Makambo mazali koleka na mokili
Babebisi oyo bauti epai mosusu
Zulunalo International Herald Tribune elobi ete: “Babebisi ‘oyo bauti epai mosusu’ bazali kobebisa nkita ya mokili mobimba bamiliare na bamiliare ya badolare mbula na mbula, bazali kopesa maladi mpe kobebisa ebele ya banzete mpe banyama.” Ebele ya banzete mpe banyama oyo ezalaki likama te na esika oyo yango ezalaka, ezali komemama na mikili mosusu, ntango mosusu kozanga koyeba to te. Na ndakisa, nyoka moko ya Australie mpe Indonésie, oyo efandaka na likoló ya banzete, esilisi bandɛkɛ ya zamba na esanga ya Guam mpe ekómi tii na bisanga mosusu ya Pacifique; mbala mosusu ebombanaka na bisika oyo bapinɛ ya mpɛpɔ ekɔtaka soki mpɛpɔ emati. Matiti mosusu ya mai (caulerpe) mpe kongo-ya-sika (jacinthe d’eau) oyo euti na Amerika ya Sudi mpe bakɔtisá yango na mikili mosusu ezali koboma mbisi mpe banyama mosusu ya mai na bisika mingi oyo bakɔtisi yango. Matiti oyo bautaki na yango na États-Unis mpo bálona yango na mabándá ya masano ya golf na Chine ezali sikoyo kotondana bisika nyonso. Epai mosusu, nyamankɛkɛ mosusu oyo ezalaka na Chine (longicornes) bamemaki yango na kati ya mabaya ya ba palettes, ezali kobebisa bazamba ya Amerika ya Nɔrdi. Banzete mosusu mpe banyama mosusu ezali mpe kobebisa; kati na yango tokoki kotánga nyama lokola mangouste grise oyo ezalaka na ekólo Inde, mwa nyama ya mai oyo babengaka moule zébrée, nzete oyo babengaka Miconia calvescens, mbisi oyo babengaka perche du Nil, esende ya motane ya Amerika ya Nɔrdi, mbisi oyo babengaka silure marcheur, mbembe oyo babengaka Euglandina rosea oyo elyaka misuni, mpe nsɛlɛlɛ oyo babengaka Paratrechina longicornis.
Baprodwi ya kopakola mpo na bana
Zulunalo The Japan Times elobi ete, na Japon, bakompanyi oyo esalaka baprodwi ya kopakola ebimisi ebele ya baprodwi ya kopakola na elongi kaka mpo na bana. Lokola bato mingi na Japon bamipesi na baprodwi ya kopakola mpo na kokóma kitoko, bilenge basi, bakisa mpe oyo bazali na mbula kobanda 9 tii 12, bazali kokenda ebele na bamagazini mpo na kosomba biloko ya monzɛlɛ lokola brillant à lèvres mpe mascara transparent mpo na kolanda lokolo ya bavedɛti na bango ya miziki oyo balingaka mingi. Kala, bana basi ya mike bazalaki kotya rouge à lèvres kaka mpo na kosakana. Kasi sikoyo, bana basi mingi bazali kozwa lisusu likambo yango ya kobongisa elongi na bango na baprodwi na lisɛki te; balingi koyeba ndenge ya kosala yango malamu, ezala mpo na komonisa malamumalamu bisika mosusu ya bilongi na bango oyo ezali kitoko to kobomba bisika ya mabe. Mwasi moko oyo azali nkolo ya zulunalo moko mpo na bana alobaki boye: “Bato oyo bamimonaka ete bazali nsima ya bamosusu bakómi mingi. Bana ya lelo bazali koyeba bambeba ya nzoto na bango noki koleka bana ya kala.” Kasi, kompanyi moko oyo esalaka mpe baprodwi ya kopakola eboyi kosala lokola bakompanyi mosusu; bakonzi na yango balobi boye: “Na mimeseno ya bato ya Japon, bana basi ya eteyelo ya ebandeli mpe ya ntei basalelaka baprodwi ya kopakola te. Mpo na kobatela bizaleli malamu, biso tokosala baprodwi ya kopakola te (mpo na bango).”
“Maladi oyo mwana moke azwaka soki baningisiningisi ye”
Zulunalo El Universal ya Mexico elobi ete kosimba mwana moke na mabɔkɔ, na makolo, to na mapeka mpe koningisa ye, ekoki kobɛlisa ye makasi. “Minganga mosusu balobi ete bato mingi, oyo bazalaka na mikakatano ya koyekola makambo, bazali nde kobɛla maladi oyo bazwaki ntango bazalaki naino bana mike mpenza mpo bazalaki koningisaningisa bango.” Juan José Ramos Suárez, monganga oyo asalisaka bana mike, alobi ete: “Koningisaningisa mwana moke ndenge wana, atako na libándá eloko moko te ekoki komonisa ete mwana azoki, kasi na kati ekoki kozokisa bɔɔngɔ na ye mpe kobimisa makila na misisa oyo ezalaka na kati ya bɔɔngɔ.” Abakisi ete koningisaningisa mwana ekoki mpe koboma ye matoi na miso, kozokisa ye mikuwa ya mokɔngɔ, kokómisa ye paralize, kosala ete mbala na mbala misisa ya nzoto na ye ebendanakabendanaka, ata mpe koboma ye. Nyonso wana ezali mpo ete motó ya mwana moke ezalaka mwa kilo; kasi misisa ya nkingo na ye ezalaka makasi mingi te mpe ekokaka te komema kilo nyonso ntango bazali koningisaningisa ye. Ya solo, kolela ya mwana moke ekoki kopesa nkanda. Kasi mpo na kosalisa bato oyo babatelaka bana mike, zulunalo yango epesi bango “toli misato ya pɛtɛɛ mpe esɛngaka kaka mwa miniti soki moko mpamba mpo na kosalela yango: (1) tɛlɛmá, (2) fandá mpe (3) pemá. Na esika osilikela mwana, kangá motema.” Na nsima, silisá likambo oyo ezali kolelisa mwana—mbala mosusu soki oleisi ye to olatisi ye bilamba mosusu—to salá eloko moko oyo ekofandisa ye nyɛɛ mpe ekosepelisa ye.
Ba gondole ekómi kobunga?
Zulunalo Independent ya Londres elobi ete: “Na engumba Venise, mosala ya kosala bwato oyo babengaka gondole ekómi kosila mokemoke. Ba gondole ya mikolo ezali koya ekosalema ntango mosusu na bato oyo bayebi mpenza malamu te mosala yango, baoyo bakolanda te mimeseno, biloko ya mosala mpe mayele ya mosala oyo emonisaka lisolo ya moko ya bingumba oyo eleki kitoko na mokili mobimba.” Soki eloko moko esalemi te, mosala ya kosala babwato yango oyo eyebani mingi, oyo ebandaki soki na ekeke ya 11, ekobunga “mpamba te batata bazali kolakisa bana na bango mosala yango lisusu te mpe baoyo bayebi yango malamu bazali kolakisa yango lisusu te na bato oyo bazali koyekola yango epai na bango; nzokande, na ntango ya kala ezalaki bongo te.” Likambo yango ekómi bongo mpo bato oyo basalaka mosala yango basɛngaka báfuta bango mbongo mingi, mpe bilenge ya engumba Venise bazali lisusu kosepela te kolekisa mbula ntuku mibale oyo mosala yango esɛngaka mpo na koyekola yango malamu. Yango wana, emonani ete soki mwa ndambo ya bato oyo lelo bayebi mosala yango malamumalamu bakómi na mbula ya kozwa epaso, moto moko te akokitana bango. Esɛngaka ngonga 500 mpo na kosala gondole moko; bwato yango ekesani na babwato mosusu, mpamba te mopanzi na yango ya lobɔkɔ ya mwasi ezalaka monene koleka oyo ya lobɔkɔ ya mobali, kasi kilo ya moto oyo azali kolúka na yango mpe nkai na ye nde esalaka ete bwato yango etɛngama na mopanzi moko te. Lolenge wana ya kosala bwato yango nde esalisaka moto oyo azali kolúka na yango akoka kotambwisa yango malamu na mwa banzela ya mai ya mikemike mpenza oyo ezali na kati ya engumba Venise.
Miyibi oyo bakɔtelaka masuwa minene ya mbu bakómi mingi
Zulunalo Valeurs Actuelles ya France elobi ete: “Moyibi ya kokɔtela bamasuwa minene mpo na koyiba biloko ekómi makasi koleka.” Na boumeli ya mbula mibale oyo euti koleka, miyibi yango bakómi kokɔtela bamasuwa mbala mibale koleka ndenge ezalaki na bambula eleká. Likambo yango ekómi kosalema mingi mpenza na Azia ya Sudi-Ɛsti, epai kokweya ya nkita esali ete baoyo bazali mpenza babola bámipesa na moyibi. Kasi, moyibi ya biloko na bamasuwa ezali mpe kokóma makasi na bokula ya mikili ya Afrika mpe ya Amerika ya Sudi. Edouard Berlhet, momonisi ya ebongiseli moko oyo esangisi bakóló-masuwa ya France (Comité central des armateurs de France) alobi ete: “Na 1998, biloko oyo bayibaki ezalaki na motuya ya dolare miliare 16. Bamasuwa mosusu bayibaka yango na biloko nyonso mpe elimwaka libela. Miyibi bakimaka na bamasuwa yango, mpe bakómisaka yango ndenge mosusu. Na nsima, bamasuwa yango emonanaka lisusu na mabongo oyo eyebaná ete miyibi yango nde basalelaka yango, mpe bakomisaka nkombo ya bamasuwa yango na bikólo oyo ezalaka mpenza na mibeko ya makasi te na makambo ya masuwa.” Miyibi yango basalelaka babwato ya motɛrɛ ya mbangu mingi (vedettes rapides) mpe batelefone oyo ezali kobima mikolo oyo, bazalaka na mindoki ya makasimakasi mpe bazali kaka kokóma mabe koleka.
Bilenge oyo bamɛlaka masanga
Zulunalo Süddeutsche Zeitung ya Allemagne elobi ete: “Na Mpoto, bilenge bazali kolangwa masanga ntango bazali naino bana mike mpe bazali kolangwa mbala na mbala.” Eleki mikolo mingi te, bayebisaki likambo yango ya mawa epai ya baministre ya Union européenne oyo batalelaka makambo ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Likambo yango ezali mpenza monene? Na ndakisa, na 1998, ankɛtɛ moko emonisaki ete na mikili mosusu, soki ozwi bana mibali 100 oyo bazali na mbula 15, kobanda 40 kino 50 kati na bango bamɛlaka masanga mbala na mbala; nzokande, na Angleterre, na Écosse mpe na Pays de Galles, bana basi kaka ya mbula wana bamɛlaka vinyo mpe masanga makasi koleka bana mibali. Na Danemark, na Finlande mpe na Grande-Bretagne, ebele ya bana ya mbula 15 balangwaki masanga mbala mingi. Mbula na mbula, masanga makasi ezali kobomisa bankóto ya bilenge ya mbula 15 tii 29 na mikili nyonso ya Union européenne. Lisangani ya baministre esɛngaki básala kampanye moko ya koteya bilenge mpo na komonisa bango mabe ya masanga.
Ezali solo ete liwa ya bato oyo bazali kokufa mpo na likaya ezali nde komatisa nkita ya ekólo?
Zulunalo The Wall Street Journal elobi ete: “Bamonisi ya bakompanyi Philip Morris na République tchèque babimisaki lapolo moko oyo etalelaki makambo ya nkita; lapolo yango esukisaki na komonisa ete . . . lokola bamɛli-makaya bazali kokufa mobesu, yango ezali kosalisa mpo na kobomba mbongo oyo esengelaki kobima mpo na kosalisa bango epai ya minganga. Lapolo yango, oyo esɛngamaki na kompanyi yango oyo esalaka makaya . . . , esangisi ‘matomba’ nyonso oyo momeseno ya komɛla likaya epesi na nkita ya ekólo, bakisa mpe mbongo oyo eutaka na mpako ndenge na ndenge oyo Leta azwaka likoló ya makaya na ‘mbongo oyo [Leta] azali kotikala na yango mpo bamɛli-makaya bazali kokufa mobesu, nzokande akokaki kobimisa yango mpo na kopesa bango lisalisi ya monganga soki báumelaka lisusu na bomoi.’” Lisolo ya zulunalo yango ebakisi ete: “Nsima ya kotalela mbongo oyo Leta abimisaki mpe oyo akɔtisaki, lapolo yango esukisi na komonisa ete na 1999, Leta azwaki matabisi ya couronne miliare 5,82 to dolare milio 147,1; nyonso wana kaka mpo bato bazali komɛla makaya.” Eumelaki te, lapolo yango ebimisaki ntembe makasi. Mopanzi-nsango moko akomaki ete: “Kala, bakompanyi ya makaya ezalaki kondima te ete makaya ebomaka. Lelo oyo, ezali komikumisa mpo na yango.” Kenneth Warner, moto ya mayele na makambo ya nkita, alobaki ete: “Kompanyi nini ekoki komikumisa ete ezali kotondisa kɛsi ya Leta na mbongo oyo ezali kozwa mpo ezali koboma bakiliya na yango? Nakanisi ete ata moko ezali te.” Na pɔsɔ oyo elandaki, kompanyi Philip Morris esɛngaki bolimbisi. Steven Parrish, prezida-molandi ya kompanyi yango, alobaki ete: “Tomoni ete oyo tosali ezalaki kaka libunga monene te, kasi ezali mpe mabe. Soki tolobi ete ebongi mpenza te, ezali kaka lolenge mosusu ya kolɛmbisa libunga yango.”
Ndenge ya kosalisa bana bámipesa te na bolingo ya biloko ya mosuni
Zulunalo Globe and Mail ya Canada elobi ete bana bazali nde “bakiliya oyo batɛki balukaka mingi mpenza,” mpamba te ata mpe bana mike bakómi “na ezaleli ya bisombasomba mpe eloko moko te elongi kosilisa ezaleli yango.” Kasi, etuluku moko ya baprofɛsɛrɛ ya mosala ya monganga na Iniversite ya Stanford bamoni ete bazwi nzela ya kosilisa ezaleli yango: basalaki programɛ moko mpo na koteya bana na boumeli ya sanza motoba, mpo bátalaka lisusu televizyo mingi te mpe báyeba malamu kopona makambo oyo batalaka na televizyo. Liboso ete bákanga bakelasi na nsuka ya mbula, bana oyo balandaki programɛ yango bazalaki lisusu mpenza te kosɛnga baboti na bango básombela bango biloko ya sika ya kosakana na yango. Zulunalo Globe elobi ete, “mwana moko amonaka na televizyo soki piblisite 40 000 na mbula, nzokande na bambula ya 1970 ezalaki 20 000.”