Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Avril nk. 24-25
  • Yekolá koyoka na miso na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yekolá koyoka na miso na yo
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoko ya lokota
  • Tólingaka bandeko na biso bababa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Lokota oyo ozali koyoka na miso!
    Lamuká!—1999
  • ‘Yehova angengisi elongi na ye epai na bango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Luká na likebi mpenza bato oyo balobaka te mpe bayokaka te oyo bafandaka na teritware na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—1999
g99 Avril nk. 24-25

Yekolá koyoka na miso na yo

WAPI lolenge malamu ya kosolola na mokufi-matoi? Esengeli kotalana polele mpe malamumalamu na miso. Yango ezali mpenza likambo ya ntina mingi soki mokufi-matoi azali koloba. Ya solo, soki bato mibale bazali kosolola na lokota ya bikela, ezalaka likambo ya kozanga bonkonde mpenza soki moko na kati na bango azali kotala epai mosusu. Mpe ndenge nini okoki kobenda likebi ya mokufi-matoi? Na esika ete obénga ye na nkombo, ezali malamu mingi kobɛta ye mwa moke na boboto nyonso na lipeka to na lobɔkɔ, kosala elembo ya lobɔkɔ liboso na ye to soki bozali mosika, koyebisa moto mosusu ete abendela yo likebi na ye. Na mabaku mosusu, okoki kotuta lokolo na mabelé, kopelisa to koboma mwinda mpo na kobenda likebi na ye. Lolenge wana mpe ndenge mosusu ya kobenda likebi ebakisami na oyo bakufi-matoi basalelaka mpe ezali moko ya mimeseno na bango.

Bomoko ya lokota

Ntango bakutani na mokufi-matoi, bato mosusu bakanisaka ete koloba na bibɛbu ezali likambo moke. Nzokande, bakufi-matoi mingi bamonaka ete lolenge yango ebongi mpenza te mpo na kosolola. Ya solo, bato mosusu bameseni mingi kosolola na bibɛbu, kasi ezali malamu te kokanisa ete ezali likambo ya pɛtɛɛ mpo moto nyonso ayeba malamumalamu makambo ozali koloba na bibɛbu na yo. Mbala mosusu koluka molimboli to kokoma makambo oyo olingi koloba ekoki kopesa mwa nzela ya kosolola malamu.

Nzokande, soki okutanaka na bakufi-matoi mbala na mbala, ekoki kozala malamu koyekola mwa bilembo mosusu ya lokota ya bikela, boye te? Oyo nde boyokani makasi yango ekoki kosala, mingimingi kati na baoyo bazali na lingomba moko! Tokoki kosala milende wana lokola bato mosusu basalaka na bisika balobaka nkota mibale. Batatoli ya Yehova basalaka milende ya koyebisa makambo matali Yehova epai ya bato nyonso. Ntango toyebi ete bakufi-matoi bakoki koyoka te lokola bato mosusu, oyo nde likambo libongi soki tomimesenisi na bango na kosaleláká lokota ya bikela!​—1 Bakolinti 9:20-​22.

Antonino alobi ete ntango abandaki koyangana na makita ya boklisto na ekólo Italie, na ebandeli “nazalaki mpenza kolendisama malamu te na bandeko oyo bayokaka. Lokola tokokaki koyokana te ntango tozali kosolola, namiyokaki ete nasundolami.” Na bongo, bandeko mingi kati na lisangá bayekolaki Lokota ya bikela ya Italie (LBI). Bakufi-matoi oyo bazali kosepela na solo babandaki koyekola Biblia, mpe makita ezalaki kotambwisama na Lokota ya bikela ya Italie. Antonino alendisamaki mpe sikawa azali na mposa ya “koyebisa baninga na ye nyonso bakufi-matoi na ntina na makita na biso mpe bolingo oyo ezali kati na libota ya Jehova.”

Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kosala masangá ya lokota ya bikela, epai bakufi-matoi bakoki kosepela na bolingo oyo ezali komonana kati na bandeko. Na ekólo Espagne, ekómi sikawa mibu 20 banda bituluku ya lokota ya bikela mpo na bakufi-matoi esalemaki. Na États-Unis, masangá 19 mpe bituluku ya mike 47 ezali mpo na bakufi-matoi.

Bakufi-matoi bazali na likoki ya kosala lokola baministre ya ntango nyonso (babongisi-nzela), basaleli na misala, mpe bankulutu. Bazali mpe na makoki ya kosala masukulu na mayangani, koteya na eteyelo ya babongisi-nzela, mpe bazali na mikumba mosusu mingi. Na yango, bazali kokanisa te ete bakokoka kosala makambo mosusu te, kasi bazali na mabaku ya kosanzola Yehova na makoki na bango nyonso.

Mposa oyo tobotamá na yango ya kozala na boninga mpe kosolola emonisamaka na mimeseno mpe nkota mingi oyo ezali na mokili mobimba. Na esika ya komona bakufi-matoi lokola bato oyo bazangi makoki, ekozala mpenza likambo ya malamu ntango tozali komona makasi, makoki mpe makambo oyo mazali komonisa ete biso banso tozali bato! Soko tokomonisa limemya mpo na basusu mpe tokolinga komesana na basusu, tokopesa mabɔkɔ ete ata tozali ndenge na ndenge, kasi tozali se kati na libota moko, libota ya bato.

[Elilingi na lokasa 24]

Ntango ozali kosolola na lokota ya bikela, osengeli kotala moto oyo ozali kosolola na ye na miso

[Elilingi na lokasa 24]

Bakufi-matoi bazali kosala na esengo nyonso lokola baministre ya ntango nyonso

[Elilingi na lokasa 25]

Koyemba nzembo ya Bokonzi na Lokota ya bikela ya Espagne

[Elilingi na lokasa 25]

Na liyangani moko, mokufi-matoi moko azali kosala lisukulu na liyangani na Lokota ya bikela ya Corée

[Elilingi na lokasa 25]

Mikanda mikolimbolaka Biblia mityami na kasɛti video na Lokota ya bikela ya Amerika

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto