Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es26 nk. 17-26
  • Sanza ya 2

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 2
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwalomingo, 1 sanza ya 2
  • Mwayambo, 2 sanza ya 2
  • Mwamibale, 3 sanza ya 2
  • Mwamisato, 4 sanza ya 2
  • Mwaminei, 5 sanza ya 2
  • Mwamitano, 6 sanza ya 2
  • Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 2
  • Mwalomingo, 8 sanza ya 2
  • Mwayambo, 9 sanza ya 2
  • Mwamibale, 10 sanza ya 2
  • Mwamisato, 11 sanza ya 2
  • Mwaminei, 12 sanza ya 2
  • Mwamitano, 13 sanza ya 2
  • Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 2
  • Mwalomingo, 15 sanza ya 2
  • Mwayambo, 16 sanza ya 2
  • Mwamibale, 17 sanza ya 2
  • Mwamisato, 18 sanza ya 2
  • Mwaminei, 19 sanza ya 2
  • Mwamitano, 20 sanza ya 2
  • Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 2
  • Mwalomingo, 22 sanza ya 2
  • Mwayambo, 23 sanza ya 2
  • Mwamibale, 24 sanza ya 2
  • Mwamisato, 25 sanza ya 2
  • Mwaminei, 26 sanza ya 2
  • Mwamitano, 27 sanza ya 2
  • Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 2
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2026
es26 nk. 17-26

Sanza ya 2

Mwalomingo, 1 sanza ya 2

Moto oyo akimi kowelana abongi na lokumu, kasi bazoba bamikɔtisaka na koswana.—Mas. 20:3.

Bandeko mibali oyo bamonisaka bizaleli malamu ya bokristo basalisaka lisangá mingi mpenza. Moto ya makambo makasimakasi te alendisaka kimya. Soki olingi koyebana lokola moto ya makambo makasimakasi te, yokáká basusu mpe ndimáká makanisi na bango. Ntango ozali na likita moko na basusu, okondima kopesa mabɔkɔ na ekateli oyo bato mingi bandimi soki ebuki mobeko to etinda moko ya Biblia te? Otingamaka te makambo esalema kaka ndenge okanisi. Okoyeba ete likambo elongaka soki bapesi-toli bazali mingi. (Eba. 13:​8, 9; Mas. 15:22) Na esika ozala na maloba mabe to na matata na basusu, zalá na boboto mpe yebá koloba na basusu. Osengeli kozala moto oyo atyaka kimya, elingi koloba osalaka nyonso mpo na kotya kimya, ata ntango ezali mpasi kosala yango. (Yak. 3:​17, 18) Maloba na yo ya boboto ekoki kokitisa nkanda ya basusu, ata mpe ya batɛmɛli.—Bas. 8:​1-3; Mas. 25:15; Mat. 5:​23, 24. w24.11 23 par. 13

Mwayambo, 2 sanza ya 2

Akotinda baanzelu mpe akoyanganisa esika moko bato oyo ye aponá longwa na bansuka minei ya mokili, longwa na nsuka ya mabele tii na nsuka ya likoló.—Mrk. 13:27.

Kristo akufaki “mbala moko mpo na libela,” kasi azali kaka komipesa mpo na biso tii lelo. (Rom. 6:10) Ndenge nini? Azali kokoba kosala mingi mpo na kopesa biso matomba ya lisiko. Talá makambo oyo azali kosala. Azali Mokonzi na biso, Nganga-nzambe Monene na biso, mpe mokonzi ya lisangá. (1 Ko. 15:25; Ef. 5:23; Ebr. 2:17) Azali kokamba mosala ya koyanganisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe ebele mpenza ya bato, mpe mosala yango ekosila liboso bolɔzi monene esuka. (Mat. 25:32) Azali mpe kosalisa moombo ya sembo akoba koleisa malamu baoyo nyonso basalelaka Yehova na bosembo na mikolo oyo ya nsuka. (Mat. 24:45) Mpe na ntango ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, Yesu akokoba kosala mpo na bolamu na biso. Yehova apesá biso mpenza Mwana na ye! w25.01 24 par. 12

Mwamibale, 3 sanza ya 2

Ezali lokola nde bazwi likabo ya ofele na ndenge bazali kotángama bato ya sembo na boboto monene na ye, na kosikolama oyo basikolami na nzela ya lisiko oyo Kristo Yesu afutaki.—Rom. 3:24.

Ntango Yehova alimbisaka, asalaka lokola nde masumu yango esalemaki te mpe azongelaka yango te. Yango esalisaka biso tózala na boyokani malamu ná ye, Tata na biso ya likoló. Lisusu, tomoni ete kolimbisa ya Yehova ezali likabo. Alimbisaka biso mpo na bolingo na ye mpe boboto monene na ye, oyo amoniselaka bato ya masumu. Ezali te lotomo oyo bato basengeli na yango. Mokomoko na biso asengeli kozala na botɔndi ndenge Yehova azali Nzambe oyo ‘alimbisaka mpenza’! (Nz. 130:4; Rom. 4:8) Kasi, mpo alimbisa biso tosengeli kosala likambo moko ya ntina. Yesu alobaki: “Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino mpe akolimbisa mabunga na bino te.” (Mat. 6:​14, 15) Na yango, ezali polele ete tosengeli komekola Yehova na oyo etali kolimbisa. w25.02 13 par. 18-19

Mwamisato, 4 sanza ya 2

Lisekwa ekozala, ya bato ya sembo mpe ya bato oyo bazangi bosembo.—Mis. 24:15.

Tólobela bato ya Sodoma ná Gomora. Lota, moto ya sembo, azalaki kofanda kati na bango. Kasi, toyebi nde soki Lota asakwelaki bango nyonso? Toyebi te. Ya solo bazalaki bato mabe, kasi bango nyonso bayebaki kokesenisa mabe ná malamu? Kobosana te ete ebele ya mibali ya engumba yango balukaki kosangisa nzoto na makasi na bapaya ya Lota. Biblia elobi ete bazalaki “banda na elenge tii na mobange.” (Eba. 19:4; 2 Pe. 2:7) Toyebi mpenza soki Yehova, Nzambe ya motema mawa, akatelá mokomoko na bango etumbu ya liwa kozanga elikya ya lisekwa? Yehova ayebisaki Abrahama ete ezalaki ata na mibali ya sembo zomi te na engumba yango. (Eba. 18:32) Na yango, bazalaki bato oyo bazangi bosembo, mpe na bosembo na ye, Yehova apesaki bango etumbu mpo na misala na bango. Bongo tokoki mpenza koloba na bosikisiki ete moko te kati na bango akosekwa na “lisekwa ya . . . bato oyo bazangi bosembo”? Te, tokoki koloba bongo te na bosikisiki! w24.05 2 par. 3; 3 par. 8

Mwaminei, 5 sanza ya 2

Bókoba koluka liboso Bokonzi mpe bosembo na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.—Mat. 6:33.

Mpo na mikakatano ya mbongo, bato mosusu bandimaki mosala oyo esɛngaki ete bákende mosika ya libota na bango, kasi na nsima mingi bamonaki ete ezalaki ekateli ya malamu te. Liboso ya kondima mosala moko, kotalela kaka te mbongo oyo okoki kozwa, talelá mpe oyo yango ekosala na boyokani na yo mpe ya libota na yo elongo na Nzambe. (Luka 14:28) Omituna boye: ‘Libala na biso ekokóma ndenge nini soki nakabwani na molongani na ngai? Nakokoka koyangana na makita nyonso, kolekisa ntango elongo na bandeko mpe kobima mosala ya kosakola?’ Soki ozali na bana, osengeli mpe komituna motuna oyo ya ntina: ‘Ndenge nini nakobɔkɔla bana na ngai “na disiplini mpe makebisi ya Yehova” soki nazali esika moko na bango te?’ (Ef. 6:4) Landá makanisi ya Nzambe, kasi te ya bato ya libota to ya baninga oyo bamemyaka mitinda ya Biblia te. w25.03 29 par. 12

Mwamitano, 6 sanza ya 2

Tózala lisusu bana mike te.—Ef. 4:14.

Mokristo oyo akɔmɛli na elimo te akoki na pɛtɛɛ nyonso komemama na “bokosi” mpe na “mayele mabe,” mpe andimaka banungunungu ya lokuta mpe makanisi ya bapɛngwi. Akoki kozala na ezaleli ya koyokela bato zuwa, kobimisa kowelana, kosilika mpambampamba, to mpe kokwea na komekama. (1 Ko. 3:3) Biblia ekokanisi kokɔmɛla na elimo na kokola mpe kokóma mokóló. (Ef. 4:15) Mwana moke azalaka na bososoli te mpe azalaka na mposa ya litambwisi. Na ndakisa, mama akoki kosɛnga mwana na ye ya mwasi ya moke asimba ye na lobɔkɔ ntango bazali kokatisa balabala. Wana mwana azali kokola, mama akoki kotika ye akatisa balabala ye moko, kasi akokundwela ye ete asengeli kotala ngámbo na ngámbo liboso ya kokatisa. Ntango mwana yango akómi mokóló, ye moko akobanda kokima makama ya ndenge wana. Ndenge moko mpe, mokristo oyo akɔmɛli na elimo atalelaka makambo oyo Biblia elobi mpo ayeba makanisi ya Yehova na likambo oyo azali na yango, mpe na nsima azwaka ekateli oyo eyokani na yango. w24.04 3 par. 5-6

Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 2

Ee Yehova, nani okoki kobengisa na hema na yo?—Nz. 15:1.

Na ntango moko boye, baninga to bapaya ya Nzambe ezalaki baoyo bafandaka na ye kuna na likoló. Na nsima ntango akelaki bato awa na mabele, bango mpe bakokaki koya na hema na ye. Kendekende, bato lokola Enoka, Noa, Abrahama, mpe Yobo bazalaki bapaya na ye. Biblia emonisi ete basambeli yango ya solo bazalaki baninga ya Nzambe, bato oyo batambolaki “elongo na Nzambe ya solo.” (Eba. 5:24; 6:9; Yobo 29:4; Yis. 41:8) Na boumeli ya bankama ya bambula, Yehova akobaki kobengisa baninga na ye bákóma bapaya na ye. (Ezk. 37:​26, 27) Na ndakisa, esakweli ya Ezekiele emonisi biso ete Nzambe alingi mpenza basambeli na ye ya sembo bázala na boyokani makasi na ye. Alaki kosala “kondimana ya kimya ná bango.” Esakweli yango elobelaki ntango oyo baoyo bazali na elikya ya bomoi na likoló mpe baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bakozala elongo na bomoko na kati ya hema na ye ya elilingi lokola “etonga kaka moko.” (Yoa. 10:16) Sikoyo nde ntango yango! w24.06 2 par. 2, 4; 3 par. 5

Mwalomingo, 8 sanza ya 2

Nzambe na biso apesaki biso mpiko.—1 Tes. 2:2.

Lokola tozali basaleli ya Yehova, topesaka Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ na motema mobimba, kasi mbala mingi esɛngaka mpiko mpo na kosala yango. (Mat. 6:33) Na ndakisa, na mokili oyo mabe, tosengeli kozala na mpiko mpo na kotosa mibeko ya Yehova na bomoi na biso mpe mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Mpe mbala mingi, esɛngaka mpiko mpo na koboya kokɔta na makambo ya politiki oyo ezali se kokabola mokili. (Yoa. 18:36) Basaleli mingi ya Yehova bakutani na makambo lokola kozanga mbongo, minyoko, to mpe bakɔtisaki bango na bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki to kosala mosala ya soda. Tokozwa makasi mpe mpiko soki totaleli bandakisa ya baoyo bamonisaki mpiko mpo na kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ. Mokonzi na biso Yesu Kristo atɛmɛlaki mbamba ya kokɔta na makambo ya politiki ya mokili ya Satana. (Mat. 4:​8-11; Yoa. 6:​14, 15) Yesu azalaki ntango nyonso kotyela Yehova motema mpo na kozwa makasi ya kosala oyo ezali sembo. w24.07 3 par. 4; 4 par. 7

Mwayambo, 9 sanza ya 2

Abukaki mbuma na yango mpe alyaki. Na nsima apesaki mpe mobali na ye ntango azalaki elongo na ye mpe ye alyaki.—Eba. 3:6.

Yehova akomisaki lisolo yango ya mawa mpo na bolamu na biso. Esalisaka biso tómona ntina oyo ayinaka mpenza lisumu. Lisumu ekabolaka biso na Tata na biso, mpe ememaka na liwa. (Yis. 59:2) Ezali mpo na yango nde Satana, ekelamu ya elimo oyo atombokaki mpe abandisaki mabe, alingaka lisumu mpe akobaka komeka bato mpo básala lisumu. Mbala mosusu akanisaki ete alongaki mpenza na elanga ya Edene. Kasi, ayebaki te ndenge Yehova azali na bolingo mingi. Nzambe abongolaki te mokano na ye mpo na bakitani ya Adama ná Eva. Lokola alingaka bato, apesaki bango elikya mbala moko. (Rom. 8:​20, 21) Yehova ayebaki ete bakitani yango mosusu bakopona kolinga ye mpe bakoluka lisalisi na ye mpo na kobundisa lisumu. Mpe lokola Yehova azali Tata mpe Mozalisi na bango, afungwelaki bango nzela ya kosikolama na lisumu mpe ya kopusana penepene na ye. w24.08 3 par. 3-4

Mwamibale, 10 sanza ya 2

Bóluka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.—Flp. 1:10.

Biso basaleli ya Yehova tozalaka na makambo ebele ya kosala. Tosalaka mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa na biso mpe ya libota na biso. (1 Tim. 5:8) Bandeko mingi basalisaka bato ya libota na bango oyo bazali kobɛla to oyo bakómi mibange. Mpe biso nyonso tosengeli kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, mpe yango ezwaka ntango. Longola mikumba wana, tozalaka mpe na makambo ya lisangá. Mokumba moko ya ntina ezali ya kosakola nsango malamu na molende. Mpo na biso bakristo, kotánga Biblia ezali moko ya “makambo oyo eleki ntina,” yango wana tosengeli kotya yango na esika ya liboso. Bavɛrsɛ ya liboso ya Nzembo elobi mpo na moto ya esengo ete: “Asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.” (Nz. 1:​1, 2) Yango emonisi polele ete ebongi kotya ngonga ya kotánga Biblia. Eleki malamu kotánga Biblia na ngonga nini? Mokomoko na biso azali na eyano na ye. Kasi na mokuse, ngonga eleki malamu ezali oyo ekosalisa yo otángaka Biblia mokolo na mokolo. w24.09 3 par. 5-6

Mwamisato, 11 sanza ya 2

Moto na moto akomema mokumba na ye moko.—Gal. 6:5.

Mokristo oyo akɔmɛli na elimo azalaka mpe na mposa ya lisalisi ya basusu? Ɛɛ. Bakristo oyo bakɔmɛli basɛngaka toli na bantango mosusu. Moto oyo akɔmɛli te akoki kozela ete basusu báyebisa ye nini asala to bázwa ekateli na esika ye. Nzokande, ntango mokristo oyo akɔmɛli na elimo asɛngi toli epai ya baoyo bazali na bwanya mpe mayele koleka ye, abosanaka te ete Yehova alingi azwa ekateli ye moko, ‘amema mokumba na ye moko.’ Ndenge kaka mikóló bakesanaka na nzoto, bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bakesanaka na ndenge ya komonisa bizaleli ya elimo lokola bwanya, mpiko, bokabi, mpe komitya na esika ya basusu. Lisusu, ntango bakristo mibale oyo bakɔmɛli bakutani na likambo ya ndenge moko, bakoki kozwa bikateli oyo ekeseni kasi nyonso mibale eyokani na mitinda ya Biblia. Ezalaka mingimingi bongo na bikateli oyo etaleli lisosoli ya moto. Lokola bayebi likambo yango, balukaka te kosambisa basusu ntango bazwi ekateli oyo ekeseni na oyo ya bango. Kasi, basalaka makasi bábatela bomoko.—Rom. 14:10; 1 Ko. 1:10. w24.04 4 par. 7-8

Mwaminei, 12 sanza ya 2

Ntango natungisamaki koleka ndelo, obɔndisaki ngai mpe okitisaki ngai motema.—Nz. 94:19.

Okoki kosala nini soki oyokaka ete ozali na motuya te to ozangá ntina? Tángá bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi ete Yehova azwaka yo na motuya mpe manyolá yango. Soki olongi te kokokisa mokano moko to olɛmbi nzoto mpo ozali kokoka te kosala mingi lokola basusu, kokanisa te ete ozali na ntina te. Yehova asɛngaka biso te tósala koleka makoki na biso. (Nz. 103:​13, 14) Soki basalá yo makambo ya mabe na kala, komipesa foti te mpo na makambo oyo moto yango asalaki. Ebongaki te básala yo bongo! Kobosana te ete Yehova akosɛnga nde baoyo basalaka basusu mabe bázongisa monɔkɔ epai na ye, kasi te baoyo banyokwami. (1 Pe. 3:12) Kotyaka ntembe te ete Yehova akoki kosalela yo mpo na kosalisa basusu. Apesi yo lokumu ya kosala elongo na ye na mosala ya kosakola. (1 Ko. 3:9) Na ntembe te makambo oyo okutaná na yango na bomoi esalisá yo oyeba komitya na esika ya basusu mpe ososola ndenge oyo mbala mosusu bazali komiyoka. Okoki koyeba malamu ndenge ya kosalisa bango. w24.10 7-8 par. 6-7

Mwamitano, 13 sanza ya 2

Nzambe, akosala te ete likambo ya bato na ye oyo aponi, oyo babelelaka ye butu moi, ekatama na bosembo, wana azali komonisela bango motema molai? Nazali koyebisa bino, akosala ete likambo na bango ekatama na bosembo nokinoki.—Luka 18:​7, 8.

Yehova atyaka likebi mingi na makambo oyo basusu basalelaka biso. “Yehova alingaka bosembo.” (Nz. 37:28) Yesu amonisaki ete Yehova akosala ete “likambo . . . ekatama na bosembo nokinoki” na ntango oyo ebongi. Mpe mosika te, akolongola bampasi na biso nyonso mpe makambo nyonso ya kozonga bosembo. (Nz. 72:​1, 2) Lokola ntango oyo bosembo ekozala bisika nyonso ekoki naino te, Yehova asalisaka biso tóyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo. (2 Pe. 3:13) Ateyaka biso ndenge ya koboya kosala likambo oyo ezangi bwanya ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. Yehova atindaki Mwana na ye mpo apesa biso ndakisa ya kokoka na oyo etali koyikela makambo ya kozanga bosembo mpiko. Apesi biso mpe toli ya malamu oyo tokoki kosalela ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. w24.11 2-3 par. 3-4

Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 2

Bópesa bango eloko ya kolya.—Mat. 14:16.

Ndenge Yesu alobaki ete báleisa ebele ya bato ezalaki mokakatano mpo ezalaki na mibali soki 5000. Mpe bakisa basi ná bana, bato oyo basengelaki na bilei bakokaki kozala ata 15000. (Mat. 14:21) Andre azwaki maloba, alobi: “Mwana mobali moko ya moke azali na mampa mitano ya ɔrje ná mbisi mibale ya mike. Kasi yango ezali eloko nini mpo na bato ebele boye?” (Yoa. 6:9) Mampa oyo basali na ɔrje ezalaki bilei oyo bato mingi, ata mpe babola bazalaki kolya, mpe mbala mosusu mbisi wana ya mike ezalaki oyo batyá mungwa mpe bakausá. Kasi, biloko oyo mwana mobali wana azalaki na yango elingaki kokoka te ebele ya bato nyonso wana! Yesu asepelaki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya; na yango asɛngaki bato básala bituluku mpe báfanda na matiti. (Mrk. 6:​39, 40; Yoa. 6:​11-13) Biblia elobi ete Yesu apesaki Tata na ye matɔndi mpo na mampa ná mbisi yango. Ebongaki mpenza ndenge apesaki Nzambe matɔndi mpo na komonisa ete ye nde azalaki Mopesi ya bilei yango. Biso mpe tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu; tosengeli kobondelaka liboso ya kolya. Na nsima, Yesu apesaki bayekoli bákabola bilei yango, mpe bato balyaki mpe batondaki. w24.12 2-3 par. 3-4

Mwalomingo, 15 sanza ya 2

Bósanzola Yehova Nzambe na bino.—1 Nt. 29:20.

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, apesaki Tata na ye nkembo na ndenge azalaki koloba polele ete Yehova nde apesaki ye nguya ya kosala makamwisi. (Mrk. 5:​18-20) Yesu azalaki mpe kopesa Yehova nkembo na ndenge oyo azalaki koloba malamu mpo na ye mpe ndenge oyo asalelaka bato makambo. Na libaku moko, Yesu azalaki koteya na sinagoga moko. Na kati ya bato oyo bazalaki koyoka ye, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na demo moko esalaki mbula 18. Demo yango asalaki ete nzoto na ye egumbama mpenza mpe azalaki kokoka kotɛlɛma semba ata moke te. Mwasi yango azalaki mpenza na mpasi! Yesu ayokaki mawa, apusanaki epai ya mwasi yango mpe alobaki na ye na boboto mpenza ete: “Mwasi, obikisami na bolɛmbu na yo.” Na nsima atyaki mabɔkɔ na ye likoló ya mwasi yango, mpe na mbala moko mwasi yango atɛlɛmaki semba mpe “abandaki kopesa Nzambe nkembo.” Kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye mpe lokumu na ye ezongaki! (Luka 13:​10-13) Mwasi yango azalaki na ntina ya malamu ya kopesa Yehova nkembo; ezali mpe bongo mpo na biso. w25.01 2-3 par. 3-4

Mwayambo, 16 sanza ya 2

Limbisá biso masumu na biso.—Luka 11:4.

Tokoki kozwa lisusu nyonso oyo Adama ná Eva babungisaki? Na makasi na biso moko, tokokoka te. (Nz. 49:​7-9) Kozanga lisalisi, tolingaki kozala na elikya te ya bomoi na mikolo ekoya to ya lisekwa. Kutu, liwa na biso elingaki kozala kaka lokola ya banyama. (Mos. 3:19; 2 Pe. 2:12) Tata na biso ya bolingo Yehova apesi biso likabo oyo efuti nyongo ya lisumu oyo Adama atikelá biso. Yesu alobelaki yango boye: “Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Likabo yango epesi biso mpe nzela ya kozala na boyokani malamu na Yehova. Tokoki kozwa matomba na likabo yango ya kokamwa oyo esalaka ete masumu, to “banyongo” na biso elimbisama. w25.02 3 par. 3-6

Mwamibale, 17 sanza ya 2

[Saulo] atɛlɛmaki mpe abatisamaki.—Mis. 9:18.

Nini esalisaki Saulo azwa batisimo? Ntango Nkolo Yesu oyo azongaki likoló abimelaki ye, miso ya Saulo ezalaki komona lisusu te. (Mis. 9:​3-9) Na boumeli ya mikolo misato, Saulo akilaki bilei mpe na ntembe te amanyolaki na makambo oyo eutaki kokómela ye. Saulo andimaki ete Yesu azalaki Masiya mpe ete bayekoli na ye bazalaki lingomba ya solo. Tokoki kozwa mateya na ndakisa ya Saulo. Akokaki kotika ete lolendo mpe kobanga bato epekisa ye kozwa batisimo. Kasi asalaki bongo te. Saulo andimaki kokóma mokristo atako ayebaki ete akokutana na minyoko. (Mis. 9:​15, 16; 20:​22, 23) Nsima ya batisimo na ye, akobaki kotyela Yehova motema ete akosalisa ye ayika mpiko na mikakatano ndenge na ndenge. (2 Ko. 4:​7-10) Soki ozwi batisimo mpe okómi Motatoli ya Yehova, okoki kokutana na makambo oyo ekomeka kondima na yo to kokutana na mikakatano, kasi okozanga lisalisi te. Okoki kotya motema ete Nzambe mpe Kristo bakosunga yo.—Flp. 4:13. w25.03 4 par. 8-9

Mwamisato, 18 sanza ya 2

Ndenge oyo nazali kopota mbangu ezali ya bipotela te.—1 Ko. 9:26.

Kotánga Biblia ezali mokano ya malamu. Kasi mpo botángi ya Liloba ya Nzambe esalisa biso mpenza, tosengeli kosala likambo mosusu. Tózwa ndakisa oyo: Milona ezalaka na mposa ya mai, mbala mingi mai ya mbula, mpo ekola malamu. Kasi soki mbula esopani ebele na ntango mokuse, mabele ekokoka komɛla mai yango te. Soki esalemi bongo, mbula yango ekozala na litomba te mpo na milona. Mabele esengeli na ntango mpo na komɛla mai ya mbula mpo milona ekola malamu. Ndenge moko mpe, tosengeli te kotánga Biblia mbangumbangu, elingi koloba, kozanga kokanisa makambo oyo tozali kotánga mpe kosalela yango. (Yak. 1:24) Soki na bantango mosusu omonaka ete otángaka Biblia mbangumbangu, osengeli kosala nini? Tángáká malɛmbɛmalɛmbɛ. Salá makasi okanisaka makambo oyo ozali kotánga to oyo outi kotánga. Mbala mosusu okoki kobakisa mwa ntango na botángi na yo mpo osalela ndambo ya ntango yango mpo na kokanisa, to komanyola. w24.09 4 par. 7-9

Mwaminei, 19 sanza ya 2

Bótosaka baoyo bazali kokamba bino.—Ebr. 13:17.

Ntango bazwi malako, bankulutu basengeli kotánga yango na likebi mpe na nsima kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalela yango. Bazwaka malako mpo na ndenge ya kosala masolo na makita, mpo na ndenge ya kobondela na lisangá, kasi mpe mpo na ndenge ya kobatela bampate ya Kristo. Bankulutu oyo balandaka malako yango oyo euti na ebongiseli ya Nzambe basalisaka bandeko bámiyoka ete babatelami mpe balingami. Ntango tozwi malako epai ya bankulutu, tosengeli kondima yango kozanga mindɔndɔ. Soki tozali kosala bongo, tokosalisa baoyo bazali kokamba biso bákokisa mokumba bango malamu. Biblia elendisi biso tótosa baoyo bazali kokamba biso mpe tómikitisa liboso na bango. (Ebr. 13:7) Yango ekoki kozala mokakatano na bantango mosusu. Mpo na nini? Mpo bazali bato ya kozanga kokoka. Kasi, soki tozali kotala kaka bizaleli na bango ya mabe na esika tótala makambo na bango ya malamu, ekozala lokola nde tozali kosalisa banguna na biso. Na ndenge nini? Tokotyela lisusu ebongiseli ya Nzambe motema mingi te. w24.04 10 par. 11-12

Mwamitano, 20 sanza ya 2

Akokabola bato na bituluku mibale.—Mat. 25:32.

Bato nyonso oyo bakokufa na eleko ya bolɔzi monene bakokufa libela, kozanga elikya ya lisekwa? Biblia emonisi polele ete batɛmɛli ya makasi oyo Yehova ná mampinga na ye bakobebisa na Armagedone bakosekwa te. (2 Tes. 1:​6-10) Bongo tokoki koloba nini mpo na bato mosusu, na ndakisa, baoyo bakoki kokufa na makama oyo ebimaka yango moko, na aksida, to na mabɔkɔ ya bato mosusu na ntango ya bolɔzi monene? (Mos. 9:11; Zek. 14:13) Bato yango mosusu bakoki nde kozala na kati ya “bato oyo bazangi bosembo,” oyo bakosekwa na mokili ya sika? (Mis. 24:15) Na mokuse, toyebi te. Kasi toyebi makambo ebele oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Na ndakisa, toyebi ete na Armagedone, bato bakosambisama na kotalela ndenge oyo basalelaki bandeko ya Kristo makambo. (Mat. 25:40) Mpe baoyo bakosambisama lokola bampate ekozala baoyo bapesaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe Kristo mabɔkɔ.—Em. 12:17. w24.05 10-11 par. 9-11

Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 2

Yehova azali na bomoi! Libanga na ngai asanzolama! Nzambe ya lobiko na ngai atombwama.—Nz. 18:46.

Biblia elobi ete eleko oyo tozali ezali “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Tim. 3:1) Longola mikakatano oyo moto nyonso akutanaka na yango na mokili oyo, basaleli ya Yehova bakutanaka na botɛmɛli mpe minyoko. Nini ekosalisa biso tókoba kosalela Yehova atako mikakatano yango? Ntina moko monene ezali ete toyekoli koyeba Yehova mpe tomoni ete azali “Nzambe ya bomoi.” (Yir. 10:10; 2 Tim. 1:12) Yehova azali Moto ya solo oyo asungaka biso na ntango ya mikakatano mpe alukaka mabaku ya kosalisa biso. (2 Nt. 16:9; Nz. 23:4) Komona ete Yehova azali Nzambe ya bomoi ekoki kosalisa biso tólonga mokakatano nyonso oyo tokutani na yango. w24.06 20 par. 1-2

Mwalomingo, 22 sanza ya 2

Nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga na ntɔngɔ oyo ezali kongɛnga se kongɛnga tii moi ekokóma makasi.—Mas. 4:18.

Tosengeli kokoba kotyela ebongiseli ya Yehova motema. Ntango bandeko oyo bazali kokamba bamoni polele ete esengeli kosembola boyebi na biso na liteya moko ya Biblia to mpe ndenge oyo mosala ya Bokonzi esengeli kosalema, bakakatanaka te kosala bambongwana oyo esengeli. Basalaka yango mpo balukaka libosoliboso kosepelisa Yehova. Basalaka mpe makasi mpo bikateli oyo bazwi eyokana na Liloba ya Nzambe, oyo ezali na mateya oyo basaleli nyonso Yehova basengeli kolanda. Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Kangamá ntango nyonso na ndakisa ya maloba ya pɛto.” (2 Tim. 1:​13, msl.) “Ndakisa ya maloba oyo ezali pɛto” ezali mateya nyonso ya bokristo oyo ezali na Biblia. (Yoa. 17:17) Mateya yango nde esimbi bindimeli na biso nyonso. Ebongiseli ya Yehova eteyaka biso tókangama makasi na ndakisa yango. Ntango nyonso oyo tosali bongo, tokozwa mapamboli. w24.07 11-12 par. 12-13

Mwayambo, 23 sanza ya 2

Yehova . . . azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.—2 Pe. 3:9.

Lokola ntoma Petro ye moko akutanaki na likambo yango, akokaki koteya basusu makambo etali kobongola motema mpe kolimbisa. Mwa moke nsima ya fɛti ya Pantekote, asalaki diskur liboso ya ebele ya Bayuda oyo bazalaki bandimi te, alimbwelaki bango ete babomaki Masiya. Kasi, na bolingo nyonso alobaki na bango: “Bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama, mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko.” (Mis. 3:​14, 15, 17, 19) Na ndenge yango, Petro amonisaki ete kobongola motema esɛngaka kobongwana, elingi koloba kotika kokanisa mpe kosala makambo ya mabe, mpe kobanda kosala makambo ya malamu, oyo esepelisaka Nzambe. Petro amonisaki mpe ete Yehova akoboma masumu na bango, to akolongola yango mpo na libela. Koyeba yango epesaka bakristo elikya ntango basali lisumu, ata ya monene! w24.08 12 par. 14

Mwamibale, 24 sanza ya 2

Bózala na bolingo ya mbongo te na bomoi na bino.—Ebr. 13:5.

Tokozwa makasi ya koboya bolingo ya biloko ya mokili soki tozali mpenza na kondima ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene. Kutu, bato “bakobwaka palata na bango na babalabala,” mpo bakomona ete “ezala palata na bango to wolo na bango ekokoka te kobikisa bango na mokolo ya nkanda makasi ya Yehova.” (Ezk. 7:19) Na esika tótya makanisi nyonso na koluka mbongo ebele, tosengeli kozwa bikateli oyo ekosalisa biso tózala na bomoi ezangi mindɔndɔ, kasi oyo ezali mpe na bokatikati. Yango elimboli mpe kotɛmɛla komekama ya kokɔta banyongo ezangi ntina to koboma nzoto mpo na kobatela ebele ya biloko oyo tozali na yango. Tokokeba mpe ete tókangama koleka ndelo te na biloko na biso ya mosuni. (Mat. 6:​19, 24) Kondima na biso ekoki komekama na oyo etali biloko ya mosuni mpe makambo mosusu wana tozali kozela ete nsuka ya mokili oyo eya. w24.09 11 par. 13-14

Mwamisato, 25 sanza ya 2

Moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.—1 Ko. 10:12.

Tokoki kolonga mpenza bamposa na biso mosusu ya mabe. Kasi, bolɛmbu na biso mosusu, ekoki kosɛnga tókoba kobundisa yango. Tótalela ndakisa ya ntoma Petro. Akweaki na motambo ya kobanga bato ntango awanganaki Yesu mbala misato. (Mat. 26:​69-75) Emonanaki na nsima ete Petro atikaki kobanga bato ntango apesaki litatoli na mpiko nyonso liboso ya Sanedrina. (Mis. 5:​27-29) Kasi, mwa bambula na nsima, mpo na ‘kobanga etuluku ya bato oyo bakatamá ngenga,’ akataki kolya na bakristo oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu. (Gal. 2:​11, 12) Bolɛmbu ya Petro ya kobanga bato ezongaki. Ekoki kozala ete alongaki yango mpo na libela te. Biso mpe tokoki kozala na likambo ya ndenge wana. Kasi, tokoki kokoba kobundisa bolɛmbu moko soki tozali kolanda toli ya Yesu ete: “Bókoba kosɛnzɛla.” (Mat. 26:41) Ata ntango okanisi ete ozali makasi, kobá koboya makambo oyo ekoki kotya yo na komekama. Kobá kosalela mayele oyo ekosalisa yo olonga.—2 Pe. 3:14. w24.07 18-19 par. 17-19

Mwaminei, 26 sanza ya 2

Apesaki makabo oyo ezali bato.—Ef. 4:8.

Moto moko te akokani na Yesu na oyo etali kokaba. Ntango azalaki awa na mabele, asalelaki mingi nguya na ye ya kosala makamwisi mpo na kosalisa basusu. (Luka 9:​12-17) Apesaki likabo oyo eleki monene ntango akabaki bomoi na ye mpo na biso. (Yoa. 15:13) Banda lisekwa na ye, Yesu azali kaka kokaba. Kaka ndenge alakaki, asɛngi Yehova asopa elimo santu na ye mpo na koteya mpe kobɔndisa biso. (Yoa. 14:​16, 17, msl.; 16:13) Mpe na nzela ya makita, Yesu azali kokoba kopesa biso oyo esengeli mpo tókómisa bato bayekoli na mabele mobimba. (Mat. 28:​18-20) Ntoma Paulo akomaki ete ntango Yesu azongaki na likoló, “apesaki makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:​7, 8) Paulo amonisaki ete Yesu apesaki makabo yango mpo na kosalisa lisangá na makambo ndenge na ndenge. (Ef. 1:​22, 23; 4:​11-13) Nzokande, lokola mibali yango bazali bato ya kozanga kokoka, basalaka mabunga. (Yak. 3:2) Kasi, Nkolo na biso Yesu Kristo asalelaka bango mpo na kosalisa biso; bazali makabo mpo na biso. w24.10 18 par. 1-2

Mwamitano, 27 sanza ya 2

Bososoli ekobatela yo.—Mas. 2:11.

Davidi ayebisaki Salomo ete akokoba kolonga kaka soki akobi kotosa Yehova Nzambe. Likambo ya mawa, na nsuka ya bomoi na ye, Salomo akómaki kosambela banzambe mosusu. Yehova aboyaki ye, mpe Salomo abungisaki bwanya oyo ezalaki kosalisa ye atambwisa bato na boyengebene mpe na bosembo. (1 Bak. 11:​9, 10; 12:4) Liteya ezali nini mpo na biso? Kotosa esalaka ete tólonga na bomoi. (Nz. 1:​1-3) Ya solo, Yehova alaki te ete akopesa biso bomɛngo mpe nkembo ndenge Salomo azalaki na yango. Kasi soki tozali kotosa Nzambe, akopesa biso bwanya oyo ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. (Mas. 2:​6, 7; Yak. 1:5) Toli ya Nzambe ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu na makambo lokola mosala, kelasi, kominanola, mpe mbongo. Kolanda toli yango ya Nzambe ekobatela biso mpo eloko te esala biso mabe mpo na libela. (Mas. 2:​10, 11) Tokozala na baninga ya malamu. Mpe tokozala na bomoi ya esengo na libota. w24.11 10-11 par. 11-12

Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 2

Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo; bókangama makasi na oyo ezali malamu.—1 Tes. 5:21.

Baboti bazwaka mabaku ndenge na ndenge ya kobɛta masolo ya malamu ná mwana na bango na makambo etali Biblia to kondima epai ya Nzambe. Mabaku yango ekoki kozala ntango bakei kotala musée moko. Okoki kobenda likebi ya mwana na masolo ya kala to bililingi oyo ekoki kosalisa ye andima mpenza ete Biblia elobaka solo. Mwana na yo ayebaka ete nkombo ya Nzambe ekomamá na libanga oyo ebengami Libanga ya Moabe, oyo eumeli mbula 3000? Liyemi ya Libanga ya Moabe ezali na musée “Biblia mpe nkombo ya Nzambe” oyo ezali na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Warwick, na New York. Libanga ya Moabe emonisaka ete Mesha mokonzi ya Moabe atombokelaki Yisraele. Yango eyokani na makambo oyo Biblia elobi. (2 Bak. 3:​4, 5) Ntango mwana amoni na miso na ye moko makambo oyo emonisi ete Biblia ezali solo mpe sikisiki, kondima na ye ekokóma makasi. w24.12 14 par. 4; 15 par. 6

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto