Engebene Biblia
Konyokola banyama ezali mabe?
NA ESIKA moko ya masano na Amérique Centrale, miso ya bato nyonso mazali kotala nsoso mibali mibale, moko ya motane, mosusu ya mpɛmbɛ. Bato bazali koganga ntango nsoso ya motane ezali kotuta nsoso ya mpɛmbɛ na lokolo na ye oyo bakangisaki jilɛti. Alibitrɛ alɔkɔti nsoso yango nyonso mibale. Oyo ya mpɛmbɛ ezali koningana lisusu te, esili kokufa, mpe ezali kotanga makila. Etumba ya bansoso mibali esili.
Na sudi ya ekólo Philippines, mpunda mibale ya mibali ezali kobunda. Bato oyo bazali kotala bazali kosepela na lisano yango ya nsɔmɔ wana mpunda ezali koswana na matoi, na nkingo, na zolo mpe na biteni mosusu ya nzoto. Atako bango nyonso bakoki kobima na esika ya kobunda na bomoi, kasi moko kati na bango akoki kotɛnguma mpo na libela, kokufa miso to konyokwama na bampota oyo ekoki koboma ye.
Na ekólo Russie, mbwa mibale ezalaki kobunda. Na nsima ya mwa ntango moke, miso na bango etɔbukaki mpe matoi ekatanaki, bazalaki kolekaleka na esika ya etumba makolo ezokizoki, makila ezali kobima na bampota nyonso.
Na boumeli ya bikeke mingi, moto asili kobundisa banyama mpo na masano, masano oyo mbala mingi epusami makasi na mposa ya mbongo. Longola bitumba ya banyama wana ezali lisusu na bitumba ya bangɔmbɛ, ya minsole mpe ya mampulututu oyo bato babundisaka. Lisusu, banyama mingi ezali konyokwama mpo na bolukiluki na makambo ya siansi. Banyama mosusu ebele ezali konyokwama mpo ete bankolo na yango bazali kosundola yango na nko to mbala mosusu na nko te.
Na mikili mosusu, mibeko mpo na kobatela banyama mpe kopekisa konyokola yango ezali. Na 1641, etúká ya Massachusetts oyo esalaki ebongiseli ebéngami “Malako ya bonsomi,” elobaki ete: “Moto moko te asengeli konyokola banyama oyo na momeseno babɔkɔlaka yango mpo na bolamu ya bato.” Kobanda ntango wana, mibeko epesami mpe masangá esalemi mingi mpo na kobatela banyama na monyoko ya bato.
Nzokande, bato oyo bazali kobimisa masano ya kobundisa banyama, bamimonaka te ete bazali konyokola yango. Basusu oyo balobaka ete balingaka banyama basalaka ete banyama yango enyokwama to ekufa. Bato oyo balingaka kobundisa bansoso balobaka ete bansoso na bango ezali na bomoi molai koleka bansoso mosusu oyo bato basengeli kolya—oyo ezali libɔndisi ya solo te!
Mpo na nini konyokola banyama ezali mabe?
Nzambe apesi biso nzela ya kozwa matomba na banyama. Mitinda ya Biblia ezali kopesa biso nzela ya koboma banyama mpo na kolya mpe mpo na kosala bilamba to mpo tómibatela na makama. (Genese 3:21; 9:3; Exode 21:28) Nzokande, bomoi ezali eloko moko ya bulɛɛ na miso ya Nzambe. Bokonzi na biso likoló na banyama esengeli kosalelama na lolenge malamu oyo ezali komonisa limemya mpo na bomoi. Biblia ezali kokweisa mobali moko na nkombo Nimilodi, oyo emonani ete azalaki koboma banyama mpe mbala mosusu koboma mpe bato bobele mpo na komisepelisa.—Genese 10:9.
Yesu amonisaki ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na banyama ntango alobaki: “Bandɛkɛ mike mitano batekami na falanga mibale te? Mpe moko na bango abosanami na liboso na Nzambe te.” (Luka 12:6) Lisusu, ntango abongolaki makanisi na ye ya koboma engumba moko oyo etondaki na basali mabe oyo na nsima babongolaki motema, Nzambe ye moko alobaki ete: “Ngai mpe nayokela Ninive mawa te, mboka oyo monene, wana bato baleki nkoto monkama na ntuku mibale . . . , mpe bibwele mingi lokola?” (Yona 4:11) Ya solo, atalelaki banyama te lokola mwa biloko moko ya mpamba oyo bisengelaki kobomama.
Ntango apesaki Bayisalaele mibeko, Nzambe ateyaki bango makambo matali kobatela banyama. Asɛngaki na bango ete bázongisaka nyama oyo ebungi epai ya mokóló na yango mpe básalisaka banyama oyo ezali na mpasi. (Exode 23:4, 5) Banyama bazalaki mpe kopema mokolo ya sabata, ndenge moko na bato. (Exode 23:12) Mibeko ezalaki mpo na kobatela banyama ya etonga. (Deteronome 22:10; 25:4) Ya solo, banyama esengelaki kobatelama kasi konyokolama te.
Masese 12:10 ezali komonisa polele likanisi ya Nzambe: “Moyengebeni akobatela bomoi ya bibwele na ye, nde motema na bato mabe ezali na yauli.” Molimboli moko ya Biblia alobi boye mpo na vɛrsɛ yango: “Boboto ya moyengebeni emonisamaka ata mpo na banyama, kasi moto mabe azali makambo makasi, ata soki akanisi ete amonisi boboto koleka.”—Believer’s Bible Commentary, ya William MacDonald.
Moyengebeni azalaka na boboto na banyama mpe alukaka koyeba bamposa na yango. Moto mabe akoki kokosa kolinga banyama, kasi “boboto” na ye ezali mpenza ya mayele mabe. Misala na ye ezali komonisa mposa ya moimi oyo azali na yango. Yango ezali mpenza solo mpo na baoyo babundisaka banyama na elikya ya kozwa mbongo!
Libɔndisi mpo na banyama
Mokano ya libosoliboso ya Nzambe ezalaki ete moto azala na “bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili.” (Genese 1:28) Kasi ezali te ete bato bányokolaka banyama yango. Likambo ya konyokola banyama ekozala libela na libela te. Tozali na ntina ya kondima ete Nzambe akosukisa monyoko nyonso oyo ezangi ntina. Kasi na lolenge nini?
Alaki ete akolongola bato mabe mpe babomi. (Masese 2:22) Na ntina na banyama, Hosea 2:18 elobi ete: “Nakokata kondimana mpo na yo epai na banyama na zamba mpe bandɛkɛ na lola mpe na biloko bikolandalandaka na mabelé; . . . nakolalisa mpe [yango] na kimya.” Oyo nde esengo ekozala kozala na bomoi na ntango wana, ntango makambo ya kimya ekozala bobele mpo na bato te kasi mpe mpo na banyama!
[Elilingi na lokasa 26]
“Etumba ya bangɔmbɛ na mboka moko,” esalemi na Francisco Goya