Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/09 nk. 16-17
  • Bomoi na yo etángamá?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi na yo etángamá?
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Aponaka to alukaka koyeba makambo nyonso?
  • Yo moko nde osengeli kopona
  • Ndenge nini “kopona bomoi”?
  • Yehova asakolaka “makambo ya nsuka longwa na ebandeli”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bomoi na yo na mikolo mizali koya ekozala lolenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Yo moko nde osengeli kopona!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Kokana makambo nyonso libela ekoki koyokana na bolingo ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 4/09 nk. 16-17

Biblia elobi nini?

Bomoi na yo etángamá?

Bato mingi bakanisaka ete bomoi mpe makambo na bango nyonso etángamá. Bamonaka ete Nzambe akomá makambo nyonso ya bomoi ya moto mokomoko banda kobotama tii liwa. Balobaka ete ‘lokola Nzambe azali na nguya nyonso mpe ayebi makambo nyonso, asengeli koyeba makambo nyonso, ezala oyo eleká, oyo ya lelo, to mpe oyo ekoya.’

OKANISI nini? Nzambe atángá makambo nyonso ya bomoi ya moto mokomoko? Na maloba mosusu, bonsomi ya kopona ezalaka mpenza to ezali kaka makanisi mpamba? Biblia elobi nini?

Aponaka to alukaka koyeba makambo nyonso?

Biblia emonisi polele ete Nzambe azali na likoki ya koyeba makambo liboso. Yisaya 46:10 elobi ete ayebi “makambo ya nsuka longwa na ebandeli.” Asalelaki kutu bato mpo bákóma bisakweli mingi. (2 Petelo 1:21) Lisusu, makambo yango oyo Nzambe asakolaka ekokisamaka nyonso, mpamba te azali na bwanya mpe nguya ya kokokisa yango. Na yango, Nzambe azali na likoki ya koyeba makambo liboso to mpe ya kosakola yango soki alingi. Kasi, Nzambe abongisaka makambo ya bomoi ya moto mokomoko to mpe akatá motángo ya bato oyo bakozwa lobiko? Biblia elobi bongo te.

Biblia eteyaka ete Nzambe aponaka makambo oyo alingi kosakola. Na ndakisa, Nzambe asakolaki ete “ebele ya bato” ya sembo bakobika ntango mokili oyo ya mabe ekobomama. (Emoniseli 7:9, 14) Kasi, simbá ete Nzambe alobi te soki bato yango bakozala boni. Mpo na nini? Mpo atángá bomoi ya moto mokomoko te. Nzambe azali lokola tata moko ya bolingo oyo azali na bana ebele. Ayebi ete na bana yango bamosusu bakolinga ye ndenge alingaka bango, kasi akati te soki bakozala boni.

Nzambe asalelaka likoki na ye ya kosakola makambo kaka ndenge asalelaka nguya na ye. Lokola azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, nguya na ye eleki nyonso. (Nzembo 91:1; Yisaya 40:26, 28) Kasi, asalelaka nguya na ye mpambampamba? Te. Na ndakisa, azelaki tii ntango ekoka liboso apesa Babilone, monguna moko ya Bayisalaele etumbu. Nzambe alobi boye: “Nazalaki kaka komipekisa.” (Yisaya 42:14, NW) Ezali mpe bongo mpo na likoki na ye ya koyeba makambo liboso mpe ya kosakola. Yehova alukaka te koyeba makambo nyonso ya bomoi na biso, mpo alingaka kotosa bonsomi ya kopona oyo apesá biso.

Kosala bongo ekitisaka ye te. Kutu, emonisaka bonene na ye, mpe etindaka biso tólinga ye, mpamba te yango emonisaka ete ayangelaka kaka te na bwanya to na nguya, kasi mpe na bolingo mpe limemya mpo na bonsomi ya kopona oyo apesá bikelamu na ye.

Epai mosusu, soki Nzambe atángá makambo nyonso, ata mpe makambo ya mabe oyo esalemaka na mokili, tokoki koloba ete ye nde abimiselaka bato mpasi awa na mokili. Na yango, soki totali malamu, tokomona ete koloba ete bomoi na biso etángamá ekumisaka Nzambe te, ebebisaka nde lokumu na ye. Etindaka bato bámona ete Nzambe azali mabe, azangi bosembo, mpe alingaka biso te, nzokande, yango eyokani te na oyo Biblia elobi mpo na ye.​—Deteronome 32:4.

Yo moko nde osengeli kopona

Na nzela ya mosaleli na ye Moize, Nzambe alobaki na Bayisalaele boye: “Natye bomoi ná liwa liboso na yo, . . . mpe osengeli kopona bomoi . . . na kolingáká Yehova Nzambe na yo, koyokáká mongongo na ye mpe kokangamáká na ye; mpo azali bomoi mpe bolai ya mikolo na yo.” (Deteronome 30:19, 20, NW) Soki Nzambe abongisaki ete Moyisalaele mokomoko alinga ye mpe azwa bomoi to aboya ye mpe akufa, maloba yango elingaki kozala na ntina te mpe elingaki kozala solo te. Okanisi ete Nzambe oyo “alingaka bosembo” mpe azali liziba ya bolingo akokaki kosala bongo?​—Nzembo 37:28, NW; 1 Yoane 4:8.

Maloba yango oyo Nzambe alobaki na basaleli na ye ete bápona bomoi etaleli mpe biso lelo oyo, mpamba te kokokisama ya bisakweli ya Biblia emonisi ete etikali moke mokili oyo ebomama. (Matai 24:3-9; 2 Timote 3:1-5) Ndenge nini okoki kopona bomoi? Kaka ndenge Bayisalaele basalaki.

Ndenge nini “kopona bomoi”?

Tokopona bomoi soki ‘tolingi Yehova, toyoki mongongo na ye, mpe tokangami na ye.’ Na ntembe te, tokokoka kosala yango kaka soki tondimi ete Nzambe azali mpe toyebi oyo azali kosɛnga biso. Na libondeli oyo Yesu Klisto asalaki alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3.

Tokozwa boyebi yango ya ntina mingi na Biblia, Liloba ya Nzambe. (Yoane 17:17; 2 Timote 3:16) Likabo yango oyo apesi biso emonisi polele ete Nzambe atángá te makambo ya bomoi na biso kasi alingi tózwa ekateli ya malamu na kolanda makambo oyo azali koteya biso.​—Yisaya 48:17, 18.

Na nzela ya Biblia, ezali lokola Nzambe azali koyebisa biso boye ‘Talá mokano na ngai mpo na bato mpe mabelé, mpe talá oyo bosengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko. Bino moko bópona soki bokoyoka to soki bokoboya koyoka ngai.’ Ya solo, Nzambe asalelaka na bokatikati likoki na ye ya kosakola makambo, mpo atosaka bonsɔmi ya kopona oyo apesá biso! Okopona bomoi na “koyokáká mongongo [ya Nzambe] mpe kokangamáká na ye”?

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Nzambe asalelaka likoki na ye ya koyeba makambo liboso ndenge nini?​—Deteronome 30:19, 20; Yisaya 46:10.

◼ Mpo na nini tokoki koloba te ete Nzambe atángá makambo nyonso, ata mpe makambo ya mabe oyo ekómelaka bato?​—Deteronome 32:4.

◼ Nini ekokata soki tokobika to te?​—Yoane 17:3.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]

Biblia emonisi ete Nzambe aponaka makambo oyo alingi kosakola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto