Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Octobre nk. 18-20
  • Nakosala nini soki alingi ngai te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nakosala nini soki alingi ngai te?
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolinga moto oyo alingi yo te epesaka mpasi
  • Talelá mayoki na yo malamumalamu
  • Talelá bosolo ya likambo yango
  • Ndenge okoki kolonga mpasi yango
  • Ndenge nini koyebisa ye ete nalingi ye te?
    Lamuká!—2001
  • Ndenge ya kotika komiyoka lokola ozangi libateli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mpo na nini basusu bazali kobala, bongo ngai te?
    Lamuká!—1996
  • Ezali kaka boninga to nde lolango?—Eteni 1: Nazali komiyoka ndenge nini?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Octobre nk. 18-20

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Nakosala nini soki alingi ngai te?

“Nazali komitungisa. Nalingaka ye mingi. Kasi nayebi te soki ye mpe alingaka ngai. Nasala nini? Nayebisa ye ete nalingaka ye? Te, te, nakoki kosala bongo te! Bato mosusu bakomona ngai ndenge nini?”​—Huda.a

HUDA, elenge mwasi oyo afandi na ekólo Liban, na motema na ye, abandaki kolinga mwana mobali moko, kasi mwana mobali yango azalaki na makanisi lolenge moko na ye te. Yango ezali likambo ya kokamwa te. Elenge mwasi mosusu na nkombo Zeina azalaki mpe na mayoki ya ndenge wana. Alobi ete: “Nazalaki komona ye mikolo nyonso mpamba te azalaki kofanda pene na biso. Azalaki kitoko mpenza. Na bongo, nazalaki kolula ye mpe kolinga ye na motema.”

Ya solo, ezali mabe te kolinga moto na motema​—soki moto yango azali moklisto oyo okoki kobalana na ye. (Masese 5:15; 1 Bakolinti 7:39) Ezali mpe mabe te mpo na elenge mwasi kolinga kobala mpe kosala libota. Kasi okosala nini soki moto oyo ozali kolinga na motema ayebi makanisi na yo te​—to ye alingi yo te?

Kolinga moto oyo alingi yo te epesaka mpasi

Lolenge moko na Huda, mbala mosusu ozali na mayoki ndenge na ndenge. Mokolo moko ozali na esengo mingi, mokolo mosusu omiyoki mawa mpenza. Zeina alobi ete: “Mbala mosusu namiyokaka lokola nazali mwana mwasi oyo azali na esengo koleka bana basi nyonso na mokili mobimba, nzokande mbala mosusu namiyokaka lokola mwana mwasi oyo azali na mawa koleka.” Kolinga moto oyo alingi yo te, ezali likambo oyo ekoki kopesa mpasi, kozangisa mpɔngi, mpe kutu konyokola na makanisi.

Na Masese 13:12, Biblia elobi ete: “Elikya oyo ezelisami [epesaka, NW] motema mpasi.” Mpe elikya oyo ekokisami te, ekoki kopesa mpasi mpenza! Okoki komona ete ozali kokanisa ye ntango nyonso, ozali na mposa ya koyoka masolo na nkombo na ye. Okoki koluka myango ya kobenda likebi na ye to kosala nyonso ete ozala esika moko na ye. Mpe ntango ozali esika moko na ye, okoki kozala na mokakatano ya komiyoka malamu.

Ekoki kozala lisusu mpasi koleka soki moto oyo ozali kolinga na motema azalaki kotyela yo likebi bantango mosusu kasi na nsima abendi nzoto. Soki sikawa omoni ye akómi kotya likebi mingi epai na moto mosusu to mpe azali komonisela ye bobele boboto, yango ekoki kosala ete okóma koyoka zuwa. Biblia elobi ete: “Kosilika ezali mabe mpenza mpe nkanda ezali mabe koleka; nde nani akotɛlɛma liboso ya zuwa?”​—Masese 27:4, NW.

Huda alobi ete: “Nakómaki na zuwa makasi mpo na ye na boye ete soki nasembolaki makanisi na ngai te, mbɛlɛ nabɛli ligboma.” Okoki mpe komona ete yo moko ozali mabe. Huda alobi ete: “Namiyokaki mawa mpo ete nazalaki kolinga moto oyo alingaki ngai te mpe mpo ete naminyokolaki motindo wana.”

Atako na Mpoto, elenge mwasi akoki koyebisa elenge mobali ete alingi ye, kasi ezali bongo te mpo na bilenge basi nyonso. Mpe, na bipai mosusu, ekoki kozala mabe mpenza mpe nsɔni mpo mwana mwasi aloba na mwana mobali liboso ete: nalingi yo. Na bongo, okosala nini soki olingi moto oyo alingi yo te?

Talelá mayoki na yo malamumalamu

Libosoliboso, talelá mayoki na yo malamumalamu. Biblia ekebisi ete: “Ye oyo akotalela motema na ye moko azali elema.” (Masese 28:26) Mpo na nini? Mpo ete mbala mingi motema na biso ekosaka biso. (Yilimia 17:9) Mpe mayoki oyo tokoki kokanisa ete ezali bolingo, mbala mingi ezalaka yango te. Huda alobaki ete: “Nazalaki na mposa ya likebi mpe ya bolingo. Nazalaki na mposa ete moto moko alinga ngai mpe amibanzabanza mpo na ngai. Banda bomwana na ngai, naino bamonisela ngai bolingo te. Yango ezalaki kopesa ngai mpasi mingi.” Soki okolaki kati na libota oyo ezangi bolingo, mbala mosusu okoki koyoka mposa ete moto moko amonisela yo bolingo mpe boboto. Kasi kolinga moto na ndenge wana ekoki mpenza kokokisa mposa yango?

Likambo ya mawa, bato oyo bayokaka ete balingaka bango te mpe oyo bayokaka lokola ete bazali bango moko, mbala mingi bazwaka babalani ya malamu te. Bakanisaka ete, soki babali, bakozwa mayoki oyo bazali na yango mposa. Nzokande, esengo ya solosolo eutaka na kopesa kasi na kozwa te. (Misala 20:35) Mpe lisusu, mwasi akoki kolonga na libala na ye soki azali na makanisi mabongi mpo na bomoto na ye mpe soki ‘azali komibanzabanza bobele mpo na makambo na ye moko te, kasi mpe mpo na oyo ya basusu lokola.’​—Bafilipi 2:4.

Soki ozali ntango nyonso kokanisa libala, mbala mingi okoki kokóma na makanisi oyo malongobani te soki moto moko atyeli yo mwa likebi. Mbala mosusu, ezalaka baninga to libota nde bakolisaka mposa ya mwana mwasi mpo na kobala. Na bamboka mosusu, soki mwana mwasi akokisi mbula oyo akoki kobala, asengeli kobala noki. Buku Basi na Proche-Orient (na Lingelesi) elobi ete: “Soki mwasi abɛlɛmi na mbula ntuku misato kasi abali naino te, libota na ye ekómaka komitungisa mingi mpo na ye.” Lokola likambo ya libala etalelaka lokumu ya libota, tata akoki komeka kosala nyonso mpo na kobalisa bana na ye ya basi ntango bazali naino bilenge.

Kasi, mitinda ya Biblia mizali na ntina koleka makambo ya bonkɔkɔ. Mpe Makomami mazali kolendisa bilenge ete bázela kino ‘bakolekisa ntango ya bolenge’ liboso ya kobala. (1 Bakolinti 7:36) Na bongo, okosala nini soki baninga na yo to baboti na yo bazali kopusa yo na makasi mpo na kobala? Biblia ezali koyebisa biso ete mosaleli moko ya Nzambe, elenge mwasi Sulamite ayebisaki baninga na ye polele ete ‘bálamwisela ye bolingo te kino yango moko ekoya.’ (Loyembo na Salomo 2:7) Mbala mosusu soki yo mpe omonisi mayoki na yo na motindo wana, okoki mpe kozwa matomba malamu, mingimingi soki baboti na yo bazali bato oyo babangaka Nzambe.

Talelá bosolo ya likambo yango

Nsukansuka, osengeli kotalela moto oyo ozali kolinga mpo na koyeba solosolo bomoto na ye. Kosala bongo ekoki mbala mosusu kozala mwa mpasi mpo na yo. Kasi, Makomami elobi ete: “Sombá [bosolo, NW] mpe tɛkisá yango te.” (Masese 23:23) Omituna yo moko: ‘Nayebi mpenzampenza mpo na nini nazali kolinga moto yango? Nayebi ye mpenza malamumalamu? Nayebi mpenza makanisi na ye, mayoki na ye, mikano na ye, bizaleli na ye, mimeseno na ye, makoki na ye, mpe bomoi na ye?’

Likambo mosusu ya koyeba ezali soki moto yango azali mpenza kosepela na yo. Mbala mingi, boboto ya mpamba to boninga okoki kokamata yango lokola bolingo. Huda alobaki ete: “Azalaki bobele komonisela ngai boboto, kasi ngai nazalaki kotalela maloba na ye mpe makambo oyo azalaki kosala lokola nde ete azali kosepela na ngai mpamba te nalingaki ete ezala bongo. Na nsima, lokola nayaki komona ete azalaki kotyela ngai likebi te, namiyokelaki mawa. Namonaki ete nabongaki na ye te mpe ete nazalaki komikosa.”

Mbala mosusu osila komiyoka motindo wana. Nzokande, osengeli koyeba ete ezali te mpo ete osepelisi ye te nde okosepelisa mpe moto mosusu te. Yebá ete azali bobele ye moko te na mokili!

Ndenge okoki kolonga mpasi yango

Ata osali nyonso, ekoki koumela mwa ntango mpo ete mpasi na yo esila. Eloko nini ekoki kosalisa yo? Ezali malamu kosolola na “moninga” moko​—moklisto oyo akɔmeli, oyo akoyokamela yo malamu. (Masese 17:17) Mbala mosusu okoki kosolola na mwasi moko mokóló oyo azali kati na lisangá. Baboti oyo bazali baklisto bakoki mpe kosalisa yo mingi na likambo yango. Zeina amikundoli ete: “Mwasi moko moklisto na lisangá na biso amonaki ete nakómaki mawamawa, na yango asalisaki ngai. Nasepelaki na ye mingi mpe nayebisaki ye makambo nyonso. Alendisaki ngai ete nasolola na baboti na ngai. Na bongo, nasololaki na bango, bamityaki na esika na ngai mpe basalisaki ngai.”

Kobosana mpe te nguya ya libondeli. (Nzembo 55:22) Huda alobi ete: “Mabondeli na ngai epai na Yehova esalisaki ngai ete nalonga mpasi na ngai. Natángaki mpe masolo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká!” Lisusu, ezali malamu ete omitangola na basusu te. (Masese 18:1) Zalaká elongo na basusu. Zeina amikundoli ete: “Eloko mosusu oyo esalisaki ngai ezalaki ete nazalaki ntango nyonso na makambo ya kosala mpe nakómaki mobongisi-nzela [mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso]. Nakómaki mpe kotala bandeko basi mingi ya lisangá na biso. Yango esalisaki ngai ete nakola na elimo.”

Biblia ezali kolobela “ntango mpo na kolinga,” mpe ekoki kozala ete mokolo mosusu okokutana na moto moko oyo akolinga yo. (Mosakoli 3:8, NW) Yehova Nzambe asalaki bato na mposa ya kosepela na esengo ya libala, mokolo mosusu yo mpe okoki kozwa matomba ya ebongiseli malamu yango ya Mozalisi na biso Monene. Na kozeláká, mpo na nini te kosepela na matomba ya bonzemba, eleko oyo ‘ezangi mitungisi,’ lokola ntoma Paulo alobi yango? (1 Bakolinti 7:32-​34) Ezala ata ndenge nini, okoki komindimisa ete elaka oyo ya Biblia ekokokisama: ‘Yo [Yehova] okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa na nyonso na bomoi.’​—Nzembo 145:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Wana ezali bankombo na bango te.

[Elilingi na lokasa 19]

Mbala mosusu, boboto ya mpamba okoki kokamata yango lokola bolingo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto