Kobwaka ezaleli ya koyina
‘Bólinga banguna na bino.’—MATAI 5:44.
BAKONZI ya bikólo mibale oyo eyokanaka te bafandaki mikolo mingi mpo na kosolola malamumalamu, mpo na koluka kotya kimya kati na bamboka na bango. Prezida ya ekólo moko ya bozwi azalaki elongo na bango. Lokola azalaki mokonzi ya ekólo moko ya bozwi mpe bazalaki kotyela ye motema, asalelaki mayele ya koluka koyokanisa bato mpo na komeka kosalisa bakonzi yango mibale báyokana. Kasi milende oyo basalaki esukaki na ndenge moko ya mawa mpenza. Nsima ya mwa bapɔsɔ, bikólo yango mibale ebundaki lisusu bitumba oyo zulunalo moko (Newsweek) ebengaki “bitumba ya nsɔmɔ koleka bitumba nyonso oyo babundaka ekómi sikoyo mbula soki ntuku mibale.”
Atako bakonzi ya mokili bazali kosala milende, na mokili mobimba ezaleli ya koyina mpe matata kati na bato ya bituluka mpe bikólo ndenge na ndenge ezali kosila te. Ezaleli ya koyina ezali kopalangana nokinoki mpo na kozanga koyeba, mpo na ezaleli ya koboya makambo nyonso ya bato mosusu, mpe mpo na kampanye oyo bazali kosalela yango. Kasi na ntango oyo bakonzi ya lelo bazali kolukaluka makambo nini ya sika bakoki kosala mpo na kosilisa ezaleli yango, bazali koyeba te ete lolenge ya kosilisa likambo yango ezali nde na kati ya lisolo moko ya kala mpenza; oyo babengaka Lisolo Likoló ya Ngomba. Na lisolo yango, Yesu Klisto alendisaki bato oyo bazalaki koyoka ye bálanda nzela ya Nzambe. Ezali mokolo asalaki lisolo wana nde alobaki maloba oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo, ete: ‘Bólinga banguna na bino.’ Toli yango ezali lolenge malamu oyo eleki ndenge nyonso mpo na kosilisa mokakatano ya koyina mpe kokanisela basusu mabe, kasi ezali mpe lolenge kaka moko oyo ebongi!
Bato ya ntembe baboyaka kondima likanisi ya kolinga banguna; mpo na bango, ezali likambo oyo ekoki kosalema te mpe ebongi te. Kasi, soki moto akoki koyekola ezaleli ya koyina, na ntembe te akoki mpe koyekola koboya koyina. Na yango, maloba ya Yesu ezali kopesa bato elikya moko ya solo mpenza. Maloba yango ezali komonisa ete ata matata oyo ezalaka na kati ya bato banda kala, ekoki kosila.
Tótalela naino ezalela ya Bayuda oyo bazalaki koyoka ntango Yesu azali koloba. Banguna na bango bazalaki mosika na bango te. Basoda ya Loma bazalaki kaka koyangela ekólo ya Bayuda, bazalaki kofutisa bango bampako ya ntalo makasi, kosala bango ndenge nyonso balingi na makambo ya politiki, konyokola bango, mpe bazalaki kolyela bango. (Matai 5:39-42) Kasi, ekoki kozala ete Bayuda mosusu bazalaki kotalela baninga na bango Bayuda lokola banguna na bango kaka mpo na mwa matata ya mikemike oyo ekómaki makasi mpo basilisaki yango te. (Matai 5:21-24) Yesu azalaki mpenza kosɛnga na bato oyo bazalaki koyoka ye ete bálinga bato oyo bazalaki kotungisa bango mpe komonisa bango mpasi?
“Kolinga” elimboli nini?
Libosoliboso, esengeli koyeba ete ntango Yesu alobaki ‘bólinga,’ na makanisi na ye azalaki kolobela te ezaleli ya kosepela na moto, oyo ekoki kozala kati ya baninga mibale ya motema. Liloba ya Grɛki oyo basaleli na Matai 5:44 mpo na kolobela bolingo euti na liloba agape. Liloba yango ezali komonisa bolingo oyo moto azalaka na yango mpo atosaka mitinda ya Nzambe. Yango esɛngaka ntango nyonso te kosepela na moto. Soki moto azali na bolingo yango mpo atosaka mitinda ya sembo, yango ekotinda ye aluka bolamu ya basusu, ata bizaleli na bango ezali ndenge nini. Na yango, agape ezali bolingo oyo etalelaka te nkanda oyo moto akoki kozala na yango na motema. Yesu ye moko amonisaki bolingo ya ndenge wana ntango basoda Baloma babakaki ye na nzete ya mpasi; na esika ete alakela bango mabe, abondelaki boye: “Tata, limbisá bango, mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.”—Luka 23:34, NW.
Tokoki mpenza kozala na elikya ete mokolo mosusu bato ya mokili mobimba bakondima kolanda mateya ya Yesu mpe bakokóma kolingana? Te, mpamba te Biblia ezali komonisa ete mokili oyo ekobeba se kobeba. Biblia esakolaki na 2 Timote 3:13 (NW) ete: “Bato mabe mpe bakosi bakokende lisusu mosika na kati ya mabe.” Atako bongo, moto na moto azali na likoki ya kobwaka ezaleli ya koyina soki bateyi ye malamumalamu mitinda ya sembo na nzela ya boyekoli ya Biblia. Ezali na bandakisa oyo emonisi ete na koyekoláká Biblia, bato mingi bayekoli koboya ezaleli ya koyina oyo ezali kopalangana se kopalangana na bisika oyo bafandi. Tótalela mwa bandakisa yango.
Koyekola kolinga
Ntango azalaki na mbula 13, José akɔtaki na lisangá moko ya bato ya mobulu mpe amikɔtisaki na makambo ya bitumba oyo ezalaki kosalema na mboka wana.a Na lisangá yango bateyaki ye ete asengeli koyina bato oyo bango bazalaki kokanisa ete bango nde bazalaki komonisa bato oyo bazalaki kofanda esika moko na ye mpasi. Mokano na ye ezalaki ya kosilisa bango nyɛɛ, soki likoki ezali. Lokola azalaki komona baninga na ye mingi bazali kokufa, José atondaki na nkanda na motema mpe na mposa ya koboma mpe bato mosusu. Ntango azalaki kosala bagrɛnadɛ, azalaki komituna ete, ‘Mpo na nini mpasi etondi boye? Soki mpenza Nzambe azali, azali komona to azali komona te?’ Mbala mingi azalaki kolela, mpamba te azalaki koyeba te nini asala mpe akómaki konyokwama na makanisi.
Nsukansuka, José akutanaki na Batatoli ya Yehova ya lisangá moko ya esika azalaki kofanda. Kaka na likita ya liboso oyo akɔtaki, amonaki bolingo oyo ezalaki kuna. Moto nyonso apesaki ye mbote na esengo mpe na nsai. Na nsima, lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo: “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?” epesaki biyano na mituna oyo azalaki mpenza komituna.b
Nsima ya mikolo, lokola akómaki koyeba Biblia malamu, José asalaki mbongwana na bomoi na ye mpe na lolenge na ye ya kokanisa. Ayekolaki ete “moto oyo alingaka te azali kofanda na kati ya liwa. Moto nyonso oyo azali koyina . . . azali mobomi, mpe . . . mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko efandi na kati na ye.”—1 Yoane 3:14, 15, NW.
Kasi, mpo na kokata boyokani na baninga na ye bato ya mobulu, ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Mbala nyonso oyo azalaki kokenda na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, bazalaki kolanda ye. Kutu baninga na ye mosusu ya kala bayanganaki na makita mosusu mpo na koyeba nini ebongolaki bomoi ya José ndenge wana. Ntango bamonaki ete azali moto oyo alingi kotɛka bango te to mpe azali likama mpo na bango te, batikaki kotungisa ye. Ntango akómaki na mbula 17, José azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Eumelaki te, akómaki mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso. Na esika ete aluka koboma bato, akómaki nde komemela bango nsango ya bolingo mpe ya elikya!
Kobwaka makambo oyo ezali kokabola bikólo
Bato ya bikólo ndenge na ndenge bakoki kobwaka makambo ya koyinana oyo ekabolaka bango? Tózwa ndakisa ya Batatoli ya Yehova 35 oyo balobaka monɔkɔ ya Amharique, bato yango bafandi na Londres, na Angleterre; na kati ya bato yango, bato 20 bazali bato ya ekólo Éthiopie mpe bato 15 bazali bato ya ekólo Érythrée. Bango nyonso bazali kosambela esika moko na bomoko mpe na kimya, atako na Afrika bato ya Érythrée na ya Éthiopie bautaki kobunda etumba moko ya nsɔmɔ.
Bandeko ya libota ya Motatoli moko ya Éthiopie bayebisaki ye boye: “Kotyelaka bato ya Érythrée motema ata mokolo moko te!” Kasi sikoyo, ezali kaka te ete atyelaka baninga na ye baklisto ya Érythrée motema, kasi mpe abengaka bango bandeko! Atako monɔkɔ ya mboka na bango mpenza ezali Tigrinya, Batatoli yango ya Érythrée bazwaki mokano ya koyekola Amharique—monɔkɔ ya bandeko na bango ya Éthiopie—mpo báyekolaka Biblia esika moko na bango. Oyo nde litatoli monene oyo bolingo oyo euti na Yehova ekoki kosala, bolingo oyo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko”!—Bakolose 3:14, NW.
Esengeli kobosana makambo oyo eleká
Kasi, tokoloba boni mpo na moto oyo banyokolaki ye na ndenge ya bonyama mpenza? Mabe ezali wapi soki moto wana akangeli bato oyo banyokolaki ye nkanda? Tólobela likambo oyo ekómelaki Manfred, Motatoli moko ya Allemagne. Ye asalaki mbula motoba na bolɔkɔ moko ya Bakoministe kaka mpo azalaki Motatoli ya Yehova. Akómaki koyina bato oyo banyokolaki ye to kozala na mposa ya kozongisa mabe na mabe? Ye moko ayanoli ete: “Te.” Na kati ya zulunalo moko (Saarbrücker Zeitung), Manfred alimbolaki boye: “Kosala moto mabe to kozongisa mabe na mabe . . . ezalaka nde ebandeli ya makambo mosusu ya mabe oyo ekolandana se kolandana.” Manfred asalelaki mpenza maloba oyo ya Biblia: “Bózongisa mabe na mabe na moto te. . . . Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.”—Baloma 12:17, 18, NW.
Mokili moko oyo koyina ekozala lisusu te!
Batatoli ya Yehova batutaka ntolo te ete bazali ata na mbeba moko te na likambo yango. Kutu, mbala mingi bamonaka mpe ete ezalaka mpasi mpo na kolongola ezaleli ya koyina mpe nkanda nyonso oyo bazalaki na yango na kati ya motema. Mpo moto asalela mitinda ya Biblia na bomoi na ye, esɛngaka ntango nyonso kosala milende mpenza. Kasi, soki totaleli bango lokola moto moko, tokomona ete Batatoli ya Yehova bazali mpenza ndakisa oyo ezali komonisa ete Biblia ezali mpenza na nguya ya kobwaka ezaleli ya koyina basusu. Mbula na mbula, Batatoli bazali koyekola na bato Biblia na bandako, bazali kosalisa bankóto ya bato mpo bámilongola na bansinga ya ezaleli ya koyina bato ya mposo mosusu mpe ezaleli ya koboya makambo nyonso ya bato oyo bakeseni na bango.c (Talá etanda “Toli ya Biblia esalisaka mpo na kosilisa ezaleli ya koyina.”) Lokola bazali kolonga, yango ezali komonisa makambo oyo mosala ya koteya na mokili mobimba ezali kosala; etikali moke, mosala yango ya koteya ekolongola ezaleli nyonso ya koyina mpe makambo oyo ebotaka ezaleli yango. Mosala yango ya koteya ekotambwisama na Bokonzi ya Nzambe to guvɛrnɛma ya mokili mobimba. Na libondeli ya Tata na biso, Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na Bokonzi yango, ntango alobaki ete: “Tiká bokonzi na yo eya.”—Matai 6:9, 10.
Biblia elaki ete ntango guvɛrnɛma yango ya likoló ekotambwisa makambo, “mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova].” (Yisaya 11:9; 54:13) Na ntango wana, maloba ya mosakoli Yisaya oyo bato mingi batángaka ekokokisama na mabele mobimba: “[Nzambe] akosambisa kati na mabota, akopamela mpe bikólo mingi; bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yisaya 2:4) Na bongo, Nzambe ye moko akobwaka ezaleli ya koyina mpo na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
b Talá mokapo 8, “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?” na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Soki olingi koyekola Biblia ofele na ndako na yo, okoki kokutana na Batatoli ya Yehova ya esika ofandi to okoki kotinda mokanda epai ya babimisi ya zulunalo oyo.
[Etanda na lokasa 11]
Toli ya biblia esalisaka mpo na kosilisa ezaleli ya koyina
● “Epai wapi bitumba ezali kouta mpe epai wapi kowelana ezali kouta na kati na bino? Ezali te na likambo oyo: mpo na bamposa na bino ya komisepelisa oyo esilaka te oyo ezali kobunda na kati ya nzoto na bino?” (Yakobo 4:1, NW) Tokoki kosilisa matata na bato mosusu, mingimingi soki toyebi kopekisa bamposa na biso ya koluka kaka bolamu na biso moko.
● “[Bótalaka] kaka makambo na bino moko te, kasi mpe makambo ya bamosusu.” (Bafilipi 2:4, NW) Kotya bolamu ya bamosusu na esika ya liboso ezali lolenge mosusu ya kosilisa matata oyo ezangi ntina.
● “Tiká nkanda mpe bwaká nkanda makasi; kosilika te kaka mpo na kosala mabe.” (Nzembo 37:8, NW) Tokoki mpe tosengeli kopekisa makanisi oyo etindaka biso na kobebisa makambo.
● “Nzambe . . . asalaki na nzela ya moto moko bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na mabele mobimba (Misala 17:24, 26, NW) Ezali malamu te komimona ete oleki bato ya loposo mosusu, mpamba te biso nyonso tozali se bato.
● ‘Bósala eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso, kasi na elimo ya komikitisa bótalelaka bamosusu ete baleki bino.’ (Bafilipi 2:3, NW) Kotyola bato mosusu ezali mpenza bozoba, mpamba te mbala mingi bato mosusu bazalaka na bizaleli malamu mpe na makoki oyo biso moko tozali na yango te. Makambo nyonso ya malamu ezalaka kaka te epai ya bato ya loposo moko boye to ya mimeseno moko boye.
● “Na bongo, ya solo, wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu.” (Bagalatia 6:10, NW) Komonisela bato mosusu boboto mpe kolinga kosalisa bango, kozanga kotala loposo to mimeseno na bango, ekoki kosalisa mingi mpo na kozala na boyokani mpe mpo na kosilisa likambo ya kozwelana makanisi mabe.
[Bililingi na nkasa 8, 9]
Batatoli ya Éthiopie mpe ya Érythrée bazali kosambela esika moko na kimya
[Elilingi na lokasa 10]
Manfred, oyo abikaki na bolɔkɔ ya Bakoministe aboyaki koyina bato
[Elilingi na lokasa 10]
Biblia ekoki kosalisa bato bábwaka makambo oyo ekabolaka bango