ezwamaki.” Mpe Encyclopédie ya katolike (angl.) elobi: “Na ntembe te lolenge na kala mpenza [ya libatisi] oyo esalelamaki mingi ezalaki kozindisama na mai.”-Tome ya II, page 261 (libongoli ya 1907).
Mateya mpe libatisi
11. Etinda nini Yesu apesaki bayekoli na ye?
11 Liboso na kozwa libatisi, esengeli kozwa boyebi ya solosolo mpe kosalela yango. Ezali yango Klisto amonisaki polele ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Na bongo bokende kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso, kobatisaka bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyaka bango batosa nyonso oyo natindi bino. Mpe tala nazali na bino elongo mikolo minso kino nsuka na ekeke.”—Matai 28:19, 20.
12. Kobatisa “na nkombo ya Tata” elimboli nini?
12 Kobatisama “na nkombo ya Tata” elimboli ete moto oyo alingi kobatisama andimi etelemelo mpe bokonzi na Nzambe. Azali kotalela Jéhovah lokola “Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba”, Mozalisi mpe Moyangeli ya molongo mobimba. (Nzembo 36:9; 83:18; 2 Mikonzi 19:15) Andimi mpe ete Jéhovah azali Mosambisi na ye, Mosali na ye na mibeko mpe Mokonzi na ye.—isaya 33:22; Nzembo 119:102; Emoniseli 15:3, 4.
13. Kobatisama ‘na nkombo ya Mwana’ elimboli nini?
13 Kobatisama ‘na nkombo ya Mwana’ elimboli kondima etelemelo mpe bokonzi na Klisto, kasi kondima mpe ete Nzambe apesaki “lisiko oyo ekoki” na nzela na ye. (1 Timote 2:5, 6) Nsima wana ekufaki Yesu na bosembo, “Nzambe atomboli ye na etelemelo moko eleki.” Baoyo bazali na mposa ya kobatisama basengeli bongo kondima ete Klisto azali “Nkolo mpo na nkembo na Nzambe Tata.” (Bafilipi 2:9-11) Basengeli mpe kondima ete Yesu azali “Motatoli na sembo” mpe “Mokonzi na bakonzi.”—Emoniseli 1:5; 19:16.
14. Nini moto asengeli kosala mpo na kobatisama ‘na nkombo na elimo santu’?
14 Moto oyo alingi kozwa batisimo asengeli mpe kobatisama na ‘nkombo ya elimo santu’. Esengeli na ye akanga ntina ete elimo santu ezali moto te, kasi nguya ya Nzambe oyo esalaka, nguya oyo asalelaki, na ndakisa, na mosala na ye ya kozalisa mpe mpo na kopemisa bakomi na Biblia. (Genese 1:2; 2 Samwele 23:1, 2; 2 Petelo 1:21) Tosengeli kondima mosala eleki ntina oyo elimo na Jéhovah ezali kosala mpo na kosalisa biso tokanga ntina na “makambo na bozindo ya Nzambe” mpe komonisa bizaleli na Nzambe oyo ezali “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopolo, komipekisa.” (1 Bakolinti 2:10; Bagalatia 5:22, 23) Tosengeli mpe kondima ete tozali na mposa ya elimo na Nzambe mpo na kolanda kosakola Bokonzi.—Yoele 2:28, 29.
Libatisi ezali elembo ya nini?
15. Mpo na nini libatisi ya baklisto esukolaka masumu te?
15 Lokola apusamaki na elimo santu, Yoane mobatisi azalaki kobatisa bato na kozindisama na mai. (Misala 13:24) Azalaki kobatisa bango, mpo na kosukola bango na masumu basalaki te, kasi lokola elembo na kobongola motema. (Misala 19:4) Yoane abatisaki mpe Yesu, oyo “asalaki lisumu te”. (1 Petelo 2:22) Na ngambo na ye, Anania apesaki toli oyo epai na Saulo moto na Tarse: “Telema, obatisama mpe omisukola na masumu na yo na kobelelaka nkombo [na Yesu].” (Misala 22:12-16) Na bongo, libatisi ya baklisto na kozindisama na mai esukolaka masumu te. Likambo oyo epesaka nzela na kozwa lilimbisi ezali libatisi te, kasi makila na Yesu oyo masopamaki mpe ‘kobelela nkombo na ye’.—1 Yoane 1:7.
16. (a) Lokola libatisi esukolaka masumu te, ezali elembo ya nini? (b) Na maloba ya elilingi, nini esalemaka soki moto abatisami?
16 Atako libatisi ya baklisto esukolaka masumu te, ezali elembo emonisaka ete moto oyo azindisami na mai amipesi mobimba epai na Jéhovah Nzambe na nsima na Yesu Klisto. (Tala Matai 16:24) Liloba kopesa elakisi ‘koyambola, kondima, kokaba.’ Komipesa epai na Nzambe elimboli moto amikabi mobimba mpo na kosala mokano na Nzambe na nzela ya Klisto. Na maloba ya elilingi, ntango moto oyo azali kozwa libatisi “akundami” mpo na mwa ntango na nse na mai, mpe abimi na yango, akuti na oyo etali etamboli na ye ya kala mpe asekwi mpo na kozala na lolenge ya sika ya bomoi, kokokisa na mobimba mokano ya Jéhovah.—Tala Baloma 6:4-6.
17. Mpo na nini ebongi te kobatisa bana mike?
17 Na ntembe te, libatisi ezali litambe moko ya ntina. Ebongi te kobatisa mwana moke, mpamba te akoki te kososola, kozwa ekateli mpe kokoma moyekoli. (Matai 28:19, 20) Ezali ‘mibali mpe basi’ nde babatisamaki na boumeli ya mosala na Filipe na Samaria, kasi bana mike te. (Misala 8:4-8, 12) Libatisi ezali bobele mpo na baoyo bakomi na likoki ya koyekola, ya kondima mpe ya komonisa bondimi. (Yoane 17:3; Misala 5:14; 18:8; Baebele 11:6) Mpo na yango, tala oyo totangi kati na makambo makomaki mokomi na lisolo ya bomoi na bato Augustus Neander: “Kondima mpe libatisi ezalaki kotambola ntango nyonso elongo. Ekoki kozala mpenza solo ete libatisi na bana eyebanaki te [na ekeke ya I]. . . . Koyebana na yango mpo na mbala ya liboso lokola momeseno ya bantoma na boumeli na ekeke ya III, ezali litatoli ezali kotemela, kasi ezali kolongisa te likanisi ete yango euti na bantoma.” -Lisolo ya ebandeli mpe ya kosalama ya Lingomba na boklisto na bantoma (New York, 1864 [angl.]) page 162.
18. (a) Engebene Makomami, makambo nini moto asengeli kokokisa mpo akoma Témoin de Jéhovah? (b) Bilembeteli nini ya kondima emonisaka mbala mingi ete moto akoki mpo na kobatisama? (c) Ndenge nini babendaka likebi na bato oyo balingi kobatisama likoló na ntina ya kondima lisiko?
18 Makomami malobeli mbala na mbala mpo na libatisi ya bandimi. (Misala 4:4; 5:14; 8:13; 16:27-34; 18:8; 19:1-7) Mpo na kokoma Témoin de Jéhovah, esengeli bongo kozala mondimi, elingi koloba komonisa bondimi mpe kobatisama. Ata liboso na libatisi, moto akomonisa kondima motindo oyo na kozalaka na etamboli eyokani na mokano ya Nzambe, na kotyaka elikya epai na Jéhovah, na kosanganaka na mosala ya kosakola Bokonzi mpe na kondimaka mbeka na lisiko ya Yesu. Motuna na liboso kati na mituna mibale, oyo batunaka na bato oyo balingi kozwa libatisi na ntango na diskur oyo esalamaka liboso ya kozindisama na mai, ebendaka likebi na bango likoló na ntina ya kondima lisiko. Tala yango oyo: “Na kolandaka mbeka ya Yesu Klisto, osili kobongola motema mpo na masumu na yo mpe omipesi epai na Jéhovah mpo na kosala mokano na ye?” (wLI 1/12/85, lokasa 24) Moto akoki kobatisama na kozindisama na mai bobele soki ayanoli ee na motuna yango mpe asosoli ete komipesa na ye mpe libatisi ekomisi ye Témoin de Jéhovah asangani na lisanga oyo Nzambe azali kotambwisa na elimo na ye.
Komipesa kati na libondeli
19. Mpo na nini esengeli komipesa epai na Jéhovah kati na libondeli?
19 Baoyo bazali kobatisama basengeli kondima Nzambe mpe Klisto. Kasi mpo na nini ba Témoins de Jéhovah balobaka ete esengeli komipesa epai na Jéhovah kati na libondeli? Mpamba te ebongi toyebisa Jéhovah kati na libondeli ekateli na biso ya kopesa ye bokangami mobimba oyo abongi na yango. (Deteronome 5:8, 9; 1 Ntango 29:10-13) Na ntembe te, ezali kati na libondeli nde Yesu ayebisaki Tata na ye ya likoló mposa na ye ya kosalela bobele ye mosala na bulee. (Baebele 10:7-9) Elobami ete “azalaki kosambela” na ntango mpenza ya libatisi na ye, boye te? (Luka 3:21, 22) Na bongo ezali polele ete osengeli komipesa na Nzambe kati na libondeli.
20. Mpo na nini ekoki kozala solo ete baklisto ya liboso bazalaki kolendisa bayekoli na sika ete bamipesa na Nzambe kati na libondeli?
20 Ekoki kozala solo ete baklisto ya liboso bazalaki kolendisa bayekoli ya sika ete bamipesa na Nzambe kati na libondeli, mpamba te na nsima Tertullien alobaki: “Baoyo bakozwa libatisi basengeli kobelela Nzambe na mabondeli mozindo, kokila bilei, kongumbama na mabolongo.”—Tertullien, Traité du baptême, (Mokanda elobeli libatisi), p. 94 XX. Liboso na ye, Justin le Martyr (penepene na mibu 100-165) akomaki boye: “Sikawa lokola Klisto akomisi biso bato na sika tokoyebisa bino ndenge nini tomipesaka na Nzambe. . . . Baoyo bandimaka solo ya mateya na biso bazali liboso kokana kobika engebene mobeko yango. Na yango tozali kolakisa bango kobondela mpe kosenga na Nzambe lilimbisi na masumu na bango na kokilaka bilei, biso moko mpe tosambelaka mpe tokilaka bilei elongo na bango.” -Oeuvre de Justin (Mokanda ya Justin), Collection lshtus, Filozofi elakisami epai na Klisto, lokasa 88.
21. Ata soki obatisamaki esili koleka bambula, wana bazalaki kolobela mingi ntina ya komipesa na Nzambe kati na libondeli te, ekoki kozala solo ete esalaki nini?
21 Soki obatisami esili koleka bambula, ntango wana bazalaki kobenda likebi te likoló na ntina ya komipesa na Nzambe kati na libondeli, yango elimboli mpenzampenza te ete libatisi na yo ezangi motuya. Ata na eleko wana, na ntembe te mingi basalaki lokola moto oyo, bambula ntuku minei na nsima, azali komikundola malamu ete angumbaki mabolongo mpe amipesaki na Jéhovah kati na libondeli mozindo nzokande azalaki naino bobele elenge mobali. Mpe na ntango wana, atako moto amipesaki naino na lolenge ya polele te epai na Nzambe kati na libondeli, ata bongo atalelaki likambo yango kati na libondeli mokolo ya kozindisama na ye na mai, elongo na bamosusu oyo bayaki mpo na kozwa libatisi mpe baoyo bazingaki bango, wana bango nyonso babondelaki elongo na ntango ya diskur ya libatisi.
Mpo na nini bamosusu bazali kokakatana
22. Mpo na nini bamosusu bazali kokakatana mpo na kobatisama?
22 Lokola kozala Témoin de Jéhovah amipesi ezali libaku malamu mingi, mpo na nini bamoko bakakatanaka mpo na kobatisama? Kozanga bolingo ya solosolo ezali moko na bantina mpo na yango bamosusu bazali kotosa Liloba na Nzambe te, bazali kolanda ndakisa na Yesu te mpe bazali kobatisama te. (1 Yoane 5:3) Ya solo, ndenge esalamaka mingi, bato oyo babatisami te balobaka te ete baboyi kolanda ndakisa na Yesu to kotosa Nzambe. Nzokande, bamipesi mingi mpenza na misala na bango ya mosuni na boye ete bazali na ntango mingi te ya kopesa na makambo ya elimo. Soki ezali bongo mpo na yo, ekozala mayele na kotalela lisusu mayoki na yo, makambo na yo ya motuya mpe bamposa na yo, boye te? Tokoki te kolinga Nzambe mpenza mpe kolinga lisusu mokili. (1 Yoane 2:15-17) Mpe kotika te ete “nguya na bokosi ya bozwi” epesa yo liyoki ya kimya ya lokuta. (Matai 13:22) Tokozwa kimya ya solo bobele na kozalaka na boyokani makasi elongo na Jéhovah Nzambe nsima na komipesa epai na ye.—Nzembo 4:8.
23. Mpo na nini bamosusu bazali koboya komipesa na Jéhovah mpe komonisa elembo ya ekateli yango na kozwaka libatisi na kozindisama na mai?
23 Bamosusu balobaka ete balingi Nzambe, kasi baboyi komipesa epai na ye mpamba te bakanisi ete na ndenge yango bakozwa mikumba te mpe bakozala na makambo ya kozongisa monoko mpo na yango te. Bazali na mposa ya kobika kati na Paradis, kasi kino sikawa bazali kosala bobele makambo moke, to mpe likambo moko te, mpo na komonisa ete babongi na yango. (Masese 13:4) Bálinga yango to te, bakozala na makambo ya kozongisa monoko mpo na yango, mpamba te bazali na mokumba ya misala na bango awa eyokaki bango Liloba na Jéhovah. (Ezekiele 33:7-9) Soki bamipesi na Nzambe, bakomonisa ete bazali kososola mokano na Nzambe mpe balingi mpenza kokokisa yango. Na esika ete batya mokumba eleki kilo likoló na mapeka na bango, botosi na bango ekomemela bango mapamboli ya Jéhovah mpe ekokomisa bango bato na esengo, mpamba te bakomonisa kati na bomoi na bango ete balingi Nzambe ndenge balobaka yango.
24. Mpo na ntina nini bamosusu mpe bazali kobatisama te?
24 Bamosusu mpe babatisamaka te mpamba te bamonaka lokola boyebi na bango ya Makomami ekoki te mpo na kolimbola yango na bato mosusu. Nzokande, mokube Moetiopia azalaki pene na komonisa elembo ya komipesa na ye epai na Nzambe, nsima na lisolo oyo azalaki na yango elongo na Filipe wana ezalaki ye kotambola na likalo. Ya solo, na ebandeli akokaki te koyanola na mituna nyonso ya baoyo azalaki kolobela bango solo. Kasi motema na ye ezalaki na botondi mingi mpo na yango eyokaki ye, mpe alongolaki kobanga. “Kobanga ekozalaka kati na bolingo te, kasi bolingo oyo ezali ya kokoka ebwakaka kobanga libanda.” (1 Yoane 4:18) Eloko oyo ekotinda moto amipesa na Nzambe mpe abatisama, ezali motó oyo etondi na boyebi te, kasi motema oyo etondi na bolingo.—Luka 10:25-28.
25. Eloko nini Jéhovah Nzambe azali kozela epai na baoyo balobaka ete balingi ye?
25 Soki ozwi naino libatisi te, kanisa na motuna oyo: Eloko nini Nzambe azali kozela epai na baoyo balobaka ete balingi ye? Azali na mposa ete bapesa ye bokangami mobimba mpe azali koluka baoyo balingi kosambela ye “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, 24; Exode 20:4, 5; Luka 4:8) Mokube moetiopia azalaki kosalela losambo motindo yango, mpe ntango azwaki libaku ya kobatisama apusaki libatisi na ye mosika na nsima te. Osengeli uta sikawa kosala mabondeli mingi epai na Jéhovah mpe komituna: “Eloko nini ezali kopekisa ngai nabatisama?”
Bozongeli
◻ Mpo na nini mokube Moetiopia abatisamaki noki boye?
◻ Baklisto ya liboso bazalaki kobatisa ndenge nini?
◻ Kobatisama ‘na nkombo ya Tata, ya Mwana mpe ya elimo santu’ elimboli nini?
◻ Libatisi ya baklisto ezali elembo ya nini?
◻ Mpo na nini esengeli komipesa na Jéhovah kati na libondeli?
◻ Mpo na bantina nini bamosusu bazali kokakatana mpo na komipesa na Nzambe mpe kobatisama?