Nkombo ya nzambe ebongolá bomoi na ngai!
LISOLO YA SANDY YAZZIE TSOSIE
NGAI na baleki na ngai ya basi tozalaki kosala lisano ya kukulu na nse ya mbeto ntango bato ya Lingomba ya Mormon babɛtaki na porte na biso.a Nayaki kofungola bango porte; nakatelaki bango mangala, nayebisaki bango ete biso tozali Banavaho ya solosolo mpe tolingi bálobela biso makambo ata ya lingomba moko te ya mindele.
Baboti na biso bakendeki kosomba biloko. Basengelaki kozonga soki moi elali. Ntango bazongaki, bayebisaki bango ete nalobelaki bato ya Lingomba ya Mormon na limemya te. Bapesaki ngai toli ete nazongela lisusu te likambo ya kozanga limemya. Bateyaki biso ete tózalaka na limemya mpe na boboto epai ya bato. Nazali koyeba lisusu mokolo oyo mopaya moko ayaki na mbalakaka epai na biso. Baboti na ngai bazalaki kolamba na libándá. Babengaki mopaya yango alya liboso, mpe biso tolyaki na nsima.
Na mboka oyo batikelá Banavaho
Tozalaki kofanda na Howell Mesa, na etúká ya Arizona; mboka yango ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 15 na nɔrdi-wɛsti ya mabele oyo Leta ya États-Unis epesá Ba-Indien ya Hopi, tozalaki mosika mpenza na bingumba oyo etondaná na bato. Wana tozalaki na sudi-wɛsti ya États-Unis; kuna, okokuta bisika ya zɛlozɛlo oyo ezali mpenza kitoko mpo na kotala, okokuta mpe mabanga ya motane na bisika mosusu. Okokuta mpe ebele ya bangomba ya milai oyo bansɔngɛ na yango ezali patatalu. Kuna na likoló, tozalaki na likoki ya kokɛngɛla bampate na biso ntango bazalaki kolya matiti na ntaka ya kilomɛtrɛ soki zomi. Ah, mboka na ngai! Nalingaki yango mingi mpo ezalaki kimya.
Ntango nazalaki na eteyelo ya ntei (secondaire), nakómaki kolekisa ntango mingi elongo na bana ya bandeko ya mama; bana yango bazalaki na kati ya ebongiseli babengi American Indian Movement (A.I.M.).b Nazalaki mpenza na lolendo ya kozala mwana-mboka ya solosolo ya Amerika (elingi koloba mwana ya Ba-Indien oyo mindele bakutaká ntango bakɔtaká na Amerika), mpe nazalaki koyebisa mindele makanisi na ngai nyonso mpo na oyo etali bambula ebele ya minyoko oyo nazalaki kokanisa ete eutaki nde na Biro oyo ezalaki kotalela makambo ya Ba-Indien (BIA). Nazalaki komonisa polele te ete nazalaki koyina mindele, lokola bana ya bandeko ya mama bazalaki kosala. Nazalaki kobomba yango na kati ya motema. Mpe yango etindaki ngai nabanda koyina moto nyonso oyo azalaki na Biblia.
Nazalaki kokanisa ete ezali mpo na Biblia nde mindele babɔtɔlaki mabele na biso, bakómisaki biso bato mpamba mpe lisusu bapekisaki biso kosala milulu ya bonkɔkɔ na biso! Kutu, ntango nazalaki na mbola (internat) nazalaki komekola sinyatili ya Tata mpo nasangana te na milulu ya Lingomba ya Protesta mpe na oyo ya Katolike na ntango oyo bazalaki kosɛngisa biso tókɔta na ndako-nzambe. Biteyelo ya ndenge wana ezalaki mpo na komesenisa biso na makambo ya mindele, mpo tóbosana makambo nyonso ya bonkɔkɔ na biso Ba-Indien. Kutu, tozalaki na ndingisa te ya koloba lokota na biso!
Tozalaki kobatela malamu esika na biso ya kofanda na biloko nyonso oyo ezalaki zingazinga na biso. Ntɔngɔ nyonso, tozalaki kotalisa bilongi na biso na ɛsti mpo na kobondela mpe kosopasopa mputulu mosantu ya fololo ya masango mpo na kopesa matɔndi.c Wana ezalaki lolenge oyo bateyaki ngai kosambela na ndenge ya Banavaho, mpe nandimaki yango na motema moko mpe na lolendo mpenza. Nazalaki kosepela te na likanisi ya mangomba ya boklisto ete bato bakokende na likoló; mpe nazalaki kondima te ete lifelo ya mɔ́tɔ, epai bato banyokwamaka seko, ezalaka. Nazalaki nde na mposa ya kofanda kaka na mabele.
Na ntango ya bakonje, nazalaki kosepela kozala na libota na biso, mpo tolinganaki makasi. Mosala na ngai ya mokolo na mokolo ezalaki: kosukola hogan—to ndako na biso ya Banavaho—kosɔna bilamba mpe kobatela bampate. Banda kala biso Banavaho tozalaka babateli ya mpate. Mbala nyonso oyo nazalaki kosukola hogan na biso (talá fɔtɔ na nse), nazalaki komona buku moko moke ya motane; na kati na yango ezalaki na mikanda ya Biblia lokola mokanda ya Nzembo mpe mikanda ebele ya “Boyokani ya Sika.” Nazalaki kotya yango epai na epai, ata mokolo moko te likanisi ya kotala makambo oyo ezalaki na kati to ya koyeba ntina na yango eyelaki ngai. Kasi nabwakaki yango te.
Libala: Mawa ezwi esika ya esengo
Ntango nasilisaki eteyelo ya ntei, mokano na ngai ezalaki nakende koyekola na eteyelo moko ya tekiniki na Albuquerque, oyo ezali na etúká ya Nouveau-Mexique. Kasi liboso nakende, nakutanaki na moto oyo, na nsima, akómaki mobali na ngai. Nazongaki na mabele oyo bapesá Banavaho, oyo tobengaka Rez, mpo na kobalana na ye. Nasalaki yango kaka mpo na kolanda lokolo ya baboti na ngai oyo baumelaki bambula mingi na libala na bango. Nazalaki kolinga mingi kosala misala ya ndako mpe bomoi na kati ya ndako na biso ezalaki kosepelisa ngai, mingimingi ntango Lionel, mwana na biso ya mobali abotamaki. Ngai na mobali na ngai tozalaki na esengo mingi, tii mokolo oyo nayokaki nsango moko oyo esalaki ngai mpasi mingi na motema.
Mobali na ngai azwelaki ngai mbanda! Abebisaki libala na biso na ekobo oyo asalaki. Nazalaki lisusu ngai te mpe nakómaki koyina ye makasi. Ngai mpe nalingaki nazongisela ye mabe oyo asalaki ngai! Kasi ntango tozalaki mbala na mbala kokende kosamba mpo na koboma libala, matata mpe ebimaki mpo na likambo ya koyeba soki nani kati na biso mibale asengeli kotikala na mwana mpe mpo na mbongo oyo mobali na ngai asengeli kopesaka ngai nsanza nyonso; yango wana, nakómaki kaka mawamawa, namimonaki eloko mpamba mpe nayebaki te nasala nini. Nakómaki kopota mbangu bakilomɛtrɛ mingi mpo na kokitisa mawa na ngai. Nazalaki kolela mpambampamba mpe mposa ya kolya esilaki ngai. Namiyokaki lokola nazali bobele ngai moko na mokili.
Mwa moke na nsima, nakómaki makango ya mobali moko oyo, na libala na ye, azalaki mpe na mikakatano ya ndenge moko na oyo ya ngai. Biso mibale tozalaki bato oyo bazokisá bango mitema. Ayebaki komitya na esika na ngai mpe asalisaki ngai mingi nakitisa motema mpamba te nazalaki na mposa na yango makasi. Nazalaki kofungolela ye motema na ngai mpe koyebisa ye makanisi na ngai nyonso oyo nazalaki na yango mpo na bomoi. Namonaki ete azalaki mpenza kotya likebi na makanisi na ngai, mpamba te azalaki kolanda ngai soki nazali koloba. Tobandaki kobongisa makambo mpo tóbalana.
Nsima, nayaki koyeba ete ye mpe azwelaki ngai mbanda! Naboyaki ye atako ezalaki pɛtɛɛ te mpe esalaki ngai mpasi. Namiyokaki lokola moto basundoli mpe nanyokwamaki mingi na makanisi. Nakómaki nkandankanda, mposa kaka nasala moto mabe mpe namiboma. Nalingaki komiboma mbala mibale. Mposa na ngai ezalaki nakufa kaka.
Nabandi koyeba Nzambe moko ya solo
Nazalaki kolela mingi ntango nazalaki kobondela Nzambe moko oyo nayebaki ata te. Atako bongo, nazalaki kondima ete ezali na Moto moko oyo aleki bato nyonso, oyo azalisá molɔ́ngɔ́ oyo ekamwisaka mpenza. Ntango nazalaki kotala kitoko ya balangi oyo ebimaka ntango moi ezali kolala na mpokwa, nazalaki kokamwa mpenza mpe nazalaki kokanisa na mozindo likoló ya bolamu oyo Moto yango azalaki na yango mpo na kopesa biso nzela tósepelisaka mitema na biso ntango tozali kotala biloko ya kokamwisa boye. Nakómaki kolinga moto yango oyo nayebaki ata te. Nabandaki koyebisa ye boye: “Nzambe, soki mpenza ozalaka, salisá ngai, tambwisá ngai, mpe salá ete nazala lisusu na esengo.”
Na ntango wana, bandeko na ngai bazalaki komitungisa mpo na ngai, mingimingi Tata na ngai. Bamemelaki ngai banganga-nkisi mpo bábikisa ngai. Tata alobaki ete nganga-nkisi ya malamu asɛngaka mbongo te mpe asalaka makambo oyo alobaka. Mpo na kosepelisa baboti na ngai, nandimaki mbala mingi kokɔta na milulu ya losambo ya Banavaho, milulu oyo babengaka “nzela ya mapamboli.”
Namikangaki na kati ya hogan ngai moko mikolo ebele, kaka na radio pembeni ya mbeto. Nayokaki mokambi moko ya lingomba ntango azalaki koloba ete nazali moto mabe mpo nandimeli Yesu te na motema na ngai; nayinaki ye mpenza. Lisusu, nayokaki mpenza mabe na motema! Nayinaki mbala moko mangomba ya mindele, na lingomba na ngai moko mpe! Nazwaki ekateli ya koluka Nzambe na ndenge na ngai moko.
Na boumeli ya ntango oyo namikangaki na ndako, namonaki lisusu buku moke wana ya motane. Nayaki komona ete mwa buku yango ezali nde ndambo ya Biblia. Ntango natángaki mokanda ya Nzembo, namonaki bampasi oyo Mokonzi Davidi akutanaki na yango mpe ndenge anyokwamaki na makanisi; yango ebɔndisaki ngai. (Nzembo 38:1-22; 51:1-19) Kasi lolendo na ngai etindaki ngai nalongola noki makanisi na ngai na makambo oyo natángaki. Nakokaki kondima lingomba ya mindele te.
Atako nazalaki konyokwama na makanisi, nazalaki kobatela mwana na ngai malamu mpenza. Ye moto akómaki kolendisa ngai. Nabandaki kolanda na televizyo baemisyo ya losambo oyo ezalaki mpe na mabondeli na kati. Lokola namonaki ete nasuki, nazwaki telefone mpo na kobenga nimero moko mpo na kosɛnga lisalisi. Nakangaki telefone mbangu mpe na nkanda ntango basɛngaki ngai nandima ete nakotinda dolare 50 to 100!
Kokende kosamba mbala na mbala mpo na koboma libala na biso enyokolaki ngai mingi na makanisi, mingimingi ntango nazalaki komona ndenge mobali na ngai azali kokosa zuzi ya mboka. Lokola tozalaki kowelana mpo na koyeba nani na kati ya ngai na mobali na ngai akotikala na mwana na biso, yango esalaki ete ntango mingi eleka liboso ete nsukansuka zuzi akata likambo ya koboma libala na biso. Kasi nalongaki. Tata na ngai, ata azalaki koloba eloko moko te, asalisaki ngai mingi ntango nyonso oyo tozalaki kokende kosamba. Amonaki ete nazalaki mpenza na mpasi na motema.
Nakutani na Batatoli mpo na mbala ya liboso
Nazwaki ekateli ya kokanisa lisusu te makambo oyo ekoki koya nsima. Mokolo moko, namonaki libota moko ya Banavaho bazali kosolola na bato ya kartye na biso. Nalingaki ata kotala bango te, kasi nakokaki te. Bapaya yango bazalaki kokende ndako na ndako kosala mosala moko boye. Bayaki mpe na ndako na ngai. Sandra, oyo azalaki Navaho, alobaki na ngai ete azali Motatoli ya Yehova. Likambo oyo ebendaki mpenza likebi na ngai koleka makambo nyonso ezali nkombo Yehova. Natunaki: “Yehova nde nani? Bozali lingomba ya sika. Mpo na nini na ndako ya Nzambe bateyaki ngai te nkombo ya Nzambe?”
Na boboto mpenza, afungolaki Biblia na ye na Nzembo 83:18 (NW) oyo elobi: “Mpo bato báyeba ete yo, oyo nkombo na yo Yehova, yo moko ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” Alimbolaki ete Nzambe azalaka na nkombo na ye moko mpe Yesu Klisto, Mwana na ye, azalaki motatoli na ye. Asɛngaki ngai ete ateyaka ngai makambo etali Yesu na Yehova mpe atikelaki ngai buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.d Na mposa nyonso, nalobaki ete: “Ɛɛ. Nakosepela komeka lingomba oyo ya sika!”
Nasilisaki kotánga buku yango na butu moko. Ezalaki mpenza mbala ya liboso natánga makambo oyo ekomamaki na buku yango mpe ekeseneki na makambo mosusu natángá. Buku yango emonisaki ete soki bato bazali na bomoi ezali na ntina, esengelaki mpenza nayeba likambo yango mpo nabanda kosepela lisusu na bomoi. Nabandaki koyekola Biblia mpe nayokaki esengo mingi ntango nazwaki biyano euti na Biblia na mituna na ngai. Nazalaki kondima nyonso nazalaki koyekola. Lokola makambo yango ezalaki na molɔngɔ, esengelaki mpenza kozala mateya ya solo!
Nabandaki koteya Lionel mateya ya solo ya Biblia ntango azalaki na mbula motoba. Tozalaki kobondela elongo. Tozalaki kolendisana mpo toyebaki ete Yehova azali kobatela biso mpe ete tosengeli kotyela ye motema. Na bantango mosusu, nazalaki lisusu kokoka koyikela mikakatano na ngai mpiko te. Kasi, okomona akoya kozinga ngai na mwa mabɔkɔ na ye mpe akoyebisa ngai maloba ya kokitisa motema mpe ya kobɔndisa, maloba lokola: “Mama, kolela te, Yehova akobatela biso.” Maloba wana ezalaki kosalisa mpe kobɔndisa ngai mingi; epesaki ngai mpe makasi ya kokoba na boyekoli ya Biblia! Ntango nyonso nazalaki kobondela mpo ete Yehova atambwisa ngai.
Lisalisi ya makita ya boklisto
Botɔndi na biso mpo na Yehova ezalaki kotinda biso tósalaka mobembo ya kilomɛtrɛ 240 mpo na kokende mpe kozonga na makita ya Batatoli ya Yehova na Tuba City. Na eleko ya molunge, tozalaki kokende kuna mbala mibale na pɔsɔ; mpe na boumeli ya basanza ya eleko ya mpiɔ, lokola malili ezalaki makasi, tozalaki kokende mpo na mokolo mobimba ya lomingo. Mokolo moko, motuka na biso ekufaki; totɛlɛmisaki mituka oyo ezalaki koleka mpo bámema biso, ezali na ndenge wana nde tokómaki na Ndako ya Bokonzi. Kotambwisa motuka na nzela ya molai bongo ezalaki kolɛmbisa; kasi likambo Lionel alobaká ete tosengeli kozangisa ata likita moko te, kaka soki tokómi pene na liwa, emonisaki ngai mpenza ete tosengeli te kotalela mateya ya elimo oyo eutaka epai ya Yehova lokola eloko mpamba.
Na makita, nazalaki koumela te kotangisa mai ya miso ntango tozalaki koyemba nzembo ya Bokonzi oyo elobelaka bomoi ya seko oyo ezangi mpasi. Batatoli ya Yehova bazalaki kobɔndisa mpe kolendisa ngai. Bazalaki komonisa ete balingaka koyamba bapaya mpenza ntango bazalaki kobengisa biso na bandako na bango mpo na kolya to mpo na komɛla; lisusu, tozalaki koyangana na bango mpo na boyekoli na bango ya Biblia na kati ya libota. Bazalaki komonisa mpenza ete balingi bolamu na biso mpe ntango tozalaki koyebisa bango ata likambo nini, bazalaki koyoka. Mingimingi bankulutu nde bazalaki komitya na esika na biso mpe bayeisaki makasi kondima na biso ete Yehova Nzambe azali kobatela biso. Nazalaki na esengo ya kozwa baninga ya solosolo. Bazalaki kolendisa ngai mpenza mpe bazalaki kutu kolela elongo na ngai ntango nazalaki komona lokola nasuki mpenza.—Matai 11:28-30.
Bikateli mibale ya ntina mingi
Kaka na ntango oyo motema na ngai ekómaki kosepela na bibongiseli ya Yehova nde makango na ngai ya kala azongelaki ngai mpo na kosɛnga bolimbisi. Nazalaki kaka kolinga ye mingi mpe naboyaki te. Tobandaki kobongisa makambo mpo tóbalana. Nazalaki kokanisa ete mateya ya solo ekokoka kobongola motema na ye. Wana ezalaki libunga monene mpenza oyo nasalá na bomoi na ngai! Nazalaki na esengo te. Lisosoli na ngai ezalaki kotungisa ngai mingi. Esalaki ngai mpasi komona ete alingaki mateya ya solo te.
Nayebisaki nkulutu moko likambo yango. Amonisaki ngai makanisi oyo ezali na Makomami mpe abondelaki elongo na ngai mpo ete nazwa ekateli. Namonaki ete ata mokolo moko te Yehova akoki koyokisa ngai mpasi na motema, kasi bato ya kozanga kokoka bakoki kosala yango ata soki olingi bango makasi ndenge nini. Sikoyo nde nayebaki ete kofanda libala ya makango ekoki kobatela moto te. Nazwaki ekateli. Koboya makango na ngai, ezalaki pɛtɛɛ te mpe esalaki ngai mpasi. Nasengelaki kotyela Yehova motema na ngai mobimba atako nayebaki ete nakozala na mikakatano ya mbongo.
Nalingaki Yehova mpe nazwaki ekateli ya kosalela ye. Mokolo ya 19 Mai 1984, nabatisamaki na mai mpo na komonisa komipesa na ngai epai ya Yehova Nzambe. Mwana na ngai Lionel mpe azali Motatoli ya Yehova oyo azwá batisimo. Libota na biso mpe mobali na ngai ya kala banyokolaki biso mingi, kasi tozalaki kaka kotika makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Ye mpe abebisaki ata moke te elikya na biso epai na ye. Kaka nsima ya mbula 11 nde libota na biso batikaki biso nyɛɛ mpe bandimaki nzela ya sika oyo tozwaki.
Nalingaka bango mingi, mpe nazalaka na mposa báyeba Yehova mpo bango mpe bázala na bomoi ya esengo. Tata, oyo akanisaki ete nakobonga lisusu te mpo nazalaki konyokwama na makanisi mpe nazalaki kolinga komiboma, azalaki ntango nyonso kokɔtela ngai na mpiko mpenza. Asepelaki na ndenge nakómaki lisusu na esengo. Namonaki mpenza ete kobondela Yehova, koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, mpe kosalela Liloba ya Nzambe ezali makambo ya ntina mingi soki moto alingi kobika na maladi ya makanisi.
Elikya mpo na mikolo ezali koya
Nazelaka na motema likoló ntango oyo mpasi ya lolenge nyonso, kozanga kokoka, bokosi mpe koyinana ekolongwa nyonso. Namonaka na makanisi eteni ya mabele na biso Banavaho etondi na matiti mpe na banzete lokola pêcher na abricotier oyo ezalaká awa kala. Namonaka na makanisi bato ya bikólo ndenge na ndenge bazali kosala na esengo mpo na kobongola bamboka na bango oyo mabele ekauká ekóma paladiso ya kitoko mpo bibale ezali koleka wana mpe mbula ezali kobɛta. Namonaka na makanisi ekólo na biso na oyo ya Bahopi, oyo bazali pene na biso, bakisa mpe bikólo mosusu ya Ba-Indien, biso nyonso tozali kofanda malamu na eteni moko ya mabele na esika tózalaka banguna ndenge emonanaki na mikolo oyo euti koleka. Sikoyo, nazali komona mpenza ndenge Liloba ya Nzambe esangisaka bato ya mposo nyonso, ya bikólo nyonso mpe ya mabota nyonso. Na mikolo ezali koya, nakomona ndenge lisekwa ekosala ete bato ya libota moko mpe baninga bákutana lisusu na balingami na bango oyo bakufá. Ekozala ntango ya esengo mingi mpe bato bakozwa bomoi ya seko. Nayebi te moto nani akoki kolinga te koyekola makambo ya kitoko boye.
Mosala ya Teokrasi ezali kokende se liboso na mboka ya Banavaho
Ezali esengo mingi komona Ndako ya Bokonzi moko na Tuba City mpe komona masangá minei oyo esalemi na mabele oyo bapesá Banavaho na oyo ya Bahopie: Chinle, Kayenta, Tuba City na Keams Canyon. Na 1983, ntango nabandaki kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mposa na ngai ezalaki ete mokolo moko eteyelo yango etambwisama na lokota ya Navaho. Likambo yango ezali lisusu ndɔtɔ mpamba te. Kobanda 1998, eteyelo etambwisamaka na lokota ya Navaho.
Kolakisa bato mosusu ete Nzambe azalaka na nkombo ya ye moko ememeli ngai mapamboli mingi. Kozala na likoki ya kotánga mpe ya koyebisa bamosusu na monɔkɔ na biso makanisi oyo ekómisaka kondima makasi epesaka nsai ya koloba te. Tokokuta makanisi yango na kati ya mwa babuku lokola: Nihookáá’gi Hooláágóó liná Bahózhoóodoo! (Sepela na bomoi ya seko na Mabele!), Ha’át’fíísh éí God Nihá yee Hool’a’? (Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?), mpe mwa buku oyo ebimi sika, Ni Éí God Bik’is Dííleelgo Át’é! (Okoki kozala moninga ya Nzambe!). Nazalaka na botɔndi epai ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo na ndenge azali kotambwisa mosala oyo ya koteya Biblia mpo ete bikólo, bituluka mpe bato ya nkota ndenge na ndenge, ata mpe bato ya ekólo Navaho—Badiné—bákoka kozwela yango matomba.—Matai 24:45-47.
Mpo na kozwa eloko ya kobikela, nasalaka mosala oyo ezwaka ngai mokolo mobimba; kasi mbala na mbala nazalaka mobongisi-nzela mosungi. Nasepelaka ndenge nazali monzemba mpe nazalaka na mposa ya kosalela Yehova kozanga kotya makanisi na ngai na makambo mosusu. Nasepelaka koyebisa bato ya mboka na ngai mpe bamosusu, mingimingi bato oyo bayebi te nini básala, ete ‘[Yehova] azali penepene na baoyo bazali na mitema oyo etutami; akobikisa baoyo bazali na milimo oyo enyatami.’—Nzembo 34:18.
Nakanisaka lisusu te ete Biblia ezali lingomba ya mindele. Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali mpo na moto nyonso oyo alingi koyekola mpe kosalela yango. Ntango Batatoli ya Yehova bakoya kotala yo, tikelá bango nzela bálakisa yo ndenge nini okoki kozala na esengo ya solosolo. Bazali komemela yo nsango malamu ya nkombo ya Nzambe, Yehova, nkombo oyo ebongolá bomoi na ngai! “Aoo,’ Diyin God bízhi Jiihóvah wolyé.” (“Ɛɛ, nkombo ya Nzambe ezali Yehova.”)
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo oyo etali Lingomba ya Mormon, talá Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ 1995 (ebimeli ya Lifalanse).
b AIM ezali ebongiseli moko oyo etalaka makambo ya ntomo ya bato; Mo-Indien moko nde moto abandisaki yango na 1968. Mbala mingi, bato oyo bazali na ebongiseli yango balobaka mabe mpo na BIA oyo Leta atyá kobanda 1824 mpo na kobongisa bomoi ya Ba-Indien. Nzokande, mbala mingi BIA yango ezalaki kopesa na bato oyo bazali kutu Ba-Indien te ntomo ya kosalela mai, ya kotimola mabanga ya ntalo mpe ntomo mosusu na kati ya mabele oyo bapesá Ba-Indien.—World Book Encyclopedia.
c Batalelaka mputulu ya fololo lokola eloko moko ya bosantu mpe basalelaka yango mpo na mabondeli mpe milulu ya losambo; mputulu yango etalelamaka lokola eloko oyo epesaka bomoi mpe ekómisaka bato nzoto makasi. Banavaho bakanisaka ete soki moto atamboli na nzela moko oyo basopelásopelá yango mputulu ya fololo, nzoto na ye ekómaka mosantu.—The Encyclopedia of Native American Religions.
d Ebimisami na Batatoli ya Yehova kasi enyatamaka lisusu te.
e Soki olingi koyeba makambo mosusu, talá masolo “Ba-Indien ya Amerika—Avenire na bango ekozala ndenge nini?” na Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ 1996 (na Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 13]
Hogan, ndako ya Banavaho
[Elilingi na lokasa 13]
Elongo na mwana na ngai, Lionel
[Elilingi na lokasa 15]
Elongo na baninga na ngai ya Russie na liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili mingi na Moscou na 1993
[Elilingi na lokasa 16]
Elongo na bandeko na ngai ya elimo na lisangá ya Kayenta, na Arizona