Sanza ya 1
Mwaminei, 1 sanza ya 1
Bózala mikóló na makoki ya kososola.—1 Ko. 14:20.
Ezali na makambo mingi te oyo epesaka mwasi ná mobali esengo koleka ntango baboti mwana oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ. Nzokande, ata soki baboti yango balingi mwana yango mingi ndenge nini, balingaka te atikala kaka moke libela. Kutu, bakomitungisa makasi soki azali kokola te. Ndenge moko mpe, Yehova azalaka na esengo ntango tokokisi masɛngami mpe tokómi bayekoli ya Yesu, kasi alingaka te tótikala bana mike na elimo. (1 Ko. 3:1) Asɛngi biso nde ‘tózala mikóló’ na elimo. Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mokóló” ekoki mpe kolimbola “akɔmɛli,” “ya kokoka,” mpe “ya mobimba.” (1 Ko. 2:6) Tokómaka mikóló na elimo, to bakristo oyo bakɔmɛli, ntango tolongwe bana mike na elimo mpe tokolisi boyokani na biso na Yehova. Ya solo, ata ntango tokokisi mokano yango, tosengeli kotika te kokende liboso na elimo.—1 Tim. 4:15. w24.04 2 par. 1, 3
Mwamitano, 2 sanza ya 1
Hema na ngai ekozala elongo na bango, nakozala Nzambe na bango.—Ezk. 37:27.
Soki moto atuni yo: ‘Yehova azali nani epai na yo?’ okoloba nini? Mbala mosusu okoyanola, ‘Yehova azali tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe Moninga na ngai.’ Okoki mpe kokanisa batitre to bibengeli mosusu oyo okoki kosalela mpo na kolobela Yehova. Kasi omonaka ye mpe lokola Moto oyo abengisi yo ozala mopaya na ye? Mokonzi Davidi akokanisaki boninga ya Yehova ná basaleli na Ye ya sembo na boyokani kati na mopaya ná moto oyo abengisi ye. Atunaki boye: “Ee Yehova, nani okoki kobengisa na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo mosantu?” (Nz. 15:1) Maloba yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe emonisi ete tokoki kokóma bapaya ya Yehova, baninga na ye. Liboso azalisa biloko nyonso, Yehova azalaki ye moko. Kasi na nsima, akelaki Mwana na ye ya liboso; ezalaki lokola nde ayambi mopaya na hema na ye ya elilingi. Yehova asepelaki mingi na mokumba na ye wana ya sika, kozala Moto oyo ayambi mopaya. Biblia emonisi ete Yehova alingaki Mwana na ye “mingi mpenza.” Mpe Mwana yango, mopaya ya Yehova ya liboso, azalaki mpe “kosepela liboso na ye ntango nyonso.”—Mas. 8:30. w24.06 2 par. 1-3
Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 1
Zadoke, elenge mobali moko oyo azalaki elombe mpe mobali ya mpiko.—1 Nt. 12:28.
Mokolo moko, mibali koleka 340000 bayanganaki mpo na kotya Davidi mokonzi na Yisraele mobimba. Na boumeli ya mikolo misato, mibali yango bazalaki na mwa bangomba ya mabanga pene na Hebrone, bazalaki kobɛta masolo na esengo mpe koyemba banzembo ya masanzoli. (1 Nt. 12:39) Elenge mobali moko na nkombo Zadoke azalaki na kati ya ebele ya bato yango, kasi na ntembe te bato mingi bamonaki ye te. Kasi, Yehova amonaki ye mpe alingaki tóyeba ete Zadoke azalaki wana. (1 Nt. 12:22, 26-28) Zadoke azalaki nganga-nzambe oyo asalaki elongo na Nganga-nzambe monene Abiatare. Zadoke azalaki mpe momoni-makambo; azalaki na likoki ya kososola mokano ya Nzambe mpe azalaki na mayele mingi mpenza. (2 Sa. 15:27) Zadoke azalaki mobali ya mpiko. Na mikolo oyo ya nsuka, Satana azali se kobundisa makasi basaleli ya Nzambe. (1 Pe. 5:8) Tosengeli kozala na mpiko wana tozali kozela Yehova abebisa Satana mpe mokili na ye ya mabe. (Nz. 31:24) Soki tosali bongo, tokoki komekola mpiko ya Zadoke. w24.07 2 par. 1-3
Mwalomingo, 4 sanza ya 1
Bomoi mobimba ya Adama ezalaki mbula 930, mpe na nsima akufaki.—Eba. 5:5.
Ntango Yehova akelaki mwasi ná mobali ya liboso, alingaki ete bázala na esengo. Atyaki bango na esika moko ya kitoko ya kofanda, abalisaki bango, mpe apesaki bango mokumba moko ya esengo mpenza. Basengelaki kobota bana mpo na kotondisa mabele, mpe kokómisa mabele mobimba paradiso lokola elanga ya Edene. Kasi, apesaki bango mobeko moko oyo ezalaki mindɔndɔ te. Mpe akebisaki bango ete soki babuki mobeko yango, oyo ekomonisa ete batombokeli ye na nko, lisumu na bango ekomema na liwa. Toyebi makambo oyo esalemaki. Ekelamu moko ya elimo, oyo azalaki kolinga Nzambe te mpe alingaka bato te, ayaki mpe amekaki bango mpo básala likambo oyo Nzambe apekisaki bango. Adama ná Eva bakweaki na komekama yango. Lokola batyelaki Tata na bango ya bolingo motema te, basalaki lisumu. Ndenge toyebi yango, maloba ya Yehova ekokisamaki. Banda wana, Adama ná Eva basengelaki komona mbuma mabe ya likambo oyo basalaki: bakómaki mibange, mpe nsukansuka bakufaki.—Eba. 1:28, 29; 2:8, 9, 16-18; 3:1-6, 17-19, 24. w24.08 3 par. 3
Mwayambo, 5 sanza ya 1
Bózala kaka te bayoki, kasi bótosaka ntango nyonso liloba ya Nzambe.—Yak. 1:22.
Yehova ná Mwana na ye Yesu balingi tózala na esengo. Nzembo 119:2 elobi: “Esengo na baoyo bazali kotosa makundoli na ye, oyo bazali kolukaluka ye na motema na bango mobimba.” Yesu mpe alobaki: “Esengo . . . na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!” (Luka 11:28) Biso basaleli ya Yehova tozali bato ya esengo ntango totángaka Biblia mokolo na mokolo mpe tosalaka nyonso mpo na kosalela makambo oyo toyekoli. (Yak. 1:22-25) Kotosa liloba ekosala ete Yehova asepela. (Mos. 12:13) Ntango tozali kosalela makambo oyo totángaka na Liloba ya Nzambe, tozalaka na esengo na libota, mpe tokómaka na boninga makasi na bandeko na biso bakristo. Longola yango, tomibatelaka na ebele ya mikakatano oyo ekómelaka bato oyo batosaka mibeko ya Yehova te. Kutu tondimaka maloba ya Mokonzi Davidi. Na loyembo moko, alobelaki mobeko, bitinda, mpe bikateli ya lisambisi ya Yehova, na nsima alobaki: “Kobatela yango ezali na litomba monene.”—Nz. 19:7-11. w24.09 2 par. 1-3
Mwamibale, 6 sanza ya 1
Abikisaka baoyo bazoki na motema; akangaka bampota na bango.—Nz. 147:3.
Yehova amonaka nini ntango atalaka basaleli na ye awa na mabele? Yehova amonaka ntango tozali na esengo mpe ntango tozali na mawa. (Nz. 37:18) Ntango amonaka ete tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela ye atako tozali na mpasi na motema, asepelaka mpenza! Kutu alingaka mpenza kosalisa biso mpe kobɔndisa biso. Nzembo 147:3 elobi ete Yehova “akangaka bampota” ya baoyo bazoki na motema. Vɛrsɛ yango emonisi ndenge Yehova asalisaka na boboto nyonso bato oyo bazoki na motema. Tosengeli kosala nini mpo Yehova asalisa biso ndenge wana? Tótalela ndakisa moko. Monganga ya malamu akoki kosalisa mpenza moto oyo azoki mpo abika. Kasi mpo lisalisi yango esimba mpenza, moto oyo azoki asengeli kolanda na likebi malako ya monganga. Yehova, na nzela ya Liloba na ye, alobaka na baoyo bazali konyokwama mpo na bampota oyo bazoká na motema mpe apesaka bango toli ya bolingo. w24.10 6 par. 1-2
Mwamisato, 7 sanza ya 1
Balongolamaki na mabele.—Eba. 7:23.
Na kala, mikanda na biso etalelaki motuna oyo etali likambo oyo ekómelaka baoyo Yehova atángi bango bato ya kozanga bosembo. Tolobaki ete mpo na bato ya ndenge wana, elikya ya lisekwa ezali te. Masolo ebele ya Biblia elobeli lisambisi ya Yehova mpo na bato oyo bazangi bosembo, na ndakisa motángo oyo eyebani te ya bato oyo bakufaki na Mpela, to bato ya bikólo nsambo ya Mokili ya Ndaka oyo Yehova asɛngaki bato na ye bábebisa, to mpe basoda 185000 ya Asiri oyo anzelu ya Yehova abomaki na butu moko. (Mib. 7:1-3; Yis. 37:36, 37) Na bandakisa yango, Biblia elobi nde makambo oyo ekoki kotinda biso tóloba ete Yehova akatelaki bato yango nyonso etumbu ya libebi ya seko, kozanga elikya ya lisekwa? Te, Biblia elobi yango te. Toyebi te ndenge oyo Yehova asambisaki moto mokomoko; toyebi mpe te soki baoyo babomamaki bazwaki libaku ya koyekola makambo ya Yehova mpe kobongola motema. w24.05 3 par. 5-7
Mwaminei, 8 sanza ya 1
Saláká malamu mpo na kolonga mabe.—Rom. 12:21.
Yesu abɛtaki lisolo ya mwasi moko oyo mobali akufá, oyo azalaki ntango nyonso kosɛnga zuzi moko akata likambo na ye na bosembo. Na ntembe te bayekoli mingi ya Yesu bakangaki ntina ya lisolo yango, mpamba te na ntango wana bato bazalaki kokutana mingi na makambo ya kozanga bosembo. (Luka 18:1-5) Lisolo yango ezali mpe na ntina mpo na biso, mpo biso nyonso tosilá kokutana na makambo ya kozanga bosembo na bomoi na biso. Na mokili oyo, bato mingi bakaniselaka basusu mabe, bamonaka basusu mpamba, mpe banyokolaka basusu, yango wana tokamwaka te ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. (Mos. 5:8) Lisusu, atako tokoki komizela te ete ndeko moko na lisangá asala biso mabe, likambo yango ekoki kosalema. Nzokande, bandeko na biso ya lisangá bakokani te na banguna to baoyo batɛmɛlaka solo. Bandeko bazali kaka bato ya kozanga kokoka. Tokoki kozwa mateya mingi na ndenge oyo Yesu asalaki ntango banguna ya mitema mabe basalaki ye makambo ya kozanga bosembo. Soki tokoki komonisa motema molai epai ya banguna oyo basalaka biso makambo ya kozanga bosembo, tosengeli komonisa motema molai mingi koleka epai ya bandeko na biso bakristo! w24.11 2 par. 1-2
Mwamitano, 9 sanza ya 1
Epai wapi tokosomba mampa mpo na koleisa bato oyo?—Yoa. 6:5.
Limpa ezalaki bilei ya moboko mpo na bato mingi na ntango ya kala. (Eba. 14:18; Luka 4:4) Kutu, ezalaki na ntina mingi mpenza, yango wana na bisika mosusu, Biblia esaleli “limpa” mpo na kolobela biloko ya kolya. (Mat. 6:11, msl; Mis. 20:7) Limpa ezalaki mpe na makamwisi mibale ya Yesu oyo eyebani mingi. (Mat. 16:9, 10) Moko ya likamwisi yango ezali na Yoane mokapo 6. Mokolo moko ntango bantoma ya Yesu bautaki kosakola, Yesu azwaki bango mpe bakatisaki Mbu ya Galile elongo na masuwa mpo bápema mwa moke. (Mrk. 6:7, 30-32; Luka 9:10) Bakómaki na esika moko oyo bato bazalaka te, na engumba Betesaida. Kasi, eumelaki te, bankóto ya bato bayaki wana mpe bazingaki bango. Yesu aboyaki kosala lokola amoni bango te. Na boboto nyonso, azwaki ntango ya koteya bango makambo etali Bokonzi mpe abikisaki bato ya maladi. Ntango butu ebandaki kokɔta, bayekoli ya Yesu babandaki komituna ndenge nini bato nyonso wana bakoki kozwa eloko ya kolya. Ekoki kozala ete basusu kati na bango bazalaki na mwa bilei, kasi bato mingi basengelaki kokende nde na bamboka mpo na kosomba eloko ya kolya.—Mat. 14:15. w24.12 2 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 1
Likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.—Rom. 6:23.
Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso, bazalaki bato ya kokoka mpe bafandaki na paradiso moko kitoko. (Eba. 1:27; 2:7-9) Bakokaki kosepela na bomoi ya malamu libela na libela. Kasi esalemaki bongo te mpo makambo ebongwanaki. Balongwaki na Paradiso mpe babungisaki elikya ya kozala na bomoi ya seko. Eloko nini bakokaki kotikela bana na bango? Biblia elobi: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Rom. 5:12) Libula oyo Adama atikelá biso ezali lisumu, mpe yango ememaka na liwa. Lisumu yango ezali lokola nyongo moko monene, oyo moko te kati na biso akoki kofuta. (Nz. 49:8) Yesu akokanisaki masumu na “banyongo.” (Mat. 6:12, msl; Luka 11:4) Ntango tosali lisumu, ezali lokola tokɔti nyongo epai ya Yehova. Esɛngaka tófuta mpo na masumu yango. Soki nyongo yango efutami te, ekolongwa kaka ntango tokufi, kozanga elikya ya kozonga na bomoi.—Rom. 6:7. w25.02 2-3 par. 2-3
Mwalomingo, 11 sanza ya 1
Nayebisi bango nkombo na yo.—Yoa. 17:26.
Tomonaka ete ezali libaku malamu koyebisa basusu solo oyo etali Bokonzi ya Nzambe! Libaku yango epesami na moto nyonso. Na ndakisa, ntango Yesu azalaki na mabele, aboyaki bademo bápesa litatoli mpo na ye. (Luka 4:41) Lelo, liboso moto abanda kobima na mosala ya kosakola elongo na basaleli ya Yehova, asengeli kokokisa masɛngami mpo azwa libaku yango. Tokomonisa ete tosepelaka na lokumu ya kosakola soki tozali kopesa litatoli ntango nyonso mpe esika nyonso oyo tokoki. Lokola Yesu, mokano na biso ezali ya kolona mboto ya solo ya Bokonzi na mitema ya bato mpe kosopela yango mai. (Mat. 13:3, 23; 1 Ko. 3:6) Mpo na kolanda ndakisa ya Yesu, ebongiseli ya Yehova esali nyonso oyo ekoki mpo na kosalisa bato báyeba nkombo ya Nzambe. Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika esalisi mingi na likambo yango na ndenge ezongisi nkombo ya Nzambe na bisika oyo ezalaki na makomi na ebandeli. Libongoli yango ezali sikoyo na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 270. w24.04 9 par. 8-9
Mwayambo, 12 sanza ya 1
Mobali na ye atɛlɛmi, mpe akumisi ye.—Mas. 31:28.
Bandeko mibali mosusu oyo bazali na esengo na mabala na bango bazalaka na momeseno ya kosala mwa likambo mikolo nyonso mpo na komonisa basi na bango ete balingaka bango. (1 Yoa. 3:18) Mobali akoki komonisela mwasi na ye bolingo na makambo ya mikemike, na ndakisa kosimba ye na lobɔkɔ to kopesa ye lipwɛpwɛ. Akoki kotindela ye mesaje mpe koyebisa ye ete “Nazali kokanisa yo” to kotuna ye “Mokolo ezali koleka ndenge nini?” Na bantango mosusu, akoki komonisa ye ete alingaka ye soki akomeli ye mwa maloba ya kitoko na karte moko. Ntango mobali azali kosala makambo wana, akopesa mwasi na ye lokumu mpe akokómisa boyokani ya libala na bango makasi. Mobali oyo alingaka mwasi na ye akumisaka ye mpe alendisaka ye. Mobali akoki kosala yango soki azali kobosana te koyebisa mwasi na ye ete asepelaka ndenge asalaka makasi azala mosungi mpo na ye. (Kol. 3:15) Soki mobali azali mpenza kokumisa mwasi na ye na motema mobimba, mwasi akozala na esengo. Akomiyoka ete abatelami, ete balingi ye, mpe ete azali na lokumu. w25.01 11 par. 15; 13 par. 16
Mwamibale, 13 sanza ya 1
Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, . . . moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.—Yis. 48:17.
Nzembo 15 esuki na elaka oyo: “Moto nyonso oyo asalaka makambo wana akokwea ata moke te.” Awa, mokomi ya nzembo amonisi ntina mpenza oyo Yehova alingi tósala makambo oyo ezali na nzembo yango. Yehova alingi ete tózala na esengo. Yango wana ayebisi biso makambo oyo ekosala ete apambola biso mpe abatela biso. Bapaya ya Yehova bazali na elikya ya bomoi ya malamu na mikolo ekoya. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala na ‘bisika mingi ya kofanda’ oyo Yesu abongiseli bango na likoló. (Yoa. 14:2) Baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele bazali kozela kokokisama ya elaka oyo ezali na Emoniseli 21:3. Ya solo, biso nyonso tomonaka ete ezali lokumu monene ndenge Yehova abengisi biso tózala baninga na ye, tózala bapaya libela na libela na hema na ye!—Nz. 15:1-5. w24.06 13 par. 19-20
Mwamisato, 14 sanza ya 1
Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye.—Nz. 96:8.
Nkembo ezali nini? Na Biblia, liloba “nkembo” ekoki komonisa eloko nyonso oyo esalaka ete moto abenda mpenza likebi. Yehova amonisaki nkembo na ye na ndenge ya kokamwa mwa moke nsima ya kosikola ekólo Yisraele na boombo na Ezipito. Talá ndenge elekaki: Bamilio ya Bayisraele bayanganaki na nse ya Ngomba Sinai mpo na kokutana na Nzambe na bango. Lipata moko monene ya moindo makasi ezipaki ngomba yango. Mpe na mbala moko koningana makasi ya mabele—ekoki kozala mpe na makambo oyo volcan esalaka—esalemaki na esika batɛlɛmaki, na nse ya makolo na bango, wana mokalikali, bankake, mpe makɛlɛlɛ makasi ya kelelo ezalaki koyokana na likoló. (Kob. 19:16-18; 24:17; Nz. 68:8) Kanisá ndenge Bayisraele bakamwaki ntango Yehova asalaki makambo wana ya nguya mpo na komonisa nkembo na ye! Lelo oyo, topesaka Yehova nkembo ntango tozali koyebisa basusu ete azali na nguya ya kokamwa mpe bizaleli malamu mpenza mpe ntango topesi lokumu nyonso epai na ye mpo na makambo ya malamu oyo tosali na makasi oyo apesi biso.—Yis. 26:12. w25.01 2 par. 2-3
Mwaminei, 15 sanza ya 1
Yehova atindi ngai.—Mit. 16:28.
Na kati ya mobembo na bango mpo na kokende na Mokili ya Ndaka, mibali ya lokumu batɛmɛlaki Moize mpe mokumba oyo Yehova apesaki ye. Balobaki: “Liyangani mobimba ezali mosantu, bango nyonso, [kaka Moize te] mpe Yehova azali na kati na bango.” (Mit. 16:1-3) Atako ezalaki solo ete na miso ya Nzambe “liyangani mobimba” ezalaki mosantu, Yehova aponaki nde Moize mpo na kokamba bato na Ye. Ndenge batomboki yango balobaki mabe mpo na Moize, balobaki nde mabe mpo na Yehova. Bazalaki kokipe te likambo oyo Yehova alingaki; bakipaki kaka oyo bango bazalaki koluka—kozwa bokonzi mingi mpe koyebana. Nzambe abomaki bankumu yango oyo batombokaki, ná bankóto ya bato oyo balandaki bango. (Mit. 16:30-35, 41, 49) Lelo oyo, tóyeba ete Yehova asepelaka te na baoyo bazangaka limemya mpo na bibongiseli ya teokrasi. w24.07 11 par. 11
Mwamitano, 16 sanza ya 1
Emonaneli yango ezali naino mpo na ntango oyo etyamá.—Hab. 2:3.
Tozali kobika na eloko oyo bato mingi bazali koboya, ata mpe kotyola, likebisi ya Biblia oyo elobeli nsuka ya mokili oyo. (2 Pe. 3:3, 4) Kasi ezali na makambo mingi oyo toyebi te, tosengeli kozala na kondima makasi ete nsuka ya mokili oyo ekoya mpenza na ntango oyo Yehova atyá mpe ete akobatela biso. Tosengeli mpe kozala na kondima makasi na nzela oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa biso lelo, “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Ntango bolɔzi monene ekobanda, mbala mosusu tokozwa malako ya sikisiki mpo na lobiko na biso. Sikoyo nde ntango ya koyekola kotyela baoyo bazali kobamba ebongiseli ya Yehova motema mingi mpe ya kolanda malako oyo bapesaka. Tókanisa te ete tokolanda litambwisi na bango malamu na ntango ya bolɔzi monene soki sikoyo tokakatanaka mpo na kolanda yango. w24.09 11 par. 11-12
Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 1
Bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu, ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.—Rom. 12:2.
Baboti bakristo bayebi ete kondima epai ya Nzambe ezali te eloko oyo mwana azwaka epai ya baboti na ye. Nsima ya bambula, mwana akoki komitungisa mpo na mituna lokola: ‘Ndenge nini nayebi ete Nzambe azali? Nakoki mpenza kondima makambo oyo Biblia elobi?’ Kutu, Biblia yango moko elendisi biso tósalela ‘makoki na biso ya kokanisa’ mpe ‘tóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo.’ (Rom. 12:1; 1 Tes. 5:21) Kasi, ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo akóma na kondima makasi? Lendisá mwana amindimisa ye moko ete azali na solo. Ntango mwana na yo atuni mituna, simbá libaku yango mpo na komonisa ye ndenge ya kozwa biyano na lisalisi ya babuku na biso ya bolukiluki, na ndakisa Index des publications des Témoins de Jéhovah, mpe Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova. Na Buku ya bolukiluki, na motó ya likambo “Biblia,” mwana akoki koluka motó ya likambo moke “Ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe” mpo na komona bilembeteli oyo emonisi ete Biblia ezali kaka te mokanda moko ya malamu oyo bato bakomá. Kasi, ezali nde “liloba ya Nzambe.”—1 Tes. 2:13. w24.12 14-15 par. 4-5
Mwalomingo, 18 sanza ya 1
Pesá [makambo] yango bato ya sembo, bongo bango mpe bakozala na makoki ya koteya bato mosusu.—2 Tim. 2:2.
Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Yesu? Basengeli kopesa bandeko mibali formasyo, ata mpe baoyo bazali naino bilenge mpe kosalisa bango bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba minene. Bankulutu bayebaka ete bandeko yango oyo bazali kozwa formasyo bazali bato ya kokoka te. Basengeli kopesa bandeko yango ya bilenge toli na bolingo mpo báyeba makambo mingi mpe bámona ntina ya kozala na komikitisa, sembo mpe kozala pene mpo na kosalela basusu. (1 Tim. 3:1; 1 Pe. 5:5) Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba kaka ya kosakola te, kasi mpe ya koteya. Mbala mosusu bayekoli bamonaki ete bakokoka mokumba yango te. Kasi, Yesu azalaki na ntembe te ete bakoki kosala mosala yango, mpe ayebisaki bango yango. Yesu amonisaki ete atyelaki bango motema mobimba, alobaki: “Kaka ndenge Tata atindi ngai, ngai mpe nazali kotinda bino.”—Yoa. 20:21. w24.10 16 par. 15; 17 par. 17
Mwayambo, 19 sanza ya 1
Davidi . . . , moto oyo azali kosepelisa motema na ngai.—Mis. 13:22.
Davidi azalaki mokonzi moko monene. Azalaki mpe alangá-nzembo, mokomi ya bapoɛmi, mobundi-etumba, mpe mosakoli. Akutanaki mpe na mikakatano mingi. Mwa bambula mingi, azalaki koyengayenga, azalaki kokima Mokonzi Saulo oyo ayokelaki ye zuwa. Nsima ya kokóma mokonzi, Davidi asengelaki lisusu kokima mpo na kobikisa bomoi na ye ntango mwana na ye Abisalome alukaki kobɔtɔla ye kiti ya bokonzi. Atako mikakatano ya Davidi mpe mabunga oyo asalaki, atikalaki sembo epai ya Nzambe tii na nsuka ya bomoi na ye. Yehova abengaki ye “moto oyo azali kosepelisa motema na ngai.” Na yango, ebongi mpenza tóyoka toli ya Davidi! (1 Bak. 15:5) Na ndakisa, talá toli oyo Davidi apesaki Salomo, mwana na ye oyo azwaki kiti ya bokonzi nsima na ye. Yehova aponaki Salomo ntango azalaki naino elenge mpo akoba kolendisa losambo ya pɛto mpe atonga tempelo mpo na lokumu ya Nzambe. (1 Nt. 22:5) Salomo alingaki kokutana na mikakatano. Davidi ayebisaki ye nini? Ayebisaki mwana na ye ete soki atosi Yehova, akolonga na bomoi.—1 Bak. 2:2, 3. w24.11 10 par. 9-11
Mwamibale, 20 sanza ya 1
Tiká Yehova atambwisa bomoi na yo; tyelá ye motema, mpe ye moko akosalisa yo.—Nz. 37:5.
Mobali oyo abɛtaka mwasi na ye to afingaka ye asengeli kosala mwa makambo mpo na kobongisa boyokani na ye na Yehova mpe na mwasi na ye. Ya liboso, asengeli kondima ete azali na mokakatano monene. Yehova amonaka makambo nyonso. (Nz. 44:21; Mos. 12:14; Ebr. 4:13) Ya mibale, asengeli kotika konyokola mwasi na ye mpe kobongola bizaleli na ye. (Mas. 28:13) Ya misato, asengeli komikitisa liboso ya mwasi na ye ná Yehova mpe kosɛnga bango bolimbisi. (Mis. 3:19) Asengeli mpe kosɛnga Yehova apesa ye mposa ya kobongwana mpe asalisa ye akóma na komipekisa na makanisi, na maloba, mpe na misala na ye. (Nz. 51:10-12; 2 Ko. 10:5; Flp. 2:13) Ya minei, asengeli kosala na boyokani na libondeli na ye; asengeli koyekola koyina lolenge nyonso ya mobulu mpe ya maloba mabe. (Nz. 97:10) Ya mitano, asengeli kokende noki epai ya bankulutu ya lisangá mpo básalisa ye. (Yak. 5:14-16) Ya motoba, asengeli kozwa bibongiseli, komityela mibeko oyo ekosalisa ye azongela lisusu te makambo nyonso wana ya mabe. w25.01 11 par. 14
Mwamisato, 21 sanza ya 1
Mpo na nini ozali koumela? Tɛlɛmá, zwá batisimo.—Mis. 22:16.
Olingaka Yehova Nzambe, moto oyo apesá yo likabo nyonso ya kitoko, ata mpe bomoi? Olingi komonisa ete olingaka ye? Lolenge ya malamu ya kosala yango ezali ya komipesa na ye na libondeli mpe na nsima kozwa batisimo mpo na komonisa bato ete omipesi na Nzambe. Soki ozwi batisimo, okɔti na libota ya Yehova. Na bongo, Tata mpe Moninga na yo akotambwisa yo mpe akozala elongo na yo mpo okómi moto na ye. (Nz. 73:24; Yis. 43:1, 2) Komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo ekopesa yo mpe elikya ya kozala na bomoi ya esengo libela na libela. (1 Pe. 3:21) Ezali na makambo oyo ezali kopekisa yo ozwa batisimo? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Bamilio ya bandeko basalá bambongwana na bizaleli na bango mpe na lolenge na bango ya kokanisa mpo na kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Lelo oyo, bazali kosalela Yehova na esengo mpe na molende. w25.03 2 par. 1-2
Mwaminei, 22 sanza ya 1
Olimbisaka mpenza.—Nz. 130:4.
Mbala mingi, Biblia ekokanisaka masumu na mikumba ya kilo. Mokonzi Davidi alobelaki masumu na ye boye: “Mabunga na ngai eleki na motó na ngai; lokola mokumba moko ya kilo, ezali mpenza kilo oyo nakokoka komema te.” (Nz. 38:4) Kasi Yehova alimbisaka masumu ya baoyo babongoli motema. (Nz. 25:18; 32:5) Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kolimbisa” elimboli mpenzampenza “kotombola” to “komema.” Maloba yango emonisaka Yehova lokola mobali moko ya makasi oyo atomboli kilo ya lisumu oyo ezalaki na mapeka na biso mpe amemi yango mosika. Maloba mosusu ya elilingi emonisi ete Yehova amemaka masumu na biso mosika mpenza. Nzembo 103:12 elobi: “Kaka ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mpenza na epai elalaka, ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.” Ngámbo ya ɛsti ezali mosika mpenza na wɛsti. Bangámbo yango ekutanaka te. Na maloba mosusu, Yehova amemaka masumu na biso mosika koleka ndenge oyo tokoki kokanisa. Yango emonisi ndenge Yehova alimbisaka mpenza! w25.02 9 par. 5-6
Mwamitano, 23 sanza ya 1
Ntango opesi makabo ya motema mawa, kobɛta kelelo liboso na yo te.—Mat. 6:2.
Nsima ya kozonga ya Yesu na likoló, ntoma Petro asalaki likamwisi ya kobikisa mobali moko oyo abotamá motɛngumi. (Mis. 1:8, 9; 3:2, 6-8) Likambo yango ya kokamwa ebendaki ebele ya bato. (Mis. 3:11) Petro aboyaki ete bato bákumisa ye, atako akolaki na esika oyo bato balukaka kozwa lokumu mpe koyebana mingi mpenza! Kasi, na komikitisa nyonso alukaki lokumu na ye moko te, kasi apesaki nkembo epai ya Yehova ná Yesu, alobaki: “Na nzela ya nkombo [ya Yesu], mpe na nzela ya kondima na biso na nkombo na ye, mobali oyo bozali komona mpe boyebi akómisami makasi.” (Mis. 3:12-16) Tokoki komekola Petro na oyo etali kolona komikitisa. Tosalelaka bato mosusu makambo ya malamu mpo tolingaka Yehova mpe bato, kasi te mpo tolingi ete bákumisa biso. Soki na esengo nyonso tozali kosalela Yehova mpe bandeko na biso na lolenge nyonso oyo tokoki, ata soki bato bazali komona milende na biso to te, yango ekomonisa ete tozali na komikitisa.—Mat. 6:1-4. w25.03 10-11 par. 11-12
Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 1
Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.—1 Tim. 4:16.
Tokoki kobakisa esengo na biso na mosala ya kosakola soki tozali kotya makanisi na bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na bato. (Mat. 22:37-39) Meká kokanisa ndenge Yehova azalaka na esengo ntango amoni biso na mosala ya kosakola mpe esengo oyo bato bakozala na yango ntango babandi koyekola Biblia! Kanisá mpe lobiko oyo bato oyo bandimi nsango na biso bakozwa. (Yoa. 6:40) Okɔtá ndako mpo na ntina moko boye? Soki bongo, tyá makanisi na oyo okoki kosala mpo na komonisa ete olingaka Yehova mpe bato. Na ntango ya maladi mabe ya coronavirus, Samuel ná Dania bakangamaki na ndako na bango. Na ntango yango ya mpasi, bazalaki mbala na mbala koteya bato na nzela ya telefone, kokoma mikanda, mpe koyekola na bato na nzela ya Zoom. Samuel ná Dania bakokaki kosala mingi te mpo na mikakatano oyo bazalaki na yango, kasi basalaki oyo bakokaki mpe bazwaki esengo. w24.04 18 par. 15-16
Mwalomingo, 25 sanza ya 1
Nani akoki kozwa mwasi ya malonga? Motuya na ye eleki mosika oyo ya mabanga kitoko ya korai.—Mas. 31:10.
Bandeko mingi ya minzemba, bázala bilenge to mikóló, balukaka moto oyo akoki kokóma molongani na bango, atako libala kaka te nde epesaka esengo. Ya solo, liboso ya kolingana na moto, osengeli kozala na boyokani malamu na Yehova, kokɔmɛla na makanisi, mpe kozala na makoki to mbongo mpo na kokokisa mikumba ya libala. (1 Ko. 7:36) Eleki malamu oyeba bizaleli nini osepelaka kokuta epai ya molongani liboso ete olingana na moto. Soki oyebi yango te, okoki kolekisa moto oyo akokaki kokóma molongani na yo, to okoki kolingana na moto oyo abongi na yo te. Tóbosana te, moto nyonso oyo akoki kokóma molongani na yo asengeli kozala mokristo oyo azwá batisimo. (1 Ko. 7:39) Kasi, ezali te moto nyonso oyo azwá batisimo nde akozala molongani ya malamu mpo na yo. Na yango, okoki komituna boye: ‘Mikano nini nazalaka na yango? Bizaleli nini namonaka ete molongani na ngai asengeli kozala na yango? Makambo oyo nalukaka ezali na bokatikati?’ w24.05 20 par. 1; 21 par. 3
Mwayambo, 26 sanza ya 1
Bózala . . . na boboto na kati na bino.—Ef. 4:32.
Bato oyo bolingani bokoki kosala nini soki bokutani na mikakatano mpe boyokani te na makambo mosusu? Yango elakisi nde ete bino mibale ezali kosimba te? Ezali mpenza bongo te, mpo babalani nyonso bayokanaka te na makambo mosusu. Libala ya malamu esangisaka bato mibale oyo bakoki kosala elongo mpo na komesana na makambo oyo ekesenisi bango. Na yango, ndenge oyo bozali kosilisa mikakatano sikoyo ekoki komonisa soki bokozala na libala ya malamu to te. Bino mibale bómituna boye: ‘Tokokaka kosolola makambo na kimya mpe na limemya? Tondimaka mbala moko mabunga na biso mpe tosalaka makasi tóbongisa? Mokomoko aboyaka kotingama na makambo oyo alingi, tosɛngaka bolimbisi, mpe tolimbisaka noki?’ (Ef. 4:31) Nzokande, soki boyokanaka te ntango nyonso to boswanaka mpambampamba na eleko oyo bolingani, mbala mosusu likambo yango ekobonga te nsima ya kobalana. Soki omoni ete moto yango abongi na yo te, kokata boyokani ekozala ekateli oyo eleki malamu mpo na bino mibale. w24.05 29 par. 12
Mwamibale, 27 sanza ya 1
Yehova Libanga na ngai asanzolama, ye oyo ateyaka ngai mpo na kobunda.—Nz. 144:1.
Tokoki kopesa basusu ndakisa ya malamu soki tokangamaka na oyo ezali sembo mpe soki tozwaka bikateli oyo eyokani mpenza na mitinda ya Biblia. Wana tozali kokolisa kondima mpe boyebi ya sikisiki, tokopikama lisusu makasi na solo. Tokozala bato ya mitema mibale te, ya bongolabongola te, to oyo bamemamaka na pɛtɛɛ nyonso na mateya ya lokuta mpe na makanisi ya mokili. (Ef. 4:14; Yak. 1:6-8) Tokozala mpe na likoki ya kosalisa baoyo bakutani na komekama. (1 Tes. 3:2, 3) Bankulutu basengeli kolekisaka ndelo te na bizaleli na bango, kozala na makanisi malamu, bato ya makambo na molɔngɔ, mpe bato ya makambo makasimakasi te. Bankulutu yango basalisaka bandeko bápikama na solo mpe bapesaka bango makasi. (Tito 1:9; 1 Tim. 3:1-3) Na ndakisa na bango mpe mosala na bango ya kokende kolendisa bampate, bankulutu basalisaka basakoli báyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ, bábimaka na mosala ya kosakola, mpe báyekolaka bango moko. Ntango bandeko bakutani na makambo oyo ezali kotungisa bango, bankulutu bakoki kosalisa mingi soki bazali kokoba kotya makanisi nyonso epai ya Yehova mpe na bilaka na ye. w24.06 31 par. 16-18
Mwamisato, 28 sanza ya 1
Bóbongola mitema, mpo Bokonzi ya likoló ekómi pene.—Mat. 4:17.
Na boumeli ya mosala na ye, Yesu ateyaki bato ete Tata na ye azalaka pene ya kolimbisa. Tótalela ndakisa ya mwana ya kilikili. Na ntango moko boye, elenge mobali yango aponaki bomoi ya masumu. Kasi na nsima “makanisi malamu ezongelaki ye” mpe azongaki na ndako. Tata na ye asalaki nini? Yesu alobaki ete ntango mwana yango “azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye . . . , mpe apotaki mbangu, ayambaki ye makasi mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto.” Mwana yango akanaki kosɛnga soki akoki kokóma mosali ya tata na ye, kasi tata na ye abengaki ye “mwana na ngai” mpe azongisaki ye na libota. Tata alobaki: “Abungaki mpe amonani.” (Luka 15:11-32) Ntango Yesu azalaki na likoló liboso aya awa na mabele, na ntembe te amonaki ndenge Tata na ye alimbisaki ebele ya basumuki oyo babongolaki motema. Na nzela ya ndakisa wana ya kosimba motema mpe ya kobɔndisa, Yesu amonisaki ndenge Tata na biso Yehova atondi na motema mawa! w24.08 11 par. 11-12
Mwaminei, 29 sanza ya 1
Bózala bato ya makanisi malamu.—1 Pe. 4:7.
Mokristo oyo azali moto ya makanisi malamu asalaka nyonso oyo akoki mpo na kozwa bikateli oyo eyokani na makanisi ya Yehova. Mokristo ya ndenge wana ayebi ete eloko moko te ezali na ntina mingi koleka boyokani na ye na Yehova. Amitalelaka na bokatikati mpe andimaka ete ayebi makambo nyonso te. Mpe amonisaka ete atyelaka litambwisi ya Yehova motema na ndenge abondelaka mbala na mbala na komikitisa nyonso. Na bongo, tokomona ete tosengeli kokoba kobondela Yehova ata soki tozali na makoki ya ndenge nini. Na yango, mingimingi ntango tolingi kozwa bikateli ya ntina, tosengeli kobondela Yehova atambwisa biso, na elikya ete ayebi oyo eleki malamu mpo na biso. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova asalá biso na likoki ya komekola bizaleli na ye. (Eba. 1:26) Ya solo, tokoki te komekola Yehova na ndenge ya kokoka.—Yis. 55:9. w25.03 11 par. 13; 13 par. 17-18
Mwamitano, 30 sanza ya 1
[Bolingo] elikyaka makambo nyonso mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.—1 Ko. 13:7.
Kokaniselaka basusu mabe te. Soki basusu bamonisi botɔndi te mpo na likambo oyo tosaleli bango, tokoki komituna boye: ‘Bazangá mpenza botɔndi, to babosani kaka komonisa botɔndi na bango?’ Mbala mosusu ezali na makambo oyo esali ete bámonisa botɔndi te ndenge oyo biso tokanisaki. Bato mosusu bazalaka na botɔndi mingi na motema kasi bayebaka komonisa yango te. Mbala mosusu bazali koyoka nsɔni mpo na lisalisi oyo bazwi, mingimingi soki kala bango nde bazalaki kosalisa basusu. Ezala bongo to te, bolingo ya bokristo ekotinda biso tókanisela bandeko mabe te, mpe tókoba koyoka esengo ya kopesa. (Ef. 4:2) Zalá na motema molai. Na oyo etali kokaba, Mokonzi Salomo akomaki: “Bwaká limpa na yo na mai, mpo nsima ya mikolo mingi okozwa yango lisusu.” (Mos. 11:1) Bato mosusu bayaka komonisa botɔndi ntango molai na nsima, elingi koloba “nsima ya mikolo mingi.” w24.09 30 par. 18-19
Mwapɔsɔ, 31 sanza ya 1
Pamelá na miso ya bato nyonso baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu, mpo ekebisa bamosusu.—1 Tim. 5:20.
Ntango mosusu liyebisi epesamaka na lisangá ete moto moko azwi mpamela. Na ntango yango, tokoki kokoba kozala elongo na moto yango, mpo toyebi ete abongolaki motema mpe atiki etamboli na ye ya mabe. Azali kaka ndeko na kati ya lisangá mpe azali na mposa bandeko ya lisangá bálendisa ye akoba kokende liboso. (Ebr. 10:24, 25) Kasi, yango ekeseni na moto oyo alongolami na lisangá. ‘Tokokata boninga’ na moto yango, mpe ‘tokolya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.’ (1 Ko. 5:11) Elimboli nde ete tokoki kokipe ye ata moke te? Ezali mpenza bongo te. Ezali solo ete tosengeli te kosangana to kosala boninga na ye. Kasi mokristo akoki kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpo na kozwa ekateli soki akoki kobengisa moto oyo alongolami na lisangá na makita, oyo mbala mosusu azali ndeko na ye ya libota to azalaki liboso moninga na ye. w24.08 30 par. 13-14