Nguya ya piblisite
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA POLOGNE
Tomek azali kotala televizyo na likebi nyonso. Afungoli matoi mpenza ntango bazali kolakisa piblisite moko oyo ezali koloba boye: “Soki mwana na yo alati yango, akozala makasi, mosani monene, mpe baninga na ye bakolula ye. Osengeli kosombela ye yango!” Tomek akei mbangu epai ya tata na ye, azali kozongela maloba yango ya piblisite oyo auti koyoka. Alobi boye: “Tata, okosombela ngai yango?”
◼ Mpo na nini bana balingaka kaka biloko oyo bazali kopesela piblisite? Moteyi moko oyo batángaki maloba na ye na zulunalo moko ya Pologne (Rewia) alobi boye: “Balingaka kozala na biloko oyo basusu bazali na yango. Balingaka baninga na bango bándima bango.” Ntango mwana azali kosɛnga na kolela mpe asiliki, baboti mosusu bakangaka motema te mpe basombelaka ye yango.
Nini esalaka ete bana bákosama na bapiblisite? Jolanta Wąs, moto moko ya mayele, alobi boye: Bapiblisite yango elobelaka te “ntalo, makasi, to ntina ya eloko.” Babongisaka piblisite kaka mpo bato “básepela na eloko.” Wąs abakisi boye: “Bana bazwaka ntango te ya kotalela makambo oyo bayoki na piblisite . . . . Balukaka te koyeba bokeseni kati na makambo bayoki na piblisite na makambo oyo bayebi.” Lisusu, ata soki baluki koyeba, mayele na bango ezali mokuse mpo na koyeba mpenza valɛrɛ ya eloko.
Ndenge nini okoki kobatela mwana na yo mpo piblisite ekosa ye te? Zulunalo yango elobi ete, likambo ya liboso, “osengeli kolekisaka ntango elongo na mwana na yo mpe koyebisa ye ete valɛrɛ ya moto emonanaka te na modɛlɛ ya sapato [to elamba] oyo alati.” Yebisá mwana na yo ete akoki kozala na esengo ata soki azali te na biloko ya masano oyo ebimi sika. Ya mibale, baboti bango moko mpe basengeli koyeba nguya oyo piblisite ekoki kozala na yango epai ya bana na bango. Wąs abakisi boye: Sɛkɛlɛ ezali ete “tótikaka te ete piblisite eyebisa biso oyo tosengeli kosala mpo na bana na biso.”
Mpo na kosukisa, baboti nyonso basengeli kolanda toli oyo Biblia ezali kopesa. Ntoma Yoane akomaki boye: “Eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela—euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili.”—1 Yoane 2:15, 16.
Omoni te ete bapiblisite mingi elamusaka “mposa ya miso” mpe etindaka bilenge ná mikóló ‘bálakisa na lolendo biloko na bango ya kobikela’? Ntoma Yoane abakisaki boye: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”—1 Yoane 2:17.
Baboti oyo balekisaka ntango elongo na bana na bango mpe basololaka na bango, bakoki kolakisa bango mitinda ya Nzambe mpe makambo oyo ekomemela bango matomba. (Deteronome 6:5-7) Na ndenge yango, bana bakokosama te na bapiblisite ya mokili, oyo ekotinda bango bátungisaka baboti na bango mpo básombela bango biloko oyo balingi.