Nzambe asalisaki ngai nalonga mikakatano
Lisolo ya Vazir Asanov
Napumbwaki na mbeto, nabombaki Biblia na loketo mpe nalataki nokinoki. Liboso napumbwa na lininisa, nasangisaki bilamba, natyaki yango likoló ya mbeto mpe nazipaki bolangiti likoló mpo emonana lokola nazali naino kolala. Na nsima, nakimaki mbangu na Ndako ya Bokonzi, mpe nazalaki kobondela Nzambe ete asunga ngai. Makambo yango esalemaki na 1991 ntango nazalaki na mbula 14.
NABOTAMAKI na engumba moko oyo ezali na sudi ya Kazakhstan, oyo na ntango wana ezalaki moko ya bikólo 15 ya Union soviétique; baboti na ngai bazalaki koloba monɔkɔ ya Kurde. Baboti mpe bandeko na ngai babɔkɔlaki ngai na likanisi ete mokolo mosusu nakoki kokóma mokambi mpe mosikoli ya bato ya mboka na biso. Nabandaki koyina banguna ya Kurde makasi mpe nakokaki ata koboma bango mpo na kosikola bato na ngai.
Na nsuka ya bambula 1980, mama, leki na ngai mpe ngai moko tobandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Kasi, Tata azalaki kopekisa biso koyangana na Batatoli. Atako bongo, nakobaki koyekola. Kozanga botosi epai ya batata ezalaki likambo moko mopaya epai ya bato ya Kurde. Nazalaki kolinga tata, kasi nazalaki mpe kolinga mateya ya Biblia oyo nazalaki koyekola.
Botɛmɛli na ndako mpe na eteyelo
Mokolo moko, molakisi na biso amonaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na sakosi na ngai ya kelasi mpe ayebisaki baboti na ngai likambo yango. Tata asilikaki, abɛtaki ngai makasi mpe makila ebandaki kobima ngai na zolo. Atunaki ngai boye: “Ozali kaka na lingomba wana?”
Na nsima, tata ayebisaki libota mobimba ete nazali lisusu mwana na ye te. Maloba wana esalaki ngai mpenza mpasi! Na ntango wana kaka, baninga mingi ya kelasi babandaki koboya ngai mpe bamosusu bazalaki kofinga ngai na miso ya bato. Balakisi bazalaki kopesa ngai bapwɛ moke mpe mbala mingi bazalaki kotyola bindimeli na ngai na kati ya kelasi; bazalaki kosala nyonso bándimisa ngai nakóma lokola bango, bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali.
Atako botɛmɛli wana ezalaki, nazalaki kaka koyangana na makita mpe kosakwela basusu makambo oyo nazalaki koyekola. Mwa moke na nsima, tata ayokaki ete nazalaki kaka koyangana na Batatoli ya Yehova mpe nazalaki kokoba kotánga Biblia. Mokolo moko ya lomingo, nalukaki likambo moko oyo nakokosa tata mpo nakende na makita. Mbala moko, tata atindaki ngai nakende kolala. Alobaki na ngai na nkanda nyonso ete: “Banda lelo, mikolo nyonso ya lomingo, na ngonga oyo, osengeli kozala na mbeto.” Abangisaki ngai ete soki natosi te, akopesa ngai etumbu ya makasi, mpe nayebaki ete akosala yango.
Na kolela nyonso, nabondelaki Yehova Nzambe ya solo ete alɛmbisa motema ya tata, kasi atikalaki kaka libanga. Nazalaki kokanisa minyoko oyo Bayisalaele bamonaki na Ezipito. Makambo oyo tata azalaki kosala etindaki ngai namikundola Falao, oyo azalaki koboya kotika Bayisalaele bákende kosambela Yehova.—Exode 5:1, 2.
Nazwi bikateli
Mokolo moko ya lomingo, nazwaki ekateli ya kokende na makita. Nalalaki na mbeto mpe nazalaki kobondela Yehova. Lokola nazalaki komitungisa, motema ekómaki kobɛta. Ntango baboti na ngai bakɔtaki na shambre na ngai, nakosaki kolala. Tata alobaki na esengo nyonso ete: “Nazali mpenza na mwana ya botosi.” Apesaki ngai bizi mpe ye ná mama babimaki malɛmbɛ. Nakobaki kobondela na etingya.
Mwa moke nsima ya kobima ya tata ná mama, nakitaki na mbeto, nabendaki basapato na ngai na nse ya mbeto mpe napumbwaki na lininisa, ndenge nalobaki na ebandeli ya lisolo oyo. Ngonga mibale ya makita elekaki mbangu, mpe nakómaki komituna nini ekokómela ngai ntango nakozonga. Kasi, likambo ya esengo, atako mama amonaki ete oyo ezalaki na mbeto ezalaki bilamba na ngai kasi ngai te, ayebisaki tata te. Kasi, ayebisaki ngai ete mbala ya nsima akobombela tata makambo ya ndenge wana te.
Na 1992, nayebisaki baboti na ngai ete moninga na ngai moko azali kokende na fɛti moko mpe abengi ngai tókende. Nzokande, fɛti oyo nalingaki kokende ezalaki liyangani moko ya Batatoli ya Yehova oyo esengelaki kosalema na engumba Taraz, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 100, kobanda epai na biso na engumba Karataou. Na liyangani yango, nasengelaki kozwa batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai na Yehova. Nasɛngaki mama soki nakoki kozwa katini moko ya mbuma ya tournesol na ferme. Nakalingaki yango, natɛkaki yango na zando mpe nazwaki mbongo oyo nasengelaki na yango mpo kokende na liyangani.
Ntango nazongaki, tata atunaki ngai soki nalekisaki ntango malamu na moninga na ngai. Nayebisaki ye ete makambo nyonso elekaki malamu. Namonaki ete Yehova asungaki ngai mpo tata atunaki ngai mituna mosusu te mpo na likambo yango. Nazalaki mpenza kosepela na maloba ya Masese 3:5, 6: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”
Nazongi nsima na elimo
Nsima ya kozwa batisimo, tata atikaki te kotɛmɛla ngai. Lokola nazalaki kokoba koyangana na Batatoli ya Yehova, tata azalaki mpenza konyonga ngai, ezala ntango tozali na ye mpe na miso ya bato ebele. Pene ya mikolo nyonso, azalaki kosambwisa ngai, azalaki kosala nyonso mpo nalongwa Motatoli mpe nazalaki kolela mbala na mbala. Na ntango wana, Union soviétique eutaki kopesa Kazakhstan lipanda, mpe baboti mpe bandeko na ngai babandaki koluka kondimisa ngai namityela mikano ya kokóma moto ya politiki. Bazalaki kokanisa ete nazalaki kolekisa libaku moko ya ntina mingi.
Yaya na ngai ya mobali akómaki mosika na masano, mpe mbala mingi tata azalaki koloba na ngai nalanda ndakisa na ye. Yango wana, na nsuka ya 1994, ngai mpe namikɔtisaki na masano. Lokola nazalaki na makoki banda kobotama, eumelaki te nabandaki kozwa mbongo na mosala yango, mpe nayebanaki mpenza makasi mpo nakómaki makasi na kobɛta bale mpe na kosala gymnastique. Nakɔtaki mpe kelasi ya koyekola mibeko mpo nakoka kobatela matomba ya mboka na biso. Kutu, nakɔtaki na makambo ya politiki mpe nalingaki kosala parti politiki ya bilenge. Tata akómaki sikoyo kokumisa ngai.
“Tata, olongi”
Nalɛmbaki na elimo, natikaki kotánga Biblia mpe koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Nakómaki koloba ete nakozongela kosalela Yehova ntango nakokóma mokóló. Mokolo moko, tata atunaki ngai soki nazali kaka koyangana na Batatoli ya Yehova. Nayanolaki ete: “Te, tata, olongi.” Mpe natunaki ye “sikoyo osepeli?” Nsima ya koyoka bongo, tata asepelaki makasi mpe alobaki na esengo nyonso ete: “Sikoyo ozali mwana na ngai!”
Nakimaki makita mbula mibale mobimba, atako ntango mosusu nazalaki koyoka mposa ya kokende. Kasi, nsɔni ezalaki kopekisa ngai. Nabandaki kokanisa ete bandeko na lisangá bakondima te makambo oyo nakoyebisa bango.
Kasi, nayebaki ete kosalela Yehova eleki makambo nyonso. Nazalaki koloba ntango nyonso: ‘Nalingaka Yehova.’ Na nsima, tata abandaki kotya ngai mbamba natánga na iniversite. Nandimaki makanisi na ye mpe nalakaki kutu ete nakosilisa kelasi na ngai na bapwɛ ebele. Kasi, na motema, nazalaki kokanisa ete soki nakei kotánga na Almaty, engumba moko ya monene oyo ezali na sudi ya Kazakhstan, nakomona Batatoli ya Yehova kuna.
Nazongeli Yehova
Mosika te nsima ya kobanda kotánga na iniversite, nakutanaki na Batatoli mibale, oyo bazalaki kosakola na balabala moko na engumba Almaty. Batunaki ngai ete: “Mpo na yo, nani azali koyangela mokili?”
Nayanolaki ete: “Satana Zabolo, monguna ya Yehova mpe ya bato nyonso.” (2 Bakolinti 4:3, 4) Nayebisaki bango ete nazwá batisimo kasi nalɛmbá na elimo.
Pene ya nsuka ya 1996, nabandaki lisusu koyekola Biblia na Batatoli. Nsima ya koyekola mbala ebele, mposa ya kosalela Yehova ezongaki makasi mpe nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova na Almaty mpe kobima na mosala ya kosakola. Na sanza ya libwa ya 1997, nakómaki mobongisi-nzela.
Mbula moko na nsima, tata ayaki kotala ngai. Nakimaki mbangu mpe toyambanaki. Asɛngaki ngai bolimbisi mpo na makambo nyonso oyo asalaki ngai na boumeli bambula wana. Alobaki ete azalaki koyeba te bindimeli na ngai mpe makambo oyo nazalaki koloba mpe kosala. Nalobaki na ye: “Tata, nalingaka yo makasi.”
Nasepelaki makasi ntango tata andimaki mikanda na biso mpe asɛngaki Biblia, mpe alobaki ete akotánga yango banda na ebandeli tii na nsuka! Mbula moko na nsima, ayaki lisusu kotala ngai, ya mbala wana bayaki na mama. Na Ndako ya Bokonzi, bato ya bikólo ndenge na ndenge bazalaki koya kopesa bango mbote na esengo mpe kopesa bango bankombo na bango. Likambo yango esepelisaki tata makasi, mpe abandaki kotánga mikanda ya Batatoli na likebi nyonso.
Nazwi mapamboli mingi
Na sanza ya libwa ya 2001, nabalaki Yelena, ndeko mwasi moko malamu ya ekólo Russie. Azwaki batisimo na 1997 mpe akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, na sanza ya mitano ya 2003. Likambo ya esengo mpo na biso, toyokaki ete baboti na ngai babandi koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe bazali kokola malamu na elimo. Nandimaki likambo yango kaka ntango tata ye moko ayebisaki ngai yango na monɔkɔ na ye. Ayebisaki ngai na telefone ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo!
Nazali mpenza na esengo ete awa na Almaty, nazwi libaku ya koyekola Biblia na bato oyo bauti na bisika ndenge na ndenge, na ndakisa Chine, Iran, Pakistan, Syrie mpe Turquie. Eumeli naino mingi te, sango moko ya Iran asɛngaki ngai nayekolaka na ye Biblia na Perse, monɔkɔ na ye ya mboka. Mobali moko ya Afghanistan, oyo azalaká mokonzi monene ya basoda, akamwaki mingi na makambo oyo ayekolaki na ntina na Yehova. Ezalaki mpe esengo koyekola na moto moko ya Syrie na Kurde, monɔkɔ ya mboka na biso mpe koyekola na bato mosusu na Kazakh mpe Russe, minɔkɔ mosusu oyo nayekolaki na bomwana.
Lelo oyo, ngai ná Yelena tozali na lisangá ya monɔkɔ ya Kazakh, moko ya masangá koleka 35 ya Batatoli ya Yehova na Almaty. Na mbula eleki, ngai ná Yelena tozwaki libaku ya kosala mwa ntango moke na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova oyo bautaki kotonga, pene ya Almaty.
Liboso, bateyaki ngai koyina bato, kasi Yehova ateyi ngai kolinga bato. Namoni mpenza ete tosengeli kotika ata moke te kosalela Nzambe, ata soki bandeko mpe baninga na biso bazali kotya biso mpanzi likoló. (Bagalatia 6:9) Lelo oyo, ngai ná mwasi na ngai tozali na esengo mpo tozali “na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo.”—1 Bakolinti 15:58.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Mama ayebisaki ngai ete mbala ya nsima akobombela tata makambo ya ndenge wana te
[Elilingi na lokasa 15]
Ndako ya Bokonzi na Karataou, epai nazalaki koyangana na makita ntango nazalaki naino elenge
[Elilingi na lokasa 15]
Baboti na ngai, oyo bazali lelo kondima mosala na biso
[Elilingi na lokasa 15]
Ngai ná Yelena, mokolo tobalanaki
[[Elilingi na lokasa 15]
Ngai ná Yelena, na biro ya filiale pene ya Almaty