Kokana makambo nyonso libela ekoki koyokana na bolingo ya Nzambe?
“TOLIMBOLAKA kokana makambo nyonso libela lokola mokano ya seko ya Nzambe, na nzela na yango akanaki makambo oyo alingaki kosala na moto moko na moko. Mpo ete azalisaki bango nyonso na motindo moko te, kasi akanaki bamoko mpo na bomoi ya seko mpe basusu mpo na libebi ya seko.”
Yango ezali lolenge oyo Jean Calvin, moko na babandisi ya Mbongwana ya Protestá alimbolaki likanisi na ye ya kotángama liboso kati na búku Institutes of the Christian Religion. Lolenge oyo ya kotalela makambo ezwi moboko likoló na likanisi oyo ete Nzambe ayebi makambo nyonso mpe ete misala na bikelamu na ye mikoki te kobulunganisa mokano na ye to kopusa ye na kosala mbongwana.
Kasi ezali yango solo oyo Biblia ezali komonisa na ntina na Nzambe? Oyo eleki ntina, ndimbola motindo yango eyokani na bizaleli ya Nzambe, mingi mpenza ezaleli na ye oyo eleki monene ete—bolingo?
Nzambe oyo akoki kosakola makambo mazali koya
Nzambe azali na makoki ya kosakola makambo mazali koya. Amilobelaka lokola “oyo akosakola makambo na nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango na kala makambo masalami naino tɛ, oyo alobi ete, ‘Toli na ngai ekotɛlɛma mpe nakokokisa mokano mobimba na ngai.’” (Yisaya 46:10) Na boumeli ya lisoló mobimba ya bato, Nzambe azalaki kokomisa bisakweli na ye mpo na komonisa ete akoki koyeba makambo liboso mpe akoki kosakola makambo liboso ete másalema.
Na yango, na mikolo ya Belesasala, mokonzi ya Babilone, ntango mosakoli Danyele amonaki na ndɔ́tɔ nyama mibale ya yauli oyo moko ezalaki kolónga mosusu, Yehova apesaki ye ndimbola na yango: “Mobali na mpate oyo emɔnaki yɔ na maseke mibale, oyo ijali mikonji na Madai mpe na Palasa. Mpe mobali na ntaba ajali mokonji na Ɛla.” (Danyele 8:20, 21) Na ntembe te, Nzambe asalelaki makoki na ye ya koyeba makambo liboso mpo na komonisa kolandana ya banguya ya mokili mobimba. Bokonzi ya Babilone, oyo ezalaki nguya monene na eleko wana, esengelaki kolandana na bokonzi ya Médo-Perse mpe na nsima na Grèce.
Bisakweli bikoki lisusu kotalela moto moko. Na ndakisa, mosakoli Mika ayebisaki ete Masiya akobotama na Beteleme. (Mika 5:2) Na mbala oyo lisusu, Nzambe asalelaki makoki na ye ya koyeba makambo liboso. Nzokande, likambo oyo lisakolamaki na mokano moko ya sikisiki—koyeba nani oyo akozala Masiya. Ndakisa oyo ekoki te kolóngisa liteya ya kokana makambo libela mpo na bato nyonso.
Nzokande, Makomami mazali komonisa ete ezali na makambo mosusu oyo Nzambe aponaka te koyeba soki nsuka na yango ekozala lolenge nini. Liboso na kobebisama ya Sodomo mpe Gomola, alobaki ete: “Yango wana nakokita mpe nakotala sɔkɔ basili kosala pelamɔkɔ nsango ekomi na esika na ngai, mpe sɔkɔ ejali bongo tɛ, nakoyeba.” (Genese 18:21) Mokapo oyo ezali komonisa na biso polele ete liboso na kosala bolukiluki Nzambe ayebaki te bonene ya mabe oyo mazalaki kosalema kati na bingumba wana.
Ya solo, Nzambe akoki koyeba liboso makambo mosusu, kasi mbala mingi, aponaki ete asalela te makoki na ye ya koyeba makambo liboso. Lokola Nzambe azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, azali na bonsomi na kosalela makoki na ye nyonso soki ye alingi bongo, kasi te engebene mikano ya bato bazangi kokoka.
Nzambe oyo akoki kosembola makambo
Lokola elobaki Calvin, bato mosusu balobaka ete Nzambe akanaki kokwea ya moto liboso na kozalisama na ye mpe ete asilaki kokana ‘baponami’ liboso ya kokwea wana. Kasi soki ezalaki solo bongo, yango elingaki kozala bokosi te epai na Nzambe na kopesa elikya ya bomoi ya seko epai na Adama mpe Eva, wana ayebaki malamu ete bakokoka te kozwa yango? Lisusu, ezali na esika moko te oyo emonisi ete Makomami mazali koangana ete babalani ya liboso bapesamelaki liponi: ya kolanda litambwisi ya Nzambe mpe kozala na bomoi libela to ya koboya yango mpe kokufa.—Genese, mokapo 2.
Kasi lisumu ya Adama mpe Eva epekisaki solo kokokisama ya mokano ya Nzambe? Te, mpamba te nokinoki nsima ya lisumu na bango, Nzambe asakolaki ete akobimisela bango “mombóto” moko oyo akobebisa Satana mpe basaleli na ye, mpe akobongisa lisusu makambo awa na mabelé. Motindo moko lokola mwa ndambo na nyama mikemike ekopekisa molóni te na kobuka mbuma mingi na elanga na ye, bobele bongo mpo na kozanga botosi ya Adama mpe Eva ekopekisa Nzambe te na kozongisa mabelé paladiso.—Genese, mokapo 3.
Na nsima Nzambe amonisaki ete Bokonzi esengelaki kopesama na mokitani moko ya Mokonzi Davidi mpe ete bato mosusu basengelaki kobakisama na Bokonzi yango. Bato wana mosusu babyangami “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likolo.”—Danyele 7:18; 2 Samwele 7:12; 1 Ntango 17:11.a
Kosakola makambo ezali kokana yango libela te
Likambo oyo ete Nzambe aponaki te koyeba liboso etamboli nini bato bakozala na yango epekisaki ye te na kosakola mbuma na misala malamu to na misala mabe oyo bakosala. Mekanisiɛ́ oyo akebisi mokumbi-motuka ete motuka na ye mosili kobeba akoki te kopesamela ngambo soki likámá likobima to akofundama te ete akanaki yango libela. Bobele bongo, Nzambe asengeli te kofundama mpo na mbuma mabe na misala ya bato.
Ezalaki mpe bongo mpo na bakitani ya babalani ya yambo. Liboso ete Kaina aboma ndeko na ye, Yehova atyaki liponi moko liboso na ye. Asengelaki nde kolónga lisumu, to lisumu elingaki koyangela ye? Eloko moko te kati na lisoló oyo emonisi ete Yehova akanaki libela ete Kaina akosala liponi ya mabe mpe akoboma ndeko na ye.—Genese 4:3-7.
Na nsima, Mibeko ya Mose ezalaki kokebisa Bayisraele na mabe oyo malingaki kobima soki bakotika kosalela Yehova, na ndakisa, na kobaláká basi kati na mabota ya bapakano. Makambo oyo masakolamaki masalemaki. Yango ekoki komonana na ndakisa ya mokonzi Solomo, oyo na bambula na ye ya nsuka apusamaki na basi na ye bapaya na kosambela bikeko. (1 Mikonzi 11:7, 8) Ee, Nzambe akebisaki libota na ye, kasi akanaki libela te makambo oyo moko na moko kati na bango akosala.
Baklisto oyo babyangami, to baponami, balendisami ete bálendendela, soki bongo te bakobungisa mbano oyo elakami mpo na bango ya koyangela elongo na Klisto na makoló. (2 Petelo 1:10; Emoniseli 2:5, 10, 16; 3:11) Lokola bateolojié ya ntango na kala batunaki yango, Mpo na nini malako motindo oyo ezali na ntina soki libyangi ya baponami lizalaki ya libela?
Kokana makambo nyonso libela mpe bolingo ya Nzambe
Moto apesamelaki bonsomi ya kopona oyo alingi kosala, lokola azalisamaki “na elilingi ya Nzambe.” (Genese 1:27) Bonsomi ya kopona ezali na ntina mingi mpo ete bato bákumisa mpe básalela Nzambe na bolingo, kasi te lokola robo oyo makambo nyonso oyo asengeli kosala masilá kokatama. Bolingo oyo emonisami na bikelamu ya mayele, oyo bazali na bonsomi elingaki kopesa Nzambe makoki ya kokweisa bifundeli oyo afundamaki na yango. Alobi ete: “Mwana na ngai, jala na mayɛlɛ mpe sepelisa motema na ngai, ete najongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.”—Masese 27:11.
Soki makambo na basaleli ya Nzambe masilaki kokanama libela—to na elobeli mosusu, makomamaki liboso—bolingo na bango mpo na Mozalisi na bango elingaki kotyelama ntembe, boye te? Lisusu, yango elingaki kokesena na ezaleli na ye ya kozanga koponapona soki aponaki bato oyo basilaki kobongisama uta kala mpo na nkembo mpe bolamu kozanga ete atalela makambo malamu na moto na moto kati na bango, boye te? Lisusu, soki bato mosusu bazwaki ngɔlu motindo yango, wana basusu bakanamaki mpo na etumbu ya seko, yango elingaki soko moke te kolamwisa maoki ya botɔ́ndi epai na “babyangami,” to “baponami.”—Genese 1:27; Yobo 1:8; Misala 10:34, 35.
Mpo na kosukisa, Klisto ayebisaki bayekoli na ye ete básakola nsango malamu epai bato nyonso. Soki Nzambe asilaki kopona liboso baoyo basengelaki kobika, likambo yango elingaki kolɛmbisa molende na baklisto kati na mosala ya kosakola, boye te? Elingaki koyeisa mpamba mosala ya kosakola, boye te?
Bolingo ya Nzambe oyo ezangi koponapona ezali nguya eleki makasi oyo ekoki kopusa bato na komonisa mpe bolingo epai na ye. Elembo eleki monene ya bolingo ya Nzambe ezalaki likambo ya kopesa Mwana na ye lokola mbeka mpo na bato na masumu, baoyo bazangi kokoka. Ndenge Nzambe asilaki koyeba liboso makambo ya Mwana na ye ezali ndakisa bobele moko, kasi ezali kondimisa biso ete bilaka ya kobongisa makambo oyo mazwi moboko likoló na Yesu makokokisama solo. Boye tiká ete tómonisa kondima kati na Mwana yango mpe tóbɛlɛma na Nzambe. Tiká ete tómonisa botɔ́ndi na kondimáká libyangi ya Nzambe ya kokɔta kati na boyokani moko kitoko elongo na Mozalisi na biso. Lelo, Nzambe azali kopesa libyangi yango epai na baoyo nyonso balingi kosalela bonsomi oyo bazali na yango ya kosala oyo elingi bango mpo na komonisa bolingo na bango epai na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Wana Yesu azali kolobela Bokonzi bobongisami “longwa na ebandeli na mokili” (Matai 25:34), azalaki komonisa eleko oyo ebandaki mwa moke nsima ya lisumu ya liboso. Luka 11:50, 51 eyebisi “kojalisa na mokili,” to kozalisama ya bato oyo bakoki kosombama na lisiko, kobanda ntango ya Abele.
[Etanda na lokasa 7]
BAKANAMAKI LIBELA LOKOLA ETULUKU
“Jambi ayebaki bato na ye liboso, abɔngisaki bango ete bakokana na motindo na Mwana na ye ete ye Mwana ajala nkulutu liboso na bandeko mingi. Baoyo ye abɔngisi liboso, abiangi mpe bango. Baoyo abiangi, alongisi mpe bango. Baoyo alongisi, akɛmbisi mpe bango.” (Baloma 8:29, 30) Lolenge nini tosengeli kososola liloba “abɔngisi” oyo Paulo asaleli kati na mokapo oyo?
Maloba oyo ya Paulo mazali te ekateli ya makasi mpo na kolóngisa liteya ya kokana makambo libela. Na ebandeli ya ekeke na biso, búku Dictionnaire de théologie catholique elimbolaki maloba ya Paulo (Baloma, mikapo 9 kino 11) boye ete: “Mingi mpenza, likanisi oyo lipalangani mingi kati na bato ya mayele ya Katolike lizali ete kokana makambo libela mpo na bomoi ya seko emonisami te.” Bobele búku yango etángaki maloba ya M. Lagrange lokola alobaki ete: “Likambo oyo Paulo amonisi libosoliboso awa etali te kokanama libela to koboyama, kasi bobele oyo ya kobyangama ya Bapakano na ngrásia ya boklisto, kokesenisáká yango na kozanga kondima ya Bayuda. . . . Etali bituluku, Bapakano, Bayuda, kasi etali te moto mokomoko.”—Biso nde totɛngamisi makomi oyo.
Eleki kala mingi te, La Bible de Jérusalem ekómaki na bosukisi moko na ntina na mikapo wana (9 kino 11), elobaki ete: “Na bongo, makambo malobelami na mikapo wana, matali te kokanama ya makambo ya moto na moto mpo na nkembo, to mpe kondima, kasi matali mokumba ya Yisraele kati na likambo litali lobiko ya bato, likambo bobele moko oyo ebimaki kati na maloba ya K[ondimana] ya K[ala].”
Milɔngɔ́ ya nsuka ya Baloma mokapo 8 mizali na boyokani na likambo yango. Na yango, mikapo wana mikoki mpenza kokundwela biso ete Nzambe akanaki kelasi moko to etuluku moko kati na bato, baoyo basengelaki kobyangama mpo na koyangela elongo na Klisto, mpe masɛngami oyo basengeli kokokisa—mpe yango esalemaki kozanga kopona liboso bato na nkombo na bango, mpamba te yango elingaki koyokana te na bolingo mpe na boyengebene na ye.