Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Octobre nk. 7-11
  • Esengeli kopesa basi lokumu mpe kondima mosala na bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengeli kopesa basi lokumu mpe kondima mosala na bango
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazali basi mpe baleisi ya mabota
  • Bazali bamama mpe balakisi
  • Esengeli mpenza komonisa motema mawa
  • “Pesá ye mbano ya mosala na ye”
  • “Basi oyo bakosalaka makasi kati na Nkolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Nzambe alingaka bápesa basi lokumu mpe limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Elikya nini ezali mpo na basi na mikolo mizali koya?
    Lamuká!—1998
  • Mbongwana ya ezalela ya basi na mikolo na basi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Octobre nk. 7-11

Esengeli kopesa basi lokumu mpe kondima mosala na bango

ESILI koleka mbula nkóto misato, mobali moko na nkombo Lemuele akomaki maloba kitoko na ntina na mwasi ya makoki. Maloba yango mazwami na Biblia na Masese mokapo 31. Emonani ete mwasi yango azalaki mpenza kosala mosala mingi. Azalaki komibanzabanza mpo na libota na ye, kosala mombongo na zando, kosomba mpe kotɛkisa mabelé, kotonga bilamba mpo na bato ya ndako na ye, mpe kosala bilanga.

Mwasi yango abongaki mpenza kozwa matɔndi. ‘Bana na ye bazali kobénga ye ete mopambwami, mpe mobali na ye azali kokumisa ye.’ Mwasi motindo wana azali eloko ya motuya. Biblia elobi ete, “Aleki mabanga na penini na motuya.”​—Masese 31:10-​28.

Kobanda na eleko ya Lemuele, basi bakómi lisusu kosala mosala makasi koleka. Na ekeke oyo ya 20, mikumba na bango mizali kosɛnga bango básala mosala lokola babalani, bamama, balifulumɛ, balakisi, baleisi ya mabota, mpe baloni bilanga​—nyonso wana mpo na moto moko. Basi mingi bazali kosala milende mingi mpo na kozwela bana mwa eloko ya kolya. Basi oyo nyonso, babongi mpenza kopesamela longonya, boye te?

Bazali basi mpe baleisi ya mabota

Lelo, basi mingi basengeli kosala misala mpo na koleisa mabota na bango. Buku Basi mpe mikakatano ya nkita na mokili mobimba (na Lingelesi) epesi lapolo oyo: “Basi basalaka bobele misala ya ndako te. Bipai binso na mokili, basi oyo bakoki koloba ete bazali ‘bobele bamama ya ndako’ bazali mingi te.” Mpe misala na bango ezalaka mingimingi ya kosepelisa te. Atako bazulunalo mpe televizyo emonisaka basi lokola bato oyo basalaka na babiro, mingimingi bosolo ezalaka bongo te. Basi mingi basalaka mosala ya mpasi na boumeli ya bangonga ebele, kasi lifuti na bango ezalaka se moke.

Bamilio ya basi basalaka bilanga, balonaka ndunda to babɔkɔlaka bitonga mpo na mabota na bango. Na momeseno​—mosala yango ezalaka na lifuti moke, kutu mbala mosusu ezalaka na lifuti te​—kasi ezali kobimisa 1/2 ya bilei oyo bato bazali kolya na mokili mobimba. Buku Basi mpe ezingelo (na Lingelesi) elobi ete: “Na Afrika, bilei 70 % ebimisamaka na basi, na Azia 50 kino 60 % mpe na Amérique latine 30 %.”

Ntango basi bazali kosala mosala oyo bazali kofuta bango, mbala mingi bazwaka mosolo moke koleka mibali, bobele mpo ete bazali basi. Ezalela ya koponapona motindo wana ekoki mpenza kondimama te epai na mama oyo asengeli kosalisa libota bobele ye moko, mokumba oyo ezali kokómela basi mingi lelo. Lapolo moko ya Mabota Masangani (Nations unies) emonisi ete kati na mabota 30 kino 50 likoló na monkama na Afrika, na bisanga Antilles mpe na Amérique latine, mwasi nde moto aleisaka libota. Mpe ata na mikili ya bozwi, basi mingi bakómi koleisa mabota.

Bobola oyo ezali konyokola bato na bamboka ya zamba na mikili mingi ya bobola ezali kokolisa likambo yango. Mobali oyo azali kokoka koleisa libota na ye te akoki kozwa ekateli ya kokenda koluka mosala na engumba moko ya zingazinga to na ekólo mosusu. Akosundolela mwasi na ye libota. Soki azwi mosala, akotindela mwasi na ye mwa ndambo ya mosolo. Kasi atako azali na makanisi malamu mpo na kosalisa libota, mbala mingi yango eumelaka te. Libota oyo asundolaki ekoki kokóma na bobola makasi, mpe sikawa ekómi kotalela bobele mama.

Ezalela yango, oyo babéngi ete “kokómisa bobola likambo ya mwasi,” ezali kotya bozito monene likoló ya mapeka ya bamilio ya basi. Buku Basi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto (na Lingelesi) elobi ete: “Ekanisami ete libota moko kati na mabota misato na mokili etambwisami na mwasi, mpe mbala mingi ezali na bobola makasi koleka mabota oyo matambwisami na mibali, mpe mabota motindo wana mazali kokóma mingi.” Kasi, soki koleisa libota ezali likambo ya mpasi mpo na basi, yango ezali bobele mokakatano moko te oyo basi bazali kokutana na yango.

Bazali bamama mpe balakisi

Mama asengeli mpe komibanzabanza mpo na bolamu ya mayoki ya bana na ye. Azali na mokumba monene ya kosalisa bango báyeba komonisa bolingo mpe boboto​—mateya yango makoki kozala na ntina ndenge moko na mposa ya koleisa bana na mosuni. Mpo na kobɔkɔla mwana akóma mokóló oyo azali na makanisi mabongi, asengeli kozala kati na bato ya boboto mpe komiyoka kati na libateli. Mpo na yango mpe, mokumba ya mama ezali na ntina mingi.

Kati na buku Bokoli ya mwana (na Lingelesi), Helen Bee akomi ete: “Moboti oyo azali na boboto amibanzabanzaka mpo na mwana na ye, amoniselaka ye bolingo ya motema, akokisaka mbala mingi to mbala na mbala bamposa ya mwana na ye liboso na oyo ya ye moko, asepelaka na misala na ye, mpe amonisaka motema mawa mpe bolingo na mayoki na ye.” Bana oyo bazwaki bolingo motindo wana epai ya mama basengeli mpenza kotɔnda mama na bango.​—Masese 23:22.

Wana bazali komɛlisa bango mabɛlɛ, bamama mingi bamoniselaka bana na bango boboto banda bomwana mpenza. Mingimingi na mabota ya bobola, mama oyo amɛlisaka mwana na ye mabɛlɛ na ye moko azali kopesa ye likabo moko ya motuya mpenza. (Talá etanda na nkasa 10-​11.) Likambo ya esengo, Biblia ezali koyebisa biso ete ntoma Paulo akokanisaki bolingo oyo azalaki na yango mpo na baklisto ya Tesaloniki na oyo ya “mama oyo azali kobɔkɔla bana na ye mpenza.”​—1 Batesaloniki 2:7, 8.

Longola koleisa bana mpe kolinga bango, mbala mingi mama azalaka molakisi na bango. Koyebáká mokumba monene oyo bamama bazali na yango mpo na koteya bana na bango, Biblia epesi toli oyo: “Mwana na ngai, yoká [mateya] na tata na yo mpe tiká mibeko na mama na yo te.” (Masese 1:8) Mingimingi ezalaka mama to nkɔkɔ-mwasi nde amonisaka motema pɛtɛɛ mpenza mpo na kolakisa mwana koloba, kotambola, mpe kosala misala ya ndako mpe makambo mosusu mingi.

Esengeli mpenza komonisa motema mawa

Moko ya makabo minene oyo basi bakoki kopesa na mabota na bango ezali bongo motema mawa. Soki moto moko ya libota abɛli, mama amibanzabanzaka mpo na ye, wana azali mpe kokokisa mikumba na ye mosusu. Buku Basi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto elobi ete: “Na mokili mobimba, lisalisi mingi ya monganga epesamaka na basi.”

Motema mawa ya mama ekoki kutu kopusa ye ete amipimela bilei ye moko mpo ete bana na ye bálya malamu. Balukiluki bamonaki ete basi mosusu bakanisaka ete oyo balyaka ekoki na bango ata soki ezali mingi te. Basi yango bazali na momeseno ya kopesa mibali na bango mpe bana na bango bilei mingi koleka oyo bango moko balyaka, bamonaka ete lokola bazali naino kosala mosala, bazali komiyoka ete bakolá malamu.

Mbala mosusu, motema mawa ya mwasi emonanaka na lobanzo oyo azalaka na yango ya kobatela ezingelo. Ezingelo yango ezali na ntina mingi mpo na ye, mpamba te amonaka mpe mpasi soki mabelé makauki mpe bazamba esili. Na engumba moko na ekólo Inde, basi basilikaki ntango bayokaki ete kompanyi moko ya mabaya elingaki kokata nzete 2 500 na zamba moko ya pene. Basi basengelaka na banzete yango mpo na kozwa bilei, makala, mpe matiti ya koleisa banyama. Ntango bato yango bayaki mpo bákata banzete, basi bakómaki liboso na bango mpe basimbanaki na mabɔkɔ na kozingáká banzete mpo na komonisa ete balingaki te ete ikatama. Basi bayebisaki bato yango ete, ‘Soki bolingi kokata banzete, bókata liboso biso.’ Na yango, banzete yango ikatamaki te.

“Pesá ye mbano ya mosala na ye”

Mwasi abongi mpenza kozwa lokumu mpe botɔndi mpo na mokumba na ye lokola moleisi ya libota, mama, molakisi, mpe liziba ya motema mawa. Lemuele, moto na mayele, oyo akumisaki mwasi ya makoki, azalaki kotalela mosala mpe toli ya mwasi na motuya. Kutu Biblia elobi ete maloba na ye mautaki mpenza na mateya oyo mama na ye apesaki ye. (Masese 31:1) Lemuele amindimisaki ete mwasi ya mayele mpe mama asengeli kotyolama soko moke te. Akomaki ete: “Pesá ye mbano ya mosala na ye. Bápesa ye lokumu mpo na mosala nyonso azali kosala.”​—Masese 31:31, New International Version.

Nzokande, ntango Lemuele azalaki kokoma maloba oyo, yango ezalaki bobele makanisi ya bomoto te. Maloba yango mazwami kati na Biblia, oyo ezali bongo Liloba ya Nzambe. “Makomami nyonso mapemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16, NW) Mayoki yango mazali komonisa lolenge Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso atalelaka basi, mpamba te apemisaki maloba yango kati na Biblia mpo na litomba na biso.

Lisusu, Liloba ya Nzambe lipemami ezali kosɛnga na mibali ete ‘bápesaka basi na bango lokumu.’ (1 Petelo 3:7) Mpe na Baefese 5:33, esɛngami na mobali ete: “Tiká ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola ye moko.” Mpe Baefese 5:25 elobi ete: “Bino babali, bólingaka basi na bino [lokola] Klisto alingaki Lingomba mpe amipesaki ye moko mpo na bango.” Ɛɛ, Klisto amonisaki bolingo motindo wana mpo na bayekoli na ye na boye ete andimaki kokufa mpo na bango. Oyo nde ndakisa ya komipimela apesaki mpo na mibali! Mpe mitinda oyo Yesu ateyaki mpe asalelaki ezalaki komonisa mitinda ya Nzambe, oyo mizwami kati na Biblia mpo na litomba na biso.

Nzokande, atako mpo na mosala makasi oyo bazali kosala, basi mingi bazwaka mbano ya mosala na bango te. Lolenge nini bakoki kobanda sikawa kobongisa bomoi na bango? Lisusu, tokoki kokanisa ete mbongwana ekoki komonana mokolo mosusu? Elikya nini ezali mpo na basi na mikolo mizali koya?

[Etanda/Elilingi na lokasa 10]

Myango misato oyo mwasi akoki kosalela mpo na kobongisa bomoi na ye

Kotánga kelasi. Na mokili mobimba, basi soko milio 600 bayebi kotánga te mpe kokoma te​—mingi kati na bango bazwá ata likoki ya kokenda na eteyelo te. Mbala mosusu yo moko otángá mpe mingi te, kasi yango elingi koloba te ete okoki koyekola te. Yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te, kasi basi mingi basili kolonga. Buku Basi​—Koyekola kokoma mpe kotánga (na Lingelesi) elobi ete: “Makambo ya losambo ekoki kozala na ntina mingi mpo na kopusa bakóló ete báyekola kotánga mpe kokoma.” Soki oyekoli kotánga, okoyeba kotánga Biblia yo moko mpe yango ekozala na mbano monene. Kasi matomba ezali mingi.

Mama oyo ayebi kotánga mpe kokoma azali bobele na makoki ya kokokisa bamposa ya libota te, kasi akoki mpe koyeba makambo matali bopɛto. Kerala, etúká ya ekólo Inde ezali mpenza komonisa matomba ya koyeba kotánga mpe kokoma. Atako etúká yango ezali mpenza na bozwi mingi te, basi 87 likoló na monkama bayebi kotánga mpe kokoma. Likambo ya esengo, bobele na etúká yango, motángo ya bana oyo bazali kokufa ezali moke mbala mitano koleka bipai mosusu na ekólo Inde; na mwayene basi baumelaka na bomoi mbula 15 koleka basi ya bipai mosusu, mpe bana basi nyonso bakendaka kelasi.

Na momeseno, basi oyo bayebi kotánga mpe kokoma bakolisaka makoki ya koyekola ya bana na bango​—yango ezali likambo ya kotala mpamba te. Kokɔtisa bana basi na kelasi ezali lokola kobomba bozwi. Lapolo moko ya UNICEF oyo ezali na motó na likambo ete Bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bana na mobu 1991 elobi ete ezali na eloko mosusu te oyo ebongisaka bokolɔngɔnɔ ya libota mpe bizalela ya basi koleka kotánga mpe kokoma. Ntembe ezali te ete makoki ya kotánga mpe kokoma ekosalisa yo ete ozala mama moko malamu mpe okokisa bamposa ya libota na yo malamu.a

Bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Lokola ozali mama, osengeli komibanzabanza mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo, mingimingi soki ozali na zemi to soki ozali komɛlisa mwana. Okoki kobongisa motindo ya bilei oyo osengeli kolya? Na Afrika, na Azia ya Sudi mpe ya Wɛsti, pene na basi mibale kati na basi misato oyo bazali na zemi, bazalaka na makila mingi te na nzoto. Kozanga makila na nzoto elɛmbisaka nzoto mpe ebimisaka mikakatano na ntango ya kobota mpe ezalaka likambo ya mpasi te mpo na kozwa malaria. Soki nyama to mbisi ezali komonana te to soki ezali na ntalo makasi, okoki kosomba ata maki mpe mbuma to ndunda oyo epesaka nzoto makasi. Kopesa nzela te na biyambayamba ete epekisa yo kolya bilei ya malamu, mpe kopesa nzela te na mimeseno ya bonkɔkɔ ete epekisa yo kolya malamu elongo na libota.b

Komɛlisa mwana mabɛlɛ ezali malamu mpo na yo mpe mpo na mwana na yo. Mabɛlɛ ya mama esɛngaka mbongo te, ezali pɛto koleka mpe ezali na vitamini koleka biloko mosusu nyonso oyo ekoki kokitana yango. UNICEF elobi ete milio moko ya bana bakokaki kozala na bomoi soki bamama na bango bamɛlisaki bango mabɛlɛ na boumeli ya sanza minei to sanza motoba ya kobotama na bango. Nzokande, soki mama azali na bokɔnɔ moko oyo ekoki kozwa mwana na nzela ya mabɛlɛ, asengeli kosalela mwango mosusu mpo na koleisa mwana na ye.

Soki ozali kolamba na kati ya ndako, salá ete mopɛpɛ ekɔtaka mpe ebimaka malamu. Buku Basi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto ekebisi ete: “Komitika na kati ya milinga na kuku na ntango ozali kolamba ezali mbala mosusu likama ya monene koleka, oyo eyebani mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto lelo oyo.”

Komɛla likaya te, ezala ata bapusi yo ndenge nini. Piblisite ya makaya oyo ezali kosalema na mikili ya bobola mpo na basi, ezali koluka kolɛngola bango mpo bándima ete basengeli komɛla likaya mpo na komiyoka malamu. Yango ezali mpenza lokuta. Komɛla likaya ezali kobebisa bana na yo mpe ekoki kutu koboma yo. Ekanisami ete momɛli moko ya likaya kati na bamɛli minei akufaka mpo na boombo ya likaya. Lisusu, minganga balobi ete ntango moto amɛli likaya mpo na mbala ya liboso, likoki ezali mpenza ete akóma momɛli monene.

Bopɛto. Ndakisa na yo mpe na toli oyo ozali kopesa mpo na bopɛto ezali na ntina mingi mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya libota na yo. Buku Myango mpo na kobikisa bomoi (na Lingelesi) ezali komonisa myango oyo milandi mpo ete nzoto ezala kolɔngɔnɔ mpenza:

• Sukolá mabɔkɔ na yo na sabuni nsima ya kouta na twalɛti mpe liboso ya kosimba bilei. Sɛnzɛlá ete bana na yo básukolaka mabɔkɔ liboso ya kolya.

• Salelá twalɛti, pɛtolá yango mpe zipá yango. Soki twalɛti ezali te, kende kosumba mosika na ndako mpe kundá nyei na yo nsima ya kosumba.​—Kokanisá na Deteronome 23:12, 13.

• Salá milende ya kosalela mai ya pɛto mpo na misala ya ndako. Mpo na yango, zipá mabulu ya mai mpe salelá bisaleli ya pɛto mpo na kotoka mai.

• Soki ozali na likoki ya kozwa mai ya pɛto te, tɔkisá yango mpe tikaká yango ekóma mpiɔ liboso ya komɛla. Atako mai oyo etɔkisami te ekoki komonana pɛto, kasi ekoki kozala na mikrobe.

• Omikundola ete bilei ya mobesu bizalaka na mikrobe mingi. Na yango, bilei oyo bilyamaka mobesu esengeli kosukola yango malamu mpe kolya yango noki mpenza. Bilei mosusu esengeli kolamba yango malamu mpenza, mingimingi misuni ya nyama mpe ya ndɛkɛ.

• Sɛnzɛlá ete bilei bizala pɛto mpe zipá yango mpo ete nyamankɛkɛ to nyama mosusu etya yango mikrobe te.

• Tumbá to mpe kundá bosɔtɔ.c

[Maloba na nse ya lokasa]

a Batatoli ya Yehova bazali na ebongiseli moko ya kolakisa bato kotánga mpe kokoma kozanga kofuta mbongo. Yango ezali moko na bibongiseli ya mosala na bango ya kopalanganisa mateya ya Biblia.

b Na bikólo mosusu, biyambayamba epekisaka basi ntango bazali na zemi kolya mbisi, maki, to nsoso. Babangaka ete yango ekoki kozala likama mpo na mwana oyo azali na libumu. Mbala mosusu mimeseno ya bonkɔkɔ esɛngaka na mwasi ete alya mintika ya bilei oyo mibali mpe bana mibali batiki.

c Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya 8 Apríli 1995, nkasa 6-​11, ebimeli ya Lifalanse.

[Elilingi na lokasa 8]

Basi mingi na Mpoto basalaka na babiro

[Elilingi na lokasa 9]

Basi mingi basalaka misala ya mpasi

[Elilingi na lokasa 9]

Bamama bazalaka mpe balakisi na ndako

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto