Tozali kopesa motuya mingi na biloko ya bulee?
“Toluka kimya elongo na bato banso, mpe bulee oyo soki moto azangi yango, akomona Nkolo te, kokebaka malamu . . . ete moto azala te oyo azali moto na pite to moto oyo apesaka ata motuya moko te na biloko na bulee, lokola Esau oyo atekisaki bokulutu na ye bobele mpo na sani moko ya bilei.”—BAEBELE 12:14-16, MN.
1. Ndenge nini ebele na bato bazali komonisa kozanga botondi na bango? Baklisto bakeseni na nini?
JÉHOVAH, Nzambe na biso, akabaka mingi. Apesaka na bolingo, epai na bikelamu na ye nyonso, biloko oyo bazali na yango mposa. Nzokande, bato mingi bazali kokanisa kopesa ye matondi te, bazali mpe kondima te nyongo monene oyo bazali na yango liboso na ye. Kasi baklisto bazali bato bazangi matondi te: kososolaka oyo Jéhovah azali kosala mpo na bango, bazali kopesa ye lokumu. Na yango, komonaka bokangami na bango, Jéhovah apesi bango biloko na bulee, oyo bato mosusu bayebi te. Ezali biloko ya motuya, etyami pembeni, ezali mosantu: biloko yango bitali losambo na ye. Boyebi biloko yango ya bulee? Bozali na liyoki mozindo mpe ya solo oyo ekoki kopusa bino na kopesa motuya na biloko yango?—Nzembo 104:10-28; Matai 5:45; Emoniseli 4:11.
2. Moto nani ya kala atyolaki biloko ya bulee?
2 Ata kati na libota na Nzambe, ezalaki na bato oyo bazalaki kopesa ata motuya moko te na biloko ya bulee. Na ndakisa Esau, mwana na Yisaka, oyo Paulo alobelaki kati na mokanda na ye epai na Baebele. Nsima na kolendisa baklisto bapakolami na ‘koluka kimya elongo na bato nyonso’, ntoma asengi bango baluka kondimisama ete kati na bango moto te azali oyo azali “moto na pite to . . . moto oyo apesaka ata likebi moko te na biloko na bulee, lokola Esau oyo atekisaki bokulutu na ye bobele mpo na saani moko ya bilei”.—Baebele 12:14-16.
3, 4. Balotomo nini ya bulee ya bokulutu Esau atekaki na Yakobo mpo na supu?
3 Lotomo yango ya bokulutu ezalaki nini? Mpo na koyeba yango, tosengeli komikundola ndaka oyo Jéhovah apesaki na nkoko ya Esau, Abrahame, ndaka oyo ete libota oyo bazalaki kozela, Masiya (to Klisto), asengelaki koya na mokili na nzela ya Abrahame mpe ya bakitani na ye. Mpo na libota wana, mabota nyonso bakopambolama, mpe bakosikolama na lisumu mpe na liwa.—Genese 22:15-18; Bagalatia 3:16.
4 Lokola azalaki mwana ya liboso ya Yisaka, Esau azalaki na likoki ya kozala mosangani na molongo ya bato oyo mbele babimisaki libota; tala, na ndakisa, nini ezalaki lotomo na ye ya bokulutu. Kasi, amitambwisaki na lolenge ya nsoni. Biblia elobi na biso ete “Esau atyolaki lotomo ya bokulutu”, atekisaki yango mpo na limpa mpe supu ya ndunda. Oyo nde bozoba! Na solo, tolingi te komekola ezaleli na ye ya kotyola: kasi nde tolona ezaleli ya elimo ya ndeko na ye, Yakobo. Kati na molongo ya bato oyo ezali kopesa lotomo ya bokulutu, azalaki nsima na Esau. Komonaka ete ye azalaki kopesa motuya mingi te na lotomo yango ya bokulutu, asombaki yango epai na ye, kokengelaka bongo ete lotomo ya kozala nkoko ya libota ya ndaka elekisama na moto oyo azalaki kopesa motuya nyonso na biloko ya bulee.—Genese 25:27-34.
5. Biloko nini ya bulee tokotalela? Tosengeli kosala nini mpo totala biloko yango ya bulee lokola biloko mpamba te?
5 Kati na lisangá ya boklisto, Jéhovah apesi biso biloko mingi ya bulee oyo ezali kosalisa biso na kotikala makasi na elimo mpe azali kopesa biso bisaleli malamu mpo na mosala na ye. Tokotalela bamoko ya biloko yango ya bulee, yango ekosalisa mokomoko na biso mpo akanisa na yango mpe asosola lisusu malamu motuya na yango, mpo ete totala yango mpamba soko moke te.
Biloko bileki bulee: nkombo ya Jéhovah mpe lisiko
6. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotalela nkombo ya Jéhovah ete ezali bulee?
6 Eloko ya liboso kati na biloko ya bulee ezali nkombo ya Jéhovah. Nkombo yango ezali na esika monene kati na elimo na biso mpe kati na motema na biso? Yesu abandelaki losambo ya Tata na biso na maloba oyo: “Tika ete nkombo na yo ebulisama”! (Matai 6:9) Lisusu, na nzela ya libatisi, tokomi Batemwe ya Jéhovah. (Yisaya 43:10, 11) Oyo nde lokumu! Na bongo, ntango tozali koloba mpo na malamu ya Jéhovah mpe mpo na mokano na ye ya kokamwa, bato mosusu bazali koyekola koyeba ye na nkombo na ye mpe bango lisusu bazali kosepela kosalela ye. Kasi, oyo azali kozanga koloba mpo na Jéhovah to - oyo eleki mabe - oyo azali kosala mabe azali kobwaka nsoni likoló na nkombo ya Nzambe, azali kobebisa lokumu na ye. Na maloba mpe na misala, Batemwe ya Jéhovah, lokola ezali bango baklisto ya sembo, bazali kosala makasi nyonso mpo na kobulisa nkombo ya Nzambe na bango liboso na bato.—Levitike 22:31, 32; Deteronome 5:11.
7. Mpo na nini tosengeli komonisa ete tozali kopesa motuya mingi na mbeka ya lisiko ya Klisto?
7 Na motuya ya biloko bileki bulee tozali na mbeka ya lisiko ya Klisto. Motuya nini tozali kopesa na yango? Tobosana te ete masumu na biso makoki kolimbisamela biso bobele soki tondimi na motema mobimba mbeka wana ya bomoto ya kokoka. (1 Yoane 2:1, 2) Paulo alobi mpo na lisangá ya baklisto bapakolami na elimo ete Nzambe “asombi yango na makila ya Mwana na ye mpenza”. (Misala 20:28; tala 1 Petelo 1:17-19) Mpo tokoka kozwa bomoi ya seko, Yesu, Mwana bobele moko ya Nzambe, atikaki esika azalaki na yango na likolo, ayaki kobika awa na mabelé katikati na bato na masumu mpe, na kondimaka liwa ya mpasi likoló na nzete, apesaki bomoi na ye ya kokoka. (Matai 20:28) Ekozala mpenza kozanga botondi soki tokolekisa ata mokolo moko mpamba kozanga komonisa ete tozali kopesa motuya mingi na likabo kitoko yango ya Nzambe.—Baebele 10:28, 29; Yuda 4, 5.
Boyokani na biso elongo na Jéhovah mpe lisangá na ye
8. Motuya nini tozali kopesa na boyokani na biso elongo na Jéhovah?
8 Boyokani na biso elongo na Jéhovah ezali mpe moko na biloko bileki bulee. Na bongo tosengeli kosepela mpenza na boninga oyo ekangisi biso na Tata na biso ya likolo. Soki ‘tobelemi na Nzambe akobelama na biso’. (Yakobo 4:8) Na yango, alingaka biso mingi mpe alingi ete biso tolinga ye na motema na biso mobimba. (Matai 22:37, 38; Yoane 3:16) David apesaki Salomon batoli ya mayele mpo na boyokani na ye elongo na Jéhovah; alobaki na ye: “Mpe yo, Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe na tata na yo mpe salela ye na motema mobimba mpe na molimo ya botosi, mpamba te Jéhovah akotalatala mitema nyonso mpe akososola makanisi mpe mikano nyonso. Soki okoluka ye, akozwama na yo: nde soki okotika ye, akobwaka yo libela.” (1 Ntango 28:9) Mpo na yango, ‘tomibatela kati na bolingo na Nzambe, awa ezali biso kozela mawa ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpo na bomoi ya seko’.—Yuda 21.
9. Na mitindo nini tokoki komonisa ete tozali kopesa motuya na libaku oyo tozali na yango ya kozala basangani ya lisangá ya Jéhovah?
9 Tozali kososola libaku ya bulee oyo ya kozala mosangani na lisangá ya Jéhovah? Tomikundola biso nyonso ete ezali na ngolu ya Jéhovah nde tozali kosepela na yango. Oyo akozanga matondi kino kokoma mosali ya masumu ntango nyonso, akobungisa libaku yango. Paulo apesaki likebisi oyo: “Boye, tika ete ye oyo akanisi ete atelemi ngwi akeba ete akwea te.” (1 Bakolinti 10:6-12) Mwa liboso, ntoma alobaki mpo na Bayisraele 23 000 baoyo bakufaki mpamba te bamipesaki kosambela bikeko mpe kosala pite. Tokoki kolakisa ete tozali kotalela lisangá ya Jéhovah lokola bulee na kosalaka makasi mpo na kobatela yango na mbindo ya nzoto, ya bizaleli to mosusu, na elimo ya lokoso ya mombongo, na makanisi mabe, na lolendo mpe na koswana. (2 Bakolinti 7:1; 1 Petelo 1:14-16) Tokoki lisusu koluka koyeisa makasi bansinga ya bolingo ya bondeko, komemya malamu ebongiseli euti na Nzambe mpe kosala elongo na baoyo bazali kokamba lisangá.—1 Batesalonike 4:3-8; 5:12, 13.
Liloba, mibeko ya Nzambe, mpe elikya etali Bokonzi
10. Ndenge nini tozali komonisa ete tozali kopesa motuya monene na Makomami Mosantu?
10 Liloba na Nzambe, Biblia Mosantu, ezali mpe moko na biloko ya bulee. Ezali na maloba, mitindo, batoli, bandaka mpe bimoniseli ya Nzambe: nyonso oyo tosengeli na yango mpo na ‘kobongisama mpo na misala nyonso ya malamu.’ (2 Timote 3:16, 17) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kopesa motuya mingi na mokanda yango oyo epemami? Libosoliboso, na koyekolaka yango mpe na kosalelaka oyo tozali koyekola kati na bomoi na biso. Na nsima, na kolyaka yango esengeli komonisama kati na bizaleli na biso “bilei” ya elimo, bizwi moboko na Biblia, oyo Jéhovah azali kopesa biso na “ntango na yango” na lisalisi ya “moombo na sembo mpe na mayele”. (Matai 24:45) Na nsuka, ezali mpe likanisi malamu ya kosalela, na kokengelaka ete Biblia mpe mikanda na biso ezala mpeto mpe malamu ntango tozali kosakola; soki tokosalela Biblia oyo elembalemba to ya bosoto, tokoki kobwaka nsoni likoló na nkombo ya Jéhovah.
11. Mpo na nini tosengeli te komona mibeko na bulee ya Jéhovah lokola biloko mpamba?
11 Kati na Liloba ya Nzambe tozali kokuta mibeko ya bulee ya Jéhovah. Totalelaka yango mikolo nyonso lokola bulee, to mpe ekomelaka biso mbala mosusu komona yango mpamba? Kati na nzela ya bomoi, mibeko ya Jéhovah mizali lokola mabaya oyo elakisaka nzela, lopango oyo ezali kobatela. Soki tokotosa mibeko yango, tokosala mobembo ya kimya mpe tokokoma esika tozali kokende: mokili ya sika elakami na Jéhovah; kasi soki tomoni mibeko mpe bokundoli ya maloba ya Jéhovah mpamba, tozali kokende na libebi.—Nzembo 119:10,11, 35, 101, 102; Masese 3:1-4.
12. Tosengeli kosala nini mpo ete elikya na biso kati na Bokonzi ezala eloko na bulee mpo na biso?
12 Biblia esalisi biso na koyeba eloko mosusu ya bulee oyo esengeli kozala na motuya mpo na motema na biso: elikya etali Bokonzi. Kolobaka mpo na moto na sembo Abrahame, Paulo alobi na Baebele 11:10 ete: “Azalaki kozela mboka [Bokonzi na Nzambe] oyo ezali na miboko ya solo, oyo Nzambe azali motongi mpe mobandisi na yango.” Biso mpe tozali na elikya makasi, ezangi koningana, kati na Bokonzi ya Nzambe? Kondima na biso ezali mwa makasi mingi na boye ete tozanga ntembe na mona mpe ete molende na biso ekita te, awa ezali biso kozela kokokisama ya mikano na Nzambe, na ntango oyo etyamaki?—Matai 24:20-22, 33, 34, 42.
Makita mpe mikumba ya bulee
13. Mpo na nini tosengeli te komona matomba oyo tozali kozwa na makita ya boklisto lokola lotomo oyo esengeli kofutamela biso?
13 Tolendisanaka mpo na bolingo mpe mpo na misala malamu, totika koyangana elongote, lokola bamosusu bameseni kosala’, oyo toli ya Paulo. Maloba oyo malakisi biso ete makita ya boklisto mazali ebongiseli mosusu ya bulee oyo tozali na yango mposa mingi. Tokoki mpe kosala “eyambweli ya elikya na biso liboso na bato nyonso“ na kolobaka liboso na bato, ntango tozwi likoki na yango, to na kopesaka biyano mbala na mbala. (Baebele 10:23-25) Lisusu, lokola Salle du Royaume ezali esika makita na biso mingi masalemaka, tokoki komituna soki, na nzela ya makabo mpe ya mosala makasi na biso, tozali kosalisa mbala na mbala mpo ete ezala ntango nyonso malamu.—Exode 35:21.
14. Nini ekosalisa biso na koyeba ete mosala na biso ya boklisto ezali eloko ya motuya mpe ya bulee?
14 Paulo akokanisaki mokumba ya baklisto ya kosakola nsango malamu lokola ‘eloko na motuya kati na mbeki eyemami na mabelé. (2 Bakolinti 4:1, 7) Ee, mosala ya moklisto ezali mpe eloko na bulee oyo tozali kopesa yango motuya mingi. Atako mingi kati na bato oyo tosakolaka epai na bango bamonisaka bosepeli te, tosengeli kobosana te ete tozali na mokumba kitoko ya koloba mpo na Jéhovah mpe mikano na ye epai na bazalani na biso. Likanisi yango ekosalisa biso na kokokisa etinda na biso, oyo etali kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kozalisa bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Tozali na liziba ya esengo mosusu na komonaka lolenge bayekoli ya sika bazali kokola. (1 Batesalonike 2:19, 20) Soki tozali kopesa motuya mingi na mosala na biso tokozala te bato bazali kotika kosakola na basanza mosusu (ba irréguliers), tokozala mpe te bato balembi kosakola (ba inactifs), kasi tokosakola nde nsango malamu na molende nyonso.
15. Mpo na nini tosengeli kopesa motuya na mikumba oyo tozali na yango kati na lisangá ya Jéhovah?
15 Mikumba oyo tozali na yango kati na lisangá ya Jéhovah mizali mpe bulee: ezali ebombelo ya bulee. (Tala Misala 20:28) Ezala mosala ya kokengela, ya kobatela bampate, koteya to mosala mosusu nyonso oyo tokoki kokokisa mpo na baninga na biso baklisto, tosengeli kosala yango na likebi mingi. Ata mosala moko emonani ete ezali eloko moke, tomona yango mpamba te, kasi tokokisa yango na molende, mpo na Jéhovah. Tobosana te, “Oyo azali sembo na likambo lileki moke, azali mpe sembo na mingi”.—Luka 16:10.
Libala mpe libota
16. Ndenge nini tokoki komonisa ete libala mpe libota ezali biloko na bulee mpo na biso?
16 Libala mpe libota ezali mpe biloko na bulee. Ya solo, bobele baklisto te nde bazali kobala; nzokande, mwa bokeseni ezali ete baklisto batalelaka libala ete ezali bulee mpe ekangani na losambo oyo bazali kopesa na Jéhovah. (Tala 1 Petelo 3:1-7) Ndenge nini bamonisaka limemya na bango mpo na eloko yango ya bulee? Biblia elakisi biso yango na Baebele 13:4: “Tika ete libala ekumisama na bato nyonso mpe mbeto ya libala ebebisama te, mpamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na ekobo.” Yesu alobaki ete kotala mwasi mingi, kino kooka mposa na ye, ezali kosala ekobo kati na motema. (Matai 5:27, 28) Na yango, soki tozwi likatami ete tokobala, tika ete libala na biso ekumama; mpe tokanisa te ete tokosala ata molende moko te; kasi, ekosengela na biso ntango nyonso kokolisa bolingo ya solo mpe limemya mozindo. Soki toboti bana, ‘tobokola bango na mateya mpe na mpamela ya Jéhovah’. Na ndenge yango libota na biso ekozala ‘mosantu’.—Baefese 6:4; 1 Bakolinti 7:14.
Elimo santu ya Jéhovah, mpe libondeli
17. Mpo na nini tosengeli kopesa motuya na elimo santu ya Nzambe?
17 Tosengeli na bibongiseli nyonso ya Jéhovah; na yango, lisalisi oyo elimo santu na ye ezali kopesa biso ezali na ntina mingi. (Yoane 14:26) Toyebi te ntango nyonso ndenge Jéhovah asalelaka elimo santu na ye mpo na bolamu na biso, kasi likambo moko ezali solo ete: tokoki kotika yango pembeni te. Tosengeli kosambela mpo elimo santu esalisa biso na kokanga ntina na mateya ya solo, koyika mpiko na mimekamo mpe kokolisa bambuma ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Baefese 4:30 ekebisi biso ete ‘toyokisa’ elimo santu mawa te na kosalaka makambo oyo ekopekisa biso ete tozwa yango na ndenge ekoki. Topesa ntango nyonso motuya na elimo santu ya Jéhovah.
18. Mpo na nini losambo ezali libaku moko ya bulee?
18 Eloko ya bulee ya nsuka kasi ya moke te oyo tolingi kolobela ezali libondeli. Oyo nde libaku tozali na yango ya kosolola na Mokonzi ya molongo, Jéhovah! Solo mpenza, ezali na limemya mpe na lokumu nde tokobelama na ye, kasi na kozanga likebi te. Na yango, soki mabondeli na biso mayokani na mokano na ye, tokoki kondimisama ete azali koyoka mpe akoyanola yango. “Bomitungisa mpo na likambo moko te, kasi kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli, na malombo mpe na matondi.” (Bafilipi 4:6) Libondeli esalisaka biso mpo tobosana te ntina ya biloko ya bulee.
19. Bato oyo bapesaka motuya mingi na biloko ya bulee bazwaka mapamboli nini?
19 Touti kotalela biloko zomi na misato kati na biloko ya bulee, oyo tosengeli kobosana ntina na yango te. Soki topesi motuya mingi na biloko yango, tokobatela boyokani malamu elongo na Nzambe na biso, Jéhovah, mpe tokozwa lipamboli na ye. Kondimisama yango ezali kopesa biso kimya ya elimo mpe lisosoli malamu. Na bongo, tosala nyonso ekoki mpo na kobatela boyokani yango ya motuya. Tolinga Jéhovah na motema na biso mobimba, na elimo na biso mobimba, na molimo na biso mobimba mpe na bokasi na biso mobimba, mpe ye akolinga biso libela. (1 Yoane 4:16) Bobele soki tozangi kotikala sembo nde bansinga ya bolingo yango ekokatana.-Baloma 8:38, 39.
20. Esengeli kosala nini mpo na kozwa bomoi kati na mokili ya sika elakami na Jéhovah?
20 Tolanda mpe kozala mpenza na molende kati na mosala ya Bokonzi, kokokisa mikumba na biso nyonso mpe kopesa motuya mingi na bibongiseli nyonso ya elimo oyo Jéhovah azali kozwa. Na kozalaka ntango nyonso na botondi kati na motema, tika ete totalelaka mibeko nyonso mpe makebisi nyonso ya bulee ya Jéhovah, na koyebaka ete etyamaki mpo totambola na kimya nyonso na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi, tokoki kolikya ete Jéhovah akobomba biso na ntango ya bolozi monene mpe akopesa biso mapamboli ya seko kati na mokili ya sika, oyo ekomi pene. Nyonso wana ekozala mpo ete topesaki motuya mingi na biloko ya elimo.
Bozongeli
◻ Tosengeli kosala nini mpo tozanga te kopesa motuya na nkombo ya Jehovah mpe na mbeka ya lisiko ya Klisto?
◻ Nini ekoki kolakisa ete tozali kopesa motuya mingi te na boyokani na biso elongo na Jehovah mpe elongo na lisanga na ye?
◻ Mwa makambo nini mazali komonisa ete tozali kopesa motuya na Liloba mpe na mibeko ya Nzambe, mpe na elikya etali Bokonzi?
◻ Ndenge nini tokoki komonisa ete makita ya boklisto mpe mikumba ya bonzambe ezali na ntina mpo na biso?