Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Avril nk. 19-21
  • Etando moko monene ya mai na kati ya mabele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etando moko monene ya mai na kati ya mabele
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabele na yango ekauká
  • Na kati ya mabele ezali maimai
  • Ebele ya zelo ezali komela mai
  • Mai yango ezali kosila mokemoke
  • Ezali monene kasi eumelaka kobeba te
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2002
  • Mai oyo ezali kopesa bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Lamuká!—2002
g02 Avril nk. 19-21

Etando moko monene ya mai na kati ya mabele

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA AUSTRALIE

WANA tozali kopumbwa na mpɛpɔ oyo etalisi motó na epai ya wɛsti, tozali koleka likoló ya bansongɛ ya bangomba oyo ezali pembenipembeni ya bokula ya mai monene na Australie. Bisika oyo tozali komona ezali kitoko mpenza. Likoló mobimba ezali na langi bule, mpe na nse etando monene oyo ezali na ngomba te ekei mosika mpenza mpe nsuka ezali komonana te. Bilanga oyo ezali komonana na langi ya mai ya pɔndu oyo esangani na bisobe ya langi ya wolo ebandi kolimwa mokemoke na miso, tobandi sikoyo komona etando moko monene ya mabele ya motane oyo na bisika mosusu ezali na mwa matiti ya langi ya motane-moindo.

Atako ntango mosusu okoki kondima likambo yango te, kasi yebá ete na kati ya mabele wana, etando moko monene ya mai ezali. Monene na yango ezali ndambo mibale likólo na misato (2/3) ya monene ya Mai Monene ya Méditerranée. Ebele ya mai wana oyo ezali na kati ya mabele babengaka yango grand bassin artésien.

Mai yango ezali na ntina mingi mpo na bato ya Australie oyo bamboka na bango ezali mosika na bokula ya mai monene mpe epai moi ezalaka makasi. Mpo na koyeba ntina ya mai wana, oyo ezali lokola eloko moko ya motuya oyo ekundami na kati ya mabele, mpe ndenge yango esalemá, tosengeli naino koyeba ndenge ekólo Australie ezali.

Mabele na yango ekauká

Ndenge balobaka ete Australie ezali ekólo oyo eziká na moi ezali mpenza solo. Australie, kɔntina oyo eleki moke kati na bakɔntina mitano ya mabele, ezali na esobe ya zɛlozɛlo oyo ezali na esika ya mibale kati na bisobe ya zɛlozɛlo oyo eleki minene na mokili mobimba. Ezali mpe na Ebale Darling, moko ya bibale oyo eleki molai na mokili mobimba. Kasi, bibale ya Australie esopaka mai mingi te na mbu. Na États-Unis, mbula na mbula, Ebale Mississippi yango moko esopaka na mbu mai mingi (60 %) koleka bibale mpe mingala nyonso ya Australie. Mpo na nini mbula ebɛtaka mpenza te na ekólo yango?

Esika oyo kɔntina yango ezali na mabele (30 degrés de latitude sud), yango nde epesaka bisika mingi molunge makasi mpenza. Bisika yango ya molunge etindaka mipɛpɛ ya molunge na katikati ya ekólo yango. Mipɛpɛ yango elekaka na etando moko monene, esika bangomba ya milai ezali te oyo ekoki komɛla mpiɔ na yango. Molɔngɔ ya bangomba ya milai ezali kaka pembenipembeni ya bokula ya mai monene oyo ezali na ɛsti ya kɔntina yango. Na bangomba yango nyonso, oyo eleki molai ezali na mɛtrɛ 2 228 mpamba; nzokande yango ezali mpenza mokuse soki tokokanisi yango na bangomba mosusu na mokili mobimba. Ntango mipɛpɛ ya mbula oyo eutaka na Océan Pacifique ekɔtaka na ɛsti ya kɔntina yango mpo eleka tii na katikati ya ekólo yango, etutaka bangomba yango mpe mbula ebɛtaka mingi na pembenipembeni ya bokula ya mai monene oyo ezali molai kasi monene te. Soki Australie ezali kɔntina oyo ezali na mai mingi te koleka bakɔntina mosusu nyonso ezali mpo na bantina oyo: kɔntina yango ezali na bangomba mingi te, ezalaka na molunge makasi, mpe bangomba na yango ezali mpenza na esika ya malamu te.

Na kati ya mabele ezali maimai

Bitando ya mineneminene 19 ya mai ebombami na kati ya mabele yango ya Australie oyo na likoló ekauká. Etando oyo eleki monene, oyo babengaka grand bassin artésien, ezwi mwa ndambo monene ya kɔntina yango (1/5). Ezali na bonene ya kilomɛtrɛ karɛ milio 1,7 (1 700 000) mpe ebandi na Cap York na nɔrdi tii na Laki Eyre na sudi ya Australie. Ezali na mai mingi mpenza (8 700 milliards de mètres cubes d’eau), oyo ekoki kotondisa Laki Michigan mpe Laki Huron oyo ezalaka na Amerika ya Nɔrdi.

Kasi, na bokeseni na mai ya balaki ya minene oyo babengaka Grands Lacs na Amerika ya Nɔrdi, ezali mpasi mpo na kozwa mai ya grand bassin artésien. Mai ekɔtaka na kati ya etando yango ntango mai ya mbula ekitaka mokemoke na kati ya mabele mpe na zɛlo ya mwa mineneminene tii ntango ekotondisa yango. Mokolo na mokolo, litrɛ milio 300 ya mai ekɔtaka ndenge wana na esika yango. Mai nyonso wana ekendaka wapi?

Ebele ya zelo ezali komela mai

Etando yango ya mai oyo babengaka grand bassin artésien ezali na ebele ya zelo oyo emelaka mai, kasi esika yango ezali mpenza monene. Mabanga ya zɛlozɛlo oyo ezali monene longwa na likoló kino na nse ebandi na mɛtrɛ 100 tii pene na kilomɛtrɛ misato, ezalaka katikati ya mabanga oyo elekisaka mai te. Mabanga yango ya zɛlozɛlo etɛngamá na ngámbo ya wɛsti, mpe ndelo na yango eleká pembenipembeni ya bangomba oyo babengi Cordillère australienne na ngámbo ya ɛsti. Mai ya mbula oyo etiyolaka pembenipembeni ya ndelo yango ekɔtaka mokemoke na ngámbo ya wɛsti; mpe esalaka kaka ntaka ya mɛtrɛ mitano na mbula.

Soki batimoli libulu na nse ya bangomba tii na mabanga oyo elekisaka mai te mpe na esika ya zɛlo ya mwa mineneminene, mai ekobanda kobima. Lokola mai ebimaka makasi mpenza, yango wana babengaka libulu wana ya mai puits artésien, ebengeli yango euti na nkombo Artois, etúká moko ya kala ya France, epai batimolaki libulu ya mai ya liboso ya ndenge wana. Ntango bayaki komona eloko ya motuya ya ndenge wana na Australie, bato batimolaki bankóto ya mabulu ya mai na bisika wana ya kalakala ya mai oyo ezali na kati ya mabele.

Mai yango ezali kosila mokemoke

Pene na nsuka ya bambula ya 1800, lokola bato oyo bautaki na mikili ya Mpoto mpe bakendeki kofanda kuna bazalaki na mposa makasi ya kosala bilanga mpe misala mosusu na bisika yango ya bitando mineneminene ya Queensland mpe ya Nouvelle-Galles du sud, batokaki mai yango na lokoso mpenza mpo bakanisaki ete ekokauka te. Na 1915, na nzela ya mabulu yango soki 1 500, mokolo na mokolo, batokaki na grand bassin artésien litrɛ miliare 2 ya mai (oyo ekokani na mai ya bapisini soki 1 000 oyo basalelaka na ba jeux olympiques). Momeseno wana, oyo esilisaka mai ya esika yango nokinoki koleka ndenge oyo mai ezalaki kokɔta na etando yango, ekaukisaki mabulu mingi.

Lelo oyo, kati na mabulu ya mai 4 700 oyo batimolaki, kaka 3 000 nde ezali naino kobimisa mai. Bazali mpe kotoka mai na etando yango na lolenge mosusu ya mabulu 20 000. Mpo na yango, bazali kosalela ba moulin à vent oyo, mpo na moto oyo azali na kati ya mpɛpɔ, ezali kokómisa bisika yango kitoko mpenza. Bakonzi ya Leta bazali kobanga, yango wana bazali kosala milende mpo na kobatela mai yango, mpamba te mai mingi (95 %) oyo bazali kotoka na grand bassin artésien ezali kosalelama te, mpamba te ezali kokauka na molunge.

Emonani polele ete esengeli kobatela mai yango, mpamba te ezali na mai mosusu te kaka mai wana ya kati ya mabele nde bato mingi (60 %) ya Australie batyelaka motema. Bingumba mpe bakompanyi mingi oyo ezali na katikati ya ekólo yango ezali na mai mosusu te, kaka oyo wana. Mai yango ezalaka ndenge nini na monɔkɔ? Jason, ye akoli na etúká ya Queensland, na ferme moko oyo esalelaka mai ya bassin artésien, alobi ete: “Mai yango ezalaka mwa mungwamungwa, ngai nasepelaka na mai ya mbula soki ezali; kasi bibwele nde elingaka mai yango mingi.” Soki mai yango ezalaka mungwamungwa na monɔkɔ ezali mpo, na ntango mai elekaka na mabanga, biloko oyo babengi minéraux esanganaka na mai yango mpe ekómisaka mai mungwamungwa. Na nsukansuka ya etando yango, mai ezalaka mingimingi pɛto, kasi na katikati na yango mai ezalaka ntango mosusu mungwa makasi, mpe bibwele kaka nde ekoki komɛla yango. Mai oyo batoki yango te na etando yango elandaka kotiyola epai ya wɛsti tii na bamboka ya katikati ya Australie esika mabele ekauká.

Ezali monene kasi eumelaka kobeba te

Wana mpɛpɔ na biso ezali kolanda mobembo na yango epai moi elalaka, na nse tozali komona na mosika mwa bitima mikemike ya mai oyo ezali kongɛnga mpe ezali komonana lokola matɔnɔ oyo epanzanipanzani na kati ya esobe ya zɛlozɛlo. Mai ya mbula etiyolaka na ntaka ya bankóto ya bakilomɛtrɛ na kati ya mabele, mpe esɛngaka bankóto ya bambula mpo ete nsukansuka mai wana ekóma na ndelo ya sudi-wɛsti ya grand bassin artésien; soki ekómi kuna emataka na likoló na etando ya mabele. Yango nde ebimisi maziba ya mai, maziba oyo tozali komona na nse na biso. Na molunge makasi, maziba yango ekaukaka mpe kaka ba minéraux nde etikalaka mpe na nsima esanganaka na zɛlo oyo mopɛpɛ ememaka. Yango nde esalaka ete bisika yango ya maziba etombwanaka mokemoke mpe ekoka komonana malamu na miso ya moto oyo azali kotala na mosika.

Bato bazali kobebisa ata mwa maziba yango ya mai oyo milona ebimaka pembenipembeni na yango mpe oyo bandɛkɛ bayaka komɛla. Buku moko (Découvrir l’Australie) elobi ete: “Lokola bakómaki kobɔkɔla ngɔmbɛ, nsimbiliki, na bisika oyo maziba yango ezali, mpe lokola na mikolo oyo euti koleka baturiste bakómi kokenda kuna mingi, nyonso wana esali ete maziba yango, oyo eumelaka kobeba te, ebeba. . . . Mbala mosusu likambo oyo ezali kobebisa yango mingi koleka ezali oyo: ebele ya mai oyo bazali kotoka na mabulu mpo na komɛlisa bibwele ezali kosala ete mai ebanda kosila na maziba ebele; maziba mosusu kutu ekómi mpenza kokauka.”

Etando yango ya mai ya kati ya mabele ezali monene kasi ezali koumela te na kobeba​—atako ezali monene kasi makambo oyo bato bazali kosala ezali kobebisa yango. Biloko nyonso ya ntina mingi oyo ezali na mokili esengeli kosalelama na mayele mpo ete ekoka kobatelama; yango ezali se ndenge moko na grand bassin artésien, oyo ezali lokola ebongiseli moko monene mpenza ya batiyo ya mai oyo ezali na kati ya mabele.

[Karte na lokasa 19]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

ETANDO YA MAI

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.

[Elilingi na lokasa 19]

Elembo ya bamboka oyo ezalaka mosika na bingumba ya Australie, ‘Moulin à vent’ ezali kosala ete bato mpe banyama bázala na esobe ya Australie

[Elilingi na lokasa 20]

Lokola bato oyo bafandi na baferme ya mosika, baoyo bafandi na bisika mingi (60 %) ya Australie basalelaka kaka mai ya kati ya mabele

[Elilingi na lokasa 20]

Banda bankóto ya bambula, maziba ya mai oyo esalemá na bato te ebimisaka mai oyo ezalaka lokola nde ezali kotɔka

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya National Parks and Wildlife South Australia

[Elilingi na lokasa 20]

Laki oyo ezali na mai ya mungwamungwa, na ndelo ya sudi-wɛsti ya ‘grand bassin artésien’

[Elilingi na lokasa 20]

Mabondo ya ‘minéraux’ oyo esali ngomba ya mɛtrɛ 15 pembenipembeni ya maziba

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya National Parks and Wildlife South Australia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto