Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es26 nk. 37-46
  • Sanza ya 4

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 4
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamisato, 1 sanza ya 4
  • MOKOLO YA EKANISELI
    Nsima ya kolala ya moi
    Mwaminei, 2 sanza ya 4
  • Mwamitano, 3 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 5 sanza ya 4
  • Mwayambo, 6 sanza ya 4
  • Mwamibale, 7 sanza ya 4
  • Mwamisato, 8 sanza ya 4
  • Mwaminei, 9 sanza ya 4
  • Mwamitano, 10 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 12 sanza ya 4
  • Mwayambo, 13 sanza ya 4
  • Mwamibale, 14 sanza ya 4
  • Mwamisato, 15 sanza ya 4
  • Mwaminei, 16 sanza ya 4
  • Mwamitano, 17 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 19 sanza ya 4
  • Mwayambo, 20 sanza ya 4
  • Mwamibale, 21 sanza ya 4
  • Mwamisato, 22 sanza ya 4
  • Mwaminei, 23 sanza ya 4
  • Mwamitano, 24 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 26 sanza ya 4
  • Mwayambo, 27 sanza ya 4
  • Mwamibale, 28 sanza ya 4
  • Mwamisato, 29 sanza ya 4
  • Mwaminei, 30 sanza ya 4
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2026
es26 nk. 37-46

Sanza ya 4

Mwamisato, 1 sanza ya 4

Oyo ezali mokano ya Tata na ngai: ete moto nyonso oyo andimi Mwana mpe azali komonisa kondima epai na ye azwa bomoi ya seko.—Yoa. 6:40.

Mpo tózwa litomba na mosuni mpe makila ya Yesu, tosengeli komonisa kondima na lisiko. (Ef. 1:7) Bato oyo Yesu abengaki “bampate mosusu” balyaka te mpe basengeli kolya te limpa mpe komɛla vinyo na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo ya mbula na mbula. (Yoa. 10:16) Atako bongo, bazwaka matomba na mosuni mpe makila ya Yesu Kristo. Basalaka yango na ndenge bamonisaka kondima na mbeka na ye ya lisiko. (Yoa. 6:53) Kasi, baoyo basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo bamonisaka ete bazali na kati ya kondimana ya sika mpe bazali na elikya ya koyangela na Bokonzi ya likoló. Na yango, tózala bakristo oyo batyami mafuta na elimo to bampate mosusu, tosengeli komonisa kondima na mbeka ya Yesu mpo na kozwa bomoi ya seko. w24.12 13 par. 14, 16

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 12 Nisana) Matai 26:​1-5, 14-16; Luka 22:​1-6

MOKOLO YA EKANISELI
Nsima ya kolala ya moi
Mwaminei, 2 sanza ya 4

Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino Bokonzi.—Luka 12:32.

Na ntango ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, Yesu apesaki bantoma na ye mampa oyo ezangá levire mpe ayebisaki bango ete elakisi nzoto na ye. Na nsima apesaki bango vinyo mpe alobaki ete ezali komonisa “makila ya kondimana.” (Mrk. 14:​22-25; Luka 22:20; 1 Ko. 11:24) Kondimana ya sika esalemi elongo na “bato ya Yisraele [ya elimo]” oyo bakozala “na Bokonzi ya Nzambe”; esalemi na bato nyonso te. (Ebr. 8:​6, 10; 9:15) Tóbosana te ete na ntango ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, Yesu azalaki koloba kaka na “etonga moke.” Mwa etuluku yango ya bato ebandaki na bantoma ya Yesu ya sembo oyo bazalaki elongo na ye mokolo wana na ndako. Bango nde bakozwa esika na likoló elongo na Yesu. w24.12 11 par. 9-10

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 13 Nisana) Matai 26:​17-19; Marko 14:​12-16; Luka 22:​7-13 (Makambo oyo esalemaki na nsima ya kolala ya moi: 14 Nisana) Yoane 13:​1-5; 14:​1-3

Mwamitano, 3 sanza ya 4

Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.—Yoa. 3:16.

Batɛkaki Yesu, bakangaki ye, bafingaki ye, bakoselaki ye makambo, bakatelaki ye etumbu, mpe banyokolaki ye makasi. Basoda bamemaki ye na esika oyo basengelaki koboma ye mpe babakaki ye na nzete na bansɛtɛ. Ntango Yesu azalaki koyika mpiko na bampasi wana na bosembo nyonso, ezalaki na Moto oyo azalaki na mpasi makasi koleka. Ezalaki Yehova Nzambe. Aboyaki kosalela nguya na ye oyo ezangi nsuka mpe amipekisaki mpo asalisa Yesu te. Mpo na nini? Na mokuse, bolingo. Mbeka ya Yesu ezali elembeteli eleki monene oyo emonisaka ete Yehova alingaka yo. Akendaki mosika mpenza, andimaki komona mpasi oyo eleki nyonso mpo na kobikisa yo na lisumu mpe na liwa. (1 Yoa. 4:​9, 10) Ya solo, alingaka kosalisa mokomoko na biso abundisa lisumu, mpe alonga! w24.08 6 par. 13-14

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 14 Nisana) Yoane 19:​1-42

Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 4

Kristo . . . amonaki mpasi mpo na bino.—1 Pe. 2:21.

Tokoki komona mpenza ndenge Yehova alingaka biso mingi soki tokanisi oyo esɛngaki ye mpo na kopesa lisiko. Satana alobaka ete mosaleli moko te ya Nzambe akotikala sembo epai ya Yehova soki akutani na mikakatano. Mpo na kokweisa lokuta yango, Yehova apesaki nzela ete Yesu amona mpasi liboso akufa. (Yobo 2:​1-5) Yehova amonaki ntango bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla Yesu batyolaki ye, basoda babɛtaki ye fimbo, mpe babakaki ye na nzete na bansɛtɛ. Na nsima, Yehova azalaki kotala ndenge Mwana na ye ya bolingo akufaki liwa moko ya mpasi mpenza. (Mat. 27:​28-31, 39) Yehova azalaki na nguya ya kopekisa likambo yango na ntango nyonso oyo alingaki. (Mat. 27:​42, 43) Kasi, soki Nzambe asalaka yango, lisiko elingaki kofutama te mpe tolingaki kotikala kaka boye, kozanga elikya. Yango wana Yehova apesaki nzela ete Mwana na ye ayika mpiko na mpasi tii ntango akataki motema. w25.01 22 par. 7

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 15 Nisana) Matai 27:​62-66 (Makambo oyo esalemaki nsima ya kolala ya moi: 16 Nisana) Yoane 20:1

Mwalomingo, 5 sanza ya 4

Bamonaki ye mikolo 40.—Mis. 1:3.

Tozali na mokolo ya 16 Nisana ya mobu 33 T.B. Bayekoli ya Yesu bazali na mawa makasi mpe kobanga elati bango. Mibale kati na bango balongwe Yerusaleme mpe bazali kokende na Emause. Moto moko oyo bayebi te apusani pene na bango mpe abandi kotambola elongo na bango. Bayekoli bayebisi mopaya yango ndenge balɛmbi nzoto mpe likambo oyo ekómelaki Yesu. Moto yango abandi sikoyo koyebisa bango makambo oyo ekobongola mpenza bomoi na bango. “Kobanda na Moize tii na Basakoli,” alimbolelaki bango ntina oyo Masiya asengelaki komona mpasi mpe kokufa. Ntango mibali yango misato bakómaki na Emause, mopaya yango amonisaki bango ete ye nde Yesu Kristo, autaki kosekwa! (Luka 24:​13-35) Yesu abimelaki bayekoli na ye mwa mbala mingi na boumeli ya mikolo 40 ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele. Na boumeli ya ntango yango, bayekoli ya Yesu oyo liboso bazalaki na mawa makasi mpe kobangabanga, bakómaki sikoyo limpinga ya basakoli mpe bateyi ya Bokonzi, oyo batondi na esengo, na elikya mpe na mpiko. w24.10 12 par. 1-3

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 16 Nisana) Yoane 20:​2-18

Mwayambo, 6 sanza ya 4

Bómitonga likoló ya moboko ya kondima na bino oyo eleki mosantu.—Yuda 20.

Mwana moke akómaka mokóló mpo bambula eleki, kasi moto akómaka mokóló na elimo kaka boye te. Na ndakisa, bandeko mibali mpe bandeko basi ya Korinti bandimaki nsango malamu, bazwaki batisimo, bazwaki elimo santu, mpe bayokaki mateya epai ya ntoma Paulo ye moko. (Mis. 18:​8-11) Atako bongo, mwa bambula nsima ya batisimo na bango, mingi bakɔmelaki kaka na elimo te. (1 Ko. 3:2) Mpo na kokɔmɛla na elimo, tosengeli liboso kolona mposa yango. Baoyo ‘balingaka kaka kozanga mayele,’ mpe kotikala kaka bana mike na elimo, bakolonga te kokóma mikóló na elimo. (Mas. 1:22) Tolingaka te kozala lokola bana oyo bakoli kasi balingi kaka baboti na bango bázwaka bikateli na esika na bango. Kasi, tolingaka komema mokumba na biso ya elimo mpe kokolisa boyokani na biso na Yehova. Soki ozali naino kosala makasi mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo, bondelá Yehova apesa yo “mposa mpe nguya ya kosala yango.”—Flp. 2:13. w24.04 4 par. 9-10

Mwamibale, 7 sanza ya 4

Yehova . . . alingi moto ata moko te abomama.—2 Pe. 3:9.

Na boboto na ye, Yehova ayebisi biso ndenge oyo amiyokaka na oyo etali kosambisa bato. (Ezk. 33:11) Yehova awelaka te koboma bato. Azali na motema mawa mingi, mpe amonisaka yango mbala nyonso oyo likoki ezali. Makambo nini toyebi mpo na bato oyo bakosekwa te? Biblia etángi kaka bandakisa moke. Yesu amonisaki ete Yudasi Mokeriota akosekwa te. (Mrk. 14:21; talá mpe Yoane 17:12.) Yudasi ayebaki likambo oyo azalaki kosala mpe atɛmɛlaki na nko Yehova Nzambe ná Mwana na Ye. (Talá Marko 3:29.) Ndenge moko mpe, Yesu alobaki ete bakonzi mosusu ya lingomba oyo batɛmɛlaki ye bakokufa mpe bakozala na elikya ya lisekwa te. (Mat. 23:33; talá Yoane 19:11.) Ntoma Paulo mpe amonisaki ete bapɛngwi oyo babongoli motema te bakosekwa te.—Ebr. 6:​4-8; 10:29. w24.05 4 par. 10-11

Mwamisato, 8 sanza ya 4

Yehova abatelaka bato ya sembo.—Nz. 31:23.

Soki totikali baninga ya Yehova, Satana akosala biso eloko te oyo ekoki kozala likama mpo na libela. (1 Yoa. 3:8) Na mokili ya sika, Yehova akokoba kobatela baninga na ye ya sembo kaka te na makama ya elimo, kasi mpe na liwa. (Em. 21:4) Ezali mpenza lokumu monene kozala mopaya na hema ya Yehova; tosali na ye boninga oyo ekoki koumela libela na libela. (Ezk. 37:27) Tosengeli kosala nini mpo tókoba kozala bapaya ya Yehova? Soki moto abengisi yo epai na ye, okoluka koyeba makambo oyo alingi osala. Ndenge moko mpe, tolingaka mpenza koyeba makambo oyo Yehova asɛngi na baoyo balingi kokoba kozala bapaya. Kolinga Yehova ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na ‘kosepelisa ye mpenza.’ (Kol. 1:10) Tosengeli ntango nyonso kopesa ye limemya makasi. Kobosana likambo yango te ekosalisa biso tóboya kosala makambo oyo eyokisaka ye mpasi. Tózala na mposa ya ‘kotambola na bopɔlɔ’ elongo na Nzambe na biso.—Mika 6:8. w24.06 4 par. 8-9

Mwaminei, 9 sanza ya 4

Abondelaki mpo na bato oyo babukaka mibeko.—Yis. 53:12.

Yehova asɛngaki Abrahama apesa mwana na ye moko Yisaka lokola mbeka. Na ntembe te, Abrahama amonaki ete kosala yango ezali mpasi mingi mpenza. Atako bongo, azwaki bibongiseli mpo na kosala likambo oyo Yehova asɛngaki. Kasi, ntango kaka alingaki koboma mwana na ye, Nzambe apekisaki ye. Atako bongo, ndakisa yango eteyaka bato nyonso oyo bazali na kondima likambo moko ya ntina mingi. Yehova akondima kopesa Mwana na ye ya bolingo lokola mbeka. Yehova alingaka bato mingi mpenza. (Eba. 22:​1-18) Bankama ya bambula na nsima, Mobeko oyo Yehova apesaki ekólo Yisraele esɛngaki bambeka mingi mpo na kozipa masumu ya bato na ye. (Lev. 4:​27-29; 17:11) Bambeka yango ezalaki mpo na komonisa mbeka ya monene koleka oyo esengelaki kopesama mpo na kolongola bato na lisumu mpo na libela. Elimo ya Nzambe esalisaki basakoli bákoma makambo etali momboto oyo alakamaki. Balimbolaki ete Mwana oyo Nzambe azalaki kolinga mingi akomona mpasi mpe akobomama mpo apesama mbeka mpo na kolongola bato, ata mpe yo, na boombo ya lisumu mpe ya liwa!—Yis. 53:​1-12. w24.08 4 par. 7-8

Mwamitano, 10 sanza ya 4

Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Nakanisaka yango na mozindo mokolo mobimba.—Nz. 119:97.

Ntango ozali kotánga Biblia, salá makasi omona ndenge ya kosalela makambo oyo otángi. Wana ozali kotánga, okoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kosalela makambo yango sikoyo to na mikolo ekoya?’ Na ndakisa, kanisá ete eteni oyo ozali kotánga ezali na 1 Batesaloniki 5:​17, 18. Nsima ya kotánga bavɛrsɛ yango mibale, okoki kotɛlɛma mpe kokanisa soki mbala boni obondelaka mpe soki mabondeli na yo ezalaka mpenza ya mozindo. Okoki mpe kokanisa makambo oyo okoki komonisa botɔndi mpo na yango. Mbala mosusu okosepela kopesa Yehova matɔndi mpo na makambo misato ya sikisiki. Ata soki ozwi kaka miniti moke mpo na kokanisa, ekosalisa yo okóma mwa moke moto oyo ayokaka mpe atosaka Liloba ya Nzambe. Kanisá sikoyo matomba oyo okozwa soki ozali kosala bongo mokolo na mokolo na biteni mosusu ya Biblia oyo otángi! Okokóma mpenza moto oyo atosaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe. w24.09 4-5 par. 9-10

Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 4

Bókeba mpo na bino moko, mpo bóbungisa te mbuma ya mosala oyo tosalaki, kasi mpo bózwa mbano ya mobimba.—2 Yoa. 8.

Yehova akelá biso na likoki moko ya kokamwa. Ya solo tosepelaka kozwa, kasi toyokaka esengo mingi koleka ntango topesi. Tomiyokaka malamu ntango tosalisi bandeko na biso. Mpe tozalaka na esengo ntango bamonisi botɔndi na bango. Kasi, ata soki moto oyo topesaki amonisi botɔndi to te, tokoki kaka kosepela mpo tosalaki likambo ya malamu. Tóbosana te ete ata soki topesaki eloko nini, ‘Yehova azali na makoki ya kopesa biso mingi koleka oyo wana.’ (2 Nt. 25:9) Tokoki kozala lobɔkɔ pɛtɛɛ koleka Yehova te! Mpe kofutama na Yehova nde ekopesa biso esengo koleka nyonso. Na yango, tózala na ekateli ya kokoba komekola Tata na biso ya likoló na likambo etali kokaba. w24.09 31 par. 20-21

Mwalomingo, 12 sanza ya 4

Ee Yehova Nzambe na ngai, nazali kosanzola yo na motema na ngai mobimba, mpe nakopesa nkombo na yo nkembo mpo na libela.—Nz. 86:12.

Yehova azali na motema mawa mpe ayokelaka bato mawa. (Nz. 103:13; Yis. 49:15) Amityaka na esika na biso; ntango tozali koyoka mpasi, ye mpe ayokaka mpasi. (Zek. 2:8) Asalisaka biso tóyeba ye mpe tókóma baninga na ye. (Nz. 25:14; Mis. 17:27) Mpe azali na komikitisa; “akitaka mpo na kotala likoló mpe mabele, atombolaka moto mpamba longwa na putulu.” (Nz. 113:​6, 7) Na kotalela bizaleli wana nyonso, tolingaka kopesa Nzambe na biso monene nkembo! Topesaka Yehova nkembo mpo tolingi ete basusu báyeba ye. Bato mingi bayebi solo na oyo etali Yehova te. Mpo na nini? Mpo Satana azipi makanisi na bango na ndenge apanzi mpenza mateya ya lokuta mpo na Nzambe. (2 Ko. 4:4) Satana andimisi bato ete Yehova azali Nzambe ya nkandankanda, akipaka bato te, mpe ye nde abimisaka bampasi ebele na mokili. Kasi biso toyebi solo na oyo etali Nzambe na biso! Tozali na libaku ya kosembola makambo mpe na ndenge yango kosalisa bato bápesa ye nkembo.—Yis. 43:10. w25.01 3 par. 6-7

Mwayambo, 13 sanza ya 4

Satana . . . azali kokosa mokili mobimba.—Em. 12:9.

Na siɛklɛ ya liboso, bato ya Satana balobaki makambo ebele ya lokuta mpo na Mwana ya Nzambe oyo azalaki moto ya kokoka mpe moto oyo azalaki kosala makamwisi. Na ndakisa, bakonzi ya mangomba bayebisaki bato ete nguya ya Yesu ya kobimisa bademo eutaki epai ya “mokonzi ya bademo.” (Mrk. 3:22) Ntango bazalaki kosambisa Yesu, bakonzi ya mangomba bafundaki ye ete afingi Nzambe mpe batindaki ebele ya bato básɛnga ete abomama. (Mat. 27:20) Na nsima, ntango bayekoli ya Kristo bazalaki kosakola nsango malamu, baoyo bazalaki kotɛmɛla bango “batombokisaki bato” mpo bányokola bakristo yango. (Mis. 14:​2, 19) Mpo na Misala 14:​2, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1998 elobaki: “Na esika básuka na koboya nsango bango moko, Bayuda oyo batɛmɛlaki baklisto babandaki kopanza nsango ya lokuta mpo ete bato ya mabota bákóma na makanisi ya mabe mpo na baklisto.” Lelo, Satana azali kaka “kokosa mokili mobimba.” w24.04 11 par. 15-16

Mwamibale, 14 sanza ya 4

Mosambisi ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?—Eba. 18:25.

Mpo moto azwa bomoi ya seko etaleli te ntango oyo moto yango akufi. Yehova azali Mosambisi ya kokoka; bikateli na ye ezalaka sembo mpe ya boyengebene. (Nz. 33:​4, 5) Tokoki kotya motema ete “Mosambisi ya mabele mobimba” akosala oyo ezali sembo. Ebongi mpe tóloba ete mpo moto azwa bomoi ya seko etaleli te esika oyo afandaka. Ekoki kosalema te ete Yehova akata mbala moko bamilio ya bato ete bazali “bantaba, kaka mpo bafandaka na bisika oyo bazwá libaku te ya koyoka mpe kondima nsango ya Bokonzi.” (Mat. 25:46) Mosambisi ya sembo ya mabele mobimba atyelaka bato yango likebi mingi koleka ndenge oyo biso tokoki kosala yango. Toyebi te ndenge oyo Yehova akotambwisa makambo na ntango ya bolɔzi monene. Mbala mosusu bato yango mosusu bakozwa libaku ya koyeba Yehova, kondimela ye, mpe kopona kozala na ngámbo na ye ntango akomisantisa liboso ya bikólo nyonso.—Ezk. 38:16. w24.05 12 par. 14-15

Mwamisato, 15 sanza ya 4

Bólinganaka.—Yoa. 15:12.

Basaleli ya Yehova balingaka kosalisana. (2 Ko. 8:4) Kasi na bantango mosusu, esɛngaka mpiko mpo na kosala yango. Na ndakisa, na ntango ya etumba, bankulutu bamonaka ete esengeli kolendisa bandeko, kopesa bango lisungi, mpe mbala mosusu komemela bango bilei ya elimo to ya mosuni. Lokola bankulutu balingaka bampate, batyaka bomoi na bango na likama mpo na kosalisa bandeko na ndenge oyo esengeli. Na makambo ya ndenge wana, ezalaka na ntina mingi kotosa mpo tóbatela bomoko. Tosá malako oyo euti na Betele. (Ebr. 13:17) Bankulutu basengeli mbala na mbala kozongelaka bibongiseli oyo lisangá ezwá na oyo etali komibongisa na makama, mpe malako ya ebongiseli ya Yehova mpo na ndenge ya kosala na ntango ya likama. (1 Ko. 14:​33, 40) Zalá na mpiko kasi mpe ekɛngɛ. (Mas. 22:3) Salelá bososoli. Komitya na likama ezangá ntina te. Tyelá Yehova motema. Akoki kosunga yo osalisa bandeko kozanga omitya na likama. w24.07 4 par. 8; 5 par. 11

Mwaminei, 16 sanza ya 4

Na mpasi na ngai nabelelaki Yehova, . . . mpe kolela na ngai epai na ye mpo na kosɛnga lisalisi ekómaki na matoi na ye.—Nz. 18:6.

Mokonzi Davidi ayebaki Yehova mpe azalaki kotyela Ye motema. Ntango banguna, ata mpe Mokonzi Saulo, bazalaki koluka koboma ye, Davidi abondelaki Yehova asalisa ye. Na nsima ntango Nzambe ayanolaki na libondeli na ye mpe abikisaki ye, Davidi alobaki: “Yehova azali na bomoi!” (Nz. 18:46) Na maloba yango, Davidi azalaki kaka kondima te ete Nzambe azalaka. Buku moko elobi ete Davidi azalaki komonisa ndenge atyelaki Yehova motema lokola “Nzambe ya bomoi oyo asalaka ntango nyonso mpo na bolamu ya bato na ye.” Ya solo, makambo oyo Davidi akutanaki na yango esalisaki ye amona ete Nzambe na ye azalaki na bomoi, mpe yango ebakiselaki ye mpiko ya kosalela Yehova mpe kosanzola ye. (Nz. 18:​28, 29, 49) Komindimisa ete Yehova azali Nzambe ya bomoi ekoki kosalisa biso tósalela ye na molende. Tokozala na makasi ya koyikela mikakatano mpiko mpe tokolinga kokoba kosala mingi na mosala na ye. Tokozala mpe na ekateli ya kotikala penepene na Yehova. w24.06 20-21 par. 3-4

Mwamitano, 17 sanza ya 4

Moto akosa bino te ata na ndenge nini.—2 Tes. 2:3.

Maloba ya ntoma Paulo epai ya Batesaloniki ekoki koteya biso nini? Ntango toyoki likambo moko oyo eyokani te na makambo oyo toyekolá na Biblia, to ntango toyoki nungunungu oyo eningisi biso, tosengeli kosalela bososoli. Na ex-Union soviétique, banguna na biso batambwisaki mokanda moko oyo emonanaki lokola ete eutaki na biro monene. Mokanda yango elendisaki bandeko mosusu bálongwa mpe básala ebongiseli mosusu ya bango moko. Mokanda yango emonanaki lokola ya solo mpenza. Kasi bandeko oyo bazalaki sembo bakosamaki te. Bamonaki ete makambo oyo ezali na mokanda yango eyokanaki te na mateya oyo bayekolá. Lelo mpe, na bantango mosusu banguna ya solo basalelaka Internet mpe basite ya kosolola na bato mpo na kokɔtisa mobulungano kati na biso mpe kokabola biso. Tosengeli te ‘kobulungana nokinoki na makanisi na biso’; tosengeli komibatela, kotala malamumalamu soki makambo oyo toyoki to totángi eyokani na mateya ya solo oyo toyekolá.—2 Tes. 2:2; 1 Yoa. 4:1. w24.07 12 par. 14-15

Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 4

Soki moto asali lisumu, tozali na mosungi.—1 Yoa. 2:1.

Ekateli ya ntina mingi oyo moto akoki kozwa ezali ya komipesa na Yehova mpe kokɔta na libota ya basambeli na Ye. Yehova alingi ete moto nyonso asala yango. Mpo na nini? Alingi bázala baninga na ye mpe bázala na bomoi libela na libela. (Mib. 30:​19, 20; Gal. 6:​7, 8) Kasi, Yehova atindaka moto na makasi te ete asalela ye. Atikaka moto na moto apona oyo akosala. Bongo soki mokristo oyo azwá batisimo abuki mobeko ya Nzambe, asali lisumu moko ya monene? Soki abongoli motema te, asengeli kolongolama na lisangá. (1 Ko. 5:13) Atako bongo, Yehova alingaka mpenza ete moto azongela Ye. Kutu, yango nde ntina monene oyo apesaki lisiko—mpo basumuki oyo babongoli motema bákoka kolimbisama. Nzambe na biso ya bolingo abondelaka baoyo basali lisumu ya monene, alendisaka bango ete bábongola motema.—Zek. 1:3; Rom. 2:4; Yak. 4:8. w24.08 14 par. 1-2

Mwalomingo, 19 sanza ya 4

Soki motema na yo ekómi na bwanya, motema na ngai ekosepela.—Mas. 23:15.

Ntango ntoma Yoane akomaki mokanda na ye ya misato, bato mosusu bazalaki kopanza mateya ya lokuta mpe kokɔtisa bokabwani. Kasi, basusu bakobaki “kotambola na kati ya solo.” Bazalaki kotosa Yehova mpe “kotambola ndenge mibeko na ye esɛngi.” (2 Yoa. 4, 6) Bakristo yango ya sembo bazalaki kosepelisa kaka Yoane te, kasi mpe Yehova. (Mas. 27:11) Liteya ezali nini mpo na biso? Kotikala sembo epesaka esengo. (1 Yoa. 5:3) Na ndakisa, toyokaka esengo mpo toyebi ete tozali kosepelisa Yehova. Yehova asepelaka ntango toboyi komekama ya mokili oyo mpe tolandi solo. Baanzelu na likoló mpe basepelaka. (Luka 15:10) Biso mpe tokoki kosepela ntango tozali komona ndenge biso moko mpe bandeko mosusu tozali kotikala sembo. (2 Tes. 1:4) Na bongo, ntango mokili oyo ekozala lisusu te, tokozala na esengo ya koyeba ete tomonisaki bosembo epai ya Yehova ata na mokili oyo eyangelamaki na Satana. w24.11 12 par. 17-18

Mwayambo, 20 sanza ya 4

Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.—1 Ko. 10:24.

Ntango boni osengeli kotalela moto liboso oyebisa ye ete osepeli na ye? Soki osololi na ye mbangumbangu, ekobima lokola osalaka makambo kozanga kokanisa. (Mas. 29:20) Kasi, soki mpe oumeli mingi mpo na kosolola na ye, ekobima lokola ozali kobanga, mingimingi soki moto yango amonaka ete osepelaka na ye. (Mos. 11:4) Kobosana te, liboso okende kosolola na moto, esɛngi te omindimisa mpenza ete okobala ye. Osengeli nde komindimisa ete okoki mpo na kobala mpe ete moto yango akoki kozala molongani oyo abongi na yo. Kasi, okosala nini soki omoni ete moto moko azali kosepela na yo? Soki yo ozali kosepela na ye te, meká komonisa yango polele na misala na yo. Ekozala malamu te kotinda moto akanisa ete ntango mosusu okoki kondima kolingana na ye, nzokande ezali bongo te.—Ef. 4:25. w24.05 22-23 par. 9-10

Mwamibale, 21 sanza ya 4

Nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai.—Yoa 14:3.

Kaka bakristo ya solosolo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali sembo nde bakoyambama epai ya Yesu na Bokonzi ya likoló. Mokristo nyonso oyo atyami mafuta na elimo, oyo akobi te kosɛnzɛla na elimo akoyanganisama te elongo na “bato oyo ye aponá.” (Mat. 24:31) Tokoki koloba ete, basaleli nyonso ya Nzambe, bázala na elikya ya bomoi na likoló to na mabele, basengeli komona ete maloba ya Yesu ezali likebisi oyo esɛngi bango bákoba kosɛnzɛla mpe kotikala sembo. Lokola toyebi Yehova malamu, tondimaka ete lisambisi na ye ezalaka sembo. Tomitungisaka te soki Yehova atye bakristo mosusu mafuta na mikolo na biso. Tomikundwelaka makambo oyo Yesu alobaki mpo na basali oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano nsima ya midi na ndakisa na ye ya elanga ya mbuma ya vinyo. (Mat. 20:​1-16) Baoyo babandaki mosala na mpokwa bazwaki lifuti ndenge moko na baoyo babandaki na ntɔngɔ. Ndenge moko mpe, ata soki bakristo batyami mafuta na elimo na eleko nini, bakozwa mbano na bango na likoló soki batikali sembo. w24.09 24 par. 15-17

Mwamisato, 22 sanza ya 4

Kristo mpe amonaki mpasi mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.—1 Pe. 2:21.

Yesu atikaki ndakisa ya kokoka na oyo etali koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo. Kanisá makambo ya kozanga bosembo oyo basalaki ye epai ya bato ya libota na ye mpe bato mosusu. Bandeko na ye oyo bandimelaki ye te balobaki ete abɛli motó; bakonzi ya mangomba balobaki ete azali kosala makamwisi na nguya ya bademo; mpe basoda ya Roma batyolaki ye, babɛtaki ye, mpe nsukansuka babomaki ye. (Mrk. 3:​21, 22; 14:55; 15:​16-20, 35-37) Kasi, Yesu ayikaki mpiko na makambo wana nyonso kozanga kozongisa mabe. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye? (1 Pe. 2:​21-23) Yesu atikelaki biso ndakisa malamu ya kolanda ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. Ayebaki ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba. (Mat. 26:​62-64) Apesaki eyano te na makambo mosusu ya lokuta oyo bakoselaki ye. (Mat. 11:19) Ntango amonaki malamu aloba, afingaki te bato oyo bazalaki konyokola ye, akanelaki mpe bango te. w24.11 4-5 par. 9-10

Mwaminei, 23 sanza ya 4

Kristo Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki.—1 Tim. 1:15.

Kanisá ete opesi moto moko oyo olingaka likabo moko ya kitoko mpe oyo ekosalisa ye mpenza. Okolɛmba mpenza nzoto soki moto yango atye yango na esika ya kobomba biloko mpe akipaka yango te! Kasi na ntembe te okosepela soki azali kosalela likabo na yo malamu, mpe apesi yo matɔndi mpo na yango. Liteya ezali nini? Yehova apesaki Mwana na ye mpo na biso. Na ntembe te ayokaka esengo ntango tomonisi botɔndi mpo na likabo yango ya kitoko mpe mpo na bolingo na ye, oyo etindaki ye apesa lisiko! (Yoa. 3:16; Rom. 5:​7, 8) Nzokande, wana ntango ezali koleka, tokoki kobanda komona likabo ya lisiko lokola eloko ya bongobongo. Ekozala lokola nde totyá likabo ya Nzambe na esika ya kobomba biloko. Tozali na esengo ya kozala na yango, kasi tolingi komona yango te. Mpo likambo yango ekómela biso te, tosengeli mbala na mbala komonisaka botɔndi mpo na oyo Nzambe ná Kristo basalá mpo na biso. w25.01 26 par. 1-2

Mwamitano, 24 sanza ya 4

Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.—1 Tim. 4:15.

Esɛngi ete ndeko mobali oyo alingi kokóma nkulutu azala mondimi ya sika te. Esɛngi kaka te ete ozwa batisimo banda bambula mingi, kasi osengeli na ntango mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. Liboso otyama nkulutu, na ndakisa ya Yesu, osengeli komonisa ete ozali moto ya komikitisa mpe osepelaka kozela ntango oyo Yehova amoni malamu mpo na kopesa yo mokumba. (Mat. 20:23; Flp. 2:​5-8) Okoki komonisa ete ozali moto ya sembo soki okangami na Yehova mpe na mitinda na ye ya sembo mpe ozali kolanda malako oyo azali kopesa na nzela ya ebongiseli na ye. Biblia elobi polele ete mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo ayebi koteya. Yango elingi nde koloba ete osengeli kozala moto oyo asalaka badiskur ya kafukafu? Te. Bankulutu mingi ya makoki, atako bazali te na kati ya balobi oyo baleki malamu, bayebi koteya na mosala ya kosakola mpe kolendisa bandeko malamu. w24.11 23-24 par. 14-15

Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 4

Nalingaka mitindo na yo koleka wolo, koleka ata wolo oyo epɛtolami.—Nz. 119:127.

Ntango omoni mokapo moko na Biblia oyo okangi ntina na yango malamu te, salá bolukiluki. Na nsima, na boumeli ya mokolo yango, manyolá likambo ya sika oyo omoni mpe oyo yango ezali koteya yo mpo na Yehova, Mwana na ye, mpe bolingo na bango mpo na yo. (Nz. 119:​97, msl.) Kolɛmba nzoto te soki omoni te eloko ya sika to oyo esepelisi yo mbala nyonso oyo ofandi mpo na kotánga to kosala bolukiluki. Tokoki koloba ete ozali lokola moto oyo alukaka wolo. Bato oyo balukaka wolo bamonisaka motema molai na ndenge balekisaka bangonga to mikolo mingi liboso bámona ata mwa wolo. Kasi, batikaka koluka te mpo wolo nyonso oyo bakozwa, ata ya moke, ezali na motuya mingi mpo na bango. Eloko nyonso ya sika oyo tokoki koyekola na Biblia ezali na motuya monene koleka wolo! (Mas. 8:10) Na yango, zalá na motema molai mpe kangamá na programɛ na yo ya botángi ya Biblia.—Nz. 1:2. w25.01 25 par. 14-15

Mwalomingo, 26 sanza ya 4

Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.—Kol. 3:13.

Yehova alingi tózalaka pene ya kolimbisa baoyo bazokisi biso. (Nz. 86:5; Luka 17:4; Ef. 4:32) Tokoki koyoka mpasi mpenza mpo na likambo oyo moto alobi to asali biso, mingimingi soki moto yango azali moninga ya motema to moto ya libota. (Nz. 55:​12-14) Na bantango mosusu, mpasi oyo tozali koyoka ekoki kozala lokola bazokisi biso. (Mas. 12:18) Tokoki koluka kosala lokola tozali koyoka eloko te. Kasi kosala bongo ezali lokola ozoki mpe otiki mbeli na mpota yango. Ndenge moko mpe, tókanisa te ete mpasi oyo bapesi biso ekosila yango moko soki toboyi kondima yango. Ntango moto alobi to asali biso mabe, mbala mingi toyokaka nkanda. Biblia mpe endimi ete tokoki koyoka nkanda. Kasi, ekebisi biso tótika te nkanda etambwisa biso. (Nz. 4:4; Ef. 4:26) Mpo na nini? Mpo mayoki ya nkanda etindaka mpenza te na makambo ya malamu. (Yak. 1:20) Tóbosana te, likambo moko ekoki kopesa biso nkanda, kasi tokoki kopona kotikala na nkanda to te. w25.02 15 par. 4-6

Mwayambo, 27 sanza ya 4

Bwanya ebatelaka bomoi ya moto oyo azali na yango.—Mos. 7:12.

Yesu amonisaki bozoba ya komibombela mbongo soki ozali “mozwi te na miso ya Nzambe.” (Luka 12:​16-21) Moto moko te ayebi ndenge lobi ekozala. (Mas. 23:​4, 5; Yak. 4:​13-15) Biso bayekoli ya Yesu tozali na mokakatano ya ndenge mosusu. Yesu alobaki ete tosengeli kondima “kotika” biloko na biso nyonso mpo na kozala bayekoli na ye. (Luka 14:33) Bakristo ya siɛklɛ ya liboso na Yudea bandimaki kosala yango na esengo. (Ebr. 10:34) Na mikolo na biso, bandeko mingi bandimaki kotika bomɛngo na bango mpo baboyaki kopesa mabɔkɔ na makambo ya politiki. (Em. 13:​16, 17) Nini esalisi bango básala yango? Batyaka motema mobimba na elaka oyo ya Yehova ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Ebr. 13:5) Tosalaka nyonso mpo na kozwa bibongiseli mpo na kokokisa bamposa na biso na mikolo ekoya, kasi soki makambo oyo ekanami te ekómeli biso, totyaka motema na lisalisi ya Yehova. w25.03 29 par. 13-14

Mwamibale, 28 sanza ya 4

Lokola sikoyo totiki mateya ya ebandeli oyo etali Kristo, tósala makasi tókóma bato oyo bakɔmɛli, tótya lisusu moboko te.—Ebr. 6:1.

Yehova alobi te ete tókóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo na ndenge na biso moko. Bandeko oyo bazali babateli ya mpate mpe bateyi na lisangá ya bokristo bazwaka formasyo mpo na kosalisa biso tókóma bato oyo ‘bakoli mpenza’ na elimo, ‘tii ntango tokokóma na bokoli mobimba ya Kristo.’ (Ef. 4:​11-13) Yehova apesaka biso mpe elimo santu na ye mpo esalisa biso tókóma na “makanisi ya Kristo.” (1 Ko. 2:​14-16) Lisusu, Nzambe akomisaki masolo ya Baevanzile minei mpo na kolakisa biso ndenge Yesu azalaki kokanisa, koloba, mpe kosala makambo ntango azalaki awa na mabele. Soki omekoli ndenge Yesu azalaki kokanisa mpe kosala makambo, okoki kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. Kasi mpo na kokɔmɛla na elimo, tosengeli mpe ‘kotika mateya ya ebandeli oyo etali Kristo,’ elingi koloba, mateya ya moboko ya bokristo. w24.04 4-5 par. 11-12

Mwamisato, 29 sanza ya 4

Likoki ya kokanisa ekokɛngɛla yo, mpe bososoli ekobatela yo.—Mas. 2:11.

Tozwaka bikateli mikolo nyonso. Mosusu ezalaka mpenza mpasi te mpo na kozwa, na ndakisa tokolya nini na ntɔngɔ to ngonga nini tokokende kolala. Kasi na makambo mosusu ezalaka mpasi kozwa bikateli. Bikateli na makambo yango ekoki kosimba kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, esengo na biso, bato oyo tolingaka, to mpe losambo na biso. Tolingaka ete bikateli na biso ememela biso ná bato ya libota na biso matomba. Koleka nyonso, tozalaka na elikya ete bikateli oyo tozwi ekosepelisa Yehova. (Rom. 12:​1, 2) Likambo ya ntina oyo ekosalisa yo ozwa ekateli ya malamu ezali ya koluka koyeba bosolo ya likambo. Mpo na nini ezali na ntina? Tózwa ndakisa: kanisá ete moto oyo azali kobɛla makasi akei epai ya monganga. Soki monganga atali nzoto ya moto yango te mpe atuni ye mituna te, akozwa ekateli ya malamu mpo na lisalisi oyo asengeli kopesa ye? Akozwa ekateli ya malamu te. Yo mpe okozwa bikateli ya malamu soki oluki liboso koyeba bosolo ya likambo oyo ozali na yango. w25.01 14 par. 1-3

Mwaminei, 30 sanza ya 4

Yehova . . . alimbisi lisumu na yo. Okokufa te.—2 Sa. 12:13.

Toyebi makambo nini mpo na motema mawa ya Yehova? Ndenge nini amonisi ete “alingi moto ata moko te abomama”? (2 Pe. 3:9) Tótala ndenge oyo amonisaki motema mawa epai ya bato mosusu oyo basalaki masumu ya minene. Mokonzi Davidi asalaki masumu ya minene, kati na yango ekobo mpe koboma moto. Kasi, lokola Davidi abongolaki motema, Yehova amonisaki motema mawa mpe alimbisaki ye. (2 Sa. 12:​1-12) Mokonzi Manase asalaki mabe mingi mpenza na bomoi na ye. Kasi, atako mabe yango elekaki ndelo, Yehova andimaki kobongola motema ya moto yango mpe amonaki ntina ya komonisa motema mawa mpe kolimbisa ye. (2 Nt. 33:​9-16) Bandakisa yango ezali kokundwela biso ete Yehova amonisaka motema mawa mbala nyonso oyo amoni ete azali na ntina ya kosala yango. Akosekwisa bato ya ndenge wana mpo bandimaki ete basalaki masumu ya minene mpe babongolaki motema. w24.05 4 par. 12

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto