Sanza ya 5
Mwamitano, 1 sanza ya 5
Nzambe aponaka bilongi te.—Rom. 2:11.
Nsima ya kobimisa bato na ye na boombo na Ezipito, Yehova atyaki banganga-nzambe mpo básalaka na tabernakle. Balevi bazwaki mokumba ya kosala misala mosusu na tabernakle yango mosantu. Baoyo bazalaki kosala na tabernakle to baoyo bazalaki kofanda pembeni na yango Yehova akipaki bango malamu koleka basusu? Te! Yehova asalelaki bato nyonso makambo ndenge moko mpo aponaka bilongi te. Moyisraele nyonso na kaa akokaki kozala moninga ya Yehova. Na ndakisa, Yehova azalaki kosala ete ekólo mobimba ekoka komona likonzí ya lipata ya likamwisi mpe likonzí ya mɔtɔ oyo ezalaki likoló ya tabernakle. (Kob. 40:38) Ntango lipata ebandaki kokende na nzela moko, ata baoyo bahema na bango ezalaki mosika mpenza na tabernakle bazalaki komona yango, bazalaki kokanga biloko na bango, kolongola bahema na bango, mpe kokende elongo na ekólo mobimba. (Mit. 9:15-23) Lelo oyo mpe, ata soki tofandaka wapi, Yehova alingaka biso, akipaka biso mpenza, mpe abatelaka biso. w24.06 4 par. 10-12
Mwapɔsɔ, 2 sanza ya 5
Bótɛlɛma mpe tókima, mpo moto moko te akobika na mabɔkɔ ya Abisalome!—2 Sa. 15:14.
Bomoi ya Davidi ezalaki na likama mpo mwana na ye Abisalome azwaki ekateli ya kobɔtɔla ye bokonzi. (2 Sa. 15:12, 13) Davidi asengelaki kolongwa nokinoki na Yerusaleme! Ntango basaleli na ye bazalaki kokende, Davidi amonaki ete esengeli moto moko atikala kuna mpo akoba koyebisa bango makambo oyo Abisalome azalaki kokana kosala. Na yango, asɛngaki Zadoke ná banganga-nzambe mosusu bázonga na Yerusaleme mpo bázala lokola banɔngi. (2 Sa. 15:27-29) Basengelaki kozala ekɛngɛ mpenza. Davidi asɛngaki mpe lisalisi ya Zadoke ná Hushai, moninga ya sembo ya Davidi. (2 Sa. 15:32-37) Davidi asɛngaki Hushai amikómisa moninga ya motema ya Abisalome mpe apesa ye mayele mosusu ya etumba, oyo ekopesa Davidi ntango ya komibongisa mpo na etumba. Na nsima, Hushai ayebisaki Zadoke ná Abiatare ete Abisalome andimaki kosalela mayele yango. (2 Sa. 17:8-16) Mibali yango mibale bakendaki kopesa Davidi nsango yango mpo na kobatela bomoi ya Davidi.—2 Sa. 17:21, 22. w24.07 4-5 par. 9-10
Mwalomingo, 3 sanza ya 5
Yehova alobi: “Sikoyo bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso.”—Yis. 1:18.
Basaleli mosusu ya Yehova bamitungisaka mingi mpo bayokaka mawa mpo na makambo oyo basalá kala, ezala liboso to ata nsima ya batisimo. Kasi ebongi tóbosana te ete Yehova apesaki lisiko mpo alingaka biso mingi. Na ntembe te alingaka tóndima likabo na ye. Yehova ayebisi biso ete soki ‘tobongisi makambo’ elongo na ye, atángaka lisusu te masumu oyo tosalaki. Ndenge oyo Yehova akanisaka lisusu te masumu na biso ya kala emonisi ete alingaka biso mpenza! Abosanaka mpe te bolamu oyo tosalá. (Nz. 103:9, 12; Ebr. 6:10) Soki ozali komitungisa mingi mpo na makambo oyo osalá na kala, salá makasi otya makanisi na makambo oyo ozali kosala sikoyo mpe oyo okosala na mikolo ezali koya na esika okanisa makambo ya kala. Okoki te kobongola makambo oyo eleká. Kasi, okoki kokumisa Yehova na makambo oyo okoki kosala sikoyo mpe kotya makanisi na makambo ya malamu oyo Yehova alaki kosala mpo na yo na mikolo ezali koya. w24.10 8 par. 8-9
Mwayambo, 4 sanza ya 5
Bólata bomoto ya sika.—Kol. 3:10.
Ntango ozali kotánga Biblia mpe omoni ndenge oyo osengeli kosalela makambo yango, okoki kolɛmba nzoto. Kanisá ete ozali kotánga mokanda ya Yakobo: Lelo otángi toli oyo elobi ete esengeli te kozala na ezaleli ya kopona bilongi. (Yak. 2:1-8) Omoni ete osengeli kobongisa ndenge na yo ya kosalela basusu makambo; na yango ozwi ekateli ya kobongola mwa makambo mosusu. Lobi, otángi eteni oyo emonisi ntina ya kopekisa lolemo na yo. (Yak. 3:1-12) Ntango okanisi, omoni ete na bantango mosusu maloba na yo ezalaka ya boboto te. Na yango, ozwi ekateli ya kolendisaka basusu na maloba na yo. Mokolo oyo elandi, otángi likebisi oyo elobi ete tosengeli te kokóma baninga ya mokili. (Yak. 4:4-12) Omoni ete osengeli koponaka malamu kominanola na yo. Na mokolo ya minei, okoki komona ete makambo oyo osengeli kobongisa eleki ebele. Kolɛmba nzoto te. Kobosana te ete kolata “bomoto ya sika” ezali likambo ya mokolo moko te. w24.09 5-6 par. 11-12
Mwamibale, 5 sanza ya 5
Bósantisa Kristo lokola Nkolo na mitema na bino, bózalaka ntango nyonso pene mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo bozali na yango, kasi bósalaka bongo na boboto mpe na limemya makasi.—1 Pe. 3:15.
Yesu ayebaki ete ndenge oyo Yehova azalaki kotalela makambo nde elekaki ntina. Atyaki motema ete Yehova akosilisa kozanga bosembo nyonso na ntango oyo ebongi. Tokomekola Yesu soki tozali komonisa komipekisa na oyo etali koloba ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. Makambo mosusu ezalaka minene te, mpe tokoki kaka kolekisa yango. To tokoki kofanda nyɛɛ mpo tóloba te likambo oyo ekotya lisusu mafuta na mɔtɔ. (Mos. 3:7; Yak. 1:19, 20) Na mabaku mosusu, ekoki kosɛnga tóloba ntango tomoni makambo ya kozanga bosembo to ntango tolingi kokɔtela solo. (Mis. 6:1, 2) Soki tomoni malamu tóloba, tosengeli kosala makasi tósala yango na kimya mpe na limemya. Tokomekola mpe Yesu soki tomitiki na mabɔkɔ ya “Moto oyo asambisaka na bosembo.”—1 Pe. 2:23. w24.11 5-6 par. 10-12
Mwamisato, 6 sanza ya 5
Baanzelu ya Nzambe bazalaka na esengo mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.—Luka 15:10.
Soki mosumuki moko abongoli motema, ezalaka likambo ya esengo mpenza! (Luka 15:7) Nani mpenza asalaka ete mosumuki abongola motema? Bankulutu? Tóbosana te oyo ntoma Paulo akomaki mpo na basumuki: “Mbala mosusu Nzambe akopesa bango nzela bábongola motema.” (2 Tim. 2:25) Na yango, Yehova nde asalisaka mokristo oyo asali lisumu abongola makanisi mpe misala na ye, kasi moto mosusu te. Paulo alobelaki mpe mbuma mosusu ya malamu oyo emonanaka ntango moto abongoli motema: esalisaka mosumuki akóma na boyebi mingi ya sikisiki ya solo, azongela makanisi malamu, mpe akima mitambo ya Satana. (2 Tim. 2:26) Ntango mosumuki abongoli motema, komite ekozwa bibongiseli mpo na kokende kotalaka ye mpo akoba kozwa lisalisi oyo esengeli mpo akwea te na mitambo ya Satana mpe asembola banzela ya makolo na ye.—Ebr. 12:12, 13. w24.08 23 par. 14-15
Mwaminei, 7 sanza ya 5
Bozali koluka ngai, ezali te mpo bomonaki makamwisi, kasi mpo bolyaki mampa mpe botondaki.—Yoa. 6:26.
Ebele ya bato oyo Yesu aleisaki batyaki likebi kaka na kokokisa bamposa na bango ya mosuni. Na ndenge nini? Mokolo oyo elandaki, bayaki esika balyaki mampa, kasi Yesu ná bantoma na ye bazalaki lisusu wana te. Na yango, ebele ya bato bakɔtaki na bamasuwa mosusu oyo eutaki Tiberiase, mpe bakendaki na Kapernaume mpo na koluka Yesu. (Yoa. 6:22-24) Basalaki bongo nde mpo bákende koyoka makambo mingi oyo etali Bokonzi? Te. Bazalaki kokanisa libosoliboso mposa na bango ya kolya mampa. Ndenge nini toyebi yango? Talá likambo oyo esalemaki ntango ebele ya bato yango bamonaki Yesu pene na Kapernaume. Yesu alobaki polele ete bazalaki koluka ye libosoliboso mpo na kokokisa mposa ya kolya oyo bazalaki na yango na ntango wana. Alobaki na bango ete ‘balyaki mampa mpe batondaki’ na “bilei oyo ebebaka.” Alendisaki bango básala mosala nde mpo na “bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko.” (Yoa. 6:26, 27) Yesu alobaki ete Tata na ye akopesa bilei oyo ememaka na bomoi ya seko. w24.12 5 par. 8-9
Mwamitano, 8 sanza ya 5
Moto ya bwanya aponaka malamumalamu maloba na ye mpe abakisaka kondimisa na maloba na ye.—Mas. 16:23.
Ndeko mobali, mpo ozala moteyi ya malamu, saláká ete makambo okoteya na lisangá to toli oyo okopesa basusu euta na Liloba ya Nzambe. Osengeli kozala moyekoli malamu ya Biblia mpe ya mikanda ya moombo ya sembo. (Mas. 15:28) Ntango ozali koyekola, tyáká likebi na ndenge mikanda na biso elimbolaka bavɛrsɛ mpo oyeba ndenge ya kosalela yango malamu. Mpe ntango ozali koteya, saláká makasi osimba mitema ya baoyo bazali koyoka yo. Okoki mpe kobakisa makoki ya moteyi soki ozali kosɛnga toli epai ya bankulutu oyo bayebi koteya malamu mpe soki osaleli toli yango. (1 Tim. 5:17) Bankulutu basengeli koyeba kolendisa bandeko na bango; kasi na bantango mosusu basengeli kopesa bango toli to ata kopamela bango. Ezala ndenge nini, bankulutu basengeli ntango nyonso kozala na boboto. Soki ozali na boboto mpe na bolingo mpe ozali kosalela Liloba ya Nzambe mpo na koteya, okozala moteyi malamu mpo okomekola Moteyi Monene, Yesu.—Mat. 11:28-30; 2 Tim. 2:24. w24.11 24 par. 16
Mwapɔsɔ, 9 sanza ya 5
Bósakola nkembo na ye na kati ya bikólo.—Nz. 96:3.
Tokoki kopesa Yehova nkembo na makambo oyo tolobaka mpo na ye. Bavɛrsɛ yango esɛngi basaleli ya Yehova ‘báyembela Yehova,’ ‘básanzola nkombo na ye,’ ‘básakola nsango malamu ya lobiko na ye’ mpe ‘básakola nkembo na ye na kati ya bikólo.’ (Nz. 96:1-3) Nyonso wana ezali balolenge oyo tokoki kopesa Tata na biso ya likoló nkembo. (Mis 4:29) Tokoki mpe kopesa Yehova nkembo na biloko na biso ya motuya. Banda kala, basambeli ya solo ya Yehova bakumisaka ye na ndenge wana. (Mas. 3:9) Na ndakisa, Bayisraele bapesaki makabo mpo na kotonga mpe kobongisa tempelo. (2 Bak. 12:4, 5; 1 Nt. 29:3-9) Bayekoli mosusu ya Kristo bazalaki kosalela “biloko na bango” mpo na kosalisa ye ná bantoma na ye. (Luka 8:1-3) Bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe bapesaki makabo mpo na kosunga bandeko na bango ya elimo oyo bazalaki kokelela. (Mis. 11:27-29) Lelo oyo, biso mpe tokoki kopesa Yehova nkembo na nzela ya makabo na biso ya bolingo. w25.01 4 par. 8; 5 par. 11
Mwalomingo, 10 sanza ya 5
Nani akoki kopekisa bango bábatisama na mai?—Mis. 10:47.
Nini esalisaki Korneyi azwa batisimo? Biblia elobi ete “azalaki kobanga Nzambe elongo na bato nyonso ya ndako na ye.” Lisusu, Korneyi “azalaki ntango nyonso kosala libondeli epai ya Nzambe.” (Mis. 10:2) Ntango Petro asakwelaki Korneyi nsango malamu, ye ná libota na ye bandimaki Kristo mpe bazwaki mbala moko batisimo. (Mis. 10:47, 48) Na ntembe te, Korneyi andimaki kosala mbongwana nyonso oyo esengeli mpo ye ná libota na ye bákoka kosambela Yehova elongo. (Yos. 24:15; Mis. 10:24, 33) Ndenge moko na Saulo, Korneyi akokaki kotika lokumu oyo azalaki na yango epekisa ye kokóma mokristo. Kasi, asalaki bongo te. Ezali kosɛnga ete osala bambongwana minene na bomoi na yo mpo ozwa batisimo? Soki ezali bongo, Yehova akosalisa yo. Akopambola ekateli na yo ya kosalela ye na boyokani na mitinda ya Biblia. w25.03 5 par. 12-13
Mwayambo, 11 sanza ya 5
Boyá masapo ya lokuta oyo ekumisaka Nzambe te.—1 Tim. 4:7.
Soki oyoki masapo ya lokuta mpo na ebongiseli na biso to mpo na bandeko oyo bakambaka biso, kanisá makambo oyo banguna ya Nzambe basalaki Yesu ná bayekoli na ye ya siɛklɛ ya liboso. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali kokutana na minyoko mpe bazali kokosela bango makambo, kaka ndenge Biblia esakolaki. (Mat. 5:11, 12) Masapo ya lokuta ekobungisa biso nzela te soki toyebi moto oyo apanzaka yango mpe tomibateli nokinoki. Ndenge nini tosengeli komibatela? Boyá masapo ya lokuta. Ntoma Paulo apesaki malako ya polele mpo na ndenge ya kosala soki toyoki masapo ya lokuta. Ayebisaki Timote ‘apesa basusu mitindo ete bátya likebi te na masapo ya lokuta’ mpe ‘aboya masapo ya lokuta oyo ebebisaka makambo oyo ezali mosantu.’ (1 Tim. 1:3, 4) Toboyaka masapo ya lokuta mpo toyebi esika eutaka. Tokangamaka makasi na “maloba [ya solo] oyo epesaka litomba.”—2 Tim. 1:13. w24.04 11 par. 16; 13 par. 17
Mwamibale, 12 sanza ya 5
Bazali kokosa bato na maloba sukali mpe na maloba ya kokumisakumisa.—Rom. 16:18.
Batelá bomoko elongo na baoyo bazali sembo epai ya Yehova. Nzambe alingi tósalela ye na bomoko. Tokobatela bomoko na biso soki tokangami na solo. Moto nyonso oyo atiki solo mpe abandi kopanza makambo ya lokuta akokɔtisa bokabwani na lisangá, yango wana Nzambe asɛngi biso ‘tóboya kozala elongo na bango.’ Soki tosali bongo te, tokoki kobanda kondima makambo ya lokuta mpe kotika solo. (Rom. 16:17) Soki tozali koyeba solo mpe tokangami na yango makasi, tokozala ntango nyonso penepene na Yehova mpe tokobatela kondima na biso makasi. (Ef. 4:15, 16) Tokomibatela na mateya ya lokuta ya Satana mpe makanisi oyo apanzaka, mpe Yehova akobatela biso na ntango ya bolɔzi monene. Kobá kokangama makasi na oyo ezali solo, “mpe Nzambe ya kimya akozala na [yo].”—Flp. 4:8, 9. w24.07 13 par. 16-17
Mwamisato, 13 sanza ya 5
Moto wana apesaki mpo na libela mbeka moko kaka mpo na masumu.—Ebr. 10:12.
Yesu atyaki likebi mingi epai ya bato oyo bazalaki komona mpasi mpo na lisumu mpe abengaki bango bákóma bayekoli na ye. Yesu ayebaki ete lisumu nde ememelá bato mpasi. Yango wana asalisaki mingimingi mibali mpe basi oyo bayebanaki ete bazali basumuki. Alobaki boye: “Bato oyo bazali nzoto malamu bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.” Abakisaki: “Nayaki kobenga bato ya sembo te, kasi basumuki.” (Mat. 9:12, 13) Yesu asalaki mpenza ndenge alobaki. Na boboto nyonso, alimbisaki masumu ya mwasi oyo asukolaki makolo na ye na mai ya miso. (Luka 7:37-50) Na libulu moko ya mai, Yesu ateyaki mwasi Mosamaria makambo ya ntina mingi, atako ayebaki ete azalaki na bomoi ya mbindo. (Yoa. 4:7, 17-19, 25, 26) Nzambe apesaki Yesu nguya ya kolongola ata eloko ya nsuka oyo lisumu nyonso ememaka: liwa. Na ndenge nini? Yesu azwaki nguya ya kosekwisa bato, mibali mpe basi, bana mpe mikóló.—Mat. 11:5. w24.08 4 par. 9-10
Mwaminei, 14 sanza ya 5
Akosambisa na boyengebene bato oyo bafandi na mabele mpe na bosembo na ye bato ya bikólo.—Nz. 96:13.
Ndenge nini Yehova akopesa nkombo na ye nkembo na mikolo ezali koya? Na nzela ya bikateli na ye ya lisambisi. Mosika te akobebisa Babilone Monene mpo na lokuta oyo elobaka na nkombo na ye mosantu. (Em. 17:5, 16; 19:1, 2) Bato mosusu oyo bamoni kobebisama ya Babilone Monene bakoki koya kosangana na biso na losambo ya solo. Na nsima, na Armagedone, Yehova akobebisa ebongiseli ya Satana mobimba, akoboma baoyo nyonso batɛmɛlaka ye mpe oyo batyolaka nkombo na ye, kasi akobikisa baoyo nyonso balingaka ye mpe batosaka ye, oyo bapesaka ye nkembo na esengo nyonso. (Mrk. 8:38; 2 Tes. 1:6-10) Nsima ya komekama ya nsuka oyo ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, Yehova akosila kosantisa mpo na libela nkombo na ye. (Em. 20:7-10) Na ntango yango, “mabele ekotonda na boyebi ya nkembo ya Yehova kaka ndenge mai etondi na mbu.” (Hab. 2:14) Ekozala mpenza esengo ntango moto nyonso oyo azali na bomoi akobanda kopesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye! w25.01 7 par. 15-16
Mwamitano, 15 sanza ya 5
Bosengeli koyika mpiko mpo na disiplini na bino.—Ebr. 12:7.
Nini elingaki kosalisa bakristo Baebre báyika mpiko na botɛmɛli? Ntoma Paulo ayebaki ete basengelaki kotalela mikakatano na bango na ndenge oyo ebongi. Yango wana ayebisaki bango ete ntango bakristo bakutani na komekama, Nzambe akoki kosalela yango mpo na kopesa bango formasyo. Formasyo yango ekoki kosalisa moto alona mpe amonisa lisusu mingi bizaleli ya ntina mingi mpo na mokristo. Soki bakristo yango batye makanisi na mbuma malamu oyo komekama ekobimisa, ekozala mpasi te mpo báyika mpiko. (Ebr. 12:11) Paulo alendisaki bakristo Baebre bákoba ntango nyonso koyikela mikakatano mpiko. Paulo ayebaki makambo oyo azalaki koloba. Lokola ye moko azalaki kala konyokola bakristo, ayebaki ndenge epesaki bango mpasi. Ayebaki mpe ndenge ya koyikela monyoko mpiko. Ye moko akutanaki na monyoko ya ndenge na ndenge nsima ya kokóma mokristo.—2 Ko. 11:23-25. w24.09 12-13 par. 16-17
Mwapɔsɔ, 16 sanza ya 5
Bókoba kosɛnzɛla.—Mat. 25:13.
Mokolo na mokolo, tozali se komona ete tosengeli kosakola na lombangu mpenza. Mpo na nini? Mpo ntango ezali lisusu mingi te. Talá oyo Yesu alobaki mpo na mosala ya kosakola na mikolo ya nsuka, ndenge emonisami na Marko 13:10. Na kotalela lisolo yango na Evanzile ya Matai, Yesu alobaki ete nsango malamu ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi liboso ete “nsuka” eya. (Mat. 24:14) Nsuka yango ezali ya mokili mabe oyo eyangelami na Satana. Yehova asilá kotya ‘mokolo mpe ngonga’ mpo na makambo yango oyo ekosalema mosika te. (Mat. 24:36; Mis. 1:7) Mokolo mokomoko ememeka biso pene ya ntango yango. (Rom. 13:11) Wana tozali kozela, tosengeli kokoba kosakola tii nsuka ekoya. Na oyo etali mosala ya kosakola, ekozala malamu tómituna motuna oyo ya ntina mingi: Mpo na nini tosakolaka nsango malamu? Na mokuse, bolingo nde etindaka biso tósakola. Ntango tozali na mosala ya kosakola, tomonisaka ete tolingaka nsango malamu, tolingaka bato, mpe koleka nyonso, tolingaka Yehova mpe nkombo na ye. w24.05 14-15 par. 2-3
Mwalomingo, 17 sanza ya 5
Nzambe amonaki eloko nyonso oyo asalaki, mpe talá! ezalaki malamu mingi.—Eba. 1:31.
Moboti, lendisá mwana na yo akanisa mpo na biloko oyo amonaka na mokili. Ntango ozali kotambola na mwana na yo na libándá to ntango bozali kosala mwa bilanga na bino, bendá likebi ya mwana na biloko oyo ebatelaka ntango nyonso lolenge na yango ya kokamwa. Mpo na nini? Mpo balolenge yango emonisaka ete esalemaki na mayele mpe na bwanya mingi. Na ndakisa, bato ya siansi bayekoli na boumeli ya bambula mingi lolenge ya kobalukabaluka lokola basɛrklɛ ebele (forme spirale) oyo emonanaka na bagalaksi mosusu, na mposo ya bikelamu mosusu ya mai, na nkasa ya milona, mpe na mitó ya fololo babengi tournesol. Nicola Fameli, moto moko ya siansi oyo ayekolaka biloko ya mikemike, alobi ete ntango oyekoli lolenge ya kobalukabaluka lokola sɛrklɛ ya biloko oyo ezali na mokili, okomona ete mitángo na yango elandaná ndenge moko. Mitángo yango ebengami suite de Fibonacci. w24.12 16 par. 7
Mwayambo, 18 sanza ya 5
Azali bomoi mpo na yo.—Mib. 30:20.
Moize, Davidi, ná Yoane bazalaki na bomoi na bileko oyo makambo ya bomoi ekokani te na oyo ya biso. Kasi, tokokani na bango na makambo mingi. Bazalaki kosalela Nzambe ya solo, ndenge moko na biso. Bazalaki kobondela Yehova, kotyela ye motema, mpe kosɛnga ye atambwisa bango; biso mpe tosalaka bongo. Mpe ndenge moko na mibali yango ya ntango ya kala, tozalaka na kondima ete Yehova apambolaka mpenza baoyo batosaka ye. Yango wana, tiká ete tótya likebi na maloba ya nsuka ya mibali wana, tótosa mibeko ya Yehova. Soki tosali bongo, tokolonga mpenza na nyonso oyo tozali kosala. Tokozala na bomoi mpe ‘tokofanda ntango molai,’ mpo na seko! Mpe tokozala na esengo mpo tozali kosepelisa Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo, oyo akokisaka bilaka na ye nyonso na ndenge oyo eleki nyonso oyo tokoki kozela to ata kokanisa.—Ef. 3:20. w24.11 13 par. 20-21
Mwamibale, 19 sanza ya 5
Nzambe atye esika mpo na moto mokomoko na lisangá.—1 Ko. 12:28.
Na siɛklɛ ya liboso, bandeko mibali mosusu batyamaki basaleli na misala. (1 Tim. 3:8) Emonani ete bango nde ntoma Paulo abengaki “baoyo basalisaka basusu.” Na ntembe te basaleli na misala bazalaki kosala misala ndenge na ndenge mpo na kosalisa basusu mpo bankulutu bákoka komipesa na koteya mpe kobatela bampate. Na ndakisa, mbala mosusu basaleli na misala bazalaki kosalisa na kosala bakopi ya Makomami to kosomba biloko oyo esengeli mpo na kosala bakopi. Kanisá makambo oyo basaleli na misala ya lisangá na bino basalaka mpo na kosalisa basusu. (1 Pe. 4:10) Basalaka makambo mingi: kotalela makambo ya mbongo ya lisangá, ya bateritware, mikanda mpe kokabolela yango basakoli, kosala na sono mpe kolakisa bavideo, kopesa bandeko bisika ya kofanda, to mpe kosalisa na kobatela Ndako ya Bokonzi. Nyonso wana ezali na ntina mpo makambo etambola malamu na lisangá.—1 Ko. 14:40. w24.10 19 par. 4-5
Mwamisato, 20 sanza ya 5
Na makambo nyonso, nazwaka makasi na lisalisi ya Nzambe, moto oyo apesaka ngai nguya.—Flp. 4:13.
Tokolonga koyikela komekama nyonso mpiko, ezala ya moke to ya monene, soki tozali kobosana te ete Yehova azali na bomoi mpe asalisaka biso ntango nyonso. Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe akoki kopesa biso nguya mpo tóyika mpiko. Yango endimisi biso ete tokoki kobundisa mikakatano nyonso mpe kolonga yango. Komona ndenge Yehova asalisi biso na mikakatano ya mikemike endimisaka biso ete akosalisa mpe biso ntango tokokutana na mikakatano ya minene. Tótalela makambo mibale oyo Mokonzi Davidi akutanaki na yango oyo etindaki ye atyela lisusu Yehova motema mingi. Ntango Davidi azalaki elenge mpe mobateli ya bampate, urse mpe na nsima nkɔsi ememaki moko ya bampate ya tata na ye. Na libaku mokomoko, Davidi alandaki nyama yango na mpiko mpenza mpe abikisaki mpate. Kasi, Davidi alobaki te ete abikisaki yango na makasi na ye moko. Ayebaki ete Yehova nde apesaki ye nguya ya kosala yango. (1 Sa. 17:34-37) Komanyola makambo yango esalisaki Davidi atya lisusu motema ete Nzambe ya bomoi akopesa ye makasi na mikolo ekoya. w24.06 21 par. 5-6
Mwaminei, 21 sanza ya 5
Moto oyo apesaka eyano liboso ya koyoka likambo azali zoba, mpe amisambwisaka.—Mas. 18:13.
Na ndakisa, kanisá ete babengisi yo na mwa fɛti moko. Osengeli kokende? Soki oyebi te moto oyo abongisi fɛti yango to ndenge makambo ekoleka kuna, osengeli kotuna ye mituna lokola: “Epai wapi mpe ntango nini mwa fɛti yango ekozala? Ekozala na bato boni? Nani akotambwisa makambo mpo nyonso eleka malamu? Banani bakozala wana? Masano nini ekozala na mwa fɛti yango? Bakopesa bato masanga?” Biyano na mituna yango ekosalisa yo ozwa ekateli ya bwanya. Na nsima, soki oyebi bosolo ya likambo, talelá sikoyo malamu likambo na mobimba na yango. Na ndakisa, soki oyebi ete bato mosusu oyo batosaka mitinda ya Biblia te bakozala na fɛti yango to ete bakopesa bato masanga bámɛla ndenge balingi, okosala nini? Okoki komona na makanisi ndenge fɛti yango ekoki kobaluka fɛti ya lokoso? (1 Pe. 4:3) Ntango otaleli likambo na mobimba na yango, ekosalisa yo ozwa ekateli ya malamu. w25.01 15 par. 4-5
Mwamitano, 22 sanza ya 5
Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.—Yis. 1:18.
Yehova asaleli maloba mosusu ya elilingi mpo na kosalisa biso tómona malamu ndenge oyo, na nzela ya mbeka ya lisiko, abomaka masumu ya baoyo babongoli motema. Ezalaka mpasi mpenza kolongola litɔnɔ (tache) ya motane makasi na elamba. Kasi, na maloba wana ya elilingi, Yehova amonisi ete akoki kosukola mpe kokómisa masumu na biso pɛto tii ekomonana lisusu te. Biblia ekokanisi masumu na “banyongo.” (Mat. 6:12; Luka 11:4) Na yango, mbala nyonso oyo tosalelaka Yehova lisumu, ezalaka lokola tozali kobakisa banyongo. Tozali na nyongo na ye ebele mpenza! Kasi, ntango Yehova alimbisi biso, ezalaka lokola nde alongoli nyongo oyo akokaki kosɛnga ete tófuta ye. Asɛngaka biso te tófuta lisusu mpo na masumu oyo asilaki kolimbisa. Ndakisa yango emonisi ndenge motema ekitaka mpenza ntango Yehova alimbisi biso! w25.02 9-10 par. 9-10
Mwapɔsɔ, 23 sanza ya 5
Bana te nde basengeli kobomba biloko mpo na baboti na bango, kasi baboti mpo na bana na bango.—2 Ko. 12:14.
Baboti bakoki kozala na mposa ya lisungi ya mbongo mpe ya biloko mosusu wana bazali kokóma mikóló, mpe bana mingi bazalaka na esengo ya kosalisa bango. (1 Tim. 5:4) Kasi baboti bakristo bayebaka ete esengo na bango monene eutaka te na kobɔkɔla bana na likanisi ete lobilobi básalisa bango na biloko ya mosuni, kasi nde na kosalisa bana bákóma basaleli ya Yehova. (3 Yoa. 4) Na nzela ya ndakisa na yo, teyá bana na yo bátyelaka Yehova motema mpe salisá bango báyekola ndenge ya kokokisa bamposa na bango. Kobanda ntango bazali naino mike, monisá bango ntina ya kosala mosala makasi. (Mas. 29:21; Ef. 4:28) Wana bazali kokola, salisá bango bázwaka kelasi na lisɛki te. Baboti bakristo bakoki koluka mitinda ya Biblia mpo na kosalisa bana báyeba ndenge ya kosalela malamu mayele oyo bazwi na kelasi. Yango ekosalisa bana na kokokisa bamposa na bango moko mpe komipesa mingi na mosala ya kosakola. w25.03 30-31 par. 15-16
Mwalomingo, 24 sanza ya 5
Bosengeli kolata bomoto ya sika.—Ef. 4:24.
Yisaya mokapo 65 elobi ndenge Yehova amonisi ndenge baoyo bakofanda na paradiso ya elimo bakozala. Esakweli oyo ekokisamaki mbala ya liboso na mobu 537 L.T.B. Na ntango yango, Bayuda oyo babongolaki motema balongwaki na bokangami na Babilone mpe bazongaki na mboka na bango. Yehova apambolaki bato na ye mpe asalisaki bango bákómisa lisusu kitoko Yerusaleme, engumba oyo ebebaki, mpe bátonga lisusu tempelo na yango mpo ezonga esika monene ya losambo ya solo na Yisraele. (Yis. 51:11; Zek. 8:3) Kokokisama ya mibale ya esakweli ya Yisaya ebandaki na 1919 T.B., ntango basaleli ya Yehova ya mikolo na biso balongwaki na bokangami na Babilone Monene. Na ntango yango, paradiso ya elimo ebandaki kopalangana mokemoke na mabele mobimba. Basakoli ya Bokonzi ya molende basalaki masangá ebele mpe bakolisaki bizaleli ya elimo. Basi ná mibali oyo bazalaki liboso bato ya mobulu, mpe bazalaki kosala makambo lokola banyama ‘balataki bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe.’ w24.04 20-21 par. 3-4
Mwayambo, 25 sanza ya 5
Moto na moto akomema mokumba na ye moko.—Gal. 6:5.
Na mikili mosusu, baboti to mikóló mosusu nde baponelaka mwana na bango molongani. Na bisika mosusu, libota to baninga nde bazwaka moto oyo akoki kokóma molongani ya ndeko na bango mpe na nsima bazwaka bibongiseli mpo mwana mwasi ná mwana mobali yango bákutana mpo bátala soki bakoki kolingana. Soki basɛngi yo osalisa bato bálingana to bábalana, luká koyeba soki mwana mwasi alingaka nini mpe mwana mobali alingaka nini. Soki omoni moto oyo akosimba mpo na ye, salá mpenza bolukiluki mpo na koyeba bomoto ya moto yango, bizaleli na ye, mpe koleka nyonso, elimo na ye. Kozala na boyokani malamu na Yehova ezali na ntina mingi mpenza koleka mbongo, kelasi oyo moto atángá, to lokumu oyo azali na yango na mokili. Kasi, kobosana te ete na nsuka, ndeko mobali to ndeko mwasi ya monzemba nde asengeli kozwa ekateli ya kobala ye to te. w24.05 23 par. 11
Mwamibale, 26 sanza ya 5
Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso.—Mas. 17:17.
Tokoki kosunga bato mibale oyo balingani na makambo oyo tozali koloba to koboya koloba. Na ntango mosusu, tosengeli koyeba komipekisa. (Mas. 12:18) Na ndakisa, tokoki koyoka mpenza mposa ya koyebisa basusu ete songolo ná mpakala balingani, kasi mbala mosusu balingi ete bango moko nde báyebisa basusu nsango yango. Tosengeli te kotɔnga bato oyo balingani to koloba mabe mpo na makambo oyo etali kaka bango moko. (Mas. 20:19; Rom. 14:10; 1 Tes. 4:11) Lisusu, mbala mosusu bato oyo balingani bakolinga te bóloba na bango makambo to bótuna bango mituna oyo ezali komonisa ete basengeli kaka kobalana. Bongo soki bandeko yango bamoni malamu bákata boyokani na bango? Tosengeli koboya kokɔta na likambo yango to kokɔtela moto moko. (1 Pe. 4:15) Soki bato bakabwani, elingi koloba te ete bazwi ekateli ya mabe. Mbala mingi, emonisaka kaka ete eleko yango ekokisi mokano na yango: esalisi bato oyo balinganaki bázwa ekateli oyo ebongi. Kasi, ekateli yango ekoki kaka kosala bango mpasi. Yango wana, malamu tóluka ndenge ya kosunga bango. w24.05 31 par. 15-16
Mwamisato, 27 sanza ya 5
Soki olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi, nguya na yo ekozala moke.—Mas. 24:10.
Moko ya makambo oyo elɛmbisaka mpenza nzoto ezali ntango moto moko ya libota to moninga moko ya motema atiki Yehova. (Nz. 78:40) Soki tozalaki kolinga moto yango mingi, ezalaka mpe mpasi mingi tóyika mpiko ntango azali lisusu sembo te. Soki okutaná na likambo yango, ndakisa ya bosembo ya Zadoke ekoki kopesa yo makasi. Atikalaki sembo epai ya Yehova ntango moninga na ye ya motema azangaki bosembo. Yango esalemaki ntango Davidi akómaki mobange mpe pene ya kokufa. Mwana na ye Adoniya alukaki kozwa kiti ya bokonzi, nzokande Yehova alakaki ete Salomo nde akozwa yango. (1 Nt. 22:9, 10) Abiatare aponaki kopesa Adoniya mabɔkɔ. (1 Bak. 1:5-8) Na ndenge yango, Abiatare azangaki bosembo kaka epai ya Davidi ná Zadoke te, kasi mpe epai ya Yehova! Na boumeli ya mbula 40, Zadoke ná Abiatare basalaki elongo lokola banganga-nzambe.—2 Sa. 8:17; 15:29; 19:11-14. w24.07 6 par. 14-15
Mwaminei, 28 sanza ya 5
Esengo na moto oyo azalaka ntango nyonso ekɛngɛ.—Mas. 28:14.
Tóyeba ete kokoba komibatela na komekama ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. Lisumu ekoki kopesa “esengo ya ntango mokuse,” kasi kotosa mibeko ya Yehova ekopesa biso esengo mingi koleka. (Ebr. 11:25; Nz. 19:8) Ezali bongo mpo akelaki biso mpo tózala na bomoi oyo eyokani na mibeko na ye. (Eba. 1:27) Soki bomoi na biso ezali kosepelisa Yehova, tokozala na lisosoli ya kimya mpe tokotikala na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. (1 Tim. 6:12; 2 Tim. 1:3; Yuda 20, 21) Ya solo, “nzoto ezali na bolɛmbu.” Kasi tozangi lisalisi te. Yehova azalaka pene ya kopesa biso nguya oyo tosengeli na yango. (2 Ko. 4:7) Nzokande, Nzambe apesaka biso nde nguya oyo eleki makasi. Yango emonisi ete biso moko mpe tosengeli kosalela nguya na biso, kosala milende mokolo na mokolo mpo na komibatela na komekama. Yehova akoyanola mabondeli na biso mpe akobakisela biso makasi na ntango oyo tosengeli na yango. (1 Ko. 10:13) Ya solo, na lisalisi ya Yehova, tokoki kokoba komibatela na komekama. w24.07 19 par. 19-21
Mwamitano, 29 sanza ya 5
Pamelá na miso ya bato nyonso baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu.—1 Tim. 5:20.
Ntoma Paulo akomelaki Timote oyo azalaki nkulutu lokola ye maloba oyo ezali na mokapo mpo na “baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu.” Alingaki mpenza koloba nini? Alingaki mpenza koloba te ete lisangá mobimba nde “na miso ya bato nyonso.” Kasi, azalaki kolobela nde mwa bato oyo mbala mosusu bayebaki lisumu yango. Ekoki kozala bato oyo bamonaki yango, to bato oyo mosumuki ayebisaki. Bankulutu bakoyebisa kaka bango ete mosumuki yango azwi lisalisi. Na bantango mosusu, lisumu ekoki koyebana mpenza na lisangá to mbala mosusu ekoyebana na nsima. Na ntango wana, “na miso ya bato nyonso” elakisi mpe lisangá mobimba. Na yango nkulutu moko akopesa liyebisi na lisangá ete ndeko yango azwi mpamela. Mpo na nini? Paulo alobi: “Mpo ekebisa bamosusu” bákwea te na lisumu yango. w24.08 23-24 par. 16-17
Mwapɔsɔ, 30 sanza ya 5
Wana ezali maloba ya solo ya Nzambe.—Em. 19:9.
Tosengeli kokoba komipesa mobimba na mosala ya Yehova tii na nsuka. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kokoba kosɛnzɛla mpo ‘bázwama’ epai ya Yesu mpo na mbano na bango na likoló. (Mat. 24:40) Bazali kozela mpenza ntango oyo ‘bakoyanganisama elongo’ na Yesu na likoló. Nsima ya etumba ya Armagedone, bakozala mwasi ya Yesu na libala ya Mwana-Mpate. (2 Tes. 2:1) Ata soki lisambisi ekómi pene mpenza, tozali na ntina ya kobanga te. Soki totikali sembo, Tata na biso ya bolingo akopesa biso “nguya oyo eleki makasi” mpo ‘tókoka kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.’ (2 Ko. 4:7; Luka 21:36) Tózala na elikya ya bomoi na likoló to na mabele, tokosepelisa Tata na biso soki toyoki makebisi oyo ezali na bandakisa ya Yesu. Na boboto monene ya Yehova, nkombo na biso ‘ekokomama na buku’ ya bomoi.—Dan. 12:1; Em. 3:5. w24.09 24-25 par. 19-20
Mwalomingo, 31 sanza ya 5
Kopusana epai ya Nzambe ezali malamu.—Nz. 73:28.
Okoki kozwa kimya ya makanisi na lisalisi ya Liloba ya Nzambe. Ndenge nini? Kanisá bomɛngo nyonso ya elimo oyo ozali na yango, ata mpe boyokani na yo na Yehova, mpe kokanisá yango na nsuka ya baoyo mbano na bango ezali kaka na mokili oyo. Batalelaka kaka makambo oyo bazali kosala na bomoi ya lelo mpo bazali ata na elikya moko te mpo na mikolo ezali koya. Kasi, Yehova alaki yo mapamboli oyo eleki mosika eloko nyonso oyo okoki kokanisa. (Nz. 145:16) Kanisá mpe likambo oyo: Tokoki mpenza koyeba soki bomoi na biso elingaki kozala ndenge nini lelo soki tozwaki ekateli ya ndenge mosusu? Mpo na koloba solo, baoyo bazwaka bikateli oyo euti na bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango bazangaka ata eloko moko te oyo ezali mpenza malamu. w24.10 27 par. 12-13