Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Juillet lok. 32
  • Esalisaki libala moko oyo elingaki kokufa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esalisaki libala moko oyo elingaki kokufa
  • Lamuká!—1998
Lamuká!—1998
g98 Juillet lok. 32

Esalisaki libala moko oyo elingaki kokufa

Mwasi moko na ekólo Nouvelle Zélande (esanga ya nɔrdi) akomaki makambo oyo malandi na ntina na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota: “Ntango nafandaki mpo na koyekola buku yango, nakanisaki ete libala na ngai ekómaki mpenza na esika oyo nakokaki kobikisa yango to koboma yango.”

Ayebisaki makambo oyo akutanaki na yango na bomoi na ye. “Mama na ngai abomaki libala mbala mibale. Na yango, tozalaki ntango nyonso koteyama ete mibali bazali na ntina te mpe balingaka bobele konyokola basi. Na bongo, nakolaki mpenza lokola mwasi moko ya motó makasi oyo alingaka ntango nyonso kozala na elonga.”

Mwasi yango ayebaki ete asengeli kobongola bizaleli na ye. “Namonaki ete lokola nazalaki kotosa mobali na ngai te mpe lokola nazalaki na lolendo mingi, nazalaki kolongola esengo kati na libota na ngai.” Na yango, asalaki mbongwana, lokola ayebisi yango: “Ngai na mobali na ngai tozali sikawa koyekola buku yango kati na libota, mpe nazali naino koyekola lolenge ya kozala mwasi moklisto. Tozali na esengo mingi mpo na boyokani na biso sikawa, kasi nasengeli naino kosala milende mingi.

“Lelo oyo ndako na biso ekómi na bolingo mpe na kimya koleka lolenge ezalaki liboso.”

Soki olingi kozwa mwa buku ya nkasa 32 Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?, oyo kati na yango liteya 8 ezali kolobela “Bomoi ya libota oyo ezali kosepelisa Nzambe,” tindá nkoma na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Répubilique démocratique du Congo to na adrɛsi oyo ebongi na yo na lokasa 5. Soki mpe osepeli ete moto moko ayekola na yo Biblia kozanga kofuta mbongo, yebisá mpe yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto