Lamuká! esalisaki ye na ndenge oyo akanisaki te
◼ Ntango Noël, Motatoli ya Yehova moko ya mbula 23 azwaki ekateli ya kokata kelasi mpo na komipesa mingi na mosala ya kosakola nsango malamu, bato ya libota na ye bamitunaki soki akozwa mbongo ya kobikela ndenge nini. Ya solo, azalaki na mokakatano ya kozwa mosala oyo ekobanda kotikela ye ntango mpo asakolaka mingi. Yango wana, ntango Lamuká! ebimisaki lisolo “Cinq stratégies pour trouver un emploi,” Noël atángaki yango mbala na mbala na likebi mpenza.a Esalisaki ye? Ɛɛ, kasi na ndenge oyo akanisaki te.
Mokambi ya eteyelo moko amonaki Noël azali kosakola ndako na ndako mpe atunaki ye soki azali Motatoli ya Yehova. Mokambi yango azalaki na mposa ya molakisi moko na eteyelo na ye, mpe lokola ayebaki ete Batatoli ya Yehova bateyaka malamu, atunaki Noël soki ayebi moto moko oyo akosepela kotángisa. Ntango Noël alobaki ete ayebi moto te, mokambi yango atunaki ye: “Bongo yo moko?”
Noël atángaki na ndenge esengeli kasi asalaki naino mosala ya molakisi te, mpe azalaki na mwa likukuma. Yango ezalaki mokakatano mpo na ye mpamba te na Bénin, liboso bándima moto na mosala ya molakisi, bapesaka ye ekzamɛ mpo bátala soki azali na likukuma te. Mokambi yango alobaki na Noël boye: “Soki ozwi diplome, ozwi mpe mosala.”
Noël azwaki formasyo ya malamu mpenza na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, eteyelo oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ na masangá ya Batatoli ya Yehova mpo na kosalisa bango bákóma balobi ya solosolo. Azalaki kutu kosala masukulu na lisangá na bango. Atako bongo, abangaki mwa moke ntango akendaki kosala ekzamɛ yango.
Moto oyo azalaki kotuna ye mituna apesaki ye zulunalo moko mpe asɛngaki ye atánga na mongongo makasi paragrafe moko oyo batyaki elembo na biki ya motane. Noël afungolaki mpenza mbuma ya miso ntango amonaki lisolo “Cinq stratégies pour trouver un emploi.” Atángaki paragrafe yango kozanga kokakatana ata moke, mpe bapesaki ye diplome.
Na nsima, moto yango ayebisaki ye ete ye mpe atángaka mingi bazulunalo ya Batatoli ya Yehova. Ayebisaki Noël boye: “Bazulunalo yango ezalaka na makambo ya ntina mingi mpe bakomaka yango malamu mpenza. Yango wana nasalelaka yango mpo na kosalisa bato ekzamɛ.”
Noël abandaki kotángisa, mpe na mbula oyo elandaki, mokambi ya eteyelo asɛngaki ye atikala kaka wana, kasi Noël azalaki na mikano mosusu. Babengaki ye na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova, epai azali kosala tii lelo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Lamuká! ya 8 Yuli 2005, nkasa 4-9 (na Lifalanse).