Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es26 nk. 26-36
  • Sanza ya 3

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 3
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwalomingo, 1 sanza ya 3
  • Mwayambo, 2 sanza ya 3
  • Mwamibale, 3 sanza ya 3
  • Mwamisato, 4 sanza ya 3
  • Mwaminei, 5 sanza ya 3
  • Mwamitano, 6 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 8 sanza ya 3
  • Mwayambo, 9 sanza ya 3
  • Mwamibale, 10 sanza ya 3
  • Mwamisato, 11 sanza ya 3
  • Mwaminei, 12 sanza ya 3
  • Mwamitano, 13 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 15 sanza ya 3
  • Mwayambo, 16 sanza ya 3
  • Mwamibale, 17 sanza ya 3
  • Mwamisato, 18 sanza ya 3
  • Mwaminei, 19 sanza ya 3
  • Mwamitano, 20 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 22 sanza ya 3
  • Mwayambo, 23 sanza ya 3
  • Mwamibale, 24 sanza ya 3
  • Mwamisato, 25 sanza ya 3
  • Mwaminei, 26 sanza ya 3
  • Mwamitano, 27 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 29 sanza ya 3
  • Mwayambo, 30 sanza ya 3
  • Mwamibale, 31 sanza ya 3
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2026
es26 nk. 26-36

Sanza ya 3

Mwalomingo, 1 sanza ya 3

Moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.—Rom. 6:7.

Totángaka na Biblia ete bato ya sembo bakómaki bato oyo bazangi bosembo. Tózwa ndakisa ya Mokonzi Salomo. Bateyaki ye banzela ya Nzambe malamu mpenza mpe Yehova apambolaki ye mingi; kasi na nsima Salomo akómaki kosambela banzambe ya lokuta. Masumu na ye esilikisaki Yehova mpe ememelaki Yisraele mpasi oyo eumelaki bankama ya bambula. Ya solo, Biblia elobi ete Salomo “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye,” kati na bango mibali ya sembo lokola Mokonzi Davidi. (1 Bak. 11:​5-9, 43, msl; 2 Bak. 23:13) Kasi, lokola basalelaki maloba wana mpo na kolobela ndenge oyo bakundaki ye emonisi nde ete akosekwa? Biblia elobi eloko te. Lisekwa ezali likabo oyo euti na Nzambe na biso ya bolingo. Apesaka yango na baoyo alingi kopesa libaku ya kosalela ye libela na libela. (Yobo 14:​13, 14; Yoa. 6:44) Salomo akozwa likabo yango? Yehova nde ayebi; biso toyebi te. Kasi, toyebi ete Yehova akosala oyo ezali sembo. w24.05 4 par. 9

Mwayambo, 2 sanza ya 3

Nakoyambama na hema na yo mpo na libela.—Nz. 61:4.

Ntango tomipesi na Yehova, ayambaka biso na hema na ye ya elilingi. Tozalaka na ebele ya bilei ya elimo mpe tokómaka baninga ya bato mosusu oyo bazali mpe bapaya ya Yehova. Hema na ye ya elilingi esuki kaka na esika moko boye te. Hema ya Yehova ezali esika nyonso oyo basambeli na ye ya sembo bazali. (Em. 21:3) Bongo tokoloba nini mpo na bato ya sembo oyo bakufá? Ebongi tóloba ete bazali kaka bapaya na hema ya Yehova? Ee! Mpo na nini tolobi bongo? Mpo bazali na bomoi na makanisi ya Yehova. Yesu alobaki: ‘Na oyo etali lisekwa ya bakufi, Moize amonisaki yango na lisolo ya mwa banzete ya nzubɛ, ntango abengi Yehova “Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo.” Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpamba te epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.’—Luka 20:​37, 38. w24.06 3 par. 6-7

Mwamibale, 3 sanza ya 3

Yehova azali makasi na ngai mpe nguba na ngai.—Nz. 28:7.

Zadoke akendaki na Hebrone na bibundeli mpe azalaki pene mpo na kobunda. (1 Nt. 12:38) Amibongisaki mpo na kolanda Davidi na etumba mpe kobundisa banguna ya Yisraele. Ekoki kozala ete Zadoke azalaki na mayele mingi te ya etumba, kasi azalaki na mpiko mingi. Ndenge nini Zadoke, moto oyo azalaki nganga-nzambe, akómaki na mpiko mingi boye? Ayebaki mibali ebele oyo bazalaki na makasi mpe na mpiko. Na ntembe te alandaki ndakisa na bango. Na ndakisa, ndenge Davidi azalaki “kokamba Yisraele na bitumba” na mpiko nyonso etindaki Bayisraele nyonso bápesa ye mabɔkɔ na motema moko. (1 Nt. 11:​1, 2) Davidi azalaki ntango nyonso kotyela Yehova motema mpo asalisa ye abundisa banguna na ye. (Nz. 138:3) Zadoke azalaki na bandakisa mosusu pene na ye, lokola Yehoyada ná mwana na ye Benaya, oyo azalaki elombe ya etumba, mpe bankumu mosusu 22 ya libota ya tata na ye, oyo bamityaki na ngámbo ya Davidi.—1 Nt. 11:​22-25; 12:​26-28. w24.07 3 par. 5-6

Mwamisato, 4 sanza ya 3

Nzambe, na boboto na ye alingi komema yo obongola motema.—Rom. 2:4.

Saulo moto ya Tarse anyokolaki bayekoli ya Kristo mingi mpenza. Na ntembe te bakristo mingi bazalaki kokanisa ete esili mpo na ye, elikya ezali lisusu te ete akoki kobongola motema. Kasi, Yesu azalaki na makanisi wana ya bomoto te. Ye ná Tata na ye bamonaki bizaleli malamu ya Saulo. Yesu alobaki: “Mobali wana azali mbɛki oyo naponi.” (Mis. 9:15) Yesu asalelaki kutu likamwisi moko mpo na kosalisa Saulo abongola motema. (Mis. 7:58–8:3; 9:​1-9, 17-20) Nsima ya kokóma mokristo, Saulo, oyo na nsima ayebanaki lokola ntoma Paulo, azalaki komonisa mbala mingi botɔndi na ye mpo na boboto mpe motema mawa oyo bamoniselaki ye. (1 Tim. 1:​12-15) Ntango Paulo ayokaki nsango ya nsɔmɔ mpo na pite oyo ezalaki kosalema na lisangá ya Korinti, asalaki nini mpo na yango? Makambo oyo alobaki eteyaka biso ndenge Yehova amonisaka bolingo ntango apesi disiplini mpe ntina ya komonisa motema mawa. w24.08 13 par. 15-16

Mwaminei, 5 sanza ya 3

Ezali mpo na ntina yango nde Mwana ya Nzambe amonanaki: mpo na kobebisa misala ya Zabolo.—1 Yoa. 3:8.

Na boumeli ya bankama ya bambula, Yehova amonisaki mokemoke mpe polelepolele ndenge oyo bato ya masumu bakokaki kopusana penepene na ye. Abele, mwana mobali ya mibale ya Adama ná Eva, azalaki moto ya liboso oyo andimelaki Yehova nsima ya botomboki oyo ebimaki na Edene. Lokola Abele alingaki Yehova mpe alukaki kosepelisa Ye mpe kopusana penepene na Ye, apesaki mbeka. Lokola azalaki mobateli ya mpate, Abele azwaki mwa ndambo ya bana-mpate na etonga na ye, abomaki yango mpe atumbaki yango mbeka epai ya Yehova. Yehova asalaki nini? “Andimaki Abele ná likabo na ye.” (Eba. 4:4) Na nsima, Yehova andimaki mpe bambeka mosusu ya bato oyo balingaki ye mpe batyelaki ye motema, na ndakisa Noa. (Eba. 8:​20, 21) Ndenge Yehova andimaki bambeka yango, amonisaki ete bato ya masumu bakoki kondimama na ye mpe kopusana penepene na ye. w24.08 3 par. 5-6

Mwamitano, 6 sanza ya 3

Etikalaki moke makolo na ngai elongwa na nzela ya sembo, matambe na ngai etikalaki moke esɛlimwa.—Nz. 73:2.

Makambo ya kozanga bosembo ekoki kopesa biso mpasi mpe mawa makasi. (Mos. 7:7) Basaleli ya Nzambe ya sembo, lokola Yobo mpe Habakuku, bayokaki mpe bongo. (Yobo 6:​2, 3; Hab. 1:​1-3) Atako mayoki yango ezali mabe te, tosengeli kokeba ete tósala likambo ya bozoba te ntango basali biso likambo ya kozanga bosembo mpe ekoki kobebisa lisusu makambo. Ntango ezali komonana ete baoyo bazali kosala makambo ya kozonga bosembo bazali kozwa etumbu te, tokoki komituna soki ebongi mpenza kosala oyo ezali malamu. Tótalela ndakisa ya mokomi ya nzembo oyo amonaki lokola nde bato mabe bazali na bomoi ya malamu, mpe konyokola bato ya sembo. Alobaki: “Bato mabe bazalaka bongo, . . . bamitungisaka ata moke te.” (Nz. 73:12) Alɛmbaki mpenza nzoto mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo amonaki, mpe azalaki lisusu komona mpenza te matomba ya kosalela Yehova; alobaki: “Ntango nalukaki koyeba yango, natungisamaki.”—Nz. 73:​14, 16. w24.11 3 par. 5-7

Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 3

Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, bino mabota ya bato ya bikólo, bópesa Yehova oyo ebongi na ye, mpo na nkembo mpe bokasi na ye.—Nz. 96:7.

Topesaka Yehova nkembo mpo tozalaka na limemya makasi epai na ye. Tozali na bantina mingi ya komemya Yehova. Azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso; nguya na ye ezali na nsuka te. (Nz. 96:​4-7) Bwanya na ye monene emonanaka polele na biloko oyo akelá. Ye nde Mopesi mpe Mobateli ya bomoi na biso. (Em. 4:11) Azali sembo. (Em. 15:4) Makambo nyonso oyo asalaka elongaka, mpe akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Yos. 23:14) Yango wana mosakoli Yirimia alobaki mpo na Yehova ete: “Bato nyonso ya bwanya na bikólo mpe na makonzi na bango nyonso, moto moko te akokani na yo”! (Yir. 10:​6, 7) Ya solo, tozali mpenza na bantina ebele ya komemya Tata na biso ya likoló. Kasi Yehova abongi kaka te na limemya na biso, abongi mpe tólinga ye. Oyo eleki nyonso, topesaka Yehova nkembo mpo tolingaka ye mingi. w25.01 3 par. 5-6

Mwalomingo, 8 sanza ya 3

Bólongola moto mabe na kati na bino.—1 Ko. 5:13.

Banguna ya Nzambe balukaka kosala ete makambo ya malamu ya ebongiseli na ye emonana ete ezali mabe. Na ndakisa, toyekolá na Biblia ete Yehova alingi ete basaleli na ye bázala pɛto na nzoto, na bizaleli, mpe na elimo. Asɛngi ete moto nyonso oyo azali kokoba kosala makambo ya mbindo kozanga kobongola motema alongolama na lisangá. (1 Ko. 5:​11, 12; 6:​9, 10) Totosaka etinda yango ya Biblia. Kasi, banguna na biso balukaka kosalela yango mpo na kofunda biso ete tozali makambo makasimakasi, tosambisaka basusu, mpe ete tolingaka bato te. Tosengeli kobosana te moto oyo azali nsima ya banguna yango. Satana Zabolo nde apanzaka makambo ya lokuta. Azali “tata ya lokuta.” (Yoa. 8:44; Eba. 3:​1-5) Na yango, tosengeli koyeba ete Satana akosalela bato na ye mpo na kotambwisa masapo ya lokuta mpo na ebongiseli ya Yehova. w24.04 10-11 par. 13-14

Mwayambo, 9 sanza ya 3

Ekokokisama mpenza.—Ezk. 33:33.

Ata nsima ya kobanda ya bolɔzi monene, ekoki kaka kosalema ete bato mosusu oyo bamoni kobebisama ya “Babilone Monene” bámikundwela ete Batatoli ya Yehova bazalaki kolobela likambo yango banda kala. Bato mosusu oyo bamoni makambo wana bakoki nde kobongola motema? (Em. 17:5) Soki likambo ya ndenge wana esalemi, ekozala lokola likambo oyo esalemaki na Ezipito na mikolo ya Moize. Tómikundwela ete “etuluku monene ya bato ndenge na ndenge” babimaki na Ezipito elongo na Yisraele. Ekoki kozala ete bato yango mosusu babandaki kokolisa kondima epai ya Yehova ntango bamonaki ete makambo oyo Moize alobaki mpo na Malɔzi Zomi ekokisamaki. (Kob. 12:38) Soki likambo ya ndenge wana esalemi nsima ya kobebisama ya Babilone Monene, tokoyoka nde mabe mpo bato bayei kosangana na biso kaka mwa moke liboso nsuka eya? Te, tokoyoka mabe te! Tolingaka komekola bizaleli ya Tata na biso ya likoló, “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na bolingo ya sembo mpe na solo.”—Kob. 34:6. w24.05 11 par. 12-13

Mwamibale, 10 sanza ya 3

Kangamá ntango nyonso na ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba.—2 Tim. 1:13.

Nini ekoki kosalema soki totiki “ndakisa ya maloba oyo ezali pɛto”? Tótalela ndakisa moko. Na siɛklɛ ya liboso, emonani ete bakristo mosusu bazalaki kopanza nungunungu oyo elobaki ete mokolo ya Yehova esilá koya. Mbala mosusu ezalaki na mokanda moko oyo elobaki likambo yango, mpe bakanisaki ete ntoma Paulo nde akomaki yango. Kozanga bálandela likambo yango malamu mpo na koyeba bosolo na yango, bakristo mosusu ya Tesaloniki bandimaki nungunungu yango mpe babandaki kutu kopanza yango. Balingaki kokosama te soki bákanisaka lisusu makambo oyo Paulo ateyaki bango ntango azalaki elongo na bango. (2 Tes. 2:​1-5) Paulo apesaki bandeko toli ete bándimaka te likambo nyonso oyo bayoki. Mpe mpo na kosalisa bango bákosama lisusu te, Paulo asukisaki mokanda na ye ya mibale epai ya Batesaloniki na maloba oyo: “Oyo ezali mbote na ngai, Paulo, nakomi yango na lobɔkɔ na ngai moko, yango ezali elembo na mikanda na ngai nyonso; wana ezali ndenge nakomaka.”—2 Tes. 3:17. w24.07 12 par. 13-14

Mwamisato, 11 sanza ya 3

Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko.—Ebr. 10:36.

Bakristo Baebre basengelaki koyika mpiko na makambo oyo ezalaki komeka kondima na bango wana makambo ezalaki se kobeba na Yudea. Atako bakristo yango mosusu basilaki kokutana na monyoko ya makasi, mingi bandimaki solo na eleko oyo mwa kimya ezalaki. Ntoma Paulo amonisaki ete atako bayikaki mpiko na makambo oyo emekaki kondima na bango, banyokwamaki naino te lokola Yesu, elingi koloba, tii na liwa. (Ebr. 12:4) Kasi, Bayuda oyo bazalaki batɛmɛli bazalaki se kokóma na nkanda mpe mobulu mingi mpo bato mingi bazalaki kokóma bakristo. Bambula moke kaka liboso, bayuda koleka 40 “balapaki ndai ete mabe ekómela bango soki balei mpe bamɛli liboso ete báboma Paulo.” (Mis. 22:22; 23:​12-14) Atako makambo ya mobulu mpe koyina wana, bakristo yango basengelaki kokoba koyangana mpo na kosambela elongo, kosakola nsango malamu, mpe kobatela kondima na bango makasi. w24.09 12 par. 15

Mwaminei, 12 sanza ya 3

[Yesu] alobaki na mama na ye: “Mwasi, talá mwana na yo!”—Yoa. 19:26.

Yoane azalaki ntoma oyo Yesu Kristo alingaki mingi. (Mat. 10:2) Yoane azalaki elongo na Yesu na boumeli ya mosala na ye, amonaki makamwisi oyo Yesu asalaki, mpe akangamaki na ye na ntango ya mpasi. Amonaki ndenge babomaki Yesu mpe amonaki ye lisusu nsima ya lisekwa na ye. Lisusu, amonaki ndenge lisangá ya bokristo ekolaki na siɛklɛ ya liboso kobanda na mwa etuluku moke ya bato ya sembo tii ntango nsango malamu “esakolamaki na kati ya bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:23) Na nsuka ya bomoi na ye ya molai, Yoane azwaki libaku ya kokoma eteni ya Liloba ya Nzambe na lisalisi ya elimo santu. Akomaki makambo ya kokamwa, “emoniseli ya Yesu Kristo.” (Em. 1:1) Yoane akomaki mpe Evanzile oyo ebengami na nkombo na ye. Akomaki mpe mikanda misato na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mokanda ya misato atindelaki yango Gayusi, mokristo moko ya sembo, oyo Yoane azalaki kozwa ye lokola mwana na ye ya elimo oyo alingaki mingi. (3 Yoa. 1) Makambo oyo Yoane, mobange ya sembo akomaki, elendisaka bayekoli ya Yesu tii lelo. w24.11 12 par. 15-16

Mwamitano, 13 sanza ya 3

Bino mibali, . . . bópesaka bango lokumu.—1 Pe. 3:7.

Mobali oyo alingaka mwasi na ye azwaka ye na motuya mpe atyelaka ye likebi mingi. Amonaka ete azali likabo kitoko oyo euti na Yehova. (Mas. 18:22; 31:10) Na yango, asalelaka ye makambo na boboto mpe na limemya, ata ntango bazali kaka bango mibale mpe na ntango ya kosangisa nzoto. Akotya ye mbamba te ete básangisa nzoto na ndenge oyo mwasi akokoka te, oyo ezangi limemya, to oyo ekotungisa lisosoli na ye. Mobali ye moko mpe akosala makasi abatela lisosoli ya pɛto liboso ya Yehova. (Mis. 24:16) Mibali, bokoki kotya motema ete Yehova azali komona mpe azali kosepela na milende oyo bozali kosala mpo na kopesa basi na bino lokumu na makambo nyonso ya bomoi na bino. Mobali, zalá na ekateli ya kopesaka mwasi na yo lokumu: boyá bizaleli oyo ekopesa ye mpasi mpe zalá na boboto, na limemya, mpe tyeláká ye likebi mingi. Soki ozali kosala bongo, okomonisa ye ete olingaka ye mpe ete ozwaka ye na motuya. Soki ozali kopesa mwasi na yo lokumu, okobatela boyokani na yo oyo eleki ntina: boninga na yo na Yehova.—Nz. 25:14. w25.01 13 par. 17-18

Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 3

Amipesaki mpo na biso mpo alongola biso . . . mpe apɛtola mpo na ye bato oyo bazali bato na ye moko, oyo bazali na molende na misala ya malamu.—Tito 2:14.

Moko ya makambo oyo ekesenisaka basaleli ya Yehova na bakristo ya nkombo mpamba ezali molende na bango mpo na mosala ya kosakola. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela to ata tóbakisa molende na biso mpo na mosala ya kosakola? Tokoki kozwa liteya na oyo etali kozala na molende na mosala ya kosakola soki totaleli ndakisa ya Yesu. Na boumeli ya mosala na ye, abatelaki molende na ye. Kutu, wana ntango ezalaki koleka, abakisaki lisusu molende na mosala na ye. Ndenge moko na mosali-bilanga ya vinyo oyo alekisaki mbula misato na koluka kobongisa nzete ya figi oyo ezalaki kobota mbuma te, Yesu alekisaki mbula soki misato na kosakwela Bayuda, oyo mingi bandimaki nsango na ye te. Kasi, kaka ndenge mosali-bilanga ya vinyo aboyaki kokata nzete ya figi, Yesu alɛmbaki bato te, akitisaki mpe molende na ye na mosala ya kosakola te. (Luka 13:​6-9) Koyekola makambo oyo ateyaki mpe komekola makambo oyo asalaki ekosalisa biso tóbatela molende lelo oyo. w25.03 14-15 par. 1-4

Mwalomingo, 15 sanza ya 3

Moto ya ekɛngɛ asalaka makambo na boyebi.—Mas. 13:16.

Okosala nini soki okanisi ete moto moko akoki kozala molongani oyo abongi mpo na yo? Osengeli kokende mbala moko koyebisa moto yango ete olingi ye? Biblia elobi ete moto ya bwanya azwaka naino boyebi liboso ya kosala likambo. Na yango, ekozala likambo ya bwanya kotalela naino moto na mayele mpo na mwa ntango liboso oyebisa ye ete osepeli na ye. Ndenge nini okoki kotalela moto na mayele? Na makita ya lisangá to ntango bozali kolekisa ntango elongo na baninga, okoki komona makambo oyo ekosalisa yo oyeba elimo ya moto yango, bomoto na ye, mpe bizaleli na ye. Baninga na ye ezali banani, mpe alobelaka makambo nini? (Luka 6:45) Mikano na ye ekokani na oyo ya yo? Okoki mpe kotuna bankulutu ya lisangá na bango to bakristo mosusu oyo bakɔmɛli, oyo bayebi ye malamu. (Mas. 20:18) Okoki kotuna ndenge oyo moto yango ayebani mpe bizaleli na ye. (Ruta 2:11) Wana ozali kotalela moto yango, kebá ete otya ye mpanzi likoló te. Monisá limemya mpo na mayoki na ye, komikɔtisa na makambo na ye te, mpe kolandelalandela ye te. w24.05 22 par. 7-8

Mwayambo, 16 sanza ya 3

Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai.—Nz. 32:5.

Bankulutu basengeli te kokata noki ete mosumuki akobongola motema te. Basusu bakoki kobongola motema mbala liboso oyo bakutani na komite, kasi mpo na basusu ekoki kosɛnga ntango mingi. Na yango bankulutu bakoki kokutana na mosumuki mbala moko to koleka. Mbala mosusu, nsima ya kokutana mpo na mbala ya liboso, mokristo oyo asalaki lisumu akobanda kokanisa mpenza na makambo oyo bankulutu bayebisaki ye. Mbala mosusu akobondela Yehova na komikitisa nyonso. (Nz. 38:18) Na bongo, mbala ya nsima oyo bankulutu bakokutana na ye, mosumuki akoki kozala na makanisi oyo ekeseni na oyo amonisaki ntango bakutanaki na ye na mbala ya liboso. Mpo na komema mosumuki na kobongola motema, bankulutu basengeli komitya na esika na ye mpe komonisela ye boboto. Babondelaka ete Yehova apambola milende na bango mpe bazalaka na elikya ete mosumuki akoki kozongela makanisi ya malamu mpe kobongola motema.—2 Tim. 2:​25, 26. w24.08 22-23 par. 12-13

Mwamibale, 17 sanza ya 3

“Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Nasepelaka ata moke te na liwa ya moto. Na yango, bóbongwana mpe bózala na bomoi.’”—Ezk. 18:32.

Yehova alingi ata moto moko te abomama! Alingi ete basumuki bázongisa boyokani na bango elongo na ye. (2 Ko. 5:20) Yango wana banda kala, Yehova alendisaki mbala na mbala bato ya Yisraele oyo bazalaki kobuka mibeko na ye, ata mpe moto mokomoko oyo asali lisumu, bábongola motema mpe bázongela ye. Bankulutu ya lisangá bazali na libaku malamu ya kosala elongo na Yehova ntango bazali komema to kosalisa basumuki bábongola motema. (Rom. 2:4; 1 Ko. 3:9) Kanisá esengo oyo ezalaka na likoló ntango basumuki babongoli motema! Tata na biso ya likoló, Yehova, ayokaka esengo mingi ntango nyonso oyo mpate na ye moko oyo abungaki azongi na lisangá. Bolingo na biso mpo na Yehova ekómaka lisusu makasi ntango tomanyolaka na motema mawa, na ngɔlu mpe na boboto monene na ye.—Luka 1:78. w24.08 31 par. 16-17

Mwamisato, 18 sanza ya 3

Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei lisusu na ngomba, kaka ye moko.—Yoa. 6:15.

Soki Yesu apesaka nzela ete bato bátya ye mokonzi, alingaki kokɔta na makambo ya politiki ya Bayuda, oyo bazalaki na nse ya boyangeli ya Baroma. Na mpiko nyonso Yesu ‘alongwaki wana akei na ngomba.’ Na yango, atako bato batyaki ye mbamba, Yesu amikɔtisaki na makambo ya politiki te. Ezali mpenza liteya mpo na biso! Ezali solo ete bato bakosɛnga biso te ete tókómisa mampa ebele to tóbikisa bato ya maladi na ndenge ya likamwisi; bakoluka mpe te kotya biso mokonzi to moyangeli moko na ekólo. Kasi, bakoki kotya biso mbamba tókɔta na makambo ya politiki, tósala voti to tómonisa ete tozali kopesa mabɔkɔ na moto oyo bango bamoni ete akobongisa makambo. Kasi, ndakisa ya Yesu ezali polele. Aboyaki komikɔtisa na makambo ya politiki; kutu na nsima alobaki: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoa. 17:14; 18:36) Biso bakristo tosengeli kotalela makambo lokola Yesu mpe kolanda ndakisa na ye. Topesaka mabɔkɔ nde na Bokonzi ya Nzambe; tosakwelaka yango basusu mpe tobondelaka mpo na yango.—Mat. 6:10. w24.12 4 par. 5-6

Mwaminei, 19 sanza ya 3

Moto oyo andimi mitindo na ngai mpe azali kotosa yango, moto yango alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye, mpe ngai nakolinga ye mpe nakomimonisa polele epai na ye.—Yoa. 14:21.

Wana ozali koyekola, luká mabaku ya kosalela makambo oyo oyekoli. Na ndakisa, salá makasi omekola bosembo ya Yehova: saleláká basusu makambo kozanga kopona bilongi. Mekolá bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na Tata na ye mpe basusu: zalá pene ya komona mpasi mpo na nkombo ya Yehova mpe omipesaka mpo na bolamu ya bandeko na yo bakristo. Lisusu, na ndakisa ya Yesu, sakweláká basusu mpo bango mpe bázwa libaku ya kondima likabo ya Yehova ya motuya mingi. Soki tokangi malamu ntina ya lisiko mpe tozali na botɔndi mingi mpo na yango, tokolinga mpe Yehova ná Mwana na ye mingi. Soki tolingi bango, bango mpe bakolinga biso mingi. (Yak. 4:8) Na yango, tósalela bibongiseli oyo Yehova apesi biso mpo tókoba koyekola makambo etali lisiko. w25.01 25 par. 16-17

Mwamitano, 20 sanza ya 3

Obwaki masumu na ngai nyonso nsima ya mokɔngɔ na yo.—Yis. 38:17.

Maloba ya mokapo ya lelo ekoki mpe kobongolama na: “Olongoli masumu na ngai nyonso na miso na yo.” Maloba yango ya elilingi emonisi ete Yehova azwaka masumu ya baoyo babongoli motema mpe abwakaka yango mpo amona yango te. Maloba yango ekokaki mpe kobongolama na: “Otaleli [masumu na ngai] lokola nde esalemaki te.” Biblia emonisi lisusu likanisi yango na maloba mosusu ya elilingi oyo ezali na Mika 7:​18, 19. Mokapo yango emonisi ete Yehova abwakaka masumu na biso na bozindo ya mbu. Na ntango ya kala, moto azalaki na likoki te ya kozwa lisusu eloko oyo babwaki na bozindo ya mbu. Na maloba wana ya elilingi, toyekoli ete ntango Yehova alimbisi biso, alongoli biso kilo ya masumu na biso. Ya solo, kaka ndenge Davidi alobaki, “esengo na bato oyo balimbisi misala na bango ya kobuka mibeko mpe oyo bazipi masumu na bango.” (Rom. 4:7) Yango nde kolimbisa ya solo! w25.02 9 par. 7-8

Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 3

Bósepela, mpe bózala na esengo libela mpo na oyo nazali kozalisa.—Yis. 65:18.

Lelo oyo, ezali na paradiso moko awa na mabele oyo etondi na bato mpe makambo ndenge na ndenge. Bamilio ya bato oyo bazali na paradiso yango bazali na kimya ya solosolo. Bato oyo bazali na paradiso yango bazali na ekateli ya kotikala kaka wana. Balingi mpe ete bato mosusu ebele báya kokɔta na esika yango oyo ekokani na mosusu te. Esika yango ezali nini? Paradiso ya elimo! Likambo ya kokamwa, Yehova asali esika moko ya kimya na kati ya mokili oyo Satana akómisi esika oyo etondi na koyina, makambo ya mabe, mpe makama. (1 Yoa. 5:19; Em. 12:12) Nzambe na biso ya bolingo amonaka ndenge mokili oyo mabe ezali konyokola biso mpe apesi biso esika ya kimya oyo tosengeli na yango mpo tókoba kosalela ye na esengo. Liloba na ye ebengi paradiso ya elimo “esika ya kokima” mpe “elanga oyo ezwaka mai malamu mpenza.” (Yis. 4:6; 58:11) Yehova azali kopambola baoyo bafandi na paradiso yango, na yango bakoki komiyoka malamu ata na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi.—Yis. 54:14; 2 Tim. 3:1. w24.04 20 par. 1-2

Mwalomingo, 22 sanza ya 3

Bósɛngaka Nzambe lisalisi.—Flp. 4:6.

Soki ozali na mposa ya kozwa molongani, na ntembe te osili kobondela mpo na yango. Ya solo, Yehova alaki te kopesa basaleli na ye molongani. Atako bongo, atyaka likebi na mposa na yo mpe mayoki na yo, mpe akoki kosalisa yo ntango ozali koluka moto oyo akoki kokóma molongani na yo. Na yango, kobá koyebisa ye mposa na yo mpe ndenge oyo ozali komiyoka. (Nz. 62:8) Sɛngá ye apesa yo motema molai mpe bwanya. (Yak. 1:5) Ata soki ozwi mbala moko te moto oyo akoki kokóma molongani na yo, Yehova alaki ete akokoba kolinga yo mpe kotyela yo likebi na ndenge oyo esengeli. (Nz. 55:22) Kasi, zalá ekɛngɛ: Kotika te ete koluka molongani elya yo nzoto. (Flp. 1:10) Esengo ya solosolo etaleli te soki ozali monzemba to obalá, etaleli nde boyokani na yo na Yehova. (Mat. 5:3) Mpe wana ozali monzemba, okoki kozala na ntango mingi mpo na komipesa na mosala ya kosakola. (1 Ko. 7:​32, 33) Salelá ntango na yo malamu. w24.05 21 par. 4; 22 par. 6

Mwayambo, 23 sanza ya 3

Bóluka kaka matomba na bino moko te, kasi mpe matomba ya basusu.—Flp. 2:4.

Eleko oyo bato balingani esengeli koumela ntango boni? Mbala mingi kosala makambo mbangumbangu ebimisaka mbuma ya mabe. (Mas. 21:5) Na yango, eleko oyo bolingani esengeli kozala mwa molai mpo bóyebana malamu. Kasi, bosengeli mpe te kobenda yango molai kaka mpamba. Biblia elobi mpe: “Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema.” (Mas. 13:12) Basusu bakoki kosala nini mpo na bato mibale oyo balingani? Tokoki kobengisa bango mpo na kolya elongo, mpo na losambo na kati ya libota, to mpo na kominanola. (Rom. 12:13) Bazali na mposa moto azala elongo na bango (chaperon), amema bango na motuka, to apesa bango esika oyo bakoki kosolola kaka bango mibale? Soki bongo, okoki kosalisa bango na likambo yango? (Gal. 6:10) Soki bato oyo balingani basɛngi yo okende kotika bango esika moko, moná yango ete ezali libaku ya kosalisa bango. Salá makasi osundola bango kaka bango mibale te, kasi zalá mpe na bososoli mpo oyeba soki balingi kosolola makambo oyo etali kaka bango mibale. w24.05 30 par. 13-14

Mwamibale, 24 sanza ya 3

Natikelaki ye ntango mpo abongola motema.—Em. 2:21.

Bankulutu basalaka makasi báyeba makambo oyo ememaki moto na lisumu. Na ndakisa, mokristo yango akómaki mokemoke na bolɛmbu mpo na koyekola ye moko to kosakola mbala na mbala? Azalaki lisusu kobondela mokolo nyonso te to mabondeli na ye ekómaki ya likolólikoló? Atikaki ete bamposa mabe ebanda kotambwisa ye? Azwaki baninga ya mabe mpe aponaki kominanola oyo ebongi te? Ndenge nini bikateli yango ekómaki mbala mosusu kotinda motema na ye na mabe? Andimi ete bikateli oyo azwaki mikolo eleki mpe makambo oyo asali epesi Tata na ye Yehova mpasi? Soki bankulutu bazali kotuna mosumuki mituna oyo ebongi kozanga koluka koyeba makambo ya mikemike oyo ezali mpenza na ntina te, bakobenda ye na boboto nyonso mpe bakosalisa ye amona ndenge oyo abebisi boyokani na ye na Yehova. (Mas. 20:5) Lisusu, bakoki kosalela bandakisa mpo na kosalisa moto akanisa mpe amona mabe ya likambo oyo asali. Mbala mosusu, na mbala ya liboso oyo bakutani na ye, mosumuki akobanda koyoka mawa mpenza mpo na nzela oyo alandaki. Akoki ata kobongola motema. w24.08 22 par. 9-11

Mwamisato, 25 sanza ya 3

Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.—Luka 4:43.

Yesu asakolaki “nsango malamu ya Bokonzi” na molende mpo ayebaki ete yango nde mosala oyo Nzambe alingaki ye asala. Yesu atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na ye. Ata na nsuka ya mosala na ye, azalaki kokende “engumba na engumba mpe mboka na mboka,” koteya bato. (Luka 13:22) Apesaki mpe bayekoli mosusu mingi formasyo mpo básakola elongo na ye. (Luka 10:1) Lelo oyo mpe, kosakola nsango malamu nde mosala ya libosoliboso oyo Yehova ná Yesu balingi ete tósala. (Mat. 24:14; 28:​19, 20) Tokoki mpe kokóma na molende mingi na mosala ya kosakola soki tozali kotalela bato ndenge Yehova atalelaka bango. Alingi ete bato mingi báyoka nsango malamu mpe bándima yango. (1 Tim. 2:​3, 4) Yango wana, apesaka biso formasyo mpo tózala bateyi malamu ya nsango oyo ebikisaka bato. Ata soki bato babandi kosalela Yehova sikoyo te, bakoki kozwa libaku ya kosala yango liboso ya nsuka ya bolɔzi monene. w25.03 15-16 par. 5-7

Mwaminei, 26 sanza ya 3

Moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.—2 Yoa. 11.

Mokristo mokomoko asengeli kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia ntango moto oyo alongolamá na lisangá ayei na makita. Bandeko mosusu bakomona malamu kopesa moto yango mbote to kotombela ye boyei malamu na makita. Kasi, basengeli te kobenda masolo milai to kolekisa ntango elongo na moto yango na makambo mosusu. Basusu bakoki komituna, ‘Biblia elobi te ete mokristo oyo apesi moto ya ndenge wana mbote asangani na misala na ye ya mabe?’ (2 Yoa. 9, 10) Bavɛrsɛ mosusu ya 2 Yoane emonisi ete malako wana etaleli nde bapɛngwi to baoyo bazali kotinda bato mosusu na etamboli ya mabe. (Em. 2:20) Na yango, soki moto azali kolendisa mateya ya lipɛngwi to kotinda basusu na mabe, bankulutu bakokende te kotala moto ya bongo. Kasi, elikya ezali ete akobongola motema. Kasi liboso ete abongola motema, tokopesa moto ya ndenge wana mbote te, mpe tokobengisa ye na makita te. w24.08 30-31 par. 14-15

Mwamitano, 27 sanza ya 3

Mitema na bango ezalaki mpenza kososola te.—Mrk. 6:52.

Nsima ya koleisa ebele ya bato, Yesu asɛngaki bantoma bálongwa esika yango mpe bázonga na Kapernaume na masuwa mpe ye akendaki na ngomba, mpo na kokima bato oyo balingaki kokómisa ye mokonzi. (Yoa. 6:​16-20) Ntango bantoma bazalaki na kati ya masuwa, mbula ya makasi ebandaki mpe ememaki mopɛpɛ makasi ná mbonge. Na ntango yango Yesu azalaki koya epai na bango, azali kotambola likoló ya mai. Abengaki mpe ntoma Petro atambola likoló ya mai. (Mat. 14:​22-31) Ntango kaka Yesu akɔtaki na masuwa, mopɛpɛ makasi yango ekitaki. Bayekoli bakamwaki mpe balobaki: “Ozali mpenza Mwana ya Nzambe.” (Mat. 14:33) Atako bongo, bamonaki te boyokani oyo ezalaki kati na likamwisi wana ya kotambola likoló ya mai mpe oyo ya kokómisa mampa ebele. Evanzile ya Marko elobeli likambo yango boye: “[Bantoma] bakamwaki mingi mpenza, mpo lokola bakangaki ntina ya likamwisi ya mampa te.” (Mrk. 6:​50-52) Ya solo, bakangaki ntina te ete Yehova apesaki Yesu nguya monene ya kosala makamwisi. w24.12 5 par. 7

Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 3

Mposa [ya Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.—1 Tim. 2:4.

Tokoki komonisa botɔndi na bolingo ya Yehova soki tosaleli eleko ya Ekaniseli oyo mpo na komonisa Yehova ete tozali na botɔndi mingi mpo na lisiko. Longola kozwa bibongiseli mpo na kozala na Ekaniseli, tokoki mpe kobengisa basusu mpo báyangana na yango. Limbwelá bato oyo obengisi makambo oyo ekosalema na Ekaniseli. Okoki kolakisa bango na jw.org video Mpo na nini Yesu akufaki? mpe Kanisá liwa ya Yesu. Bankulutu basengeli kosala nyonso mpo na kobengisa baoyo balɛmbá na elimo. Kanisá esengo oyo ekozala na likoló mpe awa na mabele soki bampate mosusu ya Yehova oyo ebungá bandimi kozonga na etonga na ye! (Luka 15:​4-7) Na Ekaniseli, tómityela mokano ya kopesa mbote kaka te na baoyo toyebi, kasi mingimingi na bato ya sika to baoyo bayá makita kala. Tolingi bámiyoka ete toyambi bango malamu!—Rom. 12:13. w25.01 29 par. 15

Mwalomingo, 29 sanza ya 3

Nzambe . . . alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbeka ya kozongisa kimya mpo na masumu na biso.—1 Yoa. 4:10.

Lisiko esalisaka biso tókanga ntina ete Yehova azali sembo, kasi esalisaka biso tómona mingimingi bolingo na ye monene. (Yoa. 3:16; 1 Yoa. 4:9) Liteya ya lisiko emonisaka ete Yehova alingi kaka te ete tózala na bomoi ya seko, kasi alingi mpe tózala na kati ya libota na ye. Kanisá naino: Ntango Adama asalaki lisumu, Yehova abenganaki ye na libota ya basambeli na Ye. Na yango, biso nyonso ntango tobotamaka, moko te azalaka na kati ya libota ya Nzambe. Kasi, na nzela ya lisiko, Yehova alimbisaka masumu na biso, mpe nsukansuka akokɔtisa na libota na ye bato nyonso oyo bazali komonisa kondima mpe bazali na botosi. Ata sikoyo tokoki kozala na boyokani malamu na Yehova mpe na basaleli na ye mosusu. Ya solo, Yehova amoniseli biso bolingo monene mpenza!—Rom. 5:​10, 11. w25.01 21 par. 6

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 9 Nisana) Yoane 12:​12-19; Marko 11:​1-1

Mwayambo, 30 sanza ya 3

Talá ndenge bolingo ya Nzambe emonisamaki.—1 Yoa. 4:9.

Na ntembe te, ondimaka ete lisiko ezali likabo moko ya malamu mingi! (2 Ko. 9:15) Ndenge Yesu apesaki bomoi na ye mbeka epesi yo nzela ya kozala na boninga ya penepene na Yehova Nzambe. Okoki mpe kolikya kozala na bomoi ya seko. Yango wana, ebongi mpenza ete tómonisa botɔndi mpo na lisiko mpe mpo na Yehova, oyo bolingo na ye etindaki ye apesa yango! (Rom. 5:8) Mpo na kosalisa biso tókoba kozala na botɔndi mpe tómona ata mokolo moko te ete lisiko ezali likabo ya bongobongo, Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, oyo tosalaka mbula na mbula. (Luka 22:​19, 20) Na mbula oyo, Ekaniseli ekosalema na mokolo ya mwaminei, 02/04/2026. Na ntembe te, biso nyonso tozali komibongisa mpo na koyangana na molulu yango. Na eleko oyo ya Ekaniseli, tokozwa matomba mingi soki tozwi ntango ya komanyola makambo oyo Yehova ná Mwana na ye basalá mpo na biso. w25.01 20 par. 1-2

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 10 Nisana) Yoane 12:​20-50

Mwamibale, 31 sanza ya 3

Bózwa disiplini na ngai kasi palata te, mpe boyebi na esika ya wolo oyo eleki kitoko.—Mas. 8:10.

Okoki koyekola makambo mosusu oyo etali bolingo oyo Yehova Nzambe ná Kristo Yesu bazali na yango epai na biso soki okobi komanyola likoló na yango. Mbala mosusu na eleko oyo ya Ekaniseli, okoki kotánga na likebi Evanzile moko to koleka. Kotánga makambo ebele te na mbala moko. Kasi, kende malɛmbɛmalɛmbɛ mpe luká bantina oyo tosengeli kolinga Yehova ná Yesu. Soki osali bambula mingi na kati ya solo, mbala mosusu ozali komituna soki okomona makambo ya sika soki oyekoli makambo oyo eyebani malamu lokola bosembo ya Yehova, bolingo na ye, mpe lisiko. Mpo na koloba solo, tokozanga te komona eloko ya sika soki toyekoli makambo yango mpe mateya mosusu. Na yango, kolɛmba te, mpo mikanda na biso etondi na ebele ya makambo ya motuya oyo okoki koyekola. w25.01 24-25 par. 13-15

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 11 Nisana) Luka 21:​1-36

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto