Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Avril nk. 22-25
  • Zɛbrɛ​—Mpunda Ya Zamba Ya Afrika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zɛbrɛ​—Mpunda Ya Zamba Ya Afrika
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzoto na bango ezali na banzela-nzela mpe balingaka mingi kofanda bango nyonso esika moko
  • Bazali kosala nyonso mpo na kotikala na bomoi
  • Kobɔkɔla bana
  • Bazali banyama ya zamba, kasi bazali kitoko
  • Liteya 2
    Mateya ya Biblia mpo na bana
  • Mateya ya Biblia mpo na bana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Lamuká!—2002
g02 Avril nk. 22-25

Zɛbrɛ​—Mpunda Ya Zamba Ya Afrika

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA AFRIKA

E TONGA ya bazɛbrɛ pene na nkóto bazali kokimakima mbangu na bonsomi nyonso na esobe ya Afrika. Mipanzi na bango ya banzela-nzela ezali kotombwanatombwana wana ebele ya nsuki ya mokɔngɔ na bango ezali kobinabina na kolanda ndenge bazali kopota mbangu. Lokito ya makolo na bango oyo ezali kotuta mabele ezali koyokana makasi na esobe mobimba. Lipata ya mputulu ya mabele ya motane ezali komata nsima na bango mpe ekoki komonana mosika mpenza. Nyama yango ezali kokimakima mbangu na bonsomi nyonso, mpe eloko moko te ezali kopekisa yango.

Na nsima, lokola nde bayoki mongongo moko boye, babandi kolɛmbisa makolo mpe batɛlɛmi. Mpe babandi kolya matiti ya kokauka na mino na bango ya makasi. Etonga mobimba ezali na bokɛngi, mbala na mbala bazali kotombola mitó mpo na kotala, koyoka mpe kolumbuta mopɛpɛ. Bayoki nkosi moko ezali konguluma mosika, mpe bango nyonso bakómi mbala moko na yikiyiki. Bayebi mongongo wana malamu. Batomboli matoi likoló, na mwa matiti na minɔkɔ, bazɛbrɛ bakómi kotala esika konguluma wana euti. Wana bamoni ete likama ezali pene te, bagumbi lisusu nkingo mpo na kolya matiti.

Ntango molunge ebandi kongala makasi, bango nyonso basimbi lisusu nzela. Mbala oyo nsolo ya mai nde ebendi bampunda wana ya zamba epai mongala ezali. Lokola bokula ezali likoló, batɛlɛmi mpe babandi kopema nokinoki mpe kotutatuta makolo wana bazali kotala mai ya moindo oyo ezali kotiyola malɛmbɛ na nse. Bazali kokakatana mpamba te bayebi ete mbala mosusu likama moko ekoki kozala na kati ya mai wana, atako na likoló mai yango ezali komonana ete ezali nyɛɛ. Nzokande mposa ya mai ekangi bango makasi, mpe bamosusu kati na bango babandi kopusa etonga mobimba liboso. Na mbala moko, na mpiko nyonso bango nyonso bakiti mbangu tii na mongala. Moko na moko amɛli mai mpe akokisi mposa na ye, mpe bango nyonso bazongi lisusu na esobe.

Na mpokwa etonga mobimba ezali kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ na kati ya matiti milaimilai. Wana ozali kotala banyama yango na mosika, na ntango ya kolala ya moi oyo ekómisaka likoló motane, okomona bango kitoko kati na etando wana ya matiti ya Afrika.

Nzoto na bango ezali na banzela-nzela mpe balingaka mingi kofanda bango nyonso esika moko

Mikolo nyonso bazɛbrɛ basalaka kaka makambo ndenge moko. Lokola balukaka ntango nyonso biloko ya kolya mpe mai ya komɛla, basengeli kotambolatambola. Wana bazali kolya matiti na esobe, bazɛbrɛ bamonanaka pɛto mpe mafutamafuta; mposo na bango, oyo ezali na banzela-nzela, ezipaka nzoto na bango ya misunimisuni. Zɛbrɛ na zɛbrɛ azalaka na banzela-nzela ya ye moko kaka. Bato mosusu kutu balobaka ete okomona soki moke te bazɛbrɛ mibale oyo bazali na banzela-nzela ndenge moko. Banzela-nzela na bango ya mpɛmbɛ mpe ya moindo ekesenisaka bango mpenza na banyama mosusu ya esobe. Nzokande, bazɛbrɛ bazalaka kitoko na kotala, mpe kaka na bisobe ya Afrika nde okokuta bango.

Bazɛbrɛ balingaka mingi kofanda bango nyonso esika moko. Boyokani kati na banyama ya etonga moko ezalaka makasi mpe ekoki koumela bomoi na bango mobimba. Atako etonga moko ekoki kozala na bankóto ebele ya bazɛbrɛ, etonga yango ekabolamaka na bituluku ya mikemike, oyo ezali bongo mabota epai okomona zɛbrɛ moko ya mobali na basi na ye. Kati na libota moko ya ndenge wana, nyama na nyama esengeli kotosa esika na yango mpo na kobatela kimya. Zɛbrɛ ya mwasi oyo aleki bamosusu nyonso ya libota, ye nde alakisaka epai libota esengeli kokende. Ye nde azalaka na liboso, mpe na nsima bazɛbrɛ mosusu ya basi, moko na moko na esika na ye, esika moko na bana na bango oyo balandaka na molɔngɔ moko. Atako bongo, liloba ya nsuka ezalaka nde epai ya zɛbrɛ ya mobali. Soki alingi ete libota na ye elanda nzela mosusu, akopusana na mama oyo azali liboso mpe akotindika ye mpo alanda na nzela yango.

Zɛbrɛ nyonso alingaka mingi zɛbrɛ mosusu alongola ye nyama-nkɛkɛ na nsuki, mpe mbala mingi okomona bango bazali kongulutana bango na bango, mpe koswanaswana na mipanzi, mapeka mpe mokɔngɔ na mino. Kosala bongo eyeisaka makasi boyokani na kati ya bazɛbrɛ, mpe ebandaka ntango bana bakokisi kaka mwa mikolo. Soki zɛbrɛ moko ya libota ezali te mpo na kopɛtola ye, zɛbrɛ oyo azali koyoka mokosa akomibalolabalola na mabele, to akomikwanzakwanza na nzete, na lindɔngɛ to na eloko nyonso oyo ekomonana.

Bazali kosala nyonso mpo na kotikala na bomoi

Bomoi ya zɛbrɛ etondi na makama. Nkosi, mbwa ya zamba, zɛ́gɛ́ (hyène), nkoi mpe ngando, bango nyonso batalelaka zɛbrɛ, nyama oyo azali na kilo 250, lokola nyama oyo basengeli kokanga mpe kolya. Ntango zɛbrɛ azali kokima, akoki kosala kilomɛtrɛ 55 na ngonga moko. Kasi, na bantango mosusu, banguna babimelaka ye pwasa mpe bakangaka ye na ntango oyo ayebaki te. Nkosi ebatamaka mpo na kozela ye, ngando emibombaka na kati ya mai ya pɔtɔpɔtɔ, mpe nkoi emibombaka na molili mpo na kozela ye.

Mpo na komibatela, bazɛbrɛ basengeli kozalaka ekɛngɛ mpe etonga mobimba esengeli kobongisa ndenge oyo esengeli komibatela. Na butu, ntango mingi na bango bazali kolala mpɔngi, basusu balalaka te, bafungolaka matoi mpo na koyoka mpe kokɛngɛla. Soki zɛbrɛ moko amoni monguna moko azali kopusana, agangaka mpo na kokebisa etonga mobimba. Mbala mingi soki zɛbrɛ moko ya etonga azali kobɛla, to akómi mobange mpe akoki te kopota mbangu ndenge moko na etonga mobimba, bazɛbrɛ mosusu bakolɛmbisa makolo, ata mpe kotɛlɛma mpo na kozela, kino ntango zɛbrɛ oyo azali kotambola malɛmbɛ akokóma na esika oyo etonga ezali. Soki likama ebimi, zɛbrɛ ya mobali atɛlɛmaka na mpiko nyonso kati ya monguna na bazɛbrɛ ya basi, abandaka koswa na mino to kotuta monguna na makolo mpo etonga ezwa ntango ya kokima.

Likambo moko ya kokamwa oyo Hugo van Lawick, oyo ayekolaka bomoi ya banyama, amonaki na esobe ya Serengeti, na Afrika, ezali komonisa mpenza ete mabota ya bazɛbrɛ ezalaka na bomoko. Na lisolo oyo abɛtaki, alobaki ete etuluku moko ya bambwa ya zamba bazalaki kolanda etonga moko ya bazɛbrɛ, mpe bakimisaki zɛbrɛ moko ya mwasi elongo na bana na ye mibale mwa mosika na etonga; kati ya bana yango moko azalaki na mbula moko. Ntango bazɛbrɛ mosusu bazalaki kopota mbangu mpo na kokima, zɛbrɛ wana ya mwasi na mwana na ye ya mbula moko babundaki na mpiko nyonso na bambwa ya zamba mpo na kokimisa bango. Bambwa ya zamba bakómaki kobunda makasi koleka, mpe zɛbrɛ wana ya mwasi na mwana na ye ya mbula moko babandaki kolɛmba. Emonanaki lokola nde esili mpo na bango, elikya ezalaki lisusu te. Ntango Van Lawick akanisi lisusu likambo yango, alobi boye: “Mbala moko, nayokaki mabele eningani mpe, ntango natalaki zingazinga, nakamwaki na komona ete bazɛbrɛ zomi bazalaki koya mbangu mpenza. Nsima ya ntango moke bazɛbrɛ yango bazingaki zɛbrɛ wana ya mwasi na bana na ye mibale. Na nsima, bazɛbrɛ nyonso babalukaki mpe, bango nyonso bakimaki na ngámbo oyo bazɛbrɛ zomi bautaki. Bambwa ya zamba bamekaki kolanda bango na ntaka soki ya mɛtrɛ 50, kasi lokola bakokaki te kokabola etuluku yango, batikaki kolanda bango.

Kobɔkɔla bana

Zɛbrɛ ya mwasi abatelaka makasi mwana na ye oyo auti kobota, mpe na ebandeli akotika ye te esika moko na bazɛbrɛ mosusu ya etonga. Na ntango wana oyo bazali kaka bango mibale, mwana akangamaka makasi na mama na ye. Mwana akangaka na motó banzela-nzela ya mpɛmbɛ mpe ya moindo ya mama na ye, oyo ezali na zɛbrɛ mosusu te. Na nsima akoyeba mongongo na ye, nsolo na ye mpe akolanda mama mosusu te, bobele mama na ye.

Ntango bana ya zɛbrɛ babotamaka, banzela-nzela na bango ezalaka mpenzampenza te mpɛmbɛ mpe moindo lokola oyo ya baboti na bango. Banzela-nzela na bango ezalaka motane makasi te mpe eindaka ntango bazali kokola. Na kati ya etonga ya monene, bana oyo bauti na mabota ndenge na ndenge basakanaka esika moko. Bamekanaka mbangu mpe balandanaka, batutanatutanaka mpe bakimakimaka na kati ya bazɛbrɛ ya mikóló. Na bantango mosusu, bazɛbrɛ yango ya mikóló bamikɔtisaka mpe na masano ya bana yango. Na makolo na bango ya mikemike mpe milaimilai, bazɛbrɛ oyo bazali naino bana bakimakimaka mpo na koluka kokanga bandɛkɛ mpe banyama mosusu ya mike; mpo na bana yango, ezalaka lokola lisano. Bana wana, na makolo na bango mike mpe milaimilai, miso minene moindo mpe na nsuki na bango ya kongɛnga mpe ya pɛtɛpɛtɛ, bazalaka mpenza kitoko na kotala.

Bazali banyama ya zamba, kasi bazali kitoko

Ata lelo okoki komona bitonga minene ya bazɛbrɛ oyo bazali kokimakima na bonsomi nyonso na bisobe milaimilai ya matiti mingi ya mikili ya Afrika. Epesaka esengo mingi mpenza!

Nani akozanga kondima ete zɛbrɛ, na banzela-nzela na ye ya mpɛmbɛ mpe ya moindo, na ndenge azalaka ntango nyonso esika moko na libota na ye, na ezaleli na ye ya nyama ya zamba mpe mposa na ye ya bonsomi, azali ekelamu moko ya kokamwa mpe ya kitoko? Soki toyekoli makambo etali nyama wana, tokozwa eyano na motuna moko oyo etunamaki esili koleka ebele ya bambula, ete: “Nani atindaki zɛbrɛ na bonsominyonso?” (Yobo 39:5, NW) Eyano ezali polele. Ezali Yehova Nzambe, Mokeli ya bikelamu nyonso ya bomoi.

[Etanda na lokasa 22]

Mpo na nini zɛbrɛ ezalaka na banzela-nzela?

Bato oyo bandimaka mateya ya evolisyo bamonaka mpasi mpo na kolimbola ntina oyo zɛbrɛ ezalaka na banzela-nzela. Basusu bakanisaka ete ntango mosusu banzela-nzela yango esalisaka bango mpo na kobangisa banguna na bango. Nzokande, eyebani malamu ete nkosi mpe banguna mosusu ya minene ebangaka ata moke te banzela-nzela ya zɛbrɛ.

Basusu bapesaki likanisi ete banzela-nzela yango ezali mpo na kobenda oyo ya mobali epai na oyo ya mwasi. Nzokande bazɛbrɛ nyonso, ezala oyo ya mibali to oyo ya basi, bazalaka na banzela-nzela ndenge moko, likanisi yango ekoki kozala solo te.

Likanisi mosusu elobi ete banzela-nzela ya mpɛmbɛ mpe ya moindo ebimaki na nzoto ya zɛbrɛ mpo na kolɛmbisa molunge makasi ya moi ya Afrika. Soki ezali bongo, kasi mpo na nini banyama mosusu ezalaka na banzela-nzela te?

Likanisi mosusu oyo epalangani mingi ezali ete banzela-nzela ya zɛbrɛ ebimaki mpo na kosalisa yango emibomba liboso ya likama. Bato ya siansi bamonaki ete molunge oyo ebimaka na bisobe ya Afrika emonisaka zɛbrɛ ndenge oyo azalaka te na boye ete ezalaka mpasi mpo na koyeba yango malamu soki ezali mosika. Kasi, lolenge yango ya komibomba na mosika boye ezali mpenza na ntina te mpamba te nkosi, monguna monene ya zɛbrɛ, elandaka banyama oyo elingi kokanga kaka na ntango oyo epusani penepene na yango.

Balobaka lisusu ete ntango zɛbrɛ ebele ebandi kopota mbangu mpo na kokima likama, banzela-nzela na yango oyo ezali kolekaleka mbangumbangu na miso epesaka nkosi oyo elingi kokanga yango kizunguzungu mpo ekoka te kotyela nyama moko likebi mpo na kolanda kaka yango. Nzokande, soki totali malamu, makambo bato oyo bayekolaka banyama ya zamba bamoni emonisi ete nkosi ekangaka zɛbrɛ kaka ndenge oyo ekangaka banyama mosusu.

Motuna yango ekómaka lisusu mpasi mpo banzela-nzela yango ya zɛbrɛ etyaka ye, na bantango mosusu, na mokakatano. Na butu, na ntango oyo sanza ezali kongɛngisa bisobe, banzela-nzela ya zɛbrɛ, oyo ezalaka mpɛmbɛ mpe moindo, esalaka ete bámona ye kutu malamu koleka banyama mosusu oyo ezalaka na langi moko mpamba nzoto mobimba. Lokola mbala mingi, nkosi elukaka nyama ya kokanga na butu, emonani ete ekozala pɛtɛɛ mpenza mpo emona mpe ekanga zɛbrɛ mpo na banzela-nzela na yango.

Bongo, banzela-nzela ya zɛbrɛ eutá wapi? Eyano na motuna yango ezali na kati ya maloba ya pɛtɛɛ oyo: “Lobɔkɔ ya Yehova nde esalaki yango.” (Yobo 12:9, NW) Ɛɛ, Mozalisi nde asalaki ekelamu mokomoko ya mabele mpe apesaki yango makambo mpe bizaleli oyo ekesenisi yango na bikelamo mosusu mpe oyo ebongi na bomoi na yango, atako mbala mosusu moto azali mpenza kokanga ntina malamu te ya makambo mpe bizaleli yango. Mitindo mpe balangi kitoko mpe ya ndenge na ndenge ya bikelamu ya bomoi ezali mpe na ntina mosusu. Ezali kopesa motema ya moto bolamu mpe esengo. Ya solo, kitoko ya biloko bizalisami etindi bato mingi ya ntango na biso bámiyoka lokola Davidi amiyokaki na ntango ya kala: “Ɛ [Yehova]! Misala na yo mizali mingi mpenza. Osali yango nyonso na mayele. Mabele matondi na biloko yo osalaki.”​—Nzembo 104:24.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto