Boyebi ya solo ya Nzambe mpe ya Mwana na ye ezali komema na bomoi
“Bomoi na seko ezali boye ete bayekola koyeba yo, Nzambe moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.”—YOANE 17:3, M.N.
1. Mpo na nini boyebi ya Nzambe mpe ya Yesu Klisto ezali na ntina mingi?
BOYEBI ya solo ya Nzambe mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto, ezali na ntina, mpo na baoyo balingi kozala na bomoi ya seko. “[Nzambe] alingi ete lolenge nyonso ya bato babika mpe bakoma na boyebi mpenza ya solo.” (1 Timote 2:4) Boyebi yango, oyo ezali kati na Liloba ya Nzambe, Biblia, ezali koteya biso soki Nzambe azali nani mpe mikumba na biso mizali nini liboso na ye. (2 Timote 3:16, 17; 1 Yoane 2:17) Ezali lisusu kosalisa biso na koyeba soki Yesu Klisto azali nani mpe etelemelo na biso ezali nini liboso na ye.—Nzembo 2:12; Bafilipi 2:5-11.
2. Nini ekoki kokomela biso soki tozangi boyebi ya solo?
2 Soki tozangi boyebi ya solo, tokoki komitika kokosama na mateya ya lokuta oyo esimbami na motemeli na Nzambe, Satan le Diable; ye azali “mokosi mpe tata na lokuta”. (Yoane 8:44) Na yango, soki totaleli liteya moko ya lokuta oyo ezali kotemela Liloba na Nzambe lokola ete ezali solo, mpe soki toteyi yango, tozali kokitisa lokumu ya Jéhovah mpe tozali kotemela ye. Na bongo, tosengeli kotangaka Makomami mpo tokoka kokesenisa solo na lokuta. (Misala 17:11) Tolingi te kokokana na bato oyo “bazali ntango nyonso koyekola kasi bazali kokoka te kokoma na boyebi mpenza ya solo.”—2 Timote 3:1, 7
3. Biblia eteyi nini polele mpenza mpo na Nzambe, mpo na Yesu Klisto mpe mpo na elimo santu?
3 Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, liteya ya Bosato ezali liteya ya Biblia te. Kati na liloba na ye, Nzambe alobi na biso polele ete azali Mozalisi na biloko binso mpe ete ekelamu na ye ya liboso na likoló ezalaki Mwana na ye. (Emoniseli 4:11; Bakolose 1:15, 16) Na nsima, atindaki Mwana yango na mabelé lokola moto ete apesa mbeka ya lisiko mpo na bolimbisi ya masumu na bato mpe amemela bato na bosembo pole mingi, mpo na Nzambe mpe mikano na ye. (Matai 20:28; Yoane 6:38) Nzokande, na boumeli ya bikeke, babalolaki ndimbola na liteya ya petee mpe ya polele oyo: Nzambe mpe Klisto bazali bato mibale bakeseni; elimo santu ezali moto te kasi bokasi na Nzambe oyo esalaka. Na esika ete ezala bongo, likanisi ya Bosato ekomi liteya ya moboko mpo na boklisto ya mokili.
“Ngai mpe Tata, tozali moko”
4. Mpo na nini maloba ya mangomba na ntina na Yoane 10:30 mazali solo te?
4 Atako verset yango elobeli moto na misato te, Mangomba bazali kotanga mbala mingi maloba oyo tokuti na Yoane 10:30 mpo na kosimba liteya ya Bosato. Kuna Yesu alobi: “Ngai mpe Tata, tozali moko.” Kasi, Yesu alingaki koloba ete azalaki Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso oyo abongwanaki? Te, yango ekoki kosalema te, mpamba te azalaki ntango nyonso koloba ete azali Mwana na Nzambe, ete azali na nse na ye mpe azali komikitisa liboso na ye. Na bongo ndimbola na maloba ya Yesu kati na Yoane 10:30 ezali nini?
5, 6. (a) Yesu alingaki koloba nini wana elobaki ye: “Ngai mpe Tata tozali moko?” (b) Na nini boyokani oyo esangisi bayekoli na Yesu kati na bango ezali kosalisa biso tokanga ntina na maloba yango?
5 Na maloba yango, Yesu alingaki koloba ete ye na Tata na ye bazalaki na bomoko na likanisi moko mpe na mokano moko. Ezali yango emonisi Yoane 17:21, 22 epai Yesu azali kobondela Tata na ye mpo na bayekoli na ye: “Mpo ete nyonso bazala moko lokola yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe nazali na bomoko elongo na yo, ete bango mpe bazala na bomoko elongo na biso . . . , mpo ete bazala moko lokola biso tozali moko.” Yesu azalaki kobondela mpo bayekoli na ye bakoma mpenza moto moko? Te, azalaki kobondela mpo bazala na bomoko, lokola ye na Tata na ye, na likanisi moko mpe mokano moko.
6 Tozali kokuta mpe likanisi yango na 1 Bakolinti 1:10, epai Paulo alobi na baklisto ete: “Nalombi bino . . . ete bino banso bolobaka na motindo moko mpe ete bokabwanaka kati na bino te, kasi bosangana na elimo moko mpe na likanisi moko.” Na yango, ntango Yesu alobaki ete ye na Tata na ye bazali moko, alingaki koloba te ete bazali bobele moto moko na elobeli ya solo mpenza, ndenge moko ntango alobaki ete bayekoli na ye basengelaki kozala moko, alobaki te ete basengelaki kokoma moto moko.
“Liloba” azali nani?
7. (a) Boklisto ya mokili oyo elobaka nini mpo na Yoane 1:1? (b) Na Yoane 1:1, eloko nini elakisi polele ete ezali kolobela bosato te?
7 Na bongo, ndenge nini kokanga ntina ya maloba makomami na Yoane 1:1? Bible de Jérusalem ebongoli verset yango boye: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe mpe Liloba azalaki Nzambe.” Yoane 1:14 ebakisi: “Liloba akomaki mosuni mpe afandaki kati na biso.” Boklisto ya mokili elobi ete “Liloba yango na greke Logos oyo ayaki na mabelé mpe abengamaki Yesu Klisto, azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Nzokande, tokoki komona ete kati na Bible de Jérusalem, totangi na Yoane 1:1: “Liloba azalaki elongo na Nzambe.” Ye oyo azali elongo na moto moko azali moto yango te. Na bongo, libongoli yango emonisi ete bato bazali wana mibale bakeseni. Lisusu, balobeli awa mpo na moto na misato te, oyo akoki kosala bosato elongo na baoyo mibale mosusu.
8. Ndenge nini mabongoli mosusu ya Biblia makomi Yoane 1:1?
8 Soki Bible de Jérusalem ebongoli eteni na nsuka ya Yoane 1:1 ete: “Liloba azalaki Nzambe”, mabongoli mosusu makomi eteni yango na mitindo mikeseni. Tala mwa bandakisa:
1864: “mpe nzambe azalaki Liloba.” The Emphatic Diaglott, ya Benjamin Wilson. New York mpe Londres.
1879: “mpe Liloba azalaki nzambe.” La Sainte Bible, L. Segond mpe H. Oltramare.
1908: “mpe Liloba azalaki na lolenge ya Nzambe.” La Sainte Bible, L. Segond mpe H. Oltramare. (Tala notes Decoppet: “ndenge moko na Nzambe”; Pirot mpe Clamer: “Liloba azali na lolenge ya Nzambe”; Lagrange alobeli “lolenge ya Nzambe”; Fillion, na “lolenge ya Nzambe”; mpe Crampon 1904, kati na vokabilere na ye s.v. Liloba, na “lolenge ya Nzambe kati na Yesu Klisto.”)
1928-1947: “mpe Liloba azalaki ekelamu ya bonzambe.” La Bible du centenaire, Société biblique de Paris.
1935: “mpe Liloba azalaki na bonzambe.” The Bible An American Translation, ya J.M.P. Smith mpe E. J. Goodspeed, Chicago.
1935: “Logos azalaki na bonzambe.” A New Translation of the Bible, ya James Moffatt, New York.
1978: “mpe Logos azalaki na lolenge ya Nzambe.” Das Evangelium nach Johannes, ya Johannes Schneider, Berlin.
Ndenge moko, na 1950 (1963 mpo na oyo ya Lifalansé), Les écritures grecques chrétiennes-Traduction du monde nouveau, libongoli ebimisamaki na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc, ekomaki eteni yango boye: “mpe Liloba azalaki nzambe.”
9. Nini tokuti liboso na théos (nzambe) ya yambo na Yoane 1:1 kati na makomi ya greke, oyo elakisi ete ezali kolobela mpo na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso?
9 Mabongoli yango mazali na boyokani na mibeko ya grammaire mpo na Yoane 1:1 kati na makomi na greke? Ezali mpenza bongo. Kati na Yoane 1:1, tokuti mbala mibale liloba théos (na greke nzambe). Mbala ya liboso, liloba yango elakisi Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo Liloba azalaki elongo na ye: “mpe Liloba (Logos) azalaki elongo na Nzambe [lolenge mosusu ya liloba théos]. Théos ya liboso ezali na article défini ya greke ho liboso na yango, elakisi ete azali moto mosusu, mpo na likambo oyo tozali kotalela, moto yango Nzambe Moni-na-Nguya-Nyonso: “mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe.”
10. Kozanga ya article ho liboso na théos ya mibale na Yoane 1:1 emonisi nini?
10 Nzokande, na eteni na nsuka ya Yoane 1:1, mabongoli oyo totangi na paragrafe ya 8 ebongoli théos ya mibale (oyo ezali lokola nkombo bapesi kopesa to attribut) na maloba oyo: “na lolenge ya Nzambe”, “ekelamu ya bonzambe”, “bonzambe” to “nzambe” (“n” ya moke) na esika ete ezala “Nzambe”. Mpo na nini boye? Mpamba te, na makomi ya greke, théos ya mibale ezali nkombo moko oyo epesami, etyami liboso na verbe, mpe oyo ezali na article défini (to liloba ya sikisiki) ho liboso na yango te. Kati na verset yango, maloba wana mamonisi lolenge to ezaleli ya Liloba. Ezali koyebisa biso lolenge ya liloba: ete azali “na lolenge ya Nzambe”, “ekelamu ya bonzambe” to “nzambe”, kasi Nzambe Mozwi—na-Nguya-Nyonso te. Esukiseli oyo ezali na boyokani na mikapo mingi ya Makomami oyo elakisi ete “liloba” azali molobeli na Nzambe, atindamaki na Nzambe na mabelé. Na Yoane 1:18, totangi: “Moto te asili komona Nzambe, nzambe bobele moko [na elobeli ya solo, “nzambe bobele moko oyo abotamaki”, Mwana oyo azalisamaki kati na makoló na maboko na Nzambe Mozwi na-Nguya-Nyonso] oyo azali penepene na Tata, na esika na ntolo, ye moto [ayaki na mokili, moto Yesu, mpe oyo] alimboli ye [Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso].”
11. Pesa ndakisa moko ya Biblia epai mobongoli abakisi article “un”, nzokande yango ezali te kati na makomi ya greke. Limbola ntina.
11 Biblia ezali na ba versets mingi epai nkombo oyo ezangi article kati na makomi ya greke, emonani ete ezali nkombo epesami to attribut; ezali yango babongoli bazali komonisa malamu mbala mosusu, soki Lifalansé esengi bongo na kotyaka article défini (to liloba ya sikisiki) “un” (to “une”) liboso na nkombo yango. Motindo yango ya kobongola emonisaka lolenge to ezaleli. Na ndakisa, kati na Malako 6:49, ntango bayekoli na Yesu bamonaki ye kotambola likoló na mai, Bible du roi Jacques elobi: “Bandimaki ete ezalaki elimo to un esprit (na greke: phantasma)”. Mpo na yango Traduction du monde nouveau ebongoli eteni yango na lolenge malamu lisusu koleka na kolobaka ete: “Ezalaki bobimi (to une apparition)!”
12. Lolenge yango ya kosalela article défini oyo tokuti na Yoane 8:44 ezali nini?
12 Tokuti ndakisa oyo elingi kokokana na lolenge yango ya kosala, kati na Yoane 8:44 epai Yesu, wana ezalaki ye koloba mpo na Diable, alobaki: “Azalaki mobomi (to un homicide) longwa na ebandeli.” Ndenge moko lokola na Yoane 1:1, na greke ya ebandeli, “mobomi na bato” ezali liboso na verbe mpe ezali na article te. Na bongo, ezali ezaleli moko ya Diable nde bazali kolobela awa.—Tala Malako 11:32; Yoane 6:70; 8:44; 9:17; 10:1, 13, 21.
“Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!”
13, 14. Mpo na nini Thomas abengaki Yesu “Nzambe na ngai” kozanga koloba ete Yesu azalaki Jéhovah?
13 Baoyo bandimaka Bosato batangaka mpe Yoane 20:28 mpo na kosimba liteya na bango. Kati na eteni yango Thomas alobaki na Yesu: “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!” Lokola emonisi yango baparagrafe oyo eleki, Thomas azalaki na ntina moko te ya kozanga kosalela liloba “Nzambe” mpo na kobenga Yesu. Na bongo, ntango ezalaki ye naino ekelamu ya elimo, Klisto azalaki nzambe; elingi koloba moto na nguya, ya bonzambe: mpe uta liwa na ye mpe lisekwa na ye kati na bomoi ya likoló, ntembe ezali te ete azongelaki etelemelo yango. Mpe lisusu, Yesu atangaki maloba ya Nzembo mpo na komonisa ete bato ya nguya babengamaki “banzambe”. (Nzembo 82:1-6; Yoane 10:34, 35) Ntoma Paulo nde akomaki: “Banzambe bazali mingi mpe “bankolo” bazali mingi”. (1 Bakolinti 8:5) Mpo na kosukisa, Satana abengami “nzambe na mokili oyo.”—2 Bakolinti 4:4.
14 Klisto azali na etelemelo moko eleki oyo ya bato bazangi kokoka to oyo ya Satana. Na bongo soki bango babengami “banzambe”, mabe moko ezali te ete Yesu ye mpenza abengama mpe bongo. Kotalelaka esika na lokumu oyo azali na yango penepene na Jéhovah, Yesu azali “nzambe bobele moko” (Yoane 1:18); azali mpe “Nzambe na nguya” (Yisaya 9:6), mpe “Nzambe”. (Yoane 1:1) Thomas azalaki bongo na ndingisa ya koloba na Yesu ndenge wana. Alingaki koloba ete, mpo na ye, Yesu azalaki nzambe, elingi koloba ekelamu ya nguya, ekelamu ya bonzambe. Alobaki te ete Yesu azali Jéhovah; yango wana abengaki ye Nzambe “na ngai”, kasi “Nzambe” te.
15. Mpo na nini tokoki koloba ete Yoane 20:31 ezali komonisa polele soki Yesu azali nani?
15 Ba versets misato na nsima, tala oyo tokoki kotanga na Yoane 20:31: “Kasi makambo yango masili kokomama mpo bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe.” Boye, ntembe oyo etikalaki mpo na maloba ya Thomas esili. Na yango, mokomi na Biblia alobi polele ete Yesu azali Mwana na Nzambe, kasi Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso te.
Akokani na Nzambe te
16. Bayuda bafundaki Yesu na likambo nini? Ndenge nini Yesu alongaki efundeli yango?
16 Mangomba basalelaka eteni mosusu ya Makomami ezali na Yoane 5:18. Totangi kuna ete Bayuda balingaki koboma Yesu mpamba te “azalaki kobenga Nzambe Tata na ye mpenza, azalaki komikokanisa na Nzambe”. Kasi nani azalaki koloba ete Yesu amikokanisaki na Nzambe? Solo mpenza, ezalaki ye moko Yesu te. Na nsima ayeisi mpenza likambo yango polele na eteni oyo elandi (na verset 19), epai alobi: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye Tata kosala.” Na ndenge yango, Yesu amikumisaki te ete azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso to ete akokani na ye. Kasi azalaki nde kolakisa Bayuda ete bazalaki komikosa, ye azali Nzambe te, kasi Mwana na Nzambe; mpe ete lokola azalaki molobeli ya Nzambe, akokaki kosala likambo ye moko te. Tokanisi ete tokoki koyoka Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso ya molongo koloba ete akoki kosala likambo ye moko te? Na bongo ezali efundeli na Bayuda mpo na kotemela Yesu, kasi Yesu alongaki yango.
17. (a) Litatoli nini ya polele Liloba na Nzambe epesi mpo na koyeba solosolo soki Jéhovah azali nani, Yesu Klisto azali nani mpe elimo santu ezali nini? (b) Ndenge nini tokoki kotalela eteni nyonso ya Makomami oyo etangami na bandimi ya bosato mpo na kolongisa liteya na bango?
17 Na bongo, litatoli ya Nzambe kati na Liloba na ye, oyo ya Yesu mpe ya boyekoli na Yesu, emonisi na lolenge ya nguya ete Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Yesu Klisto bazali bato mibale bakeseni, Tata mpe Mwana. Ndenge moko mpe, litatoli yango oyo ezangi ntembe endimisi ete elimo santu ezali moto ya misato na Bosato te, kasi bokasi na Nzambe oyo esalaka. Ekozala ntina te na kotalela mikapo mosusu ya Makomami kozanga kotalela bandimbola ya biteni oyo bizingi yango, to kobongola ndimbola na yango mpo na kosimba liteya ya Bosato. Mpo na yango, eteni nyonso epesami mpo na kolongisa liteya yango esengeli kotalelama na kokokanisaka yango na litatoli ya polele oyo Biblia mobimba ezali kopesa.
Mpo na nini liteya yango epalangani boye?
18. Liteya ya Bosato ebandaki ndenge nini?
18 Na kotangaka maloba oyo bazingi na page 26 oyo ezali na titre “Lisolo na liteya ya Bosato”, tomoni ete Bosato euti na bapakano. Na yango, ezali liteya na Biblia te, kasi endimamaki na boklisto ya mokili na ekeke ya 4. Nzokande, liboso mpenza na eleko wana, bazalaki kosambela banzambe ya bosato na Babilone, na Ezipito mpe na biteni mosusu ya mokili. Na bongo boklisto ya mokili ekotisaki liteya ya bapakano kati na mateya na yango. Bodefi yango esalemaki na bopusi ya mokonzi na Rome Constantin; ye aboyaki koyeba solo na likambo yango, kasi alingaki koyeisa makasi boyangeli na ye oyo esalemaki na bapakano mpe na bato oyo batombokelaki boklisto ya solo. Na esika ete ezala liteya ya boklisto, Bosato ezalaki elembo ete Boklisto ya mokili ekabwanaki na mateya ya Klisto mpo na kolanda bopakano.
19. Mpo na nini liteya ya Bosato epalangani mingi boye.
19 Mpo na nini liteya yango epalangani boye? Na ntembe te, komonisa Nzambe na lolenge ya mobulungano mpe ya libombami kati na boyokani na ye elongo na Mwana na ye mpe elimo santu na ye, ezali kosepelisa ye te, bato oyo bazali kondima mobulungano yango bazali mpe kozwa na yango litomba te. Epai mosusu, na meko oyo bomoto mpe mikano na Nzambe ezali polele te kati na elimo ya bato, Satan le Diable mpe azali komizwela na yango litomba; mpamba te, motemeli yango ya Nzambe, oyo azali ye mpenza ‘nzambe ya mokili oyo’, azali ‘kozipa makanisi na bato oyo baboi kondima’. (2 Bakolinti 4:4) Bakonzi na mangomba ya mokili bazali kosepela mpenza na liteya yango mpamba te ezali kondimisa bato ete bobele bato na teoloji nde bakoki kokanga ntina na mateya ya Biblia. Ezali yango esalisi bango na kobatela bopusi na bango likoló na bato.
20. (a) Likambo oyo ezali mpasi te na kondima mpo na oyo etali Bosato ezali nini? (b) Kozwa boyebi mpenza ya solo oyo ezali kosikola ekolimbola nini mpo na biso?
20 Nzokande, solo ezali mpenza petee na boye ete mwana akoki kokanga ntina na yango. Na bongo mwana moke ayebi malamu ete ye azali tata na ye te, ete akeseni na tata na ye. Ezali yango Biblia elingi koloba ntango elobi ete Yesu Klisto azali Mwana na Nzambe. Yango ezali solo ya petee, kasi ezali bongo te mpo na liteya ya Bosato. Liteya yango ezali lokuta; mobandisi na yango ezali bongo “oyo abengami Diable mpe Satana, mozimbisi na bato ya mabelé mobimba.” (Emoniseli 12:9) Epai mosusu, solo ya petee mpe ya kolendisa oyo etali Nzambe, Mwana na ye Yesu Klisto mpe elimo santu na ye ya nguya, ezali kosikola bato na boombo na mateya ya lokuta, oyo euti na bopakano mpe Satana azali mobandisi na yango. Yesu alobaki na bato oyo bazalaki koluka mpenza solo ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Ee, kozwa boyebi mpenza na solo oyo ezali kosikola mpe kosalela yango, wana nde “elimboli bomoi ya seko.”—Yoane 17:3.
Bozongeli
◻ Mpo na nini boyebi ya Nzambe mpe ya Yesu Klisto ezali na ntina mpenza?
◻ Yesu alingaki koloba nini wana elobaki ye: “Ngai mpe Tata, tozali moko?”
◻ Mpo na nini Thomas abengaki Yesu “Nzambe na ngai?”
◻ Liteya ya Bosato euti wapi, mpe nani azali mobandisi na yango?
[Etanda na lokasa 26]
Lisolo ya liteya na Bosato
Tala makambo oyo tokoki kotanga kati na Nouvelle Encyclopédie britannique (1985, Micropædia, Vol. 11, page 928) na nse ya titre “Trinité”: “Liloba Trinité to Bosato ezali te kati na Kondimana ya Sika. Liteya na yango elimbolami kuna polele ata mbala moko te. Na ntembe te, Yesu mpe bayekoli na ye bawanganaki te ebongiseli ya Kondimana na Kala oyo ezali boye: ‘Yoka, Yisraele, Jéhovah azali Nzambe na biso, Jéhovah azali moko.’ (Deteronome 6:4)” Mokanda yango ebakisi ete: “Liteya yango ekolaki mokemoke na boumeli na bikeke mingi mpe ebimisaki makanisi mingi makeseni. . . . Na mobu 325, Concile ya Nicée etyaki moboko na liteya yango na kolobaka ete Mwana azali ‘na lolenge ekokani . . . na Tata’, ata balobi makambo mingi te elobami mpo na Elimo santu . . . Na nsuka na ekeke ya 4 . . . , eteni monene na liteya ya Bosato ezwaki lolenge na yango oyo ezali naino kino lelo.”
Nouvelle Encyclopédie catholique (1967, Vol. 14, page 299, Angl.), endimi mpe ete, “liteya oyo ya ‘Nzambe moko kati na bapersona misato’ ezalaki na moboko te mpe ekotisami nyonso te kati na bomoi ya baklisto mpe kati na eyambweli na bango ya kondima liboso na nsuka na ekeke ya minei.” Ebakisi ete, “epai na ba Tata ya mangomba (Pères apostoliques), tokokuta eloko moko te oyo ekoki kokundola ata na mosika likanisi yango.”
Na bongo, liteya ya Bosato ezali ya Biblia te. Endimamaki epai na bato banso na mobu 325, na Concile ya Nicée. Euti na likanisi ya bapakano oyo ebotamaki kala mpenza liboso na eleko wana na Babilone, na Egypte mpe na biteni mosusu ya mokili. Kati na mokanda na ye ya Histoire de la Civilisation to Lisolo ya bizaleli na mabota (Kaisala mpe Klisto lll, pages 239, 240), Will Durant abendi likebi na likambo oyo: “Boklisto ebomaki bopakano te: endimaki yango . . . Makanisi ya Bosato na Nzambe mautaki na Egypte mpe. . . ”
Na nse na liloba “triade” (to liboke ya bato to biloko misato misato) Buku monene ya mangomba (An Encyclopedia of Religion pages 793, 794, esalami na Vergilius Ferm, 1964) esali liste na banzambe misato misato oyo basambelamaki na bato ya Babilone, ba bouddhistes, ba hindous, ba Nordiques, ba taoïstes mpe bandimi mingi mosusu, lokola basangani na boklisto ya mokili oyo. Na ndakisa, mokanda yango ezali komonisa ete na lnde “bosato ya monene esangisi Brahma, ye Mozalisi; Vishnu, ye mobikisi; mpe Shiva, ye mobomi. Banzambe wana misato bazali komonisa eleko ya bomoi, ndenge moko mpe banzambe misato ya Babilone Anu, Enlil mpe Ea bazali komonisa bisaleli ya bomoi na yango: mopepe, mai mpe mabelé.” Na British Museum (Londres) tokoki komona biloko mosusu bizali komonisa bosato ya kala, na ndakisa bosato ya Egypte esangisi lsis, Harpocrate mpe Néphtys. Mokanda moko ya musée yango (oyo mokumba na yango ezali na maboko ya Departement of Medieval and Loter Antiquities) etangi makomi oyo bakutaki likoló na bijou moko ya kala: “Na ngambo moko, banzambe ya Egypte Horus-Bait (motó na ye ya faucon), Bito-Akoni (nyoka) mpe Hathor (motó na ye ya ligbololo). Na ngambo mosusu; maloba kitoko (poème) ya greke: ‘Boit, Hathor, Akori; nguya na bango ezali moko. Losako, tata na mokili! Losako, nzambe ya mitindo misato!’ Na bongo banzambe yango batalelami lokola bilakiseli misato na nguya bobele moko, oyo ezali mbala mosusu kolakisa nzambe na nkombo moi.”
Lisolo na bato endimisi yango, Bosato euti na bapakano. Lisusu, ntango Yesu ayaki na mabelé, liteya yango esilaki koumela bikeke mingi. Mosika nsima na liwa ya Klisto, bato mosusu, baoyo bapusamaki na bafilozofi ya bapakano, bawanganaki losambo ya solo ya Nzambe, oyo eteyamaki na Yesu mpe bantoma, mpe bandimisaki liteya yango na makasi.
[Elilingi na lokasa 24]
Yesu asambelaki mpo ete bayekoli na ye bazala na bomoko na likanisi moko mpe na mokano moko, ndenge Tata na ye mpe ye bazalaki.