Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Octobre nk. 24-25
  • Mobu 2000 ezali na ndimbola moko monene?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobu 2000 ezali na ndimbola moko monene?
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova, ye oyo ayebi ntango malamu
  • “Nyonso oyo ekoya ntango nini?”
  • Milenere ya misato ekobanda ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mobu 2000—Ekokesena mpenza na bambula mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Milenere ya misato ekokokisa bilikya na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tótya motema epai ya Yehova—Nzambe ya “bantango mpe bileko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Octobre nk. 24-25

Engebene Biblia

Mobu 2000 ezali na ndimbola moko monene?

BATO mingi bapesaka ndimbola moko te oyo eyokani na makambo ya lingomba mpo na mobu 2000 lokola yango ekanisamaka na Mpoto mpe na mikili mosusu mingi. Na ndakisa, Bayuda, Bamizilma mpe Bahindu bango nyonso bazali na manaka ya lingomba na bango moko oyo ekeseni na oyo ya mikili ya Mpoto. Mpo na badati ya makambo ya lingomba mpe ya bonkɔkɔ, bato ya ekólo Chine balandaka manaka oyo ebéngami calendrier lunaire. Nzokande, mpo na bamiliare ya bato lelo oyo, mbala mosusu ndambo monene ya bato na mokili, mobu 2000 ezali na ndimbola moko te mpo na bango.a

Atako bongo, mingi mpenza na mikili ya Mpoto, bato mingi bazali kozela na motema likoló millénaire oyo ebelemi lokola yango emonisami na Manaka ya Grégoire (calendrier grégorien). Mpo na bato mosusu, ezali bobele kozela na motema likoló te. Batalelaka ete mobu 2000 ekozala bokɔti na eleko ya sika, mpe ete mbongwana monene ekosalema na lisolo ya bato. Bato mingi oyo balobaka ete bandimaka Biblia bakanisaka ete bisakweli bikokokisama na mobu 2000. Basusu bazali kolikya komona likambo moko monene na elimo. Basusu bazali kobanga mobulu moko monene​—nsuka ya molɔ́ngɔ́. Biblia ezali kopesa endimiseli moko na bilikya yango?

Yehova, ye oyo ayebi ntango malamu

Nzambe ya Biblia alobelami lokola “Mokóló na mikolo.” (Danyele 7:9, NW) Ayebi ngonga malamumalamu, lokola yango ezali komonana polele na mosala na ye ya bozalisi, kobanda na kozolongana ya baplanɛti kino kotambola ya biloko mikemike. Azali na manaka na ye moko oyo atosaka na bosikisiki mpenza. Biblia elobi ete: “Aponeli bango [bato oyo bafandi na mokili] bilaka mpe atyeli bango ndelo na bifandelo na bango.” (Misala 17:26) Yehova ayebi mpenza ntango malamumalamu.

Na yango, Biblia etyaka likebi makasi na ntango. Ezali kopesa badati oyo elandani, oyo ezali kopesa nzela ya kotánga ntango kino ebandeli ya lisolo ya bato. Yango ezali komonisa ete Nzambe asalaki Adama na mobu 4026 L.T.B. Abalayama abotamaki mbula soko 2 000 na nsima. Mbula mosusu 2 000 elekaki liboso ete Yesu abotama.

Bato mosusu oyo bayekolaka badati ya Biblia bazali kobimisa mateya na bango moko na oyo etali badati ya sikisiki. Na ndakisa, bato yango bakanisaka ete lokola kobanda Adama kino Abalayama elekaki mbula 2 000, mpe kobanda Abalayama kino Yesu elekaki mpe mbula 2 000, na bongo bazali kosakola ete likambo moko ekosalema na nsuka ya eleko ya mbula 2 000 uta kobotama ya Yesu. Oyo ezali bobele ndakisa moko ya makambo oyo bato bakanisaka ete ezali solo mpe etongami na badati ya Biblia.

Nzokande, Biblia ezali kolobela ntango oyo Yehova Nzambe akotalela makambo ya bato mpo na kolongola mabe mpe kotya mokili ya sika. Bisakweli ya Biblia ezali kolobela “ntango ya nsuka,” “nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo,” “mikolo ya nsuka,” mpe “mokolo ya Yehova.” (Danyele 8:17, NW; Matai 24:3, NW; 2 Timote 3:1, NW; 2 Petelo 3:12, NW) Nzokande, “nsuka” oyo esakolami na Biblia ezali na boyokani soko moke te na mobu 2000. Likambo moko te kati na Makomami ezali komonisa ndimbola ya sikisiki ya nsuka ya millénium ya mibale lokola Manaka ya Grégoire epesi yango.

“Nyonso oyo ekoya ntango nini?”

Bantoma ya Yesu bazalaki koluka koyeba manaka ya Yehova ntango batunaki Yesu ete: “Yebisá biso, nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na [kozala, NW] na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” (Matai 24:3) Lelo oyo, bato mingi bazali mpe komituna lolenge moko mpo na mikolo mizali koya. Ezali mabe te koluka koyeba bisakweli ya Biblia mpe ntango oyo yango ekokokisama. Nzokande, ezali malamu kondima mpe kotosa likanisi ya Nzambe na likambo yango.

Na nzela ya Mwana na ye, Yehova asilá koyebisa makanisi na ye mpe asilá kopesa eyano ya polele na likambo yango. Mwa moke liboso ete amata na likoló, bayekoli ya Yesu batunaki ye lisusu na ntina na ntango oyo bilaka ya Nzambe bikokokisama. Yesu ayanolaki ete: “Ezali likambo na bino te ete bóyeba ntango to bilaka oyo Tata asili kotya na bokonzi na ye moko.” (Misala 1:7, NW) Mokolo mosusu liboso, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nde mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata baanzelu na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.”​—Matai 24:36.

Ezali polele ete, “koyeba ntango mpe bileko,” mingimingi ntango etali kokokisama ya bisakweli ya Biblia, ezali likambo ya bato te. Nzambe amonaki malamu ayebisa biso likambo motindo wana te. (Matai 24:22-​44) Tokoki na lolenge moko to mosusu kobongola mokano ya Nzambe na kolukáká koyeba “mokolo yango mpe ngonga yango” na ndenge na biso moko? Ya solo mpenza, tokokoka koyeba yango te. (Mituya 23:19; Baloma 11:33, 34) Biblia elobi ete: “Toli na [Yehova] ekoumela seko.” (Nzembo 33:11) Lokola azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, alongaka ntango nyonso kokokisa mikano na ye.​—Yisaya 55:8-​11.

Atako Nzambe atii “boyebi ya ntango mpe bileko . . . na bokonzi na ye mpenza,” nzokande bato mingi balingaka komityela badati na bango moko. Basusu bamikómisi basakoli oyo bazali koyebisa bobele nsango ya mawa. Mpo na yango, ntoma Paulo akebisaki Batesaloniki na ntina na likama ya koyokamela baoyo bazali komityela badati. Akomaki ete: “Nazali kolɔmba bino . . . ete bóningana kati na makanisi na bino te mpe ete bóbanga te soko na ntina na [elimo, NW] te, soko na ntina na liloba te, soko na ntina na mokanda te oyo emonani lokola ete euti na biso, mpo na kobanza ete Mokolo na Nkolo esili koya. Tiká te ete moto azimbisa bino na nzela nini.”​—2 Batesaloniki 2:1-3.

Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ete mikano ya Nzambe mpo na mikolo mizali koya ekokokisama na ntango oyo ye moko asilá kopona, bobele na mokolo mpe na ngonga oyo ye moko asilá kotya. (Habakuku 2:3; 2 Petelo 3:9, 10) Mpe tozali na elikya ete makambo yango makosalema na mikolo mizali koya mosika te. (2 Timote 3:1-5) Nzokande, tómekamekaka badati te to mpe tóndimaka makanisi ya bato te mpo na likambo yango.b Ya solo mpenza, ezala ata mobu 2000, to mobu 2001, ata ntango mosusu oyo etyami na bato ezali na boyokani moko te na manaka ya Yehova.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na kotalela makambo na bosikisiki, eleko oyo ebéngami troisième millénaire ekobanda mpenzampenza na mwa 1 Yanuáli 2001. Millénaire ya liboso ebandaki na mobu zero te, kasi na mobu 1. Nzokande, bato batalelaka liloba “troisième millénaire” ete ekobanda na mobu 2000. Lisolo oyo ezali kolobela mingi bilikya ya bato na ntina na mobu 2000.

b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1997, lokasa 22, elobaki ete: “Batatoli ya Yehova bazalaki na mposa makasi ya koyeba ntango oyo mokolo ya Yehova ekoya. Na mposa makasi na bango ntango mosusu bamekaki kotya ntango oyo mokolo yango ekoki koya. Kasi na kosaláká bongo, balandaki te​—lokola ezalaki mpo na bayekoli ya liboso ya Yesu​—likebisi ya Nkolo ete ‘toyebi te soko elaka yango ekokokisama ntango nini.’ (Malako 13:32, 33) Basɛki basɛkaki baklisto ya sembo mpo na bilikya na bango oyo bakendaki na yango mbangumbangu na makanisi. (2 Petelo 3:3, 4) Atako bongo, mokolo ya Yehova ekoya, Petelo alobi ete, engebene manaka na Ye.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto