Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Avril nk. 26-27
  • Fɛti ya Bonane ezali mpe mpo na baklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Fɛti ya Bonane ezali mpe mpo na baklisto?
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo ezalaki kosalema kala
  • Ndenge Biblia etalelaka likambo yango
  • Feti ya Bonane—Ezali mpo na bakristo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Bafɛti
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mobu 2000—Ekokesena mpenza na bambula mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bafɛti oyo esepelisaka Nzambe te
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Avril nk. 26-27

Engebene Biblia

Fɛti ya Bonane ezali mpe mpo na baklisto?

FERNANDO, ye azali monganga na ekólo Brésil, alobi ete: “Na nsima ya midi ya mokolo ya nsuka ya mbula, liboso fɛti ya Bonane ebanda na butu, kimya ezalaka mpenza koleka mikolo mosusu nyonso. Kasi soki ekómi ngonga ya 11 ya butu, babandaka koya, elingi koloba ebele ya bato oyo bazoki na bambeli to na masasi, bilenge oyo bazwi makama na mituka, mpe basi oyo babɛti bango. Nyonso wana eutaka mingimingi na masanga.”

Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki zulunalo moko ya Brésil elobelaki mokolo ya Bonane lokola mokolo oyo, na mokili mobimba, minɔkɔ ya bato ekaukaka mpe mitó ekómaka kilo nsima ya kolangwa masanga na butu. Zulunalo moko ya Leta na Mpoto elobi ete: “Bonane ezali mpo na bato oyo balingá bisengo ya mokili.” Ebakisi ete ezali “likambo oyo ezongaka mbala na mbala na etumba ya seko oyo moto abundaka na masanga.”

Ya solo, tokoki koloba te ete bato nyonso nde basalaka fɛti ya Bonane na kolangwa masanga mpe na mobulu. Kutu, bato mingi bazalaka na basuvenire ya malamu ya mokolo yango. Fernando, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, alobi boye: “Ntango tozalaki bana mike, tozalaki kozela na motema likoló fɛti ya Bonane. Masano, bilei mpe bimeli ezalaki mingi. Na midi ya butu, tozalaki koyambana, kopesana babizi, mpe kolobana: ‘Bonane!’”

Ndenge moko mpe, bato mingi lelo oyo bamonaka ete bango basalaka fɛti ya Bonane kozanga kolekisa ndelo. Kasi, ezali malamu baklisto bátalela esika fɛti yango euti mpe ntina ya fɛti yango oyo bato mingi basalaka. Fɛti ya Bonane eyokani te na mateya ya Biblia?

Oyo ezalaki kosalema kala

Fɛti ya Bonane ebandi lelo te. Makomi ya kala emonisi ete fɛti yango ezalaki kosalema na Babilone mbula nkóto misato liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Fɛti yango ezalaki kosalema na katikati ya sanza ya Marsi, mpe ezalaki na ntina mingi. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Na ntango wana, nzambe Mardouk azalaki kokata ndenge ekólo ekozala na boumeli ya mobu ya sika.” Bato ya Babilone bazalaki kosala fɛti na bango ya Bonane na boumeli ya mikolo 11 mpe na ntango ya fɛti yango bazalaki kopesa bambeka, kotambolatambola na milɔngɔ mpe kosala milulu ya makambo ya kobota.

Na boumeli ya mwa ntango, mpo na bato ya Rome mpe, ebandeli ya mobu ezalaki na sanza ya Marsi. Kasi na mobu 46 L.T.B., Ampɛrɛrɛ Jules César abimisaki mobeko oyo emonisaki ete mobu esengeli kobandaka na mokolo ya yambo ya sanza ya Yanuali. Mokolo yango ezalaki mokolo oyo basilaki kokómisa yango mokolo ya Janus, nzambe oyo atalelaka ebandeli ya makambo nyonso, mpe sikoyo bakómisaki yango mpe mokolo ya yambo ya mbula ya bato ya Rome. Dati ebongwanaki, kasi fɛti ezalaki kaka ya loyenge. Buku moko (Cyclopedia) oyo McClintock na Strong bakomaki, elobi ete na mokolo ya yambo ya sanza ya Yanuali, bato “bazalaki kolekisa ndelo na ndenge ya nsɔmɔ mpe bazalaki komipesa na biyambayamba ndenge na ndenge ya bapakano.”

Ata mpe lelo oyo, biyambayamba emonanaka mingi na ntango ya bafɛti ya Bonane. Na ndakisa, na bipai mosusu ya Amerika ya Sudi, bato mingi batɛlɛmaka na lokolo ya mobali kaka, mpo na kokɔta na mbula ya sika. Bamosusu babɛtaka pipipi na motuka mpe babɛtaka bakano ya masano. Momeseno moko ya bato ya ekólo Tchèque esɛngaka kolya madesu moko ya mikemike na fɛti oyo esalemaka na butu ya Bonane, nzokande bonkɔkɔ ya bato ya ekólo ya Slovaquie esɛngaka ete na fɛti yango bato bátyaka mbongo to mposo ya mbisi na nse ya elamba ya mesa. Mimeseno ya ndenge wana, oyo bato bakanisaka ete ebenganaka botutu mpe efungolaka nzela ya kokóma na bozwi, ezali nde kolandana ya bindimeli ya bato ya kala oyo bazalaki kokanisa ete ebandeli ya mobu ezali ntango oyo ekataka ndenge bomoi ya moto na moto ekozala.

Ndenge Biblia etalelaka likambo yango

Biblia ezali kosɛnga na baklisto ete ‘bátambola na ndenge ya lokumu, na bafɛti ya lokoso te mpe na kolangwa masanga te.’a (Baloma 13:12-14, NW; Bagalatia 5:19-21; 1 Petelo 4:3) Mbala mingi, na bafɛti ya Bonane, bato balekisaka ndelo na makambo mingi, nzokande Biblia ezali kopekisa mpenza ezaleli motindo wana; yango wana, baklisto basalaka bafɛti yango te. Yango elingi koloba te ete baklisto babebisaka esengo ya bato mosusu. Kasi bayebi ete mbala na mbala Biblia ezali koyebisa basambeli ya Nzambe ya solo ete bázalaka ntango nyonso na esengo. (Deteronome 26:10, 11; Nzembo 32:11; Masese 5:15-19; Mosakoli 3:22; 11:9) Biblia mpe endimi ete mbala mingi na ntango ya fɛti, bilei mpe masanga ezangaka te.​—Nzembo 104:15; Mosakoli 9:7a.

Kasi lokola tomoni yango, bafɛti ya Bonane euti na mimeseno ya bapakano. Lokola losambo ya lokuta ezali mbindo mpe bosɔtɔ na miso ya Yehova, baklisto baboyaka misala oyo euti na losambo ya ndenge wana. (Deteronome 18:9-12; Ezekiele 22:3, 4) Ntoma Paulo akomaki ete: “Boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe botyoli-mibeko? To bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili? Lisusu, boyokani nini ezali na kati ya Klisto mpe Beliela?” Yango wana, Paulo abakisaki ete: “Bótika kosimba eloko ya mbindo.”​—2 Bakolinti 6:14-17a, NW.

Baklisto bayebi mpe ete kosala milulu ya biyambayamba epesaka esengo te mpe epesaka bozwi te mpamba te kosala bafɛti ya ndenge wana ekoki kosala ete Nzambe asepela na bango lisusu te. (Mosakoli 9:11; Yisaya 65:11, 12) Lisusu, Biblia ezali kolendisa baklisto bázalaka na bokatikati mpe na komipekisa na etamboli na bango. (1 Timote 3:2, 11) Ezali mpenza polele ete ezali malamu te ete moto oyo alobaka ete alandaka mateya ya Klisto asangana na fɛti oyo bato bazali kolekisa ndelo na makambo nyonso.

Ata soki fɛti yango ya Bonane ekoki komonana kitoko ndenge nini, Biblia ezali koyebisa biso ete ‘tótika kosimba eloko ya mbindo’ mpe “tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.” Mpo na baoyo nyonso bazali kotosa etinda yango, Yehova apesi elaka ya kolendisa ete: “Ngai nakoyamba bino. . . . Nakozala tata na bino, mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi.” (2 Bakolinti 6:17b–7:1, NW) Ya solo mpenza, azali kolaka mapamboli mpe bozwi ya seko mpo na baoyo bazali sembo epai na ye.​—Nzembo 37:18, 28; Emoniseli 21:3, 4, 7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Bafɛti ya lokoso mpe kolangwa masanga” oyo Paulo alobeli, mbala mosusu etalelaki mpe “bafɛti ya lokoso mpe kolangwa masanga” oyo ezalaki kosalema na ntango ya bafɛti ya Bonane, mpamba te na ekeke ya liboso bato mingi ya Rome bazalaki kosala bafɛti yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto