Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Octobre nk. 21-23
  • Myango mitano ya kobongisa bomoi na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Myango mitano ya kobongisa bomoi na yo
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ya liboso: Loná mwa elanga ya ndunda
  • Ya mibale: Sombaká biloko mingi mbala moko
  • Ya misato: Yebá kobomba biloko malamu
  • Ya minei: Bɔkɔlá mwa bibwɛlɛ
  • Ya mitano: Bopɛto
  • Wapi ntina ya bopeto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ndenge nini nakoki koyeba koloba liboso ya bato?
    Lamuká!—2004
  • Lolenge nini okoki kotambwisa bato ya ndako na yo?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge ya kosala mpo nzoto ezala malamu
    Lamuká!—2015
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Octobre nk. 21-23

Myango mitano ya kobongisa bomoi na yo

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA RÉPUBLIQUE CENTRAFRICAINE

KOKWEA ya mosolo, maladi, kolya malamu te, bobola​—mikakatano oyo nyonso mipalangani mingi na mikili ya bobola. Mpe na makanisi ya bato, mayele mpo na kosilisa mikakatano yango noki ezali te. Soki ofandi na mokili ya bobola, ezali na likambo moko oyo okoki kosala mpo na kobongisa bomoi na yo? Ɛɛ, ezali! Makanisi mitano oyo malandi makoki kosalisa yo mpo na yango.

Ya liboso: Loná mwa elanga ya ndunda

Na Masese 28:19, Biblia elobi ete: “Moto oyo akotimola mabelé na ye akotonda na kwanga.” Ya solo, okoki mbala mosusu kokamwa na biloko oyo bikoki kobima na mwa elanga ya ndunda oyo oloni. Kati na buku na ye Elanga ya ndunda na bamboka ya moi makasi mpe ya zamba (na Lifalanse), Henk Waayenberg alobi ete mwa elanga ya ndunda ya mɛtɛlɛ kare 50 kino mɛtɛlɛ kare 100 ekoki kobimisa ndunda oyo ekoleisa libota ya bato motoba!

Na bongo, mpo na nini kobungisa mbongo na kosombáká biloko oyo okoki kolona yo moko? Soki mabelé mpe eleko ezali malamu, okoki kolona na lopango na yo biloko lokola pilipili, tii, lipapá (épinard), persil, matungulu, sɔngɔ, mabɔkɛ, mabɛngɛ, nkoko, tomato, kɔkɔmbre to masangu. Elanga motindo wana ekoki kobimisa biloko oyo bikoki kokokisa bamposa ya libota na yo, kutu okoki kozwa mpe mosusu mpo na kotɛka.

Soki ozali na mabelé ya mwa monene, okoki mpe kolona nzete ya mbuma ndenge na ndenge. Mbala mosusu, nzete moko pamba ya mbuma ekoki kobimisa mbuma oyo ekoki koleisa yo mpe libota na yo. Okoki koyekola kosala bikunde mpo na kozwa bipɔli oyo ekobongisa mabelé​—yango ekosalisa yo mpo ete milona na yo mibota malamu. Nzete ezali na matomba mosusu koleka kobimisa biloko ya kolya mpe ya kotɛka. Banzete oyo elonami esika ebongi epesaka mpiɔ mpe mopɛpɛ kitoko na lopango.

Nzokande, ezali boni soki oyebi mpenza kosala elanga ya ndunda te? Ozali na baninga, bazalani to bayebani oyo bayebi mosala yango? Na bongo, mpo na nini te kosɛnga bango ete básalisa yo to bápesa yo toli? Mbala mosusu ekoki kozala malamu kosomba to kodefa babuku mosusu oyo ezali kolobela mosala ya kolona mwa elanga ya ndunda.​—Talá lisolo “Mpo na nini te kolona mwa elanga ya ndunda?” ebimaki na Lamuká! ya 22 Augústo 1974, ebimeli ya Lifalanse.

Ya mibale: Sombaká biloko mingi mbala moko

Osombaka biloko oyo elyamaka mokolo na mokolo lokola fufu, loso, mpe mafuta bobele mokemoke? Soki ezali bongo, ozali mbala mosusu kobebisa mbongo na yo mosusu mpamba. Soki likoki ezali, sombaká biloko wana mingi mbala moko, bokoki kosangisa mbongo mabota mibale, misato to koleka, na nsima bokaboli. Lolenge yango ekosalisa yo ete obomba mwa mbongo mosusu mpo na kosomba mbuma mosusu to ndunda mosusu mbala moko. Mbala mosusu, okoki ata kosomba biloko mingi na mbala moko.

Ya misato: Yebá kobomba biloko malamu

Kosomba biloko mingi mbala moko ezalaka malamu, kasi esɛngaka kobomba yango malamu. Kokaukisa biloko ezali mosala oyo eyebani mingi mpe ebongi. Basi mingi na Afrika babikelaka na kokaukisáká mbuma, madesu, mabɔkɛ, mpe matiti mosusu ya nsolo kitoko. Kokaukisa esɛngaka bisaleli ya mineneminene te. Ekoki mbala mosusu bobele kokwakisa biloko to kolalisa yango na esika moko oyo ezali pɛto, mbala mosusu kozipa yango na elamba moko oyo ezali pɛto mpo na kobatela yango na banzinzi. Mopɛpɛ mpe moi ekosala mosala na yango.​—Talá lisolo “Okoki kobimisa mosolo moke?” kati na Lamuká ya 8 Desɛ́mbɛ 1975, ebimeli ya Lifalanse.

Ya minei: Bɔkɔlá mwa bibwɛlɛ

Likoki ezali mpo ete yo moko obɔkɔla nsoso, ntaba, bibenga, to banyama mosusu? Na bisika mingi, misuni ekómi kotɛkama na ntalo makasi. Kasi soki ozwi mwa lisalisi moke, okoki koyeba lolenge ya kobɔkɔla bibwɛlɛ yo moko. Osepelaka kolya mbisi? Na bongo, okoki kosala mwa etima ya mbisi. Misuni, maki, mpe mbisi ezalaka na biloko babéngi fer, calcium, vitamini, oligoélément mpe proteine​—biloko yango nyonso ezali na ntina mpo na bokolɔngɔnɔ ya libota na yo.

Ya mitano: Bopɛto

Bopɛto ezali mpe na ntina mpo na bokolɔngɔnɔ ya libota na yo. Bosɔtɔ ebendaka mpuku, nzinzi mpe mpɛsɛ​—yango ememaka makɔnɔ ndenge na ndenge. Kobatela bopɛto ekosɛnga na yo ntango mpe milende. Kasi yango ezalaka na ntalo moke koleka nkisi mpe mbongo ya kofuta monganga. Mimeseno ya bopɛto ekoki kokesene kati na moto moko na mosusu mpe na ekólo moko na mosusu. Nzokande, ezali na mwa mitinda mosusu oyo mizali kosalelama bipai binso.

Na ndakisa, batwalɛti. Na bamboka ya zamba, mbala mingi batwalɛti ezalaka nsolo mabe mpe bosɔtɔ, mpe yango ememaka makɔnɔ ndenge na ndenge. Bato oyo batalelaka makambo ya bopɛto bakoki kopesa yo malako na lolenge ya kotonga twalɛti ya malamu oyo ekosɛnga yo mbongo mingi te.

Ezali boni mpo na ndako na yo? Ezali pɛto mpe etongami na esika malamu. Ezali na nsolo kitoko? Ezali boni mpo na kuku na yo? Ezali malamu mpe pɛto? Mpo na kopɛngola makɔnɔ, bilei bisengeli kozala pɛto mpe kolambama malamu. Mikrobe ezalaka mingi na mai oyo ebebá. Na yango, kɔngɔlaká mai to tɔkisaká yango liboso ya kosalela. Sukolaká basaani na mai ya mɔ́tɔ mpe sukolaká mabɔkɔ na yo malamu liboso ya kosimba bilei. Bombaká mai na bisaleli oyo bizali pɛto mpe bizali na bizipeli.

Mbwa, nyau, nsoso mpe ntaba esengeli kokɔta na kuku te​—yango ezali malamu te soki olingi ete ozala nzoto kɔlɔngɔnɔ. Esengeli mpe te ete mitomba mpe mpuku epotaka likoló ya banzungu mpe basaani, mpamba te ememaka mikrobe na bilei. Mwa motambo ya mpuku ekoki kosilisa mokakatano yango.​—Talá lisolo “Kolonga mokakatano ya bopɛto,” na Lamuká! ya 22 Sɛtɛ́mbɛ 1988, ebimeli ya Lifalanse.

Mpo na kosukisa, tokoki koloba ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano nyonso ya bato. (Matai 6:9, 10) Nzokande, na kozeláká, makanisi oyo mabongi makoki kosalisa yo ete obongisa bomoi na yo.

[Bililingi na lokasa 21]

Loná mwa elanga ya ndunda

[Bililingi na lokasa 22]

Sombaká biloko mingi mbala moko

[Bililingi na lokasa 22]

Yebá kobomba biloko malamu

[Bililingi na lokasa 23]

Bɔkɔlá mwa bibwɛlɛ

[Bililingi na lokasa 23]

Bopɛto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto