Lokota oyo ozali koyoka na miso!
NDENGE nini oyekolaki lokota oyo obandaki koloba ntango ozalaki mwana moke? Mbala mosusu ozalaki koyoka bato ya libota na yo to baninga na yo bazalaki koloba yango ntango ozalaki naino mwana moke. Bato mingi bayekolaka lokota na koyoka mpe koloba yango. Ntango bazali kokanisa, bato oyo bayokaka babongisaka maloba mpe bafraze na makanisi na bango liboso ya kobimisa yango na maloba. Nzokande, soki mwana abotami akufa-matoi, bɔɔngɔ na ye ekoki kobongisa makanisi na lolenge mosusu? Ezali na lokota moko oyo moto akoki koyokisa makanisi na ye ya polele to ya polele te kozanga kobimisa maloba?
Komona kasi koyoka te
Moko kati na makambo ya kokamwa oyo bato bazali na yango ezali likoki ya koloba mpe lolenge ya komesana na yango. Nzokande, mpo na moto oyo ayokaka te, koyekola lokota moko ekómaka mpenza likambo ya miso, kasi ya matoi te. Likambo ya esengo, mposa ya kosolola ezalaka makasi na kati ya moto, epesaka biso likoki ya kolonga mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango. Na mokili mobimba, mposa yango epusi bakufi-matoi ete bábimisa nkota ya bikela. Lokola bakutanaka bamoko na bamosusu, na mabota na bango to na biteyelo ya bakufi-matoi mpe bafandaka mingi esika moko, yango ebimisi lokota moko ya kafukafu oyo esengeli koyoka na miso—lokota ya bikela.
Mpo na Carl, oyo afandi na États-Unis, lokota yango ezalaki likabo ya baboti na ye oyo bazalaki bakufi-matoi.a Atako azalaki mokufi-matoi uta bomwana, azalaki na likoki ya kotánga bankombo ya biloko, kosala bikela, mpe kolobela biloko oyo emonanaka te na oyo ebéngami na Lingelesi American Sign Language (Lokota ya bikela ya Amerika) wana azalaki naino mwana mpenza. Bana mike mingi oyo bazali bakufi-matoi oyo baboti na bango mpe bazali bakufi-matoi oyo balobaka na bikela babandaka kosala bikela na bango ya liboso ntango bakokisi sanza 10 kino 12 ya kobotama. Kati na buku moko (A Journey Into the Deaf-World), balobi ete “banganga-mayele ya nkota sikawa bayebi ete likoki ya koyekola lokota moko malamu mpe koyekolisa yango na bana ezali kati na bɔɔngɔ. Ezala ete likoki yango esalelami mpo na lokota ya bikela to na lokota oyo balobaka bokeseni ezali te.”
Sveta abotamaki na ekólo Russie na libota moko ya bakufi-matoi oyo ebandaki na bankɔkɔ na ye. Elongo na ndeko na ye ya mobali oyo azali mpe mokufi-matoi, ayekolaki Lokota ya bikela ya Russie (LBR) Ntango akɔtaki na eteyelo ya bana bakufi-matoi wana azalaki na mibu misato, ayebaki koloba malamu na lokota ya bikela. Sveta alobi ete: “Bana mosusu bakufi-matoi bayebaki lokota ya bikela te mpe bazalaki koyekola yango epai na ngai.” Bana mingi bakufi-matoi bazalaki na baboti oyo bayokaka kasi bazalaki kosalela lokota ya bikela te. Mbala mingi, bana oyo bazalaki bakóló bakufi-matoi bazalaki koteya balɛki na bango lokota ya bikela na kelasi, kopesáká bango likoki ya kosolola na bango.
Lelo oyo, baboti mingi oyo bayokaka bazali koyekola lokota ya bikela mpo na kosolola na bana na bango. Emonani ete bilenge yango bakufi-matoi bazali na likoki ya kosolola malamu na bikela liboso ya kokɔta kelasi. Na Canada, yango esalemaki bongo mpo na Andrew, oyo baboti na ye bazalaki koyoka. Bayekolaki lokota ya bikela mpe basalelaki yango elongo na ye ntango azalaki naino mwana moke. Yango epesaki ye nzela ya kokolisa makoki na ye ya koloba na bikela kino akokóma mokóló. Sikawa, libota mobimba bakoki kosolola masolo nyonso na lokota ya bikela.
Bakufi-matoi bazali na likoki ya kokanisa mpe kolobela biloko oyo emonanaka to oyo emonanaka te, kozanga kobimisa maloba. Bobele lokola mokomoko na biso akanisaka na lokota na ye, bakufi-matoi mingi bakanisaka na lokota na bango ya bikela.
Nkota ya bikela izali ndenge na ndenge
Na mokili mobimba, bakufi-matoi bazalaka na lokota ya bikela oyo bango moko babimisi to bayekoli mpe oyo ezalaki liboso na bango. Lelo oyo, bikela mosusu ya Lokota ya bikela ya Amerika (LBA) euti na Lokota ya bikela ya France (LBF) oyo ebimaki esili koleka mbula 180. Bikela yango oyo eutaki na Lokota ya bikela ya France (LBF) esangisamaki na oyo esalemaki kala na bato ya États-Unis, mpe ekómaki oyo ebéngami sikawa Lokota ya bikela ya Amerika (LBA). Nkota ya bikela ekoli na boumeli ya bambula mingi mpe ezali kobonga na libota mokomoko ya bato oyo ezali kokitana mosusu.
Mingimingi, nkota ya bikela ekokanaka te na nkota oyo bato balobaka na ekólo oyo yango ezali. Na ndakisa, na ekólo Porto Rico, atako bato balobaka Espagnol kasi basalelaka Lokota ya bikela ya Amerika (LBA). Atako na Angleterre mpe na États-Unis balobaka Lingelesi, kasi na Angleterre basalelaka Lokota ya bikela oyo ekeseni mpenza na oyo ya Amerika. Lokota ya bikela ya Mexique ekeseni na nkota mosusu ya bikela ya mikili ya Amérique latine.
Ntango moto azali koyekola lokota moko ya bikela, akoki kokamwa na makambo mingi oyo ezali na kati mpe na kitoko ya kosolola na lokota yango. Bato bakoki kosala masolo makeseni, to kobimisa makanisi ndenge na ndenge na lokota ya bikela. Likambo ya esengo bakasɛti ya video mingi ya kolimbola mikanda ekómi kobima mpo na bakufi-matoi, ezali kosalela lokota ya bikela mpo na kosolola, kolobela ntɔki, kobɛta masolo ya bomoi ya bato mpe koteya Biblia. Na mikili mingi mikanda ya lokota ya bikela ekómi kobima mingi mpenza.
Kotánga makambo oyo oyoka naino te
Ntango bazali kotánga eloko moko, mbala mingi, bato oyo bayokaka bakokanisaka maloba na ebengeli ya maloba ndenge bayebi. Na bongo, makambo mingi oyo batángaka bakangaka ntina na yango mpamba te bayokaki yango liboso. Na nkota mingi, maloba oyo makomami malimbolaka te makanisi oyo mokomi alingi koloba. Bato mingi oyo bayokaka bayekolaka ekomeli yango na kosangisáká yango na ebengeli ya maloba mpe na bongo bakangaka ntina ya makambo oyo bazali kotánga. Nzokande, kanisá naino, na bomoi na yo mobimba oyoká naino lolaka moko te, liloba moko te, to lokota moko te oyo bato bazali koloba! Ekoki kozala mpenza mokakatano monene mpe mpasi mpo na koyekola motindo moko boye ya kokoma mpo na lokota oyo maloba na yango eyokamaka te. Likambo ya kokamwa ezali te ete kotánga lokota motindo wana ezali mpenza mokakatano monene mpo na bato oyo bayokaka te, mingimingi mpo na baoyo makoki na bango ya koyoka ebebaki uta bomwana to mpo na baoyo bayoká naino lolaka soko moke te!
Na mokili mobimba, biteyelo mingi ya bana oyo bayokaka te emoni ntina ya kosalela lokota ya bikela noki uta makoki ya mwana mpo na lokota ezali kokola. (Talá etanda na lokasa 20 mpe 22.) Biteyelo motindo wana emoni ete koyekolisa mwana mokufi-matoi lokota moko ya bikela uta bomwana mpe kotya moboko mpo na koyekola lokota moko ekosalisa ye ayeba makambo nokinoki na kelasi, na mboka mpe na nsima ayeba lokota moko ya kokoma.
Lisangá ya UNESCO oyo etalelaka bato bakufi-matoi elobaki ete: “Lokota ya bikela ekoki lisusu kotalelama te lokola likambo moke, to koboya kopesa yango esika ebongi kati na bibongiseli ya mateya mpo na bakufi-matoi.” Nzokande, tosengeli koloba ete ezala ata motindo ya kolakisama nini oyo baboti baponi mpo na mwana na bango oyo azali mokufi-matoi, baboti basengeli kosalela lokota yango elongo na ye.—Talá lisolo “Mpo na kokolisa mwana na ngai, nayekolaki lokota mosusu,” na Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ 1996 (ebimeli ya Lifalanse).
Koyeba bakufi-matoi
Ntango bana bakufi-matoi bakómi bakóló, mbala mingi balobaka ete eloko oyo bazalaki mpenza kozela epai na baboti na bango ezalaki kosolola na bango. Ntango mama na ye oyo akómaki mobange azalaki pene ya kokufa, Jack, mobali oyo azali mokufi-matoi, amekaki kosolola na ye. Mama na ye abundaki koyebisa ye likambo moko kasi azalaki na likoki te ya kokoma yango mpe ayebaki lokota ya bikela te. Na nsima azalaki lisusu koyeba eloko te mpe akufaki. Jack ayokaki mawa mingi mpo na bantango wana ya mpasi ya nsuka ya bomoi ya mama na ye. Likambo yango epusaki ye ete apesa toli na baboti oyo bazali na bana bakufi-matoi: “Soki olingi kosolola malamu mpe kopesana makanisi, mayoki mpe bolingo na lolenge malamu na mwana na yo oyo azali mokufi-matoi, yekolá kosolola na bikela. . . . Ntango eleki mpo na ngai. Kasi ntango eleki mpe mpo na yo?”
Na boumeli ya bambula mingi, bato mingi bayebaki mpenza makambo ya bakufi-matoi malamu te. Basusu bazalaki kokanisa ete mokufi-matoi ayebaka eloko moko te mpamba te ayokaka te. Baboti bazalaki kobatela bana na bango bakufi-matoi na lolenge ya kolekisa ndelo to bazalaki kobanga kotika bango bázala esika moko na bato oyo bayokaka. Na bamboka mosusu bakufi-matoi babéngamaka “bababa” to “bimimi,” yango ezali solo te mpamba te bango bakufi nde matoi. Ezali bobele ete bayokaka te. Bato mosusu batalelaka lokota ya bikela lokola ezali na ntina mingi te mpe ete nkota ya koloba eleki yango. Likambo ya kokamwa ezali te ete na libunga motindo wana, bakufi-matoi mosusu bamonaka ete banyokolaka bango mpe bato mosusu bamityaka na esika na bango te.
Lokola azalaki elenge oyo akolaki na États-Unis na bambula ya 1930, Joseph akɔtaki na eteyelo moko ya bana bakufi-matoi. Eteyelo yango ezalaki kopekisa kosalela lokota ya bikela. Ye na baninga na ye ya kelasi mbala mingi bapesamaki bitumbu mpo ete bazalaki kosalela bikela, ata ntango bakokaki kokanga ntina te ya makambo oyo balakisi na bango bazalaki koteya. Bazalaki na mposa makasi ya kokanga ntina ya makambo mpe ete báyeba mposa na bango! Na mikili oyo kelasi mpo na bana bakufi-matoi ezalaka mingi te, bana ebele batángaka kelasi mingi te. Na ndakisa, mokomeli moko ya Lamuká! na Afrika ya wɛsti alobaki ete: “Bakufi-matoi mingi na Afrika bazali na bomoi ya mpasi mpe ya mawa mpenza. Kati na bato nyonso oyo bazali na mbeba ya nzoto, bakufi-matoi bazali bato oyo batalelaka bango mpamba mpe bamityaka na esika na bango te.”
Biso nyonso tolingaka ete bato mosusu bámitya na esika na biso. Likambo ya mawa, ntango bato mosusu bamoni mokufi-matoi, bakanisaka bobele “mbeba na ye.” Kotalela bobele mbeba ya nzoto ekoki kosala ete báyeba te makoki ya mokufi-matoi. Nzokande, bakufi-matoi mingi bamitalelaka lokola bato oyo bazali na makoki mpenza. Bazali na makoki ya kosolola malamu, bazalaka na limemya na bango moko, batángaka bakelasi malamu, mpe bazalaka na bomoi ya elimo malamu. Likambo ya mawa, monyoko oyo bakufi-matoi mingi bakutanaka na yango esali ete basusu kati na bango bátyela bato oyo bayokaka motema te. Nzokande, ntango bato oyo bayokaka bazali koluka mpenza koyeba mimeseno mpe lokota ya bikela ya bakufi-matoi mpe kotalela bango lokola bato oyo “bazali na makoki,” bato nyonso bakozwa matomba.
Soki olingi koyekola lokota ya bikela, omikundola ete nkota emonisaka lolenge tokanisaka mpe tobimisaka makanisi na biso. Mpo na koyekola lokota moko ya bikela malamu, esengeli kokanisa na lokota yango. Yango wana, koyekola bobele bilembo mpamba na diksionere ya lokota ya bikela ekoki kopesa matomba te na lolenge mpenza lokota yango esalelamaka. Mpo na nini te koyekola epai ya baoyo basalelaka lokota ya bikela mikolo nyonso ya bomoi na bango—bakufi-matoi? Koyekola lokota mosusu epai ya bato oyo basalelaka yango ekosalisa yo ete okanisaka mpe obimisaka makanisi na lolenge mosusu, kasi ndenge esengeli.
Na mokili mobimba, bakufi-matoi bazali kokolisa makoki na bango na kosaleláká lokota ya bikela oyo ezali na maloba mingi mpenza. Yo moko yaká kotala lokota ya bikela ya bakufi-matoi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekanisami ete bobele na États-Unis, ezali na bakufi-matoi milio moko, oyo bayebi “lokota moko mpe bazali na momeseno ya bango moko.” Mingimingi, bato yango babotamaki bongo. Lisusu, ekanisami ete bato milio 20 bayokaka lisusu te kasi bazalaki liboso koloba lokota na bango oyo bayekolaki ntango babotamaki.—A Journey Into the Deaf-World, ebimisami na Harlan Lane, Robert Hoffmeister, mpe Ben Bahan.
[Etanda na lokasa 20]
“Na engumba New York, bakobanda koteya bakufi-matoi liboso na lokota ya bikela, nsima na Lingelesi”
Moto ya likambo yango ebimaki na zulunalo The New York Times ya 5 Marsi 1998. Felicia R. Lee akomaki ete: “Likambo oyo emonani lokola mbongwana moko elingi kosalema na mateya ya banakelasi bakufi-matoi, na boye ete eteyelo bobele moko ya Leta mpo na bakufi-matoi na engumba New York ekotalela lisusu mateya na yango mpo ete liboso mpenza balakisi nyonso bakoteya lokota ya bikela oyo ekosalela bilembo mpe bikela.” Alobi ete batei mingi “balobi ete bolukiluki emonisi ete lokota ya ebandeli mpo na bakufi-matoi ezali ya komona, kasi ya koloba te, mpe ete biteyelo oyo ezali kosalela mitindo ya koteya oyo basepelaka na yango, oyo ezali Lokota ya bikela ya Amerika, bateyaka banakelasi malamu koleka biteyelo mosusu.
“Balobi ete banakelasi bakufi-matoi basengeli kotalelama lokola banakelasi oyo bayebi nkota mibale, kasi kotalela bango te lokola bato oyo bazali na mbeba.”
Profesere Harlan Lane, ya Northeastern University, na Boston, alobaki ete: “Nakanisi ete [eteyelo ya engumba New York] ezali na esika ya liboso na ebongiseli yango.” Ayebisaki Lamuká! ete mokano ya nsuka ezali ya koteya Lingelesi lokola lokota ya mibale, lokota ya kotánga.
[Etanda/Bililingi na lokasa 21]
Ezali lokota!
Bato mosusu oyo bayokaka bakanisaka ete lokota ya bikela ezali lolenge moko makasi ya kosala bikela. Balobelaki yango kutu lokola lokota ya bililingi. Atako lokota ya bikela esalelaka malamumalamu elongi, nzoto, mabɔkɔ mpe esika oyo ezali nzinganzinga, bikela mingi ezalaka na bokokani moke to ezalaka na bokokani te na makanisi oyo ezali komonisa. Na ndakisa, na Lokota ya bikela ya Amerika, ekela oyo epesaka likanisi ya “kosala” esalelaka mabɔkɔ nyonso mibale ekangami likɔfi, na likɔfi moko likoló ya mosusu na lolenge ya kokamola. Atako eyebani mingi, ekela yango emonisaka mpenza polele te ndimbola na yango epai ya moto oyo asalelaka lokota ya bikela te. Na Lokota ya bikela ya Russie (LBR), ekela oyo emonisaka likanisi ya kozala na “mposa ya,” emonisamaka na kosaleláká mabɔkɔ mibale, mpe mosapi ya monene ya lobɔkɔ moko etutaka mosapi ya misato ya lobɔkɔ yango mpe kobaloláká mabɔkɔ. (Talá bafoto na lokasa oyo.) Lokola biloko oyo emonanaka te ezali mingi, likoki ezali te mpo na komonisa yango na elilingi na lokota ya bikela. Longola bobele bikela ya biloko oyo emonanaka oyo ekoki komonisama na elilingi, lokola bilembo ya komonisa “ndako” to “bebe.”—Talá bafoto na lokasa oyo.
Lokota ezalaka na maloba oyo mandimami na bato oyo balobaka lokota yango. Nkota ya bikela mpe ezali na elobeli na yango. Na ndakisa, na Lokota ya bikela ya Amerika, likanisi ya ntina ya fraze nde ezalaka liboso mpe na ekela moko ekolanda mpo na kolimbola yango. Lisusu, kotya biloko na molɔngɔ lokola yango ezali kosalema moko nsima na mosusu ezali likambo ya ntina mpo na nkota mingi ya bikela.
Bikela mingi oyo esalemaka na elongi ezali mpe mpo na elobeli yango. Ekesenisaka motuna mpe etinda, fraze ya likambo moko oyo elingaki kosalema, to bobele kondima likambo. Mpo ete lokota yango ezali ya komona, yango epesi nzela ya komonisa maloba mpe makambo mosusu mingi na bikela ya elongi oyo ekesenisi lokota ya bikela na nkota mosusu nyonso.
[Bililingi]
“Kosala” na LBA
“Kozala na mposa ya” na LBR
“Ndako” na LBA
“Bebe” na LBA
[Etanda na lokasa 22]
Ezali nkota ya solosolo
“Na bokeseni na makanisi ya libunga oyo bato mingi bazali na yango, nkota ya bikela ezali likambo ya komima te, ezali mpe te makambo oyo balakisi babimisi, to bilembo ya lokota oyo elobamaka na mboka oyo moto azali. Nkota yango ezali bipai nyonso oyo bakufi-matoi bazali. Mpe lokota yango mokomoko ezali mpenza lokota ya solosolo mpe ezali na ndenge na yango, mpe ezali kosalela malako ya nkota ndenge moko na oyo mazali na mokili mobimba na nkota oyo bato balobaka.”
Na Nicaragua “biteyelo etyaki likebi mingi na likambo ya komesenisa bana [bakufi-matoi] na kotánga mpe koloba. Mpe na bisika nyonso epai kuna bamekaki mwango yango, matomba ezalaki moke mpenza. Kasi atako bongo bayekolaki kosolola. Na bisika ya masano na biteyelo mpe na babisi na bango ya banakelasi, bana bakufi-matoi bazalaki kobimisa lolenge na bango moko ya kosala bikela . . . Eumelaki te, lolenge yango ebimisaki oyo ebéngami sikawa ete Lenguaje de Signos Nicaragüense (Lokota ya bikela ya Nicaragua).” Bana ya sikoyo bakufi-matoi babimisi lokota moko malamu koleka oyo ekómi kobéngama Idioma de Signos Nicaragüense.—The Language Instinct, ebimisami na Steven Pinker.
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 23]
Na LBA, oyo ezali lolenge moko ya koloba na bikela “Ntango autaki na magazini, akendaki kosala”
1 Magazini
2 ye
3 kokende na
4 kosilisa
5 kokende na
6 mosala