Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Octobre nk. 3-6
  • Bazali kosalela basi makambo na bosembo te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kosalela basi makambo na bosembo te
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Monyoko makasi
  • Bazali bamama mpe baleisi ya mabota
  • Mpo na nini likambo yango ezali se koya makasi?
    Lamuká!—2003
  • Esengeli kopesa basi lokumu mpe kondima mosala na bango
    Lamuká!—1998
  • Mikakatano oyo basi bakutanaka na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Banani bazali baombo lelo oyo?
    Lamuká!—2000
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Octobre nk. 3-6

Bazali kosalela basi makambo na bosembo te

NA Afrika ya Wɛsti, moto moko ya mombongo asombaki mwana moko ya mibu libwa. Na Azia, mwana moko oyo autaki kobotama, bakundaki ye na bomoi na zɛlo ya mokili mokauká. Na ekólo moko epai ya ebimelo ya ntango, mwana moko ya moke oyo abandaki kotambola sika, basundolaki ye na ndako ya bitike mpe akufaki mpo na nzala. Nzokande, likambo ya mawa ezali ete, bana yango nyonso oyo bakufaki bazalaki bana basi. Lokola babotamaki basi, yango wana mabota na bango basundolaki bango.

Makambo ya mawa motindo wana mazali kosalema mingi. Na Afrika, bankóto ya bana basi mpe bilenge basi bazali kotɛkisama lokola baombo, mbala mosusu bobele na dolare 15. Mpe eyebisamaki ete mbula na mbula, bankóto ya bana basi bazali kotɛkisama to kopusama na makasi mpo na kosala bondumba, mingimingi na Azia. Nzokande, likambo ya mabe koleka, mitángo ya bato na bikólo mosusu ezali komonisa ete bana basi milio 100 “bazali komonana te.” Yango euti mpenza na makambo lokola kosopa zemi, koboma bana oyo babotami sika, to kosundola bana basi.

Banda kala​—esili koleka bikeke mingi​—bazali kosalela basi makambo ya ndenge wana na bikólo mingi. Mpe bazali kokoba kosalela bango makambo motindo wana na bisika mosusu mingi. Mpo na nini? Mpo ete na bikólo yango, batalelaka bana mibali na motuya mingi koleka. Balobaka ete mwana mobali akolandisa libota, akosangola libula ya libota mpe akosalisa baboti ntango bakokóma mibange, lokola mingimingi na bikólo yango Leta apesaka mibange mosolo te. Lisese moko ya Azia elobaka ete: “Kobɔkɔla mwana mwasi ezali lokola kosopela molona ya moto mosusu mai.” Ntango akokola, akotika ndako mpo na kobala to akotɛkisama mpo na kosala bondumba mpe na yango mbala mosusu akosalisa baboti na ye malamu te wana bakómi mibange.

Monyoko makasi

Na mokili ya bobola makasi, bana basi baleisamaka malamu te, basalisamaka na monganga malamu te, mpe batángaka kelasi mingi te. Na ekólo moko ya Azia, balukiluki bamonaki ete bana basi 14 likoló na monkama bazalaki kolya malamu te, kasi mpo na bana mibali ezalaki bobele bana mitano likoló na monkama nde bazalaki kolya malamu te. Lapolo moko ya UNICEF (Fonds des Nations unies pour l’enfance) emonisaki ete na bikólo mosusu motángo ya bana mibali oyo bakendaka na bango na lopitalo ezali mbala mibale koleka motángo ya bana basi. Mpe, na Afrika, na Azia ya Sudi mpe ya Wɛsti, bilenge basi koleka 40 likoló na monkama batángá kelasi te. Audrey Hepburn, motindami ya kala ya UNICEF amilelaki ete: “Na mikili ya bobola, bana basi bazali konyokwama mingi koleka bana mibali.”

“Monyokoli” yango esilaka mpe te ata ntango bana basi bakómi mikóló. Basi bazali komona mpasi na bobola, na mobulu mpe na misala makasi, nyonso wana bobele mpo ete bazali basi. Prezida ya Banque mondiale alobaki ete: “Basi basalaka misala mibale likoló na misala misato oyo ezali kosalema na mokili mobimba. . . . Nzokande bazwaka bobele eloko moko kati na biloko zomi oyo ebimisami na mokili mobimba. Bazali kati na bato oyo baleki bobola na mokili.”

Lapolo moko ya Mabota Masangani (Nations unies) emonisi ete, kati na bato miliare 1,3 oyo bazali na bobola makasi, bato 70 likoló na monkama ezali basi. Lapolo yango ebakisi ete: “Mpe ezalela yango ezali bobele kobeba. Motángo ya basi oyo bafandi na bamboka mpe bazali na bobola makasi ekoli pene na 50 % na boumeli ya mbula ntuku mibale oyo euti koleka. Bobola ezali konyokola mingimingi basi.”

Likambo ya mawa koleka ezali bongo makambo ya mabe oyo bazali kosalela basi mingi kati na bomoi na bango. Ekanisami ete bana basi milio monkama, mingimingi na Afrika, bazali konyokwama na kokatáká bango binama ya kobota. Kobebisa basi ezali likambo oyo lipalangani mingi atako na bisika mosusu elobelamaka te. Bolukiluki ezali komonisa ete mwasi 1 kati na basi 6 abebisamaka na boumeli ya bomoi na ye. Ya solo, bitumba ezali konyokola basi mpe mibali, kasi mingi kati na bato oyo bakimá bitumba ezali bongo basi mpe bana.

Bazali bamama mpe baleisi ya mabota

Mokumba ya koleisa libota ezalaka mingimingi na motó ya mama. Na ntembe te asalaka mosala na boumeli ya bangonga ebele mpe mbala mingi aleisaka libota bobele ye moko. Na bamboka mosusu ya zamba na Afrika, pene na mabota 50 likoló na monkama matambwisamaka na basi. Na bingumba mosusu ya Mpoto, mabota mingi mazali mpe kotambwisama na basi.

Lisusu, mingimingi na mikili ya bobola, basi nde basalaka misala mosusu ya makasi koleka, na ndakisa kotoka mai mpe koluka nkoni. Lokola bato bazali kokata bazamba mingi mpe kobɔkɔla bitonga, misala yango ekómi lisusu makasi koleka. Na bikólo mosusu oyo bibebisami na kokauka ya mabelé, mokolo na mokolo, basi basalaka ngonga misato to koleka mpo na koluka nkoni mpe ngonga minei mpo na kotambola kotoka mai. Bobele soki asali bongo nde na nsima akoki kobanda misala mosusu na ndako to kokende na elanga.

Ya solo, na bikólo oyo bobola, nzala to mpasi ezali, basi mpe mibali bazali konyokwama mokolo na mokolo. Kasi, basi banyokwamaka mingi koleka. Ezaleli yango ekobongwana mokolo mosusu? Elikya ezali ete mokolo mosusu, bipai binso na mokili, bakopesa basi limemya mpe botosi? Ezali na likambo moko oyo basi bakoki kosala sikawa mpo na kobongisa ezaleli na bango?

[Etanda/Elilingi na lokasa 5]

Bana basi bandumba​—Foti ya nani?

Ekanisami ete mbula na mbula bana milio moko​—mingi mpenza bana basi​—bazali kopusa bango na makasi ete básala bondumba to bazali kotɛkisa bango na bandako ya kosala bondumba. Araya,a oyo akoli na ekólo moko na sudi-ɛsti ya Azia, azali komikundola makambo oyo makómelaki baninga na ye mosusu ya kelasi. “Kulvadee akómaki ndumba ntango azalaki bobele na mibu 13. Azalaki mwana mwasi kitoko, kasi mama na ye azalaki kolangwa masanga mpe kobɛta kalati, na yango azalaki na ntango ya kobatela mwana na ye ya mwasi te. Mama ya Kulvadee alendisaki ye ete aluka mosolo na kotamboláká na mibali, mpe eumelaki te, akómaki ndumba.

“Sivun, mwana mwasi mosusu ya kelasi na ngai, autaki na nɔrdi ya ekólo. Azalaki bobele na mibu 12 ntango baboti na ye batindaki ye na mboka-mokonzi mpo na kosala bondumba. Asengelaki kosala bondumba na boumeli ya mbula mibale mpo na kokokisa kontra oyo baboti na ye basalaki. Sivun mpe Kulvadee bazali bobele bango moko te​—bana basi 5 kati na bana basi 15 na kelasi na ngai bakómaki bandumba.”

Bamilio ya bilenge lokola Sivun mpe Kulvadee bazali kokutana na makambo motindo wana. Wassyla Tamzali, mokonzi moko ya UNESCO (Organisation des Nations unies pour l’éducation, la science et la culture) alobaki ete: “Bondumba ezali lokola kompanyi oyo ezali kosala mombongo moko monene mpe mombongo yango ezali se kokola. Kotɛka mwana mwasi ya mibu 14 ekómi likambo oyo ezali kosalema bipai binso.” Mpe ntango bana basi yango batɛkami na boombo ya kosangisa nzoto, mbala mingi ezalaka mpasi mpo ete bázwa lisusu bonsomi na bango. Tata ya Manju atɛkisaki ye ntango azalaki na mibu 12, asengelaki naino kofuta dolare 300, atako asilaki kosala bondumba na boumeli ya mibu nsambo. Alobi ete: “Nakokaki lisusu kosala eloko moko te​—nakangamaki na motambo.”

Kokima sida ekoki kozala likambo ya mpasi mpo na bana basi yango bobele lokola ezalaka mpasi kokima bato oyo balukelaki bango mibali mpo na kosala bondumba. Bolukiluki moko oyo esalemaki na sudi-ɛsti ya Azia emonisaki ete bana 33 likoló na monkama oyo bazali kosala bondumba, bazwaki sida. Lokola kompanyi yango ya bondumba ekómi na bozwi mingi, pene na dolare miliare mitano, emonani mpenza ete bana basi yango bakokoba konyokwama.

Na makambo ya nsɔmɔ motindo wana, foti ezali ya nani? Ya solo, baoyo bazali kosomba to kotɛkisa bana basi na mombongo ya bondumba bazali na ngambo monene. Kasi baoyo bazali mpe kosalela bana basi yango mpo na bamposa na bango ya nzoto bazali mpe na ngambo. Mpamba te soki makambo ya mbindo motindo wana ezalaki te, mbɛlɛ bondumba ya bana basi yango ezali mpe te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezali bankombo na bango te.

[Elilingi]

Mbula na mbula, bazali kopusa bana basi soko milio moko na makasi mpo básala bondumba

[Etanda/Elilingi na lokasa 6]

Mosala oyo mwasi asalaka mokolo na mokolo na Afrika ya Ntei

Na Afrika ya Ntei, mwasi alamukaka na 6:00 mpo na kolamba bilei oyo ye na libota na ye bakolya na midi. Nsima ya kotoka mai na liziba to na libongo oyo ezali pene, akokende kosala na elanga na ye​—epai akotambola na makolo na boumeli soko ya ngonga moko.

Kino na 4:00 ya mpokwa, azali naino kotimola mabelé, kokata matiti mpe kosopa mai, akopema bobele soki alingi kolya mwa eloko oyo amemaki. Ngonga mibale oyo etikali liboso ete moi elala, ezali mpo na koluka nkoni mpe kobuka mwa mpɔndu to mwa ndunda mpo na libota​—biloko wana nyonso amemaka yango na ndako.

Na momeseno, akómaka na ndako wana moi ebandi kolala. Asengeli sikawa kolamba bilei mpo na libota, mosala oyo ekoki kozwa ye ngonga mibale to koleka. Mokolo ya lomingo ezali mpo na kosukola bilamba na libongo mpe na nsima kongoma yango soki ekauki.

Mbala mingi mobali na ye amonisaka mpenza botɔndi te na misala makasi wana, mpe ayokelaka ye mpenza te. Akoki bobele kosalisa ye na kokata banzete ya minene to kotumba elanga mpo ete alona malamu, kasi longola misala wana, asalaka misala mosusu mpenza te. Na bantango mosusu, akendaka na bana na libongo mpo na kosukola, mpe akoki kokenda koboma mbisi to koboma nyama. Kasi ntango na ye mingi alekisaka yango na masolo elongo na baninga na ye ya mboka.

Soki azali na makoki, nsima ya mwa bambula, mobali akoki kobala mwasi mosusu oyo azali elenge, ye nde akokóma mwasi na ye ya motema. Nzokande, mwasi na ye ya liboso, akokoba bobele kosala mosala makasi ntango nyonso kino kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye ekobeba to kino akokufa.

Basi ya Afrika basalaka mosala mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto